MOKANDA YA MIBALE EPAI YA TIMOTE
1 Paulo, ntoma ya Kristo Yesu na mokano ya Nzambe na kolanda elaka ya bomoi oyo ezali koya na nzela ya Kristo Yesu,+ 2 epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo:+
Boboto monene, motema mawa, kimya ya Nzambe Tata mpe ya Kristo Yesu Nkolo na biso ezala na yo.
3 Nazali kotɔnda Nzambe, oyo nazali kosalela mosala mosantu ndenge bankɔkɔ na ngai basalaki mpe na lisosoli ya pɛto. Nakanisaka yo ntango nyonso na mabondeli* na ngai butu moi. 4 Ntango nazali kokanisa mai ya miso na yo, ezali kopesa ngai mposa makasi ya komona yo, mpo motema na ngai etonda na esengo. 5 Mpo nazali kokanisa lisusu kondima na yo, oyo ezangi bokosi,+ oyo liboso nkɔkɔ na yo ya mwasi Loisi ná mama na yo Enise bazalaki na yango, kasi oyo nandimi mpenza ete yo mpe ozali na yango.
6 Yango wana nazali kokundwela yo ete opɛlisa lokola mɔtɔ likabo ya Nzambe oyo ezali epai na yo na ndenge natyelaki yo mabɔkɔ.+ 7 Mpo Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te,+ kasi elimo ya nguya,+ ya bolingo mpe ya makanisi malamu. 8 Yango wana koyoka nsɔni te mpo na litatoli oyo etali Nkolo na biso,+ mpe mpo na ngai moto ya bolɔkɔ mpo na ye; kutu ndimá nde komonela nsango malamu mpasi,+ tyelá Nzambe motema ete akopesa yo nguya mpo oyikela yango mpiko.+ 9 Abikisaki biso mpe abengaki biso tózala basantu,+ mpo na misala na biso te, kasi mpo na mokano na ye moko mpe mpo na boboto monene na ye.+ Bamoniselaki biso yango na boyokani na Kristo Yesu banda kalakala, 10 kasi sikoyo yango emonani polele na nzela ya komonana ya Mobikisi na biso, Kristo Yesu,+ oyo alongoli liwa+ mpe amonisi biso polele ndenge ya kozwa bomoi+ mpe nzoto oyo epɔlaka te+ na nzela ya nsango malamu,+ 11 oyo mpo na yango natyamaki mosakoli, ntoma mpe moteyi.+
12 Yango wana nazali mpe konyokwama na makambo yango,+ kasi nazali koyoka nsɔni te.+ Mpo nayebi Nzambe oyo ngai nandimelá, mpe nandimi mpenza ete akoki kobatela eloko oyo nabombi epai na ye tii na mokolo yango.+ 13 Kangamá ntango nyonso na ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba*+ oyo oyokaki epai na ngai, wana ozali komonisa kondima mpe bolingo oyo ezali na bomoko na Kristo Yesu. 14 Batelá eloko yango ya motuya oyo babombi epai na yo, na lisalisi ya elimo santu oyo ezali epai na biso.+
15 Oyebi ete bato nyonso na etúká ya Azia+ basundoli ngai. Figele ná Hermogene bazali na kati ya bato yango. 16 Nkolo ayokela ndako ya Onezifore+ mawa, mpo azalaki mbala na mbala kolendisa ngai mpe ayokelaki minyɔlɔlɔ na ngai nsɔni te. 17 Kutu, ntango nazalaki na Roma, alukaki ngai mingi mpe amonaki ngai. 18 Nkolo asala ete Yehova* ayokela ye mawa na mokolo yango. Oyebi malamu mpenza misala nyonso oyo asalaki na Efese.
2 Bongo yo, mwana na ngai,+ kobá kozwa nguya na boboto monene oyo Kristo Yesu amonisaka; 2 mpe makambo oyo oyokaki epai na ngai, oyo batatoli mingi mpe balobeli,+ pesá yango bato ya sembo, bongo bango mpe bakozala na makoki ya koteya bato mosusu. 3 Lokola ozali soda ya solosolo+ ya Kristo Yesu, ndimá komona mpasi.+ 4 Moto moko te oyo azali kosala mosala ya soda amikɔtisaka na mimbongo* lokola bato oyo bazali basoda te, mpo moto oyo azwaki ye na mosala ya soda andima ye. 5 Lisusu, soki moto azali komekana na masano, akozwa motole* kaka soki asali yango na kolanda mibeko.+ 6 Moloni-bilanga oyo azali kosala mosala makasi asengeli kozala moto ya liboso ya kozwa mbuma. 7 Kanisá ntango nyonso makambo oyo nazali koloba; mpe Nkolo akosala ete okanga ntina* ya makambo nyonso.
8 Kobosana te ete Yesu Kristo asekwisamaki*+ mpe azalaki moto ya libota ya Davidi,*+ na boyokani na nsango malamu oyo nazali kosakola,+ 9 oyo nazali komonela mpasi mpe nakangami na bolɔkɔ lokola mosali-mabe.+ Atako bongo, liloba ya Nzambe ekangami te.+ 10 Yango wana, nazali kokoba koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bato oyo baponami,+ mpo bango mpe bázwa lobiko na nzela ya Kristo Yesu, na nkembo ya seko. 11 Liloba oyo ebongi kotyelama motema: Ya solo soki tokufi elongo na ye, tokozala mpe na bomoi elongo na ye;+ 12 soki tokobi koyika mpiko, tokoyangela mpe elongo na ye;+ soki towangani ye, ye mpe akowangana biso;+ 13 soki tozali sembo te, ye akotikala kaka sembo, mpo akoki komiwangana te.
14 Kobá kokundwela bango makambo wana, pesá bango mitindo* liboso ya Nzambe ete báwelanaka te mpo na maloba, yango ezali na ntina te mpo enyokolaka* bato oyo bazali koyoka. 15 Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo ozala moto oyo andimami na miso ya Nzambe, mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye, oyo azali koteya mpe kolimbola liloba ya solo malamumalamu.+ 16 Kasi boyá bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo oyo ezali mosantu,+ mpo ememaka ntango nyonso na ezaleli ya kotyola Nzambe, 17 mpe liloba na bango ekopalangana lokola mpota oyo elyaka nzoto. Himene ná Filete bazali na kati na bango.+ 18 Bato wana batiki solo, bazali koloba ete lisekwa esalemá,+ mpe bazali kotya kondima ya bato mosusu na mobulu. 19 Kasi, Nzambe atye moboko makasi oyo etɛlɛmi ngwi mpe ezali na elembo oyo: “Yehova* ayebi bato na ye,”+ mpe, “Moto nyonso oyo azali kobelela nkombo ya Yehova*+ atika makambo oyo ezangi bosembo.”*
20 Sikoyo na ndako ya monene ezalaka kaka te na bisaleli* ya wolo ná ya palata, kasi mpe ya mabaya mpe ya mabele, mosusu mpo na mosala ya lokumu kasi mosusu mpo na mosala oyo ezangi lokumu. 21 Na yango, soki moto akabwani na bisaleli oyo ezangi lokumu, akozala esaleli* ya lokumu, oyo esantisami, oyo ezali na ntina na miso ya nkolo na yango, ebongisami mpo na mosala nyonso ya malamu. 22 Yango wana, kimá bamposa ya bolenge, kasi landá nde bosembo,* kondima, bolingo, kimya, esika moko na baoyo babelelaka Nkolo na motema ya pɛto.
23 Lisusu, boyá bantembe ya bozoba mpe oyo ezangi ntina,+ mpo oyebi ete ebimisaka kowelana. 24 Mpo moombo ya Nkolo asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto* na bato nyonso,+ moto oyo ayebi koteya, oyo amipekisaka ntango basali ye mabe,+ 25 oyo ateyaka na boboto baoyo bazali na ezaleli ebongi te.+ Mbala mosusu Nzambe akopesa bango nzela bábongola motema* mpo bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo,+ 26 mpe bázongela makanisi na bango ya malamu, bálongwa na motambo ya Zabolo, mpo akangi bango na bomoi mpo básala mokano na ye.+
3 Kasi yebá likambo oyo: mikolo ya nsuka+ ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. 2 Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato oyo bamikumisaka, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, 3 oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, 4 oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, 5 bazali komonisa lokola bakangamaka na Nzambe, nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango;+ mpe yo kimá bato wana. 6 Basusu kati na bango bazali komikɔtisa na bandako na mayele mabe mpe bazali kokanga basi oyo bazali makasi te, oyo bazali komema kilo ya masumu, oyo batambwisami na bamposa ndenge na ndenge, 7 oyo bazali ntango nyonso koyekola kasi bazali kokóma te na boyebi ya sikisiki ya solo.
8 Nzokande kaka ndenge Yanesi ná Yambresi batɛmɛlaki Moize, bato yango mpe bazali kokoba kotɛmɛla solo. Makanisi na bango ebebá, mpe Nzambe andimi bango te mpo bazali kotambola te na kondima. 9 Atako bongo, bakokende mosika te mpo bato nyonso bakomona ligboma* na bango polele, ndenge bamonaki ligboma ya bato wana mibale.+ 10 Kasi yo olandi malamu mpenza mateya na ngai, bomoi na ngai,+ mokano na ngai, kondima na ngai, motema molai na ngai, bolingo na ngai, ezaleli na ngai ya koyika mpiko, 11 minyoko na ngai, bampasi na ngai, makambo oyo ekómelaki ngai na Antiokia,+ na Ikoniumu+ mpe na Listra.+ Nayikelaki minyoko yango mpiko, mpe Nkolo abikisaki ngai na makambo yango nyonso.+ 12 Ya solo, baoyo nyonso balandaka Yesu mpe balingi kosalela Nzambe na bosembo nyonso bango mpe bakonyokwama.+ 13 Kasi bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka, bakokosa bato mpe bango moko bakokosama.+
14 Kasi yo, kangamá na makambo oyo oyekolaki mpe oyo basalisaki yo ondima,+ mpo oyebi epai ya banani oyekolaki yango 15 mpe banda bomwana na yo mpenza+ oyebi makomi mosantu,+ oyo ekoki kokómisa yo moto ya bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima epai ya Kristo Yesu.+ 16 Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.+ Ezali na litomba mpo na koteya,+ kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na bosembo,*+ 17 mpo moto ya Nzambe akoka mpenza, azala na nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.
4 Liboso ya Nzambe mpe ya Kristo Yesu, oyo akosambisa+ bato ya bomoi mpe bakufi,+ na ntango ya komonana na ye+ mpe na Bokonzi na ye,+ nazali kopesa yo mitindo oyo: 2 sakolá liloba,+ salá yango na molende na bantango ya malamu mpe na bantango ya mpasi; pamelá,+ sembolá, lendisá, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.+ 3 Mpo ekozala na eleko moko oyo bakondima te mateya oyo epesaka litomba,*+ kasi na kolanda bamposa na bango moko, bakoluka bateyi ebele mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka.*+ 4 Bakotika koyoka solo, mpe bakotya likebi na masapo ya lokuta. 5 Kasi yo, batelá makanisi na yo na makambo nyonso, ndimá komona mpasi,+ salá mosala ya mopalanganisi ya* nsango malamu, kokisá mosala na yo malamumalamu.+
6 Mpo namipesi lokola likabo ya masanga oyo bazali kosopa,+ mpe ntango ya kosikolama na ngai+ ekómi pene. 7 Nabundi etumba ya malamu mingi,+ napoti mbangu tii na nsuka,+ nabateli kondima. 8 Banda sikoyo babombeli ngai motole ya bosembo,+ oyo Nkolo, mosambisi ya sembo,+ akopesa ngai mbano na mokolo yango.+ Akopesa kaka ngai moko te, kasi mpe baoyo nyonso bazali na mposa makasi ya komonana na ye.
9 Salá nyonso oyo ekoki mpo oya epai na ngai noki. 10 Mpo Demasi+ asundoli ngai mpo alingaki makambo ya mokili oyo;* akei na Tesaloniki. Kresansi akei na Galatia mpe Tito na Dalmatia. 11 Kaka Luka nde azali elongo na ngai. Yaká na Marko, mpo akosalisa ngai na mosala. 12 Kasi natindi Tishike+ na Efese. 13 Ntango okoya, memelá ngai kazaka oyo natikaki na Troase epai ya Karpusi, mpe barulo, mingimingi oyo ya mposo ya nyama.
14 Alezandre mosali ya biloko ya kwivre asalaki ngai mabe mingi. Yehova* akozongisela ye na kolanda misala na ye.+ 15 Yo mpe kebá na ye, mpo atɛmɛlaki maloba na biso makasi mpenza.
16 Na kosamba na ngai ya liboso moto moko te azalaki na ngámbo na ngai, kasi bango nyonso basundolaki ngai. Nzambe atángela bango yango te. 17 Kasi Nkolo atɛlɛmaki pene na ngai mpe atondisaki ngai na nguya, mpo na nzela na ngai, mosala ya kosakola esalema malamumalamu mpe bikólo nyonso báyoka yango;+ mpe nabikaki na monɔkɔ ya nkɔsi.+ 18 Nkolo akobikisa ngai na mosala nyonso ya mabe, akobikisa ngai mpe akokɔtisa ngai na Bokonzi na ye ya likoló.+ Nkembo ezala na ye libela na libela. Amen.
19 Pesá mbote na Priska ná Akila+ mpe na libota ya Onezifore.+
20 Eraste+ atikalaki na Korinti, kasi natikaki Trofime+ na Milete mpo azalaki kobɛla. 21 Salá nyonso ekoki na yo mpo oya liboso ya eleko ya malili makasi.
Ebulusi atindeli yo mbote, ná Pudensi, Linusi, Klodia ná bandeko nyonso.
22 Nkolo azala na elimo oyo ozali komonisa. Boboto monene na ye ezala na bino.
To, “malɔmbɔ.”
To, “maloba ya pɛto.”
Talá Ap. A5.
To mbala mosusu, “misala ya mokolo na mokolo.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
To, “akopesa yo bososoli.”
To, “alamwisamaki uta na bakufi.”
Lil., “momboto ya Davidi.”
Lil., “pesá bango litatoli malamumalamu.”
To, “ebebisaka; ebulunganisaka.”
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.
To, “ezangi boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bambɛki.”
To, “mbɛki.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kosalela mayele.”
To, “bábongola makanisi.”
To, “bozoba.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mateya ya pɛto.”
To, “mpo báyebisa bango makambo oyo bazali na mposa ya koyoka.”
To, “kobá kosakola.”
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. A5.