Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g96 Avril lok. 15
  • “Soki nakokaki kobongola likambo moko na ntango malamu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Soki nakokaki kobongola likambo moko na ntango malamu”
  • Lamuká!—1996
  • Masolo mosusu
  • Yesu azali mobikisi​—Na ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mpo na nini bato bakufaka?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpo na nini makambo ya mabe mpe bampasi ezali na mokili?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Makambo oyo esalaka ete bitumba mpe mobulu ekoba kozala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
Makambo mosusu
Lamuká!—1996
g96 Avril lok. 15

“Soki nakokaki kobongola likambo moko na ntango malamu”

BASƐNGAKI na banakelasi na eteyelo moko ya Californie, na États-Unis ete bákoma lisoló moko na motó ya likambo oyo ezwami likoló awa. Moko kati na bango ezalaki bongo Éric, elenge mobali ya mibu 11 ya libota moko ya Batatoli ya Yehova. Akomaki lisoló na ye ye moko na kotyáká moboko na yango likoló na Biblia na maloba oyo malandi.

“Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebomaki bato mingi. Ebele ya bato oyo basalaki na bango likambo te bakufaki. Kasi soki nakokaki kobongola likambo oyo nasili kopona, mbɛlɛ etumba ebimaki te, na yango mbɛlɛ elobelami kati na mikanda soko moke te. Kanisá na ntina na kobomama ya John F. Kennedy. Mobali wana akufaki liwa moko ya nsɔ́mɔ, kasi soki nakokaki kobongola likambo oyo nasili kopona mbɛlɛ esali ete yango mpe ekomama te kati na mikanda ya lisoló ya bato. Martin Luther King, Jr., akufaki na 1968 mpo ete amekaki kobongola makanisi ya mokili, kasi soki nakokaki kobongola likambo oyo naponaki, mbɛlɛ nakokaki mpe koyebisa na liboso mpo ete yango esalema te. Soki nakokaki kobongola likambo yango na ntango malamu, mbɛlɛ mokili ezali ndenge mosusu, makambo nyonso, lokola toyebi yango makokaki kobongwana mpe biloko nyonso, bakisá bizalela mpe bato, ekokaki kozala ndenge mosusu. Na ntango wana lisoló ya bato libongwanaki mpo na kokómisa mokili lokola toyebi yango lelo​—liwa, mobulu, maladi mpe makambo ya mabe.

“Ya solo, okoki komituna, ‘Likambo yango ezali nde bokɔnɔ moko? Likambo yango ezali nde boyangeli moko? To likambo yango ezali nde etumba?’ Omituna yo moko, ‘Soki ezalaki bokɔnɔ moko, lolenge nini ekokaki kopekisa misala ya bato na kozala mabe?’ ‘Ekoki kozala yango te,’ okoki koloba bongo. Na nsima okanisi ete, ‘ekoki kozala boyangeli moko oyo ekoki kosilisa mikakatano nyonso.’ Kasi, boyangeli ezali kotambwisama na bato, mpe bato nyonso bazangi kokoka mpe bakufaka. Na bongo, misala na bango malamu mikoki kokufa na bango elongo te? Na nsima okoloba ete, ‘esengeli kozala etumba moko lokola Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.’ Te! Ekoki kozala bongo te, mpamba te kati na etumba, ngámbo moko elóngaka, mpe na yango, ngámbo mosusu ekweyaka. Moko te kati na makambo oyo tolobeli makoki kosilisa liwa, mobulu, makɔ́nɔ, mpe mabe libela na libela. Okoki komituna soki likambo yango oyo nakokaki kobongola na ntango malamu ezali nini.

“Lisumu. Liwa. Lisumu mpe liwa ezali oyo nakokaki kobongola. Kasi ndenge nini? Uta kala tozalaka ntango nyonso na lisumu mpe na liwa. Lisumu mpe liwa ezali makambo ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Na bongo ndenge nini okoki kobongola makambo oyo mazalaka ntango nyonso uta kala? Osengelaki kopekisa yango na ntango oyo ebandaki. Botomboki ya Adama mpe Eva mpo na boyangeli ya Nzambe esali ete makambo mazala lolenge mazali lelo. Baoyo bamikɔtisaki na yango baponaki kosala makambo na lolenge na bango moko, mpe yango wana tozali na lisumu mpe na liwa.

“Likambo ya sikisiki oyo nakokaki kobongola ezali ntango oyo lokuta ya liboso elobamaki na Satana Zábolo na ntina na boyangeli wana ya kokoka. Mpo na lokuta yango, biso nyonso tozali komona mpasi mpo na oyo bankɔ́kɔ na biso ya liboso, Adama mpe Eva basalaki. Basalaki lisumu epai na Motambwisi bobele moko ya solo ya boyangeli, Nzambe.”

Na Mwamitano, 12 Augústo 1995, Éric atángaki lisoló na ye na liyangani ya mokolo moko ya Batatoli ya Yehova na Norco, na etúká ya Californie. Bayangani basepealaki mingi na koyoka elenge oyo azali kozwa litomba ya libaku na eteyelo mpo na kopesa litatoli ya kobenda likebi litali ntina ya mpasi ya bato. Oyo nde esengo ekozala ntango Nzambe akoboma “nyoka na kalakala” mpe akolongola bampasi nyonso oyo Zábolo azali mobandisi na yango!​—Emoniseli 12:9; 21:3, 4; Genese 3:1-6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto