YONA
1 Talá liloba oyo Yehova alobaki na Yona*+ mwana ya Amitai: 2 “Tɛlɛmá, kende na Ninive+ engumba monene, mpe sakolá etumbu oyo nakateli yango, mpo mabe ya bato ya engumba yango ekómi tii na matoi na ngai.”
3 Kasi Yona atɛlɛmaki mpo na kokima na Tarasisi, mosika na Yehova. Akitaki na Yope mpe kuna akutaki masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarasisi. Na yango afutaki tike mpe akɔtaki na masuwa yango, mpo akende elongo na bango na Tarasisi, mosika na Yehova.
4 Bongo Yehova atindaki mopɛpɛ moko makasi na mbu, mpe ezalaki na mbula moko ya mopɛpɛ makasi oyo ematisaki mbonge na mbu tii masuwa elingaki kopanzana. 5 Bato oyo basalaka na masuwa babangaki makasi mpe moto na moto abandaki kobelela nzambe na ye mpo na koluka lisalisi. Mpe babandaki kobwaka biloko oyo ezalaki na masuwa na mbu, mpo na kokómisa masuwa pɛpɛlɛ.+ Kasi Yona, ye, akitaki na kobe ya masuwa yango, alalaki mpe azwaki mpɔngi makasi. 6 Kapitɛni ya masuwa apusanaki mpe alobaki na ye: “Mpo na nini ozali kolala? Tɛlɛmá, belelá nzambe na yo! Ntango mosusu Nzambe ya solo akoyokela biso mawa, mpe tokokufa te.”+
7 Bongo bato yango balobanaki: “Bóya, tóbwaka mbɛsɛ,+ mpo tóyeba soki nani nde amemeli biso mpasi oyo.” Na yango babwakaki mbɛsɛ, mpe mbɛsɛ ekweaki epai ya Yona.+ 8 Balobaki na ye ete: “Tobondeli yo, yebisá biso soki mpo na nani nde mpasi oyo ekómeli biso? Mosala nini osalaka, mpe outi wapi? Mboka na yo nini, mpe ozali moto ya ekólo nini?”
9 Azongisaki: “Nazali Moebre, mpe nabangaka* Yehova Nzambe ya likoló, Ye oyo asalá mbu mpe mabele.”
10 Bongo bato yango babangaki lisusu mingi, mpe batunaki ye: “Likambo nini osali?” (Bato yango bayebaki ete azalaki kokima Yehova, mpo ayebisaki bango yango.) 11 Mpe batunaki ye lisusu: “Tósala yo nini mpo mbu efanda nyɛɛ?” Mpo mbu ezalaki se kotomboka mpe mbonge ezalaki se komata. 12 Ayanolaki: “Bótombola ngai mpe bóbwaka ngai na kati ya mbu, mpe mbu ekofanda nyɛɛ; mpo nayebi ete mopɛpɛ makasi oyo ezwi bino nde mpo na ngai.” 13 Kasi mibali yango babundaki na makasi na bango nyonso* mpo na kozongisa masuwa na mokili, kasi bakokaki te, mpo mbu ezalaki kotomboka se kotomboka mpe mbonge ezalaki se komata zingazinga na bango.
14 Bongo babelelaki Yehova mpe balobaki: “Sikoyo, Ee Yehova, tobondeli yo, tókufa te mpo na moto oyo!* Komemisa biso ngambo te mpo na makila ya moto oyo asali likambo te, mpo osali ndenge olingaki, Ee Yehova!” 15 Na nsima batombolaki Yona mpe babwakaki ye na mbu; mpe nkanda ya mbu ekitaki. 16 Bongo mibali yango babangaki Yehova makasi mpenza;+ bapesaki Yehova mbeka mpe basalaki bilako.
17 Mpe Yehova atindaki mbisi moko ya monene emɛla Yona. Bongo Yona asalaki mikolo misato butu moi na kati ya libumu ya mbisi yango.+
2 Na kati ya libumu ya mbisi, Yona abondelaki Yehova Nzambe na ye.+ 2 Alobaki:
“Na mpasi na ngai, nabelelaki Yehova mpe ayanolaki ngai.+
Na kati ya bozindo* ya Nkunda,* nabelelaki mpo na kosɛnga lisalisi.+
Oyokaki mongongo na ngai.
Bambonge na yo nyonso ya makasi mpe bambonge mike ezindisaki ngai.+
4 Mpe nalobaki: ‘Obengani ngai liboso na yo!
Ndenge nini nakotala lisusu tempelo na yo mosantu?’
Matiti ya kati ya mai elíngamaki na motó na ngai.
6 Nazindaki tii na nse ya bangomba.
Bikangiseli ya mabele ezalaki kokangama nsima na ngai.
Kasi obimisaki bomoi na ngai na libulu, Ee Yehova Nzambe na ngai.+
7 Ntango bomoi* na ngai ezalaki kotika ngai, Yehova nde Moto oyo nakanisaki.+
Bongo libondeli na ngai ekómaki epai na yo, na kati ya tempelo na yo mosantu.+
8 Baoyo bamipesi na losambo ya bikeko ya mpambampamba bazali kosundola moto oyo azali komonisela bango bolingo ya sembo.*
9 Kasi ngai, nakoyebisa yo botɔndi na ngai mpe nakopesa yo bambeka.
Elako oyo nasalaki, nakokokisa yango.+
10 Na nsima Yehova apesaki mbisi yango mitindo, mpe esanzaki Yona na mokili.
3 Na nsima liloba ya Yehova eyelaki Yona mpo na mbala ya mibale, ete:+ 2 “Tɛlɛmá, kende na Ninive+ engumba monene, mpe sakwelá yango nsango oyo nazali koyebisa yo.”
3 Bongo Yona atɛlɛmaki mpe akendaki na Ninive+ mpo na kotosa liloba ya Yehova.+ Ninive ezalaki engumba moko monene,* ezalaki kosɛnga kotambola mikolo misato na makolo mpo na kokatisa yango. 4 Na nsima, Yona akɔtaki na engumba yango, atambolaki mokolo mobimba, mpe azalaki kosakola ete: “Etikali mikolo 40 mpamba, Ninive ekobebisama.”
5 Bongo bato ya Ninive bandimelaki Nzambe,+ mpe bayokanaki ete bákila bilei mpe bálata ngɔtɔ,* banda na oyo aleki moke tii na oyo aleki monene. 6 Ntango nsango yango ekómelaki mokonzi ya Ninive, atɛlɛmaki na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki elamba na ye ya bokonzi, alataki ngɔtɔ mpe afandaki na putulu ya mɔtɔ. 7 Lisusu, atindaki básakola na Ninive mobimba ete: “Na kolanda etinda ya mokonzi mpe ya bato na ye ya lokumu: Moto moko te, to nyama, ezala etonga ya bangɔmbɛ to etonga ya bampate, moko te asengeli kolya ata eloko moko. Basengeli te kolya bilei to komɛla mai. 8 Tiká bálata ngɔtɔ, ezala bato mpe banyama; mpe tiká bábelela Nzambe na makasi na bango nyonso, bátika banzela na bango ya mabe mpe makambo ya mobulu oyo basalaka. 9 Nani ayebi soki Nzambe ya solo akotalela lisusu* likambo oyo akani kosala, akotika nkanda na ye ya makasi, bongo tokokufa te?”
10 Ntango Nzambe ya solo amonaki oyo basalaki, ndenge oyo batikaki banzela na bango ya mabe,+ atalelaki lisusu* likambo oyo akanaki kosala mpe mpasi oyo alobaki ete akoyeisela bango, ayeisaki yango lisusu te.+
4 Kasi yango esepelisaki Yona ata moke te, mpe asilikaki makasi. 2 Na yango, abondelaki Yehova boye: “Ee Yehova, nakanisaki likambo oyo ntango nazalaki na mboka na ngai. Yango wana liboso nalukaki kokima na Tarasisi;+ mpo nayebaki ete ozali Nzambe ya ngɔlu mpe ya motema mawa, oyokaka nkanda noki te mpe otondi na bolingo ya sembo,+ oyokaka mawa mpo na likama. 3 Bongo sikoyo, Ee Yehova, nabondeli yo, longolá bomoi* na ngai, mpo eleki malamu nakufa, na esika ya kozala na bomoi.”+
4 Yehova atunaki ye: “Ebongi mpenza osilika makasi boye?”
5 Bongo Yona abimaki na Ninive, akei kofanda na ɛsti ya engumba yango. Asalaki mwa ndako ya matiti kuna, mpe afandaki na nse ya elili na yango, mpo na kotala nini ekokómela engumba yango.+ 6 Bongo Yehova Nzambe akolisaki molona moko ya mbika mpo ezipa Yona, epesa mwa mpiɔ likoló ya motó na ye, mpe ekitisa mpasi na ye. Mpe Yona asepelaki mingi na molona yango ya mbika.
7 Kasi na mokolo oyo elandaki, na kotana ya ntɔngɔ, Nzambe ya solo atindaki mosɔpi moko ebebisa molona wana ya mbika, mpe molona yango ekaukaki. 8 Ntango moi ebandaki kongala, Nzambe atindaki mpe mopɛpɛ moko ya molunge oyo eutaki na ɛsti, mpe moi ezalaki kobɛta Yona makasi na motó, bongo etikalaki moke akatswa. Azalaki se kosɛnga liwa* mpe azalaki koloba: “Eleki malamu nakufa, na esika ya kozala na bomoi.”+
9 Nzambe atunaki Yona boye: “Ebongi mpenza ete osilika makasi boye mpo na molona ya mbika?”+
Mpe ye ayanolaki: “Ebongi mpenza nasilika, nasiliki mpe nalingi kaka kokufa.” 10 Kasi Yehova alobaki na ye: “Yo oyokeli molona ya mbika mawa, oyo kutu omonelaki mpasi te, okolisaki mpe te; ekolaki na butu moko mpe ekufi na butu moko. 11 Bongo ngai, nasengeli te koyoka mawa mpo na Ninive engumba monene,+ oyo ezali na bato koleka 120 000 oyo bayebi kutu te kokesenisa mabe ná malamu,* ná ebele ya banyama na bango?”+
Elimboli, “ebenga.”
To, “nasambelaka.”
To, “bamekaki kopasola nzela.”
To, “mpo na molimo ya moto oyo!”
Lil., “libumu.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Mai ezingaki ngai tii na molimo.”
To, “molimo.”
To mbala mosusu, “kosundola bosembo na bango.”
To, “Lobiko ezali ya Yehova.”
Lil., “engumba monene mpo na Nzambe.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “akoyoka mawa mpo na.”
To, “ayokaki mawa mpo na.”
To, “molimo.”
To, “ete molimo na ye ekufa.”
To, “kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná lobɔkɔ na bango ya mwasi.”