Bato oyo babɛtabɛtaka bilamba na Bamako
SOKI ozali na Bamako, mboka-mokonzi ya ekólo Mali, oyo ezali na Afrika ya Wɛsti, okoyoka mokolo mobimba lokito lokola nde bazali kobɛta mbonda. Nzokande, lokito yango eutaka na babɛti-miziki te, kasi eutaka nde na mwa bandako ya bato oyo babɛtabɛtaka bilamba. Kasi, mpo na nini babɛtabɛtaka bilamba?
Na mosala mobimba ya kosala bilamba, likambo ya nsuka oyo basalaka ezali kobɛtabɛta bilamba yango. Mosala yango ebandaka na elamba moko ya mpɛmbɛ. Mbala mingi bapakolaka yango balangi ndenge na ndenge mpe batyaka yango mayemi ya ndenge na ndenge. Na nsima, bazindisaka yango na kati ya pɔtɔpɔtɔ oyo basali na mai ya songo to na mai ya banzete ndenge na ndenge ya ndembo. Nsima na yango, bakaukisaka elamba yango na moi; mpe soki balongoli yango na moi, ekómaka makasi lokola libaya. Na ntango wana, mosala ya nsuka oyo etikalaka ezali nde kobɛtabɛta yango.
Mosala monene ya bato oyo babɛtabɛtaka bilamba ezali ya kobɛtabɛta elamba yango oyo ekómi makasi tii ekokóma pɛtɛpɛtɛ. Na kati ya mwa bandako na bango, mbala mingi okokuta bilenge mibali mibale bafandi na nse mpe bazali kotalana; batii eteni moko ya nzete ya karité na kati na bango. Mibali yango bakopakola naino elamba yango mwa mafuta mpe bakotanda yango likoló ya eteni wana ya nzete. Na nsima bakobɛtabɛta yango na bamarto ya mabaya oyo basali yango mpe na nzete ya karité. Na molɔngɔ mpenza, bakobɛta, moto na moto na ngala na ye esika oyo moninga abɛtaki naino te.
Mpo na nini bangomaka kaka elamba yango te na esika ete bábɛtabɛta yango? Ntina ya liboso ezali ete soki bangomi yango, mɔtɔ ya fɛlo ekosala ete elamba enzuluka noki mpenza. Lisusu, fɛlo ekoki te kongɛngisa elamba ndenge bato oyo babɛtabɛtaka bilamba basalaka. Ezali bongo mpamba te mbala nyonso oyo babɛtaka elamba na marto, marto yango engɛngisaka elamba mpe langi na yango ekómaka lisusu kitoko koleka. Nsima ya kobɛtabɛta yango malamumalamu, elamba engɛngaka mpenza mpe okoki kutu kokanisa ete bauti nde kopakola yango langi.
Na yango, soki ozali kotambola na babalabala ya engumba wana mpe oyoki lokito moko lokola nde bazali kobɛta mbonda, talá malamumalamu mwa bandako ya mikemike oyo ezali zingazinga na esika ozali. Lokito yango ekoki ntango mosusu kozala ya mbonda te, ekoki nde kouta na bato oyo babɛtabɛtaka bilamba na Bamako.