MOKANDA YA MIBALE YA PETRO
1 Simo Petro, moombo mpe ntoma ya Yesu Kristo, epai ya baoyo bazwi kondima oyo ezali na motuya kaka lokola oyo ya biso,* na nzela ya bosembo ya Nzambe na biso mpe ya Mobikisi Yesu Kristo:
2 Tiká ete boboto monene mpe kimya ebakisama epai na bino na nzela ya boyebi ya solosolo+ ya Nzambe mpe ya Yesu Nkolo na biso, 3 mpo nguya na ye ya bonzambe epesi biso* biloko nyonso oyo esalisaka na bomoi mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na nzela ya boyebi ya solosolo ya Moto oyo abengaki biso+ na nzela ya nkembo na ye moko mpe na bizaleli malamu na ye. 4 Na nzela na yango, lokola tokimi makambo mabe ya mokili oyo euti na bamposa ya mabe,* apesi biso* bilaka ya motuya mpe ya minene mpenza,+ mpo ete na nzela na yango bókóma na lolenge ya Nzambe.+
5 Mpo na ntina yango nde, bósala makasi mpenza+ mpo bóbakisa na kondima na bino bizaleli malamu,+ na bizaleli malamu na bino boyebi,+ 6 na boyebi na bino komipekisa, na komipekisa na bino+ ezaleli ya koyika mpiko, na ezaleli na bino ya koyika mpiko ezaleli ya kokangama na Nzambe,+ 7 na ezaleli na bino ya kokangama na Nzambe bolingo ya bondeko, na bolingo na bino ya bondeko bolingo.+ 8 Mpo soki bozali na bizaleli wana mpe botondi na yango, ekopekisa bino kozala bato oyo basalaka mosala te to bato oyo babotaka mbuma te+ na oyo etali boyebi ya solosolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.
9 Mpo moto nyonso oyo azali na bizaleli wana te azali moto oyo akufá miso, akangi miso na ye liboso ya pole,*+ mpe abosani ete apɛtolamaki na masumu na ye+ ya kala. 10 Yango wana bandeko, bósala lisusu makasi mingi mpo bóbatela kobengama na bino+ mpe koponama na bino, mpo soki bokobi kosala makambo wana bokokwea ata moke te.+ 11 Kutu, na ndenge wana nde bakopesa bino mpenza nzela ya kokɔta na Bokonzi ya seko+ ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo.+
12 Yango wana nalingaka ntango nyonso kokundwela bino makambo wana, atako boyebi yango mpe bopikami makasi na solo oyo ezali kati na bino. 13 Kasi namoni ete ezali malamu, ntango nyonso oyo nazali naino na tabernakle oyo,*+ nalamwisaka bino na nzela ya makundoli,+ 14 mpo nayebi ete etikali moke tabernakle na ngai elongolama, ndenge Nkolo na biso Yesu Kristo mpe amonisaki ngai yango polele.+ 15 Nakosala ntango nyonso oyo ekoki na ngai mpo ete nsima ya kokende na ngai, bino bókoka kokanisa* makambo yango.
16 Ya solo, ezali te mpo tolandaki masapo ya lokuta oyo esalemi na mayele ya bato nde tolakisaki bino nguya mpe kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo, kasi ezali mpo tomonaki bonene na ye na miso na biso moko.+ 17 Mpo azwaki lokumu mpe nkembo epai ya Nzambe Tata, ntango maloba oyo* eyaki tii epai na ye na nkembo monene: “Oyo azali Mwana na ngai, ya bolingo, oyo ngai moko nandimi.”+ 18 Ɛɛ, maloba wana toyokaki yango euti na likoló ntango tozalaki elongo na ye na ngomba mosantu.
19 Boye liloba ya esakweli ekómi kotyelama motema mingi koleka, mpe bozali kosala malamu na ndenge bozali kotyela yango likebi lokola na mwinda+ oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili (tii ntɔngɔ ekotana mpe monzoto moko ya ntɔngɔ+ ekobima) na mitema na bino. 20 Mpo boyebi libosoliboso ete esakweli moko te ya Likomami euti na ndimbola moko boye ya moto. 21 Mpo esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto,+ kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda* bango.+
2 Nzokande, ezalaki mpe na basakoli ya lokuta na kati ya bato ya Yisraele, ndenge moko mpe ekozala na bateyi ya lokuta na kati na bino.+ Bango bakokɔtisa na mayele mwa mangomba oyo ebebisaka, mpe bakowangana ata nkolo oyo asombaki bango,+ bongo bakomiyeisela libebi nokinoki. 2 Mingi bakolanda etamboli na bango ya nsɔni,*+ mpe mpo na bango, bakoloba mabe mpo na nzela ya solo.+ 3 Lisusu, bakolyela bino na lokoso na maloba na bango ya bokosi. Kasi etumbu oyo bakatelá bango banda kala+ ekoumela te, mpe libebi na bango ekolala mpɔngi te.+
4 Ya solo, Nzambe amipekisaki te kopesa etumbu na baanzelu oyo basumukaki,+ kasi abwakaki bango na Tartare.*+ Atyaki bango minyololo na molili makasi mpenza mpo bázela kosambisama.+ 5 Mpe amipekisaki te kopesa mokili moko ya kala etumbu,+ kasi abatelaki Noa, mosakoli ya bosembo,+ ná bato mosusu nsambo+ ntango ayeisaki mpela na mokili ya bato oyo bazalaki kotyola Nzambe.+ 6 Mpe ndenge akómisaki bingumba ya Sodoma ná Gomora putulu ya mɔtɔ mpe akweisaki yango na likambo,+ apesi bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya.+ 7 Mpe abikisaki Lota moto ya sembo,*+ oyo atungisamaki makasi na etamboli ya nsɔni na nko* ya bato oyo babukaka mibeko— 8 mpo mokolo na mokolo moto wana ya sembo anyokolaki molimo* na ye ya bosembo mpo na makambo ya mabe* oyo azalaki komona mpe koyoka ntango azalaki kofanda kati na bango. 9 Na yango, Yehova* ayebi kobikisa na komekama bato oyo bakangami na ye,+ kasi kobomba bato oyo bazangi bosembo mpo bábomama* na mokolo ya kosambisama,+ 10 mingimingi baoyo balukaka kobebisa nzoto* ya basusu+ mpe oyo batyolaka bokonzi.*+
Lokola bazali na lofundo mpe motó makasi, babangaka te koloba mabe mpo na bato ya nkembo. 11 Nzokande baanzelu, atako baleki bango na makasi mpe na nguya, bafundaka bango na maloba ya kofinga te, mpo bazalaka na limemya mpo na* Yehova.*+ 12 Kasi lokola banyama oyo ezangá mayele, oyo esalaka makambo na lɔɔmbi mpe oyo ebotamá* mpo ekangama mpe ebomama, bato wana balobaka mabe mpo na makambo oyo bayebi te.+ Bakobebisama mpo basalaka makambo oyo ememaka na libebi. 13 Mabe ekokómela bango lokola mbano mpo na misala na bango ya mabe.
Basepelaka komipesa na bomoi ya bisengo,+ ata na moi. Bazali matɔnɔ mpe mbeba, bato oyo basepelaka* na mateya na bango ya bokosi wana bazali kolya elongo na bino.+ 14 Miso na bango etondi na ekobo+ mpe ekokaka kotika lisumu te, mpe babendaka baoyo bapikami te. Bazali na motema oyo bamesanisá na lokoso. Bazali bana oyo balakelamá mabe. 15 Batiki nzela ya semba mpe babungi nzela. Balandi nzela ya Balaama+ mwana ya Beore, oyo alingaki lifuti oyo bazalaki kopesa ye mpo na kosala mabe,+ 16 kasi azwaki mpamela mpo abukaki mobeko.+ Nyama oyo ememaka mikumba mpe oyo elobaka te elobaki na mongongo ya moto mpe ekangelaki bozoba ya mosakoli yango nzela.+
17 Bato yango bazali maziba oyo ezali na mai te, mpe londende oyo ememami na mopɛpɛ makasi; molili makasi mpenza ebombami mpo na bango.+ 18 Balobaka maloba ebeleebele oyo ezali na ntina te. Na nzela ya bamposa ya mosuni+ mpe ya misala ya etamboli ya nsɔni na nko,* bazali kobenda bato oyo bauti kaka sikoyo kokima baoyo basalaka makambo ya mabe.+ 19 Bazali kolaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali baombo ya libebi;+ mpo moto nyonso oyo alongami na moto mosusu* akómi moombo ya moto yango.+ 20 Ya solo, soki nsima ya kokima mbindo ya mokili+ na nzela ya boyebi ya solosolo ya Nkolo mpe Mobikisi Yesu Kristo, bazongeli lisusu makambo yango mpe balongami, nsuka na bango ekómi mabe koleka liboso.+ 21 Elingaki kozala malamu koleka soki bázwaka te boyebi ya sikisiki na nzela ya bosembo na esika ete báyeba yango mpenza, bongo na nsima bápesa mokɔngɔ na mobeko mosantu oyo bazwaki.+ 22 Makambo oyo lisese ya solo elobi ekokisami epai na bango, ete: “Mbwa ezongeli biloko oyo yango moko esanzi, mpe ngulu oyo basukolaki ezongi kobaluka na pɔtɔpɔtɔ.”+
3 Bandeko ya bolingo, oyo ezali sikoyo mokanda ya mibale nazali kokomela bino, mpe kati na yango, lokola na oyo ya liboso, nazali kokundwela bino makambo mpo na kolamwisa makoki na bino ya kokanisa malamu,+ 2 mpo bómikundola maloba oyo basakoli basantu balobaki kala* mpe mobeko ya Nkolo mpe Mobikisi oyo eyaki na nzela ya bantoma na bino. 3 Bóyeba libosoliboso ete na mikolo ya nsuka, batyoli bakoya ná kotyola na bango, mpe bakotambola na kolanda bamposa na bango moko,+ 4 mpe bakoloba: “Wapi kozala na ye oyo elakamaki?+ Kutu, banda mokolo oyo bankɔkɔ na biso balalá na liwa, makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.”+
5 Mpo baboyaka kondima na nko likambo oyo: kalakala, ezalaki na likoló mpe mabele moko ya makasi oyo ebimaki na mai mpe na katikati ya mai na liloba ya Nzambe;+ 6 mpe na nzela na yango mokili ya ntango wana ebebisamaki ntango ezindaki na mai.+ 7 Mpe na nzela ya liloba yango kaka, likoló ná mabele oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ mpe ezali kobatelama tii na mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.+
8 Nzokande, bandeko ya bolingo, bóbosana likambo oyo te: na miso ya Yehova* mokolo moko ezali lokola mbula nkóto moko mpe mbula nkóto moko lokola mokolo moko.+ 9 Yehova* azali koumisa makambo te na oyo etali elaka na ye,+ ndenge bato mosusu batalelaka koumisa makambo, kasi azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.+ 10 Kasi mokolo ya Yehova*+ ekoya lokola moyibi,+ mpe na mokolo yango likoló ekoleka+ na lokito makasi,* kasi biloko oyo ekómi mɔtɔ makasi ekonyangwa, mpe mabele ná misala oyo ezali na kati ekomonana polele.+
11 Lokola biloko nyonso wana esengeli konyangwa bongo, bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala, bato oyo basalaka misala ya etamboli ya bosantu mpe misala oyo emonisaka ezaleli ya kokangama na Nzambe, 12 wana bozali kozela mpe kobatela na makanisi* kozala ya mokolo ya Yehova,*+ oyo na nzela na yango likoló ekobebisama+ na mɔtɔ mpe biloko na yango ekonyangwa na mɔtɔ makasi! 13 Kasi tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki,+ mpe kuna bosembo ekozala.*+
14 Yango wana, bandeko ya bolingo, lokola bozali kozela makambo wana, bósala nyonso oyo ekoki mpo nsukansuka akuta bino na litɔnɔ te, na mbeba te mpe na kimya.+ 15 Lisusu, bótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko, kaka ndenge ndeko na biso ya bolingo Paulo mpe akomelaki bino yango na bwanya oyo bapesaki ye,+ 16 mpe alobeli yango na mikanda na ye nyonso. Nzokande, makambo mosusu na kati ezali mpasi mpo na kokanga ntina, mpe bato oyo bazangá mayele* mpe bapikamá te bazali kobongola makambo yango ndenge mosusu, ndenge mpe basalaka na biteni mosusu ya Makomami, mpo na libebi na bango moko.
17 Yango wana bandeko ya bolingo, lokola bino boyebi yango liboso, bókeba mpo bómemama te elongo na bango na libunga ya bato oyo babukaka mibeko mpe bókwea te awa bopikami makasi.*+ 18 Kasi bókoba nde kokola na kati ya boboto monene mpe na boyebi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo. Nkembo ezala na ye sikoyo mpe tii na mokolo ya seko na seko. Amen.
To, “kondima oyo ezali libaku kitoko lokola oyo ya biso.”
To, “epesi biso na motema mobimba.”
To, “bamposa makasi.”
To, “apesi biso na motema mobima.”
To mbala mosusu, “azali moto oyo akufá miso, amonaka malamu te.”
To, “hema,” elingi koloba, nzoto na ye ya mosuni.
To, “kolobela.”
Lil., “mongongo oyo.”
Lil., “komema.”
To, “misala na bango ya etamboli ezangá nsɔni.” Boike ya liloba ya Grɛki asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “moyengebene.”
To, “etamboli ezangá nsɔni.” Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ya kobuka mibeko.”
Talá Ap. A5.
Lil., “bálongolama.”
Lil., “mosuni.”
To, “bonkolo.”
To, “liboso ya.”
Talá Ap. A5.
To, “babotamá kaka.”
To, “bato oyo bamipesaka na bisengo mpenza.”
To, “misala ya etamboli ezangá nsɔni.” Boike ya liloba ya Grɛki asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “na eloko moko.”
To, “makambo oyo elobamaki liboso.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “makɛlɛlɛ makasi.”
To, “mposa makasi.” Lil., “na lombangu.”
Talá Ap. A5.
Lil., “ekofanda.”
To, “bato bateyamá te.”
To, “botɛlɛmi ngwi.”