Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Avril lok. 32
  • Likama ya likaya na Inde mpe na Chine

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likama ya likaya na Inde mpe na Chine
  • Lamuká!—2000
Lamuká!—2000
g00 Avril lok. 32

Likama ya likaya na Inde mpe na Chine

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA INDE

LOKOLA na mikili ya Mpoto babimisi mibeko mingi mpo na kopekisa piblisite ya likaya mpe bato bakómi koyeba makama oyo ezali kouta na komela likaya, bakompanyi minene ya makaya ekómi sikoyo kotɛka makaya na bango na Azia. Baankɛtɛ oyo Banque mondiale esalaki emonisi ete kino na mobu 2010, bato milio moko bakokufa mbula na mbula na Chine mpo na likaya. Zulunalo British Medical Journal elobi ete, na Chine bato milio 100, oyo bakokisi naino mbula 29 bakokufa mpo bamelaka likaya.

O.M.S. elobi ete Chine na Inde oyo ezali na bato koleka miliare moko, ezali kokóma na “bato mingi ya maladi oyo eutaka na komela likaya koleka mikili mosusu nyonso.” Balapolo emonisi ete mbula na mbula, bana pene na milio 20 babandaka komela likaya. Moto moko na sudi ya Inde, ye amelaki likaya na boumeli ya bambula mingi, akomelaki babimisi ya Lamuká! mokanda mpo na kopesa bango matɔndi mpo na lisolo oyo ebimaki na zulunalo yango, mpe lisolo yango esalisaki ye atika mpenza komela likaya. Ezalaki lisolo “Okoki kotika yango​—Biso totiká!” oyo ebimaki na nimero ya Aprili-Yuni 1999.

Okoki koyeba ntina oyo osengeli koboya komela likaya? Okokuta makanisi mosusu ya ntina na mwa buku ya nkasa 32 oyo ezali na moto ya likambo Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? na lokasa 25. Okoki kosɛnga mwa buku yango soki otondisi eteni ya lokasa oyo mpe otindi yango na adresi oyo ezali awa to na adresi oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Bótindela ngai mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola Biblia na ndako.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto