EZEKIELE
1 Na mbula ya 30, na mokolo ya mitano, na sanza ya minei, wana nazalaki na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya,+ pene na ebale Kebare,+ likoló efungwamaki mpe nabandaki komona bimonaneli ya Nzambe. 2 Na mokolo ya mitano ya sanza yango (elingi koloba, na mbula ya mitano ya komemama ya Mokonzi Yehoyakine na mboka mopaya),+ 3 Yehova alobaki na ngai, Ezekiele* mwana ya nganga-nzambe Buzi, na mokili ya Bakaladea pene ya ebale Kebare.+ Kuna nde nguya ya Yehova ebandaki kosala na kati na ngai.*+
4 Ntango nazalaki kotala, namonaki mopɛpɛ moko makasi+ ezalaki kouta na nɔrdi, lipata moko monene mpe mɔtɔ ezalaki kobimabima,*+ mpe kongɛnga moko makasi ezingaki yango, mpe eloko moko lokola wolo oyo esangani na palata ezalaki kouta na katikati ya mɔtɔ.+ 5 Na kati ya mɔtɔ yango ezalaki na eloko moko oyo ezalaki komonana lokola bikelamu minei ya bomoi,+ mpe mokomoko azalaki komonana lokola moto. 6 Ekelamu mokomoko na kati na bango azalaki na bilongi minei, mpe mapapu minei.+ 7 Makolo na bango ezalaki semba, mpe ezalaki lokola makolo ya mwana-ngɔmbɛ, ezalaki kongɛnga lokola kongɛnga ya kwivre oyo bapaloli sɛlisɛli.+ 8 Mabɔkɔ ya moto ezalaki na nse ya mapapu na bango, na mipanzi na bango nyonso minei, mpe bango nyonso minei bazalaki na bilongi mpe mapapu. 9 Mapapu na bango ezalaki kokangana moko na mosusu. Bazalaki kobaluka te ntango bazali kokende; mokomoko azalaki kokende kaka liboso.+
10 Talá ndenge bilongi na bango ezalaki komonana: bango nyonso minei bazalaki mokomoko na elongi ya moto, ná elongi ya nkɔsi+ na ngámbo ya lobɔkɔ ya mobali, mpe elongi ya ngɔmbɛ-mobali+ na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi; mpe bango nyonso minei bazalaki na elongi+ ya mpongo.+ 11 Bilongi na bango ezalaki ndenge wana. Mapapu na bango esembolamaki likoló. Mokomoko azalaki na mapapu mibale ekangani moko na mosusu, mpe mapapu mibale ezalaki kozipa nzoto na bango.+
12 Mokomoko azalaki kokende kaka liboso. Esika nyonso oyo elimo ezalaki kotinda bango bákende, bazalaki kokende.+ Bazalaki kobaluka te ntango bazali kokende. 13 Mpe bikelamu yango ya bomoi, bazalaki komonana lokola makala oyo ezali kopela. Biloko moko oyo ezalaki komonana lokola banzete* ya mɔtɔ ezalaki kokende mpe kozonga kati na bikelamu yango ya bomoi, mɔtɔ ezalaki kongɛnga, mpe mikalikali ezalaki kobima na mɔtɔ.+ 14 Mpe ntango bikelamu yango ya bomoi bazalaki kokende mpe kozonga, bazalaki komonana lokola mikalikali.
15 Wana nazalaki kotala bikelamu yango ya bomoi, namonaki pine ya ebende* moko ezalaki na mabele pembeni ya bikelamu yango ya bomoi, oyo bazalaki na bilongi minei.+ 16 Bapine yango ya ebende* ezalaki kongɛnga lokola libanga ya krizolite, mpe yango nyonso minei ezalaki lolenge moko. Ndenge oyo yango ezalaki komonana ná ndenge oyo yango esalemaki ezalaki lokola pine moko ya ebende ezali na katikati ya pine mosusu ya ebende.* 17 Ntango yango ezalaki kokende, ekokaki kokende na ngámbo na yango nyonso minei. Ezalaki kobuka te mpo na kobaluka na nzela mosusu. 18 Bajantɛ na yango, ezalaki minene mingi mpenza mpe ezalaki kopesa nsɔmɔ; mpe bajantɛ na yango nyonso minei etondaki na miso epai na epai.+ 19 Ntango nyonso oyo bikelamu yango ya bomoi bazalaki kokende, bapine yango ezalaki mpe kokende elongo na bango, mpe ntango bikelamu yango ya bomoi bazalaki kotombwana na mabele, bapine yango mpe ezalaki kotombwana.+ 20 Esika nyonso oyo elimo ezalaki kotinda bango bákende, bazalaki kokende, esika nyonso oyo elimo ezalaki kokende; bapine ezalaki kotombwana elongo na bango, mpo elimo oyo ezalaki kosala na kati ya bikelamu ya bomoi* ezalaki mpe na kati ya bapine yango. 21 Ntango bazalaki kokende, yango ezalaki kokende; ntango bazalaki kotɛlɛma, yango mpe ezalaki kotɛlɛma; ntango bazalaki kotombwana na mabele, bapine yango ezalaki kotombwana elongo na bango, mpo elimo oyo ezalaki kosala na kati ya bikelamu ya bomoi ezalaki mpe na kati ya bapine.
22 Likoló ya mitó ya bikelamu yango ya bomoi, ezalaki na eloko moko lokola etando oyo ezalaki ngɛlingɛli lokola glasɛ moko ya nsɔmɔ, etandami likoló ya mitó na bango.+ 23 Na nse ya etando yango, mapapu na bango etɛlɛmaki semba na likoló,* mosusu ekangani na mosusu. Mokomoko na bango azalaki na mapapu mibale mpo na kozipa nzoto na ye na mopanzi oyo mpe na mapapu mibale mpo na kozipa nzoto na ye na mopanzi oyo mosusu. 24 Ntango nayokaki lokito ya mapapu na bango, ezalaki lokola lokito ya mai oyo ezali kotíyola mbangu, lokola lokito ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+ Ntango bazalaki kokende, ezalaki lokola lokito ya limpinga. Ntango bazalaki kotɛlɛma bazalaki kokitisa mapapu na bango.
25 Mongongo moko ebimaki likoló ya etando oyo ezalaki likoló ya mitó na bango. (Ntango bazalaki kotɛlɛma, bazalaki kokitisa mapapu na bango.) 26 Likoló ya etando yango oyo ezalaki likoló ya mitó na bango, eloko moko ezalaki komonana lokola libanga ya safire,+ oyo ezalaki lokola kiti ya bokonzi.+ Mpe likoló ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki komonana lokola moto.+ 27 Banda na esika oyo ezalaki komonana lokola loketo na ye tii na likoló, namonaki eloko moko oyo ezalaki kongɛnga lokola wolo oyo esangani na palata,+ oyo ezalaki lokola mɔtɔ oyo ezalaki kongɛnga. Mpe banda na esika oyo ezalaki komonana lokola loketo na ye tii na nse, namonaki eloko moko lokola mɔtɔ.+ Kongɛnga ezalaki zingazinga na ye nyonso 28 lokola ya monama+ oyo ebimaka na mapata na mokolo ya mbula. Bongo nde kongɛnga yango ezalaki komonana zingazinga. Ezalaki komonana lokola nkembo ya Yehova.+ Ntango namonaki yango, nakweaki elongi na nse, mpe nabandaki koyoka mongongo ya moto moko azali koloba.
2 Bongo alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto,* tɛlɛmá mpo naloba na yo.”+ 2 Ntango alobaki na ngai, elimo ekɔtaki kati na ngai mpe esalaki ete natɛlɛma+ mpo nayoka Moto oyo azalaki koloba na ngai.
3 Alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, nazali kotinda yo epai ya bato ya Yisraele,+ epai ya bikólo ya batomboki oyo batombokeli ngai.+ Bango ná bankɔkɔ na bango babuki mibeko na ngai tii na mokolo ya lelo.+ 4 Nazali kotinda yo epai ya bana ya botomboki mpe ya motema makasi,+ mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’ 5 Nde bango, ezala soki bakoyoka to bakoboya koyoka, mpo bazali batomboki,+ bakoyeba mpenza ete mosakoli moko azalaki na kati na bango.+
6 “Kasi yo mwana ya moto, kobanga bango te+ mpe kobanga maloba na bango te, ata soki ozingami na bansende mpe na banzubɛ*+ mpe ozali kofanda na katikati ya bankotó. Kobanga maloba na bango te,+ mpe bilongi na bango elɛngisa yo te,+ mpo bazali batomboki. 7 Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, báyoka to te, mpo bazali batomboki.+
8 “Kasi yo, mwana ya moto, yoká oyo nazali koloba na yo. Kokóma te motomboki lokola batomboki oyo. Fungolá monɔkɔ na yo mpe lyá oyo nazali kopesa yo.”+
9 Ntango natalaki! Namonaki lobɔkɔ moko esembolami epai na ngai,+ mpe na kati namonaki rulo moko oyo bakomi.*+ 10 Ntango afungolaki yango liboso na ngai, ezalaki na makomi liboso mpe na nsima na yango.+ Nzembo ya mawa, kolela ya mawa* ná kolelalela ekomamaki na kati.+
3 Bongo alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, lyá oyo ezali liboso na yo.* Lyá rulo oyo, mpe kende koloba na bato ya Yisraele.”+
2 Na yango nafungolaki monɔkɔ na ngai, mpe aleisaki ngai rulo yango. 3 Alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, lyá rulo oyo nazali kopesa yo, mpe tondisá libumu na yo na yango.” Nabandaki kolya yango mpe ezalaki elɛngi na monɔkɔ na ngai lokola mafuta ya nzoi.+
4 Alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto, kende epai ya bato ya Yisraele, mpe yebisá bango maloba na ngai. 5 Mpo otindami te epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ oyo ozali kokanga ntina te to oyo eyebani te, kasi nde epai ya bato ya Yisraele. 6 Ezali te epai ya bato ebele ya bikólo oyo balobaka monɔkɔ oyo ozali kokanga ntina te to oyo eyebani te, oyo okoki te kokanga ntina ya maloba na bango. Soki ezalaka epai na bango nde natindaki yo, bango balingaki koyoka yo.+ 7 Kasi bato ya Yisraele, bakoboya koyoka yo, mpo bazali na mposa ya koyoka ngai te,+ bato nyonso ya Yisraele bazali motó makasi mpe motema makasi.+ 8 Talá! Nakómisi elongi na yo makasi lokola bilongi na bango mpe motó na yo makasi lokola mitó na bango.+ 9 Nakómisi motó na yo lokola diama, makasi koleka libanga ya silekisi.+ Kobanga bango te, mpe bilongi na bango elɛngisa yo te,+ mpo bazali batomboki.”
10 Alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, yoká maloba nyonso oyo nakoyebisa yo, mpe tyá yango na motema na yo. 11 Kende koloba na bato na yo* oyo bamemamaki na mboka mopaya.+ Báyoka to te, yebisá bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’”+
12 Elimo ememaki ngai+ mpe nayokaki na nsima na ngai lokito ya konguluma makasi mpenza oyo ezalaki koloba ete: “Nkembo ya Yehova esanzolama uta na esika na ye.” 13 Ezalaki na lokito ya mapapu ya bikelamu ya bomoi oyo ezalaki kotutana moko na mosusu,+ lokito ya bapine ya ebende* oyo ezalaki penepene na bango,+ mpe lokito ya konguluma ya makasi mpenza. 14 Elimo ememaki ngai, ezwaki ngai, mpe nakendaki na bololo mpe na nkanda makasi,* mpe elimo ya Yehova ezalaki kosala na kati na ngai na ndenge moko ya nguya. 15 Bongo nakɔtaki na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya na Tele-abibe, baoyo bazalaki pene na ebale Kebare,+ mpe nafandaki kuna esika bazalaki kofanda; mpe nafandaki na kati na bango mikolo nsambo, nazalaki kaka kokamwa.+
16 Na nsuka ya mikolo nsambo, Yehova alobaki na ngai ete:
17 “Mwana ya moto, natye yo sinzili mpo na bato ya Yisraele,+ mpe soki oyoki maloba oyo euti na monɔkɔ na ngai, osengeli kokebisa bango mpo na ngai.+ 18 Soki nalobi na moto mabe ete: ‘Okokufa mpenza,’ kasi okebisi ye te mpe olobi te mpo na kokebisa moto mabe mpo atika nzela na ye ya mabe mpo atikala na bomoi,+ akokufa na libunga na ye mpo azali moto mabe,+ kasi makila na ye ekozala na motó na yo.*+ 19 Nzokande, soki okebisi moto mabe, mpe ye atiki mabe na ye te mpe atiki te etamboli na ye ya mabe, akokufa mpo na libunga na ye, kasi okobikisa mpenza bomoi na yo.*+ 20 Soki moto ya sembo* atiki bosembo* na ye mpe asali oyo ezali mabe,* nakotya liboso na ye eloko oyo ebɛtisaka libaku, mpe akokufa.+ Soki okebisaki ye te, akokufa mpo na lisumu na ye, mpe misala na ye ya bosembo ekokanisama te, kasi nakosɛnga yo makila na ye.*+ 21 Nzokande, soki okebisi moto ya sembo mpo asala lisumu te, mpe asali lisumu te, akotikala mpenza na bomoi mpo akebisamaki,+ mpe yo okobikisa bomoi* na yo.”
22 Kuna nguya ya Yehova esalaki kati na ngai* mpe alobaki na ngai boye: “Tɛlɛmá, kende na lobwaku patatalu, mpe nakoloba na yo kuna.” 23 Bongo natɛlɛmaki mpe nakendaki na lobwaku patatalu, mpe talá! nkembo ya Yehova ezalaki wana,+ lokola nkembo oyo namonaki pene na ebale Kebare,+ mpe nakweaki elongi na nse. 24 Na nsima, elimo ekɔtaki kati na ngai mpe esalaki ete natɛlɛma.+ Nzambe alobaki na ngai mpe ayebisaki ngai boye:
“Kende komikanga na kati ya ndako na yo. 25 Nde yo, mwana ya moto! bakotya yo bansinga mpe bakokanga yo yango mpo obima liboso na bango te. 26 Mpe nakosala ete lolemo na yo, ekangama na monɔkɔ na yo, mpe okokóma baba, okokoka te kopamela bango, mpo bazali batomboki. 27 Kasi ntango nakoloba na yo, nakofungola monɔkɔ na yo, mpe osengeli koloba na bango ete:+ ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’ Moto oyo azali koyoka ayoka,+ mpe moto oyo azali koboya koyoka aboya, mpo bazali batomboki.+
4 “Mpe yo, mwana ya moto, zwá briki, mpe tyá yango liboso na yo, katá likoló na yango liyemi ya engumba moko: Yerusaleme. 2 Zingá yango,+ tongá efelo ya kozinga mboka mpo na kobundisa yango,+ tɛlɛmisá mwa ngomba oyo basalá mpo na kobundisa yango,+ tyá bakaa mpo na kobundisa yango mpe zingá yango na bamasini ya kobukabuka.+ 3 Zwá kikalungu ya ebende, mpe tyá yango lokola efelo ya ebende kati na yo ná engumba, na nsima miso na yo etala yango ntango nyonso, mpe ekozingama; yo nde okozinga yango. Yango ezali elembo mpo na bato ya Yisraele.+
4 “Bongo osengeli kolala na mopanzi ya lobɔkɔ na yo ya mwasi, mpe yo moko* okomema libunga ya bato ya Yisraele.+ Okomema libunga na bango na motángo ya mikolo oyo okolala na mopanzi yango. 5 Nakosɛnga yo mikolo 390 oyo ekokani na bambula ya libunga na bango,+ mpe okomema libunga ya bato ya Yisraele. 6 Mpe osengeli kokokisa yango.
“Na nsima mpo na mbala ya mibale okolala na mopanzi ya lobɔkɔ na yo ya mobali, mpe okomema libunga ya bato ya Yuda+ mpo na mikolo 40. Mokolo moko mpo na mbula moko, mokolo moko mpo na mbula moko, yango nde etinda napesi yo. 7 Mpe okotalisa elongi na yo epai Yerusaleme ezingami,+ wana lobɔkɔ na yo ezipami na elamba te, mpe osengeli kosakola mpasi oyo ekokómela yango.
8 “Talá! Nakokanga yo bansinga mpo obaluka te na mopanzi oyo mpo na kolala na mopanzi mosusu, tii okokokisa mikolo oyo okozinga yango.
9 “Osengeli kozwa blé, ɔrje, madesu ya minene, lantiye, mbuma ya miyɛ mpe blé ya mposo makasi, tyá yango na eloko kaka moko mpe salá na yango limpa mpo na yo, okolya yango mikolo 390, oyo ezali motángo ya mikolo oyo okolala na mopanzi na yo.+ 10 Na mokolo, bilei oyo okolya kilo na yango ekozala shekele* 20. Okolya yango na ntango oyo etyami.
11 “Okomɛla mai na emekeli, moko ya bandambo motoba ya hini.* Okomɛla yango na ntango oyo etyami.
12 “Okolya yango lokola limpa ya libungutulu ya ɔrje; na miso na bango, okotumba yango likoló ya nyɛi ya kokauka ya bato.” 13 Yehova alobaki lisusu boye: “Ndenge yango nde Bayisraele bakolya limpa na bango ya mbindo na kati ya bikólo epai nakopalanganisa bango.”+
14 Bongo nalobaki ete: “Te, bongo te, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Banda bolenge na ngai tii sikoyo nakómá naino mbindo te, mpo nalyá te nyama oyo ekufi yango moko to nyama oyo epasolami,+ mpe mosuni ya mbindo ekɔtá naino te na monɔkɔ na ngai.”+
15 Na yango, alobaki na ngai ete: “Nakopesa yo nyɛi ya bangɔmbɛ na esika ya nyɛi ya bato, mpe okotumba limpa na yo likoló na yango.” 16 Na nsima alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto, nakosilisa bilei* nyonso na Yerusaleme,+ na motema likoló nyonso bakolya limpa na bango oyo emekami kilo,+ mpe na nsɔmɔ bakomɛla mai na bango na emekeli.+ 17 Ekozala bongo mpo soki limpa ná mai ezali te, bátalana na kokamwa mpe bákauka mpo na libunga na bango.
5 “Nde yo, mwana ya moto, zwá mopanga moko oyo epeli mpo osalela yango lokola razware ya mokati-nsuki. Kokolá nsuki mpe mandefu na yo, zwá emekeli-kilo mpo na komeka kilo ya nsuki mpe kabolá nsuki yango na bandambo misato. 2 Okotumba na mɔtɔ moko ya bandambo misato na yango na katikati ya engumba ntango kaka mikolo ya kozingama ekokoka.+ Na nsima okozwa ndambo mosusu ya misato mpe okobɛta yango na mopanga bipai nyonso ya engumba,*+ mpe ndambo ya misato ya nsuka, okopanza yango na mopɛpɛ, nakobimisa mopanga mpe nakolanda yango.+
3 “Osengeli mpe kozwa mwa ndambo na yango mpe okolínga yango na bansɔngɛ ya elamba na yo. 4 Mpe zwá lisusu ndambo na yango, bwaká yango na katikati ya mɔtɔ mpe zikisá yango na mɔtɔ. Mɔtɔ yango ekopanzana tii epai ya bato nyonso ya Yisraele.+
5 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Oyo ezali Yerusaleme. Natye ye na katikati ya bikólo, mpe mikili ezali zingazinga na ye. 6 Kasi atombokeli bikateli mpe mibeko na ngai, asali mabe koleka bikólo mpe mikili oyo ezali zingazinga na ye,+ mpo aboyaki bikateli na ngai mpe atosaki te mibeko na ngai.’
7 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola bosalaki mabe koleka bikólo oyo ezali zingazinga na bino, mpe botosaki te mibeko na ngai mpe bosalelaki te bikateli na ngai, nzokande bolandaki bikateli ya bikólo oyo ezali zingazinga na bino.+ 8 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee engumba,+ ngai moko nakokweisa bikateli na ngai ya lisambisi kati na yo na miso ya bikólo,+ 9 nakosala epai na yo likambo oyo nasalá naino te mpe nakosala lisusu likambo ya ndenge wana te mpo na misala na yo nyonso oyo eyinamá.+
10 “‘“Na yango, batata oyo bafandi epai na yo bakolya bana na bango,+ mpe bana bakolya batata na bango, mpe nakokweisa bitumbu epai na yo mpe nakopanza bato nyonso oyo bakotikala, moto na moto na nzela na ye.”’*+
11 “‘Na yango, lokola nazali solo na bomoi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘lokola esika na ngai mosantu nde okómisi mbindo na bikeko na yo ya bosɔtɔ mpe na misala na yo nyonso oyo eyinamá,+ ngai mpe nakobwaka yo,* liso na ngai ekoyoka mawa te, mpe nakomonisa motema mawa te.+ 12 Moko ya bandambo misato ya bato na yo, bakokufa na maladi mabe to bakosila na nzala epai na yo. Ndambo ya misato mosusu bakokufa na mopanga zingazinga na yo.+ Mpe ndambo ya misato ya nsuka, nakopanza bango, moto na moto na nzela na ye,* nakobimisa mopanga mpe nakolanda bango.+ 13 Bongo nkanda na ngai ekosila mpe nkanda ya kongala na ngai epai na bango ekokita mpe motema na ngai ekokita.+ Ntango nakosilisa nkanda na ngai epai na bango bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova, nde nalobi mpo nasɛngaka mpenza ete bákangama kaka na ngai.+
14 “‘Nakokómisa yo esika moko oyo ebebisami mpe eloko ya nsɔni na kati ya bikólo oyo ezali zingazinga na yo mpe liboso ya miso ya moleki-nzela nyonso.+ 15 Okokóma eloko ya nsɔni mpe ya kotyola,+ ndakisa mpo na kokebisa mpe nsɔmɔ mpo na bikólo oyo ezali zingazinga na yo, ntango nakopesa yo bitumbu na nkanda, na nkanda ya kongala mpe bitumbu ya nkanda makasi. Ngai, Yehova, nde nalobi.
16 “‘Nakotindela bino makula oyo ebomaka, ya nzala mpo na kobebisa bino. Makula oyo nakotinda ekoboma bino.+ Nakobakisela bino nzala na ndenge nakosilisa bilei na bino.*+ 17 Nakotindela bafandi na yo nzala mpe banyama mabe ya zamba,+ mpe ekosilisa bana na yo, okotonda na maladi mabe mpe makila, mpe nakotinda mopanga ebɛta yo.+ Ngai, Yehova, nde nalobi.’”
6 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya bangomba ya Yisraele mpe sakolá mpasi oyo ekokómela bango. 3 Osengeli koloba boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso: Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba, bangomba mike, na mikɛli ya mai mpe na mabwaku: “Talá! Nazali kotinda mopanga mpo ebɛta bino, nakobebisa bisika na bino oyo etombwaná. 4 Bitumbelo na bino ekotikala mpamba, bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekobukana,+ mpe nakobwaka bato na bino oyo babomami liboso ya bikeko na bino ya bosɔtɔ.*+ 5 Nakobwaka bibembe ya bato ya Yisraele liboso ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino.+ 6 Na bisika na bino nyonso ya kofanda, bingumba ekobebisama,+ mpe bisika oyo etombwaná ekotikala mpamba, mpe ekobebisama.+ Bitumbelo na bino ekotikala mpamba mpe ekobukana, bikeko na bino ya bosɔtɔ ekosuka, bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekokweisama mpe misala na bino ekolongolama. 7 Bato oyo bakobomama, bibembe na bango ekokwea na kati na bino,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+
8 “‘“Kasi nakotika ndambo ya bato oyo babiki, mpo ndambo na kati na bino bakobika na mopanga na kati ya bikólo ntango bokopalanganisama na kati ya mikili.+ 9 Mpe bato oyo bakobika bakokanisa ngai na kati ya bikólo epai bamemaki bango bakangami,+ bakoyeba ete motema na ngai epasukaki mpo bazangaki bosembo,* bapesaki ngai mokɔngɔ,+ bazalaki na mposa makasi ya* bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ Bakoyoka nsɔni mpe mabe mpenza* mpo na makambo nyonso oyo basalaki ya mabe mpe oyo eyinamá.+ 10 Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova mpe ete mpasi oyo nalobaki nakobimisela bango ezali mpamba te.”’+
11 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bɛtá mabɔkɔ na yo mpe tutatutá na lokolo na yo, lelá mpo na makambo nyonso ya mabe mpe oyo eyinamá oyo bato ya Yisraele basali, mpo bakokufa na mopanga, na nzala mpe na maladi mabe.+ 12 Moto oyo azali mosika, akokufa na maladi mabe, oyo azali pene, akokufa na mopanga mpe moto nyonso oyo abiki na yango mpe atikali, akokufa na nzala, nakosopela mpenza bango nkanda makasi na ngai.+ 13 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango bato na bango oyo babomami bakolala na kati ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, zingazinga ya bitumbelo na bango,+ likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná, na bansɔngɛ nyonso ya bangomba, na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa mpe na nse ya nzete nyonso ya monene ya nkasa mingi, esika bapesaki bambeka ya nsolo kitoko mpo na kokitisa motema ya bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ 14 Nakosembolela bango lobɔkɔ na ngai mpe nakokómisa mokili yango esika oyo etikali mpamba, mpe bisika na bango nyonso ya kofanda ekotikala mpamba koleka esobe oyo ezali pene ya Dibla. Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
7 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Nde yo, mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na mokili ya Yisraele: ‘Nsuka eyei! Nsuka ekómeli nsuka minei ya mokili. 3 Sikoyo, nsuka ekómeli yo, mpe nakokitisela yo nkanda na ngai, nakosambisa yo na kolanda etamboli na yo mpe nakosɛnga yo ozongisa monɔkɔ mpo na makambo nyonso eyinamá oyo osali. 4 Liso na ngai ekoyokela yo mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te,+ mpo nakofuta yo na kolanda misala na yo, okonyokwama mpo na makama oyo misala na yo oyo eyinamá ekobimisa.+ Mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+
5 “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Talá, mpasi! Mpasi oyo ekokani na mosusu te ezali koya.+ 6 Nsuka ezali koya; nsuka ekoya. Ekoyela yo na mbalakaka.* Ɛɛ, ezali koya! 7 Yo oyo ofandi na mokili, ngala na yo ekómi,* ntango ezali koya. Mokolo ekómi pene.+ Na bangomba mobulungano nde ezali, kasi koganga ya esengo ezali te.
8 “‘Mosika te, nakosopela yo nkanda na ngai,+ mpe nakokitisela yo mpenza nkanda na ngai,+ nakosambisa yo na kolanda etamboli na yo mpe nakosɛnga yo ozongisa monɔkɔ mpo na makambo nyonso eyinamá oyo osali. 9 Liso na ngai ekoyoka mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te.+ Nakofuta yo na kolanda misala na yo, okonyokwama mpo na makama oyo misala na yo moko oyo eyinamá ekobimisa. Mpe okoyeba mpenza ete ngai Yehova nde nazali kobɛta yo.+
10 “‘Talá mokolo yango oyo! Talá ezali koya!+ Ngala na yo ekómi.* Lingenda ebimisi fololo. Mpe lofundo ebimisi nkasa. 11 Mobulu ekoli mpe ekómi lingenda ya makambo ya mabe.+ Ezala bango, bozwi na bango, bato na bango ebele to lokumu na bango, moko te akotikala. 12 Ntango yango ekoya, mokolo yango ekokóma. Mosombi asepela te, mpe motɛki alela te, mpo nkanda makasi ezali mpo na ebele ya bato na bango nyonso.*+ 13 Mpo motɛki akozongela te biloko oyo atɛkaki, ata soki atikali na bomoi, mpo emonaneli etali ebele ya bato yango nyonso. Moto moko te akozonga, mpe mpo na libunga na ye* moto moko te akotikala na bomoi.
14 “‘Babɛti kelelo+ mpe moto nyonso amibongisi, kasi moto moko te azali kokende etumba, mpo nazali na nkanda makasi ya ebele ya bato yango nyonso.+ 15 Etumba* ezali libándá,+ mpe maladi mabe ná nzala ezali na kati. Moto nyonso oyo azali na elanga, akokufa na etumba, mpe nzala ná maladi mabe ekolya bango na engumba.+ 16 Bato na bango oyo babiki bakokima mpe bakokende na bangomba. Mpe lokola bibenga ya mabwaku, moto na moto akolelalela ntango akokanisa libunga na ye.+ 17 Mabɔkɔ na bango nyonso ekolɛmba, mpe mabɔlɔngɔ na bango nyonso ekotangisa mai.*+ 18 Balati ngɔtɔ*+ mpe kolɛnga ekangi bango.* Moto nyonso akoyoka nsɔni mpe motó nyonso ekozala na libandi.*+
19 “‘Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekokóma eloko moko ya mpii na miso na bango. Ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka te kobikisa bango na mokolo ya nkanda makasi ya Yehova.+ Bakotonda te,* mpe bakotondisa misɔpɔ na bango te, mpo ekómi* eloko oyo ebɛtisaka libaku, oyo esali ete básala lisumu. 20 Bazalaki komikumisa mpo na kitoko ya biloko na bango ya monzɛlɛ. Mpe basalaki na yango* bikeko na bango oyo eyinamá, bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ Yango wana nakokómisa yango eloko oyo bakoyokela mpii. 21 Nakopesa yango* na lobɔkɔ ya bapaya mpo bápunza yango mpe na bato mabe ya mabele mpo ezala eloko oyo bakobɔtɔla, mpe bakokómisa yango eloko mpamba.
22 “‘Nakopesa bango mokɔngɔ,+ mpe bakokómisa mpamba esika na ngai oyo ebombaná,* miyibi bakokɔta na kati na yango mpe bakokómisa yango eloko mpamba.+
23 “‘Salá monyɔlɔlɔ,*+ mpo mokili etondi na lisambisi oyo ebebisami na makila+ mpe engumba etondi na mobulu.+ 24 Nakomema bato oyo baleki mpenza mabe ya bikólo,+ mpe bakozwa bandako na bango,+ nakosukisa lolendo ya bato ya makasi, mpe bisika na bango mosantu ekokóma eloko mpamba.+ 25 Ntango bakomona bwale, bakoluka kimya, kasi ekozala te.+ 26 Ekozala kaka likama na likama, mpe nsango na nsango, mpe bato bakoluka emonaneli epai ya mosakoli,+ kasi mobeko* ekozala lisusu te epai ya nganga-nzambe mpe toli ekozala lisusu te epai ya bankulutu.+ 27 Mokonzi akozala na mawa makasi,+ nkumu akoyoka nsɔmɔ mpe akolɛmba nzoto, mpe mabɔkɔ ya bato ya mokili ekolɛnga na nsɔmɔ. Nakosalela bango makambo na kolanda etamboli na bango, mpe nakosambisa bango na kolanda ndenge oyo basambisaki basusu. Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+
8 Na mbula ya motoba, na mokolo ya mitano ya sanza ya motoba, ntango nafandaki na ndako na ngai mpe bankulutu ya Yuda bafandaki liboso na ngai, kuna lobɔkɔ ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso esimbaki ngai. 2 Wana nazalaki kotala, namonaki moto moko oyo azalaki komonana lokola mɔtɔ; nzoto na ye ezalaki komonana lokola mɔtɔ kobanda na loketo na ye tii na nse,+ mpe kobanda na loketo na ye tii likoló nzoto na ye ezalaki komonana lokola kongɛnga, lokola kongɛnga ya wolo oyo esangani na palata.+ 3 Na nsima, asembolaki oyo ezalaki komonana lokola lobɔkɔ mpe asimbaki ngai na nsuki ya motó na ngai, bongo elimo moko ememaki ngai kati na mabele ná likoló mpe ekambaki ngai na Yerusaleme na nzela ya bimonaneli ya Nzambe, na esika ya kokɔta na porte ya kati+ oyo etali na ngámbo ya nɔrdi, esika elembo* ya losambo ya bikeko oyo eyokisaka zuwa ezalaki.+ 4 Mpe talá! nkembo ya Nzambe ya Yisraele ezalaki kuna,+ ezalaki komonana lokola eloko oyo namonaki na lobwaku patatalu.+
5 Bongo alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, nabondeli yo, tombolá miso na yo na ngámbo ya nɔrdi.” Na yango, natombolaki miso na ngai na ngámbo ya nɔrdi, mpe kuna elembo* yango ya zuwa ezalaki na esika ya kokɔta, na nɔrdi ya porte ya etumbelo. 6 Mpe alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, omoni makambo ya nsɔmɔ, oyo eyinamá oyo bato ya Yisraele bazali kosala awa,+ makambo oyo ezali kosala ete nazala mosika na esika na ngai mosantu?+ Kasi okomona makambo oyo eyinamá, ya nsɔmɔ koleka.”
7 Na nsima, amemaki ngai na esika ya kokɔta na lopango mpe ntango natalaki, namonaki lidusu moko na efelo. 8 Alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto, nabondeli yo, tɔbɔlá efelo.” Na yango natɔbɔlaki efelo, mpe namonaki esika ya kokɔta. 9 Alobaki na ngai ete: “Kɔtá mpe moná makambo ya mabe oyo eyinamá oyo bazali kosala awa.” 10 Bongo nakɔtaki, natalaki mpe namonaki lolenge nyonso ya bililingi ya biloko oyo ebendanaka na libumu mpe banyama oyo eyokisaka mabe mpenza,*+ mpe bikeko nyonso ya bosɔtɔ* ya bato ya Yisraele,+ bayemaki yango epai na epai na efelo. 11 Bankulutu 70 kati na bato ya Yisraele batɛlɛmaki liboso na yango, Yaazania mwana ya Shafane+ atɛlɛmi na kati na bango. Moto na moto azalaki na eloko na ye ya kotumba mpaka ya malasi na lobɔkɔ na ye, mpe nsolo ya malasi ya lipata ya mpaka ya malasi ezalaki komata.+ 12 Alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto omoni makambo oyo bankulutu ya bato ya Yisraele bazali kosala na molili, moto na moto na bashambrɛ na ye ya kati epai bikeko na ye ezali? Mpo bazali koloba ete: ‘Yehova azali komona biso te. Yehova atiki mokili.’”+
13 Mpe akobaki koloba na ngai boye: “Kasi okomona makambo oyo eyinamá, ya nsɔmɔ koleka oyo bazali kosala.” 14 Bongo amemaki ngai na esika ya kokɔta na porte ya ndako ya Yehova, oyo ezali na nɔrdi, mpe kuna namonaki basi bafandi, mpe bazali kolela nzambe Tamuze.
15 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Ee mwana ya moto, omoni yango? Kutu okomona makambo oyo eyinamá, ya nsɔmɔ koleka oyo.”+ 16 Bongo amemaki ngai na lopango ya kati ya ndako ya Yehova.+ Kuna, na esika ya kokɔta na tempelo ya Yehova, kati na ndako ya kokɔtela ná etumbelo, ezalaki na mibali soki 25 bapesi tempelo ya Yehova mokɔngɔ na bango mpe bilongi na bango etali na ɛsti; bazalaki kogumbamela moi na ngámbo ya ɛsti.+
17 Alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, omoni yango? Ezali nde likambo moke mpo na bato ya Yisraele kosala makambo oyo eyinamá, kotondisa mokili na mobulu+ mpe kokoba kosilikisa ngai? Talá bazali kosembola mwa etape* na zolo na ngai. 18 Na yango, ngai mpe nakosala makambo na nkanda makasi. Liso na ngai ekoyoka mawa te; nakomonisa mpe motema mawa te.+ Ata soki babeleli makasi na matoi na ngai, nakoyoka bango te.”+
9 Bongo abelelaki na mongongo makasi na matoi na ngai ete: “Bóbengisa baoyo bakopesa engumba etumbu, moto na moto asimba ebundeli na ye ya kobebisa!”
2 Namonaki mibali motoba bazali kouta na ngámbo ya porte ya likoló+ oyo etali na nɔrdi, moto na moto asimbaki na lobɔkɔ na ye ebundeli mpo na kobukabuka. Mpe kati na bango, moto moko oyo alati elamba ya lini azalaki na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ na loketo na ye. Bakɔtaki mpe batɛlɛmaki pene na etumbelo ya kwivre.+
3 Na yango nkembo ya Nzambe ya Yisraele+ elongwaki likoló ya bakeruba epai yango ezalaki, ekei na ekɔtelo ya porte ya ndako,+ mpe ye abandaki kobelela moto oyo alataki elamba ya lini, moto oyo etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ ezalaki na loketo na ye. 4 Yehova alobaki na ye boye: “Lekaleká na engumba Yerusaleme, mpe tyá elembo na bilongi ya bato oyo bazali konyokwama mpe kolelalela+ mpo na makambo nyonso oyo eyinamá oyo ezali kosalema na engumba.”+
5 Mpe nayokaki ye azali koloba na basusu ete: “Bólekaleka na engumba nsima na ye mpe bóboma bato. Liso na bino eyoka mawa te, mpe bómonisa motema mawa ata moke te.+ 6 Mobange, elenge mobali, ngɔndɔ, mwana moke mpe basi, bosengeli koboma bango nyonso.+ Kasi, bópusana te epai ya moto nyonso oyo azali na elembo,+ bosengeli kobanda na esika na ngai mosantu.”+ Bongo babandaki na bankulutu oyo bazalaki liboso ya ndako.+ 7 Na nsima, alobaki na bango ete: “Bókómisa ndako mbindo mpe bótondisa mapango na bato oyo babomami.+ Bókende!” Bongo bakendaki mpe babomaki bato na engumba.
8 Ntango bazalaki koboma bango kaka ngai moko nde natikalaki na bomoi, nakweaki elongi na nse mpe nagangaki ete: “Mawa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Okobebisa baoyo nyonso batikali na Yisraele awa ozali kosopela Yerusaleme nkanda makasi na yo?”+
9 Bongo alobaki na ngai ete: “Libunga ya bato ya Yisraele mpe ya Yuda ezali monene mingi mpenza,+ mokili etondi na makila oyo esopami,+ engumba etondi na bato oyo bazali sembo te,+ mpo balobi: ‘Yehova atiki mokili, Yehova azali komona te.’+ 10 Na yango ngai mpe, liso na ngai ekoyoka mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te.+ Nakosala ete bányokwama mpo na mbuma mabe ya etamboli na bango.”
11 Bongo namonaki moto oyo alataki elamba ya lini, oyo azalaki na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ na loketo na ye, ayaki koyebisa ete: “Nasali kaka ndenge opesaki ngai mitindo.”
10 Wana nazalaki kotala, namonaki likoló ya etando oyo ezalaki likoló ya motó ya bakeruba, eloko moko lokola libanga ya safire, oyo ezalaki komonana likoló na bango, mpe ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi.+ 2 Bongo alobaki na moto oyo alataki elamba ya lini ete:+ “Kɔtá na katikati ya bapine ya ebende,+ na nse ya bakeruba, mpe tondisá mabɔkɔ na yo mibale na makala ya mɔtɔ+ oyo euti na katikati ya bakeruba mpe bwaká yango na engumba.”+ Bongo akɔtaki wana nazalaki kotala.
3 Bakeruba batɛlɛmaki na lobɔkɔ ya mobali ya ndako ntango moto yango akɔtaki, mpe lipata etondisaki lopango ya kati. 4 Nkembo ya Yehova+ elongwaki epai ya bakeruba mpe ekendaki na ekɔtelo ya porte ya ndako. Mokemoke ndako etondaki na lipata,+ mpe lopango etondaki na kongɛnga ya nkembo ya Yehova. 5 Mpe lokito ya mapapu ya bakeruba eyokanaki libándá ya lopango, lokola lokito ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ntango alobaka.+
6 Bongo apesaki moto oyo alataki elamba ya lini mitindo ete: “Zwá mɔtɔ na katikati ya bapine ya ebende,* na katikati ya bakeruba,” moto yango akɔtaki mpe atɛlɛmaki pene na pine ya ebende.* 7 Bongo keruba moko asembolaki lobɔkɔ na ye na mɔtɔ oyo ezalaki na katikati ya bakeruba,+ azwaki ndambo mpe atyaki yango na mabɔkɔ ya moto oyo alataki elamba ya lini,+ ye azwaki yango mpe abimaki. 8 Na nse ya mapapu na bango, bakeruba bazalaki na eloko moko oyo ezalaki lokola mabɔkɔ ya moto.+
9 Ntango nazalaki kotala, namonaki bapine minei ya ebende ezali pene na bakeruba, pine mokomoko ezalaki pembeni ya keruba mokomoko, mpe bapine yango ezalaki komonana lokola kongɛnga ya libanga ya krizolite.+ 10 Mpo na ndenge oyo yango ezalaki komonana, bapine nyonso minei ezalaki lolenge moko, ezalaki komonana lokola pine moko ezalaki na katikati ya pine mosusu. 11 Ntango yango ezalaki kokende, ekokaki kokende na ngámbo na yango nyonso minei. Ezalaki kobuka te mpo na kobaluka, mpo ezalaki kokende esika oyo motó ezalaki kotala, kozanga kobaluka. 12 Nzoto na bango mobimba, mikɔngɔ na bango, mabɔkɔ na bango, mapapu na bango ná bapine ya ebende, bapine ya bakeruba yango nyonso minei etondaki na miso epai na epai.+ 13 Mpo na oyo etali bapine, nayokaki mongongo moko oyo ebelelaki yango boye: “Bapine!”
14 Mokomoko na bango* azalaki na bilongi minei. Elongi ya liboso ezalaki elongi ya keruba, elongi ya mibale ezalaki elongi ya moto, ya misato ezalaki elongi ya nkɔsi, mpe ya minei ezalaki elongi ya mpongo.+
15 Mpe bakeruba bazalaki komata (ezalaki kaka bikelamu ya bomoi* oyo namonaki na ebale Kebare)+ 16 mpe ntango bakeruba bazalaki kokende, bapine ezalaki mpe kokende elongo na bango; mpe ntango bakeruba bazalaki kotombola mapapu na bango mpo na komata mosika na mabele, bapine yango ezalaki kobaluka epai mosusu te, mpe ezalaki kolongwa pembeni na bango te.+ 17 Ntango bazalaki kotɛlɛma, yango mpe ezalaki kotɛlɛma; ntango bazalaki komata, yango mpe ezalaki komata elongo na bango, mpo elimo oyo ezalaki kosala na kati ya bikelamu ya bomoi* ezalaki mpe na kati ya bapine yango.
18 Bongo nkembo ya Yehova+ elongwaki likoló ya ekɔtelo ya porte ya ndako mpe etɛlɛmaki likoló ya bakeruba.+ 19 Sikoyo wana nazalaki kotala, bakeruba batombolaki mapapu na bango mpe bamataki, batiki mabele. Ntango bakendaki, bapine mpe ezalaki penepene na bango. Batɛlɛmaki na esika ya kokɔta oyo ezali na ɛsti ya porte ya ndako ya Yehova, mpe nkembo ya Nzambe ya Yisraele ezalaki likoló na bango.+
20 Ezalaki bikelamu ya bomoi* oyo namonaki na nse ya Nzambe ya Yisraele na ebale Kebare,+ bongo nayaki koyeba ete bazalaki nde bakeruba. 21 Bango nyonso minei bazalaki na bilongi minei, mapapu minei, mpe na nse ya mapapu na bango ezalaki na eloko moko oyo ezalaki komonana lokola mabɔkɔ ya moto.+ 22 Mpe lolenge ya bilongi na bango ezalaki komonana lokola bilongi oyo namonaki na ebale Kebare.+ Mokomoko azalaki kokende kaka liboso.+
11 Elimo etombolaki ngai mpe ememaki ngai na porte ya ndako ya Yehova, porte oyo etali na ngámbo ya ɛsti.+ Kuna na ekɔtelo ya porte namonaki mibali 25, mpe na kati na bango namonaki Yaazania mwana ya Azure mpe Pelatia mwana ya Benaya, bankumu ya bato.+ 2 Bongo alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto, baoyo wana nde mibali oyo bazali kokana kosala makambo ya mabe mpe bazali kopesa toli ya mabe na* engumba oyo. 3 Bazali koloba ete: ‘Oyo ezali ntango te ya kotonga bandako?+ Engumba ezali* nzungu ya kolambela*+ mpe biso tozali mosuni.’
4 “Na yango, sakwelá bango. Mwana ya moto, sakolá.”+
5 Bongo elimo ya Yehova esalaki likoló na ngai,+ mpe Nzambe alobaki na ngai ete: “Lobá: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Ee bato ya Yisraele, bolobi likambo ya solo, mpe nayebi oyo bozali kokanisa.* 6 Bosali ete bato ebele bákufa na engumba oyo, mpe botondisi babalabala na yango na bibembe.”’”+ 7 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bibembe oyo bopanzi na engumba ezali misuni mpe engumba ezali nzungu ya kolambela.+ Kasi bakobimisa bino na kati na yango.’”
8 “‘Bozali kobanga etumba,+ kasi nakomemela bino etumba,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 9 ‘Nakobimisa bino na kati na yango, nakopesa bino na lobɔkɔ ya bapaya mpe nakokweisela bino bitumbu.+ 10 Bokobomama na mopanga.+ Nakosambisa bino na ndelo ya Yisraele,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+ 11 Engumba ekozala te nzungu ya kolambela mpo na bino, mpe bokozala te mosuni na kati na yango. Nakosambisa bino na ndelo ya Yisraele, 12 bokoyeba mpenza ete nazali Yehova, mpo botosaki te mibeko na ngai mpe bosalelaki te bikateli na ngai,+ kasi bosalaki nde makambo na kolanda bikateli ya bikólo oyo ezali zingazinga na bino.’”+
13 Ntango kaka nasilisaki kosakola, Pelatia mwana ya Benaya akufaki, mpe nakweaki natye elongi na nse mpe nagangaki na mongongo makasi ete: “Mawa, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Okosilisa nde bato ya Yisraele oyo batikali?”+
14 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 15 “Mwana ya moto, bafandi ya Yerusaleme balobi boye na bandeko na yo, bandeko na yo oyo bazali na lotomo ya kosikola, na bato nyonso ya Yisraele: ‘Bózala mosika na Yehova. Mokili ezali ya biso, bapesi yango biso mpo ekóma ya biso.’ 16 Na yango, lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Natye bango mosika na bikólo, mpe napalanganisi bango na kati ya mikili,+ kasi nakokóma mpo na bango esika mosantu mpo na mwa ntango na kati ya mikili esika bakei.”’+
17 “Na yango, lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosangisa mpe bino uta na bato ya bikólo mpe nakoyanganisa bino uta na mikili oyo bopalanganisamaki, mpe nakopesa bino mokili ya Yisraele.+ 18 Bakozonga kuna mpe bakolongola na kati na yango makambo nyonso ya bosɔtɔ mpe misala oyo eyinamá.+ 19 Nakosala ete bázala na bomoko na mitema na bango,*+ mpe nakotya elimo ya sika na kati na bango;+ nakolongola motema ya libanga na nzoto na bango+ mpe nakopesa bango motema ya mosuni,*+ 20 mpo bátosa mibeko na ngai, bábatela bikateli na ngai mpe básalela yango. Bongo bakozala bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bango.”’
21 “‘“Kasi mpo na baoyo motema na bango ezali kokoba kolanda makambo ya bosɔtɔ mpe misala na bango oyo eyinamá, nakosala ete bányokwama mpo na mbuma mabe ya etamboli na bango,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.’”
22 Sikoyo bakeruba batombolaki mapapu na bango, bapine ya ebende ezalaki penepene na bango,+ mpe nkembo ya Nzambe ya Yisraele ezalaki likoló na bango.+ 23 Na yango nkembo ya Yehova+ elongwaki likoló ya engumba, mpe etɛlɛmaki likoló ya ngomba, na ɛsti ya engumba.+ 24 Bongo elimo etombolaki ngai na emonaneli na nzela ya elimo ya Nzambe mpe ememaki ngai epai ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya na Kaladea. Mpe emonaneli oyo namonaki esilaki. 25 Mpe nabandaki koyebisa bato oyo bamemamaki na mboka mopaya makambo nyonso oyo Yehova amonisaki ngai.
12 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, ozali kofanda na kati ya bato oyo bazali batomboki, bazali na miso ya komona kasi bazali komona te, mpe matoi ya koyoka kasi bazali koyoka te,+ mpo bazali batomboki.+ 3 Nde yo, mwana ya moto, kangá bisaka mpo okende na mboka mopaya. Osengeli kokende na mboka mopaya na moi, na miso na bango. Longwá na esika na yo mpe kende na mboka mopaya, na miso na bango. Mbala mosusu bakotya likebi, atako bazali batomboki. 4 Bimisá bisaka na yo mpo na kokende na mboka mopaya na moi na miso na bango, mpe na mpokwa, na miso na bango osengeli kokende lokola moto oyo amemami na mboka mopaya.+
5 “Na miso na bango, okotɔbɔla lidusu na efelo, mpe okobimisa biloko na yo na lidusu yango.+ 6 Na miso na bango, okotya biloko na yo na mapeka mpe okobimisa yango na molili. Okozipa elongi na yo mpo omona mabele te, mpo nazali kokómisa yo elembo mpo na bato ya Yisraele.”+
7 Nasalaki kaka ndenge apesaki ngai mitindo. Na moi, nabimisaki bisaka na ngai, lokola nde bisaka ya moto oyo azali kokende na mboka mopaya, mpe na mpokwa, natɔbɔlaki lidusu na efelo. Ntango molili ekɔtaki, nabimisaki biloko na ngai, namemaki yango na lipeka na ngai, na miso na bango mpenza.
8 Na ntɔngɔ Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 9 “Mwana ya moto, bato ya Yisraele, batomboki yango, batunaki yo te ete: ‘Ozali kosala nini?’ 10 Lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Maloba oyo etali nkumu+ oyo azali na Yerusaleme mpe bato nyonso ya Yisraele oyo bazali na kati ya engumba.”’
11 “Lobá na bango ete ‘ozali elembo+ mpe kaka ndenge osali, ndenge yango nde bakosala bango. Bakokende na mboka mopaya, lokola bakangami.+ 12 Nkumu oyo azali na kati na bango, akomema biloko na ye na lipeka mpe akokende na molili. Akotɔbɔla lidusu na efelo mpe akobimisa biloko na ye na lidusu yango.+ Akozipa elongi na ye mpo amona mabele te.’ 13 Nakobwaka likoló na ye monyama na ngai, mpe akokangama na monyama na ngai ya bokila.+ Na nsima, nakomema ye na Babilone, na mokili ya Bakaladea, kasi akomona yango te. Mpe akokufa kuna.+ 14 Baoyo nyonso bazali zingazinga na ye, basungi na ye mpe basoda na ye, nakopanza bango moto na moto na nzela na ye;+ mpe nakobimisa mopanga mpo na kolanda bango.+ 15 Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakopanza bango na kati ya bikólo mpe nakopalanganisa bango na kati ya mikili. 16 Kasi nakosala ete bato moke kati na bango bábika na etumba, na nzala mpe na maladi mabe, mpo bábɛta lisolo ya misala na bango nyonso oyo eyinamá na kati ya bikólo epai bakokende; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”
17 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 18 “Mwana ya moto, osengeli kolya limpa na yo na kolɛnga, komɛla mai na yo na motema likoló mpe na mitungisi.+ 19 Lobá na bato ya mokili yango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bato ya Yerusaleme oyo bazali na mokili ya Yisraele: “Bakolya limpa na bango na mitungisi, mpe bakomɛla mai na bango na nsɔmɔ, mpo mokili na bango ekotikala mpenza mpamba,+ mpo na mobulu ya baoyo nyonso bazali kofanda na kati na yango.+ 20 Bingumba oyo bato bafandi ekobebisama, mokili ekotikala mpamba.+ Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’”+
21 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 22 “Mwana ya moto, na Yisraele bozalaka te na lisese oyo elobaka ete: ‘Mikolo ezali koleka, kasi emonaneli moko te ezali kokokisama’?+ 23 Na yango, yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosala ete liloba yango esila, mpe bakosalela lisese yango lisusu te na Yisraele.”’ Kasi, yebisá bango ete: ‘Mikolo ekómi pene,+ mpe emonaneli nyonso ekokokisama.’ 24 Mpo na kati ya bato ya Yisraele, ekozala ata na emonaneli moko te ya lokuta, to kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi.+ 25 ‘“Mpo ngai, Yehova, nakoloba, liloba nyonso oyo nakoloba, ekosalema kozanga koumela.+ Ee batomboki, na mikolo na bino+ nakoloba likambo mpe nakokokisa yango,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.’”
26 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 27 “Mwana ya moto, talá oyo bato* ya Yisraele bazali koloba: ‘Emonaneli oyo azali komona ekoumela mingi liboso ete ekokisama, mpe azali kosakola makambo oyo ekokokisama nsima ya ntango molai.’+ 28 Na yango, lobá na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “‘Ata liloba na ngai moko te ekoumela mpo na kokokisama. Nyonso oyo nakoloba, ekosalema,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”’”
13 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, sakolá mpasi oyo ekokómela basakoli ya Yisraele,+ mpe lobá boye na baoyo bazali kosakola makambo na ndenge na bango moko:*+ ‘Bóyoka liloba ya Yehova. 3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na basakoli oyo bazali bazoba, oyo bazali kolanda makanisi na bango moko,* nzokande bamoni ata eloko moko te!+ 4 Ee Yisraele, basakoli na bino bakómi lokola bagambala na bisika oyo etikalá mpamba. 5 Bokokende te kobongisa bisika oyo bifelo ya mabanga ebukaná, mpo na kosalisa bato ya Yisraele,+ mpo Yisraele ebika na etumba na mokolo ya Yehova.”+ 6 “Bamoni bimonaneli ya lokuta mpe basakoli makambo ya lokuta, baoyo bazali koloba ete: ‘Talá oyo Yehova alobi,’ nzokande Yehova ye moko atindi bango te, mpe bazeli ete liloba na bango ekokisama.+ 7 Ezali te emonaneli ya lokuta oyo bomoni, makambo ya lokuta oyo bosakoli, ntango bozali koloba ete: ‘Talá oyo Yehova alobi,’ nzokande nalobi eloko moko te?”’
8 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “‘Lokola bolobi lokuta mpe bimonaneli na bino ezali ya lokuta, nazali kotɛmɛla bino,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”+ 9 Nakosembola lobɔkɔ na ngai mpe nakopesa etumbu na basakoli oyo bimonaneli na bango ezali ya lokuta mpe basakolaka makambo ya lokuta.+ Bakozala lisusu te na kati ya baninga na ngai ya motema; bankombo na bango ekokomama te na mokanda ya bato ya Yisraele, bakozonga te na mokili ya Yisraele; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ 10 Nyonso wana ezali mpo babungisi bato na ngai nzela ntango balobi ete: “Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te,+ moto moko atɛlɛmisi efelo oyo ezali makasi te, mpe bango, bazali kopakola yango mpɛmbɛ.’*+
11 “Lobá na baoyo bazali kopakola yango mpɛmbɛ ete ekokwea. Mbula makasi oyo ezindisaka ekoya, mbula ya mabanga* ekobɛta, mipɛpɛ makasi mpenza ekobuka yango.+ 12 Mpe ntango efelo ekokwea, bakotuna bino ete: ‘Wapi mpɛmbɛ oyo bopakolaki?’+
13 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakosala ete mipɛpɛ makasi epɛpa, mpe mbula makasi oyo ezindisaka enɔka, mpo nazali na nkanda. Nakotinda mbula ya mabanga ebebisa efelo mpo nazali na nkanda makasi. 14 Nakobuka efelo oyo bopakoli mpɛmbɛ mpe nakolalisa yango na mabele, mpe moboko na yango ekomonana mpenza polele. Ntango engumba ekokwea, bokokufa na kati na yango; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
15 “‘Ntango nakosopa mpenza nkanda na ngai likoló ya efelo mpe likoló ya baoyo bazali kopakola yango mpɛmbɛ, nakoloba na bino ete: “Efelo ezali lisusu te, mpe baoyo bazalaki kopakola yango mpɛmbɛ bazali lisusu te.+ 16 Basakoli ya Yisraele bazali lisusu te, baoyo bazalaki kosakwela Yerusaleme mpe baoyo bazalaki komona bimonaneli ya kimya mpo na yango, nzokande kimya ezali te,”’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
17 “Nde yo, Ee mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya bana basi ya bato na yo, oyo bazali kosakola makambo na bango moko, mpe sakolá mpasi oyo ekokómela bango. 18 Lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na basi oyo bazali kotonga bilamba mpo na mabɔkɔ nyonso* mpe bazali kosala matambala mpo na mitó ya bato, ezala bazali milai to mikuse, mpo na kokanga bomoi ya bato na motambo! Bozali koluka kokanga bomoi* ya bato na ngai na motambo, mpe koluka kobatela bomoi na bino moko? 19 Bokokómisa ngai nde eloko mpamba epai ya bato na ngai mpo na mwa ɔrje na mabɔkɔ mpe mpo na biteni ya mampa oyo etikali?+ Bozali koboma baoyo basengelaki kokufa te mpe kotika na bomoi baoyo basengelaki kokufa, bozali koyebisa bato na ngai makambo ya lokuta mpe bazali koyoka yango!”’+
20 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ee basi, nakopasola bilamba oyo bosalelaka mpo na kokanga bato na motambo, lokola nde bazalaki bandɛkɛ, nakopasola yango na mabɔkɔ na bino mpe baoyo bozali kokanga na motambo lokola bandɛkɛ, nakotika bango bákende. 21 Nakopasola matambala na bino, mpe nakobikisa bato na ngai na lobɔkɔ na bino, mpe bakozala lisusu te epai na bino eloko oyo bokoki kokanga na bokila; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+ 22 Mpo bolɛmbisi moto ya sembo nzoto mpo na makambo na bino ya lokuta,+ nzokande ngai nayokisaki ye mpasi te, bolendisaki moto mabe,+ yango wana atikaki te nzela na ye ya mabe mpe akotikala te na bomoi.+ 23 Na yango, bino basi, bokomona lisusu te bimonaneli ya lokuta, mpe bokosakola lisusu te makambo oyo ebombaná;+ nakobikisa bato na ngai na lobɔkɔ na bino, mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
14 Bankulutu mosusu ya Yisraele bayaki mpe bafandaki liboso na ngai.+ 2 Bongo Yehova alobaki na ngai ete: 3 “Mwana ya moto, mibali oyo bazwi ekateli ya kosambela bikeko na bango ya bosɔtɔ,* batye liboso ya bato eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, mpo bato básala lisumu. Nasengeli nde kotika bango bátuna ngai likambo?+ 4 Sikoyo sololá na bango mpe lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Soki Moyisraele azwi ekateli ya kosambela bikeko na ye ya mbindo mpe atye liboso ya bato eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, mpo bato básala lisumu mpe na nsima ayei kotuna mosakoli, ngai, Yehova, nakopesa ye eyano oyo ebongi na kolanda ebele ya bikeko na ye ya bosɔtɔ. 5 Mpo nakotya nsɔmɔ na mitema ya bato ya Yisraele,* mpamba te batiki ngai mpe bakei kosambela bikeko na bango ya bosɔtɔ.”’+
6 “Na yango, lobá na bato ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bózongela ngai mpe bótika bikeko na bino ya bosɔtɔ mpe bóbwaka misala na bino nyonso oyo eyinamá.+ 7 Mpo soki Moyisraele nyonso to moto oyo afandi mopaya na Yisraele, akabwani na ngai, mpe azwi ekateli ya kosambela bikeko na ye ya bosɔtɔ, mpe atye liboso ya bato eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, mpo bato básala lisumu, mpe na nsima ayei kotuna mosakoli na ngai,+ ngai moko, Yehova nakopesa ye eyano. 8 Nakokóma monguna ya moto yango mpe nakokómisa ye elembo mpo na kokebisa mpe nakosala ete bato mosusu bátyola ye, nakolongola ye na kati ya bato na ngai;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’
9 “‘Kasi, soki mosakoli akosami mpe apesi eyano, ezali ngai, Yehova nde nakosi mosakoli yango;+ nakosembolela mosakoli yango lobɔkɔ na ngai mpe nakoboma ye na kati ya bato na ngai Yisraele. 10 Bakomema ngambo ya libunga na bango. Ngambo ya moto oyo ayei kotuna ekozala ndenge moko na ngambo ya mosakoli, 11 mpo bato ya Yisraele báyengayenga lisusu te mosika na ngai mpe bámikómisa mbindo lisusu te na makambo na bango nyonso ya kobuka mibeko. Bakozala bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bango,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
12 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 13 “Mwana ya moto, soki bato ya ekólo moko basaleli ngai lisumu, na ndenge bazangi bosembo, nakosembolela bango lobɔkɔ na ngai, nakosilisa bilei na bango nyonso,*+ nakotinda nzala na mokili yango+ mpe nakolongola moto ná nyama ya mboka na kati na yango.”+ 14 “‘Ata soki bato oyo misato bazalaki na kati na yango: Noa,+ Danyele+ mpe Yobo,+ balingaki kobikisa kaka bomoi* na bango moko mpo na bosembo* na bango,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
15 “‘To soki nalekisi banyama mabe ya zamba na mokili yango mpe esilisi bato* mpe etiki yango mpamba, ata moto moko te azali koleka kuna mpo na banyama ya zamba,+ 16 Lokola nazali solo na bomoi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘ata soki mibali wana misato bazalaki na mokili yango balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali to ya basi; balingaki kobikisa kaka bomoi na bango moko, mpe mokili yango elingaki kotikala mpamba.’”
17 “‘To soki namemeli mokili yango mopanga, mpe nalobi ete: “Mopanga eleka na mokili yango,”+ mpe nalongoli moto ná nyama ya mboka,+ 18 lokola nazali solo na bomoi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘ata soki bato yango misato bazalaki na mokili yango balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali to ya basi, balingaki kobikisa kaka bomoi na bango moko.’”
19 “‘To soki natindeli mokili yango maladi mabe+ mpe nasopeli yango nkanda makasi na ngai oyo ezali kosopa makila, mpo na kolongola na kati na yango moto ná nyama ya mboka, 20 lokola nazali solo na bomoi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ata soki Noa,+ Danyele+ mpe Yobo+ bazalaki na kati na yango, ‘balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali to ya basi, balingaki kobikisa kaka bomoi na bango moko mpo na bosembo* na bango.’”+
21 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ndenge wana nde ekozala ntango nakotindela Yerusaleme bitumbu na ngai minei,*+ elingi koloba, mopanga, nzala, banyama mabe ya zamba mpe maladi mabe,+ mpo na kolongola moto ná nyama ya mboka.+ 22 Nzokande na kati na bango mwa bato bakobika, bana basi ná bana mibali, mpe bakobimisa bango.+ Bazali koya epai na bino, mpe ntango bokomona etamboli mpe misala na bango, bokobɔndisama mpenza na mpasi oyo namemeli Yerusaleme, ɛɛ, nyonso oyo nasalaki yango.’”
23 “‘Bakobɔndisa bino ntango bokomona etamboli mpe misala na bango, mpe bokoyeba ete ezalaki mpamba te nde nasalaki nyonso oyo nasengelaki kosala yango,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
15 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, nzete ya vinyo ezali malamu koleka nzete mosusu nyonso to bitape ya banzete ya zamba? 3 Bakoki kozwa mwa nzete na nzete ya vinyo mpe kosala na yango mosala? To bato basalaka na yango pike mpo na kokakisa eloko moko boye ya mosala? 4 Talá! Babwakaka yango na mɔtɔ mpo mɔtɔ epela. Mɔtɔ ezikisaka nsɔngɛ na yango nyonso mibale, mpe ekaukisaka katikati na yango. Sikoyo mosala nini bakoki kosala na yango? 5 Ata ntango ezalaki mobimba, bakokaki kosala na yango eloko moko te. Ekozala ndenge nini ntango mɔtɔ ezikisi mpe ekaukisi yango?”
6 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Kaka lokola nzete ya vinyo na kati ya banzete ya zamba, oyo napesá mpo ezala eloko ya kopelisa mɔtɔ, ndenge yango nde nakosala bato oyo bafandi na Yerusaleme.+ 7 Nakokóma monguna na bango. Babiki na mɔtɔ, kasi mɔtɔ nde ekozikisa bango. Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova, ntango nakokóma monguna na bango.’”+
8 “‘Mpe nakokómisa mokili oyo esika oyo etikali mpamba,+ mpo basali makambo ya kozanga bosembo,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
16 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, yebisá Yerusaleme misala na ye oyo eyinamá.+ 3 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na Yerusaleme: “Ebandeli na yo mpe kobotama na yo ezalaki na mokili ya Bakanana. Tata na yo azalaki Moamore,+ mpe mama na yo azalaki Mohiti.+ 4 Mpo na oyo etali kobotama na yo, mokolo oyo obotamaki, nsinga ya motɔlu na yo ekatamaki te, basukolaki yo na mai te mpo na kopɛtola yo, bapakolaki yo mungwa te, mpe balíngaki yo na bilamba te. 5 Moto moko te ayokelaki yo ata mwa mawa mpo asalela yo moko ya makambo oyo, moto moko te amoniselaki yo motema mawa, kasi babwakaki yo na esobe mpo oyinamaki* na mokolo oyo obotamaki.
6 “‘“Ntango nazalaki koleka pene na yo, namonaki yo ozalaki kobundabunda na kati ya makila na yo, wana olalaki na kati ya makila na yo nalobaki na yo ete: ‘Tikalá na bomoi!’ Ɛɛ, nalobaki na yo, wana ozalaki kolala na kati ya makila na yo ete: ‘Tikalá na bomoi!’ 7 Nakómisaki yo ebele mpenza, lokola milona oyo ezali kobima na esobe, okolaki, okómaki monene mpe olataki biloko ya kobongisa nzoto oyo eleki kitoko. Mabɛlɛ na yo ekolaki mpenza, mpe nsuki na yo ekolaki, kasi ozalaki kaka bolumbu mpe nzoto polele.”’
8 “‘Ntango nazalaki koleka penepene na yo, namonaki yo mpe natyaki likebi, ozalaki na mbula ya kolinga. Bongo natandaki elamba na ngai likoló na yo+ mpe nazipaki bolumbu na yo, nalapelaki yo ndai mpe nasalaki kondimana na yo,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘mpe okómaki ya ngai. 9 Lisusu, nasukolaki yo na mai, nalongolaki makila oyo ozalaki na yango mpe napakolaki yo mafuta.+ 10 Na nsima, nalatisaki yo elamba moko ya mayemi ya nsingansinga mpe napesaki yo sandale oyo basalá na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ mpe nalíngaki yo na lini ya kitoko mpe nalatisaki yo bilamba ya ntalo. 11 Nabongisaki yo na biloko ya monzɛlɛ, natyaki bikɔmɔ na mabɔkɔ na yo mpe nsinga ya monzɛlɛ na nkingo na yo. 12 Lisusu, natyaki lopɛtɛ na zolo na yo, biloko ya matoi na matoi na yo mpe motole* ya kitoko na motó na yo. 13 Ozalaki kaka komibongisa na wolo mpe na palata, molato na yo ezalaki lini ya kitoko, biloko ya ntalo ná elamba ya mayemi ya nsingansinga. Ozalaki kolya farini ya malamu, mafuta ya nzoi ná mafuta, mpe okómaki kitoko mingi,+ mpe obongaki mpo na kozala mokonzi-mwasi.’”*
14 “‘Lokumu* na yo ebandaki kokende nsango na bikólo+ mpo na kitoko na yo, mpamba te ezalaki ya kokoka mpo na nkembo na ngai oyo natyaki likoló na yo,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
15 “‘Kasi obandaki kotyela kitoko na yo motema+ mpe okómaki ndumba mpo na lokumu na yo,+ osepelaki kosala bondumba na baleki-nzela nyonso+ mpe kitoko na yo ekómaki ya bango. 16 Ozwaki bilamba na yo mosusu mpe osalaki bisika oyo etombwaná ya langilangi, esika oyo yo moko ozalaki kosala bondumba.+ Makambo ya boye esengeli kosalema te, esengeli kokóma soki moke te. 17 Ozwaki mpe babiju na yo ya kitoko* oyo esalemá na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalaki bikeko ya mibali mpo na yo moko mpe ozalaki kosala bondumba na yango.+ 18 Ozwaki bilamba na yo oyo basalá mayemi ya nsingansinga mpe ozipaki yango,* mpe ozalaki kopesa liboso na yango mafuta ná mpaka ya malasi na ngai.+ 19 Limpa na ngai oyo napesaki yo, oyo esalemaki na farini ya malamu, na mafuta mpe na mafuta ya nzoi oyo napesaki yo mpo olya, opesaki yango na bikeko wana mpo ezala nsolo moko oyo ezali kosepelisa,*+ esalemaki mpenza bongo,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
20 “‘Ozwaki bana na yo ya mibali mpe ya basi oyo obotelaki ngai,+ mpe opesaki bango mbeka na bikeko mpo bályama.+ Misala na yo ya bondumba ekokaki kaka te? 21 Obomaki bana na ngai, opesaki bango mbeka na ndenge otumbaki bango na mɔtɔ.*+ 22 Ntango ozalaki kosala makambo na yo nyonso oyo eyinamá mpe misala na yo ya bondumba, okanisaki lisusu te mikolo ya bolenge na yo, ntango ozalaki bolumbu mpe nzoto polele, ozalaki kobundabunda na kati ya makila na yo moko. 23 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi ete: Mawa, mawa na yo+ mpo na makambo nyonso ya mabe oyo osali.’ 24 ‘Omitongelaki mwa ngomba ya mabele mpe omisalelaki esika etombwaná na esika monene nyonso ya bato nyonso. 25 Otongaki bisika na yo oyo etombwaná na esika oyo eleki lokumu na balabala nyonso mpe okómisaki kitoko na yo eloko moko ya koyina na ndenge ozalaki komikaba epai ya moleki-nzela nyonso*+ mpe obakisaki misala na yo ya bondumba.+ 26 Osalaki bondumba na bana mibali ya Ezipito,+ bato oyo bafandi penepene na yo, oyo bazali na mposa makasi ya kosangisa nzoto,* mpe osilikisaki ngai na misala na yo oyo eleki mingi ya bondumba. 27 Sikoyo nakosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kopesa yo etumbu, nakokitisa bilei na yo+ mpe nakokaba yo na lobɔkɔ* ya basi oyo bayinaka yo,+ bana basi ya Bafilistia, basi oyo bayoki nsɔni mpo na etamboli na yo ya nsɔni.+
28 “‘Lokola ozalaki kaka kotonda te, yango wana osalaki bondumba na bana mibali ya Asiri,+ kasi nsima ya kosala na bango bondumba otondaki kaka te. 29 Bongo, obakisaki misala ya bondumba na yo, okómaki tii na mokili ya bato ya mombongo,* mpe tii epai ya Bakaladea,+ kasi ata bongo otondaki kaka te. 30 Motema na yo ebɛlaki* ntango ozalaki kosala makambo oyo nyonso, mpe osalaki yango lokola mwasi ya ndumba oyo asilá nsɔni,+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 31 Kasi ntango otongaki bisika na yo oyo etombwaná na esika oyo eleki lokumu na balabala nyonso mpe osalaki esika na yo oyo etombwaná na esika monene nyonso ya bato nyonso, ozalaki te lokola mwasi ya ndumba mpo oboyaki lifuti nyonso. 32 Ozali mwasi oyo asalaka ekobo, oyo azwaka bapaya na esika ya mobali na ye.+ 33 Bato bapesaka ndumba nyonso likabo,+ kasi yo nde opesaka makabo epai ya baoyo balukaka yo na mposa makasi,+ mpe ofutaka bango mpo báya epai na yo uta epai na epai, mpo osala bondumba.+ 34 Bondumba na yo ekeseni na bondumba ya basi mosusu, moto moko te asalaka bondumba lokola yo, ofutaka basusu kasi yo bafutaka yo te, likambo oyo ozali kosala ekeseni na oyo esalemaka.’
35 “Yango wana, Ee mwasi ya ndumba,+ yoká liloba ya Yehova. 36 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola omonisi mposa makasi ya kosangisa nzoto mpe bolumbu na yo emonisami polele na ntango ya bondumba na yo ná bato oyo balingaka yo mpe bikeko na yo ya bosɔtɔ,* oyo eyinamá,+ epai opesaki ata makila ya bana na yo mbeka,+ 37 na yango, nazali koyanganisa baoyo nyonso balingaka yo mingi, baoyo osepelisaki, baoyo nyonso olingaki, ná baoyo nyonso oyinaki, nakoyanganisa bango uta na bipai nyonso mpo na kobunda na yo, nakomonisa bango bolumbu na yo polele, mpe bakomona bolumbu na yo mobimba.+
38 “‘Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ekobo+ mpe oyo ebongi na basi oyo bazali kosopa makila,+ mpe nakosala ete básopa makila na yo na nkanda makasi mpe na zuwa.+ 39 Nakopesa yo na lobɔkɔ na bango, bakobuka mwa bangomba na yo ya mabele, bisika na yo oyo etombwaná ekobukana,+ bakolongola yo bilamba,+ bakozwa babiju na yo ya kitoko*+ mpe bakotika yo bolumbu mpe nzoto polele. 40 Bakoyela yo bato ebele,+ bakobamba yo mabanga+ mpe bakoboma yo na mipanga na bango.+ 41 Bakotumba bandako na yo na mɔtɔ+ mpe bakopesa yo bitumbu na miso ya basi mingi; mpe nakosukisa bondumba na yo,+ mpe okotika kopesa lifuti. 42 Nakokitisa nkanda oyo nazalaki na yango mpo na yo,+ mpe kosilika makasi na ngai ekolongwa epai na yo;+ nakofanda kimya mpe nakosilika lisusu te.’
43 “‘Lokola okanisaki lisusu te mikolo ya bolenge na yo+ mpe opesaki ngai nkanda na makambo nyonso wana oyo osalaki, sikoyo nakosala ete mbuma mabe oyo etamboli na yo ekobimisa ezala na motó na yo moko,’ ‘mpe okomipesa lisusu te na etamboli na yo ya nsɔni mpe na misala na yo nyonso oyo eyinamá, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
44 “‘Talá! Moto nyonso oyo asalelaka masese, akosalela lisese oyo mpo na yo: “Mwana mwasi alandaka lokolo ya mama na ye!”+ 45 Ozali mwana mwasi ya mama na yo, mwasi oyo ayinaki mobali na ye mpe bana na ye. Ozali ndeko ya bandeko na yo ya basi, baoyo bayinaki mibali na bango mpe bana na bango. Mama na bino azalaki Mohiti, mpe tata na bino azalaki Moamore.’”+
46 “‘Yaya na yo ya mwasi ezali Samaria+ oyo azali kofanda na ngámbo na yo ya nɔrdi* ná bana na ye ya basi,*+ mpe leki na yo ya mwasi oyo azali kofanda na ngámbo na yo ya sudi* ezali Sodoma+ ná bana na ye ya basi.+ 47 Osukaki kaka te na kolanda ndakisa na bango ya mabe, mpe komekola misala na bango oyo eyinamá. Kasi na mwa ntango moke, okómaki na etamboli ya mbindo koleka ata bango.+ 48 Lokola nazali solo na bomoi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘Sodoma ndeko na yo ya mwasi ná bana na ye ya basi basali te makambo oyo yo ná bana na yo ya basi bosali. 49 Talá! Libunga oyo Sodoma, ndeko na yo ya mwasi asalaki yango oyo: Ye ná bana na ye ya basi+ bazalaki na lolendo,+ bazalaki na bilei ebele,+ bazalaki komitungisa te,+ nzokande bazalaki kosalisa te moto ya mpasi mpe mobola.+ 50 Bakobaki kozala na lofundo+ mpe kosala na miso na ngai makambo oyo eyinamá,+ yango wana namonaki malamu nalongola bango.+
51 “‘Ata Samaria+ asali masumu oyo ekómi kutu katikati ya masumu na yo te. Ozalaki kaka kosala ete misala na yo oyo eyinamá ekóma mingi koleka ya bango, yango esali ete bandeko na yo ya basi bámonana sembo koleka yo mpo na misala na yo nyonso oyo eyinamá.+ 52 Sikoyo osengeli komema nsɔni mpo olongisi* etamboli ya bandeko na yo ya basi. Mpo na masumu na yo oyo osalaki na ndenge oyo eyinamá mpenza koleka bango, bango bamonani sembo koleka yo. Na yango sikoyo, yoká nsɔni mpe sambwá mpo osali ete bandeko na yo ya basi bámonana sembo.’
53 “‘Nakoyanganisa bakangami na bango, bakangami ya Sodoma ná bana na ye ya basi, mpe bakangami ya Samaria ná bana na ye ya basi; nakoyanganisa mpe bakangami na yo elongo na bango,+ 54 mpo omema nsɔni na yo; mpe okomiyoka ete osambwe na oyo osalaki mpo na kobɔndisa bango. 55 Bandeko na yo moko ya basi ná bana na bango ya basi, bakozonga ndenge bazalaki mpe Samaria ná bana na ye ya basi bakozonga ndenge bazalaki liboso, mpe yo ná bana na yo moko ya basi bokozonga ndenge bozalaki liboso.+ 56 Na mokolo oyo okómaki lolendo, Sodoma ndeko na yo ya mwasi abongaki te ete otánga ye, 57 liboso mabe na yo moko ebimisama polele.+ Sikoyo bana basi ya Siri ná baoyo bazali zingazinga na ye bazali kofinga yo, mpe bana basi ya Bafilistia,+ baoyo bazalaki zingazinga na yo bazali kotyola yo. 58 Okonyokwama mpo na etamboli na yo ya nsɔni mpe misala na yo oyo eyinamá,’ Yehova alobi bongo.”
59 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Sikoyo nakosala yo kaka ndenge osalaki,+ mpo otyolaki ndai na ndenge obukaki kondimana na ngai.+ 60 Kasi ngai moko, nakokanisa lisusu kondimana na ngai oyo nasalaki ná yo ntango ozalaki elenge, mpe nakosala elongo na yo kondimana oyo ekoumela libela.+ 61 Okokanisa lisusu etamboli na yo mpe okopɔla na nsɔni+ ntango okoyamba bandeko na yo ya basi, baoyo bazali mikóló na yo ná baoyo bazali baleki na yo, mpe nakopesa yo bango bázala bana na yo ya basi, kasi ezali te mpo na kondimana na yo.’
62 “‘Mpe ngai moko, nakosala kondimana na ngai elongo na yo; mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova, 63 bongo okokanisa lisusu, okoyoka mpenza nsɔni mpe okokoka te kofungola monɔkɔ, mpo na kosambwa na yo,+ ntango nakolimbisa yo* atako osali makambo wana nyonso,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
17 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, pesá sambole mpe lobá lisese mpo na bato ya Yisraele.+ 3 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mpongo monene,+ ya mapapu minene, oyo azali na nsala milai na mapapu, oyo atondi na nsala ya langi ndenge na ndenge, ayaki na Liban+ mpe azwaki nsɔngɛ ya nzete ya sɛdrɛ.+ 4 Abukaki nsɔngɛ ya bitape na yango ya sika mpe amemaki yango na mokili ya bato ya mombongo* mpe atyaki yango na nse na engumba moko ya bato ya mombongo.+ 5 Na nsima, azwaki ndambo ya momboto ya mokili yango+ mpe atyaki yango na elanga oyo ebotaka malamu. Mpe atyaki yango lokola nzete ya sole pene ya mai minene. 6 Bongo ebimaki mpe ekómaki nzete ya vinyo ya molai mingi te oyo ezali kopanzana,+ nkasa na yango etalaki na kati mpe misisa na yango ebimaki na nse na yango. Na yango, ekómaki nzete ya vinyo, ebotaki bitape ya sika mpe ebimisaki bitape ya minene.+
7 “‘“Mpe mpongo mosusu ya monene+ ayaki, azalaki na mapapu minene mpe azalaki na nsala milai na mapapu.+ Nzete ya vinyo yango esembolaki misisa na yango na lokoso epai na ye, mosika na bilanga epai yango elonamaki. Ebimisaki nkasa na yango epai na ye mpo asopela yango mai.+ 8 Esilaki kolonama na elanga moko kitoko, pene na mai minene, mpo ebimisa bitape, ebota mbuma, mpe ekóma nzete monene ya vinyo.”’+
9 “Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Yango ekokola? Moto moko akopikola misisa na yango te,+ akosala te ete mbuma na yango epɔla? Mpe bitape na yango ya sika ekauka?+ Ekokauka mpenza. Ekosɛnga te lobɔkɔ moko ya nguya to bato ebele mpo na kopikola misisa na yango. 10 Ata soki bapikoli yango mpe baloni yango epai mosusu, ekokola? Yango nyonso ekokauka te ntango mopɛpɛ ya ɛsti ekobɛta yango? Ekokauka na bilanga esika yango ekolaki.”’”
11 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 12 “Nabondeli yo, lobá na batomboki ete: ‘Boyebi te soki makambo oyo elakisi nini?’ Lobá ete: ‘Talá! Mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme, azwaki mokonzi na yango, bankumu na yango mpe amemaki bango epai na ye, na Babilone.+ 13 Lisusu, azwaki moto moko na libota* ya mokonzi,+ asalaki na ye kondimana mpe alapisaki ye ndai.+ Na nsima amemaki bato ya lokumu ya mboka,+ 14 mpo bokonzi ekita, ezala lisusu makasi te, mpo kaka soki bato batosi kondimana nde bokonzi ekoki kokoba kozala.+ 15 Kasi, nsukansuka, mokonzi atombokelaki ye+ na ndenge atindaki bamemi-nsango na ye na Ezipito, mpo azwa epai na bango bampunda+ mpe limpinga monene.+ Akolonga nde? Moto oyo azali kosala makambo ya boye, akozanga kozwa etumbu? Akoki nde kobuka kondimana mpe abika?’+
16 “‘“Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: “Lokola nazali solo na bomoi, akokufa na Babilone na esika oyo mokonzi* oyo akómisaki ye* mokonzi afandaka, mokonzi oyo ye atyolaki ndai, mpe oyo abukaki kondimana na ye.+ 17 Basoda nyonso ya limpinga ya Farao bakozala na likoki te ya kosalisa na etumba,+ ntango basoda ya Babilone bakotonga mwa bangomba ya mabele mpe bifelo mpo na kozinga engumba, mpo na koboma bato* ebele. 18 Atyoli ndai mpe abuki kondimana. Asali makambo nyonso wana atako apesaki elaka.* Akobika te.”’
19 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, nakosala ete anyokwama ndenge atyoli ndai na ngai+ mpe abuki kondimana na ngai. 20 Nakobwaka likoló na ye monyama na ngai, mpe akokangama na monyama na ngai ya bokila.+ Nakomema ye na Babilone mpe nakosamba na ye kuna ndenge azangi bosembo epai na ngai.+ 21 Basoda na ye nyonso oyo bakimakimaka, bakokufa na mopanga, mpe baoyo batikali bakopalangana moto na moto na nzela na ye.*+ Bongo bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nde nalobi.”’+
22 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakozwa mwa etape na nsɔngɛ ya nzete ya sɛdrɛ oyo etombwaná+ mpe nakolona yango; nakobuka mwa etape ya pɛtɛpɛtɛ na nsɔngɛ ya mwa bitape na yango+ mpe ngai moko nakolona yango na ngomba moko ya molai, oyo etombwaná.+ 23 Nakolona yango na ngomba molai ya Yisraele; bitape na yango ekokola, ekobota mbuma mpe ekokóma nzete ya sɛdrɛ ya monene. Bandɛkɛ ya ndenge nyonso ekofanda na nse na yango mpe ekofanda na elili ya nkasa na yango. 24 Mpe banzete nyonso ya esobe ekoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nakitisi nzete oyo etombwaná mpe natomboli nzete oyo ezalaki na nse;+ nakaukisi nzete oyo ezali naino mobesu mpe nasali ete nzete oyo ekauká ebimisa fololo.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi mpe nasali yango.”’”
18 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Lisese oyo bolobaka na Yisraele elimboli nini: ‘Batata nde bazali kolya mbuma ya vinyo oyo eteli te, kasi mino ya bana nde ekómi ngayi’?+
3 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Lokola nazali solo na bomoi,’ bokoloba lisese oyo lisusu te na Yisraele. 4 Talá! Milimo* nyonso ezali ya ngai. Molimo ya tata ndenge moko mpe molimo ya mwana ezali ya ngai. Molimo* oyo esali lisumu, yango nde ekokufa.
5 “‘Kanisá ete moto azali sembo, mpe asalaka makambo ya boyengebene mpe ya sembo. 6 Alyaka te bambeka oyo epesami na bikeko na bangomba;+ atyaka elikya te na bikeko ya bosɔtɔ* ya bato ya Yisraele, akómisaka mwasi ya moninga na ye mbindo te+ mpe asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza;+ 7 anyokolaka moto te,+ kasi azongiselaka modefi eloko oyo azwaki na ndanga;+ ayibaka moto te,+ kasi apesaka bilei na ye moko epai ya moto oyo azali na nzala+ mpe azipaka moto oyo azali bolumbu elamba;+ 8 apesaka eloko moko te mpo azwa benefisi mpe alukaka te benefisi ya lokoso,+ kasi amipekisaka kosala makambo ya kozanga bosembo;+ akataka likambo kati na moto ná moninga na ye na bosembo ya solosolo;+ 9 mpe akobaka kotosa mibeko na ngai mpe alandaka bikateli na ngai mpo asala makambo na bosembo, moto ya ndenge wana azali sembo.* Mpe akokoba kozala na bomoi,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
10 “‘Kasi, kanisá ete moto yango aboti mwana oyo azali moyibi,+ to mobomi,*+ to mpe asalaka moko ya makambo oyo 11 (atako tata na ye asali ata moko te ya makambo oyo): alyaka bambeka oyo epesami na bikeko na bangomba, mpe akómisi mwasi ya moninga na ye mbindo, 12 anyokolaka moto oyo azangá mpe mobola,+ ayibaka, azongisaka te eloko oyo epesamaki ndanga, atyaka elikya na bikeko ya bosɔtɔ,+ amipesaka na misala oyo eyinamá.+ 13 Apesaka biloko mpo na koluka benefisi ya lokoso, mpe azwaka benefisi.+ Bongo, mwana yango akotikala na bomoi te. Akobomama mpenza mpo asali makambo nyonso wana oyo eyinamá. Makila na ye moko ekozala na motó na ye.
14 “‘Kasi, kanisá ete mwana amoni masumu nyonso oyo tata na ye asali, mpe atako amoni yango, asali makambo yango te. 15 Alyaka te bambeka oyo epesami na bikeko na bangomba; atyaka elikya te na bikeko ya bosɔtɔ ya bato ya Yisraele; akómisaka mwasi ya moninga na ye mbindo te; 16 anyokolaka moto moko te, akangaka eloko moko te oyo epesami ndanga, ayibaka te; kasi apesaka bilei na ye moko epai ya moto oyo azali na nzala, mpe azipaka moto oyo azali bolumbu elamba; 17 amipekisaka konyokola mobola; alukaka te benefisi ya lokoso to azwaka benefisi te; alandaka bikateli na ngai mpe atosaka mibeko na ngai. Moto yango akokufa te mpo na libunga ya tata na ye. Akokoba kozala na bomoi. 18 Kasi lokola tata na ye azalaki kobuba, ayibaki ndeko na ye mpe asalaki oyo ezali mabe na kati ya bato na ye, akokufa mpo na libunga na ye.
19 “‘Kasi bokoloba ete: “Mpo na nini mwana amemi ngambo te mpo na libunga ya tata na ye?” Lokola mwana asali oyo ezali sembo mpe boyengebene, atosi mibeko na ngai nyonso mpe asaleli yango, akokoba kozala na bomoi.+ 20 Molimo oyo esali lisumu, yango nde ekokufa.+ Mwana akomema ngambo te mpo na libunga ya tata, mpe tata akomema ngambo te mpo na libunga ya mwana. Bosembo ya moto ya sembo ekozala na motó na ye moko, mpe mabe ya moto mabe ekozala na motó na ye moko.+
21 “‘Kasi soki moto mabe abongwani, atiki masumu na ye nyonso oyo asalaki, atosi mibeko na ngai nyonso mpe asali oyo ezali malamu mpe sembo, akotikala na bomoi. Akokufa te.+ 22 Bakokanisela ye lisusu te ata likambo moko ya kobuka mobeko oyo asalaki.+ Akokoba kozala na bomoi, na ndenge azali kosala oyo ezali sembo.’+
23 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Nasepelaka nde na liwa ya moto mabe?’+ Nasepelaka te ete atika etamboli na ye ya mabe mpe akoba kozala na bomoi?’+
24 “‘Moto ya sembo akotikala nde na bomoi soki atiki bosembo na ye, asali oyo ezali mabe* mpe azali kosala makambo nyonso oyo eyinamá, oyo moto mabe asalaka? Bakokanisa lisusu te ata mosala moko te ya bosembo oyo asalaki.+ Akokufa mpo na kozanga bosembo na ye mpe lisumu oyo asalaki.+
25 “‘Kasi bokoloba ete: “Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo.”+ Nabondeli bino, bóyoka, Ee bato ya Yisraele. Makambo oyo nasalaka nde ezangi bosembo?+ Ezali te makambo oyo bino bosalaka nde ezangi bosembo?+
26 “‘Soki moto ya sembo* atiki bosembo* na ye, asali oyo ezali mabe mpe akufi mpo na yango, akokufa mpo na mabe na ye moko.
27 “‘Ntango moto mabe abongwani, atiki mabe na ye oyo asalaki mpe abandi kosala oyo ezali malamu mpe sembo, akobatela bomoi* na ye moko.+ 28 Ntango asosoli mpe abongwani, atiki makambo na ye nyonso ya kobuka mibeko oyo asalaki, akokoba kozala na bomoi. Akokufa te.
29 “‘Kasi bato ya Yisraele bakoloba ete: “Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo.” Makambo oyo nasalaka nde ezangi bosembo, Ee bato ya Yisraele?+ Ezali te makambo oyo bino bosalaka nde ezangi bosembo?’
30 “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Na yango, Ee bato ya Yisraele, nakosambisa mokomoko na bino na kolanda etamboli na ye.+ Bóbongwana, ɛɛ, bóbongwana mpenza, bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko, mpo eloko moko te ezala libaku oyo ezali kotinda bino na lisumu. 31 Bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko oyo bosalaki+ mpe bózwa* motema ya sika ná elimo ya sika,+ mpo na nini bókufa,+ Ee bato ya Yisraele?’
32 “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: ‘Nasepelaka ata moke te na liwa ya moto.+ Na yango, bóbongwana mpe bózala na bomoi.’”+
19 “Osengeli koyemba loyembo ya mawa* mpo na bankumu ya Yisraele 2 mpe lobá boye:
‘Mama na yo akokani na nini? Na nkɔsi ya mwasi na katikati ya bankɔsi ya mibali.
Azalaki kolala na katikati ya bana-nkɔsi ya makasi.* Mpe abɔkɔlaki bana na ye.
3 Akolisaki moko ya bana na ye, mpe mwana yango akómaki mwana-nkɔsi ya makasi.+
Ayekolaki ndenge ya kopasola nyama.
Alyaki kutu bato.
4 Bikólo bayokaki nsango na ye, bakangaki ye na libulu na bango,
Mpe bamemaki ye na bandɔbɔ na mokili ya Ezipito.+
5 Mama na ye azelaki ye mpe nsukansuka amonaki ete elikya ezali te ete akozonga.
Na yango azwaki mwana mosusu na kati ya bana na ye mpe abimisaki ye lokola mwana-nkɔsi ya makasi.
6 Alekalekaki mpe na kati ya bankɔsi mpe akómaki mwana-nkɔsi ya makasi.
Ayekolaki ndenge ya kopasola nyama mpe alyaki kutu bato.+
7 Atambolaki epai na epai na bandako milai na bango ya makasi, mpe abebisaki bingumba na bango,
Bongo mokili oyo etikalaki mpamba etondaki na lokito ya koganga na ye.+
8 Bikólo ya bitúká ya zingazinga, bayaki kobwakela ye monyama na bango,
Mpe akangamaki na libulu na bango.
9 Batyaki ye bandɔbɔ, bakɔtisaki ye na mwa-ndako na bango ya banyama mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone.
Bakangaki ye kuna, mpo mongongo na ye eyokana lisusu te na bangomba ya Yisraele.
10 Mama na yo azalaki lokola nzete ya vinyo+ na kati ya makila na yo,* oyo elonamaki pene na mai.
Ebotaki mbuma mpe etondaki na bitape mpo mai ezalaki mingi.
11 Bitape na yango* ekómaki makasi, ebongaki mpo na kosalela yango mangenda ya bakonzi.
Nzete yango ekolaki mpe ekómaki molai koleka banzete mosusu,
Mpe ekómaki komonana mpo ezalaki molai mpe ezalaki na nkasa ebele.
12 Kasi bapikolaki ye na nkanda makasi+ mpe babwakaki ye na mabele,
Mpe mopɛpɛ moko ya makasi ekaukisaki mbuma na ye.
Bakataki bitape na ye ya makasi, ekaukaki+ mpe mɔtɔ elyaki yango.+
14 Mɔtɔ eutaki na bitape na ye, elyaki mwa bitape na ye,* mpe mbuma na ye,
Mpe etape ya makasi ata moko te etikalaki, lingenda moko te mpo na koyangela.+
“‘Wana nde loyembo ya mawa, mpe ekosalelama lokola loyembo ya mawa.’”
20 Sikoyo na mbula ya nsambo, na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano, bankulutu ndambo ya Yisraele bayaki, mpe bafandaki liboso na ngai mpo na kotuna Yehova. 2 Bongo Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 3 “Mwana ya moto, lobá na bankulutu ya Yisraele mpe yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Boyei nde mpo na kotuna ngai? ‘Lokola nazali solo na bomoi, nakoyanola bino te,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”’
4 “Olingi kosambisa bango?* Mwana ya moto, olingi kosambisa bango? Yebisá bango makambo oyo eyinamá oyo bankɔkɔ na bango basalaki.+ 5 Lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Na mokolo oyo naponaki Yisraele,+ nalapaki mpe ndai* epai ya bana* ya libota ya Yakobo mpe namiyebisaki epai na bango na mokili ya Ezipito.+ Ɛɛ, nalapelaki bango ndai mpe nalobaki ete: ‘Nazali Yehova Nzambe na bino.’ 6 Na mokolo yango, nalapaki ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nalukaki* mpo na bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Elekaki mikili nyonso na kitoko. 7 Bongo nalobaki lisusu ete: ‘Mokomoko na bino asengeli kobwaka biloko ya bosɔtɔ* oyo ezali liboso ya miso na bino, bómikómisa mbindo te na bikeko ya bosɔtɔ ya Ezipito.+ Nazali Yehova Nzambe na bino.’+
8 “‘“Kasi batombokelaki ngai, mpe balingaki koyokela ngai te. Babwakaki te biloko ya bosɔtɔ oyo ezalaki liboso na bango, mpe batikaki te bikeko ya bosɔtɔ ya Ezipito.+ Yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkanda makasi na ngai mpe nakosilisela bango mpenza nkanda na ngai na mokili ya Ezipito. 9 Kasi likambo oyo nasalaki ezalaki nde mpo na nkombo na ngai, mpo ekóma te eloko mpamba na miso ya bikólo epai bazalaki kofanda,+ mpo namiyebisaki epai na bango* na miso ya bikólo yango na ndenge nabimisaki bango* na mokili ya Ezipito.+ 10 Na yango, nabimisaki bango na mokili ya Ezipito mpe natambwisaki bango na kati ya esobe.+
11 “‘“Na nsima napesaki bango mibeko na ngai mpe nayebisaki bango bikateli na ngai,+ mpo moto oyo akotosa yango atikala na bomoi na nzela na yango.+ 12 Napesaki bango lisusu basabata na ngai,+ lokola elembo kati na ngai ná bango,+ mpo báyeba ete ngai Yehova moto nazali kosantisa bango.
13 “‘“Kasi bato ya Yisraele batombokelaki ngai na esobe.+ Batosaki mibeko na ngai te, mpe baboyaki bikateli na ngai, oyo soki moto atosi yango, akotikala na bomoi na nzela na yango. Bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba mpenza. Yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkanda makasi na ngai na esobe mpo na kosilisa bango mpenza.+ 14 Kasi likambo oyo nasalaki ezalaki nde mpo na nkombo na ngai, mpo ekóma te eloko mpamba na miso ya bikólo, oyo bamonaki ndenge nabimisaki bango na mokili ya Ezipito.+ 15 Nalapelaki bango mpe ndai na esobe ete, nakokɔtisa bango te na mokili oyo napesaki bango,+ (mokili oyo etondaki na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ eleki mikili nyonso na kitoko.) 16 Mpo baboyaki bikateli na ngai, batosaki mibeko na ngai te, mpe bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba, mpo basepelaki kosambela bikeko na bango ya bosɔtɔ.+
17 “‘“Kasi nayokelaki bango mawa* mpe nabomaki bango te; nasilisaki bango te na esobe. 18 Nalobaki na bana na bango na esobe ete:+ ‘Bólanda te malako ya bankɔkɔ na bino,+ bótosa te bikateli na bango, mpe bómikómisa mbindo te na bikeko na bango ya bosɔtɔ. 19 Nazali Yehova Nzambe na bino. Bótosa mibeko na ngai, bóbatela bikateli na ngai mpe bósalela yango.+ 20 Bósantisa basabata na ngai,+ mpe yango ekozala elembo kati na ngai ná bino, mpo bóyeba ete nazali Yehova Nzambe na bino.’+
21 “‘“Kasi bana babandaki kotombokela ngai.+ Batosaki mibeko na ngai te, babatelaki bikateli na ngai te, mpe basalelaki yango te, oyo soki moto atosi yango, akotikala na bomoi na nzela na yango. Bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba. Yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkanda makasi na ngai, mpe nakosilisela bango nkanda na ngai nyonso na esobe.+ 22 Kasi namipekisaki,+ mpe likambo oyo nasalaki ezalaki mpo na nkombo na ngai,+ mpo ekóma te eloko mpamba liboso ya bikólo, oyo bamonaki ndenge nabimisaki bango* na Ezipito. 23 Lisusu, nalapelaki bango ndai na esobe ete, nakopalanganisa bango na kati ya bikólo mpe nakopanza bango na kati ya mikili,+ 24 mpo bakokisaki te bikateli na ngai mpe babwakaki mibeko na ngai,+ bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba, mpe basambelaki* bikeko ya bosɔtɔ ya bankɔkɔ na bango.+ 25 Natikaki mpe bango bálanda mibeko oyo ezalaki malamu te mpe bikateli oyo na nzela na yango bakokaki te kozala na bomoi.+ 26 Natikaki bango bákóma mbindo na bambeka na bango moko—ntango batumbaki na mɔtɔ mwana nyonso ya liboso+—mpo nazangisa bango elikya, mpo báyeba ete nazali Yehova.”’
27 “Na yango, Ee mwana ya moto, lobá na bato ya Yisraele mpe yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bankɔkɔ na bino bafingaki ngai mpe ndenge wana, ndenge bazalaki kosalela ngai makambo ya kozanga bosembo. 28 Nakɔtisaki bango na mokili oyo nalapaki ndai ete nakopesa bango.+ Ntango bamonaki ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe nzete nyonso oyo ezali na nkasa mingi,+ babandaki kopesa bambeka na bango mpe makabo na bango oyo ezali kosilikisa. Bapesaki bambeka na bango ya kosepelisa* mpe basopaki makabo na bango ya masanga kuna. 29 Na yango, natunaki bango ete: ‘Bozali kokende kosala nini na esika oyo etombwaná? (Tii na mokolo ya lelo babengaka yango Esika oyo Etombwaná.)’”’+
30 “Sikoyo, lobá na bato ya Yisraele boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bozali nde komikómisa mbindo lokola bankɔkɔ na bino, ndenge bozali kosambela bikeko na bango ya bosɔtɔ mpo na kosala ná yango bondumba ya elimo?+ 31 Bozali komikómisa mbindo tii na mokolo ya lelo, ndenge bozali kopesa bambeka na bikeko na bino nyonso ya bosɔtɔ, bozali kotumba bana na bino na mɔtɔ.*+ Mpe bolingi nayanola na makambo oyo bozali kosɛnga ngai, Ee bato ya Yisraele?”’+
“‘Lokola nazali solo na bomoi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘nakoyanola bino te.+ 32 Mpe oyo bozali kokanisa, ekosalema te, ntango bozali koloba ete: “Tókóma lokola bikólo, lokola mabota ya mikili mosusu, oyo basambelaka* nzete ná libanga.”’”+
33 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: Lokola nazali solo na bomoi, ‘nakoyangela bino. Nakosalela nguya ya lobɔkɔ na ngai mpe makasi ya lobɔkɔ na ngai* mpo na kopesa bino etumbu. Nakosopela bino nkanda makasi na ngai.+ 34 Nakolongola bino na kati ya bato ya bikólo, mpe nakoyanganisa bino uta na mikili epai bopanzanaki, na nguya ya lobɔkɔ na ngai, na makasi ya lobɔkɔ na ngai* mpe na nkanda na ngai makasi oyo ezali kosopana.+ 35 Nakomema bino na esobe ya bato ya bikólo mpe nakosamba na bino kuna, wana tozali kotalana bilongi.+
36 “‘Kaka ndenge nasambaki na bankɔkɔ na bino na esobe ya mokili ya Ezipito, nakosamba na bino mpe bongo,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 37 ‘Nakolekisa bino na nse ya lingenda ya mobateli ya mpate+ mpe nakosala ete bótosa* kondimana. 38 Kasi nakolongola epai na bino batomboki mpe bato oyo bazali kobuka mibeko na ngai,+ mpe nakobimisa bango na mokili oyo bazali kofanda bapaya, kasi bakokɔta na mokili ya Yisraele te;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
39 “Nde bino, Ee bato ya Yisraele, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Moto na moto akende kosalela bikeko na ye ya bosɔtɔ.+ Kasi nsima na yango, soki boyokeli ngai te, bokokoka lisusu te kokómisa nkombo na ngai eloko mpamba na bambeka na bino mpe na bikeko na bino ya bosɔtɔ.’+
40 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: Mpo na ngomba na ngai mosantu, na ngomba molai ya Yisraele,’+ epai bato nyonso ya Yisraele, bango nyonso, bakosalela ngai na mokili.+ Kuna nakosepela na bango, nakosɛnga makabo na bino mpe bambuma ya liboso ya makabo na bino, biloko na bino nyonso ya bosantu.+ 41 Mpo na nsolo oyo ezali kosepelisa* ya bambeka na bino nakosepela na bino, ntango nakolongola bino na kati ya bato ya bikólo mpe nakoyanganisa bino uta na mikili epai bopanzanaki;+ mpe nakosantisama na kati na bino na miso ya bikólo.’+
42 “‘Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango nakokɔtisa bino na mokili ya Yisraele,+ mokili oyo nalapaki ndai ete nakopesa bankɔkɔ na bino. 43 Mpe kuna, bokokanisa lisusu etamboli na bino mpe misala na bino nyonso oyo na nzela na yango bomikómisaki mbindo,+ mpe bokomiyoka* mabe mpenza* mpo na bino moko na makambo nyonso ya mabe oyo bosalaki.+ 44 Bongo bokoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakosalela bino makambo wana mpo na nkombo na ngai,+ na kolanda te etamboli na bino ya mabe to misala na bino oyo ebebá, Ee bato ya Yisraele,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
45 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 46 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo na ngámbo ya etúká ya sudi, sakolá epai ya sudi, mpe sakwelá zamba ya esobe ya sudi. 47 Lobá na zamba ya sudi boye: ‘Yoká liloba ya Yehova. Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nazali kopelisela yo mɔtɔ,+ ekozikisa na kati na yo nzete nyonso ya mobesu mpe nzete nyonso oyo ekauká. Mɔtɔ yango oyo ezali kopela ekobomama te,+ mpe ekozikisa bilongi nyonso banda na sudi tii na nɔrdi. 48 Mpe bato nyonso* bakomona mpenza ete ngai, Yehova, nde napelisi mɔtɔ, bongo ekobomama te.”’”+
49 Mpe nalobaki boye: “Mawa, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! ‘Azali te koloba na basambole?’”*
21 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo na ngámbo ya Yerusaleme, sakolá likebisi mpo na oyo ekokómela esika mosantu mpe mokili ya Yisraele. 3 Lobá na mokili ya Yisraele boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Nazali kobundisa yo, nakobimisa mopanga na ngai na libenga na yango+ mpe nakoboma moto ya sembo ná moto mabe epai na yo. 4 Lokola nakoboma moto ya sembo ná moto mabe epai na yo, mopanga na ngai ekobima na libenga na yango mpo na kobundisa moto nyonso,* banda na sudi tii na nɔrdi. 5 Bato nyonso bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova, nabimisi mopanga na ngai na libenga na yango. Ekozonga nsima lisusu te.”’+
6 “Mpe yo, mwana ya moto, lelá na motema* wana ozali* kolɛnga. Ɛɛ, lelá na mawa* na miso na bango.+ 7 Soki balobi na yo ete: ‘Mpo na nini ozali komilelalela?’* Okoloba boye: ‘Ezali mpo na nsango oyo ezali koya.’ Mpo ekoya mpenza, mpe motema ya bato nyonso ekonyangwa mpo na kobanga, mabɔkɔ nyonso ekolɛmba, moto nyonso akolɛmba nzoto mpe mabɔlɔngɔ nyonso ekotangisa mai.*+ ‘Talá! Ekoya mpenza, ekosalema,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
8 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 9 “Mwana ya moto, sakolá mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “‘Mopanga! Bapelisi mopanga+ mino mpe ekómi sɛlisɛli. 10 Epelisami mpo na koboma ebele ya bato; bakómisi yango sɛlisɛli mpo engɛnga lokola mokalikali.’”’”
“Tosengeli kosepela te?”
“‘Ekobwaka* nde lingenda ya bokonzi ya mwana na ngai moko,+ ndenge ezali kobwaka nzete nyonso?
11 “‘Bapesi yango mpo ekómisama sɛlisɛli mpe básimba yango na lobɔkɔ mpo na koboma. Mopanga yango epelisami mpe bakómisi yango sɛlisɛli, mpo epesama na lobɔkɔ ya mobomi.+
12 “‘Mwana ya moto, belelá mpe gangá na kolela,+ mpo mopanga eyeli bato na ngai; eyeli bankumu nyonso ya Yisraele.+ Bakobomama na mopanga elongo na bato na ngai. Na yango, omibɛta na ebɛlɔ na mawa. 13 Mpo bato na ngai batalelami malamumalamu,+ mpe nini ekosalema soki mopanga eboyi lingenda ya bokonzi? Ekozala* lisusu te,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
14 “Mpe yo, mwana ya moto, sakolá, bɛtá mabɔkɔ mpe lobá mbala misato ete: ‘Mopanga!’ Ezali mopanga ya bato oyo babomami, mopanga oyo ebomi bato ebele, mopanga oyo ezali kozinga bango.+ 15 Mitema na bango ekonyangwa mpo na kobanga+ mpe ebele bakokwea na baporte ya bingumba na bango. Nakoboma bato ebele na mopanga. Ɛɛ, ezali kongɛnga lokola mokalikali mpe bakómisi yango sɛlisɛli mpo na koboma! 16 Na mino nyonso, katá na lobɔkɔ ya mobali! Betá na lobɔkɔ ya mwasi! Kende epai nyonso oyo mbɛli na yo etali! 17 Nakobɛta mpe mabɔkɔ, mpe nakosilisa nkanda makasi na ngai.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.”
18 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 19 “Nde yo, mwana ya moto, salá nzela mibale mpo mopanga ya mokonzi ya Babilone eya. Yango mibale ekouta na mokili moko, elembo ya kolakisa nzela* ekotyama na nzela oyo ekei na bingumba mibale. 20 Osengeli kosala nzela mpo mopanga eya kobɛta Raba+ ya Baamone, mpe nzela mosusu mpo mopanga ebɛta Yerusaleme, engumba oyo ebatelami makasi+ na Yuda. 21 Mpo mokonzi ya Babilone atɛlɛmi esika banzela ekutani, esika nzela ekabwani na mibale, mpo na koluka koyeba makambo oyo ekoya. Aningisi makula. Atuni bikeko* na ye; atalitali libale. 22 Eloko oyo azali na yango na lobɔkɔ na ye ya mobali, mpo na kosakola makambo oyo ekoya elakisi na Yerusaleme, mpo na kotya bamasini ya kobukabuka, mpo na kopesa mitindo ya koboma, mpo na koyokisa lokito ya etumba, mpo na kotya bamasini ya kobukabuka baporte, mpo na kotɛlɛmisa ngomba ya mabele, mpo na kotonga efelo ya kozinga mboka.+ 23 Kasi na miso ya bato oyo* alapelaki bango ndai,+ koluka koyeba makambo oyo ekoya ekomonana lokola makambo ya lokuta, kasi akanisi lisusu libunga na bango mpe akokanga bango.+
24 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bosali ete bákanisa lisusu libunga na bino na ndenge bobimisi polele misala na bino ya kobuka mibeko, mpe bosali ete masumu na bino emonana na misala na bino nyonso, lokola bazali kokanisa bino lisusu, bokokangama na makasi.’*
25 “Kasi mokolo na yo eyei, Ee moto oyo ozoki mpota ya liwa, nkumu mabe ya Yisraele,+ ntango ya etumbu na yo ya libela ekoki. 26 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Longolá tirba mpe longolá motole.*+ Makambo ekobongwana.+ Tombolá moto oyo azali na nse,*+ mpe kitisá moto oyo azali na likoló.*+ 27 Nakokómisa yango libebi, libebi, libebi. Mpe ekozala ya moto moko te tii ntango moto oyo mibeko epesi ye lotomo akoya,+ mpe nakopesa ye yango.’+
28 “Mpe yo, mwana ya moto, sakolá mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi mpo na Baamone mpe mpo na kofinga na bango.’ Lobá boye: ‘Mopanga! Mopanga ebendami mpo na koboma, bakómisi yango sɛlisɛli mpo elya, mpe engɛnga lokola mokalikali. 29 Atako bimonaneli ya lokuta, mpe makambo ya lokuta oyo ekoya oyo bayebisi yo, baoyo bakokufa na kati na yo bakosangisama liboke elongo na bato oyo babomami,* bato mabe oyo mikolo na bango eyei, ntango ya etumbu na yo ya libela ekoki. 30 Zongisá yango na libenga na yango. Nakosambisa yo na esika ozalisamaki, na mokili epai outaki. 31 Nakopesa yo etumbu mpo nazali na nkanda. Nkanda na ngai ekozikisa yo lokola mɔtɔ, nakokaba yo na lobɔkɔ ya bato ya mobulu, bato oyo bayebi mpenza kobebisa.+ 32 Okokóma eloko ya kopelisa mɔtɔ.+ Makila na yo moko ekosopana na mokili. Mpe bakokanisa yo lisusu te, mpo ngai moko, Yehova, nde nalobi.’”
22 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Nde yo, mwana ya moto, omibongisi mpo na kopesa etumbu na* engumba oyo ezali na ngambo ya makila+ mpe komonisa ye makambo nyonso oyo eyinamá oyo asali?+ 3 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee engumba oyo ezali kosopa makila+ na kati na yango, yo oyo ntango na yo ekoki,+ yo oyo osalaka bikeko ya bosɔtɔ* mpo na komikómisa mbindo,+ 4 omemi ngambo mpo na makila oyo osopi,+ mpe bikeko na yo ya bosɔtɔ ekómisi yo mbindo.+ Okómisi mikolo na yo mokuse, mpe nsuka ya bambula na yo ekoki. Yango wana nakokómisa yo eloko ya kosambwisa na bikólo mpe eloko ya kosɛka na mikili nyonso.+ 5 Mikili oyo ezali pene mpe oyo ezali mosika na yo ekosɛka yo,+ yo oyo nkombo na yo ezali mbindo, mpe otondi na mobulungano. 6 Talá! Nkumu mokomoko ya Yisraele na kati na yo asaleli bokonzi na ye mpo na kosopa makila.+ 7 Epai na yo, bato bazali kotyola tata ná mama.+ Bazali kobuba moto oyo afandi mopaya, mpe konyokola mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá.”’”+
8 “‘Otyoli bisika mosantu na ngai, mpe okómisi basabata na ngai eloko mpamba.+ 9 Epai na yo, bato oyo bakoselaka bato makambo bakani mpenza kosopa makila.+ Epai na yo, bazali kolya bambeka likoló ya bangomba mpe bazali kosala makambo ya nsɔni na kati na yo.+ 10 Na kati na yo, basambwisi mbeto ya tata,*+ mpe basangisi nzoto na makasi na mwasi oyo azali na mbindo na ntango na ye ya komona sanza.+ 11 Epai na yo, mobali asaleli mwasi ya moninga na ye makambo na ndenge oyo eyinamá,+ mosusu akómisi mwasi ya mwana na ye mbindo na etamboli ya nsɔni,+ mpe mosusu asangisi na makasi nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye moko.+ 12 Epai na yo, bandimi kozwa kanyaka mpo na kosopa makila.+ Ozali kodefisa mpo na kozwa benefisi+ to koluka benefisi ya lokoso, mpe kobɔtɔla baninga mbongo.+ Ya solo bobosani ngai mpenza,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
13 “‘Talá! Nabɛti mabɔkɔ na ngai mpamba te nayoki mabe mpenza mpo na litomba oyo ozwi na kozanga bosembo, mpe mpo na misala ya kosopa makila oyo ezali na kati na yo. 14 Okozala kaka na mpiko mpe makasi na mokolo oyo nakopesa yo etumbu?+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi mpe nakosala yango. 15 Nakopalanganisa yo na kati ya bikólo, nakopanza yo na kati ya mikili+ mpe nakosilisa mbindo na yo.+ 16 Okosambwa liboso ya bikólo, mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+
17 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 18 “Mwana ya moto, mpo na ngai, bato ya Yisraele bakómi lokola bosɔtɔ. Bango nyonso bazali kwivre, etini, ebende mpe mondɔlu na kati ya esika ya mɔtɔ makasi. Bakómi bosɔtɔ ya palata.+
19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola bino nyonso bokómi lokola bosɔtɔ,+ nazali koyanganisa bino na kati ya Yerusaleme. 20 Kaka ndenge basangisaka palata, kwivre, ebende, mondɔlu mpe etini na kati ya esika ya mɔtɔ makasi, mpo na kofula mɔtɔ likoló na yango mpo enyangwa, ndenge yango nde nakoyanganisa bino na nkanda na ngai mpe na nkanda makasi na ngai, nakofula likoló na bino mpe nakonyangwisa bino.+ 21 Nakoyanganisa bino, mpe nakofula likoló na bino na mɔtɔ ya nkanda makasi na ngai,+ mpe bokonyangwisama na engumba na bino.+ 22 Kaka ndenge palata enyangwaka na kati ya esika ya mɔtɔ makasi, bino mpe bokonyangwa bongo na kati na yango; mpe bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nde nasopeli bino nkanda makasi na ngai.’”
23 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 24 “Mwana ya moto, lobá na Yerusaleme boye: ‘Ozali mokili oyo ekopɛtolama te, mokili oyo mbula ekonɔkela te na mokolo ya nkanda makasi. 25 Basakoli na yo basali likita mabe epai na yo,+ lokola nkɔsi oyo ezali koganga, oyo ezali kopasola nyama.+ Bazali kolya bato.* Bazali kokanga biloko ya motuya mpe biloko ya ntina mingi. Na kati na yo, bakómisi basi oyo mibali bakufá ebele. 26 Banganga-nzambe na yo batosi te mobeko na ngai,+ mpe bazali kaka kokómisa bisika mosantu na ngai eloko mpamba.+ Bakesenisi te eloko mosantu ná eloko ya mpamba,+ balakisi te bokeseni kati na eloko ya mbindo ná eloko ya pɛto,+ baboyi kotosa basabata na ngai, mpe bakómisi ngai eloko mpamba kati na bango. 27 Na kati na yo, bankumu na yo bazali lokola bambwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama; bazali kosopa makila, mpe koboma bato* mpo na kozwa litomba na ndenge oyo ezangi bosembo.+ 28 Basakoli na yo babombi misala na bango ya mabe ndenge bapakolaka mpɛmbɛ na efelo, bazali komona bimonaneli ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ekoya ya bokosi,+ bazali koloba boye: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi,” nzokande Yehova ye moko alobi te. 29 Bato ya mokili bazali kobuba mpe koyiba,+ banyokoli moto oyo azangá ná mobola, mpe babubi moto oyo afandi mopaya, bapimeli ye bosembo.’
30 “‘Nazalaki koluka na kati na bango moto oyo akobongisa efelo ya mabanga to oyo akotɛlɛma na lidusu liboso na ngai mpo na bolamu ya mokili, mpo ebebisama te,+ kasi namonaki moto moko te. 31 Bongo nakosopela bango nkanda makasi na ngai mpe nakosilisa bango nyonso na mɔtɔ ya nkanda na ngai. Nakosala ete bányokwama mpo na mbuma mabe ya etamboli na bango,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
23 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, ezalaki na basi mibale oyo bazalaki bana ya mama moko.+ 3 Babandaki kosala bondumba na Ezipito.+ Basalaki bondumba banda bolenge na bango. Kuna bafinafinaki mabɛlɛ na bango mpe basimbasimbaki ntolo ya bongɔndɔ na bango. 4 Nkombo ya yaya Ohola,* mpe oyo ya leki Oholiba.* Bakómaki ya ngai mpe babotaki bana mibali ná ya basi. Ohola ezali Samaria,+ mpe Oholiba ezali Yerusaleme.
5 “Ohola abandaki kosala bondumba,+ wana azalaki naino ya ngai, azalaki na mposa makasi ya kosangisa nzoto na baoyo balulaki ye mingi,+ bato ya Asiri oyo bazalaki pene na ye.+ 6 Bazalaki baguvɛrnɛrɛ oyo balataki bilamba ya bulé, mpe bayangeli-basungi, bango nyonso bana mibali ya kitoko, bamataki likoló ya bampunda. 7 Akobaki kosala bondumba na bana mibali nyonso oyo baleki kitoko ya Asiri, mpe amikómisaki mbindo+ na bikeko ya bosɔtɔ* ya baoyo azalaki na mposa makasi ya kosangisa na bango nzoto. 8 Atikaki te bondumba oyo azalaki kosala na Ezipito, mpo balalaki na ye na bolenge na ye, mpo basimbasimbaki ntolo ya bongɔndɔ na ye mpe basilisaki mposa na bango ya kosangisa nzoto epai na ye.+ 9 Na yango, napesaki ye na lobɔkɔ ya baoyo balulaka ye mingi, bana mibali ya Asiri,+ baoyo azalaki koyoka mposa makasi ya kosangisa na bango nzoto. 10 Bamonisaki bolumbu na ye polele+ mpe bakangaki bana na ye ya mibali mpe ya basi,+ mpe babomaki ye na mopanga. Akendaki nsango epai ya basi, mpe bapesaki ye bitumbu.
11 “Ntango ndeko na ye ya mwasi Oholiba amonaki yango, amipesaki na mposa na ye ya nzoto mpe amibebisaki koleka, mpe bondumba na ye ezalaki mabe koleka ya ndeko na ye.+ 12 Ayokaki mposa makasi ya kosangisa nzoto na bana ya Asiri,+ baguvɛrnɛrɛ mpe bayangeli-basungi oyo bazalaki pene, baoyo balataki bilamba ya kitoko, mpe bamataki likoló ya bampunda; bango nyonso bilenge mibali ya kitoko. 13 Lokola amikómisaki mbindo, namonaki ete bango mibale balandaki nzela moko.+ 14 Kasi azalaki kaka kobakisa misala na ye ya bondumba. Amonaki mibali na mayemi oyo ezalaki na efelo, bililingi ya mayemi ya Bakaladea, oyo epakolami langi ya motane mpenza, 15 balati mikaba na loketo na bango, batirba na mitó na bango ezalaki kodiembela, bazalaki komonana lokola babundi-bitumba, bango nyonso bazalaki komonisa bato ya Babilone, bato oyo babotamá na mokili ya Bakaladea. 16 Abandaki koyoka mposa makasi ya kosangisa na bango nzoto ntango kaka amonaki bango mpe atindelaki bango bamemi-nsango na Kaladea.+ 17 Bongo bana mibali ya Babilone bazalaki kaka koya na mbeto oyo abongisaki mpo na komonisa bolingo, mpe bakómisaki ye mbindo na mposa makasi na bango ya kosangisa nzoto. Nsima ya kokómisa ye mbindo, ayokaki* bango mabe mpenza mpe atikaki bango.
18 “Ntango amipesaki kozanga nsɔni na misala na ye ya bondumba mpe amonisaki bolumbu na ye polele,+ nayokaki ye mabe mpenza mpe natikaki ye, kaka ndenge nayokaki ndeko na ye mabe mpenza mpe natikaki ye.+ 19 Mpe azalaki kaka kobakisa misala na ye ya bondumba,+ kokanisa lisusu mikolo ya bolenge na ye, ntango azalaki kosala bondumba na mokili ya Ezipito.+ 20 Azalaki koyoka mposa makasi ya kosangisa na bango nzoto lokola basi ya bato oyo eteni ya nzoto na bango ya mibali ezali lokola ya mpunda moke to ya mpunda. 21 Otiki makanisi na yo nyonso na etamboli ya nsɔni ya bolenge na yo na Ezipito+ ntango basimbasimbaki ntolo na yo, mabɛlɛ ya bolenge na yo.+
22 “Na yango, Ee Oholiba, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nazali kotɛlɛmisela yo baoyo bazalaki kolula yo,+ baoyo oyokaki bango mabe mpenza* mpe otikaki bango, mpe nakosala ete báuta epai na epai mpo na kobundisa yo,+ 23 bana mibali ya Babilone+ mpe Bakaladea nyonso,+ mibali ya Pekode,+ ya Shoa mpe ya Koa, elongo na bana mibali nyonso ya Asiri. Bango nyonso bazali bilenge mibali ya kitoko, baguvɛrnɛrɛ mpe bayangeli-basungi, babundi-bitumba mpe baoyo baponami malamu,* bango nyonso bamati likoló ya bampunda. 24 Bakobundisa yo na lokito ya makalo ya bitumba mpe ya bapine ya ebende, mpe na basoda ebele, ná nguba monene mpe nguba moke* ná ekɔti. Bakotɛmɛla yo bipai na bipai, mpe nakopesa bango nzela básambisa, mpe bakopesa yo etumbu ndenge oyo bakosepela.+ 25 Nakomonisela yo nkanda makasi na ngai, mpe bakosalela yo makambo na makasi. Bakolongola yo zolo ná matoi, mpe bato na yo oyo bakotikala bakobomama na mopanga. Bakokende na bana na yo ya mibali mpe ya basi, mpe bato na yo oyo bakotikala bakotumbama na mɔtɔ.+ 26 Bakolongola yo bilamba+ mpe bakozwa babiju na yo ya kitoko.*+ 27 Nakosukisa etamboli na yo ya nsɔni mpe bondumba na yo,+ oyo ebandaki na Ezipito.+ Okotika kotala bango mpe okokanisa Ezipito lisusu te.’
28 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nalingi sikoyo kopesa yo na lobɔkɔ ya bato oyo oyinaka, bato oyo oyokaki bango mabe mpenza* mpe otikaki bango.+ 29 Bakosalela yo makambo na koyina, bakobɔtɔla nyonso oyo ozwaki na motoki na yo,+ bakotika yo bolumbu mpe nzoto polele. Nsɔni ya bolumbu na yo ya pite, etamboli na yo ya nsɔni mpe bondumba na yo ekomonisama polele.+ 30 Bakosala yo makambo oyo mpo olandi bikólo lokola mwasi ya ndumba,+ mpo omikómisaki mbindo na bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ 31 Olandi nzela ya ndeko na yo ya mwasi,+ mpe nakotya kɔpɔ na ye na lobɔkɔ na yo.’+
32 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
‘Okomɛla kɔpɔ ya molai mpe ya monene ya ndeko na yo ya mwasi.+
Mpe okokóma eloko ya kosɛka mpe ya kotyola, kɔpɔ oyo ezali na biloko mingi na kati.+
33 Okotonda na molangwa mpe na mawa,
Na kɔpɔ ya nsɔmɔ mpe ya libebi,
Kɔpɔ ya ndeko na yo ya mwasi, Samaria.
34 Okomɛla mpenza yango mpe okosilisa yango nyonso,+ mpe okolyalya mwa biteni ya mbɛki na yango ya mabele,
Mpe na nsima okolongola mabɛlɛ na yo.
“Mpo ngai moko nde nalobi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.’
35 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola obosani ngai mpe obwaki ngai mpenza,*+ okobuka mbuma mabe ya etamboli na yo ya nsɔni mpe ya misala na yo ya bondumba.’”
36 Bongo Yehova alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, nalingi osambisa Ohola ná Oholiba+ mpe omonisa bango misala na bango ya bosɔtɔ. 37 Basali ekobo*+ mpe makila ezali na mabɔkɔ na bango, basali ekobo na bikeko na bango ya bosɔtɔ. Mpe batumbaki na mɔtɔ,* bana na bango oyo babotelaki ngai, mpo ezala bilei mpo na bikeko na bango.+ 38 Lisusu, talá oyo basali ngai: Bakómisaki esika mosantu na ngai mbindo na mokolo yango, mpe bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba. 39 Nsima ya koboma bana na bango lokola mbeka mpo na bikeko na bango ya bosɔtɔ,+ bakɔtaki na esika mosantu na ngai na mokolo yango mpo na kokómisa yango eloko mpamba,+ yango nde basalaki na kati ya ndako na ngai moko. 40 Kutu, batindaki momemi-nsango aya na mibali uta na mosika,+ ntango bazalaki koya, yo, Oholiba osukolaki nzoto na yo, opakolaki biloko ya monzɛlɛ na miso mpe olataki biloko ya kobongisa nzoto.+ 41 Mpe ofandaki na kiti moko ya lokumu,+ oyo batye mesa moko liboso na yango,+ mpe otyaki mpaka ya malasi+ na ngai mpe mafuta+ na ngai likoló na yango. 42 Makɛlɛlɛ ya bato ebele oyo bazali komitungisa te eyokanaki kuna, na kati na bango, ezalaki na balangwi-masanga baoyo bamemaki bango uta na esobe, balatisaki basi bikɔmɔ na mabɔkɔ mpe batyaki mitole kitoko na mitó na bango.
43 “Bongo nalobaki mpo na mwasi yango oyo kitoko esili na ekobo ete: ‘Sikoyo, akokoba kosala bondumba na ye.’ 44 Na yango bazalaki kaka kokende epai na ye ndenge moto akendaka epai ya mwasi ya ndumba. Ndenge yango nde bakendaki epai ya Ohola ná Oholiba, basi ya etamboli ya mbindo. 45 Kasi bato ya sembo bakosambisa ye na lisambisi oyo ebongi na ekobo+ mpe kosopa makila;+ mpo bazali basi ya ekobo, mpe makila ezali na mabɔkɔ na bango.+
46 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bakomemela bango limpinga mpo na kobundisa bango, mpo nakokómisa bango eloko moko ya nsɔmɔ mpe ya kopunza.+ 47 Limpinga yango ekobamba bango mabanga,+ mpe bakoboma bango na mipanga na bango. Bakoboma bana na bango ya mibali mpe ya basi,+ mpe bakotumba bandako na bango na mɔtɔ.+ 48 Nakosukisa etamboli ya nsɔni na mokili yango, basi nyonso bakozwa liteya, mpe bakomekola te etamboli na bino ya nsɔni.+ 49 Bakosala ete bóbuka mbuma mabe ya etamboli na bino ya nsɔni mpe ya masumu oyo bosalaki na bikeko na bino ya bosɔtɔ; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.’”+
24 Yehova alobaki na ngai lisusu na mbula ya libwa, na mokolo ya zomi ya sanza ya zomi, ete: 2 “Mwana ya moto, komá mokolo ya lelo,* mokolo oyo mpenza. Mokonzi ya Babilone abandi kobundisa Yerusaleme na mokolo oyo mpenza.+ 3 Lobá lisese mpo na oyo etali batomboki, mpe lobá boye mpo na bango:
“‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Tyá nzungu ya kolambela* na mɔtɔ; tyá yango na mɔtɔ mpe sopá mai na kati.+
4 Tyá misuni na kati,+ mosuni nyonso ya malamu,
Ebɛlɔ ná lipeka; tondisá yango na mikuwa oyo eleki malamu.
5 Zwá mpate oyo eleki kitoko na etonga,+ mpe tyá nkoni zingazinga na yango na nse ya nzungu.
Tɔkisá misuni, mpe lambá mikuwa oyo ezali na kati ya nzungu.”’
6 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
‘Mawa na engumba oyo ezali kosopa makila,+ nzungu ya kolambela oyo egugi, oyo koguga na yango elongwe te!
Bálongola mosuni mokomoko;+ bábwakela yango mbɛsɛ te.
7 Mpo makila oyo engumba yango esopi ezali na kati na yango;+ Asopaki yango na etando ya libanga.
Asopaki yango te na mabele, mpo na kozipa yango na putulu.+
8 Mpo na kolamwisa nkanda makasi na ngai ya kozongisa mabe,
Natye makila na ye na etando ya libanga oyo ezali kongɛnga,
Mpo ezipama te.’+
9 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
‘Mawa na engumba oyo ezali kosopa makila!+
Nakokómisa liboke ya nkoni yango monene.
11 Tyá na makala nzungu yango oyo ezali na eloko te na kati, mpo ezwa mɔtɔ
Mpo kwivre na yango ekóma mɔtɔ makasi mpenza.
Mbindo na yango ekonyangwa na kati na yango+ mpe koguga na yango ekozika.
Bwaká yango na mɔtɔ ná koguga na yango!’
13 “‘Mbindo na yo ezalaki mpo na etamboli na yo ya nsɔni.+ Namekaki kopɛtola yo, kasi okokaki kopɛtolama te na mbindo na yo. Okokóma pɛto te tii nkanda makasi oyo nazali na yango mpo na yo ekokita.+ 14 Ngai moko, Yehova, nde nalobi. Ekosalema bongo. Nakosala yango mpe nakozonga nsima te, nakoyoka mawa te, mpe nakoyoka mpasi na motema te.+ Bakosambisa yo na kolanda etamboli na yo mpe misala na yo,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
15 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 16 “Mwana ya moto, nazali kobɔtɔla yo na mbalakaka moto oyo olingaka.+ Osengeli te kosala matánga;* osengeli te kolela to kobimisa mai ya miso. 17 Lelalelá na mongongo ya nse,* mpe kosala milulu ya matánga* te mpo na bakufi.+ Kangá tirba+ na yo, mpe latá basandale+ na yo. Osengeli kozipa monɔkɔ* te,+ mpe kolya te limpa oyo bato mosusu bamemeli yo.”*+
18 Nasololaki na bato na ntɔngɔ mpe mwasi na ngai akufaki na mpokwa. Na yango, na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, nasalaki kaka ndenge bapesaki ngai mitindo. 19 Bato bazalaki koloba na ngai boye: “Yebisá biso, makambo oyo ozali kosala etali biso na nini?” 20 Nayanolaki bango ete: “Yehova alobaki na ngai ete: 21 ‘Lobá na bato ya Yisraele boye: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nazali kokómisa esika mosantu na ngai eloko mpamba,+ oyo esalaka ete bózala na lolendo makasi, eloko oyo bolingaka mpe oyo motema na bino esepelaka na yango.* Bana na bino ya mibali ná ya basi oyo botikaki na engumba bakokufa na mopanga.+ 22 Bongo bokosala mpenza ndenge nasali. Bokozipa minɔkɔ* na bino te, mpe bokolya te mampa oyo bato mosusu bamemeli bino.+ 23 Batirba na bino ekozala na mitó na bino mpe basandale na bino ekozala na makolo na bino. Bokosala matánga te, mpe bokolela te. Kasi bokopɔla mpo na mabunga na bino,+ mpe bokolelalela mpenza bino na bino. 24 Ezekiele akómi elembo mpo na bino.+ Bokosala kaka ndenge ye asali. Ntango yango ekosalema, bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.’”’”
25 “Nde yo, mwana ya moto, na mokolo oyo nakobɔtɔla bango ndako na bango ya makasi, eloko kitoko oyo esepelisaka bango, eloko oyo balingaka, oyo motema na bango esepelaka na yango, elongo na bana na bango ya mibali mpe ya basi,+ 26 moto oyo abiki akopesa yo nsango.+ 27 Na mokolo yango okofungola monɔkɔ na yo mpe okoloba na moto oyo abiki, mpe okozala baba lisusu te.+ Okokóma elembo mpo na bango, mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”
25 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya Baamone+ mpe sakwelá mpasi oyo ekokómela bango.+ 3 Osengeli koloba boye mpo na Baamone: ‘Bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola olobi ‘Aha!’ mpo na esika mosantu na ngai, ntango bakómisaki yango eloko mpamba, mpe mpo na mokili ya Yisraele, ntango batikaki yango mpamba, mpe mpo na bato ya Yuda, ntango bamemamaki na mboka mopaya, 4 na yango, nazali kopesa bino epai ya bato ya Ɛsti mpo bózala eloko na bango. Bakotya bakaa* na bango na kati na bino mpe bakotɛlɛmisa bahema na bango na kati na bino. Bakolya mbuma na bino, mpe bakomɛla miliki na bino. 5 Nakokómisa Raba+ esika ya koleisa bakamela matiti mpe mokili ya Baamone esika ya kopema ya etonga ya bampate; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’”
6 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola bobɛtaki mabɔkɔ+ mpe bopumbwaki na esengo,* mpe bosepelaki* na lityo nyonso na oyo ekómelaki mokili ya Yisraele,+ 7 na yango, nakosembolela bino lobɔkɔ na ngai, mpe nakopesa bino na bikólo mpo bózala eloko ya kopunza. Nakolongola bino na kati ya bato ya bikólo, nakosala ete bózala lisusu te na mikili.+ Nakosilisa bino, mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
8 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola Moabe+ ná Seire+ balobi ete: “Talá! Ekólo ya Yuda ezali lokola bikólo mosusu nyonso,” 9 nakosala ete bingumba oyo ezali na ndelo* ya Moabe ezanga libateli, ezala mpe bingumba oyo eleki kitoko, ya Bete-yeshimote, Baala-meone, ata mpe ya Kiriataime.+ 10 Nakopesa yango elongo na Baamone epai ya bato ya Ɛsti,+ mpo ezala eloko na bango, mpo Baamone bákanisama lisusu te na kati ya bikólo.+ 11 Nakopesa Moabe etumbu,+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
12 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Edome azongiseli bana ya Yuda mabe mpe bamemi ngambo ya libunga moko monene na ndenge bazongiseli bango mabe;+ 13 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosembola mpe lobɔkɔ na ngai mpo na kopesa Edome etumbu, nakolongola na kati na yango bato ná bibwɛlɛ, mpe nakosala ete etikala mpamba.+ Kobanda na Temane tii na Dedane, bakokufa na mopanga.+ 14 ‘Nakosalela bato na ngai Yisraele mpo nakozongisela Edome mabe.+ Bakosala Edome na kolanda nkanda makasi na ngai mpe bakoyeba mpenza ndenge oyo ngai nazongisaka mabe,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”’
15 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mpo na koyinana na bango ya makasi, Bafilistia baluki na mayele mabe nyonso* kozongisa mabe mpe komema libebi.+ 16 Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kopesa Bafilistia etumbu,+ nakolongola Bakerete+ mpe nakobebisa bato oyo batikali na pembenipembeni ya mbu.+ 17 Nakozongisela bango mabe moko ya nsɔmɔ, bakozwa etumbu ya nkanda makasi na ngai, mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakozongisela bango mabe.”’”
26 Na mbula ya 11, na mokolo ya liboso ya sanza, Yehova alobaki na ngai ete: 2 “Mwana ya moto, lokola Tire alobi na Yerusaleme ete:+ ‘Aha! Porte ya bato ya bikólo ebukani!+ Lokola ebebisami, eloko nyonso ekoya epai na ngai mpe nakokóma mozwi’; 3 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Tire, mpe nakomatisa bikólo ebele ete ebundisa yo, ndenge mbu ematisaka mbonge na yango. 4 Ekobebisa bifelo ya Tire mpe ekobuka manɔ́ngi na ye,+ nakopalola mabele mpe nakokómisa ye libanga oyo ezali kongɛnga, oyo ezali mpamba. 5 Akokóma esika ya kokaukisa minyama na katikati ya mbu.’+
“‘Mpo ngai moko nde nalobi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘mpe akokóma eloko oyo bikólo ekopunza. 6 Mpe bato oyo bafandi na bakaa* ya bamboka na ye, bakobomama na mopanga, mpe bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
7 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Uta na nɔrdi, nazali komemela Tire Nebukadenezare mokonzi ya Babilone;+ azali mokonzi ya bakonzi,+ akoya na bampunda,+ makalo ya bitumba,+ basoda oyo batambolaka na bampunda mpe limpinga ya basoda ebele.* 8 Akoboma na mopanga bato oyo bafandi na bakaa ya bamboka na yo, akosalela yo efelo ya kozinga mboka mpe akotonga ngomba ya mabele mpo na kobundisa yo mpe akotombolela yo nguba moko monene. 9 Akobuka bifelo na yo na bamasini na ye ya kobuka bifelo, mpe na bipasola* na ye akobuka manɔ́ngi na yo. 10 Bampunda na ye ekozala ebele mpenza mpe putulu na yango ekozipa yo. Lokito ya basoda oyo batambolaka na bampunda, ya bapine ya ebende mpe ya makalo ya etumba, ekosala ete bifelo na yo eningana, ntango akokɔta na baporte na yo, lokola bato bazali kokɔta na bingumba na bisika oyo bifelo ebukani. 11 Basabo ya bampunda na ye ekonyatanyata babalabala na yo nyonso.+ Akoboma bato na yo na mopanga, mpe makonzí na yo ya makasi ekokwea na mabele. 12 Bakopunza biloko na yo, bakobɔtɔla biloko na yo ya mombongo,+ bakobuka bifelo na yo, mpe bakokweisa bandako na yo ya kitoko; na nsima bakobwaka na mai mabanga na yo, mabaya na yo mpe mabele na yo.’
13 “‘Nakosilisa makɛlɛlɛ ya nzembo na yo, mpe makɛlɛlɛ ya banzɛnzɛ na yo ekoyokana lisusu te.+ 14 Nakokómisa yo libanga oyo ezali kongɛnga, oyo ezali mpamba. Mpe okokóma esika ya kokaukisa minyama.+ Okotongama lisusu ata moke te, mpo ngai moko, Yehova, nde nalobi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
15 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na Tire: ‘Bisanga ekoningana nde na lokito ya kokwea na yo te, ntango bato oyo bazali kokufa* bakolelalela,* ntango bakoboma bato ebele epai na yo?+ 16 Bankumu nyonso ya mbu bakokita na bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola bakazaka na bango,* mpe bakolongola bilamba na bango oyo basalá mayemi ya nsingansinga. Kolɛnga ekokanga bango.* Bakofanda na mabele, bakolɛnga ntango nyonso mpe bakotalatala yo na kokamwa.+ 17 Bakoyembela yo loyembo ya mawa*+ mpe bakoloba na yo boye:
“Talá ndenge okufi,+ yo oyo bato bautá na mbu bazalaki koya kofanda epai na yo, engumba oyo ekumisamá;
Yo ná bato oyo bafandi kati na yo bozalaki makasi na mbu,+
Bozalaki koyokisa bato nyonso oyo bafandaka na mabele nsɔmɔ!
19 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ntango nakobebisa yo lokola bingumba oyo ezali na bato te, ntango nakozindisa yo na mai oyo ezali kotomboka mpe mai ya makasi ekozipa yo,+ 20 nakomema yo ná baoyo bazali kokita na libulu* epai ya bato ya kalakala, nakosala ete ofanda na esika ya nse koleka lokola bisika ya kala oyo ebebisamá; elongo na baoyo bazali kokita na libulu,+ mpo bato báfanda na kati na yo te. Bongo nakokumisa* mokili ya baoyo bazali na bomoi.
21 “‘Nakoyokisa yo nsɔmɔ ya pwasa mpe okozala lisusu te.+ Bakoluka yo, kasi okomonana lisusu te,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
27 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Nde yo, mwana ya moto, yembelá Tire loyembo ya mawa,*+ 3 mpe lobá na Tire boye:
‘Yo oyo ofandi na baporte ya mbu,
Mwasi ya mombongo mpo na bato ya bikólo ya bisanga mingi,
Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Ee Tire, yo moko olobi: ‘Nazali na kitoko ya kokoka.’+
4 Bateritware na yo ezali na katikati ya mbu.
Bato oyo batongaki yo bakómisaki kitoko na yo ya kokoka.
5 Basalaki mabaya nyonso ya mipanzi na yo na banzete ya jenevriye oyo euti na Senire.+
Mpe bazwaki nzete ya sɛdrɛ ya Liban mpo na kosala likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa mpo na yo.
6 Basalaki nkai na yo na banzete minene ya Bashane.
Elongi na yo esalemaki na mpɛmbɛ ya nzoku oyo bakɔtisá na mabaya ya siprɛ, oyo euti na bisanga ya Kitime.+
7 Elamba ya lini ya langilangi oyo euti na Ezipito esalelamaki mpo na kotambwisa masuwa na yo.
Elamba oyo ezalaki kozipa yo esalemaki na nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, oyo euti na bisanga ya Elisha.+
8 Bafandi ya Sidone mpe ya Arvade+ bazalaki balúki-nkai na yo.
Ee Tire, bato na yo ya mayele bazalaki bamatelo na yo.+
9 Bato ya Gebale+ oyo baumeli na mosala* mpe bato ya mayele bazalaki kobamba bampota ya masuwa.+
Bamasuwa nyonso ya mbu ná bato oyo basalaka na kati bazalaki koya epai na yo mpo na kosomba biloko ya mombongo.
10 Bato ya Perse, ya Ludi ná ya Puti+ bazalaki na limpinga ya basoda na yo, bato na yo ya etumba.
Bazalaki kokakisa banguba mpe bikɔti na bango epai na yo mpe bazalaki kosala ete ozala na nkembo.
11 Bato ya Arvade na limpinga ya basoda na yo bazalaki zingazinga ya bifelo na yo nyonso,
Mpe mibali ya mpiko bazalaki kobatela manɔ́ngi na yo.
Bazalaki kokakisa banguba na bango ya sɛrklɛ zingazinga ya bifelo na yo nyonso.
Mpe bakómisaki kitoko na yo ya kokoka.
12 “‘“Tarasisi+ asalaki mombongo ná yo mpo ozalaki mpenza mozwi.+ Mpo na kozwa biloko na yo, bazalaki kopesa palata, ebende, etini mpe mondɔlu.+ 13 Yavane, Tubale+ ná Mesheke+ bazalaki kosala mombongo ná yo. Mpo na kozwa biloko na yo ya mombongo bazalaki kopesa baombo+ mpe biloko ya kwivre. 14 Mpo na kozwa biloko na yo ya mombongo, bana ya Togarama+ bazalaki kopesa bafarasa, bampunda ya etumba mpe badɔngi.* 15 Bato ya Dedane+ bazalaki kosala mombongo ná yo; ozalaki kozwa na mosala bato ya mombongo na bisanga mingi; mpo na kopesa mpako, bazalaki kopesa yo mpɛmbɛ ya nzoku+ ná mabaya ya ebɛnɛ. 16 Edome azalaki kosala mombongo ná yo mpo na ebele ya biloko na yo. Mpo na kozwa biloko na yo bazalaki kopesa tirikwaze, lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bulé, bilamba ya langilangi oyo ezali na mayemi, elamba ya kitoko, mabanga kitoko ya korai mpe mabanga ya rubi.
17 “‘“Yuda ná mokili ya Yisraele basalaki mombongo ná yo. Mpo na kozwa biloko na yo,+ bazalaki kopesa blé ya Minite,+ biloko kitoko ya kolya, mafuta ya nzoi,+ mafuta mpe balsame.+
18 “‘“Damasi+ azalaki kosala mombongo ná yo mpo na ebele ya biloko na yo, mpe ozalaki mpenza mozwi, azalaki komemela yo vinyo ya Helebone mpe lɛnɛ ya mwa mpɛmbɛ-motane. 19 Mpo na kozwa biloko na yo, Vedane ná Yavane ya Uzale, bapesaki ebende oyo etulami, nzete ya kasia* mpe nkokó. 20 Dedane+ asalaki mombongo ná yo ya bilamba ya nsinga oyo balitá mpo na kofandela mpunda. 21 Ozwaki na mosala Baarabe ná bankumu nyonso ya Kedare.+ Baoyo bazalaki kosala mombongo ya bana-mpate, bampate ná bantaba.+ 22 Bato ya mombongo ya Sheba mpe ya Rama+ basalaki mombongo ná yo; mpo na kozwa biloko na yo, bapesaki bamalasi ya ndenge nyonso oyo eleki kitoko, mabanga ya ntalo ya ndenge nyonso mpe wolo.+ 23 Harane,+ Kane ná Edene,+ bato ya mombongo ya Sheba,+ Ashure+ mpe Kilimada basalaki mombongo ná yo. 24 Na esika na yo ya mombongo batɛkaki bilamba ya kitoko, bilamba ya komizipa oyo esalemi na nsinga ya bulé mpe na mayemi ya langilangi mpe batapi ya langi ndenge na ndenge, nyonso ekangisami makasi na bansinga.
25 Bamasuwa ya Tarasisi+ ezalaki komema biloko na yo ya mombongo,
Bongo otondaki mpe omemaki mikumba ebele* na katikati mpenza ya mbu.
26 Balúki-nkai na yo bamemaki yo na mbu oyo ezali kotomboka.
Mopɛpɛ ya ɛsti epanzi yo na katikati mpenza ya mbu.
27 Bozwi na yo, biloko na yo, biloko na yo ya mombongo, bato na yo ya masuwa mpe bamatelo na yo,
Bato oyo babambaka bampota ya masuwa na yo, bato oyo basombaka biloko na yo ya mombongo+ mpe bato na yo nyonso ya bitumba,+
Ebele ya bato nyonso* oyo bazali epai na yo,
Bango nyonso bakokwea na katikati mpenza ya mbu, na mokolo ya kokwea na yo.+
28 Ntango bamatelo bakoganga, mikili oyo ezali pembeni ya mbu ekoningana.
29 Bato nyonso oyo balúkaka nkai, bato ya masuwa mpe bamatelo,
Bakokita na bamasuwa na bango mpe bakotɛlɛma na mokili.
30 Bakotombola mingongo na bango mpe bakoganga na mawa nyonso mpo na yo.+
Bakobwaka putulu na mitó na bango mpe bakomibalola na putulu ya mɔtɔ.
32 Na kolela na bango, bakoyembela yo loyembo ya mawa mpe bakolela boye:
‘Nani azali lokola Tire, sikoyo akangisami monɔkɔ na katikati ya mbu?+
33 Ntango biloko na yo ya mombongo ezalaki kouta na katikati ya mbu, okokisaki bamposa ya bato ebele ya bikólo.+
Ebele ya bozwi na yo mpe biloko na yo ya mombongo, ekómisaki bakonzi ya mabele bazwi.+
34 Sikoyo, opanzani na mbu, na mai mozindo.+
Mpe biloko na yo nyonso ya mombongo mpe bato na yo bakwei elongo na yo.+
35 Bato nyonso oyo bafandi na bisanga bakotala yo na kokamwa,+
Mpe bakonzi na bango bakolɛnga na nsɔmɔ.+ Kobanga ekomonana na bilongi na bango.
36 Bato ya mombongo na kati ya bikólo, bakobɛta piololo mpo na oyo ekómeli yo.
Nsuka na yo ekozala nsɔmɔ mpe na pwasa,
Mpe okozala lisusu te mpo na libela.’”’”+
28 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, lobá na mokambi ya Tire boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Lokola motema na yo ekómi na lolendo+ mpe ozali kaka koloba: ‘Nazali nzambe.
Nafandi na kiti ya bokonzi ya nzambe, na katikati mpenza ya mbu.’+
Kasi ozali kaka moto, nzambe te,
Atako na motema na yo ozali kokanisa ete ozali nzambe.
3 Talá! Ozali moto ya bwanya koleka Danyele.+
Sekele moko te ebombani epai na yo.
4 Okómi na bomɛngo mpo na bwanya mpe bososoli na yo,
Mpe ozali kokoba kobomba wolo ná palata na kati ya bandako na yo ya kobomba biloko.+
5 Ozwi bomɛngo mingi mpo na mayele na yo ya mombongo,+
Mpe motema na yo ekómi na lolendo mingi mpo na bomɛngo na yo.”’
6 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Lokola na motema na yo ozali kokanisa ete ozali nzambe,
7 Nakomemela yo bapaya mpo na kobundisa yo, banyokoli ya bikólo,+
Bakobenda mipanga na bango mpo na kobebisa biloko nyonso ya kitoko oyo ozwi na bwanya na yo
Mpe bakokómisa nkembo na yo mbindo.+
9 Okokoba kaka koloba epai ya moto oyo azali koboma yo ete: ‘Nazali nzambe?’
Okozala kaka moto, kasi nzambe te, na mabɔkɔ ya baoyo bazali kokómisa yo mbindo.”’
10 ‘Na lobɔkɔ ya bapaya okokufa liwa ya bato oyo bakatami ngenga te,
Mpo ngai moko nde nalobi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
11 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 12 “Mwana ya moto, yembá loyembo ya mawa* mpo na mokonzi ya Tire, mpe lobá na ye boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
13 Ozalaki na Edene, elanga ya Nzambe.
Olataki mabanga nyonso ya ntalo:
Rubi, topazi ná jasipe; krizolite, onikisi ná jade; safire, tirikwaze+ ná emerode;
Mpe mpɛtɛ na yango ná madusu na yango esalemaki na wolo.
Ebongisamaki na mokolo oyo ozalisamaki.
14 Natyaki yo lokola keruba oyo atyami mafuta, oyo abatelaka.
Ozalaki na ngomba mosantu ya Nzambe,+ ozalaki kotambola na katikati ya mabanga ya mɔtɔ.
15 Ozalaki na mbeba te na etamboli na yo banda mokolo oyo ozalisamaki
Tii kozanga bosembo emonanaki epai na yo.+
Lokola okómi mbindo, nakobengana yo na ngomba ya Nzambe mpe nakoboma yo,+
Mosika na mabanga ya mɔtɔ, Ee keruba oyo abatelaka.
17 Motema na yo ekómaki na lolendo mpo na kitoko na yo.+
Obebisaki bwanya na yo mpo na nkembo na yo oyo ezali kongɛnga.+
Nakobwaka yo na mabele.+
Nakotya yo liboso ya bakonzi mpo bátala likambo oyo ekómeli yo.
18 Mpo na monene ya ngambo na yo mpe kozanga bosembo ya mombongo na yo, okómisi bisika mosantu na yo eloko mpamba.
Nakopelisa mɔtɔ na kati na yo mpe ekolya yo.+
Nakokómisa yo putulu ya mɔtɔ likoló ya mabele, liboso ya baoyo nyonso bazali kotala yo.
19 Baoyo nyonso bayebi yo na kati ya bato ya bikólo, bakotala yo na kokamwa.+
Nsuka na yo ekozala nsɔmɔ mpe na pwasa,
Mpe okozala lisusu te mpo na libela.”’”+
20 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 21 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya Sidone,+ mpe sakolá mpasi oyo ekokómela ye. 22 Osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Sidone, mpe nakokumisama na kati na yo;
Bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakopesa ye bitumbu mpe nakosantisama na kati na ye.
23 Nakotinda maladi mabe na kati na ye mpe makila ekosopana na babalabala na ye.
Bato bakobomama na kati na ye ntango mopanga ekobundisa ye bipai nyonso;
Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.+
24 “‘“Bongo bato ya Yisraele bakozingama lisusu te na nsende oyo ezokisaka to nzubɛ ya mpasi+ na baoyo bazali kotyola bango; mpe bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”’
25 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ntango nakoyanganisa bato ya Yisraele uta na bato ya bikólo epai bapalanganisamaki,+ nakosantisama na kati na bango na miso ya bikólo.+ Mpe bakofanda na mokili na bango+ oyo napesaki mosaleli na ngai, Yakobo.+ 26 Bakofanda wana na kimya,+ bakotonga bandako, bakolona bilanga ya vinyo,+ mpe bakofanda wana na kimya ntango nakopesa etumbu na baoyo nyonso bazali zingazinga na bango, baoyo bazali kotyola bango;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bango.”’”
29 Na mbula ya zomi, na mokolo ya 12 ya sanza ya zomi, Yehova alobaki na ngai ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya Farao mokonzi ya Ezipito mpe sakolá mpasi oyo ekokómela ye ná Ezipito mobimba.+ 3 Okoloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Farao, mokonzi ya Ezipito,+
Nyama monene mpe ya nsɔmɔ oyo ezalaka na mbu, oyo etandami na katikati ya mikɛli ya mai ya Nile,*+
Oyo elobi ete: ‘Ebale Nile ezali ya ngai,
Nasali yango mpo na ngai moko.’+
4 Kasi nakotya bandɔbɔ na mbanga na yo mpe nakosala ete mbisi ya mai ya Nile na yo ekangana na ekayi* na yo.
Nakobimisa yo na mai ya Nile na yo elongo na mbisi nyonso ya Nile, oyo ekangani na ekayi na yo.
5 Nakosundola yo na mokili ekauká, yo ná mbisi nyonso ya mai ya Nile na yo.
Okokwea likoló ya esobe mpenza. Bakolɔkɔta yo te, bakosangisa yo mpe te.+
Nakopesa yo ozala bilei ya banyama ya zamba na mabele mpe ya bandɛkɛ na likoló.+
6 Bongo bato nyonso oyo bafandi na Ezipito bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,
Mpo bazalaki lisusu te lisalisi mpo na bato ya Yisraele, bazalaki nde lititi elɛmbá.*+
7 Ntango Bayisraele basimbaki yo na lobɔkɔ, obukanaki,
Mpe osalaki ete bápasola lipeka na bango.
8 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosala ete bato bábundisa yo na mopanga,+ mpe nakoboma epai na yo moto ná nyama. 9 Mokili ya Ezipito ekotikala mpamba mpe ekobebisama;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova, mpo olobi* ete: ‘Ebale Nile ezali ya ngai, ngai nde nasali yango.’+ 10 Na yango, nazali kobundisa yo ná Nile na yo, mpe nakokómisa mokili ya Ezipito esika oyo ebebisamá, oyo ekauká, esika oyo etikalá mpamba,+ kobanda na Migidole+ tii na Siene+ mpe tii na ndelo ya Etiopi. 11 Moto akoleka wana te, nyama ya mboka mpe ekoleka wana te,+ mpe na boumeli ya mbula 40, moto akofanda wana te. 12 Nakokómisa mokili ya Ezipito esika oyo etikalá mpamba koleka mikili nyonso, mpe bingumba na yango ekotikala mpamba koleka bingumba nyonso mpo na mbula 40;+ nakopalanganisa Baezipito na kati ya bikólo mpe nakopanza bango na kati ya mikili.”+
13 “‘Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nsima ya mbula 40, nakoyanganisa Baezipito uta na bato ya bikólo epai bapalanganisamaki,+ 14 nakozongisa bakangami ya Baezipito na mokili ya Patrose,+ na mokili epai bautaki, mpe kuna, bakokóma bokonzi oyo ezangi ntina. 15 Ezipito ekokóma na nse koleka makonzi mosusu, mpe ekozala na bokonzi te likoló ya bikólo mosusu,+ mpe nakokómisa bango moke mpenza mpe bakokoka te kotya bikólo mosusu na nse ya bokonzi na bango.+ 16 Bato ya Yisraele bakotyela lisusu Ezipito motema ata moke te,+ kasi makambo oyo ekokómela Ezipito ekosala ete bato ya Yisraele bákanisa libunga na bango na ndenge balukaki lisalisi epai ya bato ya Ezipito. Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”’”
17 Na mbula ya 27, na mokolo ya liboso, ya sanza ya liboso, Yehova alobaki na ngai ete: 18 “Mwana ya moto, Nebukadenezare,+ mokonzi ya Babilone, asalisaki limpinga ya basoda na ye mosala makasi mpo na kobundisa Tire.+ Motó nyonso ekómaki libandi, mpe lipeka nyonso elongwaki mposo. Kasi ye ná limpinga na ye ya basoda bazwaki lifuti ata moko te mpo na mosala makasi oyo asalaki ya kobundisa Tire.
19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nazali kopesa mokili ya Ezipito epai ya Nebukadenezare mokonzi ya Babilone,+ mpe akomema bozwi na yango, akobɔtɔla biloko na yango mingi mpe akopunza yango; mpe ekokóma lifuti mpo na limpinga ya basoda na ye.’
20 “‘Nakopesa ye mokili ya Ezipito ezala lifuti mpo na mosala makasi oyo asalaki ya kobundisa Tire, mpamba te basalelaki nde ngai,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
21 “Na mokolo yango, nakobimisela bato ya Yisraele liseke moko,*+ mpe nakopesa yo libaku ya koloba na kati na bango; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”
30 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, sakolá, mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
“Bóganga na kolela ete: ‘Mawa! Mokolo ezali koya!’
3 Mpo mokolo ekómi pene, ɛɛ, mokolo ya Yehova ekómi pene.+
Ekozala mokolo ya mapata,+ ntango oyo etyamá mpo na bikólo.+
4 Mopanga ekoya kobɛta Ezipito, mpe Etiopi ekolɛnga makasi ntango bato bakokwea bibembe na Ezipito,
Bakozwa bozwi na yango mpe miboko na yango ekobukama.+
5 Etiopi,+ Puti,+ Ludi, mpe bato nyonso ya bikólo mosusu,
Mpe Kube ná bana ya mokili ya kondimana,*
Bango nyonso bakokufa na mopanga.”’
6 Talá oyo Yehova alobi:
‘Basungi ya Ezipito mpe bakokwea,
Mpe lolendo ya nguya na bango ekokitisama.’+
“‘Banda na Migidole+ tii na Siene,+ bakokufa na mopanga na mokili,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 7 ‘Mokili na bango ekotikala mpamba koleka mikili mosusu, mpe bingumba na yango ekobebisama koleka bingumba mosusu.+ 8 Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakotya mɔtɔ na Ezipito mpe bato nyonso oyo basalaki na bango boyokani bakobebisama. 9 Na mokolo yango, nakotinda bamemi-nsango na bamasuwa, mpo na kolɛngisa Etiopi oyo amityelaka motema. Akolɛnga makasi na mokolo oyo ezali koyela Ezipito, mpo ekoya mpenza.’
10 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakosalela Nebukadenezare mokonzi ya Babilone mpo na kosilisa ebele ya bato ya Ezipito.+ 11 Ye ná basoda na ye, monyokoli mpenza ya bikólo,+ bakomemama mpo na kobebisa mokili. Bakobimisa mipanga na bango mpo na kobebisa Ezipito mpe bakotondisa mokili na bato oyo babomami.+ 12 Nakokómisa banzela ya mai ya Nile+ mabele oyo ekauká mpe nakotɛka mokili na lobɔkɔ ya bato mabe, nakosalela bapaya mpo mokili yango etikala mpamba ná eloko nyonso oyo ezali na kati.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.’
13 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakobebisa mpe bikeko ya bosɔtɔ* mpe nakosilisa banzambe ya mpambampamba na Nofe.*+ Nkumu* akozala lisusu te na mokili ya Ezipito mpe nakotya kobanga na mokili ya Ezipito.+ 14 Nakosala ete Patrose+ etikala mpamba, nakotya mɔtɔ na Zoane mpe nakopesa No* bitumbu.+ 15 Nakosopela Sine, esika makasi ya Ezipito nkanda makasi na ngai, mpe nakoboma bato ya No. 16 Nakotya mɔtɔ na Ezipito; nsɔmɔ ekokanga Sine, No ekozwama na bisika oyo ekotɔbɔlama mpe Nofe ekobundisama na moi mpenza! 17 Bilenge mibali ya One* mpe ya Pibesete bakokufa na mopanga, mpe bato ya bingumba bakokende bakangami. 18 Na Tehafenehese mokolo ekoyinda, ntango nakobuka ekanganeli ya Ezipito.+ Lolendo ya nguya na ye ekosila.+ Mapata ekozipa ye, mpe bafandi ya bingumba na ye bakokende bakangami.+ 19 Nakokweisela Ezipito bitumbu mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
20 Mpe na mbula ya 11, na mokolo ya nsambo ya sanza ya liboso, Yehova alobaki na ngai lisusu: 21 “Mwana ya moto, nabuki lobɔkɔ ya Farao mokonzi ya Ezipito, bakokanga yango te mpo na kobikisa yango, bakolínga yango te na elamba, mpo ezwa makasi ya kosimba mopanga.”
22 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kobundisa Farao mokonzi ya Ezipito+ mpe nakobuka mabɔkɔ na ye, oyo ya makasi ná oyo ebukani,+ mpe nakosala ete mopanga elongwa na lobɔkɔ na ye, ekwea.+ 23 Bongo nakopalanganisa Baezipito na kati ya bikólo mpe nakopanza bango na kati ya mikili.+ 24 Nakokómisa makasi mabɔkɔ* ya mokonzi ya Babilone,+ nakotya mopanga na ngai na lobɔkɔ na ye,+ nakobuka mabɔkɔ ya Farao, mpe lokola moto oyo azali kokufa akolela na mongongo ya nse* mpo na mpasi liboso na ye.* 25 Nakokembisa mabɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, kasi mabɔkɔ ya Farao ekokwea na pɛtɛɛ mpenza. Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakotya mopanga na ngai na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone mpe akobɛta na yango mokili ya Ezipito.+ 26 Nakopalanganisa Baezipito na kati ya bikólo mpe nakopanza bango na kati ya mikili,+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
31 Na mbula ya 11, na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, lobá na Farao mokonzi ya Ezipito mpe na ebele ya bato na ye ete:+
‘Nani azali monene lokola yo?
3 Ezalaki na Moasiri, nzete ya sɛdrɛ na Liban,
Bitape na ye ya kitoko, ezalaki lokola banzete oyo ekangamakangamá oyo ezali kopesa elili, mpe ezalaki molai mpenza,
Nsɔngɛ na yango ekómaki tii na mapata.
4 Mai nde ekómisaki yango monene, maziba ya mai mozindo nde ekómisaki yango molai.
Mikɛli ya mai ezalaki zingazinga na yango, esika oyo elonamaki;
Banzela na yango ya mai ezalaki kopesa mai na banzete nyonso ya esobe.
5 Yango wana ekómaki molai mingi koleka banzete nyonso ya zamba.
Bitape na yango ya minene ebotaki mingi mpe bitape na yango ya mike ekómaki milai
Mpo na ebele ya mai ya mikɛli na yango.
6 Bandɛkɛ nyonso ya likoló ezalaki kotonga bazumbu* na yango na bitape na yango ya minene,
Banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe ezalaki kobota na nse ya bitape na yango ya mike,
Mpe bikólo nyonso ya bato ebele ezalaki kofanda na elili na yango.
7 Ekómaki kitoko na bonene mpe na bolai ya nkasa na yango,
Mpo misisa na yango ekitaki na nse tii na mai mingi.
8 Ata nzete moko te ya sɛdrɛ na elanga ya Nzambe+ ekokanaki na yango.
Ata nzete moko te ya jenevriye ezalaki na bitape minene lokola yango,
Nzete moko te ya platane ezalaki na bitape ya mike lokola yango.
Nzete mosusu te na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango na kitoko.
9 Nakómisaki yango nzete ya kitoko na ebele ya nkasa,
Mpe banzete mosusu nyonso ya Edene, elanga ya Nzambe ya solo, ezalaki kolula yango.’
10 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola ekómaki* molai mpenza, etyaki nsɔngɛ na yango na mapata mpe motema na yango ekómaki na lolendo mpo na bosanda na yango, 11 nakopesa yango na lobɔkɔ ya mokonzi ya nguya ya bikólo.+ Akopesa yango mpenza etumbu. Mpe nakobwaka yango mpo na mabe na yango. 12 Mpe bapaya, banyokoli ya bikólo, bakokata yango, bakosundola yango likoló ya bangomba, mpe nkasa na yango ekokwea na mabwaku nyonso, mpe bitape na yango ekobukana na kati ya mikɛli nyonso ya mai ya mokili.+ Bato ya bikólo nyonso ya mabele bakolongwa na elili na yango mpe bakosundola yango. 13 Bandɛkɛ nyonso ya likoló ekofanda likoló ya mobimbi na yango oyo ekwei, mpe banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe ekozala likoló ya bitape na yango.+ 14 Na yango ata nzete moko te oyo ezali pene na mai ekokóma molai mpenza to ekotombola nsɔngɛ na yango tii na mapata, mpe ata nzete moko te oyo ezwaka mai malamu ekokóma na mapata na bosanda na yango. Mpo nzete nyonso ekokufa mpenza, ekokundama na mabele ndenge bato bakundamaka.’
15 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Na mokolo oyo yango ekokita na Nkunda,* nakosala ete bato bálela. Mpo na yango, nakozipa mai mozindo mpe nakokanga mikɛli na yango mpo mai mingi ekangama. Mpo na yango, nakoyindisa Liban, mpe banzete nyonso ya esobe ekokauka. 16 Na lokito ya kokwea na yango, nakolɛngisa bikólo ntango nakokitisa yango na Nkunda* elongo na baoyo bazali kokita na kati ya libulu,* mpe banzete nyonso ya Edene,+ oyo eleki kitoko mpe banzete oyo eleki kitoko ya Liban, nyonso oyo ezwaka mai malamu ekobɔndisama na nse ya mabele. 17 Ekiti elongo na yango* na Nkunda,* epai ya baoyo babomami na mopanga+ ná basungi* na yango, baoyo bafandi na elili na yango na katikati ya bikólo.’+
18 “‘Nzete nini ya Edene ekokanaki na yo na nkembo mpe na bonene?+ Kasi okokundama mpenza elongo na banzete ya Edene. Okolala na kati ya bato oyo bakatami ngenga te esika moko na bato oyo babomami na mopanga. Yango nde ekokómela Farao ná ebele ya bato na ye nyonso,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
32 Na mbula ya 12, na mokolo ya liboso ya sanza ya 12, Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, yembá loyembo ya mawa* mpo na Farao mokonzi ya Ezipito mpe lobá na ye boye:
‘Ozalaki lokola mwana-nkɔsi ya makasi* ya bikólo,
Kasi okangisami monɔkɔ.
Ozalaki lokola nyama ya nsɔmɔ oyo ezalaka na mbu,+ ozalaki komibwakabwaka na kati ya bibale na yo,
Ozalaki kobebisa mai na makolo na yo mpe kobebisa bibale.’*
3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
‘Nakobwakela yo monyama na ngai na nzela ya lisangá moko ya bikólo ebele,
Mpe bakokanga yo na monyama na ngai.
4 Nakosundola yo na mokili,
Nakobwaka yo na esobe mpenza.
Nakosala ete bandɛkɛ nyonso ya likoló efanda likoló na yo,
Mpe nakosala ete banyama nyonso ya zamba ya mabele mobimba elya yo mpe etonda.+
6 Nakopɔlisa mokili tii na likoló ya bangomba na makila oyo ekotanga yo,
Mpe ekotondisa mikɛli ya mai.’*
7 ‘Mpe ntango okobomama, nakozipa likoló mpe nakoyindisa minzoto na yango.
Nakozipa moi na mapata,
Mpe sanza ekopesa pole na yango te.+
8 Nakoyindisa bingɛngiseli nyonso ya pole na likoló mpo na yo,
Mpe nakozipa mokili na yo na molili,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
9 ‘Nakotungisa motema ya bato ebele ya bikólo ntango nakomema bakangami na yo na bikólo mosusu,
Na mikili oyo oyebi te.+
10 Nakosala ete bato ebele ya bikólo bázala na nsɔmɔ,
Mpe bakonzi na bango bakolɛnga na nsɔmɔ mpo na yo ntango nakoningisa mopanga na ngai liboso na bango.
Bakolɛnga ntango nyonso, moto na moto akobanga ete akufa,
Na mokolo ya kokwea na yo.’
11 Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi:
‘Mopanga ya mokonzi ya Babilone ekoya kobɛta yo.+
12 Nakokweisa ebele ya bato na yo na mopanga ya bilombe ya etumba,
Bazali banyokoli mpenza ya bikólo, bango nyonso.+
Bakosilisa lolendo ya Ezipito, mpe ebele ya bato na ye nyonso bakosilisama.+
13 Nakoboma bibwɛlɛ na ye nyonso, pene ya mai na ye mingi,+
Mpe ata lokolo moko te ya moto to sabo ya ebwɛlɛ ekobebisa yango lisusu.’+
14 ‘Na ntango yango nakopɛtola mai na yango,
Mpe nakolekisa bibale na yango lokola mafuta,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
15 ‘Ntango nakokómisa Ezipito mokili oyo etikalá mpamba, mokili oyo ezangi nyonso oyo ezalaki na kati,+
Ntango nakoboma bato nyonso oyo bafandi kuna,
Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.+
16 Oyo ezali loyembo ya mawa, mpe bato bakoyemba yango mpenza.
Bana basi ya bikólo bakoyemba yango.
Bakoyemba yango mpo na Ezipito mpe mpo na ebele ya bato na ye nyonso,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
17 Bongo na mbula ya 12, na mokolo ya 15 ya sanza yango, Yehova alobaki na ngai ete: 18 “Mwana ya moto, lelá mpo na ebele ya bato ya Ezipito mpe kitisá ye* na mokili ya nse, ye ná bana basi ya bikólo ya nguya, elongo na baoyo bazali kokita na libulu.*
19 “‘Oleki nani na kitoko? Kitá na nse, mpe lalá esika moko na bato oyo bakatami ngenga te!’
20 “‘Bakokwea na katikati ya bato oyo babomami na mopanga.+ Abomami na mopanga. Bóbenda ye ná ebele ya bato na ye nyonso.
21 “‘Uta na mozindo ya Nkunda,* bilombe mpenza ya etumba bakosolola na Farao ná basungi na ye. Ya solo, bakokita na nse mpe bakolala lokola bato oyo bakatami ngenga te, babomami na mopanga. 22 Kuna nde Asiri ná lisangá na ye mobimba bazali. Bankunda na bango ezali zingazinga na ye, bango nyonso babomami na mopanga.+ 23 Bankunda na ye ezali na mozindo ya libulu,* mpe lisangá na ye ezali zingazinga ya nkunda na ye, bango nyonso babomami na mopanga, mpo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi.
24 “‘Kuna nde Elame+ ná ebele ya bato na ye nyonso bazali zingazinga ya nkunda na ye, bango nyonso babomami na mopanga, bakiti na mokili ya nse, kozanga ete bákatama ngenga, baoyo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi. Sikoyo bakomema nsɔni elongo na baoyo bazali kokita na libulu.* 25 Batyeli ye mbeto na katikati ya bato oyo babomami, elongo na ebele ya bato na ye nyonso zingazinga ya bankunda na ye. Bango nyonso bakatami ngenga te, babomami na mopanga, mpo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi; mpe bakomema nsɔni na bango elongo na baoyo bazali kokita na libulu.* Atyami na katikati ya bato oyo babomami.
26 “‘Kuna nde Mesheke ná Tubale+ mpe ebele ya bato na bango* nyonso bazali. Bankunda na bango* ezali zingazinga na ye. Bango nyonso bakatami ngenga te, batɔbɔlami na mopanga, mpo bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi. 27 Bakolala nde te elongo na bilombe ya etumba oyo bakatami ngenga te, baoyo bakwei mpe bakiti na Nkunda* elongo na bibundeli na bango ya etumba? Mpe bakotya mipanga na bango na nse ya mitó* na bango, mpe masumu na bango ekozala likoló ya mikuwa na bango, mpo bilombe ya etumba yango bapesaki nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi. 28 Nde yo, okobebisama na katikati ya bato oyo bakatami ngenga te, mpe okolala elongo na baoyo babomami na mopanga.
29 “‘Kuna nde Edome,+ bakonzi na ye mpe bankumu na ye nyonso bazali, baoyo atako nguya na bango, balalaki esika moko na baoyo babomami na mopanga; bango mpe bakolala elongo na bato oyo bakatami ngenga te+ mpe elongo na baoyo bazali kokita na libulu.*
30 “‘Kuna nde bankumu* nyonso ya nɔrdi bazali, ná Basidone+ nyonso, baoyo bakiti na nsɔni elongo na bato oyo babomami, atako bazalaki kopesa bato nsɔmɔ mpo na nguya na bango. Bakolala kozanga ete bákatama ngenga elongo na baoyo babomami na mopanga mpe bakomema nsɔni na bango elongo na baoyo bazali kokita na libulu.*
31 “‘Farao akomona bango nyonso, mpe akobɔndisama mpo na nyonso oyo ekómeli ebele ya bato na ye;+ Farao ná limpinga ya basoda na ye nyonso bakobomama na mopanga,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
32 “‘Lokola apesi nsɔmɔ na mokili ya baoyo bazali na bomoi, Farao ná ebele ya bato na ye nyonso bakokundama ná bato oyo bakatami ngenga te, elongo na baoyo babomami na mopanga,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
33 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, lobá na bato na yo,+ mpe yebisá bango boye: “‘Soki nasali ete bábundisa mokili moko,+ mpe bato nyonso ya mokili yango bazwi moto moko mpe bakómisi ye sinzili na bango, 3 mpe amoni mpenza banguna bazali koya na mokili, ayuli liseke mpe akebisi bato.+ 4 Soki moto moko ayoki lokito ya liseke mpe alandi likebisi te,+ bongo banguna bayei mpe babomi ye,* makila na ye ekozala na motó na ye moko.+ 5 Ayokaki lokito ya liseke, kasi alandaki likebisi te. Makila na ye ekozala na motó na ye moko. Soki alandaka likebisi, alingaki kobikisa bomoi* na ye.
6 “‘Kasi soki sinzili amoni banguna bazali koya, ayuli liseke te+ mpe bato bayoki likebisi te, banguna bayei mpe babomi moko na bango, moto yango akokufa mpo na libunga na ye, kasi makila na ye ekozala na motó ya sinzili.’*+
7 “Nde yo, mwana ya moto, natye yo sinzili mpo na bato ya Yisraele: soki oyoki maloba oyo euti na monɔkɔ na ngai, osengeli kokebisa bango mpo na ngai.+ 8 Soki nalobi na moto mabe ete: ‘Moto mabe, okokufa mpenza!’+ Kasi olobi te mpo na kokebisa moto mabe ete atika etamboli na ye, akokufa na libunga na ye, mpo azali moto mabe,+ kasi makila na ye ekozala na motó na yo. 9 Nzokande, soki okebisi moto mabe ete atika etamboli na ye mpe aboyi kobongwana, akokufa mpo na libunga na ye,+ kasi okobikisa mpenza bomoi na yo.*+
10 “Mpe yo, mwana ya moto, lobá na bato ya Yisraele ete: ‘Bolobi ete: “Botomboki mpe masumu na biso ekómeli biso kilo, mpe ezali kopɔlisa biso;+ bongo ndenge nini tokokoba kozala na bomoi?”’+ 11 Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, “nasepelaka te na liwa ya moto mabe,+ kasi nasepelaka nde ete moto mabe atika etamboli na ye+ mpe akoba kozala na bomoi.+ Bóbongwana, bóbongwana, bótika etamboli na bino ya mabe,+ mpo na nini bókufa, Ee bato ya Yisraele?”’+
12 “Mpe yo, mwana ya moto, lobá na bato na yo ete: ‘Bosembo* ya moto ya sembo* ekobikisa ye te soki atomboki.+ Mabe ya moto mabe ekobɛtisa ye libaku te soki abongwani mpe atiki mabe na ye.+ Moto nyonso ya sembo akokoba kozala na bomoi te mpo na bosembo na ye na mokolo oyo akosala lisumu.+ 13 Ntango nalobi na moto ya sembo ete: “Okokoba mpenza kozala na bomoi,” bongo atye motema na bosembo na ye moko mpe asali mabe,*+ bakokanisa lisusu te ata likambo moko ya sembo oyo asalaki, kasi akokufa mpo na mabe oyo asali.+
14 “‘Mpe ntango nalobi na moto mabe ete: “Okokufa mpenza,” mpe atiki lisumu na ye, asali oyo ezali malamu mpe sembo,+ 15 mpe moto mabe azongisi eloko oyo azwaki lokola ndanga,+ afuti biloko oyo ayibaki,+ mpe soki atosi mibeko na ngai oyo ememaka na bomoi mpo asali te oyo ezali mabe, akotikala mpenza na bomoi.+ Akokufa te. 16 Bakotángela* ye ata lisumu moko te oyo asalaki.+ Lokola asali oyo ezali malamu mpe sembo, akotikala mpenza na bomoi.’+
17 “Kasi bato na yo balobi ete: ‘Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo,’ nzokande, ndenge oyo bango basalaka makambo nde ezangi bosembo.
18 “Soki moto ya sembo atiki etamboli na ye ya sembo mpe asali oyo ezali mabe, asengeli kokufa mpo na yango.+ 19 Kasi ntango moto mabe abongwani, atiki mabe na ye mpe asali oyo ezali malamu mpe sembo, akotikala na bomoi mpo na yango.+
20 “Kasi bolobi ete: ‘Makambo Yehova asalaka ezangi bosembo.’+ Nakosambisa mokomoko na bino na kolanda makambo oyo asalaka, Ee bato ya Yisraele.”
21 Nsukansuka, na mbula ya 12, na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, oyo tomemamaki na mboka mopaya, moto moko oyo abikaki, oyo autaki na Yerusaleme, ayaki epai na ngai+ mpe alobaki boye: “Bakweisi engumba!”+
22 Sikoyo nguya ya Yehova esalaki na kati na ngai* na mpokwa liboso ete moto oyo abikaki aya, mpe Ye afungolaki monɔkɔ na ngai liboso ete moto yango aya epai na ngai na ntɔngɔ. Na yango, monɔkɔ na ngai efungwamaki mpe nazalaki lisusu baba te.+
23 Bongo Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 24 “Mwana ya moto, bato oyo bafandi na bisika oyo ebebisamá+ bazali koloba mpo na mokili ya Yisraele ete: ‘Abrahama azalaki kaka ye moko kasi azwaki mokili yango.+ Nzokande biso tozali ebele; ya solo bapesi biso mokili mpo ezala eloko na biso.’
25 “Na yango, yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bozali kolya misuni elongo na makila,+ bozali kotya motema na bikeko na bino ya bosɔtɔ,* mpe bozali kokoba kosopa makila.+ Bongo mpo na nini bosengeli kozwa mokili? 26 Botyeli mopanga na bino motema,+ bozali kosala makambo oyo eyinamá, mpe mokomoko na bino akómisi mwasi ya moninga na ye mbindo.+ Bongo mpo na nini bosengeli kozwa mokili?”’+
27 “Talá oyo okoyebisa bango: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, bato oyo bazali na bisika oyo ebebisamá bakokufa na mopanga; baoyo bazali na esobe mpenza, nakopesa bango bázala biloko ya kolya mpo na banyama ya zamba; mpe baoyo bafandaka na bisika makasi mpe na mibenga bakokufa na maladi mabe.+ 28 Nakokómisa mokili yango esika oyo etikalá mpenza mpamba,+ lolendo na yango ya makasi ekosila, mpe bangomba ya Yisraele ekotikala mpamba,+ moto ata moko te akoleka kuna. 29 Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova, ntango nakokómisa mokili yango esika oyo etikalá mpamba+ mpo na biloko na bango nyonso oyo eyinamá oyo basali.”’+
30 “Nde yo, mwana ya moto, bato na yo bazali kolobana mpo na yo pene na bifelo mpe na bisika ya kokɔta na bandako.+ Bazali kolobana, moto na moto azali koloba na ndeko na ye ete: ‘Bóya, tóyoka makambo oyo Yehova azali koloba.’ 31 Bakoya ebele mpo na kofanda liboso na yo lokola bato na ngai; mpe bakoyoka maloba na yo kasi bakosalela yango te,+ mpo na monɔkɔ na bango, bazali kolobela yo maloba sukali,* kasi motema na bango ezali kolanda na lokoso mpenza litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe. 32 Talá! Epai na bango ozali lokola loyembo ya lolango, oyo eyembami na mongongo kitoko mpe oyo ebɛtami malamu na ebɛtɛlo ya bansinga. Bakoyoka maloba na yo, kasi moto moko te akosalela yango. 33 Mpe ntango maloba yango ekokokisama—mpe ekokokisama mpenza,—bakoyeba ete mosakoli moko azalaki na kati na bango.”+
34 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, sakolá mpasi oyo ekokómela babateli ya mpate ya Yisraele. Sakolá mpe lobá na babateli ya mpate ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na babateli ya mpate ya Yisraele,+ baoyo bazali komileisa bango moko! Ezali etonga te nde babateli ya mpate basengeli koleisa?+ 3 Bozali kolya mafuta, bozali kolata lɛnɛ mpe bozali koboma nyama oyo eleki mafuta.+ Kasi bozali koleisa etonga te.+ 4 Nyama oyo elɛmbi, bokómisi yango makasi te; oyo ezali kobɛla, bobikisi yango te; oyo ezoki, bokangi yango eteni ya elamba te; oyo eyengiyengi, bozongisi yango te; oyo ebungi, boluki yango te;+ kutu boyangeli yango na makasi mpe bonyokoli yango mpenza.+ 5 Bongo epalanganaki mpo mobateli ya mpate azalaki te;+ epalanganaki mpe ekómaki bilei mpo na nyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe. 6 Bampate na ngai ezalaki koyengayenga na bangomba nyonso mpe na bangomba mike nyonso oyo etombwaná; bampate na ngai epalanganaki na mabele mobimba, moto moko te alukaki yango mpe moto moko te alukaki komona yango.
7 “‘“Na yango, bino babateli ya mpate, bóyoka liloba ya Yehova: 8 ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, “lokola bampate na ngai ekómaki nyama ya kolya, bilei mpo na nyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe, mpo mobateli ya mpate azalaki te, mpe babateli ya mpate na ngai balukaki bampate na ngai te, kasi bamileisaki nde bango moko mpe baleisaki bampate na ngai te,”’ 9 na yango, bino babateli ya mpate, bóyoka liloba ya Yehova. 10 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakobundisa babateli ya mpate, mpe nakosɛnga bango bázongisa monɔkɔ mpo na bampate na ngai,* nakosɛnga bango lisusu te báleisa bampate na ngai,*+ mpe babateli ya mpate bakomileisa lisusu te. Nakobikisa bampate na ngai na monɔkɔ na bango, mpe ekozala lisusu bilei mpo na bango te.’”
11 “‘Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo, ngai moko, nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango.+ 12 Nakobatela bampate na ngai lokola mobateli ya mpate oyo amoni bampate na ye oyo epalanganaki mpe azali koleisa yango.+ Nakobikisa yango uta na bisika nyonso oyo yango epalanganaki na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi mpenza.+ 13 Nakolongola yango na kati ya bato ya bikólo mpe nakoyanganisa yango uta na mikili, nakomema yango na mokili na yango mpe nakoleisa yango na bangomba ya Yisraele,+ pene na mikɛli ya mai mpe pene na bisika nyonso ya kofanda ya mokili yango. 14 Nakoleisa yango na esika malamu ya koleisa bibwɛlɛ matiti, mpe mokili oyo yango ekolya matiti ekozala na bangomba milai ya Yisraele.+ Ekolala kuna na mokili kitoko oyo etondi na matiti,+ mpe ekolya na bisika oyo eleki malamu ya koleisa bibwɛlɛ na bangomba ya Yisraele.”
15 “‘“Ngai moko nakoleisa bampate na ngai+ mpe ngai moko nakolalisa yango,”+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 16 “Oyo ebungi, nakoluka yango;+ oyo eyengiyengi, nakozongisa yango; oyo ezoki, nakokanga yango eteni ya elamba; oyo elɛmbi, nakokembisa yango; kasi oyo ya mafutamafuta mpe oyo ya makasi, nakosilisa yango mpenza. Nakoleisa oyo wana na nzela ya lisambisi.”
17 “‘Mpo na bino bampate na ngai, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nalingi kokata likambo kati na mpate oyo ná mpate mosusu, kati na bampate-mibali mpe bantaba-mibali.+ 18 Ndenge bozali kolya matiti oyo eleki malamu ekoki te mpo na bino? Kasi mpo na nini bozali konyatanyata matiti oyo etikali na esika na bino ya koleisa bibwɛlɛ matiti? Nsima ya komɛla mai oyo eleki pɛto, bosengeli nde konyatanyata mai yango na makolo na bino? 19 Bampate na ngai esengeli nde kolya na esika ya matiti oyo makolo na bino enyatinyati mpe komɛla mai oyo bobebisi ndenge bonyatinyati yango na makolo na bino?”
20 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bango: “Ngai oyo, ngai moko nakokata likambo kati na mpate ya mafutamafuta mpe mpate oyo ekɔndá, 21 mpo bampate nyonso oyo ezalaki na maladi, bozalaki kotindika yango na mopanzi mpe na lipeka mpe bozalaki kotuta yango maseke na bino tii bopalanganisaki yango mosika. 22 Nakobikisa bampate na ngai, ekozala lisusu te eloko ya kolya.+ Mpe nakokata likambo kati na mpate oyo ná mpate oyo. 23 Nakobimisela yango mobateli moko ya mpate,+ mosaleli na ngai Davidi+ mpe akoleisa yango. Ye moko akoleisa yango mpe akokóma mobateli na yango.+ 24 Ngai, Yehova, nakokóma Nzambe ya bampate yango,+ mpe mosaleli na ngai Davidi akokóma nkumu na kati ya bampate yango.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.
25 “‘“Nakosala kondimana ya kimya ná bampate yango,+ mpe nakolongola banyama mabe ya zamba na mokili yango,+ mpo efanda na kimya na esobe mpe elala na bazamba.+ 26 Nakokómisa yango ná bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba moke na ngai lipamboli,+ mpe nakosala ete mbula enɔka na ntango na yango. Mapamboli ekosopana lokola mbula.+ 27 Banzete ya elanga ekobota mbuma na yango, mabele ekopesa mbuma na yango,+ mpe ekofanda na kimya na mokili. Bampate yango ekoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakobuka banzete ya ekanganeli na yango+ mpe nakobikisa yango na lobɔkɔ ya baoyo bazwaki yango baombo. 28 Ekozala lisusu te bilei mpo na bikólo; nyama ya zamba ya mabele ekolya yango te mpe ekofanda na kimya, moto ata moko te akobangisa yango.+
29 “‘“Nakobimisela bampate yango elanga oyo ekoyebana mpenza,* ekokufa lisusu te na nzala na mokili,+ mpe bikólo ekoyokisa yango lisusu nsɔni te.+ 30 ‘Bongo bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova Nzambe na bango, nazali elongo na bango mpe ete bango, bato ya Yisraele, bazali bato na ngai,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”’
31 “‘Nde bino bampate na ngai,+ bampate oyo nabatelaka, bozali kaka bato. Mpe nazali Nzambe na bino,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
35 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo na etúká ya ngombangomba ya Seire+ mpe sakolá mpasi oyo ekokómela yango.+ 3 Lobá na yango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakobundisa yo, Ee etúká ya ngombangomba ya Seire, nakosembola lobɔkɔ na ngai mpo na kopesa yo etumbu mpe nakokómisa yo mokili oyo etikalá mpamba.+ 4 Nakokómisa bingumba na yo bisika oyo ebebisamá, mpe okokóma mokili oyo etikalá mpamba;+ mpe okoyeba mpenza ete nazali Yehova. 5 Mpamba te omonisaki koyina makasi+ mpe okabaki Bayisraele mpo bábomama na ntango ya likama na bango, na ntango ya etumbu na bango ya nsuka.”’+
6 “‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: lokola nazali solo na bomoi, nakobongisa yo mpo na kosopa makila, mpe liwa* ekolanda yo.+ Lokola ezalaki makila oyo oyinaki, liwa ekolanda yo.+ 7 Nakokómisa etúká ya ngombangomba ya Seire esika oyo etikalá mpamba,+ mpe kuna nakoboma moto oyo azali koleka mpe moto oyo azali kozonga. 8 Nakotondisa bangomba na yango na bato oyo babomami; mpe baoyo babomami na mopanga bakokwea na bangomba mike na yo, na mabwaku na yo, mpe na mikɛli na yo nyonso ya mai. 9 Nakokómisa yo esika oyo etikalá mpamba mpo na libela, bato bakofanda na bingumba na yo te;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
10 “Mpo olobi ete: ‘Bikólo oyo mibale mpe mikili oyo mibale ekokóma ya ngai, mpe tokozwa yango nyonso mibale,’+ atako Yehova ye moko azalaki kuna, 11 ‘Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi boye: Na yango, lokola nazali solo na bomoi nakosalela yo makambo na kolanda nkanda mpe zuwa na yo oyo omonisaki, na ndenge oyinaki bango;+ mpe nakomiyebisa na kati na bango ntango nakosambisa yo. 12 Bongo bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nayoki makambo nyonso ya kozanga limemya oyo olobi mpo na bangomba ya Yisraele ete: “Batiki yango mpamba mpe bapesi biso yango mpo tólya yango.”* 13 Na lofundo nyonso bolobaki mabe mpo na ngai, mpe bolobaki maloba mingi ya kofinga ngai.+ Nayokaki yango nyonso.’
14 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mabele mobimba ekosepela ntango nakokómisa yo esika moko oyo etikalá mpamba. 15 Kaka ndenge osepelaki ntango libula ya bato ya Yisraele etikalaki mpamba, ndenge wana nde nakosala yo.+ Okokóma esika moko oyo ebebisamá, Ee etúká ya ngombangomba ya Seire, ɛɛ, Edome mobimba,+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
36 “Nde yo, mwana ya moto, sakolá mpo na bangomba ya Yisraele, mpe lobá boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova. 2 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Banguna balobi mpo na bino ete: ‘Aha! Ata bisika oyo etombwaná ya kala ekómi eloko na biso!’”’+
3 “Na yango sakolá mpe lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola batiki bino mpamba mpe babundisi bino bipai nyonso, mpo bókóma eloko ya baoyo babiki* uta na kati ya bikólo, bato bazali kaka koloba mpo na bino mpe koloba lokuta mpo na bino,+ 4 na yango, Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba mpe bangomba mike, na mikɛli ya mai mpe na mabwaku ná bisika oyo ebebisamá mpe etikalá mpamba,+ mpe na bingumba oyo esundolamá, oyo ekómi eloko ya kopunza mpe ya kosɛka epai ya baoyo babiki na kati ya bikólo oyo ezali zingazinga;+ 5 Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bango boye: ‘Na mɔtɔ ya molende na ngai,+ nakopesa etumbu na baoyo babiki na bikólo mpe na Edome mobimba, baoyo na kosepela makasi mpe na lityo*+ bazwi mokili na ngai mpo ezala eloko na bango, mpo na kozwa bisika na yango oyo bibwɛlɛ elyaka matiti mpe mpo na kopunza yango.’”’+
6 “Na yango, sakolá mpo na mokili ya Yisraele, mpe lobá na bangomba mpe na bangomba mike, na mikɛli ya mai mpe na mabwaku ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Nakoloba na molende na ngai mpe na nkanda makasi na ngai, mpo bomemi nde nsɔni oyo bikólo eyokisi bino.”’+
7 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai moko natomboli lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai ete bikólo ya zingazinga ekomema nsɔni na yango moko.+ 8 Kasi bino, Ee bangomba ya Yisraele, bokobimisa bitape mpe bokobota mbuma mpo na bato na ngai Yisraele,+ mpo etikali moke bázonga. 9 Mpo nazali elongo na bino, mpe nakobaluka epai na bino, bokotimolama mpe mboto ekolonama na kati na bino. 10 Nakokómisa bino ebele, bato nyonso ya Yisraele, ɛɛ bango nyonso. Bato bakofanda na bingumba+ mpe bisika oyo ebebisamá ekotongama lisusu.+ 11 Ya solo, nakokómisa bino ná bibwɛlɛ na bino ebele,+ bakokóma ebele mpe bakobota, nakosala ete bózala ebele ndenge bozalaki liboso,+ mpe nakosala ete bózala malamu mingi koleka ndenge bozalaki kala;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+ 12 Nakosala ete bato, bato na ngai Yisraele, bátambola likoló na bino, mpe bakozwa bino mpo bózala eloko na bango,+ bokokóma libula na bango, mpe bokozangisa bango bana lisusu ata moke te.’”+
13 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola bazali koloba na yo ete: “Ozali mokili oyo elyaka bato, mpe oyo ezangisaka bikólo na yango bana,”’ 14 ‘na yango, okolya bato lisusu te mpe okozangisa bikólo na yo bana lisusu te,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 15 ‘Nakotika te ete bikólo efinga yo lisusu, to bato bátumola yo+ mpe okobɛtisa bikólo na yo libaku lisusu te,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
16 Mpe Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 17 “Mwana ya moto, ntango bato ya Yisraele bazalaki kofanda na mokili na bango, bakómisaki yango mbindo na etamboli na bango mpe na misala na bango.+ Epai na ngai etamboli na bango ezalaki lokola mbindo ya mwasi na ntango azali komona sanza.+ 18 Bongo nasopelaki bango nkanda makasi na ngai mpo na makila oyo basopaki na mokili,+ mpe mpo bakómisaki mokili mbindo na bikeko na bango ya bosɔtɔ.*+ 19 Bongo napalanganisaki bango na kati ya bikólo mpe napanzaki bango na mikili.+ Nasambisaki bango na kolanda etamboli na bango mpe misala na bango. 20 Kasi ntango bakómaki na bikólo yango, bato bakómisaki nkombo na ngai mosantu eloko mpamba+ na ndenge bazalaki koloba mpo na bango ete: ‘Oyo nde bato ya Yehova, kasi basengelaki kotika mokili na ye.’ 21 Nakosala eloko mpo na nkombo na ngai mosantu, oyo bato ya Yisraele bakómisi yango eloko mpamba na kati ya bikólo epai bakei.”+
22 “Na yango, lobá na bato ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee bato ya Yisraele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala yango, kasi mpo na nkombo na ngai mosantu oyo bokómisi eloko mpamba na kati ya bikólo epai bokei.”’+ 23 ‘Nakosantisa mpenza nkombo na ngai monene,+ oyo ekómisamaki eloko mpamba na kati ya bikólo, oyo bokómisaki eloko mpamba na katikati na yango; mpe bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango nakosantisama na kati na bino na miso na bango, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 24 Nakolongola bino na bikólo, nakoyanganisa bino uta na mikili nyonso mpe nakokɔtisa bino na mokili na bino.+ 25 Nakomwangisela bino mai ya pɛto, mpe bokokóma pɛto;+ nakopɛtola bino na mbindo na bino nyonso+ mpe na bikeko na bino nyonso ya bosɔtɔ.+ 26 Nakopesa bino motema ya sika,+ mpe nakotya elimo ya sika kati na bino;+ nakolongola motema ya libanga+ na nzoto na bino mpe nakopesa bino motema ya mosuni.* 27 Nakotya elimo na ngai kati na bino, nakosala ete bólanda mibeko na ngai,+ bokotosa bikateli na ngai mpe bokosalela yango. 28 Bongo bokofanda na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino, bokozala bato na ngai mpe ngai nakozala Nzambe na bino.’+
29 “‘Mpe nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso. Nakopesa mbuma mitindo ete ebota mingi mpenza mpe nakomemela bino nzala te.+ 30 Nakokómisa mbuma ya nzete mpe biloko ya bilanga beboo, mpo bóyoka nsɔni lisusu te mpo na nzala na kati ya bikólo.+ 31 Na yango, bokokanisa lisusu etamboli na bino ya mabe mpe misala na bino oyo ezalaki malamu te, bokomiyokela mabe mpenza* mpo na masumu na bino mpe misala na bino oyo eyinamá.+ 32 Kasi bóyeba likambo oyo: Ezali mpo na bino te nde nazali kosala likambo oyo,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. Kutu bóyoka nsɔni mpe bósambwa mpo na etamboli na bino, Ee bato ya Yisraele.’
33 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Na mokolo oyo nakopɛtola bino na masumu na bino nyonso, nakosala ete bato báfanda na bingumba,+ mpe bisika oyo ebebisamá ekotongama lisusu.+ 34 Mokili oyo etikalaki mpamba, oyo moleki-nzela nyonso azalaki komona ekolonama. 35 Bato bakoloba ete: “Mokili oyo etikalaki mpamba ekómi lokola elanga ya Edene,+ mpe bingumba oyo ebebisamaki, etikalaki mpamba mpe ebukamaki ekómisami sikoyo makasi mpe bato bazali kofanda kuna.”+ 36 Mpe bikólo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba mpenza ete ngai, Yehova, natongi biloko oyo ebukamaki, naloni biloko na mokili oyo etikalaki mpamba. Ngai moko, Yehova, nalobi mpe nasali yango.’+
37 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakotika lisusu bato ya Yisraele básɛnga ngai nasalela bango likambo oyo: nakokómisa bango ebele lokola etonga, 38 lokola ebele ya basantu oyo bayanganaka na Yerusaleme* na ntango ya bafɛti na yango.+ Bingumba oyo ebebisamaki ekotonda mpenza na bitonga ya bato;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
37 Nguya ya Yehova ebandaki kosala kati na ngai, bongo na elimo na ye Yehova azwaki ngai esika nazalaki mpe amemaki ngai na katikati ya lobwaku patatalu;+ etondaki na mikuwa. 2 Alekisaki ngai zingazinga na yango, mpe namonaki ete lobwaku yango ya patatalu ezalaki na mikuwa ebele, mpe mikuwa yango ekauká mpenza.+ 3 Atunaki ngai boye: “Mwana ya moto, mikuwa oyo ekoki kozonga na bomoi?” Bongo nalobaki ete: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, yo nde oyebi yango.”+ 4 Mpe alobaki na ngai ete: “Sakolá mpo na mikuwa oyo, mpe lobá na yango boye: ‘Mikuwa oyo ekauká, bóyoka liloba ya Yehova:
5 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na mikuwa oyo: “Nakokɔtisa mpema kati na bino, mpe bokozonga na bomoi.+ 6 Nakotya bino misisa mpe mosuni, nakozipa bino na mposo, nakotya mpema na kati na bino, mpe bokozonga na bomoi; bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’”
7 Na yango, nasakolaki kaka ndenge apesaki ngai mitindo. Ntango kaka nasakolaki, lokito moko ebimaki, ezalaki makɛlɛlɛ moko ya biloko oyo ezali kotutatutana, mpe mikuwa ebandaki kosangana, mokuwa moko na mosusu. 8 Bongo namonaki misisa mpe mosuni eyaki likoló na yango, mpe loposo ezipaki yango. Kasi mpema ezalaki kaka te na kati na yango.
9 Na nsima alobaki na ngai boye: “Sakwelá mopɛpɛ. Sakolá, mwana ya moto, mpe lobá na mopɛpɛ boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Uta na mipɛpɛ minei, yaká, Ee mopɛpɛ,* mpe pɛpá likoló ya bato oyo babomamaki, mpo bázonga na bomoi.”’”
10 Na yango, nasakolaki kaka ndenge apesaki ngai mitindo, mpema* ekɔtaki kati na bango, bakómaki na bomoi mpe babandaki kotɛlɛma na makolo na bango:+ bakómaki limpinga moko monene mpenza.
11 Na nsima alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, mikuwa oyo ezali bato nyonso ya Yisraele.+ Talá bazali koloba: ‘Mikuwa na biso ekauki, tozali lisusu na elikya te.+ Tosili mpenza kosila.’ 12 Na yango, sakolá mpe lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakofungola bankunda na bino,+ mpe nakobimisa bino na bankunda na bino, mpe nakomema bino na mokili ya Yisraele.+ 13 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakofungola bankunda na bino mpe nakobimisa bino kuna, Ee bato na ngai.”’+ 14 ‘Nakotya elimo na ngai kati na bino, mpe bokozonga na bomoi,+ nakofandisa bino na mokili na bino; mpe bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nalobi mpe nasali yango,’ Yehova alobi bongo.”
15 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 16 “Mpe yo, mwana ya moto, zwá mwa eteni ya nzete mpe komá likoló na yango boye: ‘Mpo na Yuda mpe mpo na bato ya Yisraele, baoyo bazali elongo na ye.’*+ Na nsima, zwá mwa eteni mosusu ya nzete mpe komá likoló na yango ete: ‘Mpo na Yozefe, mwa eteni ya nzete ya Efraime, mpe bato nyonso ya Yisraele, baoyo bazali elongo na ye.’*+ 17 Bongo sangisá yango mpo ekóma eteni kaka moko ya nzete na lobɔkɔ na yo.+ 18 Ntango bato na yo* bakoloba na yo ete: ‘Yebisá biso soki makambo oyo elimboli nini?’ 19 okoloba na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakozwa mwa eteni ya nzete ya Yozefe oyo ezali na lobɔkɔ ya Efraime ná mabota ya Yisraele oyo ezali elongo na ye, nakosangisa yango na mwa eteni ya nzete ya Yuda, mpe nakokómisa yango eteni moko ya nzete,+ mpe ekokóma kaka moko na lobɔkɔ na ngai.”’ 20 Mwa biteni ya nzete oyo okomi likoló na yango esengeli kozala na lobɔkɔ na yo mpo bámona yango.
21 “Na yango lobá na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakozwa Bayisraele na kati ya bikólo epai bakendaki, nakoyanganisa bango uta na bipai nyonso mpe nakomema bango na mokili na bango.+ 22 Nakokómisa bango ekólo kaka moko na mokili na bango,+ na bangomba ya Yisraele, mpe mokonzi kaka moko nde akoyangela bango nyonso,+ mpe bakozala lisusu bikólo mibale te; bakokabwana na makonzi mibale lisusu mpe te.+ 23 Bakomikómisa mbindo lisusu te na bikeko na bango ya bosɔtɔ,* na misala na bango oyo eyinamá mpe na makambo na bango nyonso ya kobuka mibeko.+ Nakobikisa bango na misala na bango nyonso ya kozanga bosembo oyo basalelaki ngai lisumu, mpe nakopɛtola bango, bakozala bato na ngai, mpe ngai moko nakozala Nzambe na bango.+
24 “‘“Mosaleli na ngai Davidi akozala mokonzi na bango,+ mpe bango nyonso bakozala na mobateli ya mpate kaka moko.+ Bakolanda bikateli na ngai mpe bakotosa malamumalamu mibeko na ngai.+ 25 Bakofanda na mokili oyo napesaki mosaleli na ngai, Yakobo, epai bankɔkɔ na bino bafandaki,+ mpe bango, bana* na bango ná bana ya bana na bango+ bakofanda kuna mpo na libela,+ mpe Davidi mosaleli na ngai akozala nkumu na bango mpo na libela.+
26 “‘“Nakosala kondimana ya kimya ná bango;+ ekozala kondimana mpo na seko. Nakopesa bango esika na mokili na bango mpe nakokómisa bango ebele+ mpe nakotya esika na ngai mosantu na katikati na bango mpo na libela. 27 Hema* na ngai ekozala elongo* na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai.+ 28 Mpe bikólo bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova, nazali kosantisa Yisraele wana esika na ngai mosantu ekozala na katikati na bango mpo na libela.”’”+
38 Yehova alobaki na ngai lisusu ete: 2 “Mwana ya moto, balusá elongi na yo epai ya Goge ya mokili ya Magoge,+ nkumu monene ya Mesheke ná Tubale,+ mpe sakolá mpasi oyo ekokómela ye.+ 3 Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Goge, nkumu monene ya Mesheke ná Tubale. 4 Nakobalusa yo, nakotya bandɔbɔ na mbanga na yo+ mpe nakobimisa yo elongo na limpinga ya basoda na yo nyonso,+ bampunda ná basoda oyo batambolaka na mpunda, bango nyonso balati bilamba ya nkembo, lisangá moko monene mpenza, bazali na banguba ya minene ná banguba ya mike,* bango nyonso bayebi kosalela mipanga; 5 Perse, Etiopi ná Puti,+ bazali elongo na bango, bango nyonso bazali na nguba ya moke mpe ekɔti; 6 Gomere ná basoda na yango nyonso, ezala mpe bana ya Togarama,+ oyo bauti na bisika eleki mosika mpenza ya nɔrdi, elongo na basoda na yango nyonso, bato ebele ya bikólo bazali elongo na yo.+
7 “‘“Omilɛngɛla, omibongisa, yo ná mampinga na yo nyonso oyo bayangani ná yo, mpe okozala komanda* na bango.
8 “‘“Nsima ya mikolo mingi, bakotyela yo likebi. Na eleko ya nsuka ya bambula, okotonda na mokili ya bato oyo bazongisami mpe babiki na mopanga, oyo bayanganisami uta na bato ya bikólo mingi, na bangomba ya Yisraele, oyo etikalá ntango molai esika oyo ebebisamá. Bafandi ya mokili oyo bazwami uta na bato ya bikólo mpe bango nyonso bafandi na kimya.+ 9 Okobɛta bango lokola mbula ya mopɛpɛ makasi, okozipa mokili lokola mapata, yo ná basoda na yo nyonso mpe ebele ya bato ya bikólo elongo na yo.”’
10 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Makanisi ekoyela yo na motema, mpe okokana kosala likambo moko ya mabe. 11 Okoloba ete: “Nakokɔta na mokili ya bisika oyo ezangi libateli.*+ Nakobundisa baoyo bafandi na kimya kozanga motungisi, bango nyonso bafandi na bisika oyo ezangi bifelo, bikangiseli to baporte.” 12 Ekozala mpo na kobɔtɔla biloko ebele mpe mpo na kopunza, mpo na kobundisa bisika oyo ebebisamaki kasi bato bazongelaki kofanda kuna+ mpe mpo na kobundisa bato oyo bayanganisami uta na bikólo,+ bato oyo bazali konduka bozwi mpe biloko,+ baoyo bazali kofanda na katikati ya mabele.
13 “‘Sheba,+ Dedane,+ bato ya mombongo ya Tarasisi+ mpe babundi-bitumba* na yango nyonso bakoloba na yo boye: “Ozali koya nde mpo na kobɔtɔla biloko ebele mpe kopunza? Osangisi nde mapinga na yo mpo na komema palata ná wolo, mpo na konduka bozwi mpe biloko, mpo na kobɔtɔla biloko ebele?”’
14 “Na yango sakolá, mwana ya moto, mpe lobá na Goge boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mokolo oyo bato na ngai Yisraele bakofanda na kimya, okomona yango, boye te?+ 15 Okouta na esika na yo, na bisika eleki mosika ya nɔrdi,+ yo ná ebele ya bato ya bikólo elongo na yo, bango nyonso bamati na bampunda, lisangá moko monene, limpinga moko monene ya basoda.+ 16 Okobundisa bato na ngai Yisraele, ndenge mapata ezingaka mokili. Na eleko ya nsuka ya mikolo, nakomema yo mpo na kobundisa mokili na ngai+ mpo bato ya bikólo báyeba ngai ntango nakomisantisa na nzela na yo na miso na bango, Ee Goge.”’+
17 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ozali kaka te moto oyo nalobelaki na mikolo ya kala na nzela ya basaleli na ngai basakoli ya Yisraele, baoyo basakolaki bambula ebele ete okomemama mpo na kobundisa Bayisraele?’
18 “‘Na mokolo yango, na mokolo oyo Goge akoyela mokili ya Yisraele, nkanda makasi na ngai ekopela, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.+ 19 Na molende na ngai, na mɔtɔ ya nkanda makasi na ngai, nakoloba. Mpe na mokolo yango, koningana moko monene ya mabele ekosalema na mokili ya Yisraele. 20 Mpo na ngai, mbisi ya mbu, bandɛkɛ ya likoló, banyama ya zamba oyo efandaka na esobe, banyama oyo ebendanaka na libumu na mabele mpe bato nyonso na etando ya mabele bakolɛnga, bangomba ekobukana mpe bangomba ya mabanga ekokwea,+ mpe efelo nyonso ekokwea na mabele.’
21 “‘Na bangomba na ngai nyonso, nakobenga mopanga mpo na kobundisa ye,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. ‘Moto na moto akobunda na moninga na ye soda.+ 22 Nakopesa ye etumbu* ya maladi mabe+ mpe kosopa makila; nakonɔkisela ye, basoda na ye mpe ebele ya bato ya bikólo oyo bazali elongo na ye+ mbula makasi oyo ezali kozindisa, mbula ya mabanga,+ mɔtɔ+ mpe sufulu.+ 23 Mpe nakomitombola mpenza, nakomisantisa mpe nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi. Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’
39 “Mpe yo, mwana ya moto, sakolá mpasi oyo ekokómela Goge,+ mpe lobá na ye boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nazali kobundisa yo, Goge, nkumu monene ya Mesheke ná Tubale.+ 2 Nakobalusa yo, nakotambwisa yo, nakomatisa yo uta na bisika eleki mosika na nɔrdi+ mpe nakomema yo likoló ya bangomba ya Yisraele. 3 Nakobɛta litimbo na yo mpo ekwea na lobɔkɔ na yo ya mwasi, mpe nakosala ete makula na yo ekwea uta na lobɔkɔ na yo ya mobali. 4 Okokwea na bangomba ya Yisraele,+ yo, basoda na yo nyonso mpe bato ya bikólo oyo bazali elongo na yo. Nakopesa yo ozala bilei mpo na bandɛkɛ oyo ekangaka banyama, mpe banyama ya zamba oyo efandaka na esobe.”’+
5 “‘Okokwea na esobe mpenza,+ mpo ngai moko nde nalobi,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
6 “‘Nakotinda mɔtɔ epai ya Magoge mpe epai ya baoyo bazali kofanda na kimya na bisanga,+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova. 7 Nakosala ete nkombo na ngai mosantu eyebana na kati ya bato na ngai Yisraele, mpe nakotika lisusu te ete bákómisa nkombo na ngai mosantu eloko mpamba; mpe bikólo bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ Mosantu ya Yisraele.’+
8 “‘Ya solo, ekoya mpe ekosalema mpenza,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. ‘Yango nde mokolo oyo nalobeli. 9 Bato oyo bafandi na bingumba ya Yisraele bakobima, mpe bakopelisa mɔtɔ na bibundeli: banguba ya minene mpe ya mike,* matimbo, na makula, bibundeli ya nsɔngɛ oyo basimbi na mabɔkɔ* mpe makɔnga, mpe bakosalela yango mpo na kopelisa mɔtɔ+ mpo na mbula nsambo. 10 Bakozala na mposa te ya kozwa nkoni oyo euti na esobe, to kosangisa nkoni ya kopelisa mɔtɔ oyo euti na bazamba, mpo bakosalela bibundeli mpo na kopelisa mɔtɔ.’
“‘Bakobɔtɔla biloko epai ya baoyo babɔtɔlaki bango biloko mpe bakopunza baoyo bazalaki kopunza bango,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
11 “‘Na mokolo yango, nakopesa Goge+ lilita na Yisraele, na lobwaku ya baoyo bazali kosala mobembo na ɛsti ya mbu, mpe yango ekokanga nzela ya bato ya mobembo. Kuna nde bakokunda Goge ná ebele ya bato na ye nyonso, mpe bakobenga yango Lobwaku ya Hamone-Goge.*+ 12 Bato ya Yisraele bakolekisa sanza nsambo ya kokunda bango mpo na kopɛtola mokili.+ 13 Bato nyonso ya mokili bakosala mosala ya kokunda bango, yango ekomemela bango lokumu na mokolo oyo nakomisantisa,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
14 “‘Bato bakoponama mpo na koleka na mokili ntango nyonso mpe bakokunda bibembe oyo ekotikala na etando ya mabele, mpo na kopɛtola yango. Bakokoba koluka mpo na sanza nsambo. 15 Ntango baoyo bazali koleka na mokili bakomona mokuwa ya moto, bakotya elembo pembeni na yango, na nsima baoyo baponami mpo na kokunda, bakokunda yango na Lobwaku ya Hamone-Goge.+ 16 Kuna mpe ekozala na engumba oyo ekobengama Hamona.* Mpe bakopɛtola mokili.’+
17 “Mpo na yo, mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lobá na ndɛkɛ ya lolenge nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe ete: “Bóyangana mpe bóya. Bóyangana zingazinga ya mbeka na ngai, oyo nazali kobongisela bino, mbeka moko monene na bangomba ya Yisraele.+ Bokolya mosuni mpe bokomɛla makila.+ 18 Bokolya mosuni ya bilombe, mpe bokomɛla makila ya bankumu ya mabele—bampate-mibali, bana-mpate ya mibali, bantaba, mpe bangɔmbɛ: banyama nyonso ya mafutamafuta ya Bashane. 19 Bokolya mafuta mingi mpe bokomɛla makila tii bokolangwa, na mbeka oyo nabongisi mpo na bino.”’
20 “‘Na mesa na ngai, bokotonda na bampunda mpe na batambwisi-makalo, na bilombe mpe na babundi ya ndenge nyonso,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
21 “‘Nakomonisa nkembo na ngai na kati ya bikólo, mpe bikólo nyonso ekomona bitumbu oyo napesi mpe nguya* oyo namonisi na kati na bango.+ 22 Banda mokolo yango bato ya Yisraele bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bango. 23 Mpe bikólo ekoyeba mpenza ete soki bato ya Yisraele bamemamaki na mboka mopaya, ezalaki mpo na libunga na bango moko mpo bazangaki bosembo epai na ngai.+ Mpo na yango nalongolaki likebi na ngai epai na bango*+ mpe nakabaki bango epai ya banguna na bango,+ mpe bango nyonso bakufaki na mopanga. 24 Nasalelaki bango makambo na kolanda mbindo na bango mpe misala na bango ya kobuka mibeko, mpe nalongolaki likebi na ngai epai na bango.’*
25 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakozongisa bakangami ya Yakobo+ mpe nakoyokela bato nyonso ya Yisraele mawa;+ na molende mpenza nakokumisa* nkombo na ngai mosantu.+ 26 Nsima ya koyokisama nsɔni mpo na makambo na bango nyonso ya kozanga bosembo oyo basalelaki ngai,+ bakofanda na kimya mpenza na mokili na bango, moto ata moko te akobangisa bango.+ 27 Ntango nakozongisa bango uta na bato ya bikólo mpe nakoyanganisa bango uta na mikili ya banguna na bango,+ nakomisantisa mpe na kati na bango na miso ya bikólo mingi.’+
28 “‘Bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bango, ntango nakotinda bango na mboka mopaya na kati ya bikólo mpe na nsima nakoyanganisa bango ndenge nakozongisa bango na mokili na bango, ata moto moko te akotikala.+ 29 Nakolongola lisusu te likebi na ngai epai na bango,+ mpo nakosopela bato ya Yisraele elimo na ngai,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
40 Na mbula ya 25 ya komemama na biso na mboka mopaya,+ na ebandeli ya mbula, na mokolo ya 10 ya sanza, na mbula ya 14 nsima ya kokweisama ya engumba,+ na mokolo yango kaka, nguya ya Yehova esalaki na kati na ngai,* mpe amemaki ngai na engumba.+ 2 Na bimonaneli ya Nzambe, amemaki ngai na mokili ya Yisraele mpe akitisaki ngai likoló ya ngomba moko ya molai mpenza,+ oyo eloko moko oyo etongamá lokola engumba ezalaki likoló na yango, na sudi.
3 Ntango amemaki ngai kuna, namonaki moto moko oyo azalaki komonana lokola kwivre.+ Na lobɔkɔ, asimbaki nsinga ya lini ná mongendu* ya komeka,+ mpe atɛlɛmaki na esika ya kokɔta. 4 Moto yango alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, talá malamumalamu, yoká malamu mpe tyá likebi* na eloko nyonso nazali kolakisa yo, ezali mpo na yango nde omemamaki awa. Yebisá bato ya Yisraele eloko nyonso oyo ozali komona.”+
5 Namonaki efelo moko oyo ezingaki libándá ya tempelo.* Moto yango asimbaki na lobɔkɔ mongendu ya komeka, oyo ezalaki na molai ya mapeko motoba (tandu moko ezalaki kobakisama na lipeko mokomoko).* Abandaki komeka efelo: bonene na yango ezalaki mongendu moko, mpe bosanda na yango mongendu moko.
6 Na nsima ayaki na porte, oyo etalaki na ɛsti,+ mpe amataki na eskalye na yango. Ntango amekaki esika ya kokɔta ya porte, bonene na yango ezalaki mongendu moko, mpe esika ya kokɔta mosusu, mongendu moko. 7 Mwa ndako mokomoko ya bakɛngɛli ezalaki na molai ya mongendu moko mpe na monene ya mongendu moko, mpe katikati ya mwa bandako ya bakɛngɛli, ezalaki mapeko mitano.+ Esika ya kokɔta ya porte pene na ndako ya kokɔtela ya porte oyo etali na kati ezalaki mongendu moko.
8 Amekaki ndako ya kokɔtela ya porte oyo etali na kati: ezalaki mongendu moko. 9 Bongo amekaki ndako ya kokɔtela ya porte: ezalaki mapeko mwambe; amekaki makonzí na yango ya mipanzi, ezalaki mapeko mibale; mpe ndako ya kokɔtela ya porte etalaki na kati.
10 Ezalaki na mwa bandako misato ya bakɛngɛli ya porte na ɛsti, nyonso misato ezalaki ndenge moko. Makonzí ya mipanzi ezalaki ndenge moko, na mopanzi oyo mpe na mopanzi mosusu.
11 Na nsima, amekaki monene ya esika ya kokɔta na porte: ezalaki mapeko zomi; molai ya porte: ezalaki mapeko 13.
12 Mwa lopango oyo ezalaki liboso ya mwa bandako ya bakɛngɛli ezalaki lipeko moko, na ngámbo nyonso. Mwa ndako ya bakɛngɛli ezalaki na mapeko motoba na mipanzi nyonso mibale.
13 Na nsima amekaki porte banda na nsamba ya mwa ndako moko ya mokɛngɛli* tii na nsamba ya mwa ndako mosusu ya bakɛngɛli: ezalaki mapeko 25 na monene; esika ya kokɔta oyo ezalaki kotalana na esika ya kokɔta mosusu.+ 14 Na nsima, amekaki makonzí ya mipanzi oyo ezalaki mapeko 60, ata mpe makonzí ya mipanzi na baporte oyo ezalaki zingazinga ya lopango. 15 Kobanda liboso ya esika ya kokɔta ya porte tii liboso ya ndako ya kokɔtela ya porte ya kati, ezalaki mapeko 50.
16 Na kati ya porte, na mipanzi nyonso, ezalaki na bafɛnɛtrɛ* oyo emonanaka monene libándá kasi moke na kati+ mpo na mwa bandako ya bakɛngɛli mpe makonzí na yango ya mipanzi. Ezalaki mpe na bafɛnɛtrɛ epai na epai na bandako ya kokɔtela na kati. Ezalaki mpe na bililingi ya banzete ya mbila+ na makonzí ya mipanzi.
17 Bongo amemaki ngai na kati ya lopango ya libándá, namonaki bisika ya kolya,*+ ná pavema oyo ezalaki zingazinga ya lopango. Ezalaki na bisika 30 ya kolya na pavema. 18 Pavema oyo ezalaki na mopanzi ya baporte ezalaki ndenge moko na molai ya baporte, yango ezalaki pavema ya nse.
19 Na nsima amekaki ntaka* oyo ezalaki banda na liboso ya porte ya nse tii na liboso ya lopango ya kati. Ezalaki mapeko 100, na ɛsti mpe na nɔrdi.
20 Lopango ya libándá ezalaki na porte oyo etalaki na nɔrdi. Amekaki molai na yango mpe monene na yango. 21 Ezalaki na mwa bandako misato ya bakɛngɛli na mopanzi mokomoko. Makonzí na yango ya mipanzi ná ndako na yango ya kokɔtela ezalaki ndenge moko na porte ya liboso. Ezalaki mapeko 50 na molai, mpe mapeko 25 na monene. 22 Bafɛnɛtrɛ na yango, ndako na yango ya kokɔtela, ná bililingi na yango ya banzete ya mbila+ ezalaki ndenge moko na oyo ya porte ya ɛsti. Bato bazalaki komata eskalye ya matambe nsambo mpo na kokɔta na kati, mpe ndako na yango ya kokɔtela ezalaki liboso na yango.
23 Ezalaki na porte na kati ya lopango oyo etalanaki na porte ya nɔrdi, mpe mosusu etalanaki na porte ya ɛsti. Amekaki ntaka banda na porte moko tii na porte mosusu: ezalaki mapeko 100.
24 Lisusu amemaki ngai na ngámbo ya sudi, namonaki porte na ngámbo ya sudi,+ mpe amekaki makonzí na yango ya mipanzi mpe bandako na yango ya kokɔtela, ezalaki ndenge moko na misusu. 25 Yango ná ndako na yango ya kokɔtela ezalaki na bafɛnɛtrɛ epai na epai, lokola bafɛnɛtrɛ* mosusu. Ezalaki mapeko 50 na molai, mpe mapeko 25 na monene. 26 Ezalaki na eskalye ya matambe nsambo mpo na komata kuna,+ mpe ndako na yango ya kokɔtela ezalaki liboso na yango. Mpe ezalaki na bililingi ya banzete ya mbila, na makonzí ya mipanzi na yango, mokomoko na mipanzi nyonso.
27 Lopango ya kati ezalaki na porte oyo etalaki na sudi. Amekaki banda na porte moko tii na porte mosusu, na ngámbo ya sudi: ezalaki ntaka ya mapeko 100. 28 Na nsima akɔtisaki ngai na lopango ya kati na nzela ya porte ya sudi. Ntango amekaki porte ya sudi: ezalaki ndenge moko na misusu. 29 Mwa bandako na yango ya bakɛngɛli, makonzí na yango ya mipanzi mpe ndako na yango ya kokɔtela ezalaki ndenge moko na misusu. Yango ná ndako na yango ya kokɔtela ezalaki na bafɛnɛtrɛ* na ngámbo nyonso. Ezalaki mapeko 50 na molai, mpe mapeko 25 na monene.+ 30 Ezalaki na bandako ya kokɔtela epai na epai; ezalaki mapeko 25 na molai, mpe mapeko mitano na monene. 31 Ndako na yango ya kokɔtela etalaki na ngámbo ya lopango ya libándá, mpe bililingi ya banzete ya mbila ezalaki na makonzí na yango ya mipanzi,+ mpe mpo na komata kuna ezalaki na eskalye ya matambe mwambe.+
32 Ntango akɔtisaki ngai na lopango ya kati uta na ɛsti, mpe amekaki porte: ezalaki ndenge moko na misusu. 33 Mwa bandako na yango ya bakɛngɛli, makonzí na yango ya mipanzi mpe ndako na yango ya kokɔtela ezalaki ndenge moko na misusu, mpe yango ná ndako na yango ya kokɔtela ezalaki na bafɛnɛtrɛ* na ngámbo nyonso. Ezalaki mapeko 50 na molai, mpe mapeko 25 na monene. 34 Ndako na yango ya kokɔtela ezalaki kotala na ngámbo ya lopango ya libándá, mpe bililingi ya banzete ya mbila ezalaki na makonzí na yango ya mipanzi nyonso mibale. Mpe mpo na komata kuna ezalaki na eskalye ya matambe mwambe.
35 Na nsima akɔtisaki ngai na porte ya nɔrdi,+ mpe amekaki yango; ezalaki ndenge moko na misusu. 36 Mwa bandako na yango ya bakɛngɛli, makonzí na yango ya mipanzi mpe ndako na yango ya kokɔtela ezalaki ndenge moko na misusu. Ezalaki na fɛnɛtrɛ* na ngámbo nyonso. Ezalaki mapeko 50 na molai, mpe mapeko 25 na monene. 37 Makonzí na yango ya mipanzi ezalaki kotala na ngámbo ya lopango ya libándá, mpe bililingi ya banzete ya mbila ezalaki na makonzí na yango ya mipanzi nyonso mibale. Mpe mpo na komata kuna ezalaki na eskalye ya matambe mwambe.
38 Esika moko ya kolya ná esika na yango ya kokɔta ezalaki pene na makonzí ya mipanzi ya baporte yango. Kuna nde bazalaki kosukola likabo mobimba ya kotumba.+
39 Na ndako ya kokɔtela ya porte yango ezalaki na mesa mibale na mipanzi nyonso mpo na koboma likoló na yango makabo mobimba ya kotumba,+ makabo mpo na lisumu+ mpe makabo ya ngambo.+ 40 Na ngámbo ya kokɔta na porte ya nɔrdi, ezalaki na mesa mibale libándá. Ezalaki mpe na mesa mibale na ngámbo mosusu ya ndako ya kokɔtela na porte. 41 Ezalaki na mesa minei na ngámbo nyonso ya porte, nyonso ezalaki mesa mwambe, oyo bazalaki koboma makabo likoló na yango. 42 Mesa minei mpo na likabo mobimba ya kotumba ezalaki ya mabanga oyo bakatá. Ezalaki lipeko moko na ndambo na molai, lipeko moko na ndambo na monene, mpe lipeko moko na bosanda. Likoló na yango, ezalaki na bisaleli oyo bazalaki koboma na yango makabo ya kotumba mpe bambeka. 43 Mipanzi oyo ebimá mpo na kotya biloko ezalaki na monene ya tandu moko, ekangami makasi zingazinga ya bifelo ya kati; mpe bazalaki kotya mosuni ya bambeka ya makabo na bamesa.
44 Libándá ya porte ya kati ezalaki na bisika ya kolya ya bayembi;+ ezalaki na lopango ya kati, pene na porte ya nɔrdi oyo etalanaki na sudi. Esika mosusu ya kolya ezalaki pene na porte ya ɛsti, oyo etalanaki na nɔrdi.
45 Alobaki na ngai boye: “Esika oyo ya kolya oyo etali na sudi, ezali mpo na banganga-nzambe oyo bazali na mokumba ya kosala misala na tempelo.+ 46 Esika ya kolya oyo etali na nɔrdi ezali mpo na banganga-nzambe oyo bazali na mokumba ya kosala mosala ya etumbelo.+ Bazali bana ya Zadoke,+ baoyo, bauti na Balevi, baoyo bazali na mokumba ya kopusana pene na Yehova mpo na kosalela ye.”+
47 Bongo amekaki lopango ya kati. Ezalaki mapeko 100 na molai, mpe mapeko 100 na monene, ezalaki karé. Etumbelo ezalaki liboso ya tempelo.
48 Na nsima akɔtisaki ngai na ndako ya kokɔtela ya tempelo,+ mpe amekaki likonzí ya mopanzi ya ndako ya kokɔtela: ezalaki mapeko mitano na ngámbo moko mpe mapeko mitano na ngámbo mosusu. Monene ya porte ezalaki mapeko misato na ngámbo moko mpe mapeko misato na ngámbo mosusu.
49 Ndako ya kokɔtela ezalaki mapeko 20 na molai, mpe mapeko 11* na monene. Bato bazalaki komata kuna na eskalye. Mpe makonzí ezalaki pene na makonzí ya mipanzi, moko epai oyo mpe moko epai mosusu.+
41 Bongo akɔtisaki ngai na esika mosantu ya tempelo,* amekaki makonzí ya mipanzi: ezalaki mapeko* motoba na monene na ngámbo oyo mpe mapeko motoba na monene na ngámbo mosusu. 2 Esika ya kokɔta ezalaki mapeko zomi na monene, mpe bifelo ya mipanzi* ya esika ya kokɔta ezalaki mapeko mitano na ngámbo oyo mpe mapeko mitano na ngámbo mosusu. Amekaki molai na yango: ezalaki mapeko 40; mpe monene na yango: ezalaki mapeko 20.
3 Na nsima akɔtaki na kati* mpe amekaki likonzí ya mopanzi ya esika ya kokɔta: ezalaki mapeko mibale na monene; mpe esika ya kokɔta: ezalaki mapeko motoba na monene; bifelo ya mipanzi na esika ya kokɔta ezalaki* mapeko nsambo. 4 Amekaki mpe ndako oyo ezalaki pene na esika mosantu: ezalaki mapeko 20 na molai mpe mapeko 20 na monene.+ Mpe alobaki na ngai: “Oyo nde Esika Eleki Mosantu.”+
5 Na nsima amekaki efelo ya tempelo: ezalaki mapeko motoba na monene. Bashambrɛ ya mopanzi zingazinga ya tempelo ezalaki mapeko minei na monene.+ 6 Bashambrɛ ya mipanzi ezalaki shambrɛ moko likoló ya mosusu: baetajɛ misato, etajɛ mokomoko ezalaki na bashambrɛ 30; ezalaki kokɔta na efelo ya tempelo, elingi koloba, bashambrɛ ya mipanzi epai na epai, mpo esimbama na yango, kasi esimbaki efelo ya tempelo te.+ 7 Na mipanzi nyonso mibale ya tempelo ezalaki na nzela oyo ezalaki kobaluka,* mpe ezalaki kokóma monene ntango ozali komata na bashambrɛ ya likoló.+ Monene na yango ezalaki kobakisama ntango ozali komata na etajɛ moko tii na etajɛ mosusu banda na etajɛ ya nse tii na komata na oyo ya likoló, ezalaki na nzela ya etajɛ ya katikati.
8 Namonaki ete etando moko oyo etombwaná ezalaki zingazinga ya tempelo. Miboko ya bashambrɛ ya mipanzi tii na esika oyo ekutani ezalaki mongendu mobimba ya mapeko motoba. 9 Bonene ya efelo ya bashambrɛ ya mipanzi, na libándá, ezalaki mapeko mitano. Ezalaki na esika oyo batiká polele* pembenipembeni ya bashambrɛ ya mipanzi oyo ezalaki na kati ya tempelo.
10 Kati na tempelo mpe bisika ya kolya,*+ ezalaki na esika moko oyo ezalaki mapeko 20 na monene na ngámbo nyonso. 11 Ezalaki na esika ya kokɔta kati na bashambrɛ ya mipanzi mpe na esika oyo batiká polele, na ngámbo ya nɔrdi mpe na esika ya kokɔta mosusu na ngámbo ya sudi. Monene ya esika batiká polele ezalaki mapeko mitano, bipai nyonso.
12 Ndako oyo ezalaki na wɛsti, oyo ezalaki kotala esika batiká polele ezalaki mapeko 70 na monene mpe mapeko 90 na molai. Efelo ya ndako ezalaki mapeko mitano na bonene zingazinga nyonso.
13 Amekaki tempelo: ezalaki mapeko 100 na molai. Esika batiká polele, ndako ná bifelo na yango mpe ezalaki mapeko 100 na molai. 14 Monene ya liboso ya tempelo oyo ezali kotala na ɛsti mpe esika batiká polele ezalaki mapeko 100.
15 Amekaki molai ya ndako oyo ezalaki kotala esika batiká polele na nsima na yango, elongo na baveranda na yango, na mipanzi nyonso mibale: ezalaki mapeko 100.
Amekaki mpe esika Mosantu, Esika Eleki Mosantu+ mpe bandako ya kokɔtela ya lopango, 16 ndenge moko mpe na minɔkɔ ya ndako, bafɛnɛtrɛ* oyo emonanaka monene libándá kasi moke na kati,+ mpe baveranda oyo ezalaki na bisika yango misato. Pene na monɔkɔ ya ndako ezalaki na mabaya zingazinga,+ banda na nse tii na bafɛnɛtrɛ; mpe bafɛnɛtrɛ yango ezalaki ya kozipama. 17 Likoló ya esika ya kokɔta, na kati ya tempelo, na libándá mpe zingazinga ya efelo mobimba, emekamaki. 18 Ezalaki na bakeruba oyo eyemami+ mpe bililingi ya banzete ya mbila,+ elilingi mokomoko ya nzete ya mbila ezalaki kati na keruba moko ná keruba mosusu, mpe keruba mokomoko azalaki na bilongi mibale. 19 Elongi ya moto etalaki epai ya elilingi ya nzete ya mbila na mopanzi moko, mpe elongi ya nkɔsi* etalaki epai ya elilingi ya nzete ya mbila na mopanzi mosusu.+ Eyemamaki ndenge wana tempelo mobimba. 20 Banda na nse tii likoló ya esika ya kokɔta ezalaki na bakeruba oyo eyemami mpe bililingi ya banzete ya mbila, na efelo ya tempelo.
21 Makonzí ya porte* ya tempelo ezalaki karé.+ Liboso ya esika mosantu* ezalaki na eloko moko lokola 22 etumbelo ya mabaya+ oyo ezalaki na bosanda ya mapeko misato, mpe molai na yango mapeko mibale. Ezalaki na makonzí na yango ya ntina mingi,* molai na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Na nsima alobaki na ngai boye: “Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yehova.”+
23 Esika mosantu mpe esika eleki mosantu ya tempelo, mokomoko na yango ezalaki na baporte mibale.+ 24 Baporte ezalaki na bizipeli mibale, oyo ezalaki kofungolama mpe kokangama. Porte mokomoko ezalaki na bizipeli mibale. 25 Ezalaki na mayemi ya bakeruba ná bililingi ya banzete ya mbila likoló ya baporte ya tempelo, lokola oyo ezalaki na bifelo,+ ezalaki na mwa nsamba ya mabaya likoló ya liboso ya ndako ya kokɔtela, na libándá. 26 Ezalaki na bafɛnɛtrɛ* oyo emonanaka monene na libándá kasi moke na kati+ mpe bililingi ya banzete ya mbila na mipanzi nyonso mibale ya ndako ya kokɔtela. Ezalaki mpe na bashambrɛ na mipanzi ya tempelo mpe bansamba.
42 Na nsima amemaki ngai na lopango ya libándá oyo etali na nɔrdi.+ Mpe amemaki ngai na bandako ya bisika ya kolya oyo ezalaki pene na esika oyo batiká polele,+ na nɔrdi ya ndako oyo ekangani na mosusu.+ 2 Molai na yango na esika ya kokɔta na nɔrdi: ezalaki mapeko* 100, mpe mapeko 50 na monene na yango. 3 Lopango ya kati ezalaki mapeko 20 na monene,+ bisika ya kolya ezalaki kati na lopango ya kati mpe pavema ya lopango ya libándá. Bisika ya kolya ezalaki na baetajɛ misato mpe baveranda, mpe baveranda etalanaki. 4 Liboso ya bisika ya kolya,* ezalaki na nzela moko+ ya mapeko zomi na monene mpe mapeko 100 na molai,* mpe bisika na yango ya kokɔta ezalaki na nɔrdi. 5 Bisika ya kolya ya likoló ezalaki mokuse koleka oyo ya nse mpe oyo ya baetajɛ ya katikati mpo baveranda ezwaki bisika na yango mingi. 6 Ezalaki na baetajɛ misato, kasi ezalaki na makonzí te lokola makonzí ya mapango. Yango wana, bakɔndisaki baetajɛ ya likoló koleka oyo ya nse mpe oyo ya katikati.
7 Efelo ya mabanga oyo ezalaki libándá pene na bisika ya kolya na ngámbo ya lopango ya libándá oyo etalanaki na bisika mosusu ya kolya ezalaki mapeko 50 na molai. 8 Mpo molai ya bisika ya kolya oyo ezalaki na ngámbo ya lopango ya libándá ezalaki mapeko 50, kasi mpo na oyo etalaki tempelo, ezalaki mapeko 100. 9 Bisika ya kolya ezalaki na esika ya kokɔta na ɛsti, oyo ezalaki komema na lopango ya libándá.
10 Pene na esika oyo batiká polele mpe na ndako ezalaki mpe na bisika ya kolya, nsima* ya efelo ya mabanga ya lopango na ngámbo ya ɛsti.+ 11 Ezalaki na nzela moko liboso na yango oyo ezalaki komonana lokola bisika ya kolya oyo ezalaki na ngámbo ya nɔrdi.+ Molai mpe monene na yango ezalaki ndenge moko, mpe baplan na yango ezalaki ndenge moko, mpe bisika ya kobima na yango ezalaki ndenge moko. Bisika na yango ya kokɔta, 12 ezalaki ndenge moko na bisika ya kokɔta ya bisika ya kolya oyo ezalaki na ngámbo ya sudi. Ezalaki na esika ya kokɔta na ebandeli ya nzela, liboso ya efelo ya mabanga oyo ekokani na yango na ngámbo ya ɛsti, esika oyo moto akokaki kokɔta.+
13 Bongo alobaki na ngai boye: “Bisika ya kolya ya nɔrdi mpe bisika ya kolya ya sudi oyo ezali pene na esika oyo batiká polele,+ ezali bisika ya kolya oyo ezali mosantu, esika banganga-nzambe oyo bazali kopusana pene na Yehova balyaka makabo oyo eleki mosantu.+ Kuna nde batyaka makabo oyo eleki bosantu, likabo ya mbuma, likabo ya lisumu ná likabo ya ngambo, mpo esika yango ezali mosantu.+ 14 Ntango banganga-nzambe bakɔti, bakobima te na esika mosantu mpo na kokende na lopango ya libándá, kozanga ete bálongola liboso bilamba oyo basalaka na yango mosala,+ mpo ezali biloko mosantu. Bakolata bilamba mosusu mpo na kopusana na bisika oyo bakokutana na bato.”
15 Ntango asilisaki komeka kati ya tempelo,* abimisaki ngai na nzela ya porte oyo etalaki na ngámbo ya ɛsti,+ mpe amekaki bisika yango nyonso.
16 Amekaki mopanzi ya ɛsti na mongendu ya komeka. Na kotalela mongendu ya komeka,* ezalaki mingendu 500 na molai, epai na epai.
17 Amekaki mopanzi ya nɔrdi: ezalaki mingendu 500 na molai, na kotalela mongendu ya komeka.
18 Amekaki mopanzi ya sudi: ezalaki mingendu 500, na kotalela mongendu ya komeka.
19 Abalukaki na mopanzi ya wɛsti. Amekaki mingendu 500 na molai na mongendu ya komeka.
20 Amekaki yango na mipanzi minei. Ezalaki na efelo epai na epai,+ oyo molai na yango ezalaki mingendu 500 mpe monene na yango mingendu 500,+ mpo na kokabola eloko oyo ezali mosantu ná eloko oyo ezali mosantu te.+
43 Na nsima amemaki ngai na porte oyo ezali kotala na ɛsti.+ 2 Kuna namonaki nkembo ya Nzambe ya Yisraele ezalaki kouta na ɛsti,+ mpe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya mai oyo ezali kotíyola mbangu;+ mpe mabele engɛngaki mpo na nkembo na ye.+ 3 Oyo namonaki ezalaki lokola emonaneli oyo namonaki ntango nayaki* kobebisa engumba, ezalaki komonana lokola eloko oyo namonaki pene na ebale Kebare,+ mpe nakweaki natye elongi na nse.
4 Na nsima, nkembo ya Yehova ekɔtaki na tempelo* na porte oyo ezali kotala na ɛsti.+ 5 Bongo elimo etombolaki ngai mpe ekɔtisaki ngai na lopango ya kati, mpe namonaki ete tempelo etondaki na nkembo ya Yehova.+ 6 Na nsima nayokaki moto moko azali koloba na ngai uta na tempelo, moto yango ayaki mpe atɛlɛmaki pembeni na ngai.+ 7 Alobaki na ngai boye:
“Mwana ya moto, oyo nde esika ya kiti na ngai ya bokonzi+ mpe esika ya matambe ya makolo na ngai,+ epai nakofanda na katikati ya bato ya Yisraele mpo na libela.+ Bato ya Yisraele bakokómisa lisusu nkombo na ngai mosantu mbindo te,+ ezala bango mpe bakonzi na bango, na bondumba na bango ya elimo, na bibembe ya bakonzi na bango na ntango ya liwa na bango. 8 Na ndenge bazali kotya minɔkɔ ya ndako na bango pene na monɔkɔ ya ndako na ngai mpe likonzí ya porte na bango pembeni ya likonzí ya porte na ngai, kaka efelo moko ekaboli ngai ná bango.+ Bakómisaki nkombo na ngai mosantu mbindo na biloko na bango oyo eyinamá oyo basalaki, yango wana nasilisaki bango mpenza na nkanda na ngai.+ 9 Sikoyo, bálongola mosika na ngai bondumba na bango ya elimo mpe bibembe ya bakonzi na bango, mpe nakofanda na katikati na bango mpo na libela.+
10 “Nde yo, mwana ya moto, limbolelá bato ya Yisraele tempelo,+ mpo báyoka nsɔni mpo na mabunga na bango,+ mpe basengeli koyekola plan na yango.* 11 Soki bayoki nsɔni mpo na nyonso oyo basali, osengeli kolakisa bango plan ya tempelo, ndenge ebongisami, bisika na yango ya kobima mpe ya kokɔta.+ Lakisá bango baplan na yango nyonso ná malako na yango, baplan na yango mpe mibeko na yango, komá yango na miso na bango mpo bábatela plan na yango nyonso mpe bátosa malako na yango.+ 12 Oyo nde mobeko ya tempelo: teritware na yango mobimba oyo ezali zingazinga ya nsɔngɛ ya ngomba, ezali esika oyo eleki mosantu.+ Ɛɛ, oyo nde mobeko ya tempelo.
13 “Talá bamezire ya etumbelo na mapeko+ (tandu moko ezalaki kobakisama na lipeko moko).* Nse na yango ezali lipeko moko mpe monene na yango ezali lipeko moko. Ndelo oyo ezali zingazinga ya mbɛbu na yango ezali zerete* moko na monene. Yango nde nse ya etumbelo. 14 Banda na nse, na mabele, tii na mwa etando ya nse oyo ebimá na mopanzi zingazinga, ezali mapeko mibale, mpe monene na yango ezali lipeko moko. Banda na mwa etando moke oyo ebimá na mopanzi zingazinga tii na mwa etando monene oyo ebimá na mopanzi zingazinga ezali mapeko minei, mpe monene na yango ezali lipeko moko. 15 Esika mɔtɔ ya etumbelo epelaka ezali mapeko minei, mpe banda na esika mɔtɔ ya etumbelo epelaka tii likoló ezali maseke minei.+ 16 Esika mɔtɔ ya etumbelo epelaka ezali karé, mapeko 12 na molai, mpe mapeko 12 na monene.+ 17 Mipanzi minei ya mwa etando oyo ebimá zingazinga ezali mapeko 14 na molai, mpe mapeko 14 na monene; ndelo oyo ezali zingazinga ezali katikati ya lipeko, mpe nse na yango ezali lipeko moko epai na epai.
“Mpe eskalye na yango etali na ɛsti.”
18 Na nsima alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Oyo nde malako ya kolanda ntango etumbelo ekosalema, mpo na kopesa likoló na yango makabo mibimba ya kotumba mpe komwangisela yango makila.’+
19 “‘Osengeli kopesa mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga, ezala likabo mpo na lisumu,+ epai ya banganga-nzambe Balevi, oyo bazali bana ya Zadoke,+ baoyo bapusanaka pene na ngai, mpo na kosalela ngai,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 20 ‘Osengeli kozwa ndambo ya makila na yango mpe kotya yango na maseke minei ya etumbelo, na bansɔngɛ minei ya mwa etando oyo ebimá na mopanzi zingazinga, mpe na ndelo epai na epai mpo na kopɛtola yango na lisumu mpe kozipa masumu na yango.+ 21 Na nsima okozwa mwana-ngɔmbɛ yango ya mobali, likabo mpo na lisumu, mpo na kotumba yango na esika oyo eponami na tempelo, libándá ya esika mosantu.+ 22 Na mokolo ya mibale, okopesa ntaba-mobali oyo ezangi mbeba ezala likabo mpo na lisumu; mpe bakopɛtola etumbelo na lisumu ndenge kaka bapɛtolaki yango na lisumu na mwana-ngɔmbɛ mobali.’
23 “‘Ntango okosilisa kopɛtola yango na lisumu, okopesa mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba, mpe mpate-mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba. 24 Okopesa yango Yehova, mpe banganga-nzambe basengeli kobwakela yango mungwa+ mpe kopesa yango lokola likabo ya kotumba mobimba epai ya Yehova. 25 Na mikolo nsambo, okopesa ntaba-mobali ezala likabo mpo na lisumu mokolo na mokolo,+ ezala mbeka ya mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga mpe mpate-mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba.* 26 Na mikolo nsambo, bakozipa masumu mpo na etumbelo, mpe basengeli kopɛtola yango mpe kobanda kosalela yango. 27 Ntango mikolo ekokoka, banda na mokolo ya mwambe,+ banganga-nzambe bakopesa likoló ya etumbelo yango makabo na bino* ya kotumba mibimba mpe bambeka na yo ya kimya;* mpe bokosepelisa ngai,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.”
44 Azongisaki ngai na nzela ya porte ya esika mosantu, porte ya libándá oyo etali na ɛsti,+ mpe ekangamá.+ 2 Na nsima, Yehova alobaki na ngai boye: “Porte oyo ekozala kaka ya kokangama. Bakofungola yango te mpe moto akokɔta kuna te; mpo Yehova, Nzambe ya Yisraele akɔti kuna,+ yango wana ekozala kaka ya kokangama. 3 Kasi, nkumu akofanda na kati na yango mpo na kolya limpa liboso ya Yehova+ mpo azali nkumu. Akokɔta na nzela ya ndako ya kokɔtela ya porte yango, mpe akobima na nzela na yango.”+
4 Na nsima amemaki ngai na nzela ya porte ya nɔrdi tii liboso ya tempelo. Ntango natalaki, namonaki ete nkembo ya Yehova etondisaki tempelo ya Yehova.+ Bongo nakweaki natye elongi na nse.+ 5 Mpe Yehova alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, tyá likebi,* talá, mpe yoká na likebi mpenza makambo nyonso oyo nazali koyebisa yo mpo na malako mpe mibeko ya tempelo ya Yehova. Tyá mpenza likebi na esika ya kokɔta na tempelo ná bisika nyonso ya kobima ya esika mosantu.+ 6 Osengeli koloba na bato ya Yisraele oyo bazali batomboki ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bokei mosika na misala na bino oyo eyinamá, Ee bato ya Yisraele. 7 Ntango bozali kokɔtisa bapaya oyo bakatami ngenga te na motema mpe na mosuni na esika na ngai mosantu, bazali kokómisa tempelo na ngai eloko mpamba. Bozali kopesa limpa na ngai, mafuta mpe makila, wana bozali kobuka kondimana na ngai mpo na misala na bino nyonso oyo eyinamá. 8 Bobateli te biloko na ngai mosantu.+ Kutu botye bato mosusu básalaka misala na esika na ngai mosantu.”’
9 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mopaya moko te oyo afandi na Yisraele, oyo akatami ngenga te na motema mpe na mosuni, akoki kokɔta na esika na ngai mosantu.”’
10 “‘Kasi Balevi oyo batikaki ngai+ ntango Bayisraele batikaki ngai mpo na kosambela bikeko na bango ya bosɔtɔ,* Balevi wana bakobuka mbuma mabe mpo na libunga na bango. 11 Mpe bakokóma basaleli na esika na ngai mosantu, mpo na kokɛngɛla baporte ya tempelo+ mpe kosala mosala na tempelo. Bakoboma likabo ya kotumba mobimba mpe mbeka mpo na bato, mpe bakotɛlɛma liboso na bango mpo na kosalela bango mosala. 12 Lokola bazalaki kosalela bato ya Yisraele mosala liboso ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, bakómaki eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, mpo bato ya Yisraele básala lisumu,+ yango wana natomboleli bango lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai,’ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo, ‘mpe bakobuka mbuma mabe ya libunga na bango. 13 Bakopusana pene na ngai te mpo na kosalela ngai lokola banganga-nzambe mpe bakopusana ata moke te na eloko na ngai mosantu, to na biloko na ngai oyo eleki mosantu, mpe bakomema nsɔni na bango mpo na makambo na bango oyo eyinamá oyo basalaki. 14 Nakopesa bango mokumba ya kobatela tempelo, bálandela mosala na yango mpe nyonso oyo esengeli kosalema na kati na yango.’+
15 “‘Mpo na banganga-nzambe Balevi, bana ya Zadoke,+ oyo bakokisaki mokumba ya esika na ngai mosantu ntango Bayisraele batikaki ngai,+ bakopusana pene na ngai mpo na kosalela ngai mosala, mpe bakotɛlɛma liboso na ngai mpo na kopesa ngai mafuta+ mpe makila,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 16 ‘Bango nde bakokɔta na esika na ngai mosantu, bakopusana na mesa na ngai mpo na kosalela ngai mosala,+ mpe bakokokisa mikumba na bango epai na ngai.+
17 “‘Ntango bakokɔta na baporte ya lopango ya kati, basengeli kolata bilamba ya lini.+ Basengeli te kolata elamba ya lɛnɛ ntango bazali kosala mosala na kati ya baporte ya lopango ya kati to na kati na yango. 18 Bakolata na motó na bango batirba oyo basalá na lini mpe bakupe ya lini ekozipa loketo na bango.+ Bakolata eloko moko te oyo ekobimisa bango motoki. 19 Liboso ya kobima libándá mpo na kokende na lopango ya libándá (esika bato bazali), bakolongola bilamba na bango oyo bazalaki kosala na yango mosala,+ mpe bakotya yango na bisika mosantu ya kolya.*+ Na nsima bakolata bilamba mosusu mpo bákómisa bato basantu te* na bilamba na bango. 20 Bakokokola motó na bango te+ to bakotika te nsuki ya motó ekóma milai mingi. Bakokata nsuki ya mitó na bango. 21 Banganga-nzambe basengeli te komɛla vinyo ntango bakokɔta na lopango ya kati.+ 22 Basengeli te kobala mwasi oyo mobali akufá to mwasi oyo libala ekufá,+ kasi bakoki kobala ngɔndɔ ya bana ya Yisraele to mwasi oyo mobali akufá, oyo mobali na ye azalaki nganga-nzambe.’+
23 “‘Bakolakisa bato na ngai bokeseni kati na eloko oyo ezali mosantu ná eloko oyo ezali mosantu te; mpe bakoteya bango bokeseni kati na oyo ezali mbindo ná oyo ezali pɛto.+ 24 Na likambo ya kosamba, bango nde bakosambisa;+ basengeli kosambisa na kolanda bikateli na ngai.+ Bakotosa mibeko ná malako na ngai na oyo etali bileko na ngai nyonso ya fɛti,+ mpe bakosantisa basabata na ngai. 25 Bakopusana ata moke te epai ya moto oyo akufi mpo bákóma mbindo te, kasi bakoki komikómisa mbindo mpo na tata, mama, mwana mobali to mwana mwasi, mpo na ndeko mobali to mpo na ndeko mwasi oyo abalá te.+ 26 Nsima ya kopɛtolama ya nganga-nzambe, bakotángela ye mikolo nsambo. 27 Na mokolo oyo akokɔta na esika mosantu, na lopango ya kati, mpo na kosala mosala na esika mosantu, asengeli kopesa likabo na ye mpo na lisumu,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
28 “‘Mpe talá oyo ekozala libula na bango: Ngai nde libula na bango.+ Bosengeli kopesa bango eloko moko te oyo ekozala ya bango na Yisraele, mpo ngai nde nazali eloko na bango. 29 Bango nde bakolya likabo ya mbuma,+ likabo mpo na lisumu mpe likabo mpo na ngambo.+ Eloko nyonso oyo ebongisami mpo na mosala moko mosantu na Yisraele ekozala ya bango.+ 30 Mbuma oyo eleki malamu na mbuma ya lolenge nyonso ya liboso mpe makabo oyo eleki malamu na makabo ya lolenge nyonso na makabo na bino, ekozala ya banganga-nzambe.+ Bokopesa banganga-nzambe farini na bino ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na bino ya liboso,+ yango ekomemela mabota na bino lipamboli.+ 31 Banganga-nzambe bakolya ata ndɛkɛ moko te to nyama oyo ekufi yango moko to oyo epasolami.’+
45 “‘Ntango bokokabola mokili mpo ezala libula,+ bokopesa Yehova eteni mosantu oyo euti na mokili yango lokola likabo.+ Ekozala mapeko* 25 000 na molai, mpe mapeko 10 000 na monene.+ Etando na yango mobimba* ekozala eteni moko mosantu. 2 Na kati na yango, ekozala na esika ya karé mpo na esika mosantu, oyo ekozala mapeko 500 bipai nyonso,+ mpe ekozala na mapeko 50 mpo na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na mopanzi na yango mokomoko.+ 3 Na oyo wana, okozwa molai ya mapeko 25 000 mpe monene ya mapeko 10 000, mpe esika mosantu ekozala na kati na yango, eloko moko oyo eleki mosantu. 4 Eteni mosantu oyo ezwami na mokili yango ekozala mpo na banganga-nzambe,+ basaleli ya esika mosantu, baoyo bapusanaka mpo na kosalela Yehova mosala.+ Ekozala esika mpo na bandako na bango mpe esika oyo esantisami mpo na esika mosantu.
5 “‘Mpo na Balevi, basaleli ya Tempelo, ekozala na eteni moko ya mapeko 25 000 na molai mpe mapeko 10 000 na monene.+ Bakozwa bisika ya kolya* 20+ oyo ekozala ya bango.
6 “‘Bokopesa mpo na engumba esika ya mapeko 25 000 na molai (kaka ndenge moko na likabo mosantu), mpe mapeko 5 000 na monene.+ Ekozala ya bato nyonso ya Yisraele.
7 “‘Mpe mpo na nkumu, mokili ekozala na ngámbo nyonso mibale ya likabo mosantu mpe ya esika oyo ezali mpo na engumba. Ekozala pembeni ya likabo mosantu mpe ya esika oyo ezali mpo na engumba, na ngámbo ya wɛsti mpe ya ɛsti. Molai na yango, banda na ndelo ya wɛsti tii na ndelo ya ɛsti ekokokana na moko ya biteni ya mabota.+ 8 Mokili oyo ekokóma eloko na ye na Yisraele. Bankumu na ngai bakonyokola bato na ngai lisusu te,+ mpe bakopesa bato ya Yisraele mokili na kolanda mabota na bango.’+
9 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bokei mosika, bankumu ya Yisraele!’
“‘Bótika mobulu mpe monyoko, mpe bósala oyo ezali sembo mpe boyengebene.+ Bótika kobɔtɔla bato na ngai biloko,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo. 10 ‘Bosengeli kosalela bimekeli-kilo ya sikisiki, efa* ya sikisiki mpe bati* ya sikisiki.+ 11 Efa ná bati ekozala na motuya moko oyo etyami, bati ekozala homɛrɛ* moko kabola na zomi mpe efa ekozala homɛrɛ moko kabola na zomi. Motuya oyo esɛngami ekotyama na kolanda homɛrɛ. 12 Shekele*+ ezali gera* 20. Shekele 20, bakisa shekele 25, bakisa mpe shekele 15 ekosala manɛ* mpo na bino.’
13 “‘Talá likabo oyo bokopesa: na homɛrɛ mokomoko ya blé bokopesa efa moko kabola na motoba, mpe na homɛrɛ mokomoko ya ɔrje bokopesa efa moko kabola na motoba. 14 Mafuta oyo bokopesa ekomekama na bati. Bati ezali korosi* moko kabola na zomi. Bati zomi ezali homɛrɛ moko, mpo bati zomi ekokani na homɛrɛ moko. 15 Kati ya bampate 200 bokopesa mpate moko oyo euti na etonga ya bibwɛlɛ ya Yisraele. Yango ekozala mpo na likabo ya mbuma,+ likabo mobimba ya kotumba+ mpe bambeka ya kimya,*+ mpo na kosɛnga bolimbisi ya masumu ya bato,’+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
16 “‘Bato nyonso ya mokili yango bakopesa nkumu ya Yisraele likabo yango.+ 17 Kasi nkumu nde akozala na mokumba ya kopesa makabo ya kotumba mobimba,+ likabo ya mbuma,+ likabo ya masanga na ntango ya bafɛti,+ na basanza ya sika mpe na basabata,+ na bileko ya bafɛti nyonso ya bato ya Yisraele.+ Ye nde akopesa likabo mpo na lisumu, likabo ya mbuma, likabo ya kotumba mobimba mpe bambeka ya kimya,* mpo na kozipa masumu ya bato ya Yisraele.’
18 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Na mokolo ya liboso na sanza ya liboso, okozwa mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba, mpe osengeli kopɛtola esika mosantu na lisumu.+ 19 Nganga-nzambe akozwa ndambo ya makila ya likabo mpo na lisumu mpe akotya yango na likonzí ya baporte ya Tempelo+ mpe na bansɔngɛ minei ya mwa etando oyo ebimá na mopanzi ya etumbelo zingazinga mpe na likonzí ya porte ya lopango ya kati. 20 Yango nde okosala na mokolo ya nsambo ya sanza yango mpo na moto nyonso oyo asali lisumu na libunga to na kozanga koyeba;+ mpe osengeli kopɛtola Tempelo na lisumu.+
21 “‘Na mokolo ya 14 na sanza ya liboso, bokosala fɛti ya Elekeli.+ Mikolo nsambo bokolya limpa ezangi levire.+ 22 Na mokolo yango, nkumu akopesa mwana-ngɔmbɛ mobali ezala likabo mpo na lisumu mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso ya mokili.+ 23 Mpo na mikolo nsambo ya fɛti, akopesa Yehova likabo ya kotumba mobimba oyo: bana-ngɔmbɛ nsambo ya mibali oyo ezangi mbeba mpe bampate-mibali nsambo, oyo ezangi mbeba, mokolo na mokolo mpo na mikolo yango nsambo,+ mpe likabo mpo na lisumu ekozala ntaba-mobali moko mokolo na mokolo. 24 Mpo na likabo ya mbuma, akopesa mpe efa moko mpo na mwana-ngɔmbɛ mobali moko mpe efa moko mpo na mpate-mobali moko, mpe mpo na mafuta: hini* moko mpo na efa mokomoko.
25 “‘Na mokolo ya 15 na sanza ya nsambo, na boumeli ya mikolo nsambo ya fɛti+ akopesa likabo ndenge moko na likabo mpo na lisumu, likabo ya kotumba mobimba, likabo ya mbuma mpe mafuta.’”
46 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Porte ya lopango ya kati oyo etali na ɛsti+ esengeli kokangama+ mikolo motoba ya mosala,+ kasi na mokolo ya sabata mpe na mokolo ya sanza ya sika, esengeli kofungolama. 2 Soki nkumu auti na lopango ya libándá akokɔta na nzela ya ndako ya kokɔtela ya porte yango,+ mpe akotɛlɛma pene na likonzí ya porte. Banganga-nzambe bakopesa likabo na ye ya kotumba mobimba mpe bambeka na ye ya kimya, mpe akogumbama na ekɔtelo ya porte, na nsima akobima, kasi porte ekokangama te tii na mpokwa. 3 Bato ya mokili mpe bakogumbama liboso ya Yehova na ekɔtelo ya porte wana na basabata mpe na basanza ya sika.+
4 “‘Likabo ya kotumba mobimba oyo nkumu akopesa Yehova na mokolo ya sabata ekozala bana-mpate motoba ya mibali, oyo ezangi mbeba, mpe mpate-mobali moko oyo ezangi mbeba.+ 5 Likabo ya mbuma ekozala efa* moko mpo na mpate-mobali, mpe nyonso oyo akoki kopesa mpo na bana-mpate ya mibali. Mpe mpo na mafuta: hini* moko mpo na efa moko.+ 6 Na mokolo ya sanza ya sika, likabo ekozala ya mwana-ngɔmbɛ mobali moko ya etonga, oyo ezangi mbeba, bana-mpate motoba ya mibali mpe mpate-mobali moko; ekozala banyama oyo ezangi mbeba.+ 7 Akopesa likabo ya mbuma: efa moko mpo na mwana-ngɔmbɛ mobali, efa moko mpo na mpate-mobali, mpe mpo na bana-mpate mibali akopesa oyo akokoka kopesa. Mpe akopesa hini moko ya mafuta mpo na efa moko.
8 “‘Ntango nkumu azali kokɔta, akokɔta na nzela ya ndako ya kokɔtela ya porte yango, mpe akobima kaka na nzela yango.+ 9 Wana bato ya mokili bazali koya liboso ya Yehova na ntango ya bafɛti,+ baoyo bazali kokɔta na nzela ya porte ya nɔrdi+ mpo na kosambela bakobima na nzela ya porte ya sudi,+ mpe baoyo bazali kokɔta na nzela ya porte ya sudi bakobima na nzela ya porte ya nɔrdi. Moto moko te akozonga na nzela ya porte oyo akɔtaki, mpo bakobima na porte oyo ezali kotala bango. 10 Nde nkumu na kati na bango, akokɔta ntango bazali kokɔta, mpe akobima ntango bazali kobima. 11 Na ntango ya bafɛti mpe na bileko ya fɛti, likabo ya mbuma ekozala efa moko mpo na mwana-ngɔmbɛ mobali, efa moko mpo na mpate-mobali, mpe mpo na bana-mpate ya mibali akopesa oyo akokoka kopesa. Mpe mpo na mafuta: hini moko mpo na efa moko.+
12 “‘Soki nkumu apesi Yehova likabo ya kotumba mobimba,+ to bambeka ya kimya* mpo alingaka ye, bakofungolela ye porte oyo etali na ɛsti, mpe akopesa likabo na ye ya kotumba mobimba mpe bambeka na ye ya kimya kaka ndenge asalaka na mokolo ya Sabata.+ Mpe soki abimi, bakokanga porte nsima na ye.+
13 “‘Mokolo na mokolo okopesa Yehova mwana-mpate ya mobali, oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula na yango ya liboso, lokola likabo ya kotumba mobimba.+ Okosala yango ntɔngɔ nyonso. 14 Ntɔngɔ nyonso okopesa nzela moko na yango moko ya bandambo motoba ya efa lokola likabo ya mbuma, ná moko ya bandambo misato ya hini ya mafuta mpo na komwangisa yango na farini ya malamu. Ekozala likabo ya mbuma ya ntango nyonso epai ya Yehova. Yango ezali mobeko mpo na libela. 15 Ntɔngɔ nyonso basengeli kopesa mwana-mpate ya mobali, likabo ya mbuma ná mafuta mpo ezala likabo ya kotumba mobimba ya ntango nyonso.’
16 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Soki nkumu apesi mwana na ye mokomoko likabo lokola libula, yango ekokóma eloko ya bana na ye. Ezali eloko na bango oyo bazwi libula. 17 Kasi soki apesi moko ya basaleli na ye likabo oyo euti na libula na ye, ekozala ya ye tii na mbula ya bonsomi;+ mpe na nsima, ekozonga epai ya nkumu. Kaka libula ya bana na ye nde ekozala ya bango ntango nyonso. 18 Nkumu akozwa libula moko te ya bato; akobengana bango na bisika na bango te. Akopesa bana na ye libula na esika oyo ezali ya ye moko, mpo bábengana moto moko te kati na bato na ngai na esika na ye.’”
19 Bongo alekisaki ngai na esika ya kokɔta+ oyo ezali na mopanzi ya porte oyo ekei tii na bisika mosantu ya kolya* ya banganga-nzambe, oyo ezalaki kotala na nɔrdi,+ mpe kuna namonaki esika moko na nsuka, na wɛsti. 20 Alobaki na ngai boye: “Oyo nde esika banganga-nzambe bakotɔkisa likabo mpo na ngambo ná likabo mpo na lisumu, mpe esika bakotumba likabo ya mbuma,+ mpo bábimisa eloko moko te na lopango ya libándá, mpe bákómisa bato basantu te.”*+
21 Abimisaki ngai na lopango ya libándá mpe alekisaki ngai epai ya makonzí minei ya mabanga ya ntina mingi* ya lopango, mpe namonaki lopango moko na likonzí mokomoko ya lopango ya libándá. 22 Na makonzí minei ya mabanga ya ntina mingi ya lopango ezalaki na mapango ya mike: mapeko* 40 na molai mpe mapeko 30 na monene. Yango nyonso minei ezalaki ndenge moko.* 23 Ezalaki na baetajɛ* zingazinga na yango nyonso minei, mpe na nse ya baetajɛ yango batongaki bisika ya kotɔkisa makabo. 24 Bongo alobaki na ngai boye: “Oyo nde bandako, esika basaleli ya Tempelo batɔkisaka bambeka ya bato.”+
47 Bongo azongisaki ngai na esika ya kokɔta ya Tempelo,+ mpe kuna namonaki mai ezalaki kobima na nse ya ekɔtelo ya Tempelo, mpe ezalaki kotíyola na ɛsti,+ mpo liboso ya Tempelo ezalaki kotala na ɛsti. Mai ezalaki kokita, euti na nse, na lobɔkɔ ya mobali ya Tempelo, na sudi ya etumbelo.
2 Na nsima, abimisaki ngai na nzela ya porte ya nɔrdi+ mpe atambwisaki ngai na nzela ya libándá tii na porte ya libándá oyo etali na ɛsti,+ mpe namonaki mai ezalaki kotíyola na mopanzi ya lobɔkɔ ya mobali.
3 Ntango moto yango abimaki na ɛsti, ná nsinga ya komeka na lobɔkɔ na ye,+ amekaki mapeko* 1 000 mpe akatisaki ngai mai; mai ekómaki tii na makɛsi.
4 Na nsima amekaki lisusu mapeko 1 000 mpe akatisaki ngai mai, mpe mai ekómaki tii na mabɔlɔngɔ.
Amekaki lisusu mapeko 1 000 mpe akatisaki ngai, mpe mai ekómaki tii na loketo.
5 Ntango amekaki lisusu mapeko 1 000, ekómaki mokɛli oyo nakokaki kokatisa te, mpo mai ezalaki mozindo mpenza, mai oyo moto akoki kobɛta, mokɛli moko oyo moto akoki kokatisa te na makolo.
6 Atunaki ngai boye: “Mwana ya moto, omoni yango?”
Na nsima atambwisaki ngai mpe azongisaki ngai pembeni ya mokɛli yango. 7 Ntango nazongaki, namonaki ete banzete ezalaki ebele mpenza pembenipembeni ya mokɛli yango, na ngámbo nyonso mibale.+ 8 Bongo alobaki na ngai boye: “Mai oyo ezali kotíyola na etúká ya ɛsti, ezali kokita na Araba*+ mpe ezali kokɔta na mbu. Ntango ekokɔta na mbu,+ mai ya mbu ekobika. 9 Bikelamu* ya bomoi oyo etondanaka ekozala na likoki ya kozala na bomoi esika nyonso mai* ezali kotíyola. Mbisi ekozala beboo mpo mai oyo ekotíyola kuna. Mai ya mbu ekobika mpe eloko nyonso ekozala na bomoi na esika oyo mokɛli yango ekokende.
10 “Baluki-mbisi bakotɛlɛma pene na yango, uta na Ene-gedi+ tii na Ene-eglaime. Esika ya kokaukisa minyama ekozala wana. Mbisi ya ndenge na ndenge ekozala beboo, lokola mbisi ya Mbu Monene.*+
11 “Ekozala na bisika ya pɔtɔpɔtɔ mpe ya maziba, mpe yango ekobika te. Mungwa ekotikala na bisika yango.+
12 “Banzete ya ndenge nyonso ya kolya ekobima pembenipembeni ya mokɛli yango na ngámbo nyonso mibale. Nkasa na yango ekokauka te; mbuma na yango ekokoba kobota. Bakobuka mbuma ya sika sanza nyonso, mpo mai na yango ezali kouta na esika mosantu.+ Mbuma na yango ekozala mpo na kolya mpe nkasa na yango mpo na kobikisa.”+
13 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Oyo nde teritware bokokabola yango libula mpo ezala mokili ya mabota 12 ya Yisraele, mpe Yozefe akozwa biteni mibale.+ 14 Bokozwa yango libula, mpe bokozwa biteni ndenge moko.* Nalapaki ndai ete nakopesa bankɔkɔ na bino mokili yango,+ mpe sikoyo bakaboleli yango bino* lokola libula.
15 “Talá ndelo ya mokili yango na ngámbo ya nɔrdi: Elongwe uta na Mbu Monene na nzela oyo ekei na Hetelone+ tii na Zedade,+ 16 Hamate,+ Berota+ mpe Sibraime, oyo ezali kati na teritware ya Damasi ná ya Hamate tii na Hazere-hatikone, oyo ezali na ndelo ya Haurane.+ 17 Na yango ndelo ekokende uta na mbu tii na Hazare-enone,+ na ndelo ya Damasi tii na nɔrdi, mpe na ndelo ya Hamate.+ Yango nde ndelo ya nɔrdi.
18 “Mopanzi ya ɛsti ekei banda na esika oyo ekaboli Haurane ná Damasi, mpe pembenimpembeni ya Yordani kati na Gileade+ ná mokili ya Yisraele. Bokozwa mezire banda na ndelo tii na mbu ya ɛsti.* Yango nde ndelo ya ɛsti.
19 “Mopanzi ya sudi ekozala banda na Tamara tii na mai ya Meribate-Kadeshe,+ na nsima tii na Lobwaku* mpe tii na Mbu Monene.+ Yango nde ndelo* ya sudi.
20 “Na mopanzi ya wɛsti ezali Mbu Monene, banda na ndelo mpe tii na esika oyo etalani na Lebo-Hamate.*+ Yango nde ndelo ya wɛsti.”
21 “Bokokabola mokili yango na kati na bino, na kati ya mabota 12 ya Yisraele. 22 Bokokabola yango ezala libula mpo na bino mpe bato oyo bafandi bapaya na kati na bino, baoyo babotaki bana ntango bazalaki kofanda na kati na bino. Bakozala epai na bino lokola Bayisraele oyo bazali bana-mboka. Bakozwa libula elongo na bino na kati ya mabota ya Yisraele. 23 Bokopesa moto oyo afandi mopaya libula na teritware ya libota epai afandi,” Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
48 “Talá bankombo ya mabota yango, banda na nsukansuka ya nɔrdi: eteni ya Dani+ ekei pembenipembeni ya nzela ya Hetelone tii na Lebo-Hamate,*+ mpe ekei tii na Hazare-enane, pembenipembeni ya ndelo ya Damasi na nɔrdi, na ngámbo ya Hamate;+ mpe ekei banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 2 Eteni ya Ashere+ ezali na ndelo ya Dani, banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 3 Eteni ya Nafatali+ ezali na ndelo ya Ashere, banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 4 Eteni ya Manase+ ezali na ndelo ya Nafatali, banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 5 Eteni ya Efraime ezali na ndelo ya Manase,+ banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 6 Eteni ya Rubene ezali na ndelo ya Efraime,+ banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 7 Eteni ya Yuda ezali na ndelo ya Rubene,+ banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 8 Na ndelo ya Yuda, banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti, likabo oyo bokotya pembeni esengeli kozala mapeko* 25 000 na monene+ mpe molai na yango banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti esengeli kokokana na biteni ya mabota mosusu. Esika mosantu ekozala na katikati na yango.
9 “Likabo oyo bokotya pembeni mpo na Yehova, ekozala mapeko 25 000 na molai mpe 10 000 na monene. 10 Yango ekozala likabo mosantu mpo na banganga-nzambe.+ Ekozala mapeko 25 000 na ngámbo ya nɔrdi, 10 000 na wɛsti, 10 000 na ɛsti, mpe 25 000 na sudi. Esika mosantu ya Yehova ekozala na katikati na yango. 11 Ekozala mpo na banganga-nzambe, baoyo basantisami na kati ya bana ya Zadoke,+ baoyo bakokisaki mikumba na bango epai na ngai, mpe batikaki ngai te ntango Bayisraele ná Balevi batikaki ngai.+ 12 Bakozwa eteni ya likabo ya mokili oyo etyami pembeni lokola eloko moko oyo eleki mosantu, na ndelo ya Balevi.
13 “Pene mpenza na teritware ya banganga-nzambe, Balevi bakozwa eteni ya mapeko 25 000 na molai, mpe 10 000 na monene. (Molai mobimba ekozala mapeko 25 000 mpe 10 000 na monene). 14 Eteni oyo eleki kitoko ya mokili bakotɛka yango te, bakopesa eloko mosusu te na esika na yango mpe bakotika te ete elongwa epai na bango, mpo ezali eloko moko mosantu mpo na Yehova.
15 “Esika oyo etikali ya mapeko 5 000 na monene, pembenipembeni ya ndelo ya mapeko 25 000, ekozala mpo na eloko oyo ezali mosantu te ya engumba,+ mpo na esika ya kofanda mpe mpo na esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti. Engumba ekozala na katikati na yango.+ 16 Bamezire ya engumba yango oyo: ndelo ya nɔrdi ezali mapeko 4 500, ndelo ya sudi mapeko 4 500, ndelo ya ɛsti mapeko 4 500 mpe ndelo ya wɛsti mapeko 4 500. 17 Esika ya koleisa bibwɛlɛ matiti ya engumba ekozala mapeko 250 na nɔrdi, 250 na sudi, 250 na ɛsti mpe 250 na wɛsti.
18 “Eteni oyo etikali, na molai ekozala kaka ndenge moko na likabo mosantu,+ mapeko 10 000 na ɛsti, mpe mapeko 10 000 na wɛsti. Ekozala ndenge moko na likabo mosantu, biloko oyo yango ekobimisa ekozala bilei mpo na baoyo bazali kosala mosala na engumba. 19 Baoyo bazali kosala mosala mpo na engumba yango, bato oyo bauti na mabota nyonso ya Yisraele, bakolona yango.+
20 “Likabo mobimba ezali kare ya mapeko 25 000. Bokotya yango pembeni lokola likabo mosantu, ezala mpe mabele ya engumba.
21 “Oyo etikali na mipanzi nyonso mibale ya likabo mosantu mpe ya mabele ya engumba, ekozala ya nkumu.+ Ekozala pembenipembeni ya bandelo ya mapeko 25 000 oyo ezali na ɛsti mpe na wɛsti ya likabo. Ekokokana na biteni oyo ekangani na yango, mpe ekozala mpo na nkumu. Likabo mosantu ná esika mosantu ya tempelo ekozala na katikati na yango.
22 “Mabele ya Balevi mpe mabele ya engumba ekozala na katikati ya oyo ezali ya nkumu. Teritware ya nkumu ekozala na katikati ya ndelo ya Yuda+ mpe ndelo ya Benyamina.
23 “Mpo na mabota oyo etikali, eteni ya Benyamina ezali banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti.+ 24 Eteni ya Simeone ezali na ndelo ya Benyamina,+ banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 25 Eteni ya Isakare+ ezali na ndelo ya Simeone, banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 26 Eteni ya Zebulone ezali na ndelo ya Isakare,+ banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti.+ 27 Eteni ya Gade ezali na ndelo ya Zebulone,+ banda na ndelo ya ɛsti tii na ndelo ya wɛsti. 28 Ndelo ya sudi oyo ezali na ndelo ya Gade, ekokende banda na Tamara+ tii na mai ya Meribate-kadeshe,+ tii na Lobwaku,*+ mpe tii na Mbu Monene.*
29 “Yango nde mokili oyo bokokabolela mabota ya Yisraele ezala libula,+ mpe yango nde ekozala biteni na bango,”+ Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi bongo.
30 “Talá bisika ya kobima ya engumba: Ngámbo ya nɔrdi, ekozala mapeko 4 500.+
31 Bakopesa baporte ya engumba bankombo ya mabota ya Yisraele. Baporte misato ekozala na nɔrdi: porte moko mpo na Rubene, porte moko mpo na Yuda, mpe porte moko mpo na Levi.
32 Ngámbo ya ɛsti ekozala mapeko 4 500 na molai, mpe baporte ezali misato: porte moko mpo na Yozefe, porte moko mpo na Benyamina, mpe porte moko mpo na Dani.
33 Ngámbo ya sudi ekozala mapeko 4 500, ná baporte misato: porte moko mpo na Simeone, porte moko mpo na Isakare, mpe porte moko mpo na Zebulone.
34 Ngámbo ya wɛsti ekozala mapeko 4 500 na molai, ná baporte misato: porte moko mpo na Gade, porte moko mpo na Ashere, mpe porte moko mpo na Nafatali.
35 “Ntaka oyo ezali zingazinga ya engumba ekozala mapeko 18 000. Mpe nkombo ya engumba yango banda mokolo wana ekozala Yehova azali wana.”+
Elimboli, “Nzambe azali kopesa makasi.”
Lil., “Lobɔkɔ ya Yehova eyaki likoló na ngai.”
To, “mikalikali.”
To, “bisungi.”
To, “yiká.”
To, “Bayiká yango.”
Mbala mosusu, yiká mokomoko esalemaki na yiká mibale oyo ekabolamaki semba.
Lil., “elimo ya ekelamu ya bomoi.”
To mbala mosusu, “efungwamaki semba.”
Na bisika 93 oyo maloba “mwana ya moto” esalelami na mokanda ya Ezekiele, awa ezali mbala ya liboso.
To mbala mosusu, “atako bato yango bazali matoi mangbongi mpe bazali lokola biloko oyo ezali kotuba yo.”
To, “rulo ya buku.”
To, “kokimela.”
Lil., “lyá oyo ozali komona.”
Lil., “na bana ya bato na yo.”
To, “bayiká.”
Lil., “na nkanda makasi ya elimo na ngai.”
To, “nakosɛnga yo makila na ye.”
To, “molimo na yo.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “asali makambo ya kozanga bosembo.”
To, “makila na ye ekozala na motó na yo.”
To, “molimo.”
Lil., “lobɔkɔ ya Yehova eyaki epai na ngai.”
Lil., “na yango,” elingi koloba, mopanzi ya lobɔkɔ ya mwasi ya Ezekiele.
Soki 230 g. Talá Ap. B14.
Soki 0,6 L. Talá Ap. B14.
Lil., “nazali kobuka mangenda ya mampa.” Mbala mosusu elobeli mangenda oyo bazalaki kosalela mpo na kokɔtisa mampa oyo ezalaki lokola lopɛtɛ mpo na kobomba yango.
Lil., “na yango.”
Lil., “na mipɛpɛ nyonso.”
To, “nakokitisa yo.”
Lil., “na mipɛpɛ nyonso.”
Lil., “nazali kobuka mangenda ya mampa.” Mbala mosusu elobeli mangenda oyo bazalaki kosalela mpo na kokɔtisa mampa oyo ezalaki lokola lopɛtɛ mpo na kobomba yango.
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe kolimbola nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
To, “mpo na pite na bango.”
To, “balandaki kosala pite na.”
To, “mpe nkɛlɛ.”
Lil., “Ekolamukela yo.”
To mbala mosusu, “motole ya fololo ebimi.”
To mbala mosusu, “motole ya fololo ebimi.”
Elingi koloba, “Ezala baoyo bazali kosomba biloko to baoyo bazali kotɛka yango, moko te akozwa litomba mpo libebi ekoyela bango nyonso.”
To mbala mosusu, “na libunga na bango.”
Lil., “mopanga.”
Elingi koloba, masuba oyo ebimi mpo na kobanga.
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ezipi bango.”
Elingi koloba, “bakokokola motó na bango lokola elembo ya mawa.”
To, “bakotondisa milimo na bango te.”
Elingi koloba, “palata ná wolo na bango.”
Elingi koloba, “biloko na bango ya wolo mpe ya palata.”
Elingi koloba, “palata mpe wolo na bango oyo basalaki na yango bikeko.”
Emonani ete ezali kolobela eteni ya kati mpenza ya esika mosantu ya Yehova.
Elingi koloba, “minyɔlɔlɔ ya bokangami.”
To, “mateya.”
To, “elilingi.”
To, “elilingi.”
To, “eyokisaka nkɛlɛ.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
Emonani ete ezalaki etape oyo bazalaki kosalela na losambo ya bikeko.
To, “bayiká.”
To, “yiká.”
Elingi koloba, “keruba mokomoko.”
Lil., “ezalaki ekelamu ya bomoi.”
Lil., “elimo ya bikelamu ya bomoi.”
Lil., “ekelamu ya bomoi.”
To, “mpo na.”
Lil., “Azali,” engumba ya Yerusaleme. Esika oyo Bayuda bazalaki kokanisa ete babatelami.”
To, “nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ ya monene.”
To, “makambo oyo eyei na makanisi na bino.”
Lil., “nakopesa bango motema moko.”
Elingi koloba, “nakosala ete báyoka toli ya Nzambe.”
Lil., “ndako.”
To, “bazali kosakola makambo oyo euti na motema na bango moko.”
Lil., “elimo na bango moko.”
Elingi koloba, “batongi efelo ya kati oyo ezali makasi te. Mpe basaleli mpɛmbɛ mpo emonana ete ezali makasi.”
Lil., “mpe yo, Ee mbula ya mabanga.”
Elingi koloba, “bilamba ya maji oyo bazali kokanga na molɔku to na lobɔkɔ.”
To, “milimo.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
Lil., “nakokanga ndako ya Yisraele na motema na bango.”
Lil., “nazali kobuka mangenda ya mampa.” Mbala mosusu elobeli mangenda oyo bazalaki kosalela mpo na kokotisa mampa oyo ezalaki lokola lopɛtɛ mpo na kobomba yango.
To, “milimo.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “ezangisi yango bana.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bitumbu na ngai minei oyo eyokisaka mpasi.”
To, “molimo na yo eyinamaki.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
To, “obongaki mpo na ebonga ya bokonzi.”
Lil., “nkombo.”
To, “biloko ya monzɛlɛ.”
Elingi koloba, “bikeko ya mibali.”
To, “oyo ezali kokitisa motema.” Lil. “oyo ezali kopemisa.”
Lil., “olekisaki bango na mɔtɔ.”
Lil., “ozalaki kofungolela moleki-nzela nyonso makolo.”
Lil., “bato ya enama monene.”
To, “mposa.”
Lil., “mokili ya Bakanana.”
Lil., “elɛmbaki.” To mbala mosusu, “Ee nayokeli yo mpenza nkanda makasi.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
To, “biloko na yo ya monzɛlɛ.”
Lil., “na lobɔkɔ na yo ya mwasi.”
Ntango mosusu elobeli bingumba oyo esimbami na ye.
Lil., “na lobɔkɔ na yo ya mobali.”
To, “osambi mpo na.”
Lil., “nakozipa masumu na yo.”
Lil., “mokili ya Kanana.”
Lil., “momboto.”
Elingi koloba, “Nebukadenezare.”
Elingi koloba, “Zidikiya.”
To, “milimo.”
Lil., “apesaki lobɔkɔ na ye.”
Lil., “na mipɛpɛ nyonso.”
To, “Bomoi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Moto.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali mpe komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mosopi ya makila.”
To, “makambo oyo ezali sembo te.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “molimo.”Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bómizwela.”
To, “loyembo ya kolela.”
To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
To mbala mosusu, “lokola nzete ya vinyo na elanga na yo ya vinyo.”
To, “mangenda na yango.”
To, “mangenda.”
To, “Olingi kopesa bango etumbu?”
Lil., “natombolaki lobɔkɔ na ngai.”
Lil., “momboto.”
To, “nanɔngaki.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
Elingi koloba, Yisraele.
Elingi koloba, Yisraele.
Lil., “liso na ngai eyokelaki bango mawa.”
Elingi koloba, Yisraele.
Lil., “miso na bango ezalaki kolanda.”
To, “ya kokitisa motema. Lil., “ya kopemisa.”
Lil., “bozali kolekisa bana na bino na mɔtɔ.”
To, “basalelaka.”
Lil., “na lobɔkɔ na ngai oyo esembolami.”
Lil., “na lobɔkɔ na ngai oyo esembolami.”
Lil., “nakokɔtisa bino na ekanganeli ya.”
To, “oyo ezali kokitisa motema.” Lil., “oyo ezali kopemisa.”
Lil., “bokoyoka bilongi na bino.”
To, “mpii.”
Lil., “mosuni nyonso.”
To, “na masese.”
Lil., “mosuni nyonso.”
To, “kimelá.”
Lil., “loketo na yo ezali.”
To, “kimelá.”
To, “kokimela.”
Elingi koloba, masuba oyo ebimi mpo na kobanga.
Elingi koloba, “mopanga ya Yehova.”
To, “Lingenda ya bokonzi ekozala.”
Lil., “lobɔkɔ.”
Lil., “baterafime.”
Elingi koloba, “bafandi ya Yerusaleme.”
Lil., “na lobɔkɔ.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
To, “oyo ezali na nse.”
To, “oyo ezali na likoló.”
Lil., “na nkingo ya bato oyo babomami.”
Lil., “okosambisa, okosambisa.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
Lil., “bamoni bolumbu ya tata.”
To, “milimo.”
To, “milimo.”
Elimboli, “hema na ye.”
Elimboli, “hema na ngai ezali na kati na ye.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
To, “molimo na ye eyokaki.”
To, “oyokaki bango nkɛlɛ.”
Lil., “baoyo babengisami.”
Nguba ya moke, yango ezalaki kosalelama mbala mingi na bato oyo babwakaka makula.
To, “biloko na yo ya monzɛlɛ.”
To, “oyokaki bango nkɛlɛ.”
Lil., “obwaki ngai na nsima ya mokɔngɔ na yo.”
Elingi koloba, “ekobo ya elimo.”
Lil., “balekisaki na mɔtɔ.”
Lil., “nkombo ya mokolo ya lelo.”
To, “nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ ya monene.”
To, “kobɛta ntolo na yo.”
To, “Kimelá, kasi kobimisa maloba te.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “monzomba.”
Lil., “limpa ya bato.”
To, “oyo molimo na bino eyokelaki mawa.”
To, “monzomba.”
To, “bakaa oyo ezingami na bifelo.”
To, “botutatutaki makolo.”
To, “milimo na bino esepelaki.”
To, “mopanzi.”
To, “na lityo na kati ya molimo.”
Lil., “bana basi.”
Lil., “bato ya bikólo.”
To, “mipanga.”
Lil., “babomami.”
To, “bakokimela.”
To, “bakazaka na bango oyo ezangá mabɔkɔ.”
Lil., “bakolata kolɛnga lokola bilamba.”
To, “loyembo ya kolela.”
To, “nkunda.”
To, “nakotya monzɛlɛ na.”
To, “loyembo ya kolela.”
Lil., “mikóló.”
Dɔngi ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.
Ezali molɔngɔ moko na nzete ya kinamono.
To mbala mosusu, “okómaki na lokumu.”
Lil., “lisangá mobimba.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “na mawa ya molimo.”
To, “nkunda.”
To, “loyembo ya kolela.”
Lil., “Otyamaki ndakisa ya elembo.”
Na vɛrsɛ oyo mpe na bavɛrsɛ oyo elandi, Nile ezali komonisa ebale mpe banzela na yango ya mai.
To, “bitɛku.”
Lil., “mongendu.”
Lil., “loketo na bango.”
Lil., “alobi.”
To, “nakopesa bato ya Yisraele makasi.”
Mbala mosusu ezali kolobela Bayisraele oyo basalaki boyokani na Ezipito.
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
To, “Memfisi.”
To, “mokonzi.”
Elingi koloba, “Thèbes.”
Engumba moko na Ezipito. Ebengamaka mpe “Héliopolis.”
To, “nakomatisa makasi.”
To, “akokimela.”
Elingi koloba, “liboso ya mokonzi ya Babilone.”
To, “bazála.”
Lil., “okómaki.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “nkunda.”
Elingi koloba, “nzete ya sɛdrɛ ya liban.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “lobɔkɔ.”
To, “loyembo ya kolela.”
To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
Lil., “bibale na yango.”
Lil., “bilekelo ya mai ekotonda na biloko oyo ezali kobima yo.”
Elingi koloba, “ekólo ya Ezipito.”
To, “nkunda.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “nkunda.”
To, “nkunda.”
To, “nkunda.”
Lil., “bato na ye.”
Lil., “bankunda na ye.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Mbala mosusu ezali kolobela, babundi oyo bakundami na mipanga na bango, ná lokumu ya basoda.
To, “nkunda.”
To, “bakambi.”
To, “nkunda.”
Lil., “balongoli ye.”
To, “molimo.”
To, “nakosɛnga sinzili makila na ye.”
To, “molimo na yo.”
To, “Boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “likambo oyo ezali sembo te.”
Lil., “bakokanisela ye.”
Lil., “Lobɔkɔ ya Yehova eyelaki ngai.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
To, “bazali koloba na mposa makasi ya kosangisa nzoto.”
To, “nakosɛnga bampate na ngai na lobɔkɔ na bango.”
To, “bábatela bampate na ngai.”
Lil., “mpo na nkombo.”
To, “kosopa makila.”
Lil., “ezala bilei.”
Lil., “baoyo batikali.”
To, “lityo na kati ya molimo.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
Elingi koloba, “báyoka toli ya Nzambe.”
To, “bokomiyokela mpii.”
To mbala mosusu, “lokola mbeka ya bitonga ya bampate na Yerusaleme.”
To, “mpema; elimo.”
To, “elimo.”
To, “baoyo bazali baninga na ye.”
To, “baoyo bazali baninga na ye.”
Lil., “bana ya bato na yo.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
Lil., “bana ya mibali.”
To, “Esika ya kofanda; ndako.”
To, “likoló.”
Banguba ya mike, oyo mbala mingi babwaki-mbanzi bazalaki kosalela.
Lil., “mokɛngɛli.”
To, “mokili ya mboka oyo ezangi baporte.”
To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
To, “Nakosamba elongo na ye.”
Banguba ya mike, oyo mbala mingi babwaki mbanzi bazalaki kosalela.
To mbala mosusu, mangenda oyo ezali ya nsɔngɛ mpe esalelamaka lokola ebundeli.
To, “Lobwaku ya ebele ya bato ya Goge.”
Elimboli, ebele ya bato.
Lil., “lobɔkɔ.”
Lil., “nabombelaki bango elongi na ngai.”
Lil., “nabombelaki bango elongi na ngai.”
Lil., “nakomonisa ete nakangamaka kaka na.”
Lil., “lobɔkɔ ya Yehova eyelaki ngai.”
Talá Ap. B14.
Lil., “tyá motema na yo.”
Lil., “ndako.” Ebongolami bongo na mokapo 40 tii 48, ntango oyo ndako ezali komonisa bandako nyonso ya tempelo to tempelo mpenza.
Lil., “mongendu ya komema ya mapeko motoba, lipeko moko mpe tandu moko.” Ezali komonisa mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
Mbala mosusu elobeli likoló ya efelo ya mwa ndako ya mokɛngɛli.
To, “maninisa.”
To, “namonaki bandako ya kolya.”
Lil., “monene.”
To, “maninisa.”
To, “maninisa.”
To, “maninisa.”
To, “lininisa.”
To mbala mosusu, “12.”
Na mokapo 41 mpe 42, maloba oyo ezali kolobela libándá ya esika Mosantu, tempelo na mobimba na yango. (Esika Mosantu mpe Esika Eleki Mosantu na tempelo)
Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
Lil., “mipanzi.”
Elingi koloba, “na kati ya tempelo, to na Esika Eleki Mosantu.”
Lil., “monene ya esika ya kokɔta ezalaki.”
Emonani ete ezali kolobela eskalye oyo ezali nyokanyoka.
Emonani ete ezali mwa nzela oyo ezalaki zingazinga ya tempelo.
To, “bandako ya kolya.”
To, “maninisa.”
To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
Lil., “Likonzí ya porte.” Emonani ete ezali kolobela esika ya kokɔta na Esika Mosantu.
Emonani ete ezali kolobela Esika Eleki Mosantu.
To, “matumu.”
To, “maninisa.”
Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
To, “bashambrɛ.”
“Mapeko 100 na molai,” na kolanda libongoli ya Septante (Grɛki). Makomami ya Ebre elobi: “nzela ya lipeko moko.” Talá Ap. B14.
Lil., “na monene.”
Lil., “ndako ya kati.”
Talá Ap. B14.
To mbala mosusu, “ntango ayaki.”
Lil., “ndako.”
Lil., “kozwa mezire ya modɛlɛ yango.”
Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
22,2 cm. Talá Ap. B14.
To, “ya kokoka.”
Elingi koloba, bato ya ekólo.
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “tyá motema.”
Liloba ya Ebre oyo ebongolami na bosɔtɔ ekoki mpe komonisa nyɛi. Ezali komonisa eloko oyo eboyami mpenza.
To, “bandako mosantu.”
Lil., “básantisa bato te.”
Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
To, “bandelo na yango nyonso epai na epai.”
To, “Bandako ya kolya 20.”
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
To, “mina.” Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ndimbola ya maloba.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ap. B14.
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bandako mosantu.”
Lil., “básantisa bato te.”
To, “matumu.”
Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
To, “Yango minei ná matumu na yango ezalaki ndenge moko.”
To, “molɔngɔ.”
Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
To, “mokili patatalu oyo ekauká.”
To, “milimo.”
Lil., “mikɛli mibale.”
Elingi koloba, “Mediterane.”
Lil., “Bokozwa yango libula, moto na moto ndenge moko na ndeko na ye.”
Lil., “ekweyeli bino.”
Elingi koloba, “Mbu Ekufá.”
Elingi koloba, “Wadi ya Ezipito.”
Lil., “mopanzi ya sudi ekei na sudi.”
To, “ekɔtelo ya Hamate.”
To, “tii na ekɔtelo ya Hamate.”
Ezali kolobela mapeko ya molai. Talá Ap. B14.
Elingi koloba, “Wadi ya Ezipito.”
Elingi koloba, “Mediterane.”