Bazali kopesa bato elikya ya solosolo
ELENGE moko ya mbula 17 na ekólo Moldavie, moko ya bikólo oyo ezalaki na République soviétique ya kala, atindaki mokanda na biro ya Batatoli ya Yehova ya Moldavie mpo na komonisa botɔndi na ye mpo na Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ (ebimeli ya Lifalanse) oyo ezalaki na lisolo “Elikya nini ezali lelo mpo na bilenge?” Alobaki ete:
“Nakokaki kokanga mpisoli na ngai te, mpe nalingi kaka kokomela bino mpo na kotɔnda bino. Masolo yango ekundoleli ngai makanisi oyo nazalaki na yango eleki mikolo mingi te. Ntango nalingaki komiboma, Batatoli ya Yehova babikisaki ngai, kasi bayebaki yango te. Lokola basololaki na ngai likambo ya elikya mpo na mikolo ezali koya mpe ndenge balendisaki ngai ete natya elikya na motema mawa ya Mozalisi, yango wana nakómi kozongela mokemoke mposa ya kozala na bomoi. . . .
“Mosala na bino ya kosalisa bato báyeba mokano ya Nzambe oyo etali kotya bomoi ya malamu ezali mpenza lolenge malamu ya komonisa bolingo epai ya bazalani na bino. Na ntembe te milende na bino ebotaka mbuma. Milende oyo bozali kosala mpo na kolobela polele mikakatano minene oyo bato bazali kokutana na yango ebongi mpenza kozwa lokumu. Bókoba na mosala yango, ezali na ntina mingi. Nakobanda kozela nimero mokomoko ya sika ya zulunalo yango.”
Na paragrafe oyo elobeli “Ntina ya Lamuká!” oyo ezali na lokasa 4 ya nimero nyonso, totángi boye: “Zulunalo oyo ezali kopesa bantina makasi ya kondima ete mosika te Mozalisi akokokisa elaka na ye ya kosala mokili ya sika ya kimya mpe ya kobatelama, oyo ekokitana ebongiseli ya lelo ya mabe mpe oyo ezangi mibeko.” Elaka yango ya Nzambe oyo euti na Biblia epesi bamilio ya bato ya mokili mobimba nguya ya koyika mpiko ntango bazali kokutana na mikakatano ya eleko ya mpasi oyo.
Okokuta elikya ya solosolo oyo Mozalisi na biso azali kopesa ndenge elobelami malamu mpenza kati na mwa buku Quel est le but de la vie? Comment le découvrir? (Ntina mpenza ya bomoi ezali nini? Ndenge nini koyeba yango?) Talá mingi mpenza masolo “Le dessein de Dieu est près de se réaliser” (Mokano ya Nzambe elingi kosalema) mpe “La vie éternelle sur une terre transformée en paradis” (Bomoi ya seko na mabele oyo ekómi paladiso). Okoki kozwa mwa buku yango ya nkasa 32 soki otondisi lokasa oyo mpe otindi yango na adrɛsi oyo: Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P. 634 Limete, Kinshasa, République démocratique du Congo, to mpe na adrɛsi ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
◻ Bótindela ngai mwa buku Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?
◻ Bóya kotala ngai mpo na koyekola Biblia na ndako.