“Buku moko ya kala” ebikisaki ye
◼ Mwasi moko oyo azali Motatoli ya Yehova na Brésil azalaki kokende koteya bato na bandako na bango mpe akutanaki na mwasi moko oyo ayebisaki ye ete buku moko ya kala ebikisaki bokilo na ye. Motatoli yango akamwaki mpe atunaki soki ezalaki buku nini. Mwasi yango alobaki ete “ezali buku moko ya kala,” mpe alakisaki ye buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia; buku ya mwana na ye ya mobali oyo ezalaki ya kopasukapasuka.
Mwasi yango ayebisaki Motatoli ete bokilo na ye ya mwasi abɛlaki motó mpe azalaki kobanga liwa mpe molili, yango wana azalaki kofanda kaka na shambre. Mwana ya mwasi yango azwaki buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe abandaki kotangela nkɔkɔ na ye. Mobange yango alendisamaki mingi na masolo oyo nkɔkɔ na ye azalaki kotángela ye mpe maladi na ye esilaki.
Motatoli alobi boye: “Ntango nayebisaki mwasi yango ete Batatoli ya Yehova nde babimisaka buku yango mpe ete nakoki koyela ye oyo ya sika, asɛngaki ngai namemela ye buku yango mibale, moko mpo na bokilo na ye mpe mosusu mpo na ye moko. Ntango namemelaki ye babuku yango, asɛngaki namemela ye mosusu. Nsukansuka, azwaki babuku 16 mpo na baninga na ye!”
Yo mpe okoki kozwa buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia; oyo ezali na masolo 116 ya Biblia. Banda buku yango ebandá kobimisama eleki sikoyo mbula 30, babimisi yango milio koleka 72. Okoki kozwa yango soki otondisi mwa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.