Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Avril lok. 32
  • “Mosamalia moko malamu na mtango na biso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mosamalia moko malamu na mtango na biso”
  • Lamuká!—1994
Lamuká!—1994
g94 Avril lok. 32

“Mosamalia moko malamu na mtango na biso”

MWASI moko ya mboka Canada azokaki na likámá ya motuka. “Mosamalia” moko ayaki kosalisa ye. (Luka 10:29-37) Na kokamwáká na boboto na ye, akomi makambo oyo malandi na Georgetown Independant:

‘Epai na mokomi-mokambi,

‘Nazali kokomela bino mpo na bantina mibale. Ya liboso, nalingi kopesa matɔ́ndi na mofandi moko ya Georgetown oyo asalisaki ngai na nsuka ya pɔ́sɔ oyo eleki ntango nakweaki kati na libulu wana motuka na ngai elongwaki na nzela mpo na kozanga likebi.

‘M. John Saunders atɛlɛmaki. Apesi ngai lisalisi ya ebandeli mpe amimonisaki moto malamu mpenza. Atikalaki na ngai elongo kino ntango bapolisi bayaki mpe motuka ya bakɔni. Engumba na bino ezali na libaku ya kotánga kati na bato na yango Mosamalia lokola M. Saunders.

‘M. Saunders ayaki kotala biso na lopitalo, ngai mpe mobali na ngai, bobele mpo na koyeba soki nazali malamu. Epesaki ngai motema mpasi na koyeba ete M. Saunders asalaka na biro ya Batatoli ya Yehova na Georgetown. Nazalaka ntango nyonso kokanisa ete bato wana bandimaka makambo matali minganga te, nzokande moko na bango asaleli boyebi na ye ya makambo matali bokolɔngɔ́nɔ́ mpo na kosalisa ngai. Yango ezali kotinda ngai mpo na ntina ya mibale ya mokanda na ngai.

‘Nazali kosɛnga bolimbisi epai na Batatoli ya Yehova nyonso oyo nabenganaki ntango bayaki kobɛta na ekuke na ngai. Nabandaki kotalela bino lokola bato na bindimela. M. Saunders azali elembeteli ete lolenge na ngai ya koyina wana ezalaki na moboko te. Bozali mpe bato lokola bato nyonso oyo bazali kosala makasi mpo na kosala oyo ezali sembo.

‘Napesi lisusu matɔ́ndi na M. Saunders, mpe tikalá ngwi na kondima na yo. Nzambe apambola yo!

‘T. M., Toronto’

Batatoli ya Yehova bayebi ete ‘esengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ (Luka 10:27) Soki olingi kozwa ndimbola mosusu, to soki olingi ete moto moko aya kotala yo mpo na koyekola Biblia elongo na yo kozanga kofuta, tuná Batatoli ya Yehova ya mboka oyo ofandi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto