Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Hosea 1:1-14:9
  • Hosea

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Hosea
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Hosea

HOSEA

1 Liloba oyo Yehova alobaki na Hosea* mwana ya Beeri na boyangeli ya Uzia,+ ya Yotame,+ ya Ahaze+ mpe ya Ezekiasi,+ bakonzi ya Yuda,+ mpe na boyangeli ya Yeroboame+ mwana ya Yoashe,+ mokonzi ya Yisraele. 2 Ntango Yehova abandaki koloba maloba na ye na nzela ya Hosea, Yehova alobaki na Hosea boye: “Kende kobala mwasi oyo akosala bondumba,* mpe okozwa bana oyo bakobotama na bondumba* yango, mpo ezali mpo na bondumba* nde mokili etiki mpenza kolanda Yehova.”+

3 Na yango Hosea akendaki kobala Gomere mwana ya Diblaime, azwaki zemi mpe abotelaki ye mwana mobali.

4 Bongo Yehova alobaki na Hosea boye: “Pesá ye nkombo Yizireele,* mpo etikali moke nakosɛnga libota ya Yehu ezongisa monɔkɔ+ mpo na misala ya kosopa makila ya Yizireele,* mpe nakosukisa bokonzi na ekólo* Yisraele.+ 5 Mokolo yango, nakobuka litimbo ya Yisraele na Lobwaku* ya Yizireele.”

6 Gomere azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mwasi. Mpe Nzambe alobaki na Hosea boye: “Pesá ye nkombo Lo-ruhama,* mpo nakomonisela lisusu ekólo Yisraele motema mawa te.+ Kutu nakobengana bango mpenza.+ 7 Kasi nakomonisela ekólo* ya Yuda+ motema mawa, mpe ngai, Yehova Nzambe na bango, nde nakobikisa bango;+ nakobikisa bango na litimbo te, na mopanga te, na etumba te, na bampunda te, na batambwisi-mpunda mpe te.”+

8 Nsima ya kolongola Lo-ruhama na mabɛlɛ, Gomere azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. 9 Bongo Nzambe alobaki: “Pesá ye nkombo Lo-ami,* mpo bino bozali bato na ngai te mpe ngai nakozala Nzambe na bino te.

10 “Mpe bato* ya Yisraele bakokóma ebele mpenza lokola bambuma ya zɛlo ya mbu oyo ekoki komekama te to kotángama te.+ Mpe na esika oyo nazalaki koloba na bango ete: ‘Bozali bato na ngai te,’+ nakoloba na bango: ‘Bozali bana ya Nzambe ya bomoi.’+ 11 Ɛɛ, bato ya Yuda mpe ya Yisraele bakoyanganisama na bomoko,+ bakopona mokonzi moko, mpe bakobima na mokili yango, mpo mokolo ya Yizireele ekozala mokolo monene.+

2 “Bóloba na bandeko na bino ya mibali: ‘Bato na ngai!’*+

Mpe na bandeko na bino ya basi: ‘Ee mwasi oyo bamoniseli motema mawa!’*+

 2 Bófunda mama na bino; bófunda ye,

Mpo azali mwasi na ngai te+ mpe ngai nazali mobali na ye te.

Asengeli kotika bondumba* na ye

Mpe kolongola ekobo na katikati ya mabɛlɛ na ye,

 3 Soki te nakolongola ye bilamba nyonso mpe nakotika ye bolumbu lokola na mokolo oyo abotamaki.

Nakokómisa ye lokola esobe,

Nakokómisa ye lokola mokili oyo ekauká

Mpe nakosala ete akufa na mposa ya mai.

 4 Mpe nakomonisela bana na ye motema mawa te,

Mpo bazali bana oyo babotami na bondumba.*

 5 Mpo mama na bango asali bondumba.*+

Ye oyo amemaki zemi na bango asali makambo ya nsɔni,+ mpo alobaki:

‘Nakolanda bamakango na ngai oyo balingaka ngai,+

Baoyo bapesaka ngai limpa ná mai,

Lɛnɛ ná lini, mafuta ná masanga.’

 6 Yango wana nakokanga nzela na ye na banzubɛ;

Mpe nakotɛlɛmisa efelo ya mabanga liboso na ye,

Mpo akoka komona te nzela na ye.

 7 Akolanda bamakango na ye oyo balingaka ye, kasi akozwa bango te;+

Akoluka bango, kasi akomona bango te.

Bongo akoloba: ‘Nakozonga epai ya mobali na ngai ya liboso,+

Mpo na ntango wana nazalaki malamu koleka ndenge nazali sikoyo.’+

 8 Ayebaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye mbuma,+ vinyo ya sika mpe mafuta,

Mpe ngai nde nazalaki kopesa ye palata ebele,

Ná wolo oyo asalelaki mpo na kosambela Baala.+

 9 ‘Yango wana, nakozonga mpe nakolongola mbuma na ngai na ntango ya kobuka mbuma,

Mpe vinyo na ngai ya sika na eleko na yango,+

Mpe nakobɔtɔla lɛnɛ na ngai ná lini na ngai oyo esengelaki kozipa bolumbu na ye.

10 Sikoyo nakomonisa bolumbu na ye na miso ya bamakango na ye nyonso oyo balingaka ye,

Mpe mobali moko te akobikisa ye na lobɔkɔ na ngai.+

11 Nakosukisa esengo na ye nyonso,

Bafɛti na ye,+ basanza na ye ya sika, basabata na ye mpe bileko na ye nyonso ya bafɛti.

12 Mpe nakobebisa banzete na ye ya vinyo mpe banzete na ye ya figi, oyo mpo na yango alobi:

“Oyo ezali lifuti na ngai, oyo bamakango na ngai oyo balingaka ngai bapesaki ngai”;

Nakokómisa yango zamba,

Mpe banyama ya zamba oyo efandaka na mboka ekolya yango mpenza.

13 Nakosɛnga ye azongisa monɔkɔ mpo na mikolo oyo apesaki bikeko ya Baala bambeka,+

Ntango azalaki kolata mpɛtɛ na ye mpe biloko ya monzɛlɛ mpo na komikómisa kitoko mpe azalaki kolanda bamakango na ye oyo balingaka ye,

Nzokande abosanaki ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova.

14 ‘Yango wana nakosala ete azonga na nzela,

Nakotambwisa ye na esobe,

Mpe nakoloba mpo na kosimba motema na ye.

15 Kobanda na ntango wana nakozongisela ye bilanga na ye ya vinyo,+

Mpe Lobwaku* ya Akore+ ekokóma lokola porte oyo ezali komema na elikya;

Kuna, akopesa ngai eyano lokola ntango oyo azalaki naino elenge,

Lokola na eleko oyo abimaki na mokili ya Ezipito.+

16 Na mokolo wana,’ yango nde liloba ya Yehova,

‘Okobenga ngai ete Mobali na ngai, okobenga ngai lisusu te ete Nkolo na ngai.’*

17 ‘Nakolongola bankombo ya bikeko ya Baala na monɔkɔ na ye,+

Mpe bakokanisa lisusu bankombo na yango te.+

18 Na mokolo wana, nakosala kondimana mpo na bato na ngai ná banyama ya zamba oyo efandaka na mboka,+

Ná bandɛkɛ ya likoló mpe banyama oyo emibendaka na nse.+

Nakolongola litimbo ná mopanga mpe etumba na mokili yango,+

Mpe nakosala ete bato na ngai báfanda* na kimya.+

19 Nakolaka yo libala mpo na libela;

Mpe nakolaka yo libala na boyengebene mpe na bosembo,

Na bolingo ya sembo mpe na motema mawa.+

20 Nakolaka yo libala na bosembo;

Mpe okoyeba mpenza Yehova.’+

21 ‘Na mokolo yango nakoyanola,’ yango nde liloba ya Yehova,

‘Nakoyanola likoló,

Mpe likoló ekoyanola mabele;+

22 Mabele ekoyanola mbuma, vinyo ya sika mpe mafuta;

Mpe yango ekoyanola Yizireele.*+

23 Nakolona ye mpo na ngai ndenge balonaka momboto na mabele,+

Mpe nakomonisa motema mawa epai na ye oyo bamoniselaki motema mawa te;*

Nakoloba na baoyo bazalaki bato na ngai te ete:* “Bozali bato na ngai,”+

Mpe bango bakoloba: “Ozali Nzambe na biso.”’”+

3 Na nsima Yehova alobaki na ngai: “Kende kolinga lisusu mwasi oyo mobali mosusu alingi mpe oyo azali kosala ekobo,+ ndenge kaka Yehova alingi bato ya Yisraele+ atako bazali kokende epai ya banzambe mosusu+ mpe balingi bagato ya mbuma ya vinyo.”*

2 Na yango nasombaki ye na bibende 15 ya palata ná homɛrɛ* moko ná ndambo ya ɔrje. 3 Bongo nayebisaki ye: “Okozala kaka ya ngai mikolo mingi. Osengeli te kosala bondumba,* mpe osengeli te kosangisa nzoto na mobali mosusu; ngai mpe nakosangisa nzoto na yo te.”*

4 Ezali mpo, na boumeli ya ntango molai* bato ya Yisraele bakozala na mokonzi te,+ nkumu te, mbeka te, likonzí te, efode te,+ bikeko ya banzambe ya libota*+ mpe te. 5 Na nsima bato ya Yisraele bakozonga mpe bakoluka Yehova Nzambe na bango+ mpe Davidi mokonzi na bango.+ Mpe bakoya na kolɛnga epai ya Yehova mpe bakoluka lipamboli na ye* na eleko ya nsuka ya mikolo.+

4 Ee bato ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova,

Mpo Yehova azali na likambo ya kosambisa bafandi ya mokili yango,+

Mpamba te solo ezali te, bolingo ya sembo te, mpe boyebi ya Nzambe te na mokili yango.+

 2 Bipai nyonso, bato bazali kolapa bandai ya lokuta, kokosa,+ koboma,+

Koyiba mpe kosala ekobo.+

Mpe bazali kosopa makila ya moto moko nsima ya mosusu.+

 3 Yango wana ekólo yango ekozala na mawa makasi+

Mpe bafandi na yango bakosila mokomoko.

Banyama ya zamba oyo efandaka na mboka, bandɛkɛ ya likoló,

Ata mpe bambisi ya mbu ekokufa.

 4 “Nzokande, moto moko te awelana ná moninga to apamela ye,+

Mpo bato na yo bazali lokola bato oyo bazali kowelana ná nganga-nzambe.+

 5 Yango wana okobɛta libaku na moi makasi

Mpe mosakoli akobɛta libaku elongo na yo lokola nde ezalaki na butu.

Mpe nakokangisa mama na yo monɔkɔ.*

 6 Bato na ngai bakobomama* mpo boyebi ezali te.

Lokola obwaki boyebi,+

Ngai mpe nakobwaka yo mpo osalela ngai lisusu te mosala ya nganga-nzambe;

Mpe lokola obosani mobeko* ya Nzambe na yo,+

Ngai mpe nakobosana bana na yo.

 7 Ntango bazalaki kokóma ebele, bazalaki mpe kosalela ngai masumu ebele.+

Nakobongola nkembo na bango nsɔni.*

 8 Bazali kobikela* na lisumu ya bato na ngai,

Mpe bazali na lokoso mpo na* mabunga ya bato na ngai.

 9 Ekozala ndenge moko mpo na bato ya ekólo mpe nganga-nzambe;

Nakosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na banzela na bango,

Mpe nakotika bango bábuka mbuma ya misala na bango.+

10 Bakolya kasi bakotonda te.+

Bakosangisa nzoto na bato ebele,* kasi bakokóma mingi te,+

Mpo bazangi limemya epai ya Yehova.

11 Bondumba,* vinyo mpe vinyo ya sika,

Elongolaka mposa ya kosala oyo ezali sembo.*+

12 Bato na ngai bazali kotuna makambo epai ya bikeko na bango ya nzete,

Bazali kosala makambo oyo lingenda* na bango eyebisi bango;

Mpo elimo ya bondumba* esali ete bábunga nzela,

Mpe na bondumba na bango, baboyi komikitisa liboso ya Nzambe na bango.

13 Na likoló ya bangomba bazali kopesa bambeka,+

Na likoló ya bangomba mike bazali komatisa milinga ya mbeka,

Mpe na nse ya banzete minene, banzete ya sitirakisi mpe nzete monene nyonso,+

Mpo elili na yango ezali malamu.

Yango wana bana na bino ya basi bazali kosala bondumba*

Mpe basi ya bana na bino bazali kosala ekobo.

14 Nakosɛnga te ete bana na bino ya basi bázongisa monɔkɔ mpo na bondumba* na bango,

To basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango.

Mpo mibali bazali kokende ná basi ya ndumba,

Mpe bazali kopesa bambeka elongo na bandumba ya tempelo;

Bato ya ndenge wana oyo bazangi mayele+ bakobebisama.

15 Atako ozali kosala bondumba,* Ee Yisraele,+

Yuda amema ngambo te.+

Bóya na Gilgale te+ to na Bete-avene te,+

Mpe bólapa ndai te ete: ‘Lokola Yehova azali solo na bomoi!’+

16 Mpo Yisraele akómi motó makasi lokola ngɔmbɛ-mwasi ya motó makasi.+

Sikoyo Yehova akokamba bango lokola mobateli-mpate akambaka mwana-mpate na esika monene ya koleisa bibwɛlɛ matiti?*

17 Efraime akangani na bikeko.+

Bótika ye!

18 Lokola masanga* na bango esili,

Bakómi kosangisa nzoto na bato ebele.*

Bayangeli* na bango balingá makambo ya nsɔni.+

19 Mopɛpɛ ekozinga ye* na kati ya mapapu na yango,

Mpe bakoyoka nsɔni mpo na bambeka na bango.”

5 “Bóyoka likambo oyo, bino banganga-nzambe,+

Bótya likebi, Ee bato ya Yisraele,

Bóyoka, Ee bato ya ndako ya mokonzi,

Mpo lisambisi etali nde bino;

Mpamba te bozali motambo mpo na Mizipa

Mpe monyama oyo etandami likoló ya Tabore.+

 2 Batomboki* bamipesi mingi mpenza na koboma,

Mpe nazali kokebisa* bango nyonso.

 3 Nayebi Efraime,

Mpe Yisraele abombami te na miso na ngai.

Mpo sikoyo, Ee Efraime, osangisi nzoto na bato ebele;*

Yisraele amikómisi mbindo.+

 4 Misala na bango epesi bango nzela te ya kozongela Nzambe na bango,

Mpo elimo ya bondumba* ezali kati na bango;+

Mpe bazali kondima Yehova te.

 5 Lolendo ya Yisraele efundi ye;*+

Yisraele ná Efraime babɛti libaku mpo na libunga na bango,

Mpe Yuda abɛti libaku elongo na bango.+

 6 Elongo na bitonga na bango ya bampate mpe ya bangɔmbɛ, bakendaki koluka Yehova,

Kasi bamonaki ye te.

Amibendaki mosika na bango.+

 7 Basaleli Yehova makambo na bokosi,+

Mpo bakómi batata ya bana oyo bazali bapaya.

Sikoyo sanza moko ekolya bango* ná biloko* na bango.

 8 Bóyula liseke+ na Gibea, bóbɛta kelelo na Rama!+

Bóbɛta ntangwa ya etumba na Bete-avene!+ Tozali nsima na yo, Ee Benyamina!

 9 Ee Efraime, bato bakoyoka nsɔmɔ ntango bakotala yo na mokolo oyo okozwa etumbu.+

Nayebisi mabota ya Yisraele makambo oyo ekosalema mpenza.

10 Bankumu ya Yuda bazali lokola bato oyo bazali kopusa ndelo ya mabele.+

Nakosopela bango nkanda na ngai ya makasi lokola mai.

11 Efraime azali konyokwama, kobebisama na ye ezali sembo,

Mpo azalaki mpenza na mokano ya kolanda monguna na ye.+

12 Yango wana nazalaki lokola ndɔngɛ mpo na Efraime

Mpe lokola eloko ya kopɔla mpo na bato ya Yuda.

13 Ntango Efraime amonaki maladi na ye, mpe Yuda mpota na ye,

Efraime akendaki na Asiri+ mpe atindaki bamemi-nsango epai ya mokonzi moko monene.

Kasi mokonzi yango akokaki kobikisa bino te,

Mpe akokaki kosilisa mpota na bino te.

14 Nakozala lokola nkɔsi ya elenge mpo na Efraime,

Mpe lokola nkɔsi ya nguya* mpo na bato ya Yuda.

Ngai moko nakopasola bango mpe nakokende na ngai;+

Nakomema bango, mpe moto moko te akobikisa bango.+

15 Nakokende mpe nakozonga epai na ngai tii ntango bakobuka mbuma ya lisumu na bango.

Mpe bakoluka ete nandima bango.*+

Ntango bakozala na mpasi, bakoluka ngai.”+

6 “Bóya, tózongela Yehova,

Mpo apasoli biso mikemike,+ kasi akobikisa biso.

Abɛti biso, kasi akokanga bampota na biso.

 2 Nsima ya mikolo mibale, akopesa biso lisusu makasi.

Na mokolo ya misato, akotɛlɛmisa biso,

Mpe tokozala na bomoi liboso na ye.

 3 Tokoyeba Yehova, mpe tokoluka mpenza koyeba ye.

Kobima na ye ezali solo, kaka lokola kotana ya ntɔngɔ.

Akoya epai na biso lokola mbula makasi;

Lokola mbula ya eleko ya prɛnta, oyo epɔlisaka mabele.”

 4 “Nasala na yo nini, Efraime?

Nasala na yo nini, Yuda?

Mpo bolingo na yo ya sembo ezali lokola mapata ya ntɔngɔ,

Lokola mamwɛ* oyo elimwaka nokinoki.

 5 Yango wana nakokweisa bino na nzela ya basakoli;+

Nakoboma bino na maloba ya monɔkɔ na ngai.+

Mpe bitumbu oyo nakokatela bino ekongala lokola pole.+

 6 Mpo nasepelaka nde na bolingo ya sembo,* kasi na mbeka te,

Mpe na boyebi ya Nzambe, na esika ya makabo ya kotumba.+

 7 Kasi bango, lokola bana ya bato, babuki kondimana.+

Kuna, basaleli ngai makambo na bokosi.

 8 Gileade ezali mboka ya basali mabe,+

Etondi na bilembo ya makila.+

 9 Etuluku ya banganga-nzambe ezali lokola bituluku ya bapunzi oyo babombami mpo na kosala moto mabe.

Bazali koboma bato na nzela ya Shekeme,+

Mpo etamboli na bango ezali ya nsɔni.

10 Namoni likambo moko ya nsɔmɔ epai ya bato ya Yisraele.

Kuna, Efraime azali kosala bondumba,+

Yisraele amikómisi mbindo.+

11 Lisusu, Ee Yuda, ntango ya kobuka yo ndenge babukaka mbuma etyami,

Ntango oyo nakozongisa bakangami ya bato na ngai.”+

7 “Ntango nyonso oyo nalingi kobikisa Yisraele,

Libunga ya Efraime ebimi,+

Ná mabe ya Samaria mpe.+

Mpo bazali kosala makambo na bokosi;+

Miyibi bazali kokɔtela bato mpe bituluku ya bapunzi ezali kopunza na libándá.+

 2 Kasi bango moko bazalaki kokanisa te ete nakoyeba lisusu mabe nyonso oyo bazali kosala.+

Sikoyo mabe na bango moko ekangi bango.

Ezali awa liboso na ngai.

 3 Bazali kosepelisa mokonzi na mabe na bango,

Mpe bankumu na bokosi na bango.

 4 Bango nyonso bazali bato ya ekobo,

Bazali kozika lokola esika ya kotumba mampa oyo mosali-mampa apelisi,

Oyo atiki kongalisa mɔtɔ nsima ya kosala pɔtɔpɔtɔ ya farini tii ntango ekovimba.

 5 Na mokolo ya mokonzi na biso, bankumu babɛli:

Bazali na nkanda makasi mpo bamɛli vinyo mingi.+

Mokonzi asemboleli batyoli lobɔkɔ.

 6 Mpo bazali kopusana na mitema mɔtɔmɔtɔ lokola esika ya kotumba mampa.*

Butu mobimba, mosali-mampa alali;

Na ntɔngɔ, etumbelo ya mampa epeli lokola mɔtɔ makasi.

 7 Bango nyonso bazali mɔtɔ lokola esika ya kotumba mampa,

Bazali kolya bayangeli* na bango.

Bakonzi na bango nyonso bakwei;+

Moko te kati na bango abeleli ngai.+

 8 Efraime asangani na bikólo.+

Efraime azali lokola gato ya libungutulu oyo babaloli te.

 9 Bapaya basilisi ye makasi,+ kasi azali koyeba yango te.

Mpe nsuki na ye ekómi mpɛmbɛ, kasi azali koyeba yango te.

10 Lolendo ya Yisraele efundi ye,+

Kasi bazongeli Yehova Nzambe na bango te,+

Mpe atako nyonso wana, baluki ye te.

11 Efraime azali lokola ebenga ya zobazoba, oyo ezangá mayele.*+

Babeleli Ezipito mpo na lisalisi;+ bakei kosɛnga lisalisi na Asiri.+

12 Esika nyonso oyo bakokende, nakobwaka monyama na ngai likoló na bango.

Nakokitisa bango na nse lokola bandɛkɛ ya likoló.

Nakopesa bango etumbu na kolanda likebisi oyo napesaki bango.*+

13 Mawa na bango, mpo bakimi ngai!

Tiká bábebisama, mpo babuki mibeko na ngai!

Nalingaki kosikola bango, kasi balobi makambo ya lokuta mpo na ngai.+

14 Babelelaki ngai te na motema na bango mobimba mpo na kosɛnga lisalisi,+

Nzokande bazalaki se koganga na kolela na bambeto na bango.

Bazalaki komizokisa mpo na mbuma mpe vinyo ya sika;

Babalukeli ngai.

15 Nateyaki bango mpe nalendisaki mabɔkɔ na bango,

Kasi batɛmɛli ngai, bakani kosala ngai mabe.

16 Babongolaki bizaleli, kasi ezalaki te mpo na kokende na eloko oyo eleki likoló;*

Bakokaki kotyelama motema te lokola litimbo oyo nsinga elɛmbá.+

Bankumu na bango bakobomama na mopanga mpo na lolemo na bango ya botomboki.

Yango wana bato bakotyola bango na Ezipito.”+

8 “Bɛtá kelelo!*+

Moto akiteli ndako ya Yehova lokola mpongo,+

Mpo bakati kondimana na ngai,+ mpe babuki mobeko na ngai.+

 2 Bazali kobelela ngai ete: ‘Nzambe na biso, biso Yisraele, toyebi yo!’+

 3 Yisraele abwaki makambo ya malamu.+

Tiká monguna alanda ye.

 4 Batye bakonzi, kasi na nzela na ngai te.

Batye bankumu, oyo ngai nandimaki te.

Na palata na bango mpe wolo na bango, basali bikeko,+

Na ndenge yango bamilukeli libebi.+

 5 Mwana-ngɔmbɛ na yo ebwakami, Ee Samaria.+

Nkanda na ngai engaleli bango.+

Kino ntango nini bakokoka te komonisa ete basali likambo te?*

 6 Mpo yango euti na Yisraele.

Moto ya misala ya mabɔkɔ nde asalaki yango, mpe ezali Nzambe te;

Mwana-ngɔmbɛ ya Samaria ekopanzana mikemike.

 7 Mpo bazali kolona mopɛpɛ,

Mpe bakobuka mopɛpɛ makasi.+

Molona moko te ezali kobimisa mbuma oyo eteli;*+

Molona nyonso oyo eboti ezali kobimisa farini te.

Ata soki ebimisi mwa farini, bapaya nde bakolya yango.+

 8 Monguna akomɛla Yisraele.+

Sikoyo bakozala na kati ya bikólo+

Lokola mbɛki oyo moto moko te alingi.

 9 Mpo bamati na Asiri,+ lokola mpunda ya zamba oyo efandi yango moko.

Efraime afuti bandumba mbongo mpo bálinga ye.+

10 Atako baoyo bango bazali kofuta bauti na bikólo mosusu,

Sikoyo nakosangisa bango;

Bakobanda konyokwama+ mpo na kilo oyo mokonzi mpe bankumu bakotyela bango.

11 Mpo Efraime abakisi bitumbelo mosusu, na bongo asali lisumu.+

Bitumbelo yango ekómi mpo na ye libaku ya kosala masumu.+

12 Nakomaki mpo na ye makambo mingi ya mobeko* na ngai,

Kasi batalelaki yango lokola eloko ya bapaya.+

13 Bazali kopesa ngai bambeka mpe bazali kolya mosuni,

Kasi Yehova azali kosepela na yango te.+

Sikoyo akokanisa libunga na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.+

Bazongi lisusu* na Ezipito.+

14 Yisraele abosani Mokeli na ye+ mpe atongi batempelo,+

Mpe Yuda abakisi bingumba mosusu oyo ebatelami makasi.+

Kasi nakotinda mɔtɔ na bingumba na ye,

Mpe ekozikisa bandako milai ya engumba mokomoko.”+

9 “Kosepela te, Ee Yisraele!+

Kozala na esengo te lokola bato ya bikólo.

Mpamba te mpo na bondumba* okómi mosika na Nzambe na yo.+

Olingi lifuti oyo ozali kozwa na bondumba oyo ozali kosala na bisika nyonso ya kotutatuta mbuma.+

 2 Kasi esika ya kotutatuta mbuma mpe ekamwelo ya vinyo ekoleisa yo te,

Mpe okozanga vinyo ya sika.+

 3 Bato ya Yisraele bakokoba te kofanda na mokili ya Yehova;+

Kasi, Efraime akozonga na Ezipito,

Mpe na Asiri akolya biloko oyo ezali mbindo.+

 4 Bakosopa lisusu makabo ya vinyo liboso ya Yehova te.+

Bambeka na bango ekosepelisa ye te.+

Bazali lokola mampa ya matánga;

Baoyo nyonso bazali kolya yango, bakomikómisa mbindo.

Mpo mampa na bango ezali kaka mpo na bango moko;*

Ekoya na ndako ya Yehova te.

 5 Bokosala nini na mokolo ya koyangana,*

Na mokolo ya fɛti ya Yehova?

 6 Mpo bóyoka! basengeli kokima mpo na libebi.+

Ezipito ekoyanganisa bango+ mpe Memfisi ekokunda bango.+

Matiti ya nsendensende ekotonda na biloko na bango ya motuya ya palata,

Mpe ekozala na mwa banzete ya nzubɛnzubɛ na kati ya bahema na bango.

 7 Mikolo ya kozongisa monɔkɔ ekoya,+

Mikolo ya kozwa etumbu ekoya,

Mpe Yisraele akoyeba yango.

Mosakoli na bango akozala zoba, mpe moto oyo asakolaka makambo akokóma ligboma.

Lokola osali libunga monene, koyina oyo bayini yo ezali monene.”

 8 Sinzili+ ya Efraime azalaki elongo na Nzambe na ngai.+

Kasi sikoyo, banzela nyonso ya basakoli na ye+ ezali lokola mitambo ya mokangi-ndɛkɛ.

Koyina ezali na ndako ya Nzambe na ye.

 9 Bamikɔtisi mpenza na libebi, lokola na mikolo ya Gibea.+

Akokanisa lisusu libunga na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.+

10 “Ntango nakutaki Yisraele, ezalaki lokola kokuta mbuma ya vinyo na kati ya esobe.+

Ntango namonaki bankɔkɔ na bino, ezalaki lokola komona mbuma ya liboso ya figi na nzete ya figi.

Kasi bakendaki epai ya Baala ya Peore,+

Bamipesaki na eloko ya nsɔni,*+

Mpe bakómaki bosɔtɔ lokola eloko oyo balingaki.

11 Nkembo ya Efraime epumbwe mosika lokola ndɛkɛ.

Moto azali kobota te, zemi ezali te, mpe moto azali kozwa zemi te.+

12 Ata soki babɔkɔli bana,

Nakozangisa bango bana yango tii ata mobali moko te akotikala;+

Ɛɛ, mawa na bango ntango nakopesa bango mokɔngɔ!+

13 Efraime, oyo alonami na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti, azalaki na miso na ngai lokola Tire.+

Sikoyo Efraime asengeli kobimisa bana na ye mpo bábomama.”

14 Ee Yehova, pesá bango oyo osengeli kopesa bango:

Pesá bango libumu oyo esopaka zemi mpe mabɛlɛ ekauká.*

15 “Mabe na bango nyonso ezalaki na Gilgale,+ mpo kuna nde nayaki koyina bango.

Nakobengana bango na ndako na ngai mpo na misala na bango ya mabe.+

Nakolinga bango lisusu te.+

Bankumu na bango nyonso bazali mitó makasi.

16 Efraime akokweisama.+

Misisa na bango ekokauka, mpe bakobota mbuma te.

Ata soki basi na bango baboti bana, nakoboma bana oyo bango balingi.”

17 Nzambe na ngai akobwaka bango,

Mpo bayokeli ye te,+

Mpe bakokóma bato oyo bazali kokimakima na kati ya bikólo.+

10 “Yisraele azali nzete ya vinyo ebebá* oyo ebimisi mbuma.+

Ntango mbuma na ye ezali kokóma mingi, azali mpe kobakisa bitumbelo.+

Ntango biloko ya mabele na ye ezali kitoko, azali mpe kotɛlɛmisa makonzí mosantu ya kitoko.+

 2 Motema na bango ezali na bokosi;*

Sikoyo ekoyebana ete bazali na ngambo.

Moto moko te akobuka bitumbelo na bango mpe akobebisa makonzí na bango.

 3 Sikoyo bakoloba: ‘Tozali na mokonzi te,+ mpo tobangaki Yehova te.

Mpe mokonzi akoki kosala nini mpo na biso?’

 4 Bazali kobimisa maloba ya mpambampamba, kolapa bandai ya lokuta,+ mpe kosala kondimana mingi.

Yango wana lisambisi oyo ezali koya ezali lokola matiti ya pwazɔ na kati ya banzela ya mikala ya bilanga.+

 5 Bafandi ya Samaria bakobanga mpo na ekeko ya mwana-ngɔmbɛ oyo ezali na Bete-avene.+

Bato bakolela mpo na yango,

Ndenge moko na banganga-nzambe ya banzambe ya bapaya oyo basepelaki mpo na yango mpe nkembo na yango,

Mpo ekokende na mboka mopaya, mosika na bango.

 6 Ekomemama na Asiri lokola likabo epai ya mokonzi moko monene.+

Efraime akoyoka nsɔni,

Mpe Yisraele akozala na nsɔni mpo na toli oyo alandaki.+

 7 Samaria mpe mokonzi na ye bakolimwa mpenza,*+

Lokola mwa etape ya nzete oyo ezali kotiyola likoló ya mai.

 8 Bisika oyo etombwaná ya Bete-avene,+ lisumu ya Yisraele,+ ekobebisama.+

Matiti ya banzubɛ mpe bansende ekokola na bitumbelo na yango.+

Bato bakoloba na bangomba: ‘Bózipa biso!’

Mpe na bangomba mike: ‘Bókwea likoló na biso!’+

 9 Banda na mikolo ya Gibea, bosalaki lisumu,+ Ee Yisraele.

Kuna, batyaki motó makasi.

Etumba ezwaki* te bana ya kozanga bosembo na Gibea.

10 Nakopesa bango mpe etumbu ntango nalingi.

Mpe bato ya bikólo bakoyangana mpo na kobundisa bango,

Ntango mabunga na bango mibale ekokangisama esika moko na bango.*

11 Efraime azalaki mwana-ngɔmbɛ ya mwasi oyo ayekolá kotutatuta mbuma mpe alingaki yango.

Yango wana nasimbaki te nkingo na ye ya kitoko.

Sikoyo nakosala ete moto moko atambola likoló ya Efraime.+

Yuda akobalola mabele; Yakobo akolalisa mabele mpo na ye.

12 Bólona bosembo mpo na bino moko; mpe bóbuka bolingo ya sembo.

Bóbalola mabele oyo ebongi na bilanga+

Wana ntango ya koluka Yehova ezali naino,+

Tii akoya koteya bino boyengebene.+

13 Kasi boloni mabe,*

Bobuki kozanga bosembo,+

Mpe bolei mbuma ya bokosi.

Mpo botyaki motema na nzela na bino moko,

Mpe na ebele ya bilombe na bino ya etumba.

14 Yikiyiki ekobimela bato ya ekólo na bino,

Mpe bingumba na bino nyonso oyo ebatelami makasi ekobebisama+

Ndenge Shalmane abebisaki ndako ya Arabele,

Na mokolo ya etumba ntango bamama babomamaki esika moko na bana na bango.

15 Yango nde bakosala yo, Ee Betele,+ mpo mabe na yo eleki ndelo.

Ɛɛ, na ntɔngɔntɔngɔ mokonzi ya Yisraele akozala lisusu te.”*+

11 “Ntango Yisraele azalaki mwana moke, nalingaki ye,+

Mpe nabengaki mwana na ngai abima na Ezipito.+

 2 Ntango bango* bazalaki se kobenga Bayisraele,

Bayisraele mpe bazalaki se kokima bango.+

Bakobaki kopesa bambeka na bikeko ya Baala+

Mpe bazalaki kopesa bambeka na bikeko.*+

 3 Nzokande ngai nde nalakisaki Efraime kotambola,+ mpe nazwaki bango na mabɔkɔ na ngai;+

Kasi bandimaki te ete ngai nabikisaki bango.

 4 Nakobaki kobenda bango na bansinga ya bana ya bato,* na bansinga ya bolingo.+

Nazalaki mpo na bango lokola moto oyo azali kolongola ekanganeli na mbanga na bango,

Mpe na boboto, namemelaki mokomoko na bango bilei.

 5 Bakozonga na mokili ya Ezipito te, kasi Asiri akozala mokonzi na bango,+

Mpo baboyaki kozongela ngai.+

 6 Mopanga ekobalukabaluka mpo na kobɛta bingumba na bango,+

Mpo na kobebisa bikangiseli ya baporte na yango mpe kolya bango mpo na myango na bango ya mabe.+

 7 Bato na ngai balingi kaka kozanga bosembo epai na ngai.+

Atako babengaki bango na likoló,* moto moko te atɛlɛmi.

 8 Ndenge nini nakoki kosundola yo, Ee Efraime?+

Ndenge nini nakoki kopesa yo na mabɔkɔ ya banguna na yo, Ee Yisraele?

Ndenge nini nakoki kosala yo lokola Adma?

Ndenge nini nakoki kokómisa yo lokola Zeboyime?+

Nabongolaki makanisi;

Na ntango yango, mawa na ngai elamukaki.*+

 9 Nakobimisa te nkanda na ngai ya makasi.

Nakobebisa lisusu Efraime te,+

Mpo nazali Nzambe, kasi moto te,

Nazali Mosantu kati na bino;

Mpe nakoyela yo lisusu na nkanda te.

10 Bakotambola nsima ya Yehova, mpe ye akoganga lokola nkɔsi;+

Ntango akoganga, bana na ye bakoya uta na wɛsti na kolɛnga.+

11 Bakolɛnga lokola ndɛkɛ ntango bakobima na Ezipito,

Lokola ebenga ntango bakobima na mokili ya Asiri;+

Mpe nakofandisa bango na bandako na bango,” Yehova alobi bongo.+

12 “Efraime azingi ngai na lokuta

Mpe ndako ya Yisraele na bokosi.+

Kasi Yuda azali naino kotambola* elongo na Nzambe,

Mpe azali sembo epai ya Oyo Aleki Bosantu.”+

12 “Efraime azali kolya mopɛpɛ.

Azali kolanda mopɛpɛ ya ɛsti mokolo mobimba.

Abakisi lokuta mpe misala ya mobulu.

Basali kondimana na Asiri,+ mpe bamemi mafuta na Ezipito.+

 2 Yehova azali na likambo ya kosambisa Yuda;+

Akosɛnga Yakobo azongisa monɔkɔ mpo na banzela na ye,

Mpe akofuta ye na kolanda misala na ye.+

 3 Na kati ya libumu, akangaki ndeko na ye na nse ya lokolo,*+

Mpe na makasi na ye nyonso, abundaki na Nzambe.+

 4 Abundaki mingi na anzelu mpe alongaki.

Alelaki, mpe asɛngaki lipamboli.”+

Nzambe akutaki ye na Betele, mpe kuna asololaki na biso,+

 5 Yehova Nzambe ya mampinga,+

Yehova ezali nkombo oyo bakanisaka ye na yango.*+

 6 “Yango wana zongelá Nzambe na yo,+

Batelá bolingo ya sembo mpe bosembo,+

Mpe tyelá Nzambe na yo elikya ntango nyonso.

 7 Kasi moto ya mombongo azali na bimekeli-kilo ya bokosi na lobɔkɔ na ye;

Alingaka kobuba.+

 8 Efraime azali ntango nyonso koloba: ‘Ya solo nakómi mozwi,+

Nazwi bomɛngo.+

Mpe na mosala na ngai nyonso ya makasi, bakomona te eloko moko ya mabe to oyo ezali lisumu.’

 9 Kasi ngai nazali Yehova Nzambe na yo banda na mokili ya Ezipito.+

Nakofandisa yo lisusu na bahema

Lokola na mikolo ya ntango moko oyo etyamá.*

10 Nalobaki na basakoli,+

Nabakisaki bimonaneli na bango,

Mpe napesaki masese na nzela ya basakoli.

11 Na Gileade, ezalaki na bokosi*+ mpe lokuta.

Na Gilgale, bapesaki bambeka ya bangɔmbɛ-mibali,+

Mpe bitumbelo na bango ezali lokola mipiko ya mabanga na banzela ya mikala na bilanga.+

12 Yakobo akimaki na teritware* ya Arame;*+

Yisraele+ asalelaki moto mosala kuna mpo na kozwa mwasi,+

Mpe mpo na kozwa mwasi, abatelaki bampate.+

13 Na nzela ya mosakoli moko, Yehova abimisaki Yisraele na Ezipito,+

Mpe na nzela ya mosakoli moko, abatelaki ye.+

14 Efraime apesaki Nzambe mpasi mingi mpenza;+

Ngambo ya makila ezali kaka na motó na ye.

Nkolo na ye akopesa ye etumbu mpo na nsɔni oyo ayokisaki ye.”+

13 “Ntango Efraime azalaki koloba, bato bazalaki kolɛnga;

Azalaki na lokumu na Yisraele.+

Kasi akómaki na ngambo mpo na losambo ya Baala+ mpe akufaki.

 2 Sikoyo bazali kobakisa masumu na bango,

Mpe basali bikeko ya ebende* na palata na bango.+

Babimisi mayele mpo na kosala bikeko, nyonso mosala ya bato ya misala ya mabɔkɔ.

Bazali koloba na bango: ‘Bato oyo bazali kopesa bambeka bápesa bana-ngɔmbɛ lipwɛpwɛ.’*+

 3 Yango wana, bakokóma lokola mapata ya ntɔngɔ,

Lokola mamwɛ oyo elimwaka na ntɔngɔ mpenza,

Lokola mposo ya blé na esika ya kotutatuta mbuma oyo ememami na mopɛpɛ makasi,

Mpe lokola milinga oyo ezali kobima na lidusu ya nsamba.

 4 Kasi ngai nazali Yehova Nzambe na yo banda na mokili ya Ezipito;+

Oyebaki Nzambe mosusu te kaka ngai,

Mpe longola ngai mobikisi azali te.+

 5 Nayebaki yo na esobe,+ na mokili ya kokauka.

 6 Batondaki na bisika na bango ya koleisa bibwɛlɛ matiti,+

Batondaki mpe mitema na bango ekómaki na lolendo.

Na yango babosanaki ngai.+

 7 Nakokóma epai na bango lokola mwana-nkɔsi,+

Lokola nkoi oyo ebombani pene na nzela.

 8 Nakobimela bango lokola urse oyo ebungisi bana na yango,

Mpe nakopasola ntolo na bango.*

Nakolya bango kuna lokola nkɔsi;

Nyama moko ya zamba ekopasola bango mikemike.

 9 Ekobebisa yo, Ee Yisraele,

Mpo obalukeli ngai, obalukeli mosungi na yo.

10 Bongo, wapi mokonzi na yo, mpo abikisa yo na bingumba na yo nyonso,+

Mpe bayangeli* na yo, oyo mpo na bango olobaki,

‘Pesá ngai mokonzi mpe bankumu’?+

11 Napesaki bino mokonzi na nkanda na ngai,+

Mpe na nkanda na ngai makasi nakolongola ye.+

12 Libunga ya Efraime ezingami;*

Lisumu na ye ebombami.

13 Akonyokwama lokola mwasi oyo azali kobota.

Kasi azali mwana oyo azangi bwanya;

Ntango ya kobotama ekoki, kasi azali kobima te.

14 Nakosikola bango na nguya ya Nkunda.*

Nakobikisa bango na liwa.+

Wapi bitubeli na yo,* Ee Liwa?+

Wapi nguya na yo ya kobebisa, Ee Nkunda?+

Nakoyoka lisusu mawa te.

15 Ata soki azali kobota mingi na kati ya matiti ya ebale,

Mopɛpɛ moko ya ɛsti ekoya, mopɛpɛ ya Yehova,

Ezali kouta na mokili ekauká, mpo na kokaukisa libulu na ye ya mai mpe kosilisa mai ya liziba na ye.

Oyo wana akopunza biloko nyonso ya motuya oyo ezali na esika ya kobomba biloko ya motuya.+

16 Samaria akomema ngambo,+ mpo atombokeli Nzambe na ye.+

Bakobomama na mopanga,+

Bana na bango bakokatama mikemike,

Mpe basi na bango ya zemi bakopasolama mabumu.”

14 “Ee Yisraele, zongelá Yehova Nzambe na yo,+

Mpo obɛti libaku mpo na libunga na yo.

 2 Bózongela Yehova na maloba oyo,

Bóloba na ye: ‘Tobondeli yo, limbisá libunga na biso+ mpe ndimá oyo ezali malamu,

Tokopesa yo masanzoli ya mbɛbu na biso+ lokola nde ezalaki bana-ngɔmbɛ* ya mibali.

 3 Asiri ekobikisa biso te.+

Tokomata na bampunda te,+

Mpe tokoloba lisusu te: “Ee Nzambe na biso!” na biloko oyo tosali na mabɔkɔ na biso,

Mpo yo nde omoniselaka mwana oyo tata akufá motema mawa.’+

 4 Nakobikisa kozanga bosembo na bango.+

Nakolinga bango ndenge ngai moko nasepeli,+

Mpo nkanda na ngai elongwe epai na bango.+

 5 Nakokóma lokola mamwɛ* mpo na Yisraele.

Akobimisa fololo lokola lísi,

Mpe akokɔtisa misisa na ye na nse ya mabele lokola banzete ya Liban.

 6 Mwa milona na ye ekopalangana,

Lokumu na ye ekozala lokola oyo ya nzete ya olive,

Mpe nsolo kitoko na ye ekozala lokola oyo ya nzete ya Liban.

 7 Bakofanda lisusu na nse ya elili na ye.

Bakobota mbuma, mpe bakobimisa nkasa ya sika lokola nzete ya vinyo.+

Lokumu* na ye ekozala lokola oyo ya vinyo ya Liban.

 8 Efraime akoloba: ‘Nakosala lisusu nini na bikeko?’+

Nakoyanola mpe nakokɛngɛla ye.+

Nakozala lokola nzete ya jenevriye oyo etondi na nkasa.

Ngai nde nakosala ete obota mbuma.”

 9 Nani azali moto ya bwanya? Tiká akanga ntina ya makambo oyo.

Nani azali moto ya mayele? Tiká ayeba yango.

Mpo banzela ya Yehova ezali semba;+

Bato ya sembo bakotambola na yango,

Kasi babuki-mibeko bakobɛta libaku wana.

Ebengeli ya mokuse ya Hoshaya, oyo elimboli “abikisami na Yah; Yah abikisi.”

To, “pite; akosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; akosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; akosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

Elimboli, “Nzambe akolona mboto.”

Engumba epai bakonzi ya Yisraele bokonzi ya nɔrdi bazalaki kofanda atako Samaria nde ezalaki engumba-mokonzi.

Lil., “ndako.”

To, “Lobwaku patatalu.”

Elimboli, “bamoniseli ye motema mawa te.”

Lil., “ndako.”

Elimboli, “bato na ngai te.”

Lil., “bana.”

Talá Hos 1:9 msl.

Talá Hos 1:6 msl.

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; asangisi nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “Lokwaku patatalu.”

To, “Baala na ngai.”

Lil., “bálala.”

Elimboli, “Nzambe akolona momboto.”

Talá Hos 1:6 msl.

Talá Hos 1:9 msl.

Elingi koloba, bagato oyo bazalaki kosalela na losambo ya lokuta.

Homɛrɛ moko = 220 L. Talá Ap. B14.

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “ngai mpe nakosangisa na yo nzoto te.”

Lil., “mikolo mingi.”

Lil., “baterafime.”

To, “epai ya Yehova mpe epai ya bolamu na ye.”

To, “nakobebisa mama na yo.”

To, “bakosuka.”

To, “mateya.”

To mbala mosusu, “Batye nsɔni na esika ya nkembo na ngai.”

To, “komileisa.”

To, “bazali kotombola molimo na bango na.” Talá Ndimbola ya maloba, “Molimo.”

To, “Bakosala pite mingi; Bakosala bondumba.”

To, “Pite; Kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

Lil., “elongolaka motema.”

To, “mwa nzete mpo na koyeba makambo oyo ebombaná.”

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

Lil., “esika monene.”

To, “masanga oyo basali na blé.”

To, “kosala pite mingi; kosala bondumba.”

Lil., “Banguba.”

To, “ekomema ye.”

To, “Bapɛngwi.”

To, “nakopesa disiplini na.”

To, “osali pite; osangisi nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

Lil., “elongi na ye.”

To mbala mosusu, “na sanza moko bakolyama.”

To, “bilanga.”

To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

Lil., “elongi na ngai.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To, “motema mawa.”

To mbala mosusu, “Mpo mitema na bango ezali lokola etumbelo ya mampa, wana bazali kopusana na mayele mabe na bango.”

Lil., “basambisi.”

Lil., “ezangá motema.”

Lil., “napesaki lisangá na bango.”

Elingi koloba, na losambo oyo etombwani.

Lil., “Tyá liseke na monɔkɔ na yo.”

To, “bazali pɛto.”

To, “oyo etɛlɛmi.”

To, “mateya.”

To mbala mosusu, “Bakozonga.”

To, “pite; kosangisa nzoto na bato ndenge na ndenge.”

To, “mpo na molimo na bango moko.”

To, “na fɛti na bino oyo etyamá.”

To, “nzambe ya nsɔni.”

To, “oyo ezangi mai.”

To mbala mosusu, “oyo ezali kopanzana.”

To, “mabe; sɛlisɛli.”

Lil., “bakokangisama monɔkɔ.”

To, “esilisaki.”

Elingi koloba, ntango bakomema etumbu na bango lokola ekanganeli.

Lil., “Bobaloli mabe ndenge babalolaka mabele.”

Lil., “akokangisama monɔkɔ.”

Elingi koloba, basakoli mpe bato mosusu oyo batindamaki mpo na koteya Yisraele.

To, “bikeko oyo eyemami.”

To, “bansinga ya boboto,” emonani ete ezalaki bansinga oyo baboti bazalaki kosalela mpo na kolakisa mwana kotambola.

Elingi koloba, na losambo oyo etombwani.

Lil., “engalaki.”

To, “koyengayenga.”

To, “na litindi.”

To, “nkombo ya ekaniseli na ye.”

To mbala mosusu, “fɛti moko.”

To, “misala ya maji; bikelakela.”

Lil., “esobe.”

To, “Siri.”

To, “ya ebende oyo enyangwisami.”

To, “bizi.”

Lil., “mwa eloko oyo ezingi motema na bango.”

Lil., “basambisi.”

To, “ebatelami.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “nguya na yo ya kopesa mpasi.”

Lil., “likabo ya bana-ngombɛ ya mibali ya mbɛbu na biso.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

Lil., “Ekaniseli.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto