YOELE
1 Liloba oyo Yehova alobaki na Yoele* mwana ya Petuele:
Likambo ya boye esilá nde kosalema na eleko na bino,
To na eleko ya bankɔkɔ na bino?+
3 Bóyebisa yango bana na bino.
Mpe tiká bana na bino báyebisa yango bana na bango,
Mpe bana na bango báyebisa yango na libota oyo ekolanda.
4 Oyo liyoyo oyo ebebisaka etiki, liyoyo ya mapapu elei yango;+
Oyo liyoyo ya mapapu etiki, liyoyo oyo ezangá mapapu elei yango;
Mpe oyo liyoyo oyo ezangá mapapu etiki, liyoyo ya lokoso elei yango.+
5 Bólamuka, bino balangwi-masanga,+ mpe bólela!
Bóganga na kolela, bino nyonso bamɛli-vinyo,
Mpo balongoli vinyo ya elɛngi na monɔkɔ na bino.+
6 Mpo ekólo moko ekɔti na mokili na ngai, ezali na nguya mpe motángo ya bato na yango eyebani te.+
Mino na yango ezali mino ya nkɔsi,+ mpe mbanga na yango ezali ya nkɔsi.
7 Ebebisi mpenza nzete na ngai ya vinyo mpe nzete na ngai ya figi, etiki kaka eteni ya nse.*
Etiki yango bolumbu mpenza mpe ebwaki yango pembeni,
Ekómisi bitape na yango ya mikemike mpɛmbɛ.
9 Likabo ya mbuma+ mpe likabo ya masanga+ ezali lisusu te na ndako ya Yehova;
Banganga-nzambe, basaleli ya Yehova, baleli.
10 Elanga ebebisami, mabele ezali kolela;+
Mpo mbuma ebebisami, vinyo ya sika ekauki, mpe mafuta ezali lisusu te.+
11 Baloni-bilanga bazali kobanga, basali-bilanga ya vinyo bazali koganga na kolela,
Mpo blé ná ɔrje ezali te;
Mpamba te biloko nyonso na bilanga ebebi.
12 Nzete ya vinyo ekauki,
Nzete ya figi ekufi.
Nzete ya grenade, nzete ya mbila, mpe nzete ya pɔme.
Banzete nyonso ya elanga ekaukikauki;+
Ɛɛ, esengo ya bato ya ekólo ebaluki nsɔni.
13 Bólata ngɔtɔ* mpe bólela,* bino banganga-nzambe;
Bóganga na kolela, bino baoyo bosalaka na etumbelo.+
Bino basaleli ya Nzambe na ngai, bókɔta, bólata ngɔtɔ butu mobimba;
Mpo likabo ya mbuma+ mpe likabo ya masanga+ ezali kopesama lisusu te na ndako ya Nzambe na bino.
14 Bóyebisa* bato bákila bilei; bóbengisa bato na liyangani moko monene.+
Yanganisá bankulutu esika moko, ná bafandi nyonso ya ekólo,
Na ndako ya Yehova Nzambe na bino,+ mpe bóbelela Yehova mpo asalisa bino.
15 Mawa mpo na mokolo yango!
Mpo mokolo ya Yehova ekómi pene,+
Mpe ekoya lokola libebi oyo euti epai ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso!
16 Balongoli bilei liboso ya miso na biso,
Mpe kosepela ná esengo elongwe na ndako ya Nzambe na biso.
17 Mbuma* ekauki na nse ya bapau na yango.
Bandako ya kobomba biloko etikali mpamba.
Babuki bisika ya kobomba mbuma, mpo mbuma ekauki.
18 Ata bibwɛlɛ ezali koganga!
Bitonga ya bangɔmbɛ ezali kotelengana, mpo ezali na esika ya kolya matiti te!
Mpe bitonga ya bampate ezwi etumbu.
19 Ee Yehova, yo nde nakobenga;+
Mpo mɔtɔ etumbi bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na esobe,
Mpe mɔtɔ ezikisi banzete nyonso ya elanga.
20 Ata banyama ya zamba eluki yo,
Mpo banzela ya mai ekauki
Mpe mɔtɔ etumbi bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na esobe.”
Bóbɛta ntangwa ya etumba na ngomba na ngai mosantu.
2 Ezali mokolo ya kozanga pole mpe ya molili,+
Mokolo ya mapata mpe ya molili makasi,+
Lokola pole ya ntɔngɔntɔngɔ oyo ezali kobima likoló ya bangomba.
Ezali na ekólo moko ya bato ebele mpe ya nguya;+
Ekólo ya ndenge wana emonanaki te liboso na yango,
Mpe mosusu ya ndenge wana ekomonana te nsima na yango
Na mabota nyonso oyo ekolanda.
Mokili oyo ezali liboso na bango ezali lokola elanga ya Edene,+
Kasi nsima na bango, ezali esobe oyo etikali mpamba,
Mpe eloko moko te ekoki kotikala.
5 Makɛlɛlɛ oyo bazali kosala ntango bazali kopumbwapumbwa na nsɔngɛ ya bangomba,+
Ezali lokola makɛlɛlɛ ya makalo ya bitumba, lokola makɛlɛlɛ ya mɔtɔ makasi oyo ezali kozikisa matiti ekauká.
Bazali lokola bato ya ekólo moko ya nguya, oyo batandami na molɔngɔ lokola bakei na etumba.+
6 Bato nyonso bakozala na mpasi mpo na bango.
Bilongi nyonso ekozala mawamawa.*
7 Bazali koya mbangu lokola bilombe ya etumba,
Bazali komata efelo lokola basoda,
Mokomoko azali kokende liboso na nzela na ye,
Mpe bazali kolongwa na banzela na bango te.
8 Bazali kotindikana te;
Mobali mokomoko azali kolanda nzela na ye.
Soki bamosusu bakwei mpo bibundeli* ezwi bango,
Bamosusu bazali kolongwa na molɔngɔ te.
9 Bazali kopanzana na engumba, bazali kokima mbangu likoló ya efelo.
Bazali komata na bandako, bazali kokɔta na bafɛnɛtrɛ lokola miyibi.
10 Liboso na bango, ekólo ezali kolɛnga mpe likoló eningani.
Moi mpe sanza ekómi molili,+
Mpe minzoto etiki kongɛnga.
11 Yehova akotombola mongongo liboso ya limpinga na ye,+ mpo limpinga na ye ezali na bato ebele mpenza.+
Mpo ye oyo azali kokokisa liloba na ye azali na nguya.
Mpo mokolo ya Yehova ezali monene mpe ezali nsɔmɔ mpenza.+
Nani akokoka yango?”+
12 Yehova alobi: “Nzokande ata sikoyo,” “bózongela ngai na motema mobimba,+
Bókila bilei,+ bólela mpe bóganga na kolela.
13 Bópasola mitema na bino,+ kasi bilamba na bino te,+
Mpe bózongela Yehova Nzambe na bino,
Mpo azali na ngɔlu mpe na motema mawa, ayokaka nkanda noki te+ mpe atondi na bolingo ya sembo,+
Mpe akotalela lisusu* mpasi oyo akanaki koyeisa.
14 Nani ayebi? Mbala mosusu akobongola makanisi mpe akotalela lisusu* ekateli na ye,+
Mpe mbala mosusu akopesa bino lipamboli,
Mpo bópesa likabo ya mbuma mpe likabo ya masanga mpo na Yehova Nzambe na bino.
Bóyebisa* bato bákila bilei; bóbengisa bato na liyangani moko monene.+
16 Bóyanganisa bato, bósantisa lisangá.+
Bóyanganisa mibange,* bósangisa bana mpe bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ.+
Tiká ete mobali ya libala abima na shambrɛ na ye ya kati, mpe mwasi ya libala abima na shambrɛ na ye ya libala.
17 Na katikati ya ndako ya kokɔtela mpe etumbelo,+
Tiká ete banganga-nzambe, bato oyo basalelaka Yehova, bálela mpe báloba:
‘Ee Yehova, yokelá bato na yo mawa!
Kotika te ete bátyola libula na yo,
Soki otiki bikólo eyangela yango.
Mpo na nini bato ya bikólo báloba: “Nzambe na bango azali wapi?”’+
19 Yehova akoyanola bato na ye boye:
‘Nakotindela bino mbuma, vinyo ya sika mpe mafuta,
Mpe bokotonda mpenza.+
Nakotika lisusu te ete bátyola bino na kati ya bikólo.+
20 Nakobengana moto ya nɔrdi mosika na bino;
Nakopalanganisa ye na mokili oyo ekauká mpe oyo etikalá mpamba.
Bato na ye oyo bazali liboso,* nakotinda bango na ngámbo ya mbu oyo ezali na ɛsti.*
Mpe bato na ye oyo bazali na nsima, nakotinda bango na ngámbo ya mbu oyo ezali na wɛsti.*
Nsolo na ye ya mabe ekomata,
Nsolo na ye ya mabe makasi ekokoba komata;+
Mpo nakosala makambo ya minene.’
21 Kobanga te, Ee ekólo!
Zalá na esengo mpe sepelá, mpo Yehova akosala makambo ya minene.
22 Bóbanga te, bino banyama ya esobe,
Mpo matiti ya esobe ekokóma lisusu mobesu,+
Mpe banzete ekobota mbuma na yango;+
Nzete ya figi mpe nzete ya vinyo ekobota mbuma mingi mpenza.+
23 Bino bana ya Siona, bózala na esengo mpe bósepela mpo na Yehova Nzambe na bino.+
Mpo akopesa bino mbula ya eleko ya otɔnɛ na ndenge oyo ekoki,
Akonɔkisela bino mbula makasi,
Mbula ya eleko ya otɔnɛ mpe mbula ya eleko ya prɛnta, ndenge ezalaki liboso.+
24 Bisika ya kotutatuta mbuma ekotonda na mbuma oyo epɛtolami,
Mpe bikamwelo ekotonda mɛkɛ na vinyo ya sika mpe mafuta.+
25 Mpe nakofuta bino biloko na bino oyo elyamaki bambula mingi
Oyo liyoyo ya mapapu, liyoyo ezangá mapapu, liyoyo ya lokoso, mpe liyoyo oyo ebebisaka elyaki,
Limpinga na ngai monene oyo natindelaki bino.+
26 Bokolya mpe bokotonda mpenza,+
Mpe bokosanzola nkombo ya Yehova Nzambe na bino,+
Oyo asali makambo ya kokamwa mpo na bino.
Bato na ngai bakoyoka lisusu nsɔni ata mokolo moko te.+
27 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali na kati ya Yisraele,+
Mpe ete nazali Yehova Nzambe na bino;+ mosusu azali te!
Bato na ngai bakoyoka lisusu nsɔni ata mokolo moko te.
28 Nsima na yango, nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai.+
Mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola,
Mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ,
Mpe bilenge na bino ya mibali bakomona bimonaneli.+
29 Ata epai ya baombo na ngai ya mibali mpe baombo na ngai ya basi,
Nakosopa elimo na ngai na eleko yango.
31 Moi ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila,+
Liboso ete mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova eya.+
32 Mpe moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.+
Mpo kaka ndenge Yehova alobi yango, na Ngomba Siona mpe na Yerusaleme, ekozala na bato oyo bakobika,+
Bato oyo bakobika, oyo Yehova abengi.”
3 “Mpo talá! na eleko yango mpe na ntango yango,
Ntango nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yerusaleme,+
2 Nakosangisa mpe bikólo nyonso
Nakosambisa bango kuna+
Mpo na oyo basali bato na ngai mpe libula na ngai Yisraele,
Mpo bapanzaki bango na kati ya bikólo,
Mpe bakabolaki mokili na ngai kati na bango.+
3 Bazalaki kobwaka mbɛsɛ mpo na kokabola bato na ngai;+
Bazalaki kotɛka mwana mobali mpo na kozwa mwasi ya ndumba
Mpe bazalaki kotɛka mwana mwasi mpo na kozwa vinyo ya komɛla.
4 Lisusu bozali koluka nini epai na ngai,
Ee Tire ná Sidone ná bino nyonso bitúká ya Filistia?
Bozali nde kofuta ngai mpo na likambo moko oyo nasalaki bino?
Soki bozali kofuta ngai,
Nakozongisela bino yango nokinoki na mitó na bino.+
5 Bino bozwi palata na ngai ná wolo na ngai,+
Mpe bomemi biloko na ngai ya motuya oyo eleki kitoko na batempelo na bino;
6 Botɛki bato ya Yuda mpe bato ya Yerusaleme epai ya Bagrɛki,+
Mpo bólongola bango mosika na teritware na bango;
7 Yango wana nakolamwisa bango mpo na kolongola bango na esika oyo botɛkaki bango,+
Mpe nakozongisa na mitó na bino makambo oyo bosalaki.
8 Nakopesa* bana na bino ya mibali mpe bana na bino ya basi epai ya bato ya Yuda,+
Mpe bango bakotɛka bango epai ya mibali ya Sheba, na ekólo moko ya mosika mpenza;
Mpo ngai Yehova nde nalobi bongo.
9 Bóyebisa likambo oyo na bikólo:+
‘Bómibongisa mpo na* etumba! Bólamwisa mibali ya nguya!
Tiká ete basoda nyonso bápusana, tiká ete bábanda kokende!+
10 Bókómisa bitimweli na bino ya mabele mipanga, mpe bambeli na bino ya kokata mbuma na bilanga makɔnga.
Tiká moto ya bolɛmbu aloba: “Nazali na nguya.”
11 Bino nyonso bikólo ya zingazinga, bóya kosalisa, bóyangana esika moko!’”+
Na esika yango, Ee Yehova, kitisá bato na yo ya nguya.*
12 “Tiká ete bikólo elamuka mpe eya na Lobwaku* ya Yehoshafate;
Mpo kuna, nakofanda mpo na kosambisa bikólo nyonso ya zingazinga.+
13 Bólekisa mbeli ya likwangola mpe bóbuka mbuma mpo eteli.
Bókita mpe bónyatanyata mbuma ya vinyo mpo ekamwelo na yango etondi.+
Bikamwelo etondi mpenza, mpo mabe na bango ezali mingi.
14 Ebele ya bato, ebele ya bato bazali na lobwaku* ya kozwa ekateli,
Mpo mokolo ya Yehova ezali pene ya lobwaku ya kozwa ekateli.+
15 Moi mpe sanza ekokóma molili,
Mpe minzoto ekongɛnga lisusu te.
16 Mpe Yehova akoganga makasi uta na Siona,
Longwa na Yerusaleme akotombola mongongo na ye.
Mpe likoló ná mabele ekoningana;
Kasi Yehova akozala ekimelo mpo na bato na ye,+
Ndako makasi mpo na bato ya Yisraele.
17 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bino, oyo afandi na Siona, ngomba na ngai mosantu.+
18 Na mokolo yango bangomba ekotangisa vinyo ya elɛngi,+
Bangomba mike ekotonda na miliki,
Mai ekoleka na banzela nyonso ya mai na mokili ya Yuda.
19 Kasi Ezipito ekokóma mokili oyo etikali mpamba,+
Mpe Edome ekokóma esobe oyo etikali mpamba,+
Mpo na mobulu oyo basalelaki bato ya Yuda,+
Mpe na mokili na bango, basopaki makila ya bato oyo basali likambo te.+
21 Makila* na bango oyo natalelaki liboso ete ezali na likambo, nakotalela yango ete ezali na likambo te;+
Mpe Yehova akofanda na Siona.”+
Elimboli, “Yehova azali Nzambe.”
To, “ya mabele.”
To, “ekumu.”
To, “elenge mwasi.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mobali ya libala.”
Lil., “Bókanga loketo na bino.”
To, “bómibɛtabɛta ntolo.”
Lil., “Bósantisa.”
To mbala mosusu, “Figi oyo ekauki.”
To, “Bóyula liseke.”
To, “mabele.”
To, “ekokóma motane.”
To, “bibundeli ya kobwakela.”
To, “akoyoka mawa na.”
To, “akoyoka mawa mpo na.”
To, “Bóyula liseke.”
Lil., “Bósantisa.”
To, “bankulutu.”
Lil., “na elongi na ye.”
Elingi koloba, Mbu Ekufá.
Elingi koloba, Mbu ya Mediterane.
To, “nakosala bilembo oyo emonisi makambo oyo ekoya.”
To, “Lobwaku patatalu.”
Elimboli, “Yehova azali mosambisi.”
Lil., “Nakotɛka.”
Lil., “Bómisantisa.”
To, “bilombe na yo ya etumba.”
To, “Lobwaku patatalu.”
To, “mokili patatalu.”
To, “Wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Ngambo ya makila.”