“Mosala monene oyo mosalami mpo na bolamu ya bato”
“Bosali mosala moko monene mpo na bato na kobimisáká búku oyo. Ezali kitoko. Masoló masangisami kitoko mpenza. Ebongi na kopesamela lokumu.
“Kitoko ya búku yango ezali likambo oyo ete ezali kolobela makambo mingi ya mitindo nyonso ya mangomba, kozanga ete ekweisa mangomba yango. Bosali búku moko kitoko mpenza. Kitoko koleka.”
Docteur Tiruchchirappalli, mofandi na Inde, atindaki nkomá yango na ntina na búku nini? Búku L’humanité à la recherche de Dieu; ezali na nkasa 384 mpe ezali kolobela biutelo mpe mateya ya mangomba minene ya mokili—Hindouïsme, Bouddhisme, Taoïsme, Conficianisme, Shintoïsme, Judaïsme, Christianisme, mpe Islam. Mikapo ya nsuka mizali kolobela kozanga kondima ya lelo mpe kozongisama lisusu ya losambo ya Nzambe ya solo. Búku yango ya bililingi ebimisami na baekzamplɛrɛ koleka milió 16 mpe enyatámi na nkóta 37.
Nsima ya kotánga búku yango oyo asɛngaki kosɛnga, Docteur asepelaki kozwa oyo ya ye moko. Soki olingi kozwa búku yango ya bililingi, sololá na Batatoli ya Yehova oyo bazali esika ofandi to tindá nkomá na adrɛsi ebongi na yo oyo ezali na lokasa 5 ya zulunalo oyo.