Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt 1 Batesaloniki 1:1-5:28
  • 1 Batesaloniki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1 Batesaloniki
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
1 Batesaloniki

MOKANDA YA LIBOSO EPAI YA BATESALONIKI

1 Paulo, Silvano*+ mpe Timote+ epai ya lisangá ya Batesaloniki oyo ezali na bomoko elongo na Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu Kristo:

Boboto monene mpe kimya ezala na bino.

2 Topesaka ntango nyonso Nzambe matɔndi ntango totángaka bino nyonso na mabondeli na biso,+ 3 mpo liboso ya Nzambe mpe Tata na biso tobosanaka ata moke te mosala oyo bosalaki mpo na kondima na bino epai ya Nzambe mpe mpo na bolingo na bino, mpe ndenge boyikelaki mikakatano mpiko mpo na elikya+ na bino epai ya Nkolo Yesu Kristo. 4 Bandeko oyo Nzambe alingaka, toyebi ete ye aponi bino, 5 mpo nsango malamu oyo tozali kosakola eyaki epai na bino kaka na maloba te kasi mpe na nguya, na elimo santu mpe na kondima makasi, kaka ndenge boyebi lolenge ya bato biso tokómaki epai na bino mpo na bolamu na bino. 6 Mpe bokómaki bamekoli na biso+ mpe ya Nkolo,+ mpo bondimaki liloba ya Nzambe na esengo oyo eutaka na elimo santu atako bokutanaki na mikakatano*+ mingi, 7 na ndenge yango bokómi ndakisa mpo na bandimi nyonso na Masedonia mpe na Akaya.

8 Likambo ya solo ezali oyo ete, uta epai na bino lokito ya liloba ya Yehova* eyokani kaka na Masedonia ná Akaya te, kasi kondima na bino epai ya Nzambe epalangani na esika nyonso,+ ntina kutu tóloba ata likambo ezali te. 9 Mpo bato bango moko bazali kokoba koloba ndenge tokutanaki na bino mpo na mbala ya liboso. Bazali kolobela mpe ndenge oyo botikaki bikeko+ na bino mpe bobalukaki epai ya Nzambe mpo na kosala lokola baombo mpo na Nzambe ya bomoi mpe ya solo, 10 mpe kozela uta na likoló Mwana na ye,+ oyo asekwisaki,* elingi koloba, Yesu, oyo azali kobikisa biso na nkanda oyo ezali koya.+

2 Bandeko, bino moko boyebi malamu ete, koya oyo toyaki kotala bino ezangaki kobimisa matomba te.+ 2 Mpo atako tonyokwamaki liboso mpe tosambwisamaki mabe na Filipi,+ kaka ndenge boyebi, Nzambe na biso apesaki biso mpiko mpo na kolobela bino nsango malamu ya Nzambe+ liboso ya botɛmɛli makasi.* 3 Mpo elendiseli oyo tozali kopesa euti te na libunga, na mbindo, to na bokosi, 4 kasi kaka ndenge Nzambe andimaki biso ete tobongi kozwa mokumba ya kosakola nsango malamu, tozali mpe koloba bongo, mpo na kosepelisa bato te, kasi Nzambe, oyo atalatalaka mitema na biso.+

5 Ɛɛ, boyebi ete ata mbala moko te tosalelaki maloba sukali, to elongi ya kokosa mpo na kolula biloko ya bato;+ Nzambe azali komona! 6 Tolukaki mpe te nkembo epai ya bato, ezala epai na bino to epai ya bamosusu, atako tokokaki kozala kilo monene mpo tozali bantoma ya Kristo.+ 7 Kutu, tokómaki nde bato ya boboto na kati na bino, lokola mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka mpenza bana na ye. 8 Boye, lokola tolingaki bino na bolingo ya motema, tozwaki ekateli ya* kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe bomoi na biso mpenza,*+ mpo bokómaki bandeko na biso ya bolingo.+

9 Ya solo mpenza, bandeko, bobosani te mosala na biso ya makasi mpe mitoki na biso. Tosalaki mosala makasi butu moi, mpo na kotyela moto moko te na kati na bino kilo monene,+ ntango tosakwelaki bino nsango malamu ya Nzambe. 10 Bino moko bomoni, Nzambe mpe amoni, ndenge tozalaki bato ya sembo, bayengebene mpe bato bazangi mbeba epai na bino bandimi. 11 Boyebi malamu ete tokobaki kolendisa, kobɔndisa, mpe kopesa mokomoko na bino litatoli+ kaka ndenge tata+ asalaka na bana na ye, 12 mpo ete bókoba kotambola ndenge ebongi na Nzambe+ oyo azali kobenga bino na Bokonzi+ na ye mpe na nkembo na ye.+

13 Ya solo, ezali mpo na yango nde tozali mpe kotika te kopesa Nzambe matɔndi,+ mpo ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe, oyo ezali mpe kosala mosala na kati na bino bandimi. 14 Bandeko, bokómi bamekoli ya masangá ya Nzambe oyo ezali na Yudea, na bomoko elongo na Kristo Yesu, mpo bonyokwami na mabɔkɔ ya bana-mboka na bino moko+ kaka ndenge bandeko na Yudea bazali konyokwama na mabɔkɔ ya Bayuda, 15 oyo babomaki ata Nkolo Yesu+ ná basakoli mpe banyokolaki biso.+ Lisusu, bazali kosepelisa Nzambe te, mpe makambo bazali kosala ezali malamu te mpo na moto nyonso. 16 Bazali koluka kopekisa biso kosakwela bato ya bikólo nsango oyo ekoki kobikisa bango.+ Na ndenge yango, bazali ntango nyonso kotondisa mpenza masumu na bango. Kasi nsukansuka nkanda na ye* ekokwela bango.+

17 Bandeko, ntango tokabwanaki na bino* mpo na mwa ntango (na bilongi, kasi na mitema na biso te), lokola tozalaki na mposa makasi, tosalaki nyonso mpo na komona bino lisusu.* 18 Yango wana tozalaki na mposa ya koya epai na bino; ɛɛ, ngai Paulo, nalukaki koya kaka mbala moko te, ata mbala mibale, kasi Satana akangaki biso nzela. 19 Mpo elikya na biso to esengo na biso to motole* na biso ya nsai liboso ya Nkolo na biso Yesu na ntango ya kozala na ye ezali nini? Ezali bino te?+ 20 Ya solo, bino nde nkembo na biso mpe esengo na biso.

3 Yango wana, ntango tokokaki kokanga motema lisusu te, tomonaki malamu tótikala biso moko na Atene;+ 2 mpe totindaki Timote,+ ndeko na biso mpe mosaleli ya Nzambe* mpo na nsango malamu oyo etali Kristo, mpo apesa bino makasi mpe abɔndisa bino mpo na kondima na bino, 3 mpo moto moko te aningisama na komekama* wana. Mpo bino moko boyebi ete tokoki te kokima bampasi yango.*+ 4 Ya solo, ntango tozalaki elongo na bino, tozalaki koyebisa bino liboso ete tosengeli kokutana na mikakatano, mpe esalemaki bongo kaka ndenge boyebi.+ 5 Yango wana, ntango nakokaki lisusu kozela te, natindaki ye mpo na koyeba makambo oyo etali bosembo na bino,+ ntango mosusu Momeki+ amekaki bino na lolenge moko to mosusu, mpe mbala mosusu mosala na biso ya makasi ekei mpamba.

6 Kasi Timote auti epai na bino, akómi awa sikoyo+ mpe apesi biso nsango malamu oyo etali bosembo na bino mpe bolingo na bino, ete bozali ntango nyonso kokoba kokanisa biso na bolingo, mpe bozali koyoka mposa makasi ya komona biso lisusu, kaka ndenge biso mpe tozali koyoka yango mpo na bino. 7 Yango wana, bandeko, na mitungisi* na biso nyonso mpe na komekama* na biso nyonso tobɔndisami mpo na bino mpe mpo na bosembo oyo bozali komonisa.+ 8 Sikoyo tozwi lisusu makasi* lokola toyoki ete bozali kotɛlɛma ngwi na kati ya Nkolo. 9 Mpo ndenge nini tokoki komonisa botɔndi epai ya Nzambe mpo na bino mpe mpo na esengo monene oyo tozali na yango liboso ya Nzambe mpo na bino? 10 Butu moi tozali kosala mabondeli* na makasi na biso nyonso mpo na komona bino lisusu* mpe kobakisela bino makambo oyo ezangi na kondima na bino.+

11 Tiká Nzambe mpe Tata na biso ye moko mpe Nkolo na biso Yesu bápesa biso likoki ya koya epai na bino. 12 Lisusu, Nkolo akolisa bino, ɛɛ, atondisa bino na bolingo, ya bino na bino+ mpe ya bato nyonso, kaka ndenge biso tozali na yango mpo na bino, 13 mpo akómisa mitema na bino ngwi, ezanga mbeba na kati ya bosantu liboso ya Nzambe na biso+ mpe Tata na ntango ya kozala ya Nkolo na biso Yesu+ elongo na basantu na ye nyonso.

4 Mpo na kosukisa, bandeko, kaka ndenge bozwaki malako epai na biso na oyo etali ndenge bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe,+ ndenge bozali ya solo kotambola, tozali kosɛnga bino mpe kobondela bino na nzela ya Nkolo Yesu, bókoba kosala bongo malamumalamu lisusu. 2 Mpo boyebi malako* topesaki bino na nkombo ya Nkolo Yesu.

3 Mpo talá eloko oyo Nzambe alingi: ete bózala basantu+ mpe bóboya pite.*+ 4 Mokomoko na bino asengeli koyeba kopekisa nzoto* na ye moko+ mpo ekoba kozala mosantu+ mpe na lokumu, 5 na lokoso te, na mposa makasi te ya kosangisa nzoto+ ndenge bato ya bikólo oyo bayebi Nzambe te bazalaka na yango.+ 6 Moto moko te asengeli kosala likambo oyo ebongi te mpe kosalela ndeko na ye mabe na likambo yango, mpo Yehova* apesaka etumbu epai ya baoyo nyonso basalaka makambo wana, kaka ndenge toyebisaki bino yango liboso mpe tokebisaki bino mpenza. 7 Nzambe abengaki biso, mpo tózala na bomoi ya mbindo te, kasi mpo tózala basantu.+ 8 Na yango, moto oyo azali kotyola likambo yango, atyoli moto te, kasi Nzambe,+ oyo apesaka bino elimo santu+ na ye.

9 Nzokande, na likambo etali bolingo ya bondeko,+ bozali na mposa te ete tókomela bino, mpo bino moko boteyami na Nzambe ete bólinganaka.+ 10 Kutu, yango nde bozali kosala epai ya bandeko nyonso na Masedonia mobimba. Kasi tozali kolendisa bino, bandeko, bókoba kosala bongo malamu koleka. 11 Bómityela mokano ya kofanda na kimya,+ ya kokɔta na makambo ya bato te+ mpe ya kosala mosala na mabɔkɔ na bino,+ ndenge kaka topesaki bino malako, 12 mpo ete bato oyo bazali libándá ya lisangá bámona+ ete bozali kotambola na ndenge ya lokumu mpe bozangi eloko te.

13 Lisusu, bandeko, tolingi bóyeba makambo oyo etali bato oyo bazali kolala na kati ya liwa,+ mpo bóyoka mawa te ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.+ 14 Mpo soki tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki,+ ndenge moko mpe tondimaka ete Nzambe akozongisa na bomoi elongo na ye baoyo balali na kati ya liwa na nzela ya Yesu.+ 15 Mpo talá oyo tozali koyebisa bino na kolanda liloba ya Yehova,* ete biso bato ya bomoi oyo tozali kotikala tii na kozala ya Nkolo tokoleka soki moke te liboso ya baoyo balali na kati ya liwa; 16 mpo Nkolo ye moko akokita uta na likoló na mongongo ya komanda, na mongongo ya anzelu-mokonzi+ mpe na kelelo ya Nzambe, mpe baoyo bakufá na kati ya bomoko elongo na Kristo bakosekwa liboso.+ 17 Na nsima biso bato ya bomoi oyo totikali, tokomemama elongo na bango na mapata+ mpo na kokutana na Nkolo+ na likoló; mpe na ndenge yango tokozala ntango nyonso elongo na Nkolo.+ 18 Na yango, bókoba kobɔndisana na maloba wana.

5 Nzokande, bandeko, na likambo etali bantango mpe bileko, ntina ya kokomela bino ata eloko moko ezali te. 2 Mpo bino moko boyebi malamu ete mokolo ya Yehova*+ ezali koya mpenza lokola moyibi na butu.+ 3 Na ntango oyo bato bakoloba: “Kimya, likambo ya kobanga ezali te!” na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko+ ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi, mpe bakokima soki moke te. 4 Nde bino, bandeko, bozali na molili te. Na yango mokolo wana ekobimela bino pwasa te lokola nde ebimeli miyibi, 5 mpo bozali bino nyonso bana ya pole mpe ya moi.+ Tozali bato ya butu te, ya molili mpe te.+

6 Na yango, tólala mpɔngi te ndenge bamosusu basalaka,+ kasi tózala nde ekɛngɛ+ mpe tóbatela makanisi na biso.+ 7 Mpo baoyo balalaka mpɔngi, balalaka nde na butu, mpe baoyo balangwaka, balangwaka na butu.+ 8 Nde biso baoyo tozali bato ya moi, tóbatela makanisi na biso, tólata ebateli-ntolo ya kondima mpe ya bolingo, mpe tólata elikya ya lobiko lokola ekɔti+ 9 mpo Nzambe aponi biso, mpo tózwa etumbu te,* kasi mpo tózwa lobiko+ na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo. 10 Ye akufaki mpo na biso,+ mpo ezala tolamuki to tolali mpɔngi,* tózala na bomoi elongo na ye.+ 11 Yango wana, bókoba kobɔndisana mpe kolendisana,+ ndenge kutu bozali kosala yango.

12 Nzokande tozali kosɛnga bino, bandeko, ete bótosaka baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino mpe kokamba bino na kati ya Nkolo mpe kokebisa bino; 13 mpe bópesa bango lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo mpo na mosala na bango.+ Bózala na kimya kati na bino.+ 14 Lisusu, tozali kolendisa bino, bandeko, ete bókebisa bato ya mobulu,+ bólobaka na ndenge ya kobɔndisa epai ya baoyo banyokwami na makanisi,* bósalisa bato ya bolɛmbu, bózala na motema molai epai ya bato nyonso.+ 15 Bókeba ete moto moko te azongisa mabe na mabe na moto mosusu,+ kasi bólukaka ntango nyonso kosala oyo ezali malamu, bino na bino mpe epai ya bato mosusu nyonso.+

16 Bósepelaka ntango nyonso.+ 17 Bóbondelaka ntango nyonso.+ 18 Bópesaka matɔndi mpo na likambo nyonso.+ Mpo yango nde Nzambe azali kosɛnga bino mpo bozali bayekoli ya Kristo Yesu. 19 Bóboma te mɔtɔ ya elimo.+ 20 Bótyola bisakweli te.+ 21 Bóluka koyeba likambo nyonso soki ezali solo;+ bókangama makasi na oyo ezali malamu. 22 Bóboya mabe ya ndenge nyonso.+

23 Nzambe ya kimya ye moko asantisa bino mobimba. Mpe tiká ete elimo, molimo* mpe nzoto na bino bandeko, ebatelama kozanga mbeba mpe kozanga litɔnɔ na makambo nyonso na ntango ya kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+ 24 Moto oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe akosala yango mpenza.

25 Bandeko, bókoba kobondela mpo na biso.+

26 Bópesa bandeko nyonso mbote na lipwɛpwɛ mosantu.

27 Nazali kopesa bino mokumba monene na nzela ya Nkolo ete mokanda oyo etángama liboso ya bandeko nyonso.+

28 Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino.

Bazalaki mpe kobenga ye Silasi.

To, “malɔzi.”

Talá Ap. A5.

Lil., “alimwisaki uta na bakufi.”

To mbala mosusu, “na kati ya bitumba mingi.”

Lil., “tosepelaki mingi.”

To, “milimo na biso moko.”

To, “nkanda ya Nzambe.”

To, “tozangaki bino.”

Lil., “komona bilongi na bino.”

To, “ekɔti ya bokonzi.”

To mbala mosusu, “moninga ya mosala ya Nzambe.”

To, “malɔzi.”

To, “totyami mpo na likambo yango mpenza.”

Lil., “kokelela.”

To, “bolɔzi.”

Lil., “tozali na bomoi.”

To, “malɔmbɔ.”

Lil., “komona bilongi na bino.”

To, “mitindo.”

Na Grɛki, pornéïa. Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “mbɛki.”

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

Talá Ap. A5.

To, “mpo na nkanda te.”

To, “tolali na kati ya liwa.”

To, “baoyo balɛmbi nzoto.” Lil., “baoyo bazali na molimo moke.”

To, “bomoi.” Talá Ndimbola ya maloba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto