Epai bayambaka bapaya malamu
Na Sɛtɛ́mbɛ 1994, mobali moko ya mboka Michigan, na Etats-Unis, atindaki nkomá na lisangá ya Batatoli ya Yehova na engumba Lebanon, Tennessee. Alobaki ete:
“Mokolo ya Lomingo 6 Yúni 1993, nayanganaki na makita na bino na lisukúlu ya bato nyonso mpe na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ete nakɔta na Ndako ya Bokonzi, mpe nakamwaki mingi na bilongi nyonso ya kosɛka mpe bolingo ya solo oyo bomoniselaki ngai. Nakómaki mwa moke nsima ya ngonga mpe ntango nakɔtaki, nafandaki ngai moko. Babalani mibale ya sika oyo bazalaki na molɔngɔ́ na ngai bapesaki ngai Biblia elongo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kolanda boyekoli.
“Nsima ya makita, mingi kati na bino bayaki kosolola na ngai, kopesa ngai mbote na boye ete namiyokaki lokola epai na ngai mpenza. Ntango natikaki Ndako ya Bokonzi, nakamataki mikanda misato—Biblia, Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo mpe Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Na butu yango, natángaki pene na búku mobimba Bomoi ya seko mpe nayaki koyeba ete Nzambe azali na nkombo, Yehova. . . .
“Nalingi bino nyonso bóyeba ete nasepelaki mingi na ezaleli na bino ya koyamba bapaya mpe mingimingi nalingi koyebisa bino ete . . . nazwaki batisimo na mwa 9 Yulí 1994 wana nakómaki na mibu ya kobotama 70.”
Soki yo mpe olingi koyambama motindo wana na bato oyo bazali kosepela kosalela Nzambe, tindá nkomá na Association “Les Témoins de Jéhovah,” B.P.634 Limete, Kinshasa, Zaïre. Bakolakisa yo Ndako ya Bokonzi oyo ezwami pene na esika yo ofandi.