Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Janvier lok. 32
  • Lisalisi ntango moto oyo olingaka akufi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi ntango moto oyo olingaka akufi
  • Lamuká!—2002
Lamuká!—2002
g02 Janvier lok. 32

Lisalisi ntango moto oyo olingaka akufi

Na bambula oyo euti koleka, Batatoli ya Yehova babimisaki mwa buku moko oyo ezali komonisa nini osengeli kosala mpo na kolonga mpasi na yo ntango moto oyo olingaka akufi. Eleki mwa mikolo, mwasi moko ya République fédérale ya Yougoslavie, oyo atángaki mwa buku yango, akomaki boye mpo na komonisa botɔndi na ye: “Napesi bino matɔndi na motema na ngai mobimba, mpo na mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi. Ya solo, mwa buku yango ezali kolobela polele mpenza makambo nyonso oyo ebimaka soki okufeli moto.”

Mwasi yango alobi lisusu boye: “Ntango ndeko na ngai ya mobali akufaki na likama ya motuka, mwa buku yango epesaki ngai ‘lisalisi ya nokinoki.’ Etanda ya lokasa 18, na motó ya likambo ‘Mwa ndambo ya batoli ya sikisiki’ elendisaki ngai mpenza. Kasi na nsima ya sanza minei, nabandaki koyoka mawa makasi mpe nakómaki kokanisa ndeko na ngai oyo akufaki mingi. Nazalaki kobanga mingi ete nazinda na mawa te.

“Natángaki lisusu mwa buku yango, mpe na lisolo oyo ezali na etanda ya lokasa 9 oyo elobi ete: ‘Lolenge ya komonisa mawa.’ Nakangaki ntina ete ntango oyo makanisi na yo ebandi kobonga ezalaka mpe ntango oyo mawa eyaka mpe etindaka moto akanisa lisusu makasi makambo ya moto oyo akufi. Ya solo, nalendisamaki mpenza. Napesi bino matɔndi mingi mpo bozali koyokela bato mawa ndenge bomonisi yango na mwa buku yango.”

Mbala mosusu yo to moto mosusu oyo oyebi akoki kolendisama soki atángi mwa buku yango ya nkasa 32. Okoki kozwa yango soki otondisi lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adresi oyo etyami wana to na oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Bótindela ngai mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi.

□ Bóya koyekola na ngai Biblia na ndako.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto