Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt 2 Yoane 1-13
  • 2 Yoane

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 2 Yoane
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
2 Yoane

MOKANDA YA MIBALE YA YOANE

1 Ngai mokóló,* nakomeli mwasi oyo aponami ná bana na ye, oyo nalingaka mpenza, mpe kaka ngai moko te, kasi mpe baoyo nyonso bayekoli koyeba solo, 2 mpo na solo oyo ezali na kati na biso, mpe ekozala na biso libela na libela. 3 Boboto monene ekozala na biso, ná motema mawa mpe kimya ya Nzambe Tata mpe ya Yesu Kristo Mwana ya Tata, elongo na solo mpe bolingo.

4 Nazali kosepela mingi mpenza mpo namoni bana na yo mosusu bazali kotambola na kati ya solo,+ kaka ndenge tozwaki mobeko epai ya Tata. 5 Bongo sikoyo nazali kosɛnga yo, mwasi, ete tólinganaka. (Nazali kokomela yo mobeko moko ya sika te, kasi oyo tozalaki na yango banda na ebandeli.)+ 6 Mpe talá oyo bolingo elakisi: tókoba kotambola ndenge mibeko na ye esɛngi.+ Talá mobeko yango, ndenge kaka boyokaki banda na ebandeli, ete bosengeli kokoba kotambola na kati na yango. 7 Mpo bakosi mingi babimi na kati ya mokili,+ baoyo bazali kondima te ete Yesu Kristo ayaki na nzoto ya mosuni.+ Wana nde mokosi mpe motɛmɛli ya Kristo.+

8 Bókeba mpo na bino moko, mpo bóbungisa te mbuma ya mosala oyo tosalaki, kasi mpo bózwa mbano ya mobimba.+ 9 Moto nyonso oyo akei mosika mpe atikali na liteya ya Kristo te azali na bomoko te elongo na Nzambe.+ Moto oyo atikali na kati ya liteya yango, ye nde azali na bomoko elongo na Tata mpe na Mwana.+ 10 Soki moto ayei epai na bino mpe amemi liteya oyo te, bóyamba ye te na bandako na bino,+ bópesa ye mpe mbote te. 11 Mpo moto oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.

12 Atako nazali na makambo mingi ya koyebisa bino, nalingi te kokoma yango na papye mpe na mai ya mokanda; kasi nazali kolikya koya epai na bino mpe koloba na bino boye na miso, mpo esengo na bino ezala ya kokoka.

13 Bana ya ndeko na yo, mwasi oyo aponami, batindeli yo mbote.

To, “nkulutu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto