NAHUMU
1 Liyebisi mpo na Ninive:+ Buku ya emonaneli ya Nahumu,* moto ya Elekoshe:
2 Yehova azali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye+ mpe oyo azongisaka mabe;
Yehova azongisaka mabe mpe alingi komonisa nkanda na ye.+
Yehova azongiselaka batɛmɛli na ye mabe,
Mpe akangelaka banguna na ye nkanda.
3 Yehova ayokaka nkanda noki te+ mpe azali na nguya mingi,+
Kasi Yehova akozanga soki moke te kopesa etumbu oyo esengeli.+
Ayaka na* kati ya mopɛpɛ makasi oyo ebebisaka mpe na kati ya mbula ya mopɛpɛ makasi,
Mpe mapata ezali putulu ya makolo na ye.+
Na Bashane mpe na Karamele, matiti ekauki.+
Bafololo ya Liban mpe ekauki.
Mabele ekotombwama mpo na elongi na ye,
Mabele mpe baoyo nyonso bafandaka wana.+
6 Nani akoki kotɛlɛma liboso ya nkanda na ye?+
Nani akoki kokanga motema soki nkanda na ye engali?+
Nkanda na ye ekosopana lokola mɔtɔ,
Mpe mabanga minene ekopasuka mpo na ye.
7 Yehova azali malamu,+ esika makasi ya libateli na mokolo ya mpasi.+
Atyaka likebi* na baoyo bayei komibomba epai na ye.+
9 Eloko nini bokokana kosala Yehova?
Ye azali kobebisa nyonso.
Mpasi ekoya mpo na mbala ya mibale te.+
10 Mpo bazali lokola banzubɛ oyo elíngamalíngamá,
Mpe bazali lokola bato oyo balangwe masanga,*
Kasi bakozika lokola matiti oyo ekauká.
11 Moto moko akobima epai na yo oyo azali kokana kosalela Yehova mabe,
Oyo azali kopesa toli oyo ezangá ntina.
12 Talá oyo Yehova alobi:
“Atako bazali na makasi mpe bazali ebele,
Bakolongolama mpe bakobebisama.*
Nasambwisaki yo,* kasi nakosambwisa yo lisusu te.
13 Mpe sikoyo nakobuka ekanganeli na ye mpo elongwa likoló na yo,+
Mpe nakokata bansinga oyo ekangi yo.
14 Yehova apesi mitindo mpo na yo* ete:
‘Okozala lisusu na mokitani te oyo akobengama na nkombo na yo.
Nakolongola bikeko ya nzete mpe ya mabanga mpe bikeko ya ebende* na ndako* ya banzambe na yo.
Nakobongisela yo lilita, mpo ozali na ntina te.’
15 Talá likoló ya bangomba, makolo ya moto oyo azali koya na nsango malamu,
Moto oyo azali kosakola kimya.+
Salá bafɛti na yo,+ Ee Yuda, kokisá bilako na yo,
Mpo moto mpamba akoleka lisusu epai na yo te.
Akobebisama mpenza.”
2 Moto oyo apalanganisaka ayeli yo.*+
Bóbatela bisika oyo etongami makasi.
Bókɛngɛla nzela.
Bómibongisa* mpe bósangisa makasi na bino nyonso.
2 Mpo Yehova akozongisa lisusu lokumu ya Yakobo,
Mpe lokumu ya Yisraele,
Mpo baoyo bapanzaka, bapanzi mokili na bango;+
Mpe babebisi bitape na bango ya sika.
3 Banguba ya bato na ye ya nguya epakolami langi ya motane,
Bilombe na ye ya etumba balati bilamba ya motane makasi.
Bibende ya makalo na ye ya etumba ezali kongɛnga lokola mɔtɔ
Na mokolo oyo azali komilɛngɛla mpo na etumba,
Mpe bazali koningisa makɔnga ya nzete ya jenevriye.
4 Makalo ya bitumba ezali kotambola mbangu na babalabala.
Ezali kokende epai na epai na bisika ya bato nyonso.
Ezali kongɛnga lokola mwa banzete ya mɔtɔ oyo ezali kopela, ezali mbangu lokola mikalikali.
5 Akoyanganisa bakonzi ya basoda na ye.
Bakobɛta libaku ntango bazali kopusana.
Bazali kokende mbangu na bifelo na ye;
Bakangi nzela na makasi.
7 Likambo yango ekatami: Atikali bolumbu mpe bamemi ye.
Baombo na ye ya basi bazali kolela lokola bibenga;
Bazali komibɛtabɛta na ntolo.*
“Bótɛlɛma! Bótɛlɛma!”
Kasi moto moko te azali kotala nsima.+
9 Bópunza palata, bópunza wolo!
Biloko na yango ya motuya esilaka te.
Etondi na biloko kitoko ya ndenge nyonso.
10 Engumba etikali mpamba, esundolami, ebebisami!+
Mitema na bango elɛmbi na kobanga, mabɔlɔngɔ na bango ezali kotengatenga, mpe loketo na bango ezali kolɛnga;
Bilongi na bango nyonso ezali mawamawa.*
11 Wapi esika nkɔsi efandaka,+ esika bana-nkɔsi* elyaka,
Esika nkɔsi ebimaka elongo na mwana na yango,
Epai moto ata moko te abangisaka yango?
12 Nkɔsi ezalaki kopanza mikemike eloko ya kolya mpo na bana na yango,
Mpe ezalaki kokamola nkingo mpo na bankɔsi na yango ya basi.
Ezalaki kotondisa madusu na yango na nyama ya kolya,
Mpe esika na yango ya kobombana na nyama oyo bapasolipasoli.
13 “Talá! natɛmɛli yo,” Yehova ya mampinga alobi bongo,+
“Nakotumba mpenza makalo na yo ya bitumba,+
Mpe mopanga ekolya bana-nkɔsi* na yo.
Nakolongola na mabele nyama na yo ya kolya,
Mpe bakoyoka lisusu mongongo ya bamemi-nsango na yo te.”+
3 Mawa na engumba oyo esopaka makila!
Etondi mpenza na bokosi mpe na moyibi.
Ezangaka eloko ya kolya te!
2 Makɛlɛlɛ ya fimbo ná lokito ya makalo ezali koyokana,
Ezala mpe ya mpunda oyo ezali kopumbwa ná likalo oyo ezali kopumbwa.
3 Motambwisi-mpunda azali koleka, mopanga epeli makasi, mpe likɔnga engali,
Ebele ya bato babomami mpe bibembe etondani:
Bibembe oyo elali na nse ekoki kotángama te.
Bazali se kobɛta mabaku na bibembe yango.
4 Ezali mpo na ebele ya misala ya bondumba ya mwasi ya ndumba:
Oyo azali kitoko mpe bonzenga, nkolo-misala ya bondɔki,
Oyo akangaka bikólo na bondumba na ye mpe mabota na bondɔki na ye.
5 “Talá! natɛmɛli yo,”* Yehova ya mampinga alobi bongo,+
“Nakotombola zambala na yo tii na elongi;
Nakosala ete bikólo emona bolumbu na yo,
Mpe makonzi emona nsɔni na yo.
Nani akoyokela ye mawa?’
Epai wapi nakozwela yo babɔndisi?
8 Ozali nde malamu koleka No-amone,*+ oyo efandaki pembeni ya banzela ya mai ya Nile?+
Mai ezingaki yango* bipai nyonso;
Mbu ezalaki bomɛngo na yango, mbu ezalaki efelo na yango.
9 Etiopi ná Ezipito ezalaki kopesa yango makasi ntango nyonso.
Puti+ ná bato ya Libi bazalaki kosunga yango.*+
Bana na yango mpe bakatamaki bitenibiteni na bisika nyonso oyo babalabala ekutaná.*
Babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola bato na yango ya lokumu,
Mpe bato minene na yango nyonso bakangaki bango na bikangeli.
Okoluka esika ya kokima monguna.
12 Bisika na yo nyonso oyo etongami makasi ezali lokola banzete ya figi oyo ezali na mbuma ya liboso oyo eteli:
Soki baningisi yango, mbuma ya figi ekokwea na monɔkɔ ya balei.
13 Talá! Na kati na yo, basoda na yo bazali lokola basi.
Baporte ya ekólo na yo ekofungwama mobimba liboso ya banguna na yo.
Mɔtɔ ekozikisa bikangiseli ya baporte na yo.
14 Otoka mai libela mpo na ntango oyo bakozinga yo!+
Kembisá bisika na yo oyo etongami makasi.
Kitá na pɔtɔpɔtɔ, mpe nyatá mabele ya pɛtɛpɛtɛ;
Zwá masini ya kobɛta briki.
15 Ata kuna mɔtɔ ekotumba yo.
Mopanga ekozwa yo.+
Ekolya yo ndenge mayoyo ya mike elyaka.+
Omikómisa ebele mpenza lokola mayoyo ya mike!
Ɛɛ, omikómisa ebele mpenza lokola mayoyo!
16 Okómisi bato na yo ya mombongo ebele koleka minzoto ya likoló.
Mayoyo ya mike elongoli loposo na yango; mpe epumbwe.
17 Bakɛngɛli na yo bazali lokola mayoyo,
Mpe bakonzi ya basoda na yo lokola etuluku ya mayoyo.
Na mokolo ya malili, bamibombaka na bifelo oyo basalá na mabanga.
Kasi ntango moi engali, bapumbwe;
Mpe moto moko te ayebi esika bazali.
18 Babateli-mpate na yo bazali na mpɔngi makasi, Ee mokonzi ya Asiri;
Bato na yo ya lokumu bafandi na bandako na bango.
Bato ya ekólo na yo bapalanganisami na bangomba,
Mpe moto moko te azali kosangisa bango esika moko.+
19 Okozwa libɔndisi te mpo na mpasi na yo.
Mpota na yo ekosila te.
Bato nyonso oyo bakoyoka nsango na yo bakobɛta mabɔkɔ,+
Mpo, nani oyo onyokolaki te na makambo na yo ya mabe?”+
Elimboli, “mobɔndisi.”
Lil., “Nzela na ye ezali na.”
To, “Akipaka.” Lil., “Ayebaka.”
Lil., “esika na ye,” elingi koloba Ninive.
To, “masanga oyo basali na mbuma ya blé.”
To mbala mosusu, “mpe akoleka.”
Elingi koloba, Yuda.
Elingi koloba, Asiri.
To, “ya ebende oyo enyangwisami.”
To, “tempelo.”
Elingi koloba, Ninive.
Lil., “Bókanga loketo.”
To, “ekopanzana.”
Lil., “mitema.”
To, “ekómi motane.”
To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
Elingi koloba, Ninive.
Elingi koloba, Tebese.
Lil., “yo.”
Lil., “yo.”
Lil., “na ebandeli ya babalabala nyonso.”