Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Mika 1:1-7:20
  • Mika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mika
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Mika

MIKA

1 Talá liloba oyo Yehova alobaki na Mika*+ moto ya Moreshete, na eleko ya Yotame,+ ya Ahaze,+ mpe ya Ezekiasi,+ bakonzi ya Yuda,+ mpe oyo azwaki na emonaneli moko mpo na Samaria mpe Yerusaleme:

 2 “Bóyoka, Ee bino bato nyonso ya bikólo!

Bótya likebi, Ee mabele ná biloko oyo etondisi yo,

Mpe tiká Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, atatola mpo na kofunda bino,+

—Yehova uta na tempelo na ye mosantu.

 3 Mpo talá! Yehova azali kobima na esika oyo afandi;

Akokita mpe akotambola na bisika oyo etombwaná ya mabele.

 4 Bangomba ekonyangwa na nse na ye,+

Mpe mabwaku* ekopasuka,

Lokola mafuta liboso ya mɔtɔ,

Lokola mai oyo esopani na mopanzi ya ngomba.

 5 Nyonso wana ezali mpo na botomboki ya Yakobo,

Mpo na masumu ya libota ya Yisraele.+

Botomboki ya Yakobo euti wapi?*

Euti na Samaria te?+

Mpe bisika oyo etombwaná ya Yuda euti wapi?*+

Euti na Yerusaleme te?

 6 Nakosala ete Samaria ekóma libondo ya bitiká na esobe,

Esika ya kolona banzete ya vinyo;

Nakobwaka* mabanga na yango na lobwaku,

Mpe miboko na yango ekomonana polele.

 7 Bikeko* na yango nyonso ekobukama mikemike,+

Mpe makabo nyonso oyo azwaki mpo azalaki komitɛka* ekozikisama na mɔtɔ.+

Nakobebisa bikeko na yango nyonso.

Nyonso wana azwi yango na lifuti ya bondumba na ye,

Mpe ekokóma lisusu lifuti mpo na bandumba mosusu.”

 8 Yango wana, nakoganga mpe nakolela;+

Nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu.+

Koganga na ngai ekozala lokola bambwa ya zamba,*

Mpe kolela na ngai lokola bandɛkɛ babengi maligbanga.*

 9 Mpo mpota na ye ekoki kosila te;+

Ekómi kutu tii na Yuda.+

Mpasi* epalangani tii na porte ya bato ya ekólo na ngai, tii na Yerusaleme.+

10 “Bóyebisa yango na Gate te;

Bólela te.

Na Bete-Afra* bóbaluka na mabele.

11 Bókende bolumbu mpe na nsɔni, Ee bafandi ya* Shafire.

Bafandi ya* Zaanane babimi te.

Koganga ekozala na Bete-ezele mpe akobatela bino lisusu te.

12 Bafandi ya* Marote bazalaki kozela oyo ezali malamu,

Kasi Yehova akitisi likambo oyo ezali mabe tii na porte ya Yerusaleme.

13 Bókangisa likalo na bampunda, Ee bafandi ya* Lakishi.+

Bino nde bobandisaki lisumu ya mwana mwasi ya Siona,

Mpo botomboki ya Yisraele emonani epai na yo.+

14 Yango wana okotikela Moreshete-gate makabo ntango bokokabwana.

Bandako ya Akazibe+ ezalaki eloko moko ya bokosi epai ya bakonzi ya Yisraele.

15 Molongi,* esengeli naya na ye epai na bino,+ Ee bafandi ya* Maresha.+

Nkembo ya Yisraele ekokóma tii na Adulame.+

16 Bómikata nsuki mpe bókokola motó mpo na bana na bino oyo bolingaka mingi.

Bómikómisa mabandi lokola mpongo,

Mpo balongoli bana na bino mpe bamemi bango na mboka mopaya.”+

2 “Mawa na bato oyo bakanaka kosala mabe,

Oyo na bambeto na bango bakanisaka makambo ya mabe oyo bakosala!

Ntango ntɔngɔ etani bakokisaka yango,

Mpo bazali na nguya ya kosala yango.+

 2 Ntango baluli elanga moko, babɔtɔlaka yango;+

Ntango basepeli na ndako moko, bazwaka yango;

Babubaka mpo na kozwa ndako ya moto,+

Babɔtɔlaka moto libula na ye.

 3 Yango wana talá oyo Yehova alobi:

‘Nazali kokana koyeisela bato ya ekólo* oyo mpasi+ oyo bokokoka kokima te.*+

Bokotambola lisusu na lolendo te,+ mpo ezali ntango moko ya mpasi.+

 4 Na mokolo wana, bato bakosalela bino lisese

Mpe bakolela bino mingi.+

Bakoloba: “Biloko na biso nyonso ekei!+

Apesi libula na biso epai ya bato mosusu—alongoli yango epai na biso!+

Apesi bato oyo bazangi bosembo bilanga na biso.”

 5 Yango wana na kati ya lisangá ya Yehova, ekozala na moto moko te,

Oyo akomeka bolai ya ekólo na nsinga mpe akokabola yango na nzela ya mbɛsɛ.

 6 Bazali kosakola boye: “Bótika kosakola!”

“Basengeli kosakola makambo wana te;

Nsɔni ekozwa biso te!”

 7 Ee ndako ya Yakobo, bazali nde koloba epai na yo:

“Elimo ya Yehova ekómi nde motema mokuse?

Wana ezali misala na ye?”

Maloba na ngai esalaka nde bolamu te epai ya bato oyo bazali kotambola na bosembo?

 8 Kasi na mikolo oyo eleki, bato na ngai bamikómisaki lokola monguna.

Na miso ya bato nyonso, bolongoli elembo ya lokumu na elamba

Ya baoyo bazali kotambola na mpiko, lokola bato oyo bauti na etumba.

 9 Bozali kobengana basi ya bato na ngai na bandako na bango oyo basepelaka kofanda;

Bozali kolongola nkembo na ngai epai ya bana na bango mpo na libela.

10 Bótɛlɛma mpe bókende, mpo oyo ezali lisusu esika ya kopema te.

Mpo na mbindo na ye,+ libebi ekoyela ye, libebi oyo epesaka mpasi.+

11 Soki moto azali kolanda mopɛpɛ mpe bokosi, mpe alobi lokuta oyo ete:

“Nakosakwela yo mpo na vinyo mpe mpo na masanga oyo elangwisaka,”

Wana akozala mosakoli oyo abongi mpenza mpo na bato oyo!+

12 Ya solo, nakoyanganisa bino nyonso, Ee Yakobo;

Nakosangisa mpenza esika moko bato ya Yisraele oyo batikalaki.+

Nakosala ete bázala na bomoko, lokola bibwɛlɛ na kati ya lopango,

Lokola etonga na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti;+

Ekozala na makɛlɛlɛ ya bato kuna.’+

13 Moto oyo azali kopasola nzela akotambola liboso na bango;

Bakofungola nzela na efelo, bakoleka wana mpe bakobima wana.+

Mokonzi na bango akoleka liboso na bango,

Mpe Yehova akokamba bango.”+

3 Nalobaki: “Nabondeli bino, bóyoka, bino bankumu ya Yakobo

Mpe bakomanda ya bato ya ekólo ya Yisraele.+

Bino te nde bosengelaki koyeba oyo ezali sembo?

 2 Kasi bozali koyina oyo ezali malamu+ mpe kolinga oyo ezali mabe;+

Bozali kolongola loposo ya bato na ngai mpe mosuni oyo ezali na mikuwa na bango.+

 3 Bozali mpe kolya mosuni ya bato na ngai+

Mpe kolongola loposo na bango,

Bozali kobuka mikuwa na bango, kokatakata yango mikemike,+

Lokola biloko oyo bazali kolamba na nzungu,* lokola mosuni na nzungu ya kolambela.

 4 Ntango bakobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi,

Akoyanola bango te.

Akopesa bango mokɔngɔ* na ntango wana,+

Mpo na misala na bango ya mabe.+

 5 Talá oyo Yehova alobi mpo na basakoli oyo bazali kobungisa bato ya ekólo na ngai nzela,+

Oyo basakolaka ‘Kimya!’+ wana bazali koswa* na mino na bango+

Kasi basakolaka* etumba mpo na moto oyo atye eloko te na minɔkɔ na bango:

 6 ‘Butu ekozala epai na bino;+ emonaneli ekozala te;+

Molili kaka nde ekozala mpo na bino; bokosakola te makambo oyo ebombaná.

Moi ekolalela basakoli,

Mpe mokolo ekokómela bango molili.+

 7 Bamoni-bimonaneli bakopɔla na nsɔni,+

Basakoli ya makambo oyo ebombaná bakolɛmba nzoto.

Bango nyonso bakozipa monɔkɔ* na bango,

Mpo eyano ya Nzambe ekozala te.’”

 8 Nzokande, ngai, mpo na elimo ya Yehova, natondi na nguya,

Na bosembo mpe na makasi,

Mpo na koyebisa Yakobo botomboki na ye mpe Yisraele lisumu na ye.

 9 Bóyoka likambo oyo, nabondeli bino, bankumu ya libota ya Yakobo

Mpe bino bakomanda ya bato ya ekólo Yisraele,+

Bino baoyo bozali koyina bosembo mpe bozali kotɛngamisa nyonso oyo ezali semba,+

10 Bozali kotonga Siona na misala ya koboma bato mpe Yerusaleme na misala oyo ezangi bosembo.+

11 Bakambi* na ye bazali kosambisa mpo na kanyaka,+

Banganga-nzambe na ye bazali koteya mpo na lifuti,+

Mpe basakoli na ye bazali kosakola makambo oyo ebombaná mpo na mbongo.*+

Atako bongo bazali kotya motema* epai ya Yehova, mpe koloba:

“Yehova azali elongo na biso te?+

Mpasi moko te ekoyela biso.”+

12 Yango wana likoló na bino,

Siona ekobalolama lokola elanga,

Yerusaleme ekokóma engumba oyo ebebabebá,+

Mpe ngomba ya Ndako* ekokóma lokola bisika oyo etombwaná na zamba.+

4 Na eleko ya nsuka ya mikolo,*

Ngomba ya ndako ya Yehova+

Ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba,

Mpe ekotombwama mpenza likoló koleka bangomba mike,

Mpe bato ya bikólo bakosopana kuna.+

 2 Mpe bikólo mingi ekokende mpe ekoloba:

“Bóya! Tómata na ngomba ya Yehova

Na ndako ya Nzambe ya Yakobo.+

Akoteya biso banzela na ye,

Mpe tokotambola na banzela na ye.”

Mpo mobeko* ekobima na Siona,

Mpe liloba ya Yehova ekobima na Yerusaleme.

 3 Akokata makambo kati na bato mingi ya bikólo+

Akosembola makambo* etali bikólo ya nguya oyo ezali mosika.

Bakokómisa mipanga na bango bitimweli ya mabele

Mpe makɔnga na bango makwangola ya kokata matiti.+

Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu,

Bakoyekola mpe etumba lisusu te.+

 4 Bakofanda, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi,+

Mpe moto ata moko te akobangisa bango,+

Mpo monɔkɔ ya Yehova ya mampinga elobi yango.

 5 Mpo bato nyonso ya bikólo bakotambola, moto na moto na nkombo ya nzambe na ye,

Kasi biso tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso+ libela na libela.

 6 “Na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova,

“Nakoyanganisa baoyo* bazalaki kotɛnguma,

Mpe nakosangisa esika moko baoyo bapalanganaki,+

Ata mpe baoyo nanyokolaki.

 7 Nakokómisa baoyo bazalaki kotɛnguma bato oyo batikali,+

Mpe baoyo* babwakamaki mosika ekólo moko makasi;+

Ngai Yehova nakoyangela lokola mokonzi na bango na Ngomba Siona,

Banda sikoyo mpe mpo na libela.

 8 Mpe yo, Ee ndako molai ya etonga,

Mwa ngomba ya mwana mwasi ya Siona,+

Epai na yo boyangeli ya liboso* ekoya, ɛɛ, ekoya mpenza,+

Bokonzi ezali ya mwana mwasi ya Yerusaleme.+

 9 Sikoyo mpo na nini ozali koganga makasi?

Ozali na mokonzi te,

To mopesi-toli na yo akufi,

Mpo mpasi ekanga yo boye lokola ya mwasi oyo azali kobota?+

10 Bundaná na mpasi mpe lelá makasi, Ee mwana mwasi ya Siona,

Lokola mwasi oyo azali kobota,

Mpo sikoyo okolongwa na engumba mpe okokende kofanda na mboka.

Okokende tii na Babilone,+

Mpe kuna bakobikisa yo;+

Kuna nde Yehova akosikola yo na lobɔkɔ ya banguna na yo.+

11 Mpe sikoyo bikólo mingi ekoyanganisama mpo na kobundisa yo;

Ekoloba: ‘Tiká asambwisama,

Mpe tiká miso na biso emona oyo ekómeli Siona.’

12 Kasi bayebi makanisi ya Yehova te,

Bakangi ntina ya mokano* na ye te;

Mpo akoyanganisa bango esika moko lokola molɔngɔ ya mbuma oyo bakati sika na esika ya kotutatuta mbuma.

13 Tɛlɛmá mpe tutá ndenge batutaka mbuma, Ee mwana mwasi ya Siona;+

Mpo nakobongola maseke na yo ekóma ebende,

Mpe nakobongola basabo na yo ekóma kwivre,

Mpe okonikanika bato mingi ya bikólo.+

Okokabela Yehova litomba na bango oyo ezwami na bokosi,

Mpe biloko na bango epai ya Nkolo ya solosolo ya mabele mobimba.”+

5 “Ee mwana mwasi oyo bazali kobundisa,

Sikoyo ozali komikatakata nzoto;

Bazingi biso mpo na kobundisa biso.+

Babɛti mosambisi ya Yisraele nzete na litama.+

 2 Mpe yo, Ee Beteleme Efrata,+

Yo oyo ozali moke mpenza mpo otángama na kati ya bankóto* ya Yuda,

Epai na yo nde moto oyo akozala mokonzi na Yisraele akobima mpo na ngai,+

Oyo ebandeli na ye ezali banda na ntango ya kala, na mikolo ya kalakala.

 3 Yango wana akosundola bango

Tii ntango mwasi oyo asengeli kobota akobota.

Mpe bandeko na ye oyo batikali bakozonga epai ya bato ya Yisraele.

 4 Akotɛlɛma mpe akobatela* etonga na makasi ya Yehova,+

Na lokumu ya nkombo ya Yehova Nzambe na ye.

Mpe bakofanda na kimya,+

Mpo na ntango yango, bonene na ye ekokóma tii na bansuka ya mabele.+

 5 Mpe akomema kimya.+

Soki Moasiri akɔti na ekólo na biso mpe atye lokolo na bandako milai na biso oyo ebatelami makasi,+

Tokobimisela ye babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu* mwambe na kati ya bato.

 6 Bakopesa mokili ya Asiri etumbu* na mopanga,+

Mpe mokili ya Nimerode+ na bisika na yango ya kokɔta.

Mpe akosikola biso na mabɔkɔ ya Moasiri,+

Ntango akokɔta na mokili na biso mpe akotya lokolo na teritware na biso.

 7 Bato ya Yakobo oyo batikali bakozala na kati ya ebele ya bato ya bikólo

Lokola mamwɛ* oyo euti epai ya Yehova,

Lokola mbula likoló ya milona

Oyo etyaka elikya epai ya moto te

Mpe ezelaka eloko te epai ya bana ya bato.

 8 Bato ya Yakobo oyo batikali bakozala na kati ya bikólo,

Na kati ya ebele ya bato ya bikólo,

Lokola nkɔsi na kati ya banyama ya zamba,

Lokola mwana-nkɔsi* na kati ya bitonga ya bampate,

Oyo, ntango ezali koleka, enyataka mpe epasolaka mpenza;

Mpe moto ya kobikisa bango azali te.

 9 Lobɔkɔ na yo ekotombwama likoló ya batɛmɛli na yo,

Mpe banguna na yo nyonso bakobebisama.”

10 Yehova alobi, “Na mokolo yango,”

“Nakosilisa bampunda na yo na kati na yo mpe nakobebisa makalo na yo.

11 Nakobebisa bingumba ya ekólo na yo

Mpe nakokweisa bisika na yo nyonso oyo etongami makasi.

12 Nakosukisa mosala ya bonganga-nkisi oyo osalaka,*

Mpe moto moko te oyo asalaka misala ya maji akotikala kati na yo.+

13 Nakobebisa bikeko* ná makonzí oyo ezali kati na yo,

Mpe okofukama lisusu te liboso ya biloko oyo mabɔkɔ na yo esali.+

14 Nakopikola banzete ya losambo*+ oyo ezali kati na yo

Mpe nakosilisa bingumba na yo.

15 Na nkanda mpe kosilika na ngai ya makasi nakozongisa mabe

Epai ya bikólo oyo etosi te.”

6 Nabondeli bino, bóyoka oyo Yehova azali koloba.

Tɛlɛmá, yebisá likambo na yo liboso ya bangomba,

Mpe tiká bangomba mike eyoka mongongo na yo.+

 2 Bóyoka, Ee bangomba, likambo ya Yehova,

Bino miboko makasi ya mabele,+

Mpo Yehova azali kosambisa bato na ye;

Azali na likambo ya kosamba ná Yisraele:+

 3 “Bato na ngai, nasali bino nini?

Nalɛmbisi bino na likambo nini?+

Bótatolela ngai.

 4 Mpo nabimisaki yo na mokili ya Ezipito,+

Nasikolaki yo na ekólo oyo ozalaki moombo;*+

Natindelaki yo Moize, Arona mpe Miriame.+

 5 Bato na ngai, nabondeli bino, bókanisa makambo oyo Balake mokonzi ya Moabe akanaki kosala,+

Mpe eyano oyo Balaama mwana ya Beore apesaki ye,+

—Makambo oyo esalemaki banda na Shitime+ tii na Gilgale+—

Mpo bókoka koyeba misala ya bosembo ya Yehova.”

 6 Nakoya liboso ya Yehova na eloko nini?

Nakogumbama liboso ya Nzambe ya likoló na eloko nini?

Nakoya nde liboso na ye na makabo ya kotumba ya mibimba,

Na bana-ngɔmbɛ ya mbula moko?+

 7 Yehova akosepela nde na bankóto ya bampate-mibali,

Na bankóto zomi zomi ya mikɛli ya mafuta?+

Nakopesa nde mwana na ngai ya liboso ya mobali mpo na botomboki na ngai,

Mwana na ngai* mpo na lisumu na ngai?*+

 8 Ee moto, ayebisi yo oyo ezali malamu.

Mpe eloko nini Yehova azali kosɛnga yo?

Kaka ete omonisa boyengebene,*+ olinga bosembo,*+

Mpe otambola na bopɔlɔ+ elongo na Nzambe na yo!+

 9 Mongongo ya Yehova ezali kobelela na engumba,

Baoyo bazali na bwanya bakobanga nkombo na yo.

Bótya likebi na nzete mpe na moto oyo atyaki yango.+

10 Na ndako ya moto mabe, ezali naino na biloko ya motuya oyo ezwami na misala ya bato mabe

Ná efa* oyo bakɔndisá, oyo eboyami?

11 Nakoki nde kozala pɛto na bizaleli* soki nazali na bimekeli-kilo ya mabe,

Ná saki ya libanga ya komeka kilo oyo ezali ya bokosi?+

12 Mpo bazwi na ye batondi na mobulu,

Mpe bafandi na ye bazali koloba lokuta;+

Lolemo na bango ezali na bokosi na monɔkɔ na bango.+

13 “Yango wana nakobɛta yo mpe nakozokisa yo,+

Bongo okotikala mpamba mpo na masumu na yo.

14 Okolya kasi okotonda te;

Okozala kaka na nzala.*+

Biloko oyo okolongola, okomema yango te kozanga ete ezwa likama,

Mpe biloko oyo okolonga komema, nakopesa yango monguna.*

15 Okolona biloko, kasi okobuka yango te.

Okokamola mbuma ya olive, kasi okosalela mafuta na yango te;

Mpe okosala vinyo ya sika, kasi okomɛla vinyo yango te.+

16 Bozali kotosa mitinda ya Omiri mpe kolanda misala nyonso ya ndako ya Ahaba,+

Bozali kotambola na kolanda toli na bango.

Yango wana nakokómisa yo eloko ya kopesa nsɔmɔ

Mpe bato oyo bafandi epai na ye eloko ya kotyola;*+

Mpe bato ya bikólo bakosɛka bino.”+

7 Mawa na ngai! Nazali lokola moto oyo,

Nsima ya kobuka mbuma oyo etelaka na eleko ya molunge

Mpe ya kolɔkɔta mbuma ya vinyo oyo etikali nsima ya kobuka mbuma,

Amoni mopiko moko te ya mbuma ya vinyo mpo na kolya,

Mbuma ya figi moko te ya liboso asepeli na yango mpenza.

 2 Moto ya sembo azali lisusu te* na mabele;

Na kati ya bato, moto malamu azali lisusu te.+

Bango nyonso bazali kobombana mpo na kosopa makila.+

Moto na moto azali koluka kokanga ndeko na ye na monyama.

 3 Bamesenisá mabɔkɔ na bango na kosala oyo ezali mabe;+

Nkumu azali kosɛnga mwa eloko,

Mosambisi azali kosɛnga lifuti,+

Moto ya lokumu azali koyebisa bamposa na ye* polele,+

Mpe bazali koyokana mpo na kokokisa yango.*

 4 Moto oyo aleki malamu kati na bango azali lokola banzube,

Moto oyo aleki sembo kati na bango azali mabe koleka liboke ya banzube.

Mokolo ya basinzili na yo mpe mokolo oyo okozongisa monɔkɔ ekoya.+

Bongo bakozala na kobanga.+

 5 Kondimela mozalani na yo te

Mpe kotya motema epai ya moninga ya motema te.+

Kebá na maloba oyo ozali koloba epai ya mwasi oyo alalaka na ntolo na yo.

 6 Mpo mwana mobali azali kotyola tata na ye,

Mwana mwasi azali kotɛmɛla mama na ye,+

Mwasi ya libala azali kotɛmɛla mama-bokilo na ye;+

Banguna ya moto bazali bato ya libota na ye.+

 7 Kasi ngai, nakokoba kotalela Yehova.+

Nakozela na motema moko* Nzambe oyo abikisaka ngai.+

Nzambe na ngai akoyoka ngai.+

 8 Ee monguna na ngai, kosepela te na oyo ezwi ngai.

Atako nakwei, nakotɛlɛma;

Atako nazali kofanda na molili, Yehova akozala pole na ngai.

 9 Nakondima nkanda ya Yehova

—Mpo nasaleli ye lisumu+—

Tii ntango akokɔtela ngai mpe akokata likambo na ngai na bosembo.

Akobimisa ngai na pole;

Nakotala bosembo na ye.

10 Monguna na ngai mpe akomona yango,

Mpe akotonda na nsɔni ye oyo azalaki koloba na ngai:

“Yehova Nzambe na yo azali wapi?”+

Miso na ngai ekotala ye.

Akonyatama lokola pɔtɔpɔtɔ na babalabala.

11 Ekozala mokolo ya kotonga lisusu bifelo na yo ya mabanga;

Na mokolo yango bakopusa bandelo na yo mosika.*

12 Na mokolo yango, bakoya tii epai na yo

Longwa na Asiri mpe na bingumba ya Ezipito,

Longwa na Ezipito tii na Ebale;*

Longwa na mbu tii na mbu, mpe longwa na ngomba tii na ngomba.+

13 Mpe ekólo ekokóma mokili oyo etikali mpamba mpo na mabe ya bafandi na yango,

Mpo na makambo oyo basalaki.*

14 Na lingenda na yo ya mobateli ya bampate, kambá bato na yo, etonga ya libula na yo,+

Oyo ezalaki kofanda yango moko na zamba, na katikati ya elanga ya banzete ya mbuma.

Tiká ete bálya na Bashane mpe na Gileade+ lokola na mikolo ya kala.

15 “Lokola na mikolo oyo obimaki na mokili ya Ezipito,

Nakomonisa yo* makambo ya kokamwa.+

16 Bikólo ekomona mpe ekozala na nsɔni atako etondi na nguya.+

Bakotya lobɔkɔ na bango na monɔkɔ na bango;

Matoi na bango ekokufa.

17 Bakolɛmbɔla putulu lokola banyoka;+

Lokola banyama oyo etambolaka na libumu na mabele, bakobima na bisika na bango makasi ya libateli, bazali kolɛnga.

Bakoya epai ya Yehova Nzambe na biso na kobanga makasi,

Mpe bakobanga yo.”+

18 Nani azali Nzambe lokola yo,

Oyo alimbisaka libunga mpe atyaka likebi te na kobuka mibeko+ ya bato na ye* oyo batikali?+

Akokanga nkanda mpo na libela te,

Mpo asepelaka na bolingo ya sembo.+

19 Akomonisela biso lisusu motema mawa;+ akolonga* mabunga na biso.

Okobwaka masumu na bango nyonso na bozindo ya mbu.+

20 Okomonisa bosembo epai ya Yakobo,

Bolingo ya sembo epai ya Abrahama,

Ndenge olapaki ndai epai ya bankɔkɔ na biso banda na mikolo ya kala.+

Ebengeli ya mokuse ya nkombo Mikaele (oyo elimboli “nani azali lokola Nzambe?”) to Mikaya (oyo elimboli “nani azali lokola Yehova?”).

To, “mabwaku patatalu.”

Lil., “nde nini?”

Lil., “nde nini?”

Lil., “Nakosopa.”

To, “Bikeko oyo eyemami.”

To, “lifuti nyonso ya bondumba na ye.”

To, “bambulú.”

To, “otrishe.”

To, “Bolɔzi.”

To, “Na ndako ya Afra.”

Lil., “mwasi oyo afandaka na.”

Lil., “mwasi oyo afandaka na.”

Lil., “mwasi oyo afandaka na.”

Lil., “mwasi oyo afandaka na.”

To, “Moto oyo abɔtɔlaka.”

Lil., “mwasi oyo afandaka na.”

Lil., “libota.”

Lil., “oyo bokokoka kolongola nkingo na bino na kati na yango te.”

To, “nzungu ya monɔkɔ monene.”

Lil., “Akobombela bango elongi na ye.”

To mbala mosusu, “bazali na eloko ya kotafuna.”

Lil., “basantisaka.”

To, “monzomba.”

Lil., “Bankumu.”

To, “palata.”

To, “balobaka ete batyaka motema.”

To, “ya tempelo.”

To, “Na mikolo ya nsuka.”

To, “mateya.”

To, “Akozongisa makambo na nzela.”

Lil., “ye oyo.”

Lil., “ye oyo.”

To, “ya kala.”

To, “toli.”

To, “bituluka.”

To, “akotambwisa.”

To, “bakambi.”

Lil., “Bakokamba mokili ya Asiri.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

Lil., “na lobɔkɔ na yo.”

To, “bikeko oyo eyemami.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “ndako ya boombo.”

Lil., “Mbuma ya libumu na ngai.”

To, “lisumu ya molimo na ngai.”

To, “ozala moto ya kolongobana.”

To, “olinga na boboto mpe na bosembo.” Lil., “olinga bolingo ya sembo.”

Talá Ap. B14.

To, “kozala na likambo te.”

To, “Libumu na yo ekozala mpamba.”

Lil., “na mopanga.”

Lil., “eloko ya kobɛtɛla piololo.”

To, “alimwe.”

To, “mposa ya molimo na ye.”

Lil., “bazali kokanga yango elongo.”

To, “Nakomonisa ete nazali kozela.”

To mbala mosusu, “mobeko ekozala mosika.”

Elingi koloba, Efrate.

Lil., “mbuma ya misala na bango.”

Lil., “ye.”

Lil., “libula na ye.”

To, “akonyata; akotya na nse.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto