Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/09 lok. 32
  • “Nayebaki te ete Nzambe azali na nkombo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nayebaki te ete Nzambe azali na nkombo”
  • Lamuká!—2009
Lamuká!—2009
g 1/09 lok. 32

“Nayebaki te ete Nzambe azali na nkombo”

◼ Mwasi moko nde alobaki maloba wana nsima ya kotánga buku Biblia eteyaka mpenza nini? Kasi abakisaki ete: “Ebongi mpenza ete Nzambe azala na nkombo. Ntango nalukaki nkombo ya Nzambe na kati ya Biblia na ngai, ezalaki wana!” Alobaki lisusu ete: “Naino natángá te buku oyo elimbolaka Biblia lokola oyo, buku moko ya ntina mpenza mpe pɛtɛɛ mpo na kosimba!”

Buku Biblia eteyaka emonisi ete mokano ya Nzambe na ebandeli ezalaki ete mabelé ezala paladiso, mpe emonisi polele ndenge mokano yango ekokokisama. Buku yango elobeli mpe mokumba monene oyo Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, azali na yango na kokokisama ya mokano yango. Na lisalisi ya Biblia, buku yango ezali kolimbola ntina oyo tonunaka mpe tokufaka, ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala, mpe ndenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekolongola bampasi nyonso.

Atako banda buku yango ebimá esali kaka mbula misato, milio koleka 79 ya buku yango esili kobimisama na minɔkɔ 220. Okoki kosɛnga buku yango soki otondisi mwa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo otyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto