Selakante: Mbisi oyo emonanaka mingi te
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA KENYA
NA SANZA ya Aprili 2001, bakangaki mbisi babengi selakante na bokula ya mbu, na Kenya.a Mbisi yango ezalaki na bolai ya mɛtrɛ 1,7 mpe ezalaki na kilo 77. Bayebaka selakante na lopɛlɛ na yango ya bitate misato, na langi na yango ya bule mpe matɔnɔ ya pɛmbɛ.
Bazalaki kokanisa ete baselankate yango esilá banda kala. Na nsima, na 1938, bakangaki selakante moko na mbu na bokula ya Afrika ya Sudi. Yango ezalaki moko ya makambo minene oyo bato ya siansi oyo bayekolaka banyama ná mbisi basalaki na ekeke ya 20. Liboso, bazalaki koyeba mbisi yango kaka na mikuwa oyo bakundolaki na mabelé. Kobanda ntango babomaki mbisi yango mpo na mbala ya liboso, bamonaki baselakante mosusu pene na Mozambique mpe na Madagascar. Bamonaki mpe mosusu mwa mingi na bisanga ya Comores.
Selakante ebotaka maki na mai te. Nzokande, mbisi yango epasolaka maki na yango na kati ya libumu mpe na nsima mbala moko bana babimaka libanda. Na kati ya libumu ya selakante oyo babomaki na mobu 2001, bakutaki maki zomi na nsambo, mokomoko ezalaki monene lokola bale ya tenisi.
Bikelamu oyo ezalaka na kati ya mbu, lokola selakante, ekumisaka Mozalisi na yango, Yehova Nzambe, mpo na bwanya mpe mayele oyo asalaka na yango biloko ndenge na ndenge.—Nzembo 148:7.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nkombo selakante euti na liloba ya Lingelesi coelacanth, oyo euti na liloba ya Grɛki koilos (polele) mpe akantha (nzubɛ), mpe ezali kolimbola nzubɛ ya mbisi yango, oyo ezalaka na lidusu na kati.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 27]
Fɔtɔ mpe mayemi: Ichthyology Department/NATIONAL MUSEUMS OF KENYA