Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Avril lok. 32
  • “Zulunalo oyo ezali na esika ya liboso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Zulunalo oyo ezali na esika ya liboso”
  • Lamuká!—1999
Lamuká!—1999
g99 Avril lok. 32

“Zulunalo oyo ezali na esika ya liboso”

Osilá kotánga zulunalo Lamuká!? Esika nini okoki kopesa na nimero oyo ezali na mabɔkɔ na yo? Ozali komona ete masolo yango mazali na bansango ya kitoko, bolukiluki esalemi malamu, mpe bililingi na yango ezali kitoko?

Mokomi moko ya bazulunalo na ekólo Nigeria, na Afrika, akomaki ete: “Atako nazali Motatoli ya Yehova te, kasi natángaka Lamuká! mbala na mbala. Lamuká! ezali zulunalo oyo ezali na esika ya liboso. Ezali eutelo ya makanisi ya sika mpo na ngai. Nkasa na yango ya likoló ebendaka likebi mpe epesaka motángi oyo azali na makanisi mabe te mposa makasi ya kotánga yango. Nimero mokomoko ezali na masolo ya kitoko; lokasa mokomoko ekomami malamu mpenza na lolenge ya bapanzi-nsango. Na masolo na yango kitoko oyo ezali kobima na ntango ebongi, nimero mokomoko ezali kopesa bansango ya ntina mpenza.”

Tozali kolendisa yo ete otalela masolo ya nimero oyo ya Lamuká! Soki olingi kozwa nimero mosusu, tindá mokanda na Association “Les Témoins de Jéhovah”, B.P. 634 Limete, Kinshasa, République démocratique du Congo, to na adresi ebongi na yo na lokasa 5. Tokosepela kotindela yo nimero mosusu to soki olingi, moto moko akoya kotala yo na ndako mpo bótalela ndimbola ya ntango oyo tozali na yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto