Buku oyo ekoki kobikisa mabala
Na mbula oyo euti koleka, mokonzi moko ya Iniversite ya Tulane abengaki Leslie, mwasi moko oyo afandaka na engumba Louisiane, na États-Unis, na telefone. Mokonzi yango alobaki ete Tulane mpe iniversite mosusu bazali kosala ankɛtɛ moko epai ya babalani ya sika na engumba Louisiane.
Ntango Leslie andimaki kosangana na ankɛtɛ yango, bapesaki ye formilɛrɛ oyo ezalaki na mituna mpo ayanola, mpe azongisaki formilɛrɛ yango nzela moko na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Amonisaki ete ye na mobali na ye bazali Batatoli ya Yehova mpe bayekolaki buku wana elongo mpo na kobongisa libala na bango.
Nsima ya mwa bapɔsɔ, mokambi ankɛtɛ yango akomelaki bango mokanda na maloba oyo: “Tondimi mpenza ete babalani lokola bino bakoki koteya biso makambo oyo esengeli kosala mpo ete libala ezala malamu. Lokola bobɔkwamaki ndenge moko te, yango ezali likambo ya ntina mpamba te makambo ya boye ebimisaka matata na libala. Kasi lokola bomilɛngɛlaki malamu mpo na libala, bokolonga mikakatano nyonso oyo ekoki kobima, mingimingi na lisalisi ya mokanda oyo otindelaki biso. Kutu, eloko eleki ntina ezali ete bino mibale bozali na lingomba moko. Bino mibale bozali na libaku malamu na ndenge bozali na kondima makasi mpe bozali mpenza kotya motema na lisalisi ya Nzambe.
“Natii buku oyo otindelaki ngai na esika ya polele likoló ya mesa na biro na ngai, mpe soki bayekoli na ngai basɛngi napesa bango toli mpo na libala, nalakisaka bango buku yango. Namoná naino buku ya ndenge oyo te, ezali buku moko ya kokamwa.”
Tozali kolikya ete yo mpe okomona ete buku oyo ezali na ntina mingi. Soki yo mpe olingi kozwa buku yango, tondisá eteni ya lokasa oyo mpe, tindá yango na adresi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo. Okozwa makanisi ya polele oyo ekoki kosalisa mpo na kosilisa mikakatano na yo mosusu mpe okozala na esengo na libota na yo, lokola Mozalisi alingaki yango.
□ Nalingi kozwa mokanda Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
□ Boyá kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.