Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Amose 1:1-9:15
  • Amose

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Amose
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Amose

AMOSE

1 Maloba ya Amose,* oyo azalaki na kati ya babɔkɔli ya bampate na Tekoa.+ Amose azwaki maloba yango mpo na Yisraele na emonaneli moko, na boyangeli ya Uzia mokonzi+ ya Yuda mpe na boyangeli ya Yeroboame+ mwana ya Yoashe,+ mokonzi ya Yisraele, mbula mibale liboso ya koningana ya mabele.+ 2 Alobaki boye:

“Yehova akoganga makasi uta na Siona,

Longwa na Yerusaleme, akotombola mongongo na ye.

Bisika oyo babateli ya bampate baleisaka bibwɛlɛ matiti ekolela,

Mpe nsɔngɛ ya Karamele ekokauka.”+

 3 “Talá oyo Yehova alobi:

‘“Mpo na botomboki* misato ya Damasi, mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo batutaki Gileade ndenge batutaka mbuma na bitutelo ya ebende.+

 4 Yango wana nakotinda mɔtɔ na ndako ya Hazaele,+

Mpe ekozikisa bandako milai ya makasi ya Bene-hadade.+

 5 Nakobuka bikangiseli ya Damasi.+

Nakoboma bafandi ya Bikate-avene

Mpe moto oyo azali koyangela* na Bete-edene.

Mpe bato ya Siri bakomemama na mboka mopaya na Kire,”+ Yehova alobi bongo.’

 6 Talá oyo Yehova alobi:

‘“Mpo na botomboki misato ya Gaza,+ mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo bamemaki etuluku mobimba ya bato oyo bamemami na mboka mopaya+ mpo na kopesa bango na mabɔkɔ ya Edome.

 7 Yango wana nakotinda mɔtɔ na efelo ya Gaza,+

Mpe ekozikisa bandako na yango ya milai oyo etongami makasi.

 8 Nakobebisa bafandi ya Ashedode,+

Mpe moto oyo azali koyangela* na Ashekelone.+

Nakopesa Ekrone etumbu,*+

Mpe Bafilistia oyo batikali bakokufa,”+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.’

 9 Talá oyo Yehova alobi:

‘Mpo na botomboki misato ya Tire,+ mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo bapesaki etuluku mobimba ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya na mabɔkɔ ya Edome,

Mpe mpo bakanisaki te kondimana ya bandeko.+

10 Yango wana nakotinda mɔtɔ na efelo ya Tire,

Mpe ekozikisa bandako na yango ya milai oyo etongami makasi.’+

11 Talá oyo Yehova alobi:

‘Mpo na botomboki misato ya Edome,+ mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo alandaki ndeko na ye moko na mopanga,+

Mpe aboyaki komonisela ye motema mawa.

Na nkanda na ye azali kopasolapasola bango,

Mpe nkanda na ye makasi mpo na bango ezali kokita te.+

12 Yango wana nakotinda mɔtɔ na Temane,+

Mpe ekozikisa bandako milai ya Bozera oyo etongami makasi.’+

13 Talá oyo Yehova alobi:

‘“Mpo na botomboki misato ya Baamone,+ mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Gileade mpo na koyeisa teritware na bango monene.+

14 Yango wana nakotya mɔtɔ na efelo ya Raba,+

Mpe ekozikisa mpenza bandako na yango ya milai* oyo etongami makasi,

Na ntango oyo makɛlɛlɛ ya etumba ekoyokana na mokolo ya etumba,

Mpe ete mopɛpɛ makasi ekopɛpa na mokolo ya mbula ya mopɛpɛ makasi.

15 Mpe mokonzi na bango akomemama na mboka mopaya elongo na bankumu na ye,”+ Yehova alobi bongo.’

2 “Talá oyo Yehova alobi:

‘“Mpo na botomboki* misato ya Moabe,+ mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo atumbaki mikuwa ya mokonzi ya Edome mpo na kosala na yango putulu ya mpɛmbɛ.

 2 Yango wana nakotinda mɔtɔ na Moabe,

Mpe ekozikisa bandako milai ya Keriote oyo etongami makasi.+

Moabe akokufa na kati ya mobulu,

Na makɛlɛlɛ ya ntangwa ya etumba, na lokito ya liseke.+

 3 Nakolongola moyangeli* kati na ye

Mpe nakoboma bankumu na ye nyonso elongo na ye,”+ Yehova alobi bongo.’

 4 Talá oyo Yehova alobi:

‘Mpo na botomboki misato ya Yuda,+ mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo baboyaki mobeko* ya Yehova,

Mpe batosaki te malako na ye;+

Kasi kaka makambo ya lokuta oyo bankɔkɔ na bango balandaki nde esali ete bango mpe bábunga nzela.+

 5 Yango wana nakotinda mɔtɔ na Yuda,

Mpe ekozikisa bandako milai ya Yerusaleme oyo etongami makasi.’+

 6 Talá oyo Yehova alobi:

‘Mpo na botomboki misato ya Yisraele,+ mpe mpo na minei, nakobongola te ekateli oyo nazwi,

Mpo batɛki moto ya sembo mpo na palata,

Mpe mobola mpo na sandale.+

 7 Bazali konyatanyata motó ya bato oyo bazangá na kati ya putulu ya mabele,+

Mpe bazali kokangela bato ya komikitisa nzela.+

Mobali moko ná tata na ye basangisi nzoto na mwana mwasi se moko,

Na bongo babebisi lokumu ya nkombo na ngai mosantu.

 8 Pembeni ya etumbelo nyonso,+ bazali komitanda na bilamba oyo bakangaki epai ya bato oyo bazali na nyongo na bango.*+

Mpe vinyo oyo bamɛli na ndako* ya banzambe na bango, bazwaki yango epai ya bato oyo bango bafutisaki lomande.’

 9 ‘Nzokande ngai nde nasilisaki Baamore liboso na bango,+

Oyo bazalaki milai lokola banzete ya sɛdrɛ, mpe makasi lokola banzete ya minene.

Nabebisaki mbuma na yango na likoló mpe misisa na yango na nse.+

10 Nabimisaki bino na mokili ya Ezipito,+

Mpe natambwisaki bino na esobe mbula 40,+

Mpo bózwa mokili ya Baamore.

11 Natyaki bana na bino mosusu ya mibali basakoli+

Mpe bilenge mibali na bino mosusu Banaziri.+

Ezali bongo te, Ee bato ya Yisraele?’ Yehova alobi bongo.

12 ‘Kasi bino bozalaki komɛlisa Banaziri vinyo,+

Mpe bopesaki basakoli mitindo ete: “Bosengeli kosakola te!”+

13 Yango wana nakonyata bino na esika bozali,

Kaka ndenge pusupusu oyo etondi na mbuma enyataka biloko nyonso oyo ekuti na nzela na yango.

14 Moto ya mbangu mingi akozala na esika ya kokima te,+

Moto ya makasi akobatela makasi na ye te,

Mpe ata elombe moko te ya bitumba akobikisa bomoi* na ye.

15 Moto oyo asimbi litimbo akokoka kotɛlɛma te,

Moto oyo atambolaka mbangu mingi akokima te,

Mpe motambwisi-mpunda akobikisa bomoi* na ye te.

16 Ata baoyo baleki na mpiko* kati na bilombe ya bitumba

Bakokima bolumbu na mokolo yango,’+ Yehova alobi bongo.”

3 “Bóyoka liloba oyo Yehova alobi mpo na bino, Ee bato ya Yisraele, mpo na libota mobimba oyo nabimisaki na mokili ya Ezipito:

 2 ‘Na mabota nyonso ya mabele, nayebaki kaka bino.+

Yango wana nakosɛnga bino bózongisa monɔkɔ mpo na mabunga na bino nyonso.+

 3 Bato mibale bakotambola nde elongo soki bayokani te mpo na kokutana?

 4 Nkɔsi ekoganga nde na zamba soki ezali na nyama ya kolya te?

Mwana-nkɔsi* ekoganga nde uta na esika na yango ya kobombama soki ekangi eloko te?

 5 Ndɛkɛ ekokangama nde na motambo soki moto atye motambo te na nse?*

Motambo etombwamaka nde uta na mabele soki ekangi ata eloko te?

 6 Soki babɛti kelelo na engumba, bafandi na yango bakolɛnga te?

Soki mpasi ebimi na engumba, ezali Yehova te moto ayeisi yango?

 7 Mpo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akosala likambo moko te

Kozanga ete ayebisa likambo na ye ya nkuku* epai ya basaleli na ye basakoli.+

 8 Nkɔsi egangi!+ Nani akobanga te?

Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi! Nani akosakola te?’+

 9 ‘Bósakola yango na bandako milai ya Ashedode oyo etongami makasi

Mpe na bandako milai ya mokili ya Ezipito oyo etongami makasi,

Bóloba: “Bóyangana esika moko na bangomba ya Samaria.+

Bótala yikiyiki oyo ezali kati na yango

Mpe kobuba oyo ezali kati na yango.+

10 Mpo bayebi te ndenge ya kosala oyo ezali sembo,” Yehova alobi bongo,

“Bato oyo babombaka biloko oyo bazwaka na mobulu mpe na kobebisa na kati ya bandako na bango ya milai oyo etongami makasi.”’

11 Yango wana, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

‘Monguna moko akozinga ekólo,+

Akosilisa yo makasi,

Bandako na yo ya milai oyo etongami makasi ekopunzama.’+

12 Talá oyo Yehova alobi:

‘Kaka ndenge mobateli ya mpate abɔtɔlaka na monɔkɔ ya nkɔsi makolo mibale to eteni ya litoi,

Kaka ndenge wana nde bato ya Yisraele bakobɔtɔlama,

Baoyo bafandi na Samaria na bambeto ya kitoko mpe na bakiti ya divan ya kitoko.’*+

13 ‘Bóyoka mpe bókebisa* libota ya Yakobo,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Nzambe ya mampinga, alobi bongo.

14 ‘Mpo mokolo oyo nakosɛnga Yisraele azongisa monɔkɔ mpo na botomboki* na ye nyonso,+

Nakosɛnga ye mpe azongisa monɔkɔ mpo na bitumbelo ya Betele;+

Mpe maseke ya etumbelo ekolongolama mpe ekokwea na mabele.+

15 Nakokweisa ndako ya eleko ya malili makasi mpe ndako ya eleko ya molunge.’

‘Bandako ya mpɛmbɛ ya nzoku ekobebisama,+

Mpe bandako minene* ekolimwa,’+ Yehova alobi bongo.”

4 “Bóyoka liloba oyo, bino bangɔmbɛ-basi ya Bashane,

Oyo bozali na ngomba ya Samaria,+

Bino basi oyo bobubaka bato mpamba+ mpe bonyataka babola,

Bolobaka na mibali* na bino: ‘Yelá biso eloko ya komɛla!’

 2 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alapi ndai na bosantu na ye ete:

‘“Talá! Mikolo ezali koyela bino, ntango akotombola bino na bibende ya kroshɛ oyo bakakisaka misuni ya nyama

Mpe akotombola baoyo bakotikala na kati na bino na bandɔbɔ.

 3 Bokobima na madusu oyo esalemi na efelo, mokomoko elongi liboso na ye;

Mpe bokobwakama na Harmone,” Yehova alobi bongo.’

 4 ‘Bóya na Betele mpe bóbuka mibeko,*+

Bóya na Gilgale mpe bóbuka mibeko mingi koleka!+

Bómema bambeka na bino+ na ntɔngɔ,

Mpe moko ya bandambo zomi* na bino+ na mokolo ya misato.

 5 Bótumba mampa oyo batyá levire lokola mbeka ya kopesa matɔndi,+

Bólobela na mongongo makasi makabo oyo bopesi na bolingo!

Mpo yango nde bolingaka kosala, Ee bato ya Yisraele,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

 6 ‘Mpe ngai, na bingumba na bino nyonso nakómisaki mino na bino pɛto mpo na kozanga bilei*

Mpe nasalaki ete mampa ezanga na bandako na bino nyonso.+

Kasi bozongelaki ngai te,’+ Yehova alobi bongo.

 7 ‘Napimelaki bino mpe mbula sanza misato liboso ya eleko ya kobuka mbuma.+

Nanɔkisaki mbula na engumba moko, kasi na engumba mosusu te.

Mbula ezalaki konɔka na eteni moko ya mabele,

Kasi na eteni mosusu ya mabele mbula ezalaki konɔka te mpe eteni yango ezalaki kokauka.

 8 Bato ya bingumba mibale to misato bazalaki kokende na kotengatenga na engumba moko mpo na komɛla mai,+

Mpe bazalaki kotonda te.

Kasi bozongelaki ngai te,’+ Yehova alobi bongo.

 9 ‘Natindelaki bilanga na bino mipɛpɛ ya molunge oyo ekaukisaka milona mpe koguga.+

Bobakisaki bilanga mpe bilanga ya vinyo,

Kasi mayoyo ezalaki kolya banzete na bino ya figi mpe banzete na bino ya olive.+

Atako bongo bozongelaki ngai kaka te,’+ Yehova alobi bongo.

10 ‘Natindaki kati na bino maladi mabe lokola oyo ebɛtaki Ezipito.+

Nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga,+ mpe nakangaki bampunda na bino.+

Namatisaki tii na bazolo na bino nsolo mabe ya bibembe oyo ezalaki na bakaa na bino;+

Kasi bozongelaki ngai te,’ Yehova alobi bongo.

11 ‘Nayeisaki libebi kati na bino,

Lokola libebi oyo nayeisaki na Sodoma mpe Gomora.+

Mpe bozalaki lokola nkoni oyo elongolami na mɔtɔ.

Kasi bozongelaki ngai te,’+ Yehova alobi bongo.

12 Na bongo, nakopesa yo lisusu etumbu, Ee Yisraele!

Lokola nakosala yo bongo,

Omilɛngɛla mpo na kokutana na Nzambe na yo, Ee Yisraele!

13 Mpo yoká! Ye nde asalaki bangomba+ mpe akelaki mopɛpɛ.+

Ayebisaka bato makanisi na ye,

Abongolaka pole ya kotana ya ntɔngɔ ekóma molili.+

Mpe atambolaka na bisika oyo etombwaná ya mabele.+

Nkombo na ye Yehova Nzambe ya mampinga.”

5 “Bóyoka liloba oyo nazali koloba mpo na bino lokola loyembo ya mawa,* Ee bato ya Yisraele:

 2 ‘Ngɔndɔ, Yisraele, akwei;

Akoki kotɛlɛma lisusu te.

Basundoli ye na mabele na ye moko;

Moto ya kotɛlɛmisa ye azali te.’

3 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:

‘Engumba oyo ekendaka etumba na mibali nkóto ekotikala na nkama;

Mpe oyo ekendaka etumba na mibali nkama ekotikala na zomi, yango nde ekokómela bato ya Yisraele.’+

4 “Mpo talá oyo Yehova alobi na bato ya Yisraele:

‘Bóluka ngai, mpe bótikala na bomoi.+

 5 Bókende na Betele te,+

Bókende na Gilgale te,+ mpe bókatisa te bandelo mpo na kokende na Beere-sheba,+

Mpo Gilgale ekomemama mpenza na mboka mopaya,+

Mpe Betele ekozala lisusu te.*

 6 Bóluka Yehova, mpe bótikala na bomoi,+

Soki te akoya lokola mɔtɔ na libota ya Yozefe,

Mpe akozikisa Betele mpe moto ya koboma mɔtɔ yango akozala te.

 7 Bokómisi bosembo nzete ya bololo,*

Mpe bobwaki boyengebene na mabele.+

 8 Ye oyo asalaki liboke ya minzoto ya Kima* mpe liboke ya minzoto ya Kesile,*+

Ye oyo abongolaka molili makasi ekóma pole ya ntɔngɔ,

Ye oyo asalaka ete moi ekóma molili mpenza lokola butu,+

Ye oyo abengaka mai ya mbu

Mpo na kosopa yango na etando ya mabele+

—nkombo na ye Yehova.

 9 Akoyeisela moto ya makasi libebi,

Akobebisa bisika oyo ebatelami makasi.

10 Bayinaka basambisi oyo bapamelaka na porte ya engumba,

Mpe bayinaka baoyo balobaka makambo na bosolo.+

11 Lokola bosɛngaka mobola afuta mbongo* mpo na bilanga oyo azali kosala,

Mpe bozwaka mbuma na ye lokola mpako,+

Bokokoba te kofanda na bandako oyo botongaki na mabanga oyo ekatami malamu+

To mpe komɛla vinyo oyo euti na bilanga ya kitoko ya vinyo oyo bolonaki.+

12 Mpo nayebi ete botomboki* na bino ezali mingi

Mpe masumu na bino ezali minene,

Bozali kotungisa moto ya sembo,

Bozali kondima kanyaka,*

Mpe bokataka likambo ya mobola na bosembo te na porte ya engumba.+

13 Yango wana, na ntango yango, baoyo bazali na mayele ya kososola bakofanda nyɛɛ,

Mpo ekozala ntango moko ya mpasi.+

14 Bósala oyo ezali malamu, kasi oyo ezali mabe te,+

Mpo bótikala na bomoi.+

Bongo Yehova Nzambe ya mampinga akozala na bino,

Kaka ndenge bozali koloba.+

15 Bóyina oyo ezali mabe, mpe bólinga oyo ezali malamu,+

Bósala ete bosembo ezala na porte ya engumba.+

Mbala mosusu Yehova Nzambe ya mampinga

Akomonisa boboto epai ya bato ya Yozefe oyo batikali.’+

16 “Na yango, talá oyo Yehova Nzambe ya mampinga, Yehova, alobi:

‘Na bisika minene nyonso ya bato nyonso kolela ekozala,

Mpe na babalabala nyonso bakoloba: “Mawa, Mawa!”

Bakobenga basali-bilanga mpo básala matánga,

Mpe baoyo bayekolá kolela mpo bálela.’

17 ‘Na kati ya bilanga nyonso ya vinyo kolela ekozala;+

Mpo nakoleka katikati na yo,’ Yehova alobi bongo.

18 ‘Mawa na baoyo bazali na mposa makasi ya mokolo ya Yehova!+

Boye, mokolo ya Yehova ekolimbola nini mpo na bino?+

Ekozala mokolo ya molili, kasi ya pole te.+

19 Ekozala lokola mobali moko azali kokima nkɔsi mpe akutani na urse,

Mpe ntango akɔti na ndako na ye, atye lobɔkɔ na efelo, nyoka eswi ye.

20 Mokolo ya Yehova ekozala molili, kasi pole te;

Ekozala na molili makasi, mpe kongɛnga te!

21 Nayini, naboyi mpenza bafɛti na bino,+

Mpe nazali kosepela ata moke te na nsolo ya mayangani na bino ya minene.

22 Ata soki bopesi ngai bambeka mibimba ya kotumba mpe makabo,

Nakosepela na yango te,+

Nakoboya kotala banyama na bino ya mafutamafuta ya mbeka ya kimya.+

23 Bólongola makɛlɛlɛ ya nzembo na bino pene na ngai,

Mpo nalingi koyoka te mindule ya bibɛtɛlo na bino ya bansinga.+

24 Tiká ete bosembo etíyola lokola mai,+

Mpe boyengebene lokola mokɛli ya mai oyo ekaukaka te.

25 Bozalaki nde komemela ngai bambeka mpe makabo

Na boumeli ya mbula 40 oyo bolekisaki na esobe, Ee bato ya Yisraele?+

26 Sikoyo bokomema Sakute mokonzi na bino mpe Kaiwane,*

Bikeko na bino, monzoto ya nzambe na bino, oyo bomisalelaki,

27 Mpe nakotinda bino na mboka mopaya koleka Damasi,’+ ye oyo nkombo na ye ezali Yehova Nzambe ya mampinga alobi bongo.”+

6 “Mawa na bato ya Siona oyo bamityelaka motema,

Na baoyo bamonaka ete bazali na likambo ya kobanga te na ngomba ya Samaria,+

Mibali ya lokumu ya ekólo oyo eleki bikólo nyonso,

Baoyo epai na bango bato ya Yisraele bayei!

 2 Bókende na Kalné mpe bótala.

Soki bokómi kuna bókende na Hamate monene,+

Na nsima bókita na Gate ya Bafilistia.

Ezali nde malamu mingi koleka makonzi oyo,*

To teritware na bango ezali monene mingi koleka oyo ya bino?

 3 Bozali nde kolongola na makanisi na bino mokolo ya mpasi,+

Mpe bozali nde koyeisa boyangeli* moko ya mobulu?+

 4 Balalaka na bambeto ya mpɛmbɛ ya nzoku+ mpe bamitandaka na bakiti ya divan,+

Bazali kolya bampate-mibali ya etonga mpe bana-ngɔmbɛ* ya mafutamafuta.+

 5 Babimisaka nzembo ya sika ntango bayoki nzɛnzɛ ezali kobɛta,+

Mpe lokola Davidi, basalaka bibɛtɛlo ya miziki;*+

 6 Bamɛlaka vinyo na bakɔpɔ ya minene,+

Mpe na nzoto na bango, bapakolaka mafuta oyo eleki malamu.

Kasi bazali komitungisa te* mpo na likama ya Yozefe.+

 7 Na yango, bakozala liboso kati na baoyo bamemami na mboka mopaya,+

Mpe fɛti ya lokoso ya baoyo bamitandaka ekosila.

 8 ‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alapi ndai na nkombo na ye moko,’*+ Yehova Nzambe ya mampinga alobi bongo:

‘“Naboyi mpenza lolendo ya Yakobo,+

Nayini bandako na ye ya milai oyo etongami makasi,+

Mpe nakokaba engumba yango ná biloko oyo etondisi yango.+

9 “‘“Mpe soki mibali zomi batikali na ndako moko, bango mpe bakokufa. 10 Ndeko moko ya libota* akoya. Akomema bango na libándá, mpe akotumba bango mokomoko. Akobimisa mikuwa na bango na ndako. Na nsima akotuna moto nyonso oyo azali na bashambrɛ ya kati ya ndako, ete: ‘Moto mosusu azali na yo?’ Mpe ye akoloba: ‘Te, moto te!’ Na nsima akoloba: ‘Fandá nyɛɛ! Mpo oyo ezali te ntango ya kotánga nkombo ya Yehova.’”

11 Mpo Yehova nde azali kopesa etinda,+

Akokweisa ndako ya monene mpe akobukabuka yango,

Akokweisa ndako ya moke mpe ekotikala biteni ya mikemike.+

12 Bampunda epotaka nde mbangu likoló ya mabanga?

To moto akobalola nde mabele na bangɔmbɛ kuna?

Mpo bokómisi bosembo molona ya pwazɔ,

Mpe bokómisi mbuma ya boyengebene nzete ya bololo.*+

13 Bozali kosepela na makambo oyo ezangi ntina,

Mpe bozali koloba: “Tokómi na nguya* na makasi na biso moko te?”+

14 Yango wana, Ee bato ya Yisraele, nakobimisa ekólo moko mpo ebundisa bino,’+ Yehova Nzambe ya mampinga alobi bongo,

‘Mpe bakonyokola bino banda na Lebo-hamate*+ tii na Lobwaku* ya Araba.’”

7 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso amonisaki ngai: Abimisaki ebele ya mayoyo na ntango milona ya nsuka ebandaki kobima.* Ezalaki milona ya nsuka oyo balonaki nsima ya kokatela mokonzi matiti ya koleisa banyama. 2 Ntango ebele yango ya mayoyo esilisaki kolya matiti ya ekólo, nalobaki: “Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, nabondeli yo, limbisá bato na yo!+ Yakobo akobika* ndenge nini? Mpo azali na makasi te!”+

3 Na yango Yehova atalelaki lisusu* ekateli na ye.+ “Yango ekosalema te,” Yehova alobi bongo.

4 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso amonisaki ngai: Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobaki ete akopesa bato na ye etumbu na mɔtɔ. Mɔtɔ ekaukisaki mai monene ya mozindo mpe ezikisaki eteni moko ya ekólo. 5 Bongo nalobaki: “Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, nabondeli yo, kosala boye te.+ Yakobo akobika* ndenge nini? Mpo azali na makasi te!”+

6 Na yango Yehova atalelaki lisusu* ekateli na ye.+ “Yango mpe ekosalema te,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.

7 Talá oyo amonisaki ngai: Yehova atɛlɛmaki na efelo moko oyo batongaki na lisalisi ya nsinga ya nivo, mpe asimbaki nsinga ya nivo na lobɔkɔ na ye. 8 Bongo Yehova atunaki ngai: “Amose, ozali komona nini?” Nayanolaki: “Nsinga ya nivo.” Mpe Yehova alobaki: “Nakotya nsinga ya nivo na kati ya bato na ngai, Yisraele. Nakolimbisa bango lisusu te.+ 9 Bisika oyo etombwaná ya Yisaka+ ekotikala mpamba, mpe bisika mosantu ya Yisraele ekobebisama.+ Mpe nakobundisa libota ya Yeroboame na mopanga.”+

10 Amazia, nganga-nzambe ya Betele,+ atindelaki Yeroboame mokonzi+ ya Yisraele maloba oyo: “Amose azali kosalela yo likita na kati mpenza ya Yisraele.+ Bato ya ekólo bazali kokoka lisusu kokanga motema te na maloba na ye.+ 11 Mpo talá oyo Amose alobi: ‘Yeroboame akokufa na mopanga; mpe Yisraele ekomemama na mboka mopaya mosika na mokili na yango.’”+

12 Bongo Amazia alobaki na Amose: “Ee yo momoni-bimonaneli, kende, kimá na mokili ya Yuda. Luká mosala ya kobikela* kuna, mpe kuna okoki kosakola.+ 13 Kasi osengeli kosakola lisusu na Betele te,+ ezali esika mosantu ya mokonzi moko+ mpe tempelo* ya bokonzi moko.”

14 Bongo Amose ayanolaki Amazia: “Nazalaki mosakoli te, nazalaki mpe mwana ya mosakoli te; kasi nazalaki kobɔkɔla banyama+ mpe kobongisa banzete ya figi ya sikomore.* 15 Kasi Yehova azwaki ngai ntango nazalaki kokɛngɛla etonga ya bampate, mpe Yehova alobaki na ngai: ‘Kende, sakwelá bato na ngai Yisraele.’+ 16 Yango wana sikoyo yoká liloba ya Yehova: ‘Ozali koloba: “Kosakola likama mpo na Yisraele te,+ mpe kosakola te+ bansango ya etumbu mpo na libota ya Yisaka.” 17 Yango wana talá oyo Yehova alobi: “Mwasi na yo akokóma ndumba na engumba, mpe bana na yo ya mibali ná bana na yo ya basi bakokufa na mopanga. Mabele na yo ekokabolama na nsinga ya komeka. Mpe yo moko okokufa na ekólo moko ya mbindo; mpe Yisraele akomemama mpenza na mboka mopaya mosika na mokili na ye.”’”+

8 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso amonisaki ngai! Namonaki kitunga moko ya bambuma oyo eteli.* 2 Bongo atunaki ngai: “Amose, ozali komona nini?” Nazongisaki: “Kitunga moko ya bambuma oyo eteli.”* Bongo Yehova alobaki na ngai: “Nsuka ya bato na ngai Yisraele ekómi. Nakolimbisa bango lisusu te.+ 3 ‘Na mokolo yango nzembo ya tempelo ekobongwana kolela,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. ‘Ekozala na bibembe ebele, oyo bakobwaka bisika nyonso.+ Shiii!’

 4 Bóyoka likambo oyo, bino baoyo bozali konyatanyata babola,

Mpe kolimwisa bato ya komikitisa na ekólo,+

 5 Bozali koloba: ‘Ntango nini fɛti ya sanza ya sika ekosila,+ mpo tókoka kotɛka mbuma na biso?

Mpe sabata,+ mpo tókoka kotya mbuma na biso mpo na kotɛka?

Bongo tokokómisa mezire ya efa* moke,

Mpe tokobakisa kilo ya shekele*

Mpe tokobongola bimekeli-kilo na biso mpo na kokosa bato;+

 6 Mpo tókoka kosomba moto oyo azangá mpo na palata

Mpe mobola mpo na sandale,+

Mpe mpo tókoka kotɛka putulu mpamba ya mbuma na biso.’

 7 Yehova alapi ndai na Lokumu ya Yakobo:+

‘Nakobosana ata moke te makambo nyonso oyo basalaki.+

 8 Mpo na yango, mokili* ekoningana,

Mpe bafandi na yango nyonso bakolela.+

Ekomata te lokola Nile ntango mai na yango etondi?

Ekotombwana mpe ekokita na nse lokola Nile ya Ezipito.’+

 9 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi,

‘Na mokolo yango nakosala ete moi elala na ntango ya midi,

Mpe nakotika ekólo ezala kaka na molili, wana moi ezali kongɛnga.+

10 Nakokómisa bafɛti na bino matánga+

Mpe banzembo na bino nyonso banzembo ya mawa.*

Nakolatisa loketo nyonso ngɔtɔ* mpe nakokómisa mitó nyonso mabandi;

Nakosala ete ezala lokola kolela oyo balelaka mwana mobali kaka moko,

Mpe nsuka ya mokolo yango ekozala bololo.’

11 ‘Bóyoka!’ Yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, mikolo ezali koya,

‘Nakotinda nzala moko na mokili,

Nzala ya mampa te to mposa ya mai te,

Kasi ya koyoka maloba ya Yehova.+

12 Bakotambola na kotengatenga longwa na mbu moko tii na mbu mosusu,

Mpe longwa na nɔrdi tii na ɛsti.*

Bakotambola epai na epai mpo na koluka liloba ya Yehova, kasi bakomona yango te.

13 Na mokolo yango bangɔndɔ kitoko bakosila makasi,

Ata mpe bilenge mibali, mpo na mposa ya mai;

14 Baoyo bazali kolapa ndai na libunga ya Samaria,+ mpe bazali koloba:

“Lokola nzambe na yo azali solo na bomoi, Ee Dani!”+

Mpe, “Lokola nzela ya Beere-sheba+ ezali kaka!”

Bakokwea, mpe bakotɛlɛma lisusu te.’”+

9 Namonaki Yehova+ atɛlɛmi likoló ya etumbelo, mpe alobaki: “Bɛtá mitó ya makonzí, bongo bisika ya kokɔta na ndako ekoningana. Katá yango mitó, mpe nakoboma baoyo ya nsuka na mopanga. Na baoyo bakokima, moko te akolonga kokima mosika, mpe oyo akoluka kobika, akolonga te.+

 2 Soki batimoli mpo na kobombana na Nkunda,*

Lobɔkɔ na ngai ekozwa bango kaka;

Mpe ata soki bamati tii na likoló,

Nakokitisa bango kaka.

 3 Soki bamibombi na nsɔngɛ ya Karamele,

Nakokende koluka bango kuna mpe nakozwa bango.+

Soki bamibombi liboso ya miso na ngai na nse ya mbu,

Nakopesa nyoka mitindo mpe ekoswa bango kuna.

 4 Soki bamemami lokola bakangami na mboka ya banguna na bango,

Kuna nakopesa mopanga mitindo mpe ekoboma bango;+

Nakobanda kotala bango mpo na kosala bango mabe, kasi malamu te.+

 5 Mpo ezali Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova ya mampinga, nde akosimba ekólo,*

Bongo ekonyangwa;+ mpe bafandi na yango nyonso bakolela;+

Ekólo mobimba ekomata lokola Nile ntango mai na yango etondi,

Mpe ekokita na nse lokola Nile ya Ezipito.+

 6 ‘Ye oyo atongaka baeskalye na ye na likoló,

Mpe atɛlɛmisaka ndako* na ye likoló ya mabele;

Ye oyo abengaka mai ya mbu,

Mpo na kosopa yango na etando ya mabele+

—Nkombo na ye Yehova.’+

 7 ‘Ee bato ya Yisraele, na miso na ngai bozali te lokola bana ya Bakushi?’ Yehova alobi bongo.

‘Ngai nabimisaki te Yisraele na mokili ya Ezipito,+

Bafilistia na Krɛtɛ,+ mpe Siri na Kire?’+

 8 ‘Bóyoka! Miso ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali likoló ya bokonzi oyo esali masumu,

Mpe akolimwisa yango na mokili.+

Kasi nakolimwisa te libota* ya Yakobo,’+ Yehova alobi bongo.

 9 ‘Mpo talá! nazali kopesa mitindo,

Mpe nakoningisa bato ya Yisraele na kati ya bikólo nyonso,+

Ndenge baningisaka kiyungulu,

Mpe ata libanga moko te ekokwea na mabele.

10 Bakokufa na mopanga, bato na ngai nyonso oyo bazali kosala masumu,

Baoyo bazali koloba ete: “Mpasi ekokóma pene na biso te to ekozwa biso te.”’

11 ‘Na mokolo yango nakotɛlɛmisa mwa ndako ya matiti* ya Davidi+ oyo ekweá,

Nakozipa madusu,*

Mpe nakobongisa bisika na yango oyo ebebá;

Nakotonga yango lisusu ndenge ezalaki kala,+

12 Mpo bázwa eloko ya Edome oyo etikali,+

Mpe bikólo nyonso oyo ebengami na nkombo na ngai,’ Yehova alobi bongo, ye oyo akosala bongo.

13 ‘Bóyoka! Mikolo ezali koya,’ Yehova alobi bongo,

‘Moto oyo abalolaka mabele akokuta moto oyo azali kobuka mbuma,

Moto oyo azali konyata mbuma ya vinyo akokuta moto oyo azali kolona mboto;+

Bangomba ekotangisa vinyo ya elɛngi,+

Mpe bangomba mike nyonso ekotonda na yango.*+

14 Nakozongisa bato na ngai ya Yisraele oyo bazali bakangami,+

Bakotonga lisusu bingumba oyo etikalaki mpamba mpe bakofanda kati na yango;+

Bakolona banzete ya vinyo mpe bakomɛla vinyo na yango,+

Bakosala bilanga mpe bakolya mbuma na yango.’+

15 ‘Nakolona bango na mabele na bango,

Mpe nakopikola bango lisusu ata mokolo moko te

Na mabele oyo napesaki bango,’+ Yehova Nzambe na yo alobi bongo.”

Elimboli, “oyo ezali mokumba” to “oyo ememi mokumba.”

To, “makambo ya mabe.”

Lil., “moto oyo asimbi lingenda ya bokonzi.”

Lil., “moto oyo asimbi lingenda ya bokonzi.”

Lil., “Nakobalolela Ekrone lobɔkɔ.”

To, “manɔ́ngi na yango.”

To, “makambo ya mabe.”

Lil., “mosambisi.”

To, “mateya.”

To, “bakangaki lokola ndanga.”

To, “tempelo.”

To, “molimo.”

To, “molimo.”

To, “baoyo bazali motema mpiko.”

To, “Mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

To mbala mosusu, “soki mpambo ezali te na kati ya motambo?”

To, “sekele.”

To, “ya Damasi.”

To, “bópesa litatoli na.”

To, “makambo ya mabe.”

To mbala mosusu, “Mpe mingi.”

To, “bankolo.”

To, “bótomboka.”

To, “badime.”

To, “napesaki bino eloko moko te ya kolya.”

To, “loyembo ya matánga.”

To mbala mosusu, “ekokóma eloko moko ya maji.”

To, “mbondo.”

Mbala mosusu ezali liboke ya minzoto oyo ezali komonana lokola ngɔmbɛ mobali.

Mbala mosusu liboke ya minzoto ya Orion.

To, “mpako ya mabele.”

To, “makambo ya mabe.”

To, “mbongo ya kokangisa monɔkɔ.”

Mbala mosusu banzambe yango mibale ezalaki komonisa planɛti Saturne, oyo bato bazalaki kosambela lokola nzambe.

Ekoki kozala bokonzi ya Yuda mpe bokonzi ya Yisraele.

Lil., “kiti.”

To, “bana-ngombɛ ya mibali.”

To, “bibɛtɛlo ya bansinga.”

Lil., “babɛlaki te.”

To, “molimo na ye.”

Lil., “Ndeko ya tata na ye.”

To, “mbondo.”

Lil., “Tozwi maseke.”

To, “na ekɔtelo ya Hamate.”

To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, na sanza ya yambo mpe na sanza ya mibale ya kalandriye ya lelo.

Lil., “akotɛlɛma.”

To, “ayokaki mawa mpo na.”

Lil., “akotɛlɛma.”

To, “ayokaki mawa mpo na.”

Lil., “Lyá limpa.”

Lil., “ndako.”

To, “nazalaki motubi ya mbuma ya figi ya sikomore.”

To, “mbuma ya eleko ya molunge.”

To, “mbuma ya eleko ya molunge.”

Talá Ap. B14.

Talá Ap. B14.

To, “mabele.”

To, “banzembo ya matánga.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “epai moi ebimaka.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “mabele.”

To, “ndako ya nsamba oyo egumbamá.”

To, “ndako.”

To, “hema.”

To, “madusu na yango.”

Lil., “bangomba mike nyonso ekonyangwa.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto