Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/08 lok. 24
  • “Basalisi minganga bákolisa mayele na bango”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Basalisi minganga bákolisa mayele na bango”
  • Lamuká!—2008
  • Masolo mosusu
  • Makila
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Lamuká!—2008
g 1/08 lok. 24

“Basalisi minganga bákolisa mayele na bango”

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA MEXIQUE

Eyebani mokili mobimba ete Batatoli ya Yehova bandimaka te bázongisa bango makila. Kasi, bato mosusu balobaka mabe mpo na ekateli na bango wana, oyo euti na Biblia. Nzokande, ndenge emonisamaki na zulunalo moko (Reforma), oyo etángamaka mingi na engumba Mexico, monganga Ángel Herrera, mokambi ya minganga oyo basalaka lipaso na lopitalo moko (Institut national d’oncologie), alobaki boye: “Batatoli bazali bazoba te. Bazali mpe te bato ya bindimandima. . . . [Batatoli] basalisi minganga bákolisa mayele na bango, na ndenge basalisi bango bámonaka ntina ya kosala nyonso mpo moto oyo bazali kosala lipaso abima makila mingi te.”

Eleki sikoyo mbula 15, monganga Herrera asangisaki minganga oyo bapesaka nkisi ya mpɔngi na ntango ya lipaso mpe baoyo basalaka lipaso, mpo báyekola kosala bato mapaso kozanga ete bázongisa bango makila. Isidro Martínez, moko ya minganga oyo bapesaka bato nkisi ya mpɔngi na ntango ya lipaso, alobi boye: “Soki kaka bopesi moto nkisi ya mpɔngi malamu, bokoki kosalela mayele nyonso ya kosalisa moto kozanga ete bózongisa ye makila. Na ndenge yango, tosalisaka Batatoli ya Yehova kozanga ete tóbuka mibeko ya lingomba na bango.”

Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 2006, zulunalo wana emonisaki ete ezali na mayele koleka 30 ya kosalisa moto kozanga kozongisa ye makila. Kati na yango tokoki kotánga mayele oyo: kozikisa mwa moke misisa oyo ebimisaka makila mpo makila ebima mingi te, kolekisa na mpota elamba moko oyo ezali na nkisi oyo ekangaka makila, mpe kopesa moto bankisi oyo ematisaka makila.a

Moisés Calderón, mokambi ya minganga oyo basalaka lipaso ya motema na lopitalo moko (La Raza General Hospital) ya engumba Mexico, asalaka bato mapaso mingi kozanga kozongisa bango makila. Kaka na zulunalo wana, alobi boye: “Kozongisa makila ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Na nzela na yango, moto akoki kozwa maladi ndenge na ndenge. Longola yango, nzoto ya moto ekoki koboya makila wana, mpe yango ekoki kobebisa bangei mpe mimpululu na ye.” Na kotalela makama wana, monganga Calderón alobi boye: “Tosalaka bato nyonso mapaso kozanga kozongisa bango makila kaka ndenge tosalaka Batatoli ya Yehova. Tosalaka nyonso mpo moto oyo tozali kosala lipaso abima makila mingi te, tosalaka ete makila oyo ezali kobima ezonga kaka na nzoto na ye, mpe topesaka ye nkisi oyo ekangaka makila.”

Na zulunalo yango, bakomaki mpe maloba ya Misala 15:28, 29, oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mingi mpo na komonisa ntina oyo baboyaka bázongisa bango makila. Na vɛrsɛ wana, bantoma balobaki ete: “Elimo santu mpe biso moko tomoni malamu kobakisela bino kilo mosusu te, longola kaka makambo oyo ya ntina, bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka epai ya bikeko mpe makila mpe biloko oyo ekamolamá mpe pite.”

Na filiale ya Mexique, biro ya makambo etali boyokani na minganga elobi ete na ekólo na bango, Bakomite ya boyokani elongo na minganga ezali 75. Bakomite yango ezali na bandeko 950 oyo bandimá kokende kokutanaka na minganga mpo na kosalisa bango báyeba mayele ya kosalisa bato kozanga bázongisa bango makila. Na Mexique, minganga soki 2 000 bandimaka kosalisa Batatoli ya Yehova kozanga ete bázongisa bango makila. Batatoli bazali kosepela mingi na lisalisi ya minganga wana oyo bakómi mpe na mayele mingi ya kosalisa bato oyo bazali Batatoli te kozanga ete bázongisa bango makila.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Lamuká! etindi moto te asalela mayele boye to boye ya kosalisa moto kozanga kozongisa ye makila, mpamba te yango ezali likambo etali moto ye moko.

[Elilingi na lokasa 24]

Monganga Ángel Herrera

[Elilingi na lokasa 24]

Monganga Isidro Martínez

[Elilingi na lokasa 24]

Monganga Moisés Calderón

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto