MASESE*
1 Masese ya Salomo+ mwana ya Davidi,+ mokonzi ya Yisraele:+
2 Ekomamaki mpo moto azwa bwanya+ mpe disiplini;
Mpo akanga ntina ya maloba ya bwanya;
3 Mpo moto azwa disiplini+ oyo epesaka mayele ya kososola,
Bosembo,+ likoki ya kozwa bikateli ya malamu+ mpe akóma na bizaleli malamu;
4 Mpo na kosala ete moto oyo azangi mayele azala ekɛngɛ;+
Kopesa elenge mobali boyebi ná likoki ya kokanisa.+
5 Moto ya bwanya ayokaka mpe azwaka mateya mingi;+
Moto ya mayele akómaka na likoki ya kotambwisa makambo+
6 Mpo na kokanga ntina ya lisese ná liloba oyo ezali mpasi na kolimbola,*
Maloba ya bato ya bwanya ná basambole na bango.+
7 Kobanga* Yehova ezali ebandeli ya boyebi.+
Kaka bazoba nde batyolaka bwanya ná disiplini.+
9 Yango ezali motole* kitoko ya fololo mpo na motó na yo+
Mpe nsinga kitoko ya monzɛlɛ mpo na nkingo na yo.+
10 Mwana na ngai, soki basumuki bameki kolengola yo, kondima te.+
11 Soki balobi: “Yaká elongo na biso.
Tóbatama mpo tóluka ndenge ya koboma bato.
Tokobombana mpo na kozela baoyo basali likambo te, kaka mpo na kosakana.
13 Tózwa biloko na bango nyonso ya motuya;
Tokotondisa bandako na biso na biloko oyo topunzi.
15 Mwana na ngai, kolanda bango te.
Makolo na yo elanda nzela na bango te,+
16 Mpo makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe;
Bawelaka kosopa makila.+
17 Ezali na ntina te moto atyela ndɛkɛ motambo,* wana ndɛkɛ ezali komona yango.
18 Yango wana, bazali kobatama mpo na kosopa makila ya bato;
Bazali kobombana mpo na koboma bango.
19 Wana ezali ndenge baoyo balukaka kozwa bozwi na ndenge ya mabe basalaka,
Kasi soki basali bongo bakobungisa bomoi na bango.+
20 Bwanya ya solosolo+ ezali koganga makasi na balabala.+
Ezali kaka komatisa mongongo na yango na bisika minene ya bato nyonso.+
21 Ezali kobelela na nsuka* ya balabala oyo etondi na makɛlɛlɛ.
Na bisika ya kokɔta na baporte ya engumba, ezali koloba ete:+
22 “Tii ntango nini bino bato bozangi mayele bokolinga kaka kozanga mayele?
Tii ntango nini bino batyoli bokozala kaka na mposa ya kotyola?
Mpe tii ntango nini bino bazoba bokokoba koyina boyebi?+
23 Bótyela mpamela na ngai likebi.*+
Bongo nakosopela bino elimo na ngai;
Nakosala ete bóyeba maloba na ngai.+
24 Mpo nabelelaki, kasi bozalaki kaka koboya koyoka,
Nasembolaki lobɔkɔ na ngai, kasi moto moko te azalaki kotya likebi,+
25 Bozalaki komona toli na ngai nyonso mpamba
Mpe boboyaki mpamela na ngai,
26 Ngai mpe nakosɛka bino ntango likama ekokwela bino;
Mpe nakotyola bino ntango eloko oyo bozali kobanga ekoya,+
27 Ntango eloko oyo bozali kobanga ekoya lokola mbula ya mopɛpɛ makasi,
Mpe likama na bino ekoya lokola mopɛpɛ makasi,
Ntango mpasi mpe mitungisi ekokómela bino.
28 Na ntango yango, bakokoba kobelela ngai, kasi nakoyanola te;
Bakoluka ngai na mposa makasi, kasi bakomona ngai te,+
Mpe baponaki te kobanga Yehova.+
30 Baboyaki toli na ngai;
Bamemyaki te mpamela na ngai nyonso.
32 Mpo botomboki ya bato oyo bazangi mayele nde ekoboma bango,
Mpe mafumafu ya bazoba nde ekobebisa bango.
33 Kasi moto oyo azali koyokela ngai, akofanda na kimya+
Mpe akotungisama te mpo na nsɔmɔ ya mpasi.”+
2 Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai
Mpe obateli mitindo na ngai malamumalamu,+
2 Wana litoi na yo ezali kotyela bwanya likebi+
Mpe ozali kofungola motema na yo mpo na bososoli;+
3 Lisusu, soki obeleli mpo na mayele+
Mpe omatisi mongongo mpo na bososoli;+
4 Soki okobi koluka yango lokola palata,+
Mpe okobi koluka yango lokola biloko ya motuya oyo ebombani;+
5 Boye, okoyeba ntina ya kobanga Yehova,+
Mpe okozwa boyebi ya Nzambe.+
9 Boye okokanga ntina ya boyengebene ná bosembo ná bizaleli malamu,
Okoyeba nzela malamu ya kokende.+
10 Ntango bwanya ekokɔta na motema na yo+
Mpe boyebi ekokóma elɛngi na molimo* na yo,+
11 Likoki ya kokanisa ekokɛngɛla yo,+
Mpe bososoli ekobatela yo,
12 Mpo na kobikisa yo na nzela ya mabe,
Na moto oyo alobaka makambo ya lokuta,+
13 Na baoyo batikaka banzela ya bosembo
Mpo na kotambola na banzela ya molili,+
14 Baoyo basepelaka na kosala mabe,
Oyo bayokaka esengo na makambo oyo ezali solo te mpe ya mabe,
15 Baoyo banzela na bango etɛngamá
Mpe baoyo etamboli na bango nyonso ezali ya mbilingambilinga.
16 Mpo na kobikisa yo na mwasi ya mobulu,*
Na maloba sukali* ya mwasi ya pite,*+
17 Oyo asundoli mobali* ya bolenge na ye+
Mpe abosani kondimana ya Nzambe na ye;
18 Mpo ndako na ye ezali kozinda tii na liwa,
Mpe banzela na ye ezali komema epai ya baoyo bazangi makasi kati na liwa.+
19 Moto moko te na kati ya baoyo bazali kosangisa na ye nzoto* akozonga,
Mpe akomona lisusu te banzela ya bomoi.+
20 Na yango, landá nzela ya bato malamu
Mpe tikalá na banzela ya bato ya sembo,+
21 Mpo bato ya bosembo nde bakofanda na mabele,
Mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango.+
3 Mwana na ngai, kobosana mateya* na ngai te,
Mpe motema na yo etosa mitindo na ngai,
2 Mpo bakobakisela yo mikolo mingi
Mpe bambula mingi ya bomoi mpe kimya.+
3 Kosala te ete bolingo ya sembo mpe solo* etika yo.+
Kangá yango na nkingo na yo;
Komá yango na motema na yo;+
4 Bongo okondimama mpe okozala na mayele ya kososola
Na miso ya Nzambe mpe ya bato.+
7 Komimona te moto ya bwanya na miso na yo moko.+
Bangá Yehova mpe kimá mabe.
9 Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya,+
Na mbuma ya liboso* ya biloko na yo nyonso;+
10 Boye bisika na yo ya kobomba biloko ekotonda mɛkɛ,+
Mpe bikamwelo na yo ekotonda mpenza na vinyo ya sika.
11 Mwana na ngai, koboya disiplini ya Yehova te,+
Mpe koyina mpamela na ye te,+
12 Mpo Yehova apamelaka bato oyo ye alingaka,+
Kaka ndenge tata apamelaka mwana oyo ye asepelaka na ye.+
13 Esengo na moto oyo azwi bwanya+
Mpe na moto oyo azali kozwa bososoli;
14 Kozwa yango ezali na litomba koleka kozwa palata,
Kozwa yango ezali na litomba koleka kozwa wolo.+
15 Ezali na motuya mingi koleka mabanga kitoko ya korai;*
Eloko moko te oyo olingaka ekoki kokokana na yango.
16 Bomoi molai ezali na lobɔkɔ na yango ya mobali;
Bomɛngo ná nkembo ezali na lobɔkɔ na yango ya mwasi.
18 Ezali nzete ya bomoi mpo na baoyo basimbi yango,
Mpe baoyo bakangi yango makasi bakobengama bato ya esengo.+
19 Yehova atyaki moboko ya mabele na bwanya.+
Atɛlɛmisaki likoló makasi na bososoli.+
20 Na boyebi na ye, mai mozindo ekabwanaki
Mpe likoló oyo etondi na mapata etangisaki mbula ya matangá mikemike.+
21 Mwana na ngai, yango elongwa na miso na yo te.*
Batelá bwanya ná likoki ya kokanisa;
22 Ekopesa yo bomoi
Mpe ekozala monzɛlɛ mpo na nkingo na yo;
23 Bongo okotambola na kimya na nzela na yo,
25 Okobanga ata likambo moko te ya nsɔmɔ mpe ya mbalakaka+
Ata mbula ya mopɛpɛ makasi oyo ezali koyela bato mabe.+
26 Mpo Yehova akozala moto na yo ya kotyela motema;+
Akobatela lokolo na yo mpo ekangama na motambo te.+
28 Koloba te na mozalani na yo ete: “Kende, bongo oya nsima, nakopesa yo yango lobi,”
Soki okoki kopesa ye yango sikoyo.
Kopona ata nzela na ye moko te,
32 Mpo Yehova ayinaka moto ya mbilingambilinga,+
Kasi azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.+
4 Tata azalaki koteya ngai mpe koloba na ngai boye: “Motema na yo esimba makasi maloba na ngai.+
Batelá mitindo na ngai mpe kobá kozala na bomoi.+
Kobosana te makambo oyo nazali koyebisa yo, mpe kotika yango te.
6 Kosundola yango te, mpe ekobatela yo.
Lingá yango, mpe ekokɛngɛla yo.
7 Bwanya ezali eloko ya ntina mingi.*+ Yango wana zwá bwanya,
Mpe na nyonso oyo ozali kozwa, zwá mpe mayele.+
8 Zwá yango na motuya monene, mpe ekotombola yo.+
Ekopesa yo lokumu mpo oyambi yango.+
9 Ekotya motole ya kitoko ya fololo na motó na yo;
Ekolatisa yo motole kitoko ya monzɛlɛ.”
12 Ntango okotambola, matambe na yo ekozala na nkaka te;
Mpe soki okimi mbangu, okobɛta libaku te.
13 Simbá disiplini; kotika yango te.+
Batelá yango, mpo yango nde bomoi na yo.+
16 Mpo balalaka te soki basali mabe te;
Soki bayokisi moto mpasi te, bazwaka mpɔngi te.
17 Balyaka limpa ya makambo ya mabe,
Mpe bamɛlaka vinyo ya makambo ya mobulu.
18 Kasi nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga na ntɔngɔ
Oyo ezali kongɛnga se kongɛnga tii moi ekokóma makasi.+
19 Nzela ya bato mabe ezali lokola molili;
Bayebi te eloko nini ebɛtisaka bango libaku.
21 Elongwa na miso na yo te;
Batelá yango na kati mpenza ya motema na yo,+
22 Mpo epesaka bomoi malamu epai ya bato oyo bazali kozwa yango+
Mpe kolɔngɔnɔ mpo na nzoto na bango mobimba.*
27 Kokende te na lobɔkɔ ya mobali to na lobɔkɔ ya mwasi.+
Longolá makolo na yo na makambo oyo ezali mabe.
5 Mwana na ngai, tyá likebi na bwanya na ngai.
Yoká malamumalamu* makambo oyo nazali koteya yo mpo na bososoli,+
2 Mpo obatela makoki na yo ya kokanisa
Mpe oloba ntango nyonso na kolanda boyebi ya solo.+
3 Mpo mbɛbu ya mwasi ya mobulu* etangaka lokola ndako ya mafuta ya nzoi,+
Mpe monɔkɔ na ye ezali mosɛlu lokola mafuta.+
5 Makolo na ye ezali kokita na liwa.
Matambe na ye ezali komema na Nkunda.*
6 Atyaka likebi te na nzela ya bomoi.
Azali koyengayenga, kasi ayebi te esika makolo na ye ekomema ye.
8 Zalá mosika na ye;
Kopusana pene ya ekɔtelo ya ndako na ye te,+
9 Mpo opesa lokumu na yo epai ya bato mosusu te+
To onyokwama bomoi na yo mobimba;+
10 Mpo bapaya básilisa nguya na yo te+
Mpe biloko oyo ozwaki na mpasi ekende te na ndako ya mopaya.
11 Soki te okolela* na nsuka ya bomoi na yo
Ntango mosuni na yo mpe nzoto na yo ekobeba+
12 Mpe okoloba ete: “Nayinaki disiplini!
Motema na ngai etyolaki mpamela!
13 Nayokaki mongongo ya balakisi na ngai te
Mpe natyaki likebi te epai ya bateyi na ngai.
15 Mɛlá mai ya libulu na yo moko ya kobomba mai
Mpe oyo ezali kotíyola uta na kati ya libulu na yo moko.+
16 Maziba na yo esengeli nde kopanzana libándá,
Mikɛli ya mai na yo na bisika minene ya bato nyonso?+
Mabɛlɛ na ye elangwisa yo ntango nyonso.
Bolingo na ye elangwisa yo ntango nyonso.+
23 Akokufa mpo andimaki disiplini te
Mpe akobunga nzela mpo bozoba na ye eleki ndelo.
6 Mwana na ngai, soki omipesi ndanga mpo na mozalani na yo,+
Soki osali boyokani na moto oyo oyebi te,+
2 Soki ozwami na motambo na elaka na yo,
Soki okangami na maloba ya monɔkɔ na yo,+
3 Salá boye, mwana na ngai, mpe omibikisa,
Mpo okwei na lobɔkɔ ya mozalani na yo:
Kende epai na ye, mpe na komikitisa nyonso sɛngá ye ayokela yo mawa.+
4 Kotika te miso na yo ezwa mpɔngi,
To mpe miso na yo ekangama.
5 Omibikisa lokola mboloko na lobɔkɔ ya mobomi-nyama,
Lokola ndɛkɛ na lobɔkɔ ya mokangi-ndɛkɛ.
7 Atako ezalaka na komanda te, kapita te to mokonzi te,
8 Ebongisaka bilei na yango na eleko ya molunge,+
Mpe eyanganisaka biloko na yango ya kolya na ntango ya kobuka mbuma.
9 Yo moto ya gɔigɔi, okokoba kolala tii ntango nini?
Okolamuka na mpɔngi na yo ntango nini?
10 Mwa mpɔngi moke, kokanga liso mwa moke,
Kokanga mabɔkɔ mwa moke mpo na kopema,+
11 Mpe bobola ekoyela yo lokola moyibi,
Mpe kokelela na yo lokola moto oyo asimbi bibundeli.+
12 Moto ya mpambampamba mpe ya mabe, atambolaka na maloba ya bokosi;+
13 Afinafinaka liso na ye,+ asalaka bilembo na makolo na ye mpe alakisalakisaka na misapi na ye.
14 Motema na ye esepelaka na lokuta,
Akanaka ntango nyonso kosala likambo ya mabe+ mpe abimisaka kowelana.+
15 Yango wana likama na ye ekoya mbalakaka;
Akobukana na mbala moko, mpe elikya ya kobikisama ekozala te.+
17 Miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo esopaka makila ya moto oyo azali na likambo te,+
18 Motema oyo ekanaka kosala mabe,+ mpe makolo oyo epotaka mbangu mpo na kosala mabe,
19 Motatoli oyo alobaka lokuta ntango nyonso,+
Mpe moto oyo abimisaka kowelana na kati ya bandeko.+
21 Batelá yango ntango nyonso na motema na yo;
Kangá yango na nkingo na yo.
22 Ntango okotambola epai na epai, ekokamba yo;
Ntango okolala, ekokɛngɛla yo;
Mpe ntango okolamuka, ekolobela yo.*
25 Kolula kitoko na ye na motema na yo te+
Mpe kotika te ete miso na ye ya kolengola ebenda yo,
26 Mwasi ya ndumba akokómisa moto mobola mpenza, tii akotikala kaka na mwa limpa,+
Kasi mwasi ya libala akokanga bomoi ya motuya.
27 Moto akoki nde kotya mɔtɔ na ntolo na ye bongo bilamba na ye ezika te?+
28 To moto akoki nde kotambola likoló ya makala ya mɔtɔ bongo makolo na ye ezika te?
29 Ezali ndenge moko mpe na moto oyo asangisi nzoto na mwasi ya mozalani na ye;
Moto oyo asimbi ye akozanga te kozwa etumbu.+
32 Moto nyonso oyo asali ekobo na mwasi azangi bososoli;*
Moto oyo azali kosala yango azali komisala mabe.+
35 Akondima eloko te ata soki opesi ye mbongo;
Akondima kosala kimya te, ata soki opesi ye likabo ya motuya nini.
2 Batelá mitindo* na ngai mpe okozala na bomoi molai;+
Landá mateya na ngai malamu kaka ndenge obatelaka mbuma ya liso na yo.
4 Lobá na bwanya boye: “Ozali ndeko na ngai ya mwasi,”
Mpe bengá mayele “moto ya libota na ngai,”
6 Uta na kiyungulu ya fɛnɛtrɛ ya ndako na ngai,
Natalaki na nse,
7 Mpe natalaki malamumalamu bato oyo bazangi mayele,*
Na kati ya bilenge, namonaki elenge mobali moko oyo azangi bososoli.*+
8 Azalaki koleka pene na esika babalabala ekutani,
Mpe kotambola na nzela oyo ekei na ndako ya mwasi yango
9 Liboso molili ekɔta, na mpokwa,+
Ntango butu ná molili ebandaki kokɔta.
10 Bongo namonaki mwasi moko azali koya kokutana na ye,
Alati lokola* mwasi ya ndumba+ mpe motema na ye ezali na mayele mabe.
11 Asilá nsɔni mpe azali motó makasi.+
Afandaka na ndako te.*
12 Mokemoke na libándá, mokemoke na bisika minene ya bato nyonso,
Na babalabala oyo ekutani abatamaka mpo na kozela.+
13 Akangi ye mpe apesi ye lipwɛpwɛ;
Kozanga nsɔni, alobi na ye boye:
14 “Nasengelaki kopesa bambeka ya kimya.*+
Lelo nakokisi bilako na ngai.
15 Yango wana nayei kokutana na yo,
Koluka yo, mpe namoni yo!
17 Natye mbeto na ngai malasi ya mire, aloe mpe kinamono.+
18 Yaká, tólangwa bolingo tii na ntɔngɔ;
Mpe tósepela na bolingo elongo,
19 Mpo mobali na ngai azali na ndako te;
Akei mobembo mosika.
20 Amemi saki ya mbongo,
Akozonga kaka mokolo oyo sanza ebimaka mobimba.”
21 Akangi ye na motambo na ebele ya maloba na ye ya kondimisa.+
Akosi ye na maloba sukali.
22 Na mbala moko, elenge mobali yango abandi kolanda ye, lokola ngɔmbɛ oyo ekei kobomama,
Lokola zoba oyo bazali komema ye na bikangeli mpo azwa etumbu,+
23 Tii likula ekotobola libale na ye;
Ndenge kaka ndɛkɛ ewelaka kokɔta na motambo, ayebi te ete azali kotya bomoi na ye na likama.+
25 Kotika te ete motema na yo elanda banzela na ye.
Koyengayenga te na babalabala na ye,+
26 Mpo baoyo alalisá bibembe bazali mingi,+
Mpe baoyo abomá bazali ebele.+
8 Bwanya ezali kobelela te?
Bososoli ezali kobimisa mongongo na yango te?+
3 Pembeni ya baporte oyo ezali komema na engumba,
Na bisika oyo bakɔtaka na baporte,
Yango ezali se koganga makasi ete:+
6 Bóyoka, mpo oyo nazali koloba ezali na ntina,
Mbɛbu na ngai elobaka makambo ya malamu;
7 Mpo monɔkɔ na ngai elobaka solo na mongongo ya nse,
Mpe mbɛbu na ngai eyinaka oyo ezali mabe.
8 Maloba nyonso ya monɔkɔ na ngai ezali sembo.
Moko te na yango ezali ya bokosi to ya lokuta.
9 Yango nyonso ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina
Mpe nyonso ebongi mpo na baoyo bazwi boyebi.
10 Bózwa disiplini na ngai kasi palata te,
Mpe boyebi na esika ya wolo oyo eleki kitoko,+
11 Mpo bwanya ezali malamu koleka mabanga kitoko ya korai;*
Biloko mosusu nyonso ya kitoko ekokani na yango te.
13 Kobanga Yehova elakisi koyina mabe.+
Nayinaka komikumisa, lolendo,+ nzela mabe mpe maloba mabe.+
16 Na nzela na ngai, bankumu bakobaka koyangela,
Mpe bato ya lokumu basambisaka na bosembo.
19 Oyo napesaka ezali malamu koleka wolo, ata wolo oyo epɛtolami,
Mpe biloko oyo napesaka ezali malamu koleka palata oyo eleki kitoko.+
20 Natambolaka na nzela ya boyengebene,
Na katikati ya babalabala ya bosembo;
21 Napesaka libula ya malamu epai ya baoyo balingaka ngai,
Mpe natondisaka bandako na bango ya kobomba biloko.
22 Yehova asalaki ngai ebandeli ya mosala na ye,+
Mosala na ye ya liboso na misala na ye ya kalakala.+
23 Natyamaki banda bantango ya kala,*+
Banda na ebandeli, banda bantango ya kala liboso ete mabele ezala.+
25 Liboso bangomba etyama na esika na yango,
Liboso ya bangomba mike, nabotamaki,
26 Ntango asalaki naino te mabele ná bisobe na yango
To eteni ya liboso ya liboke ya putulu ya mabele oyo ebotaka.
27 Ntango abongisaki likoló+ nazalaki wana;
Ntango atyaki ndelo* kati na likoló mpe ebale monene,+
28 Ntango atyaki* mapata likoló,
Ntango asalaki maziba ya mai mozindo,
29 Ntango atyelaki mbu mobeko
Ete mai na yango eleka bandelo na yango te,+
Ntango atyaki miboko ya mabele,
Nazalaki moto oyo azalaki kolinga mingi mpenza+ mokolo na mokolo;
Nazalaki kosepela liboso na ye ntango nyonso;+
31 Nazalaki kosepela na mabele oyo asalaki mpo bato báfanda,
Mpe nazalaki kolinga mingi bana ya bato.
32 Mpe sikoyo bana na ngai, bóyoka ngai;
Baoyo batosaka maloba na ngai bakozala na esengo.
34 Esengo na moto oyo azali koyoka ngai
Oyo ayaka ntɔngɔntɔngɔ na* baporte na ngai mokolo na mokolo,
Mpe azelaka pene ya ekɔtelo ya ndako na ngai;
35 Mpo moto oyo azwi ngai akozwa bomoi,+
Mpe Yehova akondima ye.
4 “Moto nyonso oyo azangi mayele, aya awa.”
Elobi na moto oyo azangi bososoli* ete:
5 “Bóya, bólya limpa na ngai
Mpe bómɛla vinyo oyo nasangisi.
8 Kopamela mosɛki te, noki ayina yo.+
Pamelá moto ya bwanya mpe akolinga yo.+
9 Pesá moto ya bwanya mateya mpe akokóma lisusu na bwanya mingi.+
Teyá moto ya sembo mpe akobakisa boyebi na ye.
12 Soki okómi na bwanya, ezali mpo na bolamu na yo moko,
Kasi soki ozali motyoli, yo moko okomona mpasi.
13 Mwasi ya zoba asilá nsɔni.+
Azali zobazoba mpe ayebaka ata eloko moko te.
14 Afandaka na ekɔtelo ya ndako na ye
Na kiti, na bisika oyo etombwani ya engumba,+
15 Abelelaka baleki-nzela,
Baoyo bazali kotambola alima na banzela na bango ete:
16 “Moto nyonso oyo azangi mayele, aya awa.”
Alobi na baoyo bazangi bososoli* ete:+
18 Kasi ayebi te ete baoyo bazangi makasi kati na liwa bazali kuna,
Ete baoyo mwasi yango abengaka bazali na esika mozindo ya Nkunda.*+
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,+
Kasi mwana ya zoba azali motungisi mpo na mama na ye.
2 Biloko ya motuya oyo ezwami na ndenge ya mabe ekozala na litomba moko te,
Kasi bosembo nde ebikisaka na liwa.+
3 Yehova akosala te ete moto ya sembo anyokwama* na nzala,+
Kasi akopimela bato mabe biloko oyo bazali koluka kozwa.
5 Mwana oyo asalaka na bososoli ayanganisaka mbuma na eleko ya molunge,
Kasi mwana oyo asalaka makambo na nsɔni mpenza alalaka mpɔngi makasi na ntango ya kobuka mbuma.+
8 Moto oyo azali na bwanya na motema akolanda malako,*+
Kasi ye oyo alobaka na bozoba nyonso akonyatama.+
13 Bwanya emonanaka na mbɛbu ya moto ya bososoli,+
Kasi fimbo ezali mpo na mokɔngɔ ya moto oyo azangi bososoli.*+
15 Bomɛngo* ya mozwi ezali engumba na ye ya makasi.
Libebi ya bato oyo bazangá nde bobola na bango.+
17 Moto oyo akangami na disiplini azali nzela oyo ememaka na bomoi,*
Kasi moto oyo atyelaka mpamela likebi te akobungisa basusu nzela.
19 Moto oyo alobaka mingi, akozanga te kobɛta libaku,+
Kasi moto oyo apekisaka maloba* na ye azali kosala na mayele.+
20 Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata oyo eleki kitoko,+
Kasi motema ya moto mabe ezali na motuya te.
23 Mpo na zoba, komipesa na etamboli ya nsɔni ezali lokola lisano,
Kasi bwanya ezali mpo na moto ya bososoli.+
25 Ntango mopɛpɛ makasi ekoleka, moto mabe akozala lisusu te,+
Kasi moto ya sembo azali moboko mpo na libela.+
26 Ndenge kaka vinɛgrɛ esalaka na mino mpe milinga na miso,
Moto ya gɔigɔi azali mpe bongo epai ya moto oyo atindaka ye.*
29 Nzela ya Yehova ezali esika makasi ya libateli mpo na moto oyo azangi mbeba,+
Kasi ezali libebi mpo na basali mabe.+
32 Mbɛbu ya moto ya sembo elobaka makambo oyo esepelisaka,
Kasi monɔkɔ ya moto mabe elobaka lokuta.
5 Bosembo ya moto oyo azangi mbeba ekosembola nzela na ye,
Kasi moto mabe akokwea mpo na mabe na ye.+
6 Bosembo ya bato oyo bazangi mbeba ekobikisa bango,+
Kasi bakosi bakokangama na mposa na bango moko.+
10 Bolamu ya bato ya sembo esalaka ete bato na engumba básepela,
Mpe bato bakosepela mingi ntango bato mabe bakufi.+
11 Mpo na lipamboli ya moto oyo azangi mbeba, engumba ekómaka makasi,+
Kasi monɔkɔ ya bato mabe ebebisaka yango.+
12 Moto oyo azali na bososoli te* atyolaka mozalani na ye,
Kasi moto oyo azali na bososoli mingi afandaka nyɛɛ.+
13 Moto oyo akoselaka bato makambo atambolatambolaka mpo na kobimisa makambo oyo elobami na nkuku,+
Kasi moto ya kotyela motema* abombaka likambo.
14 Bato banyokwamaka ntango mayele ya kotambwisa makambo* ezali te,
Kasi soki bapesi-toli bazali ebele makambo elongaka.+
15 Moto nyonso oyo akomipesa ndanga mpo na biloko oyo mopaya adefi akosuka mabe,+
Kasi ye oyo aboyi* kosala boyokani* ya ndenge wana akozala na kimya.
19 Moto oyo atɛlɛmi ngwi mpo na bosembo azali na nzela ya bomoi,+
Kasi moto oyo alandaka oyo ezali mabe azali kokende na liwa.
20 Yehova ayinaka baoyo bazali na motema ya bokosi,+
Kasi baoyo nzela na bango ezangi mbeba basepelisaka ye.+
22 Lokola lopɛtɛ ya wolo na zolo ya ngulu
Mwasi ya kitoko oyo azangi bososoli azali ndenge wana.
24 Moto oyo akabaka mingi* akómaka na biloko mingi;+
Kasi moto mosusu abombaka oyo asengelaki kokaba mpe asukaka mobola.+
25 Moto oyo akabaka akopambolama,*+
Mpe moto oyo apesaka basusu mai ya komɛla, bakopesa ye mpe mai ya komɛla.+
26 Moto oyo aboyaka kotɛkela basusu mbuma, bakolakela ye mabe,
Kasi moto oyo atɛkaka yango akozwa mapamboli.
27 Moto oyo alukaka mpenza kosala bolamu alukaka kondimama,+
Kasi moto oyo alukaka kosala mabe, yango nde ekokómela ye mpenza.+
28 Moto oyo atyaka motema na bomɛngo na ye akonyokwama,+
Kasi moto ya sembo akolonga mpenza mpe akozala lokola nkasa mobesu na nzete.+
29 Moto oyo amemi mpasi* na libota na ye akozwa eloko te,*+
Mpe zoba akozala mosaleli ya moto ya bwanya.
30 Mosala ya moto ya sembo ezali lokola nzete ya bomoi,+
Mpe moto oyo asimbaka mitema azali moto ya bwanya.+
4 Mwasi ya malonga azali motole mpo na mobali na ye,+
Kasi mwasi oyo asalaka makambo ya nsɔni azali lokola maladi oyo elyaka mikuwa ya mobali na ye.+
5 Makanisi ya bato ya sembo ezali malamu,
Kasi batoli ya bato mabe ezali bokosi.
8 Bakumisaka moto soki azali ekɛngɛ na maloba na ye,+
Kasi batyolaka moto oyo azali na motema ya bokosi.+
9 Moto oyo bamonaka mpamba kasi azali na mosaleli
Azali malamu koleka moto oyo amikumisaka kasi azali na bilei* te.+
10 Moto ya sembo abatelaka malamu banyama na ye ya mboka,*+
Kasi ata motema mawa ya moto mabe eyokisaka mpasi.
11 Moto oyo asalaka bilanga akotonda na bilei,+
Kasi moto oyo alandaka makambo ya mpambampamba azangi bososoli.*
12 Moto mabe alulaka nyama oyo bato mabe mosusu bakangi,
Kasi moto ya sembo azali lokola nzete oyo epiki misisa na yango makasi, oyo ebotaka mbuma.
13 Moto mabe akozwa mpasi mpo na maloba na ye moko ya mabe,*+
Kasi moto ya sembo akobika na mpasi na ye.
14 Maloba oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto ekoki kosala ete makambo na ye etambola malamu,+
Mpe oyo asalaka ekopesa ye mbano.
16 Zoba amonisaka nkanda na ye+ nokinoki,*
Kasi moto ya ekɛngɛ akangaka motema ntango bapesi ye nkanda.*
18 Koloba kozanga kokanisa ezali lokola kozokisa na mopanga,
Kasi lolemo ya bato ya bwanya ebikisaka.+
19 Mbɛbu oyo elobaka solo ekoumela mpo na libela,+
Kasi lolemo oyo elobaka lokuta ekozala kaka mpo na mwa ntango.+
20 Bokosi ezali na motema ya baoyo bazali kokana kosala mabe,
21 Eloko moko te oyo eyokisaka mpasi ekokómela moto ya sembo,+
Kasi moto mabe akotonda mpenza na mpasi.+
22 Yehova ayinaka mbɛbu oyo elobaka lokuta,+
Kasi bato oyo basalaka makambo na bosembo basepelisaka ye.
26 Moto ya sembo aponaka esika malamu ya koleisa bibwɛlɛ matiti,
Kasi etamboli ya bato mabe ebungisaka bango nzela.
2 Maloba oyo ebimaka na monɔkɔ ya moto, ekosala ete alya oyo ezali malamu,+
Kasi mposa makasi* ya bakosi ezalaka mpo na kosala mobulu.
3 Moto oyo azali kobatela monɔkɔ na ye* azali kobatela bomoi na ye.+
Kasi moto oyo apekisaka monɔkɔ na ye te akozwa mpasi.+
4 Moto ya gɔigɔi atondi na mposa, kasi azali na eloko te.+
Nzokande moto oyo asalaka mosala makasi akotonda na biloko.*+
7 Moto mosusu amilakisaka ete azali mozwi kasi azali na eloko te;+
Moto mosusu amilakisaka ete azali mobola kasi azali na bozwi ebele.
11 Bomɛngo oyo ezwami nokinoki* ekokita mpe nokinoki,+
Kasi moto oyo azwi bomɛngo na ye mokemoke* ekomata.
15 Mayele mingi ya kososola esalaka ete moto andimama,
Kasi nzela ya bakosi ezalaka mabakumabaku.
18 Moto oyo atyelaka disiplini likebi te akómaka mobola mpe azwaka nsɔni,
20 Moto oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya,+
Kasi moto oyo azali moninga ya bazoba akosuka mabe.+
22 Moto malamu atikelaka bana ya bana na ye libula,
Kasi bozwi ya bato ya masumu ebombamaka mpo na bato ya sembo.+
23 Mabele ya babola oyo ebalolami ebotaka bilei mingi,
Kasi ekoki* kolongolama mpo na kozanga bosembo.
24 Moto oyo asaleli fimbo* te mpo na mwana na ye azali koyina ye,+
Kasi moto oyo alingi ye akosala nyonso* apesa ye disiplini.+
14 Mwasi ya bwanya mpenza atongaka ndako na ye,+
Kasi oyo ya zoba abukaka yango na mabɔkɔ na ye moko.
2 Moto oyo azali kotambola na kozanga mbeba abangaka Yehova,
Kasi moto oyo banzela na ye ezali ya bokosi atyolaka Ye.
3 Maloba ya lolendo ya bazoba ezali lokola fimbo,
Kasi mbɛbu ya bato ya bwanya ekobatela bango.
4 Esika bangɔmbɛ ezali te, elyelo ya bibwɛlɛ ezali pɛto,
Kasi soki ngɔmbɛ-mobali ya nguya ezali, biloko ya kobuka ekómaka ebele.
6 Motyoli alukaka bwanya kasi azwaka yango te,
Kasi moto ya mayele anyokwamaka te mpo na kozwa boyebi.+
8 Na bwanya moto ya ekɛngɛ ayebaka nzela oyo azali kokende,
10 Kaka motema ya moto nde eyebaka mpasi na yango,*
Mpe moto mosusu te akoki kokabola esengo na yango.
13 Ata na kosɛka motema ekoki kozala na mpasi,
Mpe esengo ekoki kobongwana mawa.
14 Moto oyo azangi bosembo na motema akobuka mbuma ya etamboli na ye,+
Kasi moto malamu akozwa mbano mpo na misala na ye.+
15 Moto oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso,
Kasi moto ya ekɛngɛ akanisaka liboso ya kosala likambo.+
16 Moto ya bwanya azalaka ekɛngɛ mpe akimaka mabe,
Kasi zoba akanisaka te* mpe amityelaka motema koleka ndelo.
17 Moto oyo asilikaka noki asalaka makambo ya bozoba,+
Kasi moto oyo atalelaka makambo malamumalamu* bayinaka ye.
18 Bato oyo bazangi mayele libula na bango ezali bozoba,
Kasi bato ya ekɛngɛ mbano na bango ezali boyebi.+
19 Basali-mabe bakogumbama liboso ya bato malamu,
Mpe bato mabe bakogumbama na baporte ya bato ya sembo.
21 Moto oyo atyolaka mozalani na ye azali kosala lisumu,
Kasi moto oyo amoniselaka moto mpamba motema mawa azalaka na esengo.+
22 Baoyo bazali kokana kosala mabe bakobunga nzela te?
Kasi baoyo balingaka kosala malamu bakozwa boboto* mpe bosembo.+
23 Mosala makasi ya ndenge nyonso ezalaka na litomba,
Kasi moto oyo asukaka kaka na koloba akokelela.+
25 Motatoli ya solo abikisaka bomoi,
Kasi moto ya bokosi akosaka ntango nyonso.
26 Moto oyo abangaka Yehova, atyelaka ye motema mingi,+
Mpe kobanga yango ekozala esika ya kokima mpo na bana na ye.+
27 Kobanga Yehova ezali liziba ya bomoi,
Mpo na kolongola moto na mitambo ya liwa.
29 Moto oyo ayokaka nkanda noki te azali na bososoli mingi,+
Kasi moto ya motema mokuse amonisaka bozoba na ye.+
31 Moto oyo abubaka moto mpamba azali kofinga Mokeli na ye,+
Kasi moto nyonso oyo amoniselaka mobola motema mawa azali kopesa Ye nkembo.+
32 Moto mabe akokweisama mpo na mabe na ye moko,
Kasi moto ya sembo akobatelama mpo na bosembo na ye.+
35 Mokonzi asepelaka na mosaleli oyo asalaka na bososoli,+
Kasi azalaka na nkanda makasi epai ya moto oyo asalaka makambo na ndenge ya nsɔni.+
2 Lolemo ya bato ya bwanya esalelaka boyebi na ndenge ya malamu,+
Kasi monɔkɔ ya bazoba elobaka makambo ezangá ntina.
6 Na ndako ya moto ya sembo, biloko ya motuya ezalaka ebele,
8 Mbeka ya bato mabe ezali eloko oyo Yehova ayiná,+
Kasi libondeli ya bato oyo bazangi mbeba esepelisaka ye.+
10 Moto oyo asalaka te oyo ezali sembo alingaka disiplini te;+
Kasi moto nyonso oyo ayinaka mpamela akokufa.+
11 Nkunda* mpe esika ya libebi ebombami ata moke te na miso ya Yehova.+
Ekozala boni mpo na mitema ya bana ya bato!+
12 Mosɛki alingaka te moto oyo azali kosembola* ye.+
Alukaka te toli epai ya bato ya bwanya.+
15 Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe,+
Kasi moto oyo azali na motema ya esengo* azalaka na fɛti ntango nyonso.+
17 Elubu ya ndunda epai bolingo ezali, ezali malamu+
Koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta epai koyina ezali.+
18 Moto ya nkandankanda abimisaka kowelana,+
Kasi moto oyo ayokaka nkanda noki te akitisaka koswana.+
19 Nzela ya moto ya gɔigɔi ezali lokola lopango ya nsendensende,+
Kasi nzela ya bato oyo bazangi mbeba ezali lokola nzela monene oyo ezangi mabulu.+
23 Moto asepelaka kopesa eyano ya malamu,*+
Mpe liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezali mpenza malamu!+
25 Yehova akobuka ndako ya moto ya lolendo,+
Kasi akobatela ndelo ya mabele ya mwasi oyo mobali akufá.+
27 Moto oyo azwaka litomba na ndenge ya mabe amemaka mpasi* na ndako na ye moko,+
Kasi moto oyo ayinaka kanyaka akokoba kozala na bomoi.+
28 Moto ya sembo amanyolaka na motema na ye liboso ya koyanola,*+
Kasi monɔkɔ ya bato mabe ebimisaka makambo ya mabe.
5 Yehova ayinaka moto nyonso oyo azali na lolendo na motema na ye.+
Yebá* ete akozanga te kozwa etumbu.
6 Na motema boboto mpe na bosembo nde libunga elimbisamaka,+
Mpe na kobanga Yehova nde moto atikaka mabe.+
7 Ntango Yehova azali kosepela na banzela ya moto,
Asalaka ete ata banguna na ye bázala na kimya elongo na ye.+
8 Eleki malamu kozala na biloko moke kasi kotikala sembo+
Na esika ya kozala na bozwi mingi mpe kozanga bosembo.+
9 Moto akoki kokanisa na motema na ye nzela oyo akokende,
Kasi Yehova nde atambwisaka matambe na ye.+
13 Maloba ya bosembo esepelisaka bakonzi.
Balingaka moto oyo alobaka na bosembo.+
15 Soki mokonzi amoniseli moto boboto, moto yango akozala na esengo;
Boboto na ye ezali lokola lipata ya mbula na eleko ya prɛnta.+
16 Kozwa bwanya ezali mpenza malamu koleka wolo!+
Eleki malamu kozwa mayele na esika ya palata.+
17 Bato oyo bazangi mbeba baboyaka kolanda nzela ya mabe.
Moto nyonso oyo abatelaka nzela na ye abatelaka bomoi* na ye.+
19 Eleki malamu kozala moto ya komikitisa na kati ya bato ya komikitisa+
Na esika ya kokabola biloko oyo epunzami ya bato ya lofundo.
22 Mayele ya kososola ezali liziba ya bomoi epai ya baoyo bazali na yango,
Kasi disiplini ya bazoba ezali bozoba na bango moko.
24 Maloba ya kosepelisa ezali ndako ya mafuta ya nzoi,
28 Moto ya mayele mabe abimisaka kowelana,+
Mpe moto oyo akoselaka bato makambo akabolaka baninga ya motema.+
29 Moto ya mobulu alengolaka mozalani na ye,
Mpe amemaka ye na nzela ya mabe.
30 Afinafinaka liso na ye ntango alingi kosala mabe.
Amungamungaka ntango azali kosala mabe.
32 Moto oyo ayokaka nkanda noki te+ azali malamu koleka moto ya nguya,
Mpe moto oyo apekisaka nkanda na ye* azali malamu koleka moto oyo azwi engumba.+
17 Eteni ya limpa ekauká esika kimya ezali
Ezali malamu+ koleka ndako oyo etondi na misuni* esika koswana+ ezali.
2 Mosaleli oyo azali na mayele ya kososola akozala na bokonzi likoló ya mwana oyo asalaka makambo ya nsɔni;
Akozwa libula lokola mwana ya nkolo mosala.
3 Nzungu ya kopɛtola ezali mpo na palata mpe mɔtɔ makasi mpo na wolo,+
Kasi Yehova nde atalatalaka mitema.+
5 Moto oyo atyolaka mobola azali kofinga Mokeli na ye,+
Mpe moto oyo asepelaka na likama ya moto mosusu akozanga kozwa etumbu te.+
7 Ebongi te ete zoba aloba makambo oyo ezali malamu.+
Ezali mabe koleka ntango mokonzi* asaleli maloba ya lokuta!+
9 Moto oyo alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko alukaka bolingo,+
Kasi moto oyo azali kaka kolobaloba likambo akabolaka baninga ya motema.+
10 Moto ya mayele akokanga mbala moko ntina ya mpamela+
Kasi zoba akokanga ntina te ata soki obɛti ye mbala nkama.+
12 Eleki malamu kokutana na urse oyo ebungisi bana na yango
Na esika ya kokutana na zoba na bozoba na ye.+
16 Ntina ezali nini soki zoba azali na likoki ya kozwa bwanya
17 Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso+
Mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.+
19 Moto oyo alingaka matata alingaka likambo oyo ebuki mibeko.+
Moto nyonso oyo azali koluka kotombola esika na ye ya kokɔta azali koluka kokwea.+
20 Moto oyo azali na bokosi na motema akolonga te,*+
Mpe moto oyo alobaka maloba ya lokuta akozwa libebi.
21 Moto oyo aboti mwana ya zoba azalaka na mawa;
Mpe tata ya mwana oyo azali bolole azalaka na esengo te.+
24 Bwanya ezali liboso ya moto ya bososoli,
Kasi miso ya zoba etambolatambolaka tii na bansuka ya mabele.+
28 Ata zoba akomonana moto ya bwanya soki afandi nyɛɛ,
Mpe moto oyo akangaka mbɛbu na ye akomonana moto ya bososoli.
18 Moto oyo alingaka kozala kaka ye moko alukaka bamposa na ye moko ya moimi;
Atyolaka* makambo nyonso ya bwanya.
4 Maloba ya moto ezali mai mozindo.+
Liziba ya bwanya ezali lokola mai oyo ezali kosopana.
8 Maloba ya moto oyo akoselaka bato makambo ezali lokola biloko oyo esengeli komɛlama na lokoso;+
Ekitaka mpenza tii na kati ya libumu.+
10 Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi.+
Moto ya sembo akimaka kuna mpe azwaka libateli.*+
11 Bomɛngo ya mozwi ezali engumba na ye oyo ebatelami makasi;
Na makanisi na ye, yango ezali lokola efelo oyo ebatelaka.+
17 Moto oyo asambaka liboso, emonanaka lokola ete alobi solo,+
Tii moto oyo azali kosamba ná ye akoya mpe akolandela ye malamumalamu.+
19 Ndeko oyo basali mabe azalaka matata koleka engumba oyo ebatelami makasi,+
Mpe kowelana mosusu ezali lokola bikangiseli ya ndako molai ya kofanda.+
20 Moto akotondisa libumu na ye na maloba oyo ebimaka na monɔkɔ na ye;+
Akotonda mpenza na makambo oyo ezali kobima na mbɛbu na ye.
23 Mobola alobaka na kobondela,
Kasi mozwi ayanolaka na maloba makasi.
24 Baninga mosusu bazalaka pene ya kosalana mabe,+
Kasi moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.+
2 Ezali malamu te moto azanga* boyebi,+
Mpe moto oyo asalaka makambo mbangumbangu* azali kosala lisumu.
3 Moto alandaka nzela ya mabe na bozoba na ye moko,
Mpe motema na ye ekómaka kosilikela Yehova.
6 Bato mingi balukaka moto ya lokumu* andima bango,
Mpe moto nyonso azalaka moninga ya moto oyo apesaka makabo.
Alandalandaka bango na kobondela, kasi ata moto moko te asalaka eloko.
8 Moto oyo azwaka bososoli* amilingaka.+
Moto oyo abatelaka bososoli akolonga.*+
11 Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye,+
Mpe akozwa lokumu soki alimbisi likambo oyo esali ye mpasi.*+
12 Nkanda makasi ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkɔsi,*+
Kasi soki asepeli na moto ezali lokola mamwɛ* likoló ya milona.
13 Mwana ya zoba apesaka tata na ye mpasi,+
Mpe mwasi oyo aswanaka* azali lokola nsamba oyo etangaka ntango nyonso.+
14 Ndako ná bomɛngo ezali libula oyo eutaka epai ya batata,
Kasi mwasi ya mayele autaka epai ya Yehova.+
16 Moto oyo atosaka mitindo abatelaka bomoi* na ye;+
Moto oyo atyolaka mbuma ya misala na ye akokufa.+
19 Moto ya nkandankanda akozwa etumbu;
Soki oluki kobatela ye, okobanda kosala yango mbala na mbala.+
22 Eloko ya kitoko epai ya moto ezali bolingo na ye ya sembo;+
Mpe eleki malamu kozala mobola na esika ya kozala moto ya lokuta.
24 Moto ya gɔigɔi akɔtisi lobɔkɔ na ye na kibakuli ya fɛti;
Kasi azali kokoka kozongisa yango na monɔkɔ na ye te.+
25 Bɛtá mosɛki,+ mpo moto oyo azangi mayele akóma ekɛngɛ,+
Mpe pamelá moto ya mayele, mpo boyebi na ye ebakisama.+
26 Moto oyo azali konyokola tata na ye mpe azali kobengana mama na ye
Azali mwana oyo apesaka nsɔni mpe kosambwa.+
27 Mwana na ngai, soki otiki koyoka disiplini,
Okopesa boyebi mokɔngɔ.
20 Vinyo ekómisaka moto mosɛki,+ mpe masanga oyo elangwisaka ekómisaka moto mobulumobulu;+
Moto nyonso oyo azali kotika yango ebungisa ye nzela azali na bwanya te.+
2 Nsɔmɔ oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkɔsi;*+
Moto nyonso oyo atumoli nkanda na ye atye bomoi na ye na likama.+
4 Moto ya gɔigɔi abalolaka mabele te na eleko ya malili makasi,
Na eleko ya kobuka mbuma ntango akozanga eloko akobanda kosɛngasɛnga.*+
7 Moto ya sembo atambolaka na bosembo na ye.+
Esengo na bana oyo bakoya nsima na ye.+
8 Ntango mokonzi afandi na kiti na ye ya bokonzi mpo na kosambisa,+
Miso na ye emonaka nyonso oyo ezali mabe.+
13 Kolinga mpɔngi te, noki okóma mobola.+
Fungolá miso mpe okozala na bilei ebele.+
14 Mosombi alobi: “Ezali mabe, ezali mabe!”
Nsima na yango akei mpe abandi komikumisa mpo na eloko oyo asombi.+
15 Wolo ezali, mabanga kitoko ya korai mpe ezali ebele,
Kasi monɔkɔ oyo ebimisaka boyebi ezali eloko moko ya motuya.+
16 Soki moto amipesi ndanga mpo na mopaya, zwá elamba na ye;+
Soki asali yango mpo na mwasi mopaya,* zwá ndanga epai na ye.+
17 Limpa oyo ezwami na nzela ya bokosi ezalaka elɛngi epai ya moto,
Kasi na nsima, monɔkɔ na ye ekotonda na mabanga mikemike.+
18 Mikano elongaka soki moto aluki toli,+
Osengeli na mayele ya kotambwisa makambo* ntango okei etumba.+
19 Moto oyo akoselaka bato makambo; atambolatambolaka mpo na kobimisa makambo ya nkuku;+
Kozala esika moko te na moto oyo alingá koloba makambo ya basusu.*
20 Moto nyonso oyo alakelaka tata na ye ná mama na ye mabe,
Mwinda na ye ekobomama ntango molili eyei.+
22 Koloba te ete: “Nakozongisa mabe!”+
Tyelá Yehova elikya,+ mpe akobikisa yo.+
25 Ezali motambo ntango moto abeleli mbangumbangu ete: “Mosantu!”+
Mpe kaka na nsima abandi kotalela lisusu elako yango malamumalamu.+
26 Kaka ndenge mposo ya blé ekabwanaka na mbuma+
Ndenge moko mpe mokonzi ya bwanya akabolaka bato mabe na bato ya sembo.+
27 Mpema ya moto ezali mwinda ya Yehova,
Emonisaka polele makambo mozindo oyo ezali na kati na ye.
28 Motema boboto* mpe bosembo ebatelaka mokonzi;+
Na nzela ya bolingo ya sembo akómisaka kiti ya bokonzi na ye makasi.+
30 Etumbu* esalisaka biso tótika kosala mabe,+
Disiplini* ezali lokola eloko oyo elongolaka mabe na motema na biso.
21 Motema ya mokonzi ezali lokola mikɛli ya mai na lobɔkɔ ya Yehova.+
Abalusaka yango esika nyonso oyo alingi.+
5 Mikano ya moto oyo asalaka mosala makasi ememelaka ye litomba,+
Kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akosuka mobola.+
6 Kozwa biloko ya motuya na lolemo ya lokuta
Ezali lokola londende oyo ezali kosila, motambo oyo ebomaka.*+
8 Nzela ya moto oyo azali na ngambo ezalaka ya kotɛngama,
Kasi mosala ya moto ya pɛto ezalaka ya malamu.+
9 Kofanda na mwa esika moko boye likoló ya nsamba ezali malamu
11 Ntango bapesaka mosɛki etumbu, moto oyo azangi mayele akómaka na bwanya,
13 Moto nyonso oyo akangi litoi na ye ntango moto mpamba azali koganga
Ye mpe ntango akobelela akozwa eyano te.+
14 Likabo oyo epesami na nkuku ekitisaka nkanda,+
Mpe kanyaka oyo epesami na ndenge ya kobombana* ekitisaka nkanda ya makasi mpenza.
15 Mpo na moyengebene, ezali esengo kosala likambo ya sembo,+
Kasi ezali likambo ya nsɔmɔ mpo na baoyo basalaka mabe.
16 Moto oyo atiki nzela ya mayele ya kososola
Akopema elongo na baoyo bazali na makasi te na kati ya liwa.+
17 Moto oyo alingaka kosakanasakana* akokóma mobola;+
Moto oyo alingaka vinyo mpe mafuta akokóma mozwi te.
22 Moto ya bwanya akoki komata mpe kokɔta na engumba ya bato ya nguya
Mpe kobebisa bifelo ya makasi oyo batyelaka motema.+
24 Moto ya lofundo, moto ya komikumisa oyo amitombolaka, bongo nde babengaka
Moto oyo asalaka makambo na lofundo kozanga kokanisa makama oyo ekoki kobima.+
26 Mokolo mobimba gɔigɔi alulaka na mposa makasi,
Kasi moto ya sembo apesaka mpe akangaka lobɔkɔ te.+
27 Mbeka ya moto mabe ezali eloko oyo eyinamá.+
Ekozala boni ntango apesi yango na makanisi mabe!*
29 Moto mabe asalaka ete basusu bákanisa ete azali kobanga te,+
Kasi moto oyo azangi mbeba atambolaka na nzela oyo ezali na likama te.+
30 Bwanya moko te, bososoli moko te, mpe toli moko te ekoki kotɛmɛla mokano ya Yehova.+
22 Luká kozala na nkombo malamu* na esika ya ebele ya bomɛngo;+
Kozala moto oyo bamemyaka* ezali malamu koleka palata ná wolo.
2 Mozwi mpe mobola bakokani na likambo oyo:*
Yehova nde asalá bango nyonso mibale.+
3 Moto ya ekɛngɛ amonaka likama mpe amibombaka,
Kasi moto oyo azangi mayele akobaka kokende mpe azwaka mpasi.*
5 Banzubɛ mpe mitambo ezali na nzela ya moto ya bokosi,
Kasi moto oyo azwaka bomoi* na ye na motuya azalaka mosika na yango.+
8 Moto oyo alonaka makambo ya kozanga bosembo akobuka mpasi,+
Mpe fimbo ya nkanda na ye makasi ekobukana.+
13 Moto ya gɔigɔi alobi: “Nkɔsi ezali libándá!
Nakobomama na katikati ya esika monene ya bato nyonso!”+
14 Monɔkɔ ya basi ya mobulu* ezali libulu mozindo.+
Moto oyo Yehova apesi etumbu akokwea na kati na yango.
15 Bozoba ekangami na motema ya mwana mobali,+
Kasi fimbo ya disiplini ekolongola yango mosika na ye.+
16 Moto oyo azali kobuba mobola mpo na kobakisa bozwi na ye+
Mpe moto oyo azali kopesa makabo epai ya mozwi
Bakosuka na bobola.
17 Tyá litoi na yo mpe yoká maloba ya bato ya bwanya,+
Mpo ondima boyebi na ngai na motema na yo mobimba,+
18 Mpo ezali malamu obatela yango na motema na yo mpenza,+
Mpo yango nyonso ekoba kozala na mbɛbu na yo.+
19 Mpo otyela Yehova motema,
Nazali lelo kopesa yo boyebi.
20 Naino nakomelá yo te,
Mpe napesá yo toli mpe boyebi te,
21 Mpo na koteya yo maloba ya solo mpe ya kotyela motema,
Mpo oyebisa moto oyo atindaki yo makambo oyo ezali solo?
22 Kobɔtɔla mobola biloko te kaka mpo azali mobola,+
Mpe konyokola moto mpamba te na porte ya engumba,+
23 Mpo Yehova ye moko akosamba likambo na bango+
Mpe akoboma* baoyo bazali kobuba bango.
24 Kosala boninga te na moto oyo asilikaka mpambampamba
Kotambola te elongo na moto oyo azalaka nkanda makasi,
25 Mpo oyekola ata moke te banzela na ye
Mpe omityela motambo te.+
26 Kozala te na kati ya baoyo bapesanaka lobɔkɔ mpo na kosala boyokani,
Mpo na komipesa ndanga na biloko oyo bamosusu badefi.+
27 Soki ozali na eloko ya kofuta te,
Bakozwa mbeto oyo olaleli!
29 Omoni moto oyo ayebi mosala na ye malamu?
Akotɛlɛma liboso ya bakonzi;+
Akotɛlɛma te liboso ya bato mpamba.
23 Soki ofandi mpo na kolya elongo na mokonzi,
Kebá na eloko oyo ezali liboso na yo,
Soki ozali na mposa makasi ya kolya.*
3 Kolula te bilei na ye ya elɛngi,
Mpo ezali bilei ya bokosi.
4 Koboma nzoto te mpo na kozwa bomɛngo.+
Tiká kosala bongo, kasi monisá nde mayele.*
5 Ntango obwaki miso na yo kuna, ezali lisusu te,+
Mpo ezwaka mpenza mapapu mpe epumbwaka na likoló lokola mpongo.+
6 Kolya te bilei ya moto oyo azali moimi;*
Kolula te bilei na ye ya elɛngi.
7 Mpo azali lokola moto oyo azali kotánga bilei nyonso oyo ozali kolya.
Azali koloba: “Lyá mpe mɛlá,” kasi yango te nde azali kokanisa.*
8 Okosanza mwa eloko oyo olei,
Mpe maloba na yo ya elɛngi ekokende mpamba.
12 Tyá motema na yo na disiplini
Mpe litoi na yo na maloba ya boyebi.
13 Koboya te kopesa mwana disiplini.+
Soki obɛti ye fimbo, akokufa te.
16 Nakozala na esengo na kati mpenza ya motema na ngai*
Ntango mbɛbu na yo ekoloba makambo oyo ezali malamu.
17 Motema na yo elula basumuki te,+
Kasi bangáká Yehova mokolo mobimba.+
18 Bongo mikolo ekoya ekozala malamu mpo na yo+
Mpe elikya na yo ekolongolama te.
19 Mwana na ngai, yoká mpe kómá na bwanya,
Mpe kambá motema na yo na nzela ya malamu.
20 Kozala te kati ya bato oyo bamɛlaka vinyo mingi,+
To kati ya bato oyo balyaka mosuni na lokoso.+
21 Mpo balangwi-masanga mpe bato ya lokoso bakokóma babola,+
Mpe kolalalala ekolatisa moto bilamba oyo epasuká.
24 Tata ya moto ya sembo akozala mpenza na esengo;
Moto nyonso oyo aboti mwana ya bwanya akosepela na ye.
25 Tata na yo ná mama na yo bakosepela,
Mpe mwasi oyo abotaki yo akozala na esengo.
27 Mpo mwasi ya ndumba azali libulu mozindo,
29 Banani bazalaka na mawa? Banani bayokaka nzoto malamu te?
Banani baswanaka? Banani bamilelalelaka?
Banani bazokaka kaka mpamba? Banani miso evimbaka?*
31 Kotala vinyo te ntango ezali komonana motane,
Wana ezali kobimisa ngɛlingɛli na kɔpɔ,
Mpe kokita malɛmbɛ na mongongo.
32 Mpo na nsuka, eswaka lokola nyoka,
Mpe ebimisaka pwazɔ lokola nyoka ya ngɛngɛ.*
34 Mpe okozala lokola moto oyo alali na katikati ya mbu,
Lokola moto oyo alali na nsɔngɛ ya likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa.
35 Okoloba: “Babɛti ngai, kasi nayoki mpasi te.
Batuti ngai, kasi nayebi te.
Nakolamuka ntango nini?+
Nazali na mposa ya vinyo mosusu.”*
24 Kolula bato mabe te,
Mpe koluka te kozala esika moko na bango,+
2 Mpo motema na bango emanyolaka makambo ya mobulu,
Mpe bakobaka koloba ndenge ya kosala basusu mabe.
4 Na nzela ya boyebi, bashambrɛ na yango etondaka
Na biloko ya ndenge nyonso ya motuya mpe oyo esepelisaka.+
6 Mayele ya kotambwisa makambo* ezali na ntina ntango okei etumba,+
Mpe makambo elongaka soki bapesi-toli bazali ebele.+
7 Bwanya ya solo ezali mpenza mosika na moto oyo azali zoba;+
Azali na eloko ya koloba te na porte ya engumba.
11 Bikisá baoyo bazali komemama na liwa,
Mpe pekisá baoyo bazali kokende na kotengatenga mpo na kobomama.+
12 Soki olobi: “Kasi, toyebaki likambo yango te,”
Moto oyo atalatalaka mitema amonaka yango te?+
Ɛɛ, moto oyo atalaka yo akoyeba
Mpe akofuta moto na moto na kolanda mosala na ye.+
13 Mwana na ngai, lyá mafuta ya nzoi, mpo ezali malamu;
Mafuta ya nzoi oyo euti na ndako na yango ezali elɛngi na monɔkɔ.
14 Ndenge moko mpe, yebá ete bwanya ezali malamu mpo na yo.+
Soki ozwi yango, mikolo ekoya ekozala malamu mpo na yo
Mpe elikya na yo ekolongolama te.+
15 Kobatama te pene na ndako ya moto ya sembo na likanisi ya kosala ye mabe;
Kobebisa te esika na ye ya kopema.
16 Mpo moto ya sembo akoki kokwea mbala nsambo, mpe akotɛlɛma lisusu,+
Kasi bato mabe bakobɛta libaku mpo na mpasi.+
17 Ntango monguna na yo akwei, kosepela te,
Mpe ntango abɛti libaku, motema na yo ezala na esengo te;+
18 Noki Yehova amona yango mpe asepela te,
19 Kosilika te* mpo na basali-mabe;
Kolula bato mabe te,
20 Mpo mikolo ekoya ekozala malamu te mpo na bato mabe;+
Mwinda ya bato mabe ekobomama.+
21 Mwana na ngai, bangá Yehova mpe mokonzi.+
Nani ayebi likama oyo bango mibale* bakobimisela bango?+
23 Maloba oyo ezali mpe mpo na bato ya bwanya:
Koponapona bilongi na ntango ya kosambisa ezali malamu te.+
24 Moto nyonso oyo akoloba na moto mabe ete: “Ozali sembo,”+
Bato ya bikólo bakolakela ye mabe, mpe bikólo ekolobela ye mabe.
25 Kasi makambo ekotambola malamu mpo na baoyo bazali kopamela ye;+
Mapamboli ya makambo ya malamu ekoyela bango.+
26 Bato bakopwɛpwa mbɛbu ya moto oyo azali koyanola na bosembo.+
27 Lɛngɛlá mosala na yo libándá, mpe bongisá eloko nyonso oyo esengeli na elanga;
Na nsima, tongá ndako na yo.
28 Kotatola te mpo na kofunda mozalani na yo kozanga ntina.+
Kosalela mbɛbu na yo te mpo na kokosa basusu.+
30 Nalekaki penepene ya elanga ya moto ya gɔigɔi,+
Penepene ya elanga ya vinyo ya moto oyo azangi bososoli.*
31 Namonaki ete matiti mabe ezipaki yango;
Mabele ezipamaki na matiti ya nsendensende,
Mpe efelo na yango ya mabanga ebukanaki.+
32 Natalaki yango malamumalamu mpe nabombaki yango na motema;
Namonaki yango mpe nazwaki liteya oyo:*
33 Mwa mpɔngi moke, kokanga liso mwa moke,
Kokanga mabɔkɔ mwa moke mpo na kopema,
34 Mpe bobola ekoyela yo lokola moyibi,
Mpe kokelela na yo lokola moto oyo asimbi bibundeli.+
25 Oyo mpe ezali masese ya Salomo,+ oyo bato ya Ezekiasi+ mokonzi ya Yuda basalaki kopi na yango:*
2 Nkembo ya Nzambe nde kobomba likambo,+
Mpe nkembo ya bakonzi ezali nde kotalela likambo malamumalamu.
3 Kaka ndenge likoló etombwani mosika mpe kati ya mabele ezali mpenza mozindo,
Motema ya bakonzi ekoki kososolama te.
6 Komikumisa te liboso ya mokonzi,+
Mpe kozwa esika te na kati ya bato minene,+
7 Mpo eleki malamu nde aloba na yo ete: “Yaká kofanda awa,”
Na esika akitisa yo liboso ya moto ya lokumu.+
9 Sambá likambo na yo na mozalani na yo,+
Kasi kobimisa te likambo oyo bayebisaki yo na nkuku,*+
10 Mpo moto oyo azali koyoka yo ayokisa yo nsɔni te
Mpe nsango mabe oyo okopanza ekokoka te kolongolama.
11 Liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi
Ezali lokola bapɔme ya wolo na kati ya saani ya mayemi ya palata.+
12 Mpo na litoi oyo eyokaka, moto oyo apamelaka na bwanya
Azali lokola eloko ya litoi oyo esalemi na wolo
Mpe eloko ya kobongisa nzoto oyo esalemi na wolo ya kitoko mingi.+
13 Lokola malili ya nɛjɛ na mokolo ya kobuka mbuma,
Motindami ya sembo azali mpe bongo epai ya baoyo bazali kotinda ye,
14 Lokola mapata ya londende mpe mopɛpɛ oyo ezali na mbula te
Moto oyo azali komikumisa mpo na likabo oyo apesá te* azali mpe bongo.+
16 Soki ozwi mafuta ya nzoi, lyá oyo osengeli na yango,
Mpo soki olei yango mingi koleka okoki kosanza yango.+
17 Kokende ntango nyonso te na ndako ya moninga na yo,
Noki alɛmba yo mpe ayina yo mpenza.
18 Lokola marto* ya etumba, mopanga mpe likula oyo batye mino
Motatoli ya lokuta oyo azali koloba mpo na kokweisa mozalani na ye azali mpe bongo.+
19 Na mokolo ya mpasi, kotya motema na moto oyo abongi te kotyelama motema,*
Ezali lokola lino oyo ebukaná mpe lokolo oyo ezali kolɛngalɛnga.
20 Moto oyo azali kolongola elamba na mokolo ya malili
Azali lokola vinɛgrɛ oyo basopi likoló ya mungwa ya bonkɔkɔ
Mpe lokola moto oyo azali koyemba nzembo mpo na moto oyo azali na mawa na motema.+
21 Soki monguna na yo* azali na nzala, pesá ye limpa alya;
Mpe soki azali na mposa ya mai, pesá ye mai amɛla,+
22 Mpo okotya makala ya mɔtɔ na motó na ye,*+
Mpe Yehova akopesa yo mbano.
24 Kofanda na mwa esika moko boye likoló ya nsamba ezali malamu
25 Ndenge mai ya malili esalaka epai ya moto oyo alɛmbi
Nsango malamu oyo euti na mokili moko ya mosika ezali mpe bongo.+
26 Moto ya sembo ntango andimeli* moto mabe
Azali lokola liziba ya bosɔtɔ mpe libulu ya mai oyo ebebisami.
27 Ezali malamu te kolya mafuta ya nzoi mingi koleka,+
Ezali mpe malamu te moto aluka nkembo na ye moko.+
26 Lokola nɛjɛ na eleko ya molunge mpe lokola mbula na ntango ya kobuka mbuma,
Lokumu mpe ebongi te mpo na moto ya zoba.+
2 Kaka ndenge ndɛkɛ ekimaka na ntina mpe ndenge nyampeke epumbwaka na ntina,
Ndenge moko mpe elakeli mabe ezwaka moto mpenza na ntina.*
3 Fimbo ezali mpo na mpunda, ebende ya mbanga ezali mpo na mpunda moke,+
Mpe lingenda mpo na mokɔngɔ ya bazoba.+
6 Lokola moto oyo azali komikatakata makolo, mpe azali komizokisa*
Moto oyo azali kopesa makambo na ye na lobɔkɔ ya moto oyo azali zoba azali mpe bongo.
7 Ndenge moko na makolo ya motɛngumi oyo ebebá,
Lisese oyo ebimi na monɔkɔ ya bazoba ezali mpe bongo.+
9 Lokola nzete ya nzubɛnzubɛ na lobɔkɔ ya molangwi-masanga,
Lisese ezali mpe bongo na monɔkɔ ya bazoba.
10 Lokola mobwaki-mbanzi oyo azali kozokisa kozanga kokana,*
Moto oyo azwi zoba to moleki-nzela na mosala azali mpe bongo.
12 Omoni moto oyo azali kokanisa ete azali moto ya bwanya?+
Elikya ezali mingi mpo na zoba koleka mpo na ye.
15 Moto ya gɔigɔi akɔtisi lobɔkɔ na ye na kibakuli ya fɛti,
Kasi alɛmbi makasi mpo na kozongisa yango na monɔkɔ na ye.+
16 Moto ya gɔigɔi akanisaka ete azali na bwanya mingi
Koleka bato nsambo oyo bazali kopesa eyano ya mayele.
17 Moleki-nzela oyo akómi kosilika makasi mpo* na koswana oyo etali ye te
Azali lokola moto oyo akangi mbwa na matoi.+
18 Lokola moto ya ligboma oyo azali kobwaka mbanzi ya mɔtɔ, makula mpe liwa*
19 Moto oyo akosi moninga na ye mpe alobi: “Nazalaki kosala masɛki,” azali mpe bongo.+
20 Esika nkoni ezali te mɔtɔ ekufaka,
Mpe esika moto oyo akoselaka bato makambo azali te koswana esilaka.+
21 Kaka ndenge makala mpe nkoni esalaka ete mɔtɔ epela,
Moto oyo abimisaka kowelana mpo na kongalisa koswana azali mpe bongo.+
22 Maloba ya moto oyo akoselaka bato makambo ezali lokola biloko oyo esengeli komɛlama na lokoso;
Ekitaka mpenza tii na kati ya libumu.+
23 Lokola palata ya maimai oyo bapakoli na eteni ya mbɛki ya mabele
Maloba ya boboto oyo euti na moto ya makanisi mabe ezali mpe bongo.*+
24 Moto oyo ayinaka basusu asalelaka maloba mpo na kobomba koyinana,
Kasi na motema na ye akobaka kobatela makanisi ya bokosi.
25 Ata soki azali koloba na boboto nyonso, kondimela ye te,
Mpo biloko nsambo oyo eyinamá ezali na motema na ye.*
26 Atako bokosi ezipi koyina na ye,
Mabe na ye ekomonisama na lisangá.
27 Moto oyo azali kotimola libulu akokwea na kati na yango,
Mpe moto nyonso oyo azali kobalola libanga, libanga yango ekozongela ye.+
28 Moto oyo azali kokosa azali koyina baoyo azali kosala mabe,
Mpe moto oyo azali na maloba sukali abimiselaka basusu likama.+
2 Moto mosusu akumisa yo, kasi monɔkɔ na yo moko te;
3 Libanga ezali kilo mpe zɛlo ezali kilo,
Kasi motungisi oyo zoba apesaka ezali kilo koleka yango nyonso mibale.+
5 Mpamela ya polele ezali malamu koleka bolingo ya kobombama.+
6 Moninga ya sembo apesaka toli ata soki ekoki komonana mabe,+
Kasi mapwɛpwɛ ya monguna ezali ebele.*
7 Moto oyo atondi* aboyaka* mafuta ya nzoi oyo euti na ndako na yango,
Kasi mpo na moto ya nzala,* ata eloko oyo ezali bololo ezalaka elɛngi.
8 Lokola ndɛkɛ oyo ezali koyengayenga mosika na zumbu* na yango
Moto oyo azali koyengayenga mosika ya ndako na ye azali mpe bongo.
9 Mafuta mpe mpaka ya malasi esepelisaka motema;
Ezali ndenge moko na moninga oyo apesaka yo toli kozanga bokosi.+
10 Kosundola te moninga na yo to moninga ya tata na yo,
Mpe kokɔta na ndako ya ndeko na yo te na mokolo ya likama na yo;
Moninga oyo azali pene azali malamu koleka ndeko oyo azali mosika.+
11 Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai,+
Mpo napesa eyano na moto oyo atumolaka ngai.+
12 Moto ya ekɛngɛ amonaka likama mpe amibombaka,+
Kasi moto oyo azangi mayele akobaka kokende mpe azwaka mpasi.*
13 Soki moto amipesi ndanga mpo na mopaya, zwá elamba na ye;
Soki asali yango mpo na mwasi mopaya, zwá ndanga epai na ye.+
14 Soki moto azali kopambola moninga na ye na mongongo makasi na ntɔngɔntɔngɔ,
Bakotángela ye yango lokola elakeli mabe.
15 Mwasi oyo aswanaka* azali lokola nsamba oyo etangaka ntango nyonso na mokolo ya mbula.+
16 Moto nyonso oyo akoki kopekisa ye, akoki mpe kopekisa mopɛpɛ
Mpe kosimba mafuta na lobɔkɔ na ye ya mobali.
18 Moto oyo abatelaka nzete ya figi akolya mbuma na yango,+
Mpe moto oyo akɛngɛlaka nkolo na ye akokumisama.+
19 Kaka ndenge okoki komona elongi na yo likoló ya mai,
Okoki mpe komimona ntango ozali kotala basusu.
21 Ndenge nzungu ya kopɛtola ezali mpo na palata mpe mɔtɔ makasi mpo na wolo,+
Masanzoli oyo moto azwaka emonisaka ndenge azali.*
22 Ata soki otutituti zoba na motute na kati ya liboka
Ndenge batutaka mbuma mikemike na kati ya liboka,
Akobongwana te.
23 Osengeli koyeba malamu ndenge etonga na yo ezali.
Mpe kobatela malamu* bampate na yo,+
24 Mpo bomɛngo eumelaka libela te,+
Mpe motole elandanaka te libota na libota.
25 Matiti ya mobesu elimwe, matiti ya sika ebimi,
Mpe milona ya bangomba eyanganisami.
26 Bana-mpate ya mibali ezali mpo na bilamba na yo,
Mpe bantaba ya mibali ezali mpo na kosomba elanga.
27 Mpe okozala na miliki ebele ya ntaba mpo na komileisa,
Mpo na koleisa bato ya libota na yo, mpe basaleli na yo ya basi.
28 Bato mabe bakimaka atako moto moko te azali kolanda bango,
Kasi bato ya sembo bazali lokola nkɔsi* oyo ezali kobanga eloko te.+
2 Ntango bato ya mboka moko bazali kobuka mibeko, bankumu oyo bazali kokitana bazalaka ebele,+
Kasi na lisalisi ya moto ya bososoli mpe ya boyebi, nkumu* akoumela ntango molai.+
5 Bato mabe bakangaka ntina ya bosembo te,
Kasi baoyo balukaka Yehova bakangaka ntina ya likambo nyonso.+
6 Mobola oyo azali kotambola na bosembo na ye azali malamu
Koleka mozwi oyo banzela na ye ezali sembo te.+
7 Mwana ya mayele atosaka mobeko,
Kasi moninga ya bato oyo balyaka na lokoso ayokisaka tata na ye nsɔni.+
8 Moto oyo azali kobakisa bomɛngo na ye na nzela ya matabisi+ mpe benefisi ya lokoso
Andukaka yango mpo na moto oyo amoniselaka babola boboto.+
10 Moto oyo azali kobungisa bato ya sembo nzela mpo bákɔta na nzela ya mabe akokwea na libulu na ye moko,+
Kasi bato oyo bazangi mbeba bakozwa oyo ezali malamu.+
11 Mozwi amimonaka ete azali na bwanya,+
Kasi mobola, na bososoli na ye, ayebaka soki azali mpenza nani.+
12 Ntango bato ya sembo balongi, esengo makasi* ezalaka,
Kasi ntango bato mabe bazwi bokonzi, bato babombanaka.+
13 Moto oyo azali kobomba makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te,+
Kasi moto oyo ayamboli mpe atiki yango, bakoyokela ye mawa.+
14 Esengo na moto oyo azalaka ntango nyonso ekɛngɛ,*
Kasi moto oyo akómisi motema na ye makasi akozwa mpasi.+
15 Lokola nkɔsi oyo ezali konguluma mpe urse oyo ezali koya mbangu mpo na kobunda
Moto mabe oyo azali koyangela bato oyo bazangá libateli azali mpe bongo.+
16 Mokambi oyo azangi bososoli asalelaka nguya na ye na ndenge ya mabe,+
Kasi moto oyo ayinaka litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe akokómisa bomoi na ye molai.+
17 Moto oyo abomi moto mosusu akokoba kokima tii akokende na nkunda.*+
Moto moko te asalisa ye.
18 Moto oyo azali kotambola kozanga mbeba akobika,+
Kasi moto oyo banzela na ye ezali ya bokosi akokwea na mbalakaka.+
19 Moto oyo alonaka na mabele na ye akozala na mampa ebele,
Kasi moto oyo alandaka makambo ya mpambampamba akotonda na bobola.+
20 Moto ya sembo akozwa mapamboli mingi,+
Kasi moto oyo azali kowela kozwa bomɛngo akozanga te kozwa likambo.+
23 Moto oyo azali kopamela moto mosusu,+ na nsuka bakosepela na ye mingi+
Koleka moto oyo azali koloba maloba sukali na lolemo na ye.
24 Moto oyo azali koyiba tata na ye ná mama na ye mpe alobi: “Ezali mabe te,”+
Azali moninga ya moto oyo abebisaka.+
27 Moto oyo akabelaka babola akozanga eloko te,+
Kasi moto oyo akangeli bango miso na ye akozwa bilakeli mabe mingi.
28 Ntango bato mabe bazwi bokonzi, bato bamibombaka,
Kasi ntango bakufi, bato ya sembo bakómaka ebele.+
29 Moto oyo bapameli mbala na mbala, kasi azali kaka kokómisa motó na ye makasi*+
Akobukana na mbala moko, mpe elikya ya kobikisama ekozala te.+
3 Moto oyo alingaka bwanya asepelisaka tata na ye,+
Kasi moto oyo asalaka boninga na basi ya ndumba abebisaka bomɛngo na ye.+
5 Mobali oyo azali kolobela mozalani na ye maloba sukali
Ezali lokola azali kotya motambo liboso ya makolo na ye.+
6 Soki moto mabe abuki mibeko, yango etyaka ye na motambo,+
Kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.+
9 Ntango moto ya bwanya abandi kowelana na zoba,
Eloko ebimaka kuna ezali kaka makɛlɛlɛ mpe kotyola.+
10 Bato oyo balingaka kosopa makila bayinaka moto nyonso oyo asali likambo te,*+
Mpe balukaka koboma bato ya sembo.*
11 Zoba abimisaka nkanda* na ye nyonso polele,+
Kasi moto ya bwanya afandaka kimya mpe apekisaka yango.+
13 Mobola ná monyokoli bakokani na likambo oyo:*
Yehova angɛngisaka miso na bango nyonso mibale.*
14 Ntango mokonzi azali kosambisa babola na bosembo,+
Kiti na ye ya bokonzi ekopikama makasi mpo na libela.+
15 Fimbo* mpe mpamela epesaka bwanya,+
Kasi mwana oyo batiki asala oyo alingi akoyokisa mama na ye nsɔni.
16 Ntango bato mabe bakómi mingi, kobuka mibeko ekómaka mingi,
Kasi bato ya sembo bakomona kokwea na bango.+
18 Esika emonaneli* ezali te, bato bazalaka na komipekisa te,+
Kasi esengo na bato oyo bazali kotosa mobeko.+
20 Omoni moto oyo azali koloba kozanga kokanisa?+
Elikya ezali mingi mpo na zoba koleka mpo na ye.+
21 Soki ozali kobondelabondela mosaleli banda bolenge na ye,
Na nsuka akokóma moto oyo azangi botɔndi.
24 Moto oyo asalaka boninga na moyibi azali komiyina.
Bakobenga ye apesa litatoli,* kasi akoloba eloko te.+
26 Bato mingi balukaka kokutana na mokonzi mpo na kosɛnga lisalisi,*
Kasi Yehova nde akataka likambo na bosembo.+
30 Maloba ya kilo ya Agure mwana ya Yake, oyo alobaki na Itiele mpe Ukale.
3 Nayekoli bwanya te,
Mpe nazali na boyebi te ya Oyo Aleki Mosantu.
4 Nani amatá na likoló mpe na nsima akitá?+
Nani akangá mopɛpɛ na tandu ya mabɔkɔ na ye?
Nani alíngá mai na elamba na ye?+
Nani atyá* bansuka nyonso ya mabele?+
Nkombo na ye nani mpe nkombo ya mwana na ye nani, soki oyebi?
5 Liloba nyonso ya Nzambe ezali pɛto.+
Azali nguba mpo na baoyo bakimaka epai na ye.+
7 Nasɛngi yo makambo mibale.
Kopimela ngai yango te liboso nakufa.
8 Longolá mosika na ngai bokosi mpe lokuta.+
Kopesa ngai bobola te, bomɛngo mpe te.
Pesá ngai kaka bilei oyo ekoki na ngai,+
9 Noki natonda, nawangana yo mpe naloba: “Yehova nde nani?”+
Kotika mpe te nakóma mobola, nayiba mpe nasambwisa nkombo ya Nzambe na ngai.
14 Libota mosusu ya bato mino na bango ezali mipanga
Mpe mbanga na bango ezali bambeli,*
Balyaka bato mpamba ya mabele
Mpe babola na kati ya bato.+
15 Nsonzo ezali na bana basi mibale oyo babelelaka: “Pesá! Pesá!”
Ezali na biloko misato oyo etondaka te,
Minei oyo elobaka soki moke te ete: “Ekoki!”:
16 Nkunda*+ mpe mwasi oyo abotaka te,
Mabele oyo ezangi mai,
Mpe mɔtɔ oyo elobaka soki moke te ete: “Ekoki!”
17 Liso oyo esɛkaka tata mpe eboyaka kotosa mama+
Bayanganga ya lobwaku* ekotɔbɔla yango,
Mpe bana ya mpongo ekolya yango.+
18 Ezali na makambo misato oyo ekamwisaka ngai mingi mpenza,
Mpe minei oyo nakokaka kokanga ntina te:
19 Nzela ya mpongo na likoló,
Nzela ya nyoka likoló ya libanga,
Nzela ya masuwa na katikati ya mbu,
Mpe nzela ya mobali ntango azali ná mwasi.
20 Talá nzela ya mwasi ya ekobo:
Alei mpe apangwisi monɔkɔ na ye;
Na nsima alobi: “Nasali mabe moko te.”+
21 Ezali na makambo misato oyo eningisaka mabele
Mpe makambo minei oyo ekoki kokangela motema te:
22 Ntango moombo akómi koyangela,+
Ntango zoba atondi na bilei,
23 Ntango mwasi oyo bayiná* azwi libala,
Mpe ntango mosaleli ya mwasi azwi esika ya nkolo na ye ya mwasi.+
26 Basimbiliki ya mabanga+ ezali bikelamu ya nguya te,*
Atako bongo esalaka ndako na yango na mabanga.+
28 Monselekete babengi jeko+ ekangamaka na eloko nyonso na nzela ya makolo na yango
Mpe ekɔtaka tii na ndako ya mokonzi.
29 Ezali na biloko misato oyo ndenge na yango ya kotambola ekamwisaka,
Mpe minei oyo ndenge na yango ya kokende ekamwisaka:
30 Nkɔsi ezali na nguya koleka banyama mosusu,
Oyo ezongaka nsima te liboso ya moto;+
31 Mbwa ya mbangu, ntaba ya mobali;
Mpe mokonzi oyo azali kotambola na limpinga ya basoda na ye.
33 Mpo kaka ndenge kobɛtabɛta miliki ebimisaka manteka
Mpe kofinafina zolo ebimisaka makila,
Kokangakanga nkanda ebimisaka koswana.+
31 Maloba ya mokonzi Lemuele, maloba ya kilo oyo mama na ye ayebisaki ye mpo na koteya ye:+
2 Naloba na yo nini, Ee mwana na ngai
Naloba nini, Ee mwana ya libumu na ngai
Mpe naloba nini, Ee mwana ya bilako na ngai?+
4 Ebongi na bakonzi te, Ee Lemuele,
Ebongi na bakonzi te komɛla vinyo,
Ebongi na bankumu te koloba ete: “Masanga na ngai ezali wapi?”+
5 Soki te bakomɛla mpe bakobosana mobeko
Mpe bakokata na bosembo te likambo ya bato mpamba.
6 Bópesa masanga oyo elangwisaka epai ya bato oyo balingi kokufa+
Mpe vinyo epai ya bato oyo batungisami na makanisi.+
7 Tiká bango bámɛla mpe bábosana bobola na bango;
Tiká bango bákanisa lisusu mpasi na bango te.
8 Lobá mpo na kosamba likambo ya bato oyo bakokoka kosamba te;
Sambá mpo na ntomo ya baoyo bazali kokufa.+
א [Alef]
10 Nani akoki kozwa mwasi ya malonga?*+
Motuya na ye eleki mosika oyo ya mabanga kitoko ya korai.*
ב [Bet]
11 Mobali na ye atyelaka ye motema mobimba,
Mpe azangaka eloko moko te ya motuya.
ג [Gimel]
12 Apesaka mobali na ye mbano ya makambo ya malamu, kasi ya mabe te,
Mikolo nyonso ya bomoi na ye.
ד [Dalet]
ה [He]
ו [Waw]
15 Lisusu alamukaka ntango butu ezali naino,
Mpe apesaka bato ya ndako na ye bilei
Mpe basaleli na ye ya basi ndambo na bango.+
ז [Zayin]
ח [Het]
ט [Tet]
18 Amoni ete mombongo na ye ezali kofuta malamu;
Mwinda na ye ekufaka te na butu.
י [Yod]
19 Mabɔkɔ na ye esimbi motonga ya molai ya kokangisa nsinga,
Mpe mabɔkɔ na ye esimbi motonga ya mokuse mpo na kosala nsinga.+
כ [Kaf]
ל [Lamed]
21 Na eleko ya malili amitungisaka te mpo na bato ya ndako na ye,
Mpo bato nyonso ya ndako na ye balataka bilamba oyo epesaka molunge.*
מ [Mem]
22 Amisaleli babulangiti.
Bilamba na ye ezali ya lini mpe ya lɛnɛ ya mwa motane-bulé.
נ [Nun]
ס [Samek]
ע [Ayin]
פ [Pe]
צ [Tsade]
ק [Kof]
28 Bana na ye batɛlɛmi mpe batángi ye moto ya esengo;
Mobali na ye atɛlɛmi, mpe akumisi ye.
ר [Resh]
ש [Shin]
30 Bonzenga ekoki kokosa, mpe kitoko ekoki kozala mpo na mwa ntango;*+
Kasi mwasi oyo abangaka Yehova akokumisama.+
ת [Taw]
To, “Maloba ya bwanya.” Na Ebre, nkombo ya mokanda oyo euti na maloba na yango ya ebandeli.
To, “sambole.”
To, “Kozala na limemya makasi mpo na.”
To, “mobeko.”
To, “ekɔti ya bokonzi.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kobwaka mbɛsɛ.”
To, “tokozala kaka na saki moko.”
Na Ebre, “monyama.” Minyama ezalaki kosalelama mpo na kokanga bandɛkɛ.
Lil., “likoló.”
To, “Bóbongwana mpo na kolanda mpamela na ngai.”
Lil., “bakolya mbuma ya.”
To, “mikano.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “mopaya.” Ekoki mpenza kozala mwasi oyo azali mosika na Nzambe na likambo etali bizaleli malamu.
To, “kolɛngola.”
Lil., “mwasi mopaya.” Ekoki mpenza kozala mwasi oyo azali mosika na Nzambe na likambo etali bizaleli malamu.
To, “moninga ya motema ya.”
Lil., “kokende epai na ye.”
To, “mibeko.”
To, “bosembo.”
Lil., “kondimela te.”
Lil., “motɔlu.”
To, “ya malamu mpenza.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Ekoki mpenza kozala bizaleli ya Nzambe oyo elobelami na bavɛrsɛ oyo eleki.
To, “ekotutana na eloko moko te.”
To, “mobeko.”
To, “eloko ya liboso.”
Lil., “Sembolá litoi na yo na.”
Lil., “mosuni na bango nyonso.”
To, “miso na yo oyo ezali kongɛnga.”
To mbala mosusu, “tyá likebi mpenza na nzela oyo okolanda.”
Lil., “Sembolá litoi na yo na.”
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Mas 2:16.
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bana.”
To, “okokimela.”
Lil., “Na kati ya liyangani mpe ya lisangá.”
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Mas 2:16.
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Mas 2:16.
To, “molimo na ye eyinaka.”
To, “mobeko.”
To, “ekoteya yo.”
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Mas 2:16.
To, “mpo atondisa molimo na ye.”
Lil., “azali na motema te.”
To, “mobeko.”
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Mas 2:16.
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Mas 2:16.
To, “maloba na ye ya kolɛngola.”
To, “bato ya bindimándimá.”
Lil., “azali na motema te.”
To, “Alati bilamba ya.”
Lil., “Makolo na ye efandaka na ndako te.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “bana.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “epai ya bana ya bato.”
Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Motuya ya libula.”
To, “bantango oyo ekoki kokanisama te.”
To, “Nabotamaki lokola nde na mpasi ya kobota.”
Lil., “zolongano.”
Lil., “akembisaki.”
To, “asɛnzɛlaka na.”
To, “Ebongisi.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “bazali na motema te.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “molimo ya moto ya sembo enyokwama.”
Lil., “mitindo.”
Lil., “oyo azali na motema te.”
To, “Biloko ya motuya.”
To mbala mosusu, “azali na nzela ya bomoi.”
Lil., “mbɛbu.”
To, “etambwisaka.”
To, “mawa.”
To, “mokonzi na ye ya mosala.”
To, “Elikya ya bato ya sembo.”
To, “ebotaka mbuma ya.”
To, “lokuta.”
To, “libanga ya mobimba ya komekela kilo.”
To, “Biloko ya motuya.”
To, “moto oyo abangaka Nzambe te.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “moto oyo azali na elimo ya sembo.”
To, “batoli ya bwanya.”
Lil., “akoyina.”
Lil., “kopesana lobɔkɔ.”
To, “Moto ya bolingo ya sembo.”
To, “asalelaka molimo na ye malamu.”
To, “nsɔni.”
Lil., “Lobɔkɔ na lobɔkɔ.”
Lil., “Moto oyo apanzapanzaka.”
Lil., “akokóma mafutamafuta.”
To, “nsɔni.”
Lil., “mopɛpɛ.”
To, “azangi mayele.”
Lil., “kobatama mpo na kosopa makila.”
Lil., “limpa.”
To, “molimo ya nyama na ye ya mboka.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “akozwama na motambo.”
To, “kaka na mokolo yango.”
Lil., “azipaka nsɔni.”
Lil., “makambo oyo ezali sembo.”
Lil., “baoyo bapesaka toli mpo na.”
To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kosembolama.”
To, “molimo.”
To, “kokeba na makambo alobaka.”
Lil., “akokóma mafutamafuta.”
Lil., “ayokaka mpamela te.”
Lil., “esepelaka.”
To, “baoyo bapesanaka makanisi.”
To, “Bomɛngo oyo euti na makambo ya mpamba.”
Lil., “ayanganisaka na lobɔkɔ.”
To, “Elikya.”
To, “liloba.”
To, “Mobeko.”
To, “kosembolama.”
To, “Molimo esepelaka.”
To, “akoki.”
To, “disiplini; etumbu.”
To mbala mosusu, “nokinoki.”
To mbala mosusu, “bazoba bakosaka basusu.”
To, “bololo ya molimo na yango.”
To, “azalaka nkanda.”
To, “azalaka na makoki ya kokanisa.”
To, “bolingo ya sembo.”
To, “Lolemo oyo ebikisaka.”
Lil., “kobukana na elimo.”
To, “mpamela.”
To, “biloko.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kopamela.”
To, “elɛmbisaka elimo.”
To, “malamu.”
To, “mobulungano.”
To, “Moto oyo azali na motema te.”
To, “lisolo ya nkuku.”
Lil., “na eyano ya monɔkɔ na ye.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “nsɔni.”
To, “atalelaka malamumalamu ndenge ya koyanola; akanisaka liboso ya koloba.”
Lil., “ekómisaka mikuwa mafutamafuta.”
To, “molimo.”
Lil., “motema.”
Lil., “Kotya makambo ya motema na molɔngɔ ezali likambo ya moto.”
To, “eyano ya malamu.” Lil., “eyano ya lolemo.”
Lil., “pɛto.”
Lil., “elimo.”
Lil., “tikelá Yehova misala na yo.”
Lil., “Lobɔkɔ na lobɔkɔ.”
To, “molimo.”
Lil., “lofundo ya elimo.”
Lil., “akozwa bolamu.”
To, “maloba oyo esepelisaka.” Lil., “mbɛbu ya sukali.”
To, “komeka.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “Molimo.”
Lil., “monɔkɔ.”
To, “nkembo.”
Lil., “azali na bokonzi likoló ya elimo na ye.”
Lil., “kobwaka mbɛsɛ na kati ya elamba oyo ezipaka bibɛlɔ.”
Lil., “bambeka.”
To, “baboti.”
To, “nkumu.”
To, “libanga oyo ememaka kondimama.”
To, “kofungola liziba.”
To, “Ntango azangi bososoli.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “akomona bolamu te.”
To, “ekaukisaka mikuwa.”
Lil., “kanyaka oyo euti na ntolo.”
Lil., “bololo.”
To, “kofutisa bato ya sembo lomande.”
Lil., “azali na elimo ya kimya.”
To, “Abwakaka.”
To, “molimo.”
Lil., “etombwani likoló,” elingi koloba, likama ekokómela te moto oyo akimi kuna.
Lil., “Elimo.”
To, “kozanga mpenza elikya.”
To, “Ezali malamu te molimo ezanga.”
Lil., “azali kosala mbangumbangu na makolo na ye.”
To, “moto oyo akabaka.”
Lil., “azwaka motema.”
Lil., “akozwa bolamu.”
To, “likambo oyo ebuki mibeko.”
To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.
To, “alobaka ntango nyonso mabe.”
To, “molimo.”
To, “akopesa ye mbano.”
Lil., “kotombola te molimo na ye epai.”
To, “toli.”
To, “mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”
To mbala mosusu, “Akolukaluka na eleko ya kobuka mbuma, kasi akozwa eloko te.”
To, “Toli.”
To, “basakolaka ete bazali na bolingo ya sembo.”
To, “Mitindo ya mabanga mibale ya kilo mpe bimekeli-kilo mibale.”
To, “mwana mobali.”
To, “mopaya.”
To, “litambwisi ya bwanya.”
To, “oyo alengolaka na mbɛbu na ye.”
To, “mitindo mibale ya mabanga ya kilo.”
To, “nzela ya kokende.”
To, “Bolingo ya sembo.”
Lil., “Bampota oyo bazokisi biso.”
Lil., “Kobɛta.”
To, “makanisi.”
To mbala mosusu, “mpo na baoyo bazali koluka liwa.”
To, “alobaka mabe ntango nyonso.”
To, “Molimo ya moto mabe ezalaka.”
To, “ayebaka likambo ya kosala.”
Lil., “kanyaka na ntolo.”
To, “alingaka bisengo.”
To, “alobaka mabe ntango nyonso.”
Lil., “akomɛla.”
To, “elongo na etamboli ya nsɔni.”
Lil., “akoloba mpo na libela.”
To, “lokumu malamu.” Lil., “nkombo.”
Lil., “Kondimama.”
Lil., “bakutani.”
To, “etumbu.”
To, “molimo.”
To, “mwana; elenge.”
Lil., “Ye oyo azali na liso ya boboto.”
To, “Likambo ya kosamba.”
Lil., “mopaya.” Talá Masese 2:16.
To, “akobɔtɔla molimo ya.”
To, “Omipekisa.”
To, “Molimo oyo etondi na mposa.”
To mbala mosusu, “Tiká kotyela mayele na yo moko motema.”
To, “moto nyonso oyo liso na ye ezali mabe.”
Lil., “kasi motema na ye ezali elongo na yo te.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “Bangɛi na ngai ekozala na esengo.”
To, “Zwá.”
Lil., “mwasi mopaya.” Talá Masese 2:16.
To, “miso ezalaka molilimolili.”
To, “Baoyo bayanganaka mpo na komeka.”
To, “etupa.”
To, “Nakoluka yango lisusu.”
To, “Litambwisi ya bwanya.”
To, “na ntango ya mpasi.”
Elingi koloba, “monguna.”
To, “Kosilika makasi te.”
To, “bato oyo balukaka mbongwana.”
Elingi koloba, “Yehova ná mokonzi.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “nazwaki disiplini oyo.”
To, “bakomaki mpe basangisaki esika moko.”
To, “sekele ya basusu.”
To, “molimo ya nkolo na ye makasi.”
Lil., “likabo ya lokuta.”
To, “mpengu.”
To mbala mosusu, “mokosi.”
Lil., “moto oyo ayinaka yo.”
Elingi koloba, “kokitisa moto motema, lokola nde bazalaki konyangwisa nkanda na ye.”
To, “alobaka mabe ntango nyonso.”
Lil., “azali kotengatenga liboso ya.”
To, “oyo azali kopekisa elimo na ye te.”
To mbala mosusu, “Soki osali likambo te elakeli mabe ekozwa yo te.”
To, “Noki yo moko mpe okokana na ye.”
Lil., “komɛla mobulu.”
To, “bilingongo.”
To, “kozokisa moto nyonso.”
To, “ebalukelo.”
To mbala mosusu, “akɔti.”
To, “makula oyo ebomaka.”
Lil., “Mbɛbu ya mɔtɔmɔtɔ elongo na motema ya mabe ezali mpe bongo.”
To, “nyonso oyo ezali na motema na ye eyinami.”
Lil., “ekobota nini.”
Lil., “Mopaya asala.”
To mbala mosusu, “ezali ya solo te; ya kosɛnga na makasi.”
To, “Molimo oyo etondi.”
Lil., “ekonyatanyata.”
To, “molimo oyo ezali na nzala.”
To, “zála.”
To, “azwaka etumbu.”
To, “alobaka mabe ntango nyonso.”
Lil., “Moto mpe angɛngisaka elongi ya moninga na ye.”
To, “Sheole ná Abadona.”
To, “Moto azali na kolanda masanzoli na ye.”
To, “Tyá motema na; Tyá likebi na.”
To, “mwana-nkɔsi.”
Lil., “ye.”
To, “nkembo.”
To, “oyo azali na nsɔmɔ ntango nyonso.”
To, “libulu.”
To, “lokoso.”
To mbala mosusu, “Molimo ya lofundo.”
Lil., “akokóma mafutamafuta.”
Lil., “nkingo makasi.”
To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “bakimelaka.”
To, “bato oyo bazangi mbeba.”
To mbala mosusu, “moto ya kolongobana alukaka kobatela bomoi na ye.”
Lil., “elimo.”
Lil., “bakutani.”
Elingi koloba, “apesaka bango bomoi.”
To, “Disiplini; Etumbu.”
To, “litambwisi oyo euti na Nzambe.”
To, “Akoki koyoka ndai oyo ekangani na elakeli mabe.”
To, “Kobanga.”
To mbala mosusu, “balukaka kondimama na mokonzi.” Lil., “balukaka elongi ya mokonzi.”
Lil., “atɛlɛmisá.”
Lil., “nyɛi.”
Lolenge ya mbeli bazalaki kosalela mpo na koboma banyama.
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.
To, “mwasi oyo alingami te.”
To, “ezali na bwanya mingi mpenza.”
Lil., “ekólo moko makasi te.”
Lil., “ekólo moko ya nguya te.”
To, “ekabolami na bituluku.”
To, “Sambá likambo.”
To, “ya mayele.”
Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “na nzela ya mbuma ya mabɔkɔ na ye.”
Lil., “Akangi bokasi na loketo na ye.”
Lil., “bilamba oyo ekangami mibalemibale.”
To, “bilamba ya nse.”
To, “asɛkaka mokolo oyo ekoya.”
To, “Mateya ya boboto; Mobeko ya bolingo ya sembo.”
To, “ya mayele.”
To, “mpamba.”
Lil., “Bópesa ye mbuma ya mabɔkɔ na ye.”