Mpo na nini bizaleli ya bato ebebi boye?
NA SANZA ya Ɔkɔtɔbɛ oyo euti koleka, mokomi moko na engumba Loja, na ekólo Équateur, apesaki Batatoli ya Yehova longonya mpo na mosala na bango. Talá makambo mosusu oyo alobaki:
“Kobeba ya bizaleli ezali moko ya bampasi ya minene koleka oyo ekómeli bato . . . Emonani ete bato babosani kotosa Mibeko Zomi mpe lisosoli na bango, mpe nyonso wana nde esali ete bato báyokanaka te. Bipai nyonso mpe bisika nyonso, tozali koyoka bansango ya koyinana, mobulu, kobomana, kotɛka bangi, koboma bato na mobulu makasi mpe kozanga limemya mpo na lokumu ya moto. . . .
“Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mokumba na bango na kimya mpenza, kozanga kotya makɛlɛlɛ. Bakendaka kotala bazalani na bango na bandako na bango, bapesaka bango bazulunalo na bango mibale wana ya kitoko: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká!, oyo ezali na masolo ya kitoko koleka. Mingimingi Lamuká! elobelaka makambo ndenge na ndenge ya kitoko mpe ya solo, na kotalela siansi mpe mimeseno ya bato. Likambo ya kokamwa ezali ete makambo nyonso oyo ekomami wana ezali mpenza polele mpe solo.”
Lelo oyo, emonani polele ete bizaleli ya bato esili kobeba, kasi na lokasa 4 ya zulunalo oyo, na esika oyo elobeli “Ntina ya Lamuká!,” totángi ete Lamuká! “ezali kolobela makambo na bozindo mpe ezali komonisa ntina mpenza ya makambo mazali kobima na mokili.” Mwa buku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso? emonisi bampasi oyo bato bazali kokutana na yango, kasi esuki kaka wana te. Ezali komonisa ntina oyo bizaleli ya bato ebebi mpe mpasi oyo yango ebimisi. Likambo ya ntina koleka, ezali komonisa ndenge nini mosika te, bato bakobikisama.
Okoki kosɛnga mwa buku yango ya nkasa 32 soki otondisi lokasa oyo mpe otindi yango na adrɛsi oyo ezali wana to mpe na adrɛsi ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□Bótindela ngai mwa buku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
□Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia na ndako.