Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/09 nk. 24-25
  • Mwa buku na ngai ya langi ya roze

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwa buku na ngai ya langi ya roze
  • Lamuká!—2009
  • Masolo mosusu
  • “Longwa na minɔkɔ na bana”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mituna misato ebongolaki bomoi na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Lamuká!—2009
g 7/09 nk. 24-25

Mwa buku na ngai ya langi ya rozɛ

Lisolo ya Cynthia Newell

NTANGO nazalaki na mbula nsambo, na bisi oyo ezalaki komema biso na eteyelo na Shreveport, na etúká ya Louisiane, na États-Unis, elenge mwasi moko alakisaki ngai buku moko ya moke ya langi ya rozɛ oyo ezalaki na motó ya likambo Boyoka Moteyi Monene. Alobaki ete akopesa ngai yango soki napesi ye mbongo santimɛ 50. Na yango, ayaki na ndako na biso, mpe totángaki mwa mbongo 50 ya bibende elongo.

Nazalaki kolinga mpenza mwa buku yango. Mwa moke nsima ya kozwa yango, nabɛlaki mpe nakɔtaki lopitalo. Mpo na kobɔndisa ngai, bandeko na ngai bazalaki kotángela ngai buku yango oyo nazalaki kolinga mingi. Kasi, ntango nazalaki kokola, nazalaki lisusu kotánga buku yango mingi te, mpo basalaki yango mingimingi mpo na bana. Buku yango eteyaki ngai makambo ya ntina mingi, kasi nazalaki na mposa ya koyeba makambo malamumalamu. Nazwaki ekateli ya kokende na mangomba ekeseni pɔsɔ mokomoko mpo na koluka biyano ya Biblia na mituna na ngai. Kasi, nazwaki te biyano oyo esepelisaki ngai.

Ntango nakɔtaki na eteyelo ya ntei, nazalaki lisusu kokipe makambo ya Nzambe mingi te, atako nazalaki na mposa makasi ya kozwa boyebi ya Biblia mpe nazalaki kotánga Biblia na ngai mbala na mbala. Mokolo moko, namonaki ete moninga moko ya kelasi aboyaki kosangana na milulu ya kokumisa ekólo. Natunaki ye mpo na nini aboyaki, mpe alobaki boye: “Namipesá epai ya Yehova, ndenge nini nakoki mbala moko kopesa bosembo na ngai na Nzambe mpe na bendele ya ekólo?” Namonaki ete akanisaki malamu mpenza! Kasi, namitunaki boye, ‘Yehova nde nani’?

Na mituna nyonso oyo natunaki ye, moninga wana ya kelasi asalelaki Biblia mpo na kopesa ngai eyano. Namitunaki boye: ‘Ndenge nini ayebi makambo oyo nyonso? Tozali mbula moko; kasi ayebi makambo nyonso ya Biblia!’ Alobaki na ngai ete: “Nayekolaka Biblia na Ndako ya Bokonzi.” Nandimaki na motema moko ntango abengaki ngai na likita mokolo ya lomingo. Nakɔtaki na bandako-nzambe nyonso ya mboka na biso, kasi nayebi te ndenge nini nakendaki na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova te. Mokolo yango ya lomingo nayebaki ete nazwi esika oyo bateyaka solo ya Biblia.

Nsima ya likita, nakendaki na esika oyo batyaka mikanda, mpe na etagère ya likoló, namonaki mwa buku na ngai ya langi ya rozɛ! Mbula 10 elekaki banda elenge mwasi moko apesaki ngai buku yango na bisi; na yango, nabosaná nani apesaki ngai yango. Kasi, na ntango yango nayebaki elenge yango​—ezalaki Nancy, kaka elenge mwasi oyo abengisaki ngai na likita yango!

Na nsima, nakómaki koyekola Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpe nakolaki noki. Nayekolaki makambo mingi na mwa buku na ngai ya langi ya rozɛ; yango wana, nandimaki mbala moko makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia. Eumelaki te, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo na 1985 ntango nakómaki na mbula 18. Na ntango yango, Nancy akendaki kofanda na etúká ya Floride, mpe moto moko te azalaki lisusu kozwa bansango ya moninga.

Nsima ya mwa bambula, nabalaki. Na 1991, ngai ná mobali na ngai Drew tokómaki babongisi-nzela, elingi koloba tokómaki kosakola ntango nyonso, na mboka moko moke na ɛsti ya etúká ya Texas. Kasi, Nancy akómaki ndenge nini? Nazalaki ata na likanisi te. Bongo, mokolo moko na butu ntango nazalaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1992, nagangaki ete: “Namoni Nancy! Namoni Nancy!” Namonaki ye na fɔtɔ ya kelasi ya Gileadi oyo eutaki kosila. Ye ná mobali na ye Nick Simonelli batindamaki na Équateur, na Amerika ya Sudi.

Na 2006, ngai ná mobali na ngai totondisaki formilɛrɛ mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba. Tosepelaki makasi ntango toyebaki ete esika ya liboso oyo batindi biso ezali Équateur; esengelaki kobakisa bandako ya Betele ya ekólo yango. Mokolo ya liboso oyo nakómaki na Betele ya Équateur, namonaki Nancy azali kokɔta! Mokolo yango ayaki kotala bandako ya Betele. Tomonanaki mpe toyambanaki​—tokutanaki lisusu, mbula 32 banda apesaki ngai mwa buku na ngai ya langi ya rozɛ! Nazali na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo na buku yango mpe mpo na elenge mwasi oyo apesaki ngai yango!

[Etanda/​Bililingi na lokasa 25]

EBONGOLÁ BOMOI YA BATO MINGI

Na 2003, mbula 32 nsima ya kobimisama ya buku Boyoka Moteyi Monene, babimisaki buku ya sika oyo ezwaki esika ya buku wana. Buku yango ezali na motó ya likambo Yekolá epai ya Moteyi Monene. Lelo oyo, koleka milio 65 ya babuku yango mibale oyo elobelaka mateya ya Yesu esili kobimisama na minɔkɔ koleka 100. Okoki kosɛnga buku Yekolá epai ya Moteyi monene epai ya Motatoli ya Yehova moko na esika ofandi.

[Bililingi na lokasa 25]

Bafɔtɔ ya mike: Ntango toyebanaki na bomwana

Cynthia

Nancy

Na nsima: Bambula mingi na nsima, na biro ya filiale ya Équateur

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto