MOKANDA YA LIBOSO YA YOANE
1 Oyo ezalaki banda na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki na likebi mpe tosimbaki na mabɔkɔ na biso, na oyo etali liloba ya bomoi,+ 2 (ɛɛ, bomoi emonisamaki polele, mpe tomoni mpe tozali kotatola+ mpe kosakwela bino bomoi ya seko+ oyo ezalaki elongo na Tata mpe oyo emonisamaki epai na biso), 3 oyo tomonaki mpe toyokaki, tozali mpe kosakwela bino yango,+ mpo ete bino mpe bósangana* elongo na biso. Mpe biso tosangani elongo na Tata mpe elongo na Mwana na ye Yesu Kristo.+ 4 Mpe tozali kokoma makambo oyo mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka.
5 Nsango oyo toyokaki epai na ye mpe oyo tozali kosakwela bino yango oyo: Nzambe azali pole,+ mpe molili ezali ata moke te na kati na ye.* 6 Soki tolobi: “Tosangani elongo na ye,” nzokande tozali kokoba kotambola na molili, tozali kobuka lokuta mpe tozali kolanda solo te.+ 7 Nzokande, soki tozali kotambola na pole ndenge ye moko azali na kati ya pole, tosangani lisangá moko, mpe makila ya Yesu Mwana na ye ezali kopɛtola biso na lisumu nyonso.+
8 Soki tolobi: “Tozali na lisumu te,” tozali komikosa+ mpe solo ezali na kati na biso te. 9 Soki toyamboli masumu na biso, ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na makambo nyonso ya kozanga bosembo.+ 10 Soki tolobi: “Tosali lisumu te,” tozali kokómisa ye moto ya lokuta, mpe liloba na ye ezali na kati na biso te.
2 Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bósala lisumu te. Nzokande, soki moto asali lisumu, tozali na mosungi* moko epai ya Tata, Yesu Kristo,+ moto ya sembo.*+ 2 Mpe ye azali mbeka ya kozipa*+ masumu na biso,+ kaka oyo ya biso moko te, kasi mpe oyo ya mokili mobimba.+ 3 Mpe na likambo oyo nde tososoli ete toyebi mpenza ye: soki tokobi kotosa mibeko na ye. 4 Moto oyo alobi: “Nayebi mpenza ye,” nzokande atosaka mibeko na ye te, azali moto ya lokuta, mpe solo ezali na kati ya moto yango te. 5 Kasi moto oyo atosaka liloba na ye, bolingo ya Nzambe ekómi mpenza ya kokoka na kati ya moto yango.+ Na ndenge yango nde toyebi ete tozali na bomoko elongo na ye.+ 6 Moto oyo alobi ete atikali na bomoko elongo na ye asengeli ye moko kokoba kotambola kaka ndenge moto wana atambolaki.+
7 Bandeko ya bolingo, nazali kokomela bino mobeko moko ya sika te, kasi mobeko ya kala oyo bozwaki banda na ebandeli.+ Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki. 8 Lisusu, nazali kokomela bino mobeko moko ya sika, oyo ezali solo na likambo na ye mpe ya bino, mpo molili ezali koleka mpe pole ya solosolo esili kutu kongɛnga.+
9 Moto oyo alobi ete azali na pole nzokande azali koyina+ ndeko na ye azali naino na molili.+ 10 Moto oyo alingaka ndeko na ye atikali na kati ya pole,+ mpe epai na ye eloko moko ya kobɛtisa libaku ezali te. 11 Kasi moto oyo ayini ndeko na ye azali na molili mpe azali kotambola na molili;+ mpe ayebi epai azali kokende te,+ mpo molili ebomi ye miso.
12 Nazali kokomela bino, bana, mpo masumu na bino elimbisami mpo na nkombo na ye.+ 13 Nazali kokomela bino, batata, mpo boyebi mpenza ye oyo azali banda na ebandeli. Nazali kokomela bino, bilenge, mpo bolongi moto mabe.+ Nazali kokomela bino, bana mike, mpo boyebi mpenza Tata.+ 14 Nakomeli bino, batata, mpo boyebi mpenza ye oyo azali banda na ebandeli. Nakomeli bino, bilenge, mpo bozali makasi+ mpe liloba ya Nzambe etikali na kati na bino+ mpe bolongi moto mabe.+
15 Bólinga mokili te to biloko oyo ezali na mokili.+ Soki moto alingi mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te;+ 16 mpo eloko nyonso oyo ezali na mokili—mposa ya nzoto+ mpe mposa ya miso+ mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela*—euti na Tata te, kasi euti na mokili. 17 Lisusu, mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango,+ kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala mpo na seko.+
18 Bana mike, oyo ezali ngonga ya nsuka. Boyokaki ete motɛmɛli ya Kristo azali koya,+ nzokande sikoyo ebele ya batɛmɛli ya Kristo babimi;+ na yango toyebi ete oyo ezali ngonga ya nsuka. 19 Babimaki na kati na biso, kasi bazalaki baoyo ya biso te;*+ mpo soki bazalaki baoyo ya biso, balingaki kotikala elongo na biso. Kasi babimaki mpo emonana polele ete bato nyonso te nde bazali baoyo ya biso.+ 20 Mpe kotyama mafuta na bino euti na mosantu,+ mpe bino nyonso bozali na boyebi. 21 Soki nazali kokomela bino, ezali te mpo boyebi solo te,+ kasi nde mpo boyebi yango, mpe mpo lokuta moko te euti na solo.+
22 Nani azali moto ya lokuta, soki ezali te moto oyo awangani ete Yesu azali Kristo?+ Wana nde motɛmɛli ya Kristo,+ moto oyo azali kowangana Tata mpe Mwana. 23 Moto nyonso oyo awangani Mwana azali mpe na Tata te.+ Kasi moto oyo andimi Mwana+ azali mpe na Tata.+ 24 Kasi bino, makambo oyo boyokaki banda na ebandeli esengeli kotikala na kati na bino.+ Soki makambo oyo boyokaki banda na ebandeli etikali na kati na bino, bino mpe bokotikala na bomoko elongo na Mwana mpe na bomoko elongo na Tata. 25 Lisusu, talá eloko oyo ye moko alakaki biso: bomoi ya seko.+
26 Nazali kokomela bino makambo oyo mpo na baoyo bazali koluka kokosa bino. 27 Kasi bino, Nzambe atye bino mafuta na elimo na ye+ mpe yango etikali kati na bino, mpe bozali na mposa te ete moto moko ateyaka bino; kasi kotyama mafuta oyo euti epai na ye ezali koteya bino na makambo nyonso,+ mpe ezali solo mpe ezali lokuta te. Ndenge kaka eteyi bino, bótikala na bomoko elongo na ye.+ 28 Bongo sikoyo, bana, bótikala na bomoko elongo na ye, mpo ete ntango akomonisama, tózala na elobeli ya polele+ mpe tózonga nsima te mosika na ye, na nsɔni, na ntango ya kozala na ye. 29 Soki boyebi ete azali moto ya sembo, boyebi mpe ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya bosembo abotami na ye.+
3 Bótala bolingo monene oyo Tata amoniseli biso,+ mpo tóbengama bana ya Nzambe!+ Mpe yango nde tozali. Yango wana mokili eyebaka biso te,+ mpo eyekoli koyeba ye te.+ 2 Bandeko ya bolingo, tozali sikoyo bana ya Nzambe,+ kasi ndenge oyo tokozala emonisami naino polele te.+ Toyebi ete ntango ye akomonisama, biso tokozala lokola ye, mpo tokomona ye ndenge azali. 3 Mpe moto nyonso oyo azali na elikya yango na kati na ye amipɛtolaka,+ kaka ndenge moto wana azali pɛto.
4 Moto nyonso oyo amipesi na lisumu amipesi mpe na kobuka mibeko, mpo lisumu ezali nde kobuka mibeko. 5 Boyebi mpe ete Yesu ayaki* mpo na kolongola masumu na biso,+ mpe lisumu ezali na kati na ye te. 6 Moto nyonso oyo atikali na bomoko elongo na ye amipesaka te na kosala lisumu;+ moto oyo amipesi na lisumu amoni ye naino te mpe ayebi ye te. 7 Bana, moto akosa bino te; moto oyo amipesi na makambo ya bosembo azali moto ya sembo, ndenge moto wana mpe azali moto ya sembo. 8 Moto oyo amipesi na lisumu auti na Zabolo, mpo Zabolo azali kosala lisumu uta na ebandeli.*+ Ezali mpo na ntina yango nde Mwana ya Nzambe amonanaki: mpo na kobebisa* misala ya Zabolo.+
9 Moto nyonso oyo abotami na Nzambe amipesaka te na kosala lisumu,+ mpo momboto* ya Nzambe efandi na kati ya moto yango, mpe akoki komipesa na lisumu te, mpo abotami na Nzambe.+ 10 Talá ndenge tokoki koyeba bana ya Nzambe ná bana ya Zabolo: Moto oyo amipesaka te na kosala makambo ya bosembo auti na Nzambe te, ndenge moko mpe moto oyo alingaka ndeko na ye te.+ 11 Mpo talá nsango oyo boyokaki banda na ebandeli, ete tosengeli kolingana;+ 12 ezala te lokola Kaina, oyo autaki na moto mabe mpe abomaki ndeko na ye.+ Mpe mpo na nini abomaki ye? Mpo misala na ye moko ezalaki mabe,+ kasi oyo ya ndeko na ye ezalaki ya bosembo.+
13 Bandeko, bókamwa te soki mokili ezali koyina bino.+ 14 Toyebi ete tolongwe na liwa tokómi na bomoi,+ mpo tolingaka bandeko.+ Moto oyo alingaka te atikali na kati ya liwa.+ 15 Moto nyonso oyo ayini ndeko na ye azali mobomi,*+ mpe boyebi ete mobomi moko te azali na bomoi ya seko na kati na ye.+ 16 Toyebi mpenza bolingo mpo Yesu Kristo apesaki bomoi* na ye mpo na biso.+ Biso mpe tosengeli kopesa bomoi* na biso mpo na bandeko na biso.+ 17 Kasi moto oyo azali na biloko ya mosuni ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye oyo azangi kasi aboyi koyokela ye mawa, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kozala na kati na ye?+ 18 Bana, tosengeli kolingaka, na maloba to na mbɛbu te,*+ kasi na misala+ mpe na solo.+
19 Ndenge wana nde tokoyeba ete touti na solo, mpe tokondimisa* mitema na biso liboso na ye 20 na likambo nyonso oyo mitema na biso ekoki kokweisa biso na yango, mpo Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi makambo nyonso.+ 21 Bandeko ya bolingo, soki mitema na biso ezali kokweisa biso te, tokoki kozala na elobeli ya polele liboso ya Nzambe;+ 22 mpe nyonso oyo tosɛngaka, tozwaka yango epai na ye,+ mpo tozali kotosa mibeko na ye mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye. 23 Kutu, mobeko na ye yango oyo: ete tózala na kondima na nkombo ya Mwana na ye Yesu Kristo+ mpe tólinganaka,+ kaka ndenge apesaki biso mobeko. 24 Lisusu, moto oyo atosaka mibeko na ye atikali na bomoko elongo na ye, mpe ye na bomoko elongo na moto yango.+ Mpe na nzela ya elimo oyo apesaki biso, toyebi ete ye atikali na bomoko elongo na biso.+
4 Bandeko ya bolingo, bóndimaka te liloba nyonso oyo euti na elimo,*+ kasi bómekaka maloba oyo euti na elimo* mpo na komona soki euti na Nzambe,+ mpo basakoli mingi ya lokuta babimi na mokili.+
2 Talá ndenge bokoyeba ete liloba ya elimo euti na Nzambe: Liloba nyonso ya elimo* oyo endimi ete Yesu Kristo ayaki na nzoto ya mosuni euti na Nzambe.+ 3 Kasi liloba nyonso ya elimo oyo endimi Yesu te euti na Nzambe te.+ Lisusu, yango ezali liloba ya elimo ya motɛmɛli ya Kristo oyo boyokaki ete ezali koya,+ mpe sikoyo esili koya na mokili.+
4 Bana, bino bouti na Nzambe mpe bolongi bango,*+ mpo moto oyo azali na bomoko elongo na bino+ aleki moto oyo azali na bomoko elongo na mokili.+ 5 Bango bauti na mokili;+ yango wana balobaka makambo oyo euti na mokili mpe mokili eyokaka bango.+ 6 Biso touti na Nzambe. Moto oyo azwi boyebi ya Nzambe ayokaka biso;+ moto oyo auti na Nzambe te ayokaka biso te.+ Na ndenge wana nde tozali koyeba liloba ya elimo oyo ezali ya solo mpe liloba ya elimo oyo ezali ya libunga.+
7 Bandeko ya bolingo, tókoba kolingana,+ mpo bolingo euti na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka abotami na Nzambe mpe ayebi Nzambe.+ 8 Moto oyo alingaka te ayebi Nzambe te, mpo Nzambe azali bolingo.+ 9 Talá ndenge bolingo ya Nzambe emonisamaki mpo na biso: Nzambe atindaki Mwana na ye se moko*+ na mokili mpo tókoka kozwa bomoi na nzela na ye.+ 10 Bolingo na likambo yango ezali te ete biso tolingaki Nzambe, kasi nde ete ye alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye lokola mbeka ya kozongisa kimya*+ mpo na masumu na biso.+
11 Bandeko ya bolingo, soki ezali ndenge wana nde Nzambe alingaki biso, biso mpe tosengeli kolingana.+ 12 Moto moko te amoná Nzambe.+ Soki tokobi kolingana, Nzambe atikali na kati na biso mpe bolingo na ye ekómi ya kokoka na kati na biso.+ 13 Na likambo yango nde toyebi ete tozali kotikala na bomoko elongo na ye mpe ye na bomoko elongo na biso, mpo apesi biso elimo na ye. 14 Lisusu, biso moko tomoni mpe tozali kotatola ete Tata atindi Mwana na ye azala mobikisi ya mokili.+ 15 Moto oyo andimi ete Yesu Kristo azali Mwana ya Nzambe,+ Nzambe atikali na bomoko elongo na moto yango mpe ye na bomoko elongo na Nzambe.+ 16 Mpe toyekoli koyeba mpe kondima bolingo oyo Nzambe azali na yango epai na biso.+
Nzambe azali bolingo,+ mpe moto oyo atikali na kati ya bolingo atikali na bomoko elongo na Nzambe mpe Nzambe atikali na bomoko elongo na ye.+ 17 Na ndenge yango bolingo ekómi ya kokoka na kati na biso, mpo ete biso tózala na elobeli ya polele*+ na mokolo ya lisambisi, mpamba te ndenge moto wana azali, biso mpe tozali bongo na mokili oyo. 18 Kobanga ezalaka te na kati ya bolingo,+ kasi bolingo ya kokoka ebenganaka* kobanga, mpo kobanga etyaka biso nkaka. Kutu, moto oyo azali kobanga akómi naino ya kokoka te na kati ya bolingo.+ 19 Biso tolingaka, mpo ye alingaki biso liboso.+
20 Soki moto alobi: “Nalingaka Nzambe,” nzokande azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta.+ Mpo moto oyo alingaka ndeko na ye te,+ oyo ye amoni, akoki te kolinga Nzambe, oyo ye amoni te.+ 21 Mpe tozwi mobeko oyo epai na ye, ete moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye.+
5 Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Kristo abotami na Nzambe,+ mpe moto nyonso oyo alingaka Nzambe, oyo asalaki ete kobotama yango ezala, alingaka moto oyo abotami na ye. 2 Na likambo oyo nde toyebi ete tolingaka bana ya Nzambe,+ ntango tozali kolinga Nzambe mpe kosalela mibeko na ye. 3 Mpo kolinga Nzambe elakisi ete tótosaka mibeko na ye;+ kutu mibeko na ye ezali kilo te,+ 4 mpo moto nyonso* oyo abotami na Nzambe alongaka mokili.+ Mpe talá eloko oyo esalisi biso tólonga mokili: kondima na biso.+
5 Nani akoki kolonga mokili?+ Ezali te moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana ya Nzambe?+ 6 Ye moto ayaki na nzela ya mai mpe ya makila, Yesu Kristo, na mai kaka te,+ kasi na mai mpe na makila.+ Mpe elimo ezali kopesa litatoli,+ mpo elimo ezali solo. 7 Mpo biloko misato ezali kopesa litatoli: 8 elimo,+ mai+ mpe makila;+ mpe yango misato epesi litatoli moko.
9 Soki tondimaka litatoli ya bato, litatoli ya Nzambe eleki monene. Mpo talá litatoli oyo Nzambe apesaka: litatoli oyo apesi mpo na Mwana na ye. 10 Moto oyo azali kondimela Mwana ya Nzambe azali na litatoli na kati na ye moko. Moto oyo azali na kondima te epai ya Nzambe akómisi ye moto ya lokuta,+ mpo andimeli te litatoli oyo Nzambe apesi mpo na Mwana na ye. 11 Mpe talá litatoli yango: ete Nzambe apesaki biso bomoi ya seko,+ mpe bomoi yango ezali na kati ya Mwana na ye.+ 12 Moto oyo azali na bomoko elongo na Mwana azali na bomoi yango; moto oyo azali na bomoko te elongo na Mwana ya Nzambe azali na bomoi yango te.+
13 Nazali kokomela bino makambo oyo mpo bóyeba ete bozali na bomoi ya seko,+ bino baoyo bozali kondimela nkombo ya Mwana ya Nzambe.+ 14 Mpe tokoki kotya motema* epai ya Nzambe na likambo oyo:+ ezala eloko nini oyo tozali kosɛnga na boyokani na mokano na ye, ayokaka biso.+ 15 Mpe soki toyebi ete ayokaka biso mpo na eloko nyonso oyo tozali kosɛnga, toyebi ete tokozwa biloko oyo tosɛngi, mpamba te tosɛngi ye yango.+
16 Soki moto amoni ndeko na ye azali kosala lisumu moko oyo ememaka na liwa te, abondela, mpe Nzambe akopesa ndeko yango bomoi.+ Akopesa yango na baoyo basalaka te lisumu oyo ememaka na liwa. Ezali na lisumu moko oyo ememaka na liwa.+ Ezali mpo na lisumu wana te nde nazali koyebisa ye ete asɛnga. 17 Makambo nyonso ya kozanga bosembo ezali lisumu;+ nzokande ezali na lisumu moko oyo ememaka na liwa te.
18 Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na Nzambe amipesaka na lisumu te, kasi moto* oyo abotami na Nzambe akɛngɛlaka ye, mpe moto mabe akoki kosala ye eloko te.*+ 19 Toyebi ete touti na Nzambe, kasi mokili mobimba ezali na mabɔkɔ ya* moto mabe.+ 20 Kasi toyebi ete Mwana ya Nzambe ayei,+ mpe apesi biso mayele* mpo tóyeba ye oyo azali solo. Mpe tozali na bomoko elongo na ye oyo azali solo,+ na nzela ya Mwana na ye Yesu Kristo. Ye azali Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.+ 21 Bana, bókeba na bikeko.+
To, “bózala na bomoko ya bondeko.”
To, “na bomoko elongo na ye.”
To, “molobeli.”
To, “moyengebene.”
Lil., “mbeka ya kolimbisa; nzela ya kokitisa motema.”
To, “komikumisa mpo na biloko oyo ozali na yango.”
To, “bazalaki bato ya ndenge na biso te.”
Lil., “amonisamaki.”
To, “banda ntango abandaki.”
To, “kobukabuka.”
Elingi koloba, momboto oyo ekoki kobota mbuma.
To, “mobomi-bato.”
To, “molimo.”
To, “molimo.”
Lil., “lolemo te.”
To, “tokokitisa.”
To, “epemami.”
To, “maloba oyo epemami.”
To, “oyo epemami.”
Elingi koloba, basakoli ya lokuta.
To, “se moko oyo abotamaki.”
Lil., “mbeka ya kolimbisa; nzela ya kokitisa motema.”
To, “tózala na mpiko.”
To, “ebwakaka.”
Lil., “eloko nyonso.”
To, “kozala na elobeli ya polele.”
Elingi koloba, Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe.
To, “asimbaka ye te.”
To, “ezali kolala na nguya ya.”
Lil., “bososoli.”