“Ah, soki moto nyonso atángaka yango!”
Mwasi oyo akomelaki biso maloba wana, azalaki kolobela buku Pusaná penepene na Yehova. Alobaki lisusu boye: “Sikoyo namoni mpenza ete Yehova alingaka ngai; banda lelo, ngai mpe nakobanda komonisa basusu ete nalingaka bango mingi.” Moto mosusu oyo asepelaki na buku yango alobaki boye: “Nazangi maloba mpo na kolimbola ndenge oyo nasepelaki na buku yango mpe ndenge oyo yango esalisi ngai. . . . Mbala nyonso oyo natángaka yango, elendisaka ngai mingi.”
Buku Pusaná penepene na Yehova ezali na biteni minei oyo elimboli bizaleli ya ntina mingi ya Yehova: nguya, bosembo, bwanya, mpe bolingo. Motángi moko alobaki boye: “Buku yango esalisi ngai nayeba bizaleli kitoko ya Tata na ngai ya likoló. Esalisi ngai nayeba ete soki natiki elimo santu esala mosala na bomoi na ngai, ngai mpe nakoki komonisa bizaleli na ye.”
Ntango Joanna, elenge mwasi moko ya ekólo Pologne, asilisaki koyekola mokapo 26 oyo elobi “Nzambe oyo ‘alimbisaka mabe,’” alobaki boye: “Mpo na ngai, makanisi oyo nayekolaki na buku yango ezalaki lokola eloko ya motuya, mpe yango esalisi ngai mingi na bomoi na ngai.”
Tokanisi ete buku yango ya nkasa 320 ekosalisa yo mpe ekobɔndisa yo. Okoki kosɛnga buku yango soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.