Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/1 lok. 32
  • Mama moko ya bwanya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mama moko ya bwanya
  • Lamuká!—2005
Lamuká!—2005
g05 8/1 lok. 32

Mama moko ya bwanya

Mama oyo ayebaka bamposa ya bana na ye mpe akokisaka yango, asalaka nyonso mpo na kopesa bango bilei oyo etongaka nzoto. Asalaka mpe nyonso mpo na kopesa bango bilei ya elimo.

Eleki mwa mikolo, mwasi moko na Brésil akomelaki biro ya Batatoli ya Yehova na mboka wana mpo na komonisa ndenge asepelaki na mokanda Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Akomaki ete, “mwa buku yango esepelisaki ngai mingi. Ntango natángaki liteya oyo elobeli misala oyo Nzambe ayini, namonaki mbala moko ete nasengeli koteya makambo wana ya ntina epai ya bana na ngai​—⁠mibale ya basi, moko ya mbula 10 mpe mosusu ya mbula 11, mpe oyo ya mobali, ya mbula 5.” Abakisaki boye: “Ezali na ntina mingi nazala na mikanda oyo ebongi lokola oyo mpo na koteya bana na ngai banzela ya Nzambe!”

Asɛngaki mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Soki yo mpe ozali na mposa ya bilei ya elimo, ezala mpo na yo moko to mpo na libota na yo, okoki kozwa mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Tondisá bobele eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe tindá yango na adrɛsi oyo etyami awa to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto