MOKANDA YA LIBOSO EPAI YA TIMOTE
1 Paulo, ntoma ya Kristo Yesu na etinda ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ya Kristo Yesu, elikya na biso,+ 2 epai ya Timote,*+ mwana na ngai mpenza+ na kati ya kondima:
Boboto monene, motema mawa mpe kimya ya Nzambe Tata mpe ya Kristo Yesu Nkolo na biso ezala na yo.
3 Kaka ndenge nalendisaki yo ete otikala na Efese ntango nalingaki kokende na Masedonia, nazali kosala yango mpe sikoyo, mpo opesa bamosusu mitindo báteya te mateya ya ndenge mosusu, 4 mpe bátya likebi te na masapo ya lokuta+ mpe na milɔngɔ ya bankɔkɔ. Makambo yango ememaka ata litomba moko te,+ kasi ebimisaka nde makanisi ndenge na ndenge ya mpamba na esika ya kopesa eloko moko oyo euti na Nzambe oyo etali kondima. 5 Ya solo, ntina ya malako* oyo ezali mpo tózala na bolingo+ oyo euti na motema ya pɛto, na lisosoli ya malamu mpe na kondima+ oyo ezali na bokosi te. 6 Lokola bamosusu batiki makambo wana, bamipesi na bilobaloba mpamba.+ 7 Balingi kozala bateyi+ ya mibeko, kasi bazali kokanga ntina te ya makambo oyo bazali koloba to ya makambo oyo bazali kotingama na yango makasi mpenza.
8 Sikoyo toyebi ete Mibeko ezali malamu soki moto azali kosalela yango na ndenge oyo ebongi,* 9 longola yango mibeko ezali te mpo na bato ya sembo,* kasi mpo na bato oyo babukaka mibeko,+ batomboki, bato oyo batyolaka Nzambe mpe basumuki, bato oyo bazali sembo* te, mpe baoyo batyolaka makambo ya bosantu, bato oyo babomaka batata mpe bato oyo babomaka bamama, babomi-bato, 10 bato ya pite,* mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,* miyibi oyo bazwaka bato na makasi bakei na bango, bato ya lokuta, bato oyo balapaka ndai ya lokuta, mpe mpo na likambo nyonso oyo ezali kotɛmɛla mateya oyo epesaka litomba*+ 11 na kolanda nsango malamu ya nkembo ya Nzambe ya esengo, oyo bapesaki ngai.+
12 Nazali kotɔnda Kristo Yesu Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, mpo amonaki ngai sembo na ndenge apesaki ngai mosala,+ 13 atako liboso nazalaki mofingi, monyokoli mpe moto ya lofundo.+ Nzokande, bayokelaki ngai mawa, mpo nazalaki kosala yango kozanga koyeba mpe nazangaki kondima. 14 Kasi nazwaki boboto monene ya Nkolo na biso mingi mpenza koleka, ná kondima ná bolingo oyo ezali na kati ya Kristo Yesu. 15 Liloba oyo ezali sembo mpe ebongi mpenza kondimama: Kristo Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki.+ Na kati na bango ngai moto ya liboso mpenza.+ 16 Nzokande, bayokelaki ngai mawa mpo na nzela na ngai, moto ya liboso mpenza na kati ya basumuki, Kristo Yesu alakisa motema molai na ye mobimba, akómisa ngai ndakisa mpo baoyo bakondimela ye bázwa bomoi ya seko.+
17 Sikoyo, Mokonzi ya seko,+ oyo akoki kokufa te,+ oyo amonanaka te,+ ye Nzambe kaka moko,+ azwa lokumu ná nkembo libela na libela. Amen.
18 Mwana na ngai Timote, nazali kopesa yo malako* oyo, na boyokani na bisakweli oyo elobelaki yo, mpo ete na nzela na yango okoba kobunda etumba ya malamu,+ 19 obatela kondima mpe lisosoli ya malamu,+ oyo bamosusu babwaki. Yango esali ete kondima na bango ebeba lokola masuwa oyo ezindi. 20 Himene+ ná Alezandre bazali na kati ya bato yango, mpe napesi bango na Satana+ mpo disiplini eteya bango ete báfingaka Nzambe te.
2 Yango wana, libosoliboso nazali kolendisa ete malɔmbɔ, mabondeli, kosɛngɛla bamosusu, kopesa matɔndi, esalemaka mpo na bato ya ndenge nyonso, 2 mpo na bakonzi mpe baoyo nyonso bazali na bibonga minene,*+ mpo tókoba kozala na bomoi ya kimya mpe ya mobulu te na ezaleli ya kokangama mobimba na Nzambe mpe na lisɛki te.+ 3 Yango ezali malamu mpe endimami na miso ya Mobikisi na biso, Nzambe,+ 4 oyo mposa na ye ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika+ mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo. 5 Mpo ezali na Nzambe kaka moko,+ mpe moyokanisi kaka moko+ na kati ya Nzambe ná bato,+ moto moko, Kristo Yesu,+ 6 oyo amipesaki ye moko lisiko oyo ekokani mpo na bato nyonso;*+ wana nde likambo oyo esengeli kotatolama na ntango oyo ebongi. 7 Ezali mpo na litatoli+ yango nde batyaki ngai mosakoli mpe ntoma+—nazali koloba solo, nazali kokosa te—mpo na koteya bikólo+ kondima mpe solo.
8 Yango wana, nalingi ete na esika nyonso mibali bábondelaka, bátombolaka mabɔkɔ ya sembo,+ kozanga nkanda+ mpe ntembe.+ 9 Ndenge moko mpe basi basengeli kobongisa nzoto na bango na molato oyo ebongi,* bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu,* kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo, na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi,+ 10 kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete bakangamaka na Nzambe,+ elingi koloba, na misala ya malamu.
11 Mwasi afanda nyɛɛ* mpe ayekola na komikitisa nyonso.+ 12 Nazali kopesa mwasi nzela te ya koteya to ya kozala na bokonzi likoló ya mobali, kasi asengeli nde kofanda nyɛɛ.*+ 13 Mpo Adama asalemaki liboso, Eva na nsima.+ 14 Lisusu, Adama akosamaki te, kasi mwasi akosamaki mpenza+ mpe abukaki mobeko. 15 Nzokande, basi bakobatelama na lisalisi ya kobota bana,+ soki bakangami na kondima mpe na bolingo mpe na kosantisama, elongo na makanisi malamu.*+
3 Liloba oyo ebongi kotyelama motema: Soki moto azali koluka kozala mokɛngɛli,*+ azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi. 2 Na yango, mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo afundami na likambo moko te, mobali ya mwasi kaka moko, moto oyo alekisaka ndelo te na bizaleli na ye, moto ya makanisi malamu,*+ moto ya makambo na molɔngɔ, moyambi bapaya,+ moto oyo ayebi koteya,+ 3 molangwi-masanga te,+ moto ya mobulu te,* moto ya makambo makasimakasi te,+ oyo aswanaka na bato te,+ moto oyo alingá mbongo te,+ 4 moto oyo akambaka* libota na ye moko na ndenge ya malamu mpenza, oyo azali na bana oyo bazali na botosi mpe bazwaka makambo na lisɛki te+ 5 (mpo soki moto ayebi te kokamba* libota na ye moko, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?), 6 azala mondimi ya sika te,+ noki avimba na lolendo mpe azwa etumbu oyo bakatelá Zabolo. 7 Lisusu, asengeli mpe kozala moto oyo bato ya libándá bazali kolobela ye malamu,+ mpo akwea te na nsɔni mpe na motambo ya Zabolo.
8 Basaleli na misala mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te, bato ya minɔkɔ mibale te,* bato oyo bamipesá na vinyo te, bázala bato ya lokoso te oyo balukaka kozwa litomba na ndenge ya mabe,+ 9 bábatelaka sekele mosantu ya kondima na lisosoli ya pɛto.+
10 Lisusu, bámekama liboso mpo na koyeba soki bakoki,* na nsima básala lokola basaleli, soki bafundami ata na likambo moko te.+
11 Basi mpe basengeli kozala bato oyo bazwaka makambo na lisɛki te, oyo bakoselaka bato makambo te,+ oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bato ya sembo na makambo nyonso.+
12 Basaleli na misala bázala mibali ya mwasi kaka moko, bato oyo bakambaka bana na bango mpe mabota na bango na ndenge ya malamu mpenza. 13 Mpo mibali oyo bazali kosala mosala na ndenge ya malamu mpenza bazali kozwa esika ya lokumu, koloba polele mpe na bosembo mpo na kondima oyo bandimeli Kristo Yesu.
14 Nazali kokomela yo makambo oyo, atako nazali na mposa makasi ya koya epai na yo nsima ya mwa ntango moke, 15 mpo soki esalemi ete nayei noki te, oyeba ndenge osengeli komitambwisa na ndako ya Nzambe,+ oyo ezali lisangá ya Nzambe ya bomoi, likonzí mpe eloko oyo esimbi solo. 16 Ya solo, sekele mosantu ya ezaleli oyo ya kokangama na Nzambe ezali mpenza monene: ‘Amonanaki* polele na nzoto,+ atángamaki moto ya sembo* na elimo,+ abimelaki baanzelu,+ basakolaki ye na bikólo,+ bandimelaki ye na mokili,+ azwamaki na likoló na nkembo.’
4 Nzokande, elimo ya Nzambe elobi polele ete na bantango oyo ekoya bato mosusu bakotika kondima, bakotya likebi na maloba ya bokosi ya bilimo mabe+ mpe na mateya ya bademo, 2 mpe bakoyoka bokosi ya bato oyo balobaka lokuta,+ oyo lisosoli na bango etyami elembo lokola na ebende ya mɔtɔ makasi. 3 Bazali kopekisa kobala,+ kotinda bato báboya bilei+ oyo Nzambe azalisá mpo bato oyo bazali na kondima+ mpe bayebi solo malamumalamu bálya yango+ na matɔndi. 4 Mpo biloko nyonso oyo Nzambe azalisá ezali malamu,+ mpe eloko moko te esengeli koboyama+ soki balei yango na matɔndi, 5 mpo esantisami na liloba ya Nzambe mpe na libondeli.
6 Soki opesi bandeko toli oyo, okozala mosaleli* malamu mpenza ya Kristo Yesu, oyo aleisi makanisi na ye maloba ya kondima mpe mateya malamu oyo olandi na likebi mpenza.+ 7 Kasi boyá masapo ya lokuta oyo ekumisaka Nzambe te,+ lokola oyo mibange basi babɛtaka. Nzokande, salá makasi* okóma na ezaleli ya kokangama na Nzambe. 8 Mpo ngalasisi ya nzoto ezali na litomba mpo na mwa makambo moke, kasi ezaleli ya kokangama na Nzambe ezali na litomba na makambo nyonso, mpo ezali kosala ete bato bázwa mapamboli oyo Nzambe alaki na bomoi ya lelo mpe na bomoi oyo ezali koya.+ 9 Liloba yango ebongi kotyelama motema mpe ebongi mpenza kondimama. 10 Yango wana, tozali kosala mosala makasi mpe koboma nzoto,+ mpo totye elikya na biso epai ya Nzambe moko ya bomoi, oyo azali Mobikisi+ ya bato ya ndenge nyonso,+ mingimingi mpenza ya bato ya sembo.
11 Kobá kopesa mitindo wana mpe koteya yango. 12 Moto atyola bolenge na yo te. Kasi, zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba, na etamboli, na bolingo, na kondima, na bizaleli ya pɛto. 13 Liboso naya, kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso,+ na kolendisa, na koteya. 14 Komona mpamba te likabo oyo ezali epai na yo, oyo bapesaki yo na nzela ya esakweli ntango lisangani ya bankulutu etyelaki yo mabɔkɔ.+ 15 Okanisaka malamu mpenza* makambo yango; omipesa mobimba na yango, mpo bato nyonso bámona polele ete ozali kokende liboso. 16 Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso.+ Kangamá na makambo yango, mpo soki osali bongo okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.+
5 Kopamela mokóló na maloba makasi te.+ Kasi bondelá ye lokola tata, bilenge mibali lokola bandeko mibali, 2 basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi, na makanisi ya pɛto mpenza.
3 Tyelá basi oyo mibali bakufá likebi,* oyo bazali mpenza na bosɛnga.*+ 4 Kasi soki mwasi moko oyo mobali akufá azali na bana to bankɔkɔ, bango báyekola libosoliboso kosalela ezaleli ya kokangama na Nzambe na libota na bango moko+ mpe bázongisela baboti na bango ná bankɔkɔ na bango bolamu oyo basengeli kozongisela bango,+ mpo yango esepelisaka Nzambe.+ 5 Nzokande mwasi oyo azali mpenza mwasi oyo mobali akufá, atikalá mabɔkɔ mpamba, atyelaka Nzambe elikya+ mpe atingamaka na malɔmbɔ mpe na mabondeli butu moi.+ 6 Kasi oyo amipesá na bisengo ya nzoto akufá atako azali na bomoi. 7 Yango wana, kobá kopesa malako* oyo, mpo báfundama na likambo te. 8 Ya solo, soki moto azali te kopesa bato na ye, mpe mingimingi bato ya libota na ye biloko oyo basengeli na yango, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azali na kondima te.+
9 Mwasi oyo mobali akufá oyo bakokoma nkombo na ye mpo azwa lisalisi, mbula na ye ezala na nse ya 60 te, soki azalaki mwasi ya mobali kaka moko, 10 soki ayebani mpo na misala na ye ya malamu,+ soki abɔkɔlaki bana,+ soki azalaki koyamba bapaya,+ soki asukolaki makolo ya basantu,+ soki asalisaki baoyo bazalaki na mpasi,+ soki amipesaki mpenza na mosala nyonso ya malamu.
11 Nzokande, bilenge basi oyo mibali bakufá bákomama nkombo te, mpo ntango bamposa na bango ya kosangisa nzoto ekómi eloko oyo ezali kopekisa bango kosalela Kristo, balingaka kobala. 12 Bakomema ngambo mpo bakokisi te elaka na bango ya liboso.* 13 Kaka na ntango yango mpe balingaka lisusu kosala mosala te, batambolaka ndako na ndako; ɛɛ, basalaka mosala te, mpe bazali bato ya bilobaloba mpe bamikɔtisaka na makambo ya bato,+ balobelaka makambo oyo basengeli kolobela te. 14 Yango wana, nalingi ete bilenge basi oyo mibali bakufá bábala,+ bábota bana,+ bábatela mabota na bango, bápesa motɛmɛli ata libaku moko te ya koloba mabe. 15 Kutu, basi mosusu oyo mibali bakufá batiki nzela ya malamu mpe balandi Satana. 16 Soki mwasi moko mondimi azali na bandeko na ye oyo bazali basi oyo mibali bakufá, ye asalisa bango, mpo lisangá emema mokumba wana te. Bongo lisangá esalisa basi oyo mibali bakufá oyo bazali mpenza na bosɛnga.*+
17 Bankulutu oyo bazali kokamba na ndenge ya malamu mpenza+ bátalelama bato babongi na lokumu mbala mibale,+ mingimingi baoyo bazali kosala mosala makasi na liloba mpe na mateya ya Nzambe.+ 18 Mpo likomami ezali koloba ete: “Ntango ngɔmbɛ ezali kotutatuta mbuma osengeli te kokanga monɔkɔ na yango mpo elya te,”+ lisusu, “Mosali abongi kozwa lifuti na ye.”+ 19 Kondima te likambo oyo bafundi na yango nkulutu, longola kaka soki euti na monɔkɔ ya batatoli mibale to misato.+ 20 Pamelá+ na miso ya bato nyonso baoyo bazali na momeseno ya kosala lisumu,+ mpo ekebisa bamosusu.* 21 Liboso ya Nzambe, ya Kristo Yesu mpe ya baanzelu oyo baponami, nazali kopesa yo mitindo ete olanda malako oyo kozanga kokanisela bato mabe, mpe kopona elongi ya moto te.+
22 Kotyela moto mabɔkɔ nokinoki te;*+ kosangana mpe na masumu ya bato te; zalá ntango nyonso pɛto.
23 Komɛla lisusu mai te,* kasi mɛlá mwa vinyo moke mpo na estoma na yo mpe bamaladi oyo obɛlabɛlaka.
24 Masumu ya bato mosusu eyebanaka polele, ememaka mbala moko na lisambisi, kasi masumu ya bato mosusu eyaka koyebana na nsima.+ 25 Ndenge moko mpe misala ya malamu eyebanaka polele,+ mpe ata oyo ezali komonana polele te ekobombama te.+
6 Baoyo bazali baombo* bákoba kotalela bankolo na bango ete babongi na lokumu mpenza,+ mpo nkombo ya Nzambe mpe mateya na ye efingama te.+ 2 Lisusu, baoyo bazali na bankolo oyo bazali bandimi bázanga te botosi epai na bango, kaka mpo bazali bandeko. Kutu, básalela bango lisusu nde malamu koleka, mpo baoyo bazali kozwa litomba na mosala na bango ya malamu bazali bandimi mpe bandeko ya bolingo.
Kobá koteya makambo wana mpe kopesa bilendiseli wana. 3 Soki moto azali koteya liteya mosusu mpe azali kondima te malako oyo epesaka litomba,*+ oyo euti epai ya Nkolo na biso Yesu Kristo, mpe liteya oyo eyokani na ezaleli ya kokangama na Nzambe,+ 4 moto yango avimbi na lolendo, azali kokanga ntina ya eloko ata moko te,+ akangamaka makasi na makanisi na ye* mpe atyaka ntembe na maloba.+ Makambo wana ebimisaka likunya, koswana, kotɔnga,* kokanisela bamosusu mabe, 5 kobimisa maloba mabe ntango nyonso mpo na makambo mikemike epai ya bato oyo makanisi na bango ebebá,+ bato oyo bazali na solo te, balingi komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe kaka mpo na kozwa litomba moko.+ 6 Ya solo, soki moto akangami na Nzambe+ mpe azali kosepela na oyo azali na yango,* akozwa matomba mingi. 7 Mpo toyaki na eloko te na mokili mpe tokokende na eloko te.+ 8 Yango wana, soki tozali na bilei mpe na elamba,* tósepela na biloko yango.+
9 Kasi bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama, na motambo,+ na bamposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama.+ 10 Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana babungi nzela, batiki kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.+
11 Nzokande, Ee, yo moto ya Nzambe, kimá makambo wana. Kasi landá bosembo,* ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko mpe boboto.+ 12 Bundá etumba ya malamu mingi ya kondima; simbá makasi bomoi ya seko oyo babengelaki yo mpe ondimaki polele liboso ya batatoli mingi.
13 Liboso ya Nzambe oyo abatelaka biloko nyonso na bomoi mpe liboso ya Kristo Yesu, motatoli oyo alobaki polele mpenza liboso ya Ponse Pilate,+ nazali kopesa yo mitindo 14 ete otosa mobeko yango na bopɛto mpe ofundama na likambo te tii komonana ya Nkolo na biso Yesu Kristo,+ 15 komonana oyo Nkumu ya esengo mpe kaka moko akolakisa na ntango na yango oyo etyamá. Azali Mokonzi ya baoyo bazali bakonzi mpe Nkolo ya baoyo bazali bankolo,+ 16 kaka ye moko nde akoki kokufa te,+ afandaka na pole oyo likoki ya kopusana penepene na yango ezali te,+ oyo moto moko te amoná mpe akoki komona te.+ Azwa lokumu ná nguya ya seko. Amen.
17 Pesá bazwi ya mokili oyo* mitindo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi,+ kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko ebele mpenza mpo tósepela.+ 18 Yebisá bango básala makambo ya malamu, bázala bazwi na misala ya malamu, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato oyo bayebi kokaba,+ 19 bámibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo bakotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya,+ mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.+
20 Timote, batelá eloko oyo bapesaki yo,+ koyoka te bilobaloba ya mpamba oyo etɛmɛlaka Nzambe mpe makanisi oyo euti epai ya bato oyo bakanisaka ete bazali na boyebi, kasi “boyebi” na bango eyokani te na oyo ezali solo.+ 21 Lokola bamosusu bamonisaki na lolendo ete bazali na boyebi yango batiki kondima.
Boboto monene ezala na bino.
Elimboli, “ye oyo apesaka Nzambe lokumu.”
To, “etinda.”
Lil., “na ndenge oyo esengeli.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bato oyo bazangi bolingo ya sembo.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mibali oyo balalaka na mibali.”
To, “ya pɛto.”
To, “etinda.”
To, “na bisika ya bokonzi.”
To, “bato ya ndenge nyonso.”
To, “molato ya malamu.”
To, “na lisosoli ya malamu.”
To, “kimya.”
To, “kimya.”
To, “lisosoli malamu.”
Elingi koloba, mokɛngɛli na lisangá.
To, “moto ya bososoli.”
To, “moto oyo abɛtaka bato te.”
To, “atambwisaka.”
To, “kotambwisa.”
To, “bato oyo bakosaka te na maloba na bango.”
To, “mpo na koyeba soki bakokisi masɛngami.”
Elingi koloba, “Yesu amonanaki.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ministre.”
Lil., “salá ngalasisi.”
To, “Omanyolaka.”
To, “Kumisá basi oyo mibali bakufá.”
Elingi koloba, “oyo bazali mpenza na moto ya kosalisa bango te.”
To, “mitindo.”
To, “basundoli liloba na bango ya liboso oyo etali kondima.”
Elingi koloba, “oyo bazali mpenza na moto ya kosalisa bango te.”
Lil., “mpo bamosusu bábanga.”
Elingi koloba, “kopesa moto moko te mokumba nokinoki.”
To, “Kosuka kaka te na komɛla mai.”
Lil., “baombo na nse ya ekanganeli.”
To, “malako ya pɛto.”
To, “abɛli maladi ya kokangama na makanisi na ye.”
To, “maloba ya kofinga.”
Lil., “na ezaleli ya kosepela na oyo azali na yango.”
To, “libateli.” Lil., “eloko ya kozipa nzoto.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “makambo ya ntango oyo.” Talá Ndimbola ya maloba.