Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • nwt Nzembo 1:1-150:6
  • Nzembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzembo
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Nzembo

NZEMBO

1 Esengo na moto oyo alandi te toli ya bato mabe

Mpe atɛlɛmi te na nzela ya basumuki+

Mpe afandi te na kiti ya basɛki.+

 2 Kasi asepelaka na mobeko ya Yehova,+

Mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse* butu moi.+

 3 Akokóma lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai,

Nzete oyo ebotaka mbuma na eleko na yango

Oyo nkasa na yango ekaukaka te.

Mpe nyonso oyo akosala ekolonga.+

 4 Kasi bato mabe bazali bongo te;

Bazali lokola mposo ya blé oyo mopɛpɛ ememaka.

 5 Yango wana bato mabe bakozanga te kozwa etumbu;+

Basumuki mpe bakotɛlɛma te na liyangani ya bato ya sembo.+

 6 Mpo Yehova ayebi nzela ya bato ya sembo,+

Kasi nzela ya bato mabe ekozala lisusu te.+

2 Mpo na nini bikólo ebulungani

Mpe bato ya bikólo bazali koloba na nse nse* likambo ya mpamba?+

 2 Bakonzi ya mabele batɛlɛmi

Mpe bankumu bayangani* lokola moto moko+

Mpo na kotɛmɛla Yehova mpe moto na ye oyo atyami mafuta.*+

 3 Bazali koloba: “Tóbuka minyɔlɔlɔ na bango

Mpe tólongola bansinga na bango!”

 4 Ye oyo afandi na kiti ya bokonzi na likoló akosɛka;

Yehova akotyola bango.

 5 Na ntango yango, akoloba na bango na nkanda na ye

Mpe na nkanda na ye ya makasi akobangisa bango,

 6 Akoloba ete: “Ngai moko natye mokonzi na ngai+

Na Siona,+ ngomba na ngai mosantu.”

 7 Tiká nasakola mobeko ya Yehova;

Ye alobi na ngai ete: “Yo ozali mwana na ngai;+

Lelo ngai nakómi tata na yo.+

 8 Sɛngá ngai, mpe nakopesa yo bikólo mpo ezala libula na yo

Mpe mabele tii na bansuka na yango ekozala ya yo.+

 9 Okobuka bango na lingenda ya ebende ya bokonzi,+

Mpe okopanza bango lokola mbɛki ya moyemi-mbɛki.”+

10 Sikoyo, bino bakonzi, bómonisa bososoli;

Bino basambisi ya mabele, bóndima básembola* bino.

11 Bósalela Yehova na kobanga,

Mpe bósepela na kolɛnga.

12 Bópesa mwana lokumu,*+ noki Nzambe* asilika

Mpe bókufa,*+

Mpo nkanda na ye epelaka noki.

Esengo na baoyo nyonso bazali kokima epai ya Nzambe.

Mondule ya Davidi ntango azalaki kokima mwana na ye Abisalome.+

3 Ee Yehova, mpo na nini banguna na ngai bakómi ebele boye?+

Mpo na nini bato mingi bazali kotɛmɛla ngai?+

 2 Bato mingi bazali koloba mpo na ngai* ete:

“Nzambe akobikisa ye te.”+ (Sela)*

 3 Kasi yo, Ee Yehova, ozali nguba oyo ezali kobatela ngai epai na epai,+

Nkembo na ngai+ mpe Moto oyo azali kotombola motó na ngai.+

 4 Nakobenga Yehova na mongongo makasi,

Mpe akoyanola ngai uta na ngomba na ye mosantu.+ (Sela)

 5 Nakomilalisa mpe nakolala mpɔngi;

Mpe nakolamuka na kimya,

Mpo Yehova azali kokoba kosunga ngai.+

 6 Nazali kobanga te bankóto zomi ya bato

Oyo batandami epai na epai mpo na kotɛmɛla ngai.+

 7 Tɛlɛmá, Ee Yehova! Bikisá ngai,+ Ee Nzambe na ngai!

Mpo okobɛta banguna na ngai na mbanga;

Okobuka mino ya bato mabe.+

 8 Lobiko ezali ya Yehova.+

Lipamboli na yo ezali likoló ya bato na yo. (Sela)

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Mondule ya Davidi.

4 Ee Nzambe na ngai ya bosembo, yanolá ngai ntango nazali kobenga.+

Bongiselá ngai nzela ya kokima* na ntango ya mpasi.

Moniselá ngai boboto mpe yoká libondeli na ngai.

 2 Bino bana ya bato, tii ntango nini bokokómisa nkembo na ngai eloko ya kotyolama?

Tii ntango nini bokolinga makambo mpamba mpe bokoluka makambo ya lokuta? (Sela)

 3 Bóyeba ete Yehova akomonisela mpenza moto na ye ya sembo boboto;

Yehova akoyoka ntango nakobenga ye.

 4 Bósilika, kasi bósala lisumu te.+

Bóloba na motema na bino, na mbeto na bino, mpe bófanda nyɛɛ. (Sela)

 5 Bambeka oyo bokopesa Nzambe, bópesa yango na motema malamu,

Mpe bótyela Yehova motema.+

 6 Mingi bazali koloba: “Nani akomonisa biso likambo moko ya malamu?”

Tiká pole ya elongi na yo engɛnga likoló na biso, Ee Yehova.+

 7 Otondisi motema na ngai na esengo moko monene

Koleka baoyo babuki mbuma ebele mpe bazwi vinyo ya sika ebele.

 8 Nakomilalisa mpe nakolala mpɔngi na kimya,+

Mpo kaka yo, Ee Yehova, nde okopesa ngai kimya.+

Epai ya mokambi ya nzembo, mpo na Nehilote.* Mondule ya Davidi.

5 Yoká maloba na ngai, Ee Yehova;+

Tyá likebi na kolelalela na ngai.

 2 Tyá likebi na kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi,

Ee Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, mpo yo nde nazali kobondela.

 3 Ee Yehova, okoyoka mongongo na ngai na ntɔngɔ;+

Na ntɔngɔ nakoyebisa yo likambo oyo ezali kotungisa ngai+ mpe nakozela na mposa makasi.

 4 Mpo ozali Nzambe oyo asepelaka na mabe te;+

Moto moko te ya mabe akoki kotikala epai na yo.+

 5 Moto moko te ya lolendo akoki kotɛlɛma liboso na yo.

Oyinaka baoyo nyonso basalaka makambo ya mabe;+

 6 Okoboma baoyo balobaka lokuta.+

Yehova ayinaka bato ya mobulu mpe baoyo bakosaka.*+

 7 Kasi nakokɔta na ndako na yo+ mpo na bolingo na yo ya sembo;*+

Nakogumbama natali ngámbo ya tempelo na yo mosantu mpo na kobanga yo.+

 8 Ee Yehova, kambá ngai na kati ya bosembo na yo, mpo na banguna na ngai;

Longolelá ngai mabaku na nzela na yo.+

 9 Mpo likambo moko te oyo bazali koloba ekoki kotyelama motema;

Makanisi na bango etondi na mabe;

Mongongo na bango ezali lilita ya polele;

Lolemo na bango etondi na maloba sukali.+

10 Kasi Nzambe akotánga bango ete bazali na ngambo;

Mayele na bango moko ya mabe nde ekokweisa bango.+

Tiká ete bábengana bango mpo na makambo na bango ebele ya kobuka mibeko,

Mpo batombokelaki yo.

11 Kasi baoyo nyonso bazali kokima epai na yo bakosepela;+

Bakoganga na esengo ntango nyonso.

Okokanga nzela ya kokóma epai na bango,

Mpe baoyo balingaka nkombo na yo bakosepela na yo.

12 Mpo okopambola moto nyonso oyo azali sembo,* Ee Yehova;

Okozinga bango na kondimama na yo lokola na nguba monene.+

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga oyo ebongisami mpo ekokana na lolaka ya Sheminite.* Mondule ya Davidi.

6 Ee Yehova, kopamela ngai te na nkanda na yo,

Mpe kosembola ngai te na nkanda na yo ya makasi.+

 2 Moniselá ngai boboto,* Ee Yehova, mpo makasi na ngai ezali kosila.

Bikisá ngai, Ee Yehova,+ mpo mikuwa na ngai ezali kolɛnga.

 3 Ɛɛ, nabulungani* mingi mpenza,+

Mpe nazali kotuna yo, Ee Yehova: ekoumela tii ntango nini?+

 4 Zongá, Ee Yehova, mpe bikisá ngai;*+

Bikisá ngai mpo na bolingo na yo ya sembo.+

 5 Mpo na kati ya liwa batángaka* nkombo na yo te;

Na kati ya Nkunda,* nani akosanzola yo?+

 6 Nalɛmbi na kolelalela* na ngai;+

Butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mai ya miso;

Nazali kotondisa kiti na ngai ya mpɔngi na mai ya miso.+

 7 Liso na ngai elɛmbi mpo na mawa na ngai;+

Elɛmbi* mpo na baoyo nyonso bazali konyokola ngai.

 8 Bólongwa liboso na ngai, bino nyonso baoyo bosalaka makambo ya mabe,

Mpo Yehova akoyoka mongongo ya kolela na ngai.+

 9 Yehova akoyoka lilɔmbɔ na ngai mpo na koluka ete andima ngai;+

Yehova akondima libondeli na ngai.

10 Banguna na ngai nyonso bakoyoka nsɔni mpe bakobulungana;

Bakozonga nsima, na mbala moko bakoyoka nsɔni.+

Loyembo ya mawa* oyo Davidi ayembelaki Yehova mpo na maloba ya Kushi Mobenyamina.

7 Ee Yehova Nzambe na ngai, nakimi epai na yo.+

Longolá ngai na mabɔkɔ ya baoyo nyonso bazali konyokola ngai mpe bikisá ngai,+

 2 Noki te bakopasola ngai bitenibiteni ndenge nkɔsi epasolaka,+

Mpe bámema ngai wana moto ya kobikisa ngai azali te.

 3 Ee Yehova Nzambe na ngai, soki nasali mbeba,

Soki nasali likambo oyo ezangi bosembo,

 4 Soki nasali mabe na moto oyo asaleli ngai bolamu,+

To soki napunzi monguna na ngai kozanga ntina,*

 5 Boye, tiká monguna alanda mpe azwa ngai;*

Tiká ete azwa ngai mpe anyata ngai* tii na mabele mpenza

Mpe abebisa nkembo na ngai na putulu. (Sela)

 6 Tɛlɛmá na nkanda na yo, Ee Yehova;

Tɛmɛlá nkanda makasi ya banguna na ngai,+

Lamuká mpo na ngai mpe pesá mitindo mpo likambo ekatama na bosembo.+

 7 Tiká bikólo ezinga yo,

Mpe okotɛmɛla yango uta na likoló.

 8 Yehova akokatela bato ya bikólo etumbu.+

Sambisá ngai, Ee Yehova, na kolanda bosembo* na ngai

Mpe na kolanda ezaleli na ngai ya kozanga mbeba.+

 9 Nabondeli yo, tyá nsuka na misala ya bato mabe.

Kasi bikisá bato ya sembo,+

Mpo ozali Nzambe ya sembo+ oyo atalatalaka mitema+ mpe mayoki oyo ebombaná mpenza na kati.*+

10 Nzambe azali nguba na ngai,+ Mobikisi ya baoyo bazali na motema sembo.+

11 Nzambe azali Mosambisi ya sembo,+

Mpe Nzambe asakolaka bitumbu* na ye mikolo nyonso.

12 Soki moto abongoli motema te,+ Nzambe apelisaka mopanga na ye;+

Agumbaka litimbo na Ye, mpe abongisaka yango mpo na kobwaka.+

13 Abongisaka bibundeli na ye oyo ebomaka;

Abongisaka makula na ye oyo ezali kopela.+

14 Talá moto oyo azwi zemi ya makambo oyo ezali mabe;

Amemi zemi ya mpasi mpe aboti lokuta.+

15 Atimoli libulu, mpe akómisi yango mozindo,

Kasi akwei na libulu yango oyo ye moko asalaki.+

16 Mpasi oyo abimisi ekozonga na motó na ye moko;+

Mobulu na ye moko ekokitela motó na ye.

17 Nakosanzola Yehova mpo na bosembo na ye,+

Nakoyemba mpo na kosanzola*+ nkombo ya Yehova, Oyo-Aleki-Likoló.+

Epai ya mokambi ya nzembo; mpo na Gitite.* Mondule ya Davidi.

8 Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali monene na mabele mobimba;

Yo otye nkembo na yo mosika mpenza koleka ata likoló!*+

 2 Na monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ+ otye makasi na yo

Mpo na banguna na yo,

Mpo na kosala ete monguna ná moto oyo azongisaka mabe báfanda kimya.

 3 Ntango namonaka likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo,

Sanza ná minzoto oyo obongisá,+

 4 Moto, mowei mpamba azali nani mpo okanisa ye,

Mpe mwana ya moto azali nani mpo obatela ye?+

 5 Osalaki ye mwa moke na nse ya baanzelu,*

Mpe olatisaki ye motole* ya nkembo mpe ya lokumu.

 6 Opesi ye bokonzi likoló ya misala ya mabɔkɔ na yo;+

Otye eloko nyonso na nse ya makolo na ye:

 7 Bitonga nyonso ya bampate, bangɔmbɛ,

Banyama ya zamba,*+

 8 Bandɛkɛ ya likoló mpe mbisi ya mbu,

Eloko nyonso oyo elekaka na kati ya mbu.

 9 Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali mpenza monene na mabele mobimba!

Epai ya mokambi ya nzembo; ya Mute-labene.* Mondule ya Davidi.

א [Alef]

9 Ee Yehova, nakosanzola yo na motema na ngai mobimba;

Nakolobela misala na yo nyonso ya kokamwa.+

 2 Nakosepela mpe nakozala na esengo mpo na yo;

Nakoyemba mpo na kosanzola* nkombo na yo, Ee Oyo-Aleki-Likoló.+

ב [Bet]

 3 Ntango banguna na ngai bakozonga nsima,+

Bakobɛta libaku mpe bakokufa na miso na yo.

 4 Mpo ozali kosamba likambo na ngai mpe kolongisa ngai;

Ofandi na kiti ya bokonzi na yo mpe ozali kosambisa na bosembo.+

ג [Gimel]

 5 Opameli bikólo+ mpe obomi bato mabe.

Obomi nkombo na bango libela na libela.

 6 Banguna babebisami mpo na libela;

Opikoli bingumba na bango,

Mpe bakokanisama lisusu ata moke te.+

ה [He]

 7 Kasi Yehova afandi na kiti ya bokonzi mpo na libela;+

Apiki kiti na ye ya bokonzi mpo na bosembo.+

 8 Akosambisa na bosembo bato oyo bafandi na mabele;*+

Mpo na bato ya bikólo, akozwa bikateli na bosembo.+

ו [Waw]

 9 Yehova akokóma esika makasi ya kobombana* mpo na moto oyo azali konyokwama,+

Esika makasi ya kobombana na ntango ya mpasi.+

10 Baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema;+

Okosundola ata moke te baoyo balukaka yo, Ee Yehova.+

ז [Zayin]

11 Bóyemba mpo na kosanzola Yehova, ye oyo afandi na Siona;

Bóyebisa misala na ye na kati ya bato ya bikólo.+

12 Akokanisa baoyo bazali na mpasi mpe akozongisa mabe mpo na makila na bango;+

Akobosana te kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+

ח [Het]

13 Moniselá ngai boboto, Ee Yehova; talá mpasi oyo bato bayinaka ngai bazali komonisa ngai,

Yo oyo ozali kobikisa ngai na liwa,*+

14 Mpo nasakola misala na yo oyo ebongi kosanzolama na baporte ya mwana mwasi ya Siona,+

Mpe nasepela na misala ya kobikisa.+

ט [Tet]

15 Bato ya bikólo bazindi na libulu oyo batimoli;

Lokolo na bango ekangami na monyama oyo babombaki.+

16 Yehova ayebani mpo na ekateli ya lisambisi oyo azwi.+

Moto mabe akangami na motambo oyo asalaki na mabɔkɔ na ye moko.+

(Higayone.* Sela)

י [Yod]

17 Bato mabe bakokende na Nkunda,*

Bato ya bikólo nyonso oyo babosani Nzambe.

18 Kasi mobola bakobosana ye libela te,+

Mpe elikya ya bato ya komikitisa ekozala mpamba te.+

כ [Kaf]

19 Tɛlɛmá, Ee Yehova! Moto, mowei mpamba alonga yo te.

Bikólo esambisama liboso na yo.+

20 Bangisá bango, Ee Yehova,+

Bato ya bikólo báyeba ete bazali kaka bato, bawei mpamba. (Sela)

ל [Lamed]

10 Ee Yehova, mpo na nini ozali kotɛlɛma mosika?

Mpo na nini ozali komibomba na ntango ya mpasi?+

 2 Na lofundo nyonso, moto mabe azali kolanda moto oyo azangi libateli,+

Kasi moto mabe akokangama na mayele na ye ya mabe.+

 3 Mpo moto mabe amikumisi mpo na mposa na ye ya moimi*+

Mpe azali kopambola moto ya lokoso;*

נ [Nun]

Azangi limemya epai ya Yehova.

 4 Moto mabe na lolendo na ye alukalukaka te;

Makanisi na ye nyonso ezali kaka ete: “Nzambe azali te.”+

 5 Nyonso oyo asalaka elongaka,+

Kasi azali kokanga ntina te ya mibeko na yo;+

Asɛkaka* banguna na ye nyonso.

 6 Alobi na motema na ye ete: “Nakokwea ata moke te;*

Mpo nakomona mpasi ata moke te libota na

libota.”+

פ [Pe]

 7 Monɔkɔ na ye etondi na bilakeli mabe, lokuta mpe makambo oyo ememaka mpasi;+

Mpasi mpe makambo oyo enyokolaka ezali na nse ya lolemo na ye.+

 8 Azali kobatama pembeni ya bamboka;

Uta na esika na ye ya kobombana abomi moto oyo asali likambo te.+

ע [Ayin]

Miso na ye ezali kotala mpo na kokanga moto ya mawa.+

 9 Azali kozela na esika na ye ya kobombana lokola nkɔsi na esika na ye ya kobombana.+

Azali kozela mpo akanga moto oyo azangi libateli.

Akangi moto oyo azangi libateli ntango azali kobenda monyama na ye.+

10 Moto oyo asali likambo te atutami mpe abwakami na nse;

Bato ya mawa bakwei na manzaka na ye ya makasi.

11 Alobi na motema na ye ete: “Nzambe abosani.+

Abalusi elongi na ye.

Azali komona ata eloko moko te.”+

ק [Kof]

12 Tɛlɛmá, Ee Yehova.+ Ee Nzambe, tombolá lobɔkɔ na yo.+

Kobosana te bato oyo bazangi libateli.+

13 Mpo na nini moto mabe azangi limemya epai ya Nzambe?

Alobi na motema na ye: “Okosɛnga ngai te nazongisa monɔkɔ.”

ר [Resh]

14 Kasi omonaka ntango moto azali na mpasi mpe atungisami.

Otalaka mpe ozwaka makambo na mabɔkɔ.+

Moto ya mawa atalelaka yo;+

Ozali mosungi ya mwana oyo tata akufá.+

ש [Shin]

15 Buká lobɔkɔ ya moto mabe mpe ya moto ya makambo mabe.+

Mpo ntango okoluka makambo na ye ya mabe,

Okomona yango lisusu te.

16 Yehova azali Mokonzi libela na libela.+

Bikólo elimwe na mabele.+

ת [Taw]

17 Kasi okoyoka kosɛnga ya bato ya komikitisa, Ee Yehova.+

Okokembisa mitema na bango+ mpe okotyela bango mpenza likebi.+

18 Okokata na bosembo likambo ya mwana oyo tata akufá mpe baoyo batutami,+

Mpo moto, mowei mpamba, oyo azali moto ya mabele, abangisa bango lisusu te.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Loyembo ya Davidi.

11 Nakimi epai ya Yehova.+

Ndenge nini bokoki koloba na ngai:*

“Kimá na ngomba na yo lokola ndɛkɛ!

 2 Talá ndenge bato mabe bazali kogumba litimbo;

Bazali kobongisa likula na bango na nsinga ya litimbo,

Mpo, uta na molili, bábwakela yango bato oyo bazali na motema sembo.

 3 Ntango miboko ya bosembo ebukani,

Moto ya sembo akoki kosala nini?”

 4 Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+

Kiti ya bokonzi ya Yehova ezali na likoló.+

Miso na ye emonaka, miso na ye oyo etalaka na likebi* ezali kotalatala bana ya bato.+

 5 Yehova atalatalaka moto malamu* ná moto mabe;+

Ye ayinaka* moto oyo alingaka mobulu.+

 6 Akonɔkisela bato mabe mitambo;*

Mɔtɔ ná sufulu+ mpe mopɛpɛ ya kozikisa ekozala mbano na bango.

 7 Mpo Yehova azali sembo;+ alingaka misala ya bosembo.+

Bato oyo bazali sembo bakomona elongi na ye.*+

Epai ya mokambi ya nzembo; ebongisami mpo ekokana na lolaka ya Sheminite.* Mondule ya Davidi.

12 Bikisá ngai, Ee Yehova, mpo moto ya sembo azali lisusu te;

Bato ya sembo balimwe na kati ya bato.

 2 Balobanaka lokuta;

Basalelaka maloba sukali na mbɛbu na bango* mpe balobaka makambo ya bokosi na mitema na bango.*+

 3 Yehova akolongola mbɛbu ya moto nyonso oyo asalelaka maloba sukali

Mpe lolemo oyo emikumisaka,+

 4 Baoyo balobaka ete: “Tokolonga na lolemo na biso.

Tokosalela mbɛbu na biso ndenge tolingi;

Nani akozala nkolo na biso?”+

 5 “Lokola bato ya mpasi bazali konyokwama,

Lokola babola bazali kolelalela,*+

Nakotɛlɛma mpo nasala likambo,” Yehova alobi bongo.

“Nakobikisa bango na mabɔkɔ ya baoyo bazali kosalela bango makambo na nko.”*

 6 Maloba ya Yehova ezali pɛto;+

Ezali lokola palata oyo epɛtolami na ndako ya mɔtɔ makasi oyo esalemi na mabele,* epɛtolami mbala nsambo.

 7 Okokɛngɛla bango, Ee Yehova;+

Okobatela mpo na libela mokomoko na bango na mabɔkɔ ya libota oyo.

 8 Bato mabe batambolaka kozanga komipekisa,

Mpo bana ya bato bakumisaka makambo ya mabe.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

13 Ee Yehova, tii ntango nini okobosana ngai? Mpo na libela?

Tii ntango nini okobombela ngai elongi na yo?+

 2 Tii ntango nini nakomitungisa,*

Motema na ngai ekozala na mawa mokolo mobimba?

Tii ntango nini monguna na ngai akolonga ngai?+

 3 Talá ngai mpe yanolá ngai, Ee Yehova Nzambe na ngai.

Ngɛngisá miso na ngai, mpo nalala na kati ya liwa te,

 4 Mpo monguna na ngai aloba te ete: “Nalongi ye!”

Kotika te ete banguna na ngai básepela na kokwea na ngai.+

 5 Mpo ngai natye motema na bolingo na yo ya sembo;+

Motema na ngai ekosepela na misala na yo ya kobikisa.+

 6 Nakoyembela Yehova, mpo apesi ngai mbano monene mpenza.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi.

14 Bazoba balobi na mitema na bango ete:

“Yehova azali te.”+

Bazali bato mabe mpe basalaka makambo oyo eyinami;

Ata moto moko te azali kosala malamu.+

 2 Kasi uta na likoló, Yehova azali kotala bana ya bato

Mpo na komona soki ezali na moto oyo azali na mayele ya kososola, soki ezali na moto oyo azali koluka Yehova.+

 3 Bango nyonso batiki nzela ya malamu;+

Bango nyonso mpe babebi.

Ata moto moko te azali kosala malamu,

Ata moto moko te.

 4 Ezali ata na moto mabe moko te oyo azali kokanga ntina?

Bazali kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa.

Babeleli Yehova te.

 5 Kasi nsɔmɔ moko monene ekokanga bango,+

Mpo Yehova azali na kati ya libota ya moto ya sembo.

 6 Bino basali mabe, bolukaka kosala ete mposa ya moto mpamba ekokisama te,

Kasi Yehova azali esika na ye ya kokima.+

 7 Ee lobiko ya Yisraele euta na Siona!+

Ntango Yehova akozongisa bato na ye oyo bazali bakangami,

Tiká Yakobo azala na esengo, tiká Yisraele asepela.

Mondule ya Davidi.

15 Ee Yehova, nani okoki kobengisa na hema na yo?

Nani akofanda na ngomba na yo mosantu?+

 2 Moto oyo atosaka Nzambe ntango nyonso,+

Oyo asalaka makambo oyo ezali sembo+

Mpe oyo alobaka solo na motema na ye.+

 3 Akoselaka bato makambo te,*+

Asalelaka mozalani na ye eloko moko te ya mabe,+

Mpe abebisaka lokumu ya baninga na ye te.*+

 4 Aboyaka moto nyonso ya mpambampamba,+

Kasi akumisaka baoyo babangaka Yehova.

Soki alaki likambo moko,* akokisaka yango, ata soki ekoki kobimisela ye mokakatano.+

 5 Adefisaka mbongo na ye mpo na kozwa benefisi te,+

Mpe azwaka kanyaka te mpo na kokweisa moto oyo asali likambo te.+

Moto nyonso oyo asalaka makambo wana akokwea ata moke te.*+

Mikitame* ya Davidi.

16 Batelá ngai, Ee Nzambe, mpo nakimi epai na yo.+

 2 Nalobi na Yehova ete: “Yo ozali Yehova, bolamu na ngai eutaka epai na yo.

 3 Mpe basantu na mabele,

Bato ya lokumu, bapesaka ngai esengo mpenza.”+

 4 Baoyo balandaka banzambe mosusu babakisaka mpasi na bango.+

Nakosopa ata moke te makabo na bango ya masanga ya makila,

Mpe mbɛbu na ngai ekotánga bankombo na bango te.+

 5 Yehova azali eteni na ngai, likabo oyo bapesá ngai+ mpe kɔpɔ na ngai.+

Okobatela libula na ngai.

 6 Bandelo etyami na bisika ya kitoko mpo na ngai.

Ɛɛ, nasepeli na libula na ngai.+

 7 Nakokumisa Yehova, moto oyo apesi ngai toli.+

Ata na butu, makanisi na ngai oyo ebombaná mpenza* esembolaka ngai.+

 8 Yehova azali ntango nyonso na makanisi na ngai.*+

Lokola azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakokwea ata moke te.*+

 9 Na yango, motema na ngai ezali kosepela, nazali mpenza na esengo.*

Mpe nakofanda* na kimya.

10 Mpo okotika ngai* na kati ya Nkunda* te.+

Okotika te ete moto na yo ya sembo amona libulu.*+

11 Osali ete nayeba nzela ya bomoi.+

Liboso na yo* esengo ezalaka mingi;+

Makambo ya esengo* ezalaka na lobɔkɔ na yo ya mobali mpo na libela.

Libondeli ya Davidi.

17 Yoká kosɛnga na ngai mpo na bosembo, Ee Yehova;

Tyá likebi na koganga na ngai mpo na koluka lisalisi;

Yoká libondeli na ngai, oyo nasali kozanga bokosi.+

 2 Katá likambo na bosembo mpo na bolamu na ngai;+

Tiká miso na yo emona oyo ezali sembo.

 3 Omeki motema na ngai, otalitali ngai na butu,+

Opɛtoli ngai;+

Omoni ete nakani te kosala ata likambo moko ya mabe,

Mpe monɔkɔ na ngai ebuki mobeko te.

 4 Kasi mpo na misala ya bato,

Naboyi banzela ya moyibi, na boyokani na liloba ya mbɛbu na yo.+

 5 Tiká matambe na ngai etikala na banzela na yo

Mpo makolo na ngai ebɛta libaku te.+

 6 Ee Nzambe, nazali kobelela yo mpo okoyanola ngai.+

Tyá litoi na yo epai na ngai.* Yoká maloba na ngai.+

 7 Monisá bolingo na yo ya sembo na ndenge ya kokamwa,+

Ee Mobikisi ya baoyo bazali koluka esika ya libateli na lobɔkɔ na yo ya mobali

Olongolaka bango epai ya bato oyo bazali kotombokela yo.

 8 Batelá ngai lokola mbuma ya liso na yo;+

Bombá ngai na elili ya mapapu na yo.+

 9 Batelá ngai na bato mabe oyo bazali kobundisa ngai,

Na lobɔkɔ ya banguna na ngai oyo bazingi ngai mpe balingi koboma ngai.+

10 Bakómisi mitema na bango makasi;*

Monɔkɔ na bango elobaka na lolendo mpenza;

11 Sikoyo bazingi biso;+

Bazali koluka mabaku mpo na kokweisa biso.*

12 Monguna azali lokola nkɔsi oyo ezali na mposa makasi ya kopasola nyama bitenibiteni,

Lokola mwana-nkɔsi oyo ebombani mpo na kokanga nyama.

13 Tɛlɛmá, Ee Yehova, mpo na kotɛmɛla ye+ mpe kokweisa ye na nse;

Bikisá ngai* na lobɔkɔ ya moto mabe na mopanga na yo;

14 Bikisá ngai na lobɔkɔ na yo, Ee Yehova,

Liboso ya bato ya mokili oyo,* baoyo likabo na bango ezali na bomoi oyo,+

Baoyo otondisi bango na biloko ya kitoko oyo opesi+

Baoyo batiki libula epai ya ebele ya bana na bango.

15 Kasi mpo na ngai, nakomona elongi na yo mpo nazali sembo;

Nakosepela kolamuka liboso na yo.*+

Epai ya mokambi ya nzembo. Loyembo ya mosaleli ya Yehova, Davidi, oyo alobaki na Yehova maloba ya loyembo oyo na mokolo oyo Yehova abikisaki ye na lobɔkɔ ya banguna na ye nyonso mpe na lobɔkɔ ya Saulo. Alobaki ete:+

18 Nalingaka yo, Ee Yehova, makasi na ngai.+

 2 Yehova azali libanga na ngai, esika makasi ya libateli na ngai mpe Mobikisi na ngai.+

Nzambe na ngai azali libanga na ngai,+ nakimaka epai na ye,

Nguba na ngai mpe liseke* na ngai ya lobiko,* esika makasi na ngai ya kobombana.*+

 3 Nakobelela Yehova, ye oyo abongi kosanzolama,

Mpe akobikisa ngai na mabɔkɔ ya banguna na ngai.+

 4 Bansinga ya liwa ezingaki ngai;+

Bato ya mpambampamba, oyo bazali lokola mpela ya pwasa, bapesaki ngai nsɔmɔ.+

 5 Bansinga ya Nkunda* ezingaki ngai;

Mitambo ya liwa ezalaki liboso na ngai.+

 6 Na mpasi na ngai nabelelaki Yehova,

Nakobaki kolelela Nzambe na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.

Ayokaki mongongo na ngai na tempelo na ye,+

Mpe kolela na ngai epai na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.+

 7 Bongo mabele ekómaki koningana mpe kolɛnga;+

Miboko ya bangomba eninganaki,

Mpe eninganaki epai na epai mpo bapesaki ye nkanda.+

 8 Milinga ebimaki na zolo na ye mpe emataki,

Mpe mɔtɔ oyo ezikisaka ebimaki na monɔkɔ na ye;+

Makala ya mɔtɔ oyo ezalaki kopela makasi eutaki epai na ye.

 9 Ntango akitaki asalaki ete likoló egumbama,+

Mpe molili makasi ezalaki na nse ya makolo na ye.+

10 Amataki likoló ya keruba moko mpe ayaki, azali kopumbwa.+

Azalaki kopumbwa mbangu mpenza likoló ya mapapu ya anzelu moko.*+

11 Bongo amizipaki na molili,+

Zingazinga na ye lokola esika ya kobombana,

Mai ya moindo mpe mapata minene.+

12 Mbula ya mabanga ná makala ya mɔtɔ

Eutaki na kongɛnga oyo ezalaki liboso na ye mpe ekatisaki mapata.

13 Bongo Yehova abandaki konguluma lokola nkake na likoló;+

Ye Oyo-Aleki-Likoló ayokisaki mongongo na ye+

Na mbula ya mabanga ná makala ya mɔtɔ.

14 Abɛtaki makula na ye mpe apanzaki bango;+

Atindaki mokalikali na ye mpe atyaki bango na mobulu.+

15 Nse ya mai* ekómaki komonana;+

Miboko ya mabele ekómaki komonana polele, na mpamela na yo, Ee Yehova,

Mpo na mpema oyo ebimi na zolo na yo.+

16 Uta na likoló asembolaki lobɔkɔ na ye;

Akangaki ngai mpe abimisaki ngai na mai mozindo.+

17 Abikisaki ngai na mabɔkɔ ya monguna na ngai ya makasi,+

Na mabɔkɔ ya bato oyo bayinaka ngai mpe oyo balekaki ngai na makasi.+

18 Babimelaki ngai na mokolo oyo nazalaki na mpasi,+

Kasi Yehova azalaki mosungi na ngai.

19 Abimisaki ngai mpe atyaki ngai na esika moko ya libateli;*

Abikisaki ngai mpo azalaki kosepela na ngai.+

20 Yehova apesi ngai mbano mpo na bosembo na ngai;+

Afuti ngai mpo mabɔkɔ na ngai ezali na ngambo te.*+

21 Mpo nabateli banzela ya Yehova,

Mpe naboyi kosala mabe ya kosundola Nzambe na ngai.

22 Bikateli na ye nyonso ya lisambisi ezali liboso na ngai;

Nakoboya mibeko na ye te.

23 Nakozala ntango nyonso na mbeba te liboso na ye,+

Mpe nakomibatela mpo nasala libunga te.+

24 Tiká Yehova afuta ngai mpo na bosembo na ngai,+

Mpo mabɔkɔ na ngai ezali na ngambo te liboso na ye.+

25 Epai ya moto ya sembo, ozalaka sembo;+

Epai ya moto oyo azangi mbeba, osalaka makambo oyo ezangi mbeba;+

26 Ozalaka pɛto epai ya moto oyo azali pɛto,+

Kasi ozalaka ekɛngɛ epai ya moto oyo asalaka makambo na bokosi.+

27 Mpo obikisaka bato mpamba*+

Kasi okitisaka moto ya lolendo.*+

28 Mpo yo okopelisa mwinda na ngai, Ee Yehova,

Nzambe na ngai oyo akómisaka molili na ngai esika ya pole.+

29 Na lisalisi na yo, nakoki kobunda na etuluku ya bapunzi;+

Na lisalisi ya nguya ya Nzambe, nakoki komata efelo.+

30 Nzela ya Nzambe ya solo ezali ya kokoka;+

Liloba ya Yehova epɛtolamá.+

Azali nguba mpo na baoyo nyonso bakimaka epai na ye.+

31 Mpo nani azali Nzambe, longola Yehova?+

Mpe nani azali libanga, longola Nzambe na biso?+

32 Nzambe ya solo nde moto oyo alatisi ngai nguya,+

Mpe akosembola nzela na ngai.+

33 Akómisaka makolo na ngai lokola ya nyama ebengami bishe;

Atɛlɛmisaka ngai na bisika oyo etombwaná.+

34 Alakisaka ngai ndenge ya kobunda;

Mabɔkɔ na ngai ekoki kogumba litimbo ya kwivre.

35 Opesi ngai nguba na yo mpo ebatela ngai,+

Lobɔkɔ na yo ya mobali esungaka ngai,

Mpe komikitisa na yo ekómisi ngai moto monene.+

36 Okómisi nzela monene mpo na matambe na ngai;

Makolo* na ngai ekobɛta libaku te.+

37 Nakolanda banguna na ngai mpe nakozwa bango;

Nakozonga te tii bango nyonso bakosila.

38 Nakobukabuka bango mpe bakokoka kotɛlɛma te;+

Bakokwea mpe nakonyatanyata bango na makolo na ngai.

39 Okopesa ngai makasi mpo na etumba;

Okokweisa banguna na ngai na nse ya makolo na ngai.+

40 Okosala ete banguna na ngai bákima liboso na ngai,*

Mpe baoyo bayinaka ngai, nakokangisa bango monɔkɔ.+

41 Bazali kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, kasi moto ya kobikisa bango azali te;

Bazali kobelela ata Yehova, kasi azali koyanola bango te.

42 Nakotuta bango mikemike mpe bakokóma lokola putulu oyo mopɛpɛ ememaka;

Nakobwaka bango lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala.

43 Okobikisa ngai na mabɔkɔ ya bato oyo balukaka kaka mabunga.+

Okotya ngai mokonzi ya bikólo.+

Bato oyo nayebaki te, bakosalela ngai.+

44 Soki bayoki ata nungunungu, bakotosa ngai;

Bapaya bakoya kogumbama liboso na ngai.+

45 Mpiko ya bapaya ekosila;*

Bakobima na kolɛnga na bisika na bango ya makasi ya libateli.

46 Yehova azali na bomoi! Libanga na ngai asanzolama!+

Nzambe ya lobiko na ngai atombwama!+

47 Nzambe ya solo azali kozongisa mabe mpo na ngai;+

Atye bato ya bikólo na nse na ngai.

48 Azali kobikisa ngai na mabɔkɔ ya banguna na ngai oyo bazali na nkanda;

Otomboli ngai likoló mpenza ya baoyo bazali kobundisa ngai;+

Ozali kobikisa ngai na lobɔkɔ ya moto ya mobulu.

49 Yango wana nakokumisa yo kati na bikólo, Ee Yehova,+

Mpe nakoyemba mpo na kosanzola nkombo na yo.*+

50 Asalaka misala minene* mpo na kobikisa mokonzi na ye;+

Amonisaka bolingo ya sembo epai ya moto na ye oyo atyami mafuta,+

Epai ya Davidi mpe libota* na ye mpo na libela.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

19 Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe;+

Etando* ezali kosakola mosala ya mabɔkɔ na ye.+

 2 Ezali kobimisa liloba na yango mokolo na mokolo,

Mpe ezali komonisa boyebi butu nyonso.*

 3 Elobaka te, mpe ezali na maloba te;

Mongongo na yango eyokanaka te.

 4 Kasi makɛlɛlɛ na yango* eyokani na mabele mobimba,

Mpe nsango na yango ekómi tii na bansuka ya mabele esika bato bafandi.*+

Na likoló, Nzambe atyeli moi hema;

 5 Ezali lokola mobali ya libala oyo azali kobima na shambrɛ ya libala;

Esepelaka lokola mobali ya nguya oyo azali kopota mbangu na nzela na ye.

 6 Ebimaka na nsuka moko ya likoló,

Mpe ebalukaka tii na nsuka na yango mosusu;+

Mpe eloko moko te ezangi kozwa molunge na yango.

 7 Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka,+ epesaka makasi.+

Makundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema,+ ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.+

 8 Bitinda ya Yehova ezali sembo, esepelisaka motema;+

Mitindo ya Yehova ezali pɛto, engɛngisaka miso.+

 9 Kobanga Yehova ezali pɛto,+ eumelaka seko.

Bikateli ya lisambisi ya Yehova ezali solo, yango nyonso ezali sembo.+

10 Elingami mingi koleka wolo, koleka ebele ya wolo ya kitoko;*+

Mpe eleki mafuta ya nzoi na elɛngi,+

Mafuta ya nzoi oyo ezali kouta na ndako na yango.

11 Ekebisi mosaleli na yo;+

Kobatela yango ezali na litomba monene.+

12 Nani akoki kososola mabunga?+

Limbisá ngai* mpo na masumu oyo nasali kozanga koyeba.

13 Mpe salisá mosaleli na yo asala te misala ya lofundo;+

Kotika te ete yango etambwisa ngai.+

Na ndenge yango nakozala moto oyo akoki,+

Mpe nakozala na ngambo te na masumu minene.*

14 Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola* ya motema na ngai

Esepelisa yo,+ Ee Yehova, Libanga na ngai+ mpe Mosikoli na ngai!+

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

20 Tiká Yehova ayanola yo na mokolo ya mpasi.

Nkombo ya Nzambe ya Yakobo ebatela yo.+

 2 Atinda lisalisi na yo uta na esika mosantu,+

Mpe asunga yo uta na Siona.+

 3 Akanisa makabo na yo nyonso;

Andima mpenza likabo na yo ya kotumba.* (Sela)

 4 Akokisa bamposa ya motema na yo+

Mpe alongisa makambo nyonso oyo ozali kokana.*

 5 Tokoganga na esengo mpo na misala na yo ya kobikisa;+

Tokotombola babɛndɛlɛ na biso mpo na nkombo ya Nzambe na biso.+

Yehova akokisa nyonso oyo ozali kosɛnga.

 6 Sikoyo nayebi ete Yehova abikisaka moto na ye oyo atyami mafuta.+

Ayanolaka ye uta na likoló na ye mosantu

Na misala na ye minene ya kobikisa* ya lobɔkɔ na ye ya mobali.+

 7 Basusu batyaka motema na makalo mpe basusu na bampunda,+

Kasi biso, tobelelaka nkombo ya Yehova Nzambe na biso.+

 8 Babɛti libaku mpe bakwei;

Kasi biso, totɛlɛmi mpe tozongisami.+

 9 Ee Yehova, bikisá mokonzi!+

Akoyanola biso na mokolo oyo tokobelela mpo na lisalisi.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

21 Ee Yehova, mokonzi asepelaka na makasi na yo;+

Asepelaka mpenza na misala na yo ya kobikisa!+

 2 Okokisi mposa ya motema na ye,+

Mpe oboyi te kokokisa kosɛnga ya mbɛbu na ye. (Sela)

 3 Mpo opamboli ye mingi mpenza;

Otye na motó na ye motole ya wolo ya kitoko.*+

 4 Asɛngaki yo azala na bomoi, mpe opesaki ye yango,+

Opesaki ye bomoi molai,* libela na libela.

 5 Misala na yo ya kobikisa ememeli ye nkembo monene.+

Opesi ye lokumu ná nkembo.

 6 Okómisi ye moto oyo apambolami mpo na seko;+

Osepelisi ye na esengo liboso* na yo.+

 7 Mpo mokonzi atyeli Yehova motema;+

Mpo na bolingo ya sembo ya Oyo-Aleki-Likoló, akokwea ata moke te.*+

 8 Lobɔkɔ na yo ekozwa banguna na yo nyonso;

Lobɔkɔ na yo ya mobali ekozwa baoyo bayinaka yo.

 9 Na ntango oyo etyamá, oyo okotyela bango likebi, okokómisa bango lokola esika moko ya mɔtɔ makasi.

Na nkanda na ye, Yehova akopesa bango etumbu, mpe mɔtɔ ekozikisa bango.+

10 Okolongola libota* na bango na mabele,

Mpe bana na bango na kati ya bana ya bato.

11 Mpo bakani kosalela yo likambo ya mabe;+

Baluki kosalela mayele mabe oyo ekolonga te.+

12 Mpo okosala ete bázonga nsima+

Na ndenge okotalisa litimbo* na yo epai na bango.*

13 Tɛlɛmá, Ee Yehova, mpe monisá makasi na yo.

Tokoyemba mpo na kosanzola nguya na yo.*

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Bishe ya ntɔngɔntɔngɔ.”* Mondule ya Davidi.

22 Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?+

Mpo na nini ozali koya te kobikisa ngai,

Mpo na nini ozali te koyoka koganga na ngai ya kolela?+

 2 Nzambe na ngai, na moi, nazali se kobelela, kasi ozali koyanola te;+

Mpe na butu, nazali kofanda nyɛɛ te.

 3 Kasi yo ozali mosantu,+

Masanzoli ya Yisraele ezali* zingazinga na yo.

 4 Batata na biso batyelaki yo motema;+

Batyaki motema, mpe ozalaki kaka kobikisa bango.+

 5 Babelelaki yo, mpe babikisamaki;

Batyelaki yo motema, mpe bayokaki nsɔni te.+

 6 Kasi ngai nazali nkusu, nazali moto te,

Bato basɛki ngai mpe batyoli ngai.+

 7 Baoyo nyonso bazali komona ngai bazali kosɛka ngai;+

Bazali kotyola mpe koningisa mitó na bango na kosɛka:+

 8 “Ye atyelaki Yehova motema. Tiká abikisa ye!

Tiká asikola ye, mpo asepeli na ye mingi!”+

 9 Yo Moto obimisaki ngai na libumu,+

Moto osalaki ete namiyoka ete nabatelami ntango nazalaki na mabɛlɛ ya mama na ngai.

10 Napesamaki na mabɔkɔ* na yo banda ntango nabotamaki;

Banda na libumu ya mama na ngai ozalaki Nzambe na ngai.

11 Kozala mosika na ngai te, mpo mpasi ezali pene,+

Mpe nazali na mosungi mosusu te.+

12 Ebele ya bana-ngɔmbɛ mibali bazingi ngai;+

Bana-ngɔmbɛ mibali ya nguya ya Bashane bazingi ngai.+

13 Bafungoleli ngai mpenza monɔkɔ polele,+

Lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe kopasola nyama bitenibiteni.+

14 Nasopami lokola mai;

Mikuwa na ngai nyonso ekabwani.

Motema na ngai ekómi lokola mafuta;+

Enyangwe na kati na ngai mpenza.+

15 Nguya na ngai ekauki lokola eteni ya mbɛki;+

Lolemo na ngai ekangami na misuni ya mino na ngai;+

Ozali kokitisa ngai na putulu ya liwa.+

16 Banguna na ngai bazingi ngai lokola bambwa;+

Bapusani pene na ngai lokola etuluku ya basali-mabe,+

Bazali koswa mabɔkɔ na ngai ná makolo na ngai lokola nkɔsi.+

17 Nakoki kotánga mikuwa na ngai nyonso.+

Bazali kotala ngai, mpe bazali kotalatala ngai.

18 Bakaboli bilamba na ngai kati na bango,

Mpe babwaki mbɛsɛ mpo na bilamba na ngai.+

19 Kasi yo, Ee Yehova, kozala mosika te.+

Ozali makasi na ngai; yaká noki kosunga ngai.+

20 Bikisá ngai na mopanga,

Bikisá bomoi na ngai ya motuya* na manzaka* ya mbwa;+

21 Bikisá ngai na monɔkɔ ya nkɔsi+ mpe na maseke ya bangɔmbɛ ya zamba;

Yanolá ngai mpe bikisá ngai.

22 Nakoyebisa bandeko na ngai nkombo na yo;+

Nakosanzola yo na kati ya lisangá.+

23 Bino baoyo bobangaka Yehova, bósanzola ye!

Bino nyonso libota* ya Yakobo, bópesa ye nkembo!+

Bóbanga ye, bino nyonso libota* ya Yisraele.

24 Mpo atyoli te mpe ayoki nsɔmɔ te

Mpo na mpasi ya moto oyo azali konyokwama;+

Abombeli ye elongi na ye te.+

Ntango alelelaki ye mpo na kosɛnga lisalisi, ayokaki.+

25 Nakosanzola yo na kati ya lisangá monene;+

Nakokokisa bilako na ngai liboso ya baoyo babangaka ye.

26 Bato ya komikitisa bakolya mpe bakotonda;+

Baoyo balukaka Yehova bakosanzola ye.+

Bósepela* na bomoi mpo na libela.

27 Bansuka nyonso ya mabele ekokanisa Yehova mpe ekozongela ye.

Mabota nyonso ya bikólo ekogumbamela yo.+

28 Mpo bokonzi ezali ya Yehova,+

Azali koyangela bikólo.

29 Bato nyonso ya bozwi* oyo bazali na mabele bakolya mpe bakogumbama;

Baoyo nyonso bazali kokita na putulu bakofukama liboso na ye;

Moto moko te kati na bango akoki kobatela bomoi na ye.

30 Bana* na bango bakosalela ye;

Libota oyo ekoya bakoyoka makambo etali Yehova.

31 Bakoya mpe bakoyebisa bato oyo bakobotama nsima misala na ye ya bosembo,

Mpe bakoloba ete asali makambo yango.

Mondule ya Davidi.

23 Yehova azali Mobateli* na ngai.+

Nakozanga eloko te.+

 2 Alalisaka ngai na bisika ya koleisa bibwɛlɛ oyo etondi na matiti;

Atambwisaka ngai na bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.*+

 3 Apesaka ngai* makasi.+

Atambwisaka ngai na banzela ya bosembo* mpo na nkombo na ye.+

 4 Ata soki nazali kotambola na lobwaku ya molili makasi,+

Nabangaka eloko ya mabe ata moko te,+

Mpo ozali elongo na ngai;+

Nzete na yo mpe lingenda na yo ekitisaka ngai motema.*

 5 Obongiseli ngai mesa liboso ya banguna na ngai.+

Otye mafuta na motó na ngai;*+

Kɔpɔ na ngai etondi malamu.+

 6 Ya solo, bolamu mpe bolingo ya sembo ekolanda ngai mikolo nyonso ya bomoi na ngai,+

Mpe nakofanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ngai.+

Mondule ya Davidi.

24 Mabele mpe biloko na yango nyonso ezali ya Yehova,+

Mabele oyo ebotaka mpe baoyo bazali kofanda wana.

 2 Mpo atye moboko na yango makasi likoló ya mbu,+

Mpe apiki yango makasi likoló ya bibale.

 3 Nani akoki komata na ngomba ya Yehova,+

Mpe nani akoki kotɛlɛma na esika na ye mosantu?

 4 Moto oyo mabɔkɔ na ye ezali na likambo te mpe motema na ye ezali pɛto,+

Oyo alapi ndai ya lokuta te mpo na bomoi* na ngai,

Mpe alapi ndai na bokosi te.+

 5 Akozwa mapamboli oyo euti na Yehova+

Mpe bosembo oyo euti na Nzambe na ye oyo abikisaka.+

 6 Yango nde libota ya baoyo balukaka ye,

Ya baoyo balukaka elongi na yo, Ee Nzambe ya Yakobo. (Sela)

 7 Bótombola mitó na bino, bino baporte;+

Bófungwama,* bino bisika ya kokɔta ya ntango ya kala,

Mpo Mokonzi ya nkembo akɔta!+

 8 Nani azali Mokonzi yango ya nkembo?

Yehova, oyo azali na makasi mpe na nguya,+

Yehova, azali na nguya na etumba.+

 9 Bótombola mitó na bino, bino baporte;+

Bófungwama, bino bisika ya kokɔta ya ntango ya kala,

Mpo Mokonzi ya nkembo akɔta!

10 Nani nde Mokonzi yango ya nkembo?

Ezali Yehova ya mampinga. Ye nde Mokonzi ya nkembo.+ (Sela)

Loyembo ya Davidi.

א [Alef]

25 Ee Yehova, nabaluki* epai na yo.

ב [Bet]

 2 Nzambe na ngai, natyeli yo motema;+

Salá ete nayoka nsɔni te.+

Kotika te ete banguna na ngai básepela mpo na bampasi na ngai.+

ג [Gimel]

 3 Ya solo, moto moko te oyo atyaka elikya epai na yo akoyoka nsɔni,+

Kasi nsɔni ezali kozela baoyo basalaka makambo na bokosi kaka mpamba.+

ד [Dalet]

 4 Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova;+

Teyá ngai banzela na yo.+

ה [He]

 5 Tambwisá ngai na solo na yo mpe teyá ngai,+

Mpo yo ozali Nzambe ya lobiko na ngai.

ו [Waw]

Natyaka elikya epai na yo mokolo mobimba.

ז [Zayin]

 6 Ee Yehova, kanisá motema mawa na yo, mpe bolingo na yo ya sembo,+

Oyo omonisaka ntango nyonso.*+

ח [Het]

 7 Kokanisa te masumu ya bolenge na ngai mpe makambo na ngai ya kobuka mibeko.

Kanisá ngai na kolanda bolingo na yo ya sembo,+

Mpo ozali malamu, Ee Yehova.+

ט [Tet]

 8 Yehova azali malamu mpe sembo.+

Yango wana ateyaka basumuki nzela oyo basengeli kolanda.+

י [Yod]

 9 Akotambwisa bato ya komikitisa na makambo oyo ezali sembo,*+

Mpe akoteya bato ya komikitisa nzela na ye.+

כ [Kaf]

10 Banzela nyonso ya Yehova etondi na bolingo ya sembo mpe bosolo

Mpo na baoyo bazali kotosa kondimana na ye+ mpe makundoli na ye.+

ל [Lamed]

11 Mpo na nkombo na yo, Ee Yehova,+

Limbisá libunga na ngai, atako ezali monene.

מ [Mem]

12 Soki moto azali kobanga Yehova,+

Akoteya ye nzela oyo asengeli kopona.+

נ [Nun]

13 Makambo ya malamu ekokómela ye,+

Mpe bato ya libota na ye bakozwa* mabele.+

ס [Samek]

14 Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye,+

Mpe asalaka ete báyeba kondimana na ye.+

ע [Ayin]

15 Natyelaka ntango nyonso Yehova motema mpo na koluka lisalisi,+

Mpo akolongola makolo na ngai na monyama.+

פ [Pe]

16 Balolá elongi na yo epai na ngai mpe moniselá ngai boboto,

Mpo nazali kaka ngai moko mpe nazangi lisalisi.

צ [Tsade]

17 Bampasi ya motema na ngai ekómi mingi;+

Longolá ngai na mitungisi na ngai.

ר [Resh]

18 Talá mpasi na ngai mpe kotungisama na ngai,+

Mpe limbisá masumu na ngai nyonso.+

19 Talá ndenge banguna na ngai bazali mingi

Mpe ndenge bazali mpenza koyina ngai.

ש [Shin]

20 Kɛngɛlá bomoi* na ngai mpe bikisá ngai.+

Kotika te nayoka nsɔni, mpo nakimi epai na yo.

ת [Taw]

21 Kozanga mbeba mpe bosembo ebatela ngai,+

Mpo natyeli yo elikya.+

22 Ee Nzambe, bikisá* Yisraele na bampasi na ye nyonso.

Loyembo ya Davidi.

26 Ee Yehova, sambisá ngai mpo natamboli kozanga mbeba,+

Natyeli Yehova motema, mpe natengitengi te.+

 2 Ee Yehova, talá ngai malamumalamu mpe meká ngai;

Pɛtolá makanisi na ngai oyo ebombaná mpenza* na kati mpe motema na ngai.+

 3 Mpo bolingo na yo ya sembo ezali ntango nyonso liboso na ngai,

Mpe natambolaka na solo na yo.+

 4 Nasalaka boninga te* na bato ya lokuta,+

Mpe naboyi baoyo bazali kobomba ndenge bazali.*

 5 Nayini lisangá ya basali-mabe,+

Mpe naboyi kosala boninga* na bato mabe.+

 6 Nakosukola mabɔkɔ na ngai mpo na komonisa ete nazali na ngambo te,

Mpe nakotambola zingazinga ya etumbelo na yo, Ee Yehova,

 7 Mpo na kosala ete lokito ya matɔndi eyokana,+

Mpe mpo na kosakola misala na yo nyonso ya kokamwa.

 8 Yehova, nalingaka ndako oyo ofandaka,+

Esika oyo nkembo na yo efandaka.+

 9 Kolongola ngai* te elongo na basumuki,+

Mpe kolongola bomoi na ngai te elongo na bato ya mobulu,*

10 Baoyo mabɔkɔ na bango emipesi na etamboli ya nsɔni,

Mpe baoyo lobɔkɔ na bango ya mobali etondi na kanyaka.

11 Kasi ngai, nakotambola kozanga mbeba.

Bikisá* ngai mpe moniselá ngai boboto.

12 Lokolo na ngai etɛlɛmi na esika ya patatalu;+

Na kati ya ebele ya bato oyo bayangani, nakosanzola Yehova.+

Loyembo ya Davidi.

27 Yehova azali pole na ngai+ mpe lobiko na ngai.

Nakobanga nani?+

Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+

Nakozala na nsɔmɔ ya nani?

 2 Ntango bato mabe bayaki kobundisa ngai mpo na kolya mosuni na ngai,+

Batɛmɛli na ngai mpe banguna na ngai nde babɛtaki libaku mpe bakweaki.

 3 Ata soki limpinga ya basoda etɛlɛmiseli ngai kaa,+

Motema na ngai ekobanga te.

Ata soki etumba ebimeli ngai,

Ata bongo nakotya kaka motema.

 4 Nasɛngi Yehova eloko moko,

Mpe yango nde nakoluka:

Nafanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ngai,+

Mpo na komona bolamu* ya Yehova

Mpe kotala na botɔndi tempelo* na ye.+

 5 Mpo akobomba ngai na esika na ye ya libateli na mokolo ya likama;+

Akobomba ngai na esika ya nkuku ya hema na ye;+

Akotombola ngai likoló ya libanga.+

 6 Sikoyo motó na ngai ezali likoló koleka banguna oyo bazingi ngai;

Na hema na ye nakopesa bambeka na koganga ya esengo;

Nakoyemba mpo na kosanzola* Yehova.

 7 Ee Yehova, yoká ngai ntango nazali kobelela;+

Moniselá ngai boboto mpe yanolá ngai.+

 8 Mpo na yo, motema na ngai elobi ete:

“Bóluka komona elongi na ngai.”

Ee Yehova, nakoluka komona elongi na yo.+

 9 Kobombela ngai elongi na yo te.+

Kobengana mosaleli na yo te na nkanda.

Ozali mosungi na ngai;+

Kosundola ngai te mpe kotika ngai te, Ee Nzambe ya lobiko na ngai.

10 Ata soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai,+

Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.+

11 Ee Yehova, lakisá ngai nzela na yo,+

Mpo na banguna na ngai, kambá ngai na nzela ya bosembo.

12 Kokaba ngai te epai ya banguna na ngai,*+

Mpo batatoli ya lokuta babimi mpo na kotɛmɛla ngai,+

Mpe basaleli ngai makambo na mobulu.

13 Nalingaki kozala wapi soki nazalaki na kondima te

Ete nakomona bolamu ya Yehova na mokili ya bato ya bomoi?*+

14 Tyelá Yehova elikya;+

Zalá na mpiko mpe motema na yo ezala makasi.+

Ɛɛ, tyelá Yehova elikya.

Loyembo ya Davidi.

28 Ee Yehova, nazali kaka kobelela yo, Libanga na ngai;+

Kokangela ngai matoi te.

Soki okobi kofanda nyɛɛ liboso na ngai,

Nakokóma lokola baoyo bazali kokita na libulu.*+

 2 Yoká mabondeli* na ngai ntango nazali kolelela yo mpo osalisa ngai,

Ntango nazali kotombola mabɔkɔ na ngai na ngámbo ya shambrɛ ya kati mpenza ya esika na yo mosantu.+

 3 Kopesa ngai etumbu te elongo na bato mabe, ná baoyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi,+

Baoyo bazali koloba maloba ya kimya na baninga na bango, nzokande makambo ya mabe ezali na mitema na bango.+

 4 Zongiselá bango na kolanda misala na bango,+

Na kolanda misala na bango ya mabe.

Zongiselá bango na kotalela mosala ya mabɔkɔ na bango,

Na kolanda makambo oyo basali.+

 5 Mpo bazali kotya likebi te na misala ya Yehova,+

Ata mpe na mosala ya mabɔkɔ na ye.+

Akobuka bango mpe akotonga bango te.

 6 Yehova asanzolama,

Mpo ayoki libondeli* na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.

 7 Yehova azali makasi na ngai+ mpe nguba na ngai;+

Natyeli ye motema na ngai mobimba.+

Asalisi ngai, mpe motema na ngai esepeli,

Yango wana nakosanzola ye na loyembo na ngai.

 8 Yehova azali makasi ya bato na ye;

Azali esika makasi ya libateli, abikisaka mpenza moto na ye oyo atyami mafuta.+

 9 Bikisá bato na yo, mpe pambolá libula na yo.+

Batelá bango mpe memá bango na mabɔkɔ na yo mpo na libela.+

Mondule ya Davidi.

29 Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, bino bana ya bato ya makasi,

Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, mpo na nkembo mpe bokasi na ye.+

 2 Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye.

Bógumbamela* Yehova, na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu.*

 3 Mongongo ya Yehova eyokani likoló ya mai;

Nzambe ya nkembo angulumi lokola nkake.+

Yehova azali likoló ya mai mingi.+

 4 Mongongo ya Yehova ezali na nguya;+

Mongongo ya Yehova ezali na lokumu.

 5 Mongongo ya Yehova ezali kobuka banzete ya sɛdrɛ;

Ɛɛ, Yehova azali kobukabuka banzete ya sɛdrɛ ya Liban.+

 6 Azali kopumbwisa Liban* lokola mwana-ngɔmbɛ,

Mpe Sirione+ lokola mwana ya ngɔmbɛ-mobali ya zamba.

 7 Mongongo ya Yehova ezali kobɛta ná lolemo ya mɔtɔ;+

 8 Mongongo ya Yehova ezali kolɛngisa esobe;+

Yehova azali koningisa esobe ya Kadeshe.+

 9 Mongongo ya Yehova ezali koningisa banyama ebengami bishe mpe banyama yango ezali kobota

Mpe ezali kotika bazamba polele.+

Mpe na tempelo na ye, moto nyonso azali koloba ete: “Nkembo!”

10 Yehova afandi na kiti ya bokonzi likoló ya mpela;*+

Yehova azali Mokonzi mpe azali koyangela mpo na libela.+

11 Yehova akopesa bato na ye makasi.+

Yehova akopambola bato na ye bázala na kimya.+

Mondule. Loyembo ya molulu ya bofungoli ndako. Ya Davidi.

30 Ee Yehova, nakokumisa yo mpo otomboli ngai;*

Otiki te ete banguna na ngai básepela mpo na likambo na ngai.+

 2 Ee Yehova Nzambe na ngai, nalelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi, mpe obikisaki ngai.+

 3 Ee Yehova, obimisi ngai* na Nkunda.*+

Obateli ngai na bomoi; osali ete nakwea na libulu* te.+

 4 Bóyemba mpo na kosanzola* Yehova, bino bato na ye ya sembo,+

Bópesa nkombo* na ye mosantu matɔndi;+

 5 Mpo nkanda oyo ayokelaka moto ezalaka kaka mpo na mwa ntango,+

Kasi amoniselaka moto boboto bomoi mobimba.+

Kolela ekoki kozala na mpokwa, kasi na ntɔngɔ koganga ya esengo.+

 6 Ntango nazalaki na kimya nalobaki ete:

“Nakokwea ata moke te.”*

 7 Ee Yehova, ntango ozalaki komonisela ngai boboto, okómisaki ngai makasi lokola ngomba.+

Kasi ntango obombaki elongi na yo, nabangaki makasi.+

 8 Nazalaki kaka kobelela yo, Ee Yehova;+

Mpe nakobaki kobondela Yehova amonisela ngai boboto.

 9 Liwa* na ngai mpe kokita na ngai na libulu* ekopesa litomba nini?+

Putulu ekosanzola yo?+ Yango ekosakola bosembo na yo?+

10 Ee Yehova, yoká mpe moniselá ngai boboto.+

Ee Yehova, kómá mosungi na ngai.+

11 Obongoli mawa na ngai mabina;

Olongoli ngɔtɔ* na ngai, mpe olatisi ngai esengo,

12 Mpo nayemba loyembo* ya kosanzola yo mpe nafanda nyɛɛ te.

Ee Yehova Nzambe na ngai, nakosanzola yo libela na libela.

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

31 Ee Yehova, nakimi epai na yo.+

Nayoka nsɔni ata moke te.+

Bikisá ngai mpo na bosembo na yo.+

 2 Tyá litoi na yo epai na ngai.*

Yaká noki mpo na kobikisa ngai.+

Kómá ngomba makasi ya libateli mpo na ngai,

Esika makasi mpo na kobikisa ngai.+

 3 Mpo ozali libanga na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai;+

Mpo na nkombo na yo,+ okokamba ngai mpe okotambwisa ngai.+

 4 Okobimisa ngai na monyama oyo babombi mpo na kokanga ngai,+

Mpo yo ozali ndako na ngai ya makasi.+

 5 Natiki elimo na ngai na mabɔkɔ na yo.+

Osikoli ngai, Ee Yehova, Nzambe oyo alobaka solo.*+

 6 Nayinaka mpenza baoyo basambelaka bikeko ya mpamba, oyo ezangi ntina,

Kasi ngai natyelaka nde Yehova motema.

 7 Nakosepela mpenza na bolingo na yo ya sembo;

Mpo omoni mpasi na ngai;+

Oyebi mozindo ya mpasi* na ngai.

 8 Okabi ngai na lobɔkɔ ya monguna te,

Kasi otɛlɛmisi ngai na esika moko ya libateli.*

 9 Ee Yehova, moniselá ngai boboto mpo nazali na mpasi.

Mitungisi elɛmbisi miso na ngai,+ ata mpe nzoto na ngai mobimba.*+

10 Mawa ekómisi bomoi na ngai na nsuka+

Mpe bambula na ngai kaka kolelalela.*+

Makasi na ngai ezali kosila mpo na libunga na ngai;

Mikuwa na ngai ezali kolɛmba.+

11 Nakómi eloko ya kosɛka epai ya banguna na ngai nyonso,+

Mingimingi epai ya baoyo bafandi zingazinga na ngai.

Mpe baoyo toyebani na bango bazali na nsɔmɔ na ngai;

Bazali kokima soki bamoni ngai na esika ya bato nyonso.+

12 Balongoli ngai na mitema* na bango mpe babosani ngai, lokola moto oyo akufi;

Nazali lokola elokó oyo ebukaná.

13 Nayoki nsango mingi ya mabe;

Nsɔmɔ ezingi ngai.+

Bazali koyangana esika moko

Mpe kosala likita mpo na koboma ngai.+

14 Kasi natyeli yo motema, Ee Yehova.+

Nalobi ete: “Yo ozali Nzambe na ngai.”+

15 Mikolo* na ngai ezali na lobɔkɔ na yo.

Bikisá ngai na lobɔkɔ ya banguna na ngai mpe na baoyo bazali konyokola ngai.+

16 Moniselá mosaleli na yo boboto.+

Bikisá ngai na bolingo na yo ya sembo.

17 Ee Yehova, nayoka nsɔni te ntango nazali kobelela yo.+

Bato mabe báyoka nsɔni;+

Báfanda nyɛɛ na kati ya Nkunda.*+

18 Mbɛbu ya lokuta ezanga likambo ya koloba,+

Mbɛbu oyo elobaka na moto ya sembo na lofundo nyonso, na lolendo mpe na kotyola.

19 Bolamu na yo ezali mingi mpenza!+

Obombeli yango baoyo babangaka yo,+

Mpe omonisi yango liboso ya bato nyonso, mpo na bolamu ya baoyo bazali kokima epai na yo.+

20 Okobomba bango na esika ya nkuku liboso na yo+

Mosika na mayele mabe ya bato;

Okobomba bango na esika na yo ya libateli

Mosika na baoyo bazali na makanisi ya kosala mabe.*+

21 Yehova asanzolama,

Mpo amoniseli ngai bolingo na ye ya sembo na ndenge moko ya kokamwa+ na engumba oyo ezingami na bango.+

22 Kasi ngai, nayokaki nsɔmɔ mpe nabandaki koloba:

“Nakokufa liboso na yo.”+

Kasi oyokaki libondeli* na ngai ntango nabelelaki yo mpo na kosɛnga lisalisi.+

23 Bólinga Yehova, bino nyonso baoyo bozali sembo epai na ye!+

Yehova abatelaka bato ya sembo,+

Kasi apesaka etumbu makasi na moto nyonso oyo azali na lolendo.+

24 Bózala na mpiko, mpe motema na bino ezala makasi,+

Bino nyonso baoyo bozali kozela Yehova.+

Loyembo ya Davidi. Maskile.*

32 Esengo na moto oyo balimbisi likambo na ye ya kobuka mibeko, oyo bazipi lisumu na ye.+

 2 Esengo na moto oyo Yehova amoni ete azali na ngambo te,+

Oyo azali na makanisi ya bokosi te.

 3 Ntango nafandaki nyɛɛ, mikuwa na ngai ezalaki se kobeba mpo na kolelalela na ngai mokolo mobimba.+

 4 Mpo butu moi, nkanda* na yo ezalaki kilo likoló na ngai.+

Makasi* na ngai ekauki ndenge mai ekaukaka na eleko ya molunge. (Sela)

 5 Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai;

Nabombaki libunga na ngai te.+

Nalobaki ete: “Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.”+

Mpe olimbisaki libunga na ngai, masumu na ngai.+ (Sela)

 6 Yango wana moto nyonso ya sembo akobondela yo+

Ntango oyo okoki kozwama.+

Mpe ata mpela ekozwa ye te.

 7 Yo ozali esika na ngai ya kobombana;

Okobatela ngai mpo mpasi ekómela ngai te.+

Okozinga ngai na bato oyo bakoganga na esengo mpo na lobiko na yo.+ (Sela)

 8 “Nakopesa yo bososoli mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende.+

Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.+

 9 Bómikómisa te lokola mpunda to dɔngi* oyo ezangi mayele,+

Oyo esengeli kotya yango ebende ya mbanga to nsinga ya nkingo

Liboso eya epai na yo.”

10 Bampasi ya moto mabe ezali mingi;

Kasi moto oyo azali kotyela Yehova motema, azingami na bolingo ya sembo na Ye.+

11 Bósepela na Yehova mpe bózala na esengo, bino bato ya sembo;

Bóganga na esengo, bino nyonso bato ya motema sembo.

33 Bóganga na esengo mpo na Yehova, bino bato ya sembo.+

Ebongi mpenza ete bato malamu básanzola ye.

 2 Bópesa Yehova matɔndi na nzɛnzɛ;

Bóyemba* mpo na kosanzola ye na ebɛtɛlo ya nsinga zomi.

 3 Bóyembela ye loyembo ya sika;+

Bóbɛta nsinga malamu, nzela moko na koganga ya esengo.

 4 Mpo liloba ya Yehova ezali sembo,+

Mpe nyonso oyo asalaka ebongi kotyelama motema.

 5 Ye alingaka boyengebene mpe bosembo.+

Mabele etondi na bolingo ya sembo ya Yehova.+

 6 Likoló esalemaki na liloba ya Yehova,+

Mpe eloko nyonso oyo ezali na likoló* esalemaki na mpema* ya monɔkɔ na ye.

 7 Ye asangisaka mai ya mbu esika moko lokola bifelo;+

Atyaka mai oyo etomboki na bandako ya kobomba biloko.

 8 Bato nyonso ya mabele bábanga Yehova.+

Bato nyonso oyo bafandi na mabele oyo ebotaka bázala na nsɔmɔ na ye.

 9 Mpo alobaki, mpe eloko nyonso ezalisamaki;+

Apesaki mitindo, mpe yango etɛlɛmaki bongo.+

10 Yehova abebisi mayele mabe* ya bikólo;+

Abebisi makanisi* ya bato ya bikólo.+

11 Kasi bikateli* ya Yehova ekotikala mpo na libela;+

Makanisi ya motema na ye ezali mpo na libota na libota.

12 Esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango,+

Bato oyo ye aponi bázala eloko na ye moko.+

13 Yehova atalaka na nse uta na likoló;

Amonaka bana nyonso ya bato.+

14 Uta na esika oyo afandaka,

Atalatalaka bato oyo bafandi na mabele.

15 Azali kobongisa mitema na bango nyonso;

Azali kotalatala misala na bango nyonso.+

16 Kozala na limpinga monene elingi koloba te ete mokonzi akobikisama;+

Kozala na nguya mingi elingi koloba te ete moto ya nguya akobikisama.+

17 Kotya motema te ete mpunda ekosalisa yo olonga etumba; okomikosa.+

Nguya na yango monene te nde ekobikisa.

18 Talá! Liso ya Yehova etalaka baoyo babangaka ye,+

Baoyo bazelaka bolingo na ye ya sembo,

19 Mpo na kobikisa bango* na liwa

Mpe kobatela bango na bomoi na ntango ya nzala.+

20 Tozali* kozela Yehova.

Ye azali mosungi na biso mpe nguba na biso.+

21 Mitema na biso esepelaka na ye,

Mpo totyelaka nkombo na ye mosantu motema.+

22 Ee Yehova, tiká bolingo na yo ya sembo ezala likoló na biso,+

Wana tozali kokoba kozela yo.+

Loyembo ya Davidi, ntango oyo akosaki ete azali na ligboma+ liboso ya Abimeleke, bongo Abimeleke abenganaki ye, mpe akendaki.

א [Alef]

34 Nakosanzola Yehova ntango nyonso;

Lisanzoli na ye ekozala ntango nyonso na mbɛbu na ngai.

ב [Bet]

 2 Nakomikumisa* na Yehova;+

Bato ya komikitisa bakoyoka mpe bakosepela.

ג [Gimel]

 3 Bókumisa Yehova elongo na ngai;+

Mpe tótombola nkombo na ye elongo.

ד [Dalet]

 4 Natunaki Yehova, mpe ayanolaki ngai.+

Abikisaki ngai na makambo nyonso oyo ezalaki kobangisa ngai.+

ה [He]

 5 Baoyo batalaki ye bakómaki na esengo;

Bilongi na bango ekokaki koyoka nsɔni ata moke te.

ז [Zayin]

 6 Moto mpamba abelelaki, mpe Yehova ayokaki.

Abikisaki ye na bampasi na ye nyonso.+

ח [Het]

 7 Anzelu ya Yehova abatelaka baoyo babangaka Nzambe,+

Mpe abikisaka bango.+

ט [Tet]

 8 Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu;+

Esengo na moto oyo azali kokima epai na ye.

י [Yod]

 9 Bóbanga Yehova, bino basantu na ye nyonso,

Mpo baoyo babangaka ye bazangaka eloko te.+

כ [Kaf]

10 Ata bana-nkɔsi oyo bazali na makasi* bazangaka eloko mpe bayokaka nzala,

Kasi baoyo balukaka Yehova, bakozanga te eloko ya malamu.+

ל [Lamed]

11 Bóya, bana na ngai, bóyoka ngai;

Nakoteya bino kobanga Yehova.+

מ [Mem]

12 Nani kati na bino asepelaka na bomoi

Mpe akosepela kozala na bomoi molai mpe ya esengo?+

נ [Nun]

13 Na yango, batelá lolemo na yo eloba te makambo ya mabe,+

Mbɛbu na yo eloba te makambo ya bokosi.+

ס [Samek]

14 Tiká oyo ezali mabe, mpe salá oyo ezali malamu;+

Luká kimya, mpe landá yango.+

ע [Ayin]

15 Miso ya Yehova ezali epai ya bato ya sembo,+

Mpe matoi na ye eyokaka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+

פ [Pe]

16 Kasi elongi ya Yehova etɛmɛlaka baoyo basalaka oyo ezali mabe,

Bakokufa, mpe moto moko te akokanisa bango lisusu na mabele.+

צ [Tsade]

17 Bato ya sembo bagangaki, mpe Yehova ayokaki;+

Abikisaki bango na bampasi na bango nyonso.+

ק [Kof]

18 Yehova azali pene na baoyo motema ebukani;+

Abikisaka baoyo balɛmbi nzoto.*+

ר [Resh]

19 Bampasi ya moto ya sembo ezali mingi,+

Kasi Yehova abikisaka ye na yango nyonso.+

ש [Shin]

20 Azali kobatela mikuwa na ye nyonso;

Ata moko na yango ebukani te.+

ת [Taw]

21 Likama ekoboma moto mabe;

Bato oyo bazali koyina moto ya sembo bakomema ngambo.

22 Yehova asikolaka bomoi* ya basaleli na ye;

Moko te kati na baoyo bazali kokima epai na ye akomema ngambo.+

Loyembo ya Davidi.

35 Ee Yehova, sambá likambo na ngai na baoyo bazali kotɛmɛla ngai;+

Bundá na baoyo bazali kobundisa ngai.+

 2 Simbá nguba na yo ya moke* mpe nguba na yo ya monene,+

Mpe tɛlɛmá osamba mpo na ngai.+

 3 Tombolá likɔnga ná epasola na yo ya etumba* mpo na kobundisa baoyo bazali kolanda ngai.+

Lobá na ngai* ete: “Ngai nazali lobiko na yo.”+

 4 Bato oyo bazali koluka koboma* ngai báyoka nsɔni mpe básambwa.+

Bato oyo bazali kokana koboma ngai bázonga nsima mpe báyoka nsɔni.

 5 Bákóma lokola mposo ya blé na mopɛpɛ;

Anzelu ya Yehova abengana bango.+

 6 Nzela na bango ekóma molili mpe mosɛlu,

Wana anzelu ya Yehova azali kolanda bango.

 7 Mpo kaka mpamba, babombi monyama mpo na kotyela ngai motambo;

Kaka mpamba, batimoli libulu mpo na ngai.

 8 Libebi ekwela bango kozanga ete báyeba,

Monyama oyo babombaki ekanga bango;

Bákwea na kati na yango mpe bákufa.+

 9 Kasi nakosepela na Yehova;

Nakozala na esengo na misala ya lobiko na ye.

10 Mikuwa na ngai nyonso ekoloba ete:

“Ee Yehova, nani azali lokola yo?

Obikisaka moto ya mpasi na mabɔkɔ ya baoyo baleki ye na makasi,+

Moto ya mpasi mpe mobola na mabɔkɔ ya baoyo bazali koyiba ye.”+

11 Batatoli ya lokuta bayei,+

Mpe bazali kotuna ngai makambo oyo nayebi te.

12 Bazali kozongisela ngai mabe mpo na malamu,+

Yango esali ete nayoka mawa makasi.

13 Kasi ntango bakómaki kobɛla, nalataki ngɔtɔ;*

Namiyokisaki mpasi na kokila bilei,

Mpe ntango libondeli na ngai ezalaki kozonga kozanga eyano,*

14 Nazalaki kotambola epai na epai na kolela, lokola nde moninga to ndeko na ngai akufi,

Nagumbamaki na mawa lokola moto azali kolela ebembe ya mama na ye.

15 Kasi ntango nabulunganaki, basepelaki mpe bayanganaki;

Bayanganaki na esika ya kobombana mpo na kobɛta ngai;

Bapasolaki ngai bitenibiteni mpe bafandaki nyɛɛ te.

16 Bato oyo babangaka Nzambe te bazali koyina ngai nakotyola mpenza,*

Bazali kolyela ngai mino.+

17 Ee Yehova, tii ntango nini okotala likambo yango?+

Bikisá ngai mpo báboma ngai te,+

Bikisá bomoi na ngai ya motuya* na bana-nkɔsi.*+

18 Bongo, nakokumisa yo na kati ya lisangá monene;+

Nakosanzola yo na kati ya bato ebele.

19 Kotika te ete baoyo bazali banguna na ngai kaka mpamba básepela na mpasi na ngai;

Kotika te ete baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba+ báfinana liso na makanisi ya mabe.+

20 Mpo bazali koloba makambo ya kimya te,

Kasi bazali kobongisa nde makambo ya lokuta mpo na kotɛmɛla bato ya kimya na mabele.+

21 Bazali kofungola monɔkɔ polele mpo na kofunda ngai,

Balobi: “Aha! Aha! Miso na biso emoni yango.”

22 Ee Yehova, omoni yango. Kofanda nyɛɛ te.+

Ee Yehova, kozala mosika na ngai te.+

23 Lamuká mpe tɛlɛmá osamba mpo na ngai,

Yehova, Nzambe na ngai, kɔtelá ngai na likambo oyo nazali kosamba.

24 Ee Yehova Nzambe na ngai, sambisá ngai na kolanda bosembo na yo,+

Kotika te ete básepela na mpasi na ngai.

25 Báloba ata moke te na motema na bango ete: “Aha! Tozwi oyo tolingaki!”*

Báloba ata moke te: “Tomɛli ye.”+

26 Bango nyonso báyoka nsɔni mpe básambwa

Baoyo bazali kosepela na mpasi na ngai.

Baoyo bazali komitombola bálata nsɔni mpe básambwa.

27 Kasi baoyo basepelaka na bosembo* na ngai báganga na esengo;

Báloba ntango nyonso ete:

“Yehova akumisama, ye oyo asepelaka na kimya ya mosaleli na ye.”+

28 Bongo lolemo na ngai ekolobela* bosembo na yo+

Mpe ekosanzola yo mokolo mobimba.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Loyembo ya Davidi, mosaleli ya Yehova.

36 Likambo mabe nde etambwisaka motema ya moto mabe;

Abangaka Nzambe te.+

 2 Lokola na miso na ye amimonaka ete azali na ntina mingi

Akoki te komona libunga na ye mpe koyina yango.+

 3 Maloba ya monɔkɔ na ye eyokisaka mpasi mpe ezali na bokosi;

Azali na mayele ya kososola te mpo na kosala oyo ezali malamu.

 4 Ata na mbeto na ye, azali kokana kosala makambo oyo eyokisaka mpasi.

Atɛlɛmi na nzela oyo ezali malamu te;

Aboyaka te oyo ezali mabe.

 5 Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo ekómi tii na likoló,+

Bosembo na yo ezali tii na mapata.

 6 Bosembo na yo ezali lokola bangomba milai;*+

Makambo oyo olobaka ntango ozali kosambisa ezalaka lokola mai monene mpe ya mozindo.+

Ee Yehova, obatelaka* moto ná nyama.+

 7 Ee Nzambe, bolingo na yo ya sembo ezali mpenza kitoko!+

Bana ya bato bazali kokima na elili ya mapapu na yo.+

 8 Bamɛlaka mpe batondaka biloko kitoko oyo ezali na ndako na yo,+

Mpe omɛlisaka bango mai ya mikɛli ya bisengo na yo.+

 9 Mpo liziba ya bomoi ezali epai na yo;+

Na pole na yo, tozali komona pole.+

10 Kobá komonisa bolingo na yo ya sembo epai ya baoyo bayebi yo,+

Mpe bosembo na yo epai ya baoyo bazali na motema sembo.+

11 Kotika te ete lokolo ya moto ya lolendo enyata ngai

To lobɔkɔ ya bato mabe ebengana ngai.

12 Kuna bato oyo basalaka mabe bakwei;

Bakweisami mpe bakoki kotɛlɛma te.+

Ya Davidi.

א [Alef]

37 Kosilika te mpo na bato mabe

Mpe kolula te baoyo basalaka makambo ya mabe.+

 2 Bakokauka nokinoki lokola matiti+

Mpe bakokauka lokola matiti ya sika ya mobesu.

ב [Bet]

 3 Tyelá Yehova motema mpe salá oyo ezali malamu;+

Fandá na mabele,* mpe salá makambo na bosembo.+

 4 Sepelá mingi mpenza* na Yehova,

Mpe akokokisa mposa ya motema na yo.

ג [Gimel]

 5 Tiká Yehova atambwisa bomoi na yo;*+

Tyelá ye motema, mpe ye moko akosalisa yo.+

 6 Akongɛngisa boyengebene na yo lokola kotana ya ntɔngɔ,

Mpe bosembo na yo lokola moi na ntango ya midi.

ד [Dalet]

 7 Fandá nyɛɛ liboso ya Yehova+

Mpe zelá ye na motema moko.*

Kosilika te mpo na moto

Oyo alongaka na mayele mabe na ye.+

ה [He]

 8 Tiká nkanda mpe tiká kotomboka;+

Kosilika te mpo yango ekotinda yo osala mabe.*

 9 Mpo bato mabe bakobomama,+

Kasi baoyo batyaka elikya epai ya Yehova bakozwa mabele.+

ו [Waw]

10 Etikali kaka mwa ntango moke, bato mabe bakozala lisusu te;+

Okotala esika oyo bazalaki,

Mpe bakozala lisusu wana te.+

11 Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele,+

Mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.+

ז [Zayin]

12 Moto mabe azali kosalela moto ya sembo likita;+

Azali kolyela ye mino.

13 Kasi Yehova akosɛka ye,

Mpo Nzambe ayebi mokolo oyo ye akokufa.+

ח [Het]

14 Bato mabe babendi mopanga mpe bagumbi litimbo na bango

Mpo na kokweisa moto oyo anyokwami mpe mobola,

Mpo na koboma baoyo basalaka oyo ezali sembo.*

15 Mopanga na bango ekokɔta na motema na bango moko;+

Matimbo na bango ekobukana.

ט [Tet]

16 Biloko moke ya moto ya sembo* ezali malamu

Koleka ebele ya biloko ya bato mingi ya mabe.+

17 Mpo mabɔkɔ ya bato mabe ekobukana,

Kasi Yehova akosalisa bato ya sembo.

י [Yod]

18 Yehova ayebi makambo oyo bato oyo bazangi mbeba bakutanaka na yango,*

Mpe libula na bango ekoumela mpo na libela.+

19 Bakoyoka nsɔni te na ntango ya mpasi;

Na ntango ya nzala bakotonda.

כ [Kaf]

20 Kasi bato mabe bakokufa;+

Banguna ya Yehova bakosila lokola biloko kitoko na bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti;

Bakolimwa lokola milinga.

ל [Lamed]

21 Moto mabe adefaka mpe azongisaka te,

Kasi moto ya sembo akabaka* mpe amonisaka motema mawa.+

22 Baoyo Nzambe apamboli bakozwa mabele,

Kasi baoyo alakeli mabe bakobomama.+

מ [Mem]

23 Soki Yehova asepeli na nzela ya moto,+

Atambwisaka* makolo na ye.+

24 Ata soki akwei, akobwakama na nse te,+

Mpo Yehova asimbi ye na lobɔkɔ.+

נ [Nun]

25 Nazalaki elenge mpe sikoyo nakómi mobange,

Kasi namoná naino te moto ya sembo asundolami,+

To bana na ye bazali koluka limpa.*+

26 Adefisaka ntango nyonso na boboto,+

Mpe bana na ye bakozwa lipamboli.

ס [Samek]

27 Tiká mabe mpe salá oyo ezali malamu,+

Mpe okofanda mpo na libela.

28 Mpo Yehova alingaka bosembo,

Mpe akosundola te bato na ye ya sembo.+

ע [Ayin]

Bakobatelama ntango nyonso;+

Kasi bana ya bato mabe, bakobomama.+

29 Bato ya sembo* bakozwa mabele,+

Mpe bakofanda wana mpo na libela.+

פ [Pe]

30 Monɔkɔ ya moto ya sembo ebimisaka bwanya,*

Mpe lolemo na ye elobaka na bosembo.+

31 Mobeko ya Nzambe na ye ezali na motema na ye;+

Makolo na ye ekolɛnga te.+

צ [Tsade]

32 Moto mabe atalatalaka moto ya sembo,

Azali koluka koboma ye.

33 Kasi Yehova akosundola ye te na lobɔkɔ ya moto mabe yango,+

Mpe akotánga ye te ete azali na ngambo ntango azali kosambisama.+

ק [Kof]

34 Tyelá Yehova elikya mpe landá nzela na ye,

Mpe akotombola yo mpo na kozwa mabele.

Ntango bato mabe bakobomama,+ yo okomona yango.+

ר [Resh]

35 Namoni moto mabe, monyokoli

Azali kokola malamu lokola nzete oyo etondi na nkasa na mabele na yango mpenza.+

36 Kasi mbala moko alimwaki, mpe azalaki lisusu te;+

Nazalaki kaka koluka ye, kasi amonanaki te.+

ש [Shin]

37 Tyá likebi na yo epai ya moto oyo azangi mbeba,*

Mpe kobá kotala moto ya sembo,+

Mpo bomoi ya moto yango na mikolo ezali koya ekozala na kimya.+

38 Kasi bato nyonso oyo babukaka mibeko bakobebisama;

Bato mabe bakosuka.+

ת [Taw]

39 Lobiko ya bato ya sembo eutaka epai ya Yehova;+

Azali ndako na bango ya makasi na ntango ya mpasi.+

40 Yehova akosalisa bango mpe akobikisa bango.+

Akobatela bango na mabɔkɔ ya bato mabe mpe akobikisa bango,

Mpo bakimi epai na ye.+

Mondule ya Davidi, mpo ezala likambo ya kokanisa.*

38 Ee Yehova, kopamela ngai na nkanda na yo te,

Mpe kosembola ngai te na nkanda na yo ya makasi.+

 2 Mpo makula na yo ekɔti mpenza na kati na ngai,

Mpe lobɔkɔ na yo ezali kilo likoló na ngai.+

 3 Nzoto na ngai mobimba ezali kobɛla* mpo na nkanda na yo.

Mikuwa na ngai ezali na kimya te mpo na lisumu na ngai.+

 4 Mpo mabunga na ngai eleki na motó na ngai;+

Lokola mokumba moko ya kilo, ezali mpenza kilo oyo nakokoka komema te.

 5 Bampota na ngai ekómi kolumba nsolo mpe kobimisa tofina*

Mpo na bozoba na ngai.

 6 Natungisami mpe mawa esilisi ngai makasi;

Mokolo mobimba, natamboli epai na epai na mawa na ngai.

 7 Mɔtɔ ezali kopela na kati na ngai;*

Nzoto na ngai mobimba ezali kobɛla.+

 8 Nasili makasi mpe natutami mpenza;

Mawa ya motema na ngai esali ete namilelalela* na mongongo makasi.*

 9 Ee Yehova, mposa na ngai nyonso ezali liboso na yo,

Mpe kolela ya motema* na ngai ebombami te liboso na yo.

10 Motema na ngai ebɛti makasi, nguya na ngai etiki ngai,

Mpe pole ya miso na ngai elimwe.+

11 Baninga mpe bazalani na ngai baboyi ngai mpo na bampasi na ngai,

Mpe baoyo bafandaka pene na ngai batɛlɛmi mosika.

12 Baoyo balukaka bomoi na ngai batye mitambo;

Baoyo bazali koluka kosala ngai mabe bazali kolobela libebi;+

Mpe mokolo mobimba, bazali kaka koloba na nse nse maloba ya bokosi.

13 Kasi lokola moto oyo akufá matoi, nazali koyoka te;+

Mpe lokola moto oyo alobaka te, nazali kofungola monɔkɔ na ngai te.+

14 Nakómi lokola moto oyo akoki koyoka te,

Mpe oyo monɔkɔ na ye ezali na eloko moko te ya koloba mpo na komilongisa.

15 Mpo nazelaki nde yo, Ee Yehova,+

Mpe oyanolaki ngai, Ee Yehova Nzambe na ngai.+

16 Mpo nalobaki ete: “Básepela te na mpasi na ngai;

To bámitombola te likoló na ngai soki lokolo na ngai esɛlimwi.”

17 Mpo etikalaki moke nakwea,

Mpe nazalaki na mpasi ntango nyonso.+

18 Nayambolaki libunga na ngai;+

Natungisamaki mpo na lisumu na ngai.+

19 Kasi banguna na ngai bazali na makasi* mpe na nguya,*

Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba bakómi ebele.

20 Bazongiselaki ngai mabe mpo na malamu;

Bazalaki koluka kopekisa ngai mpo nakoba te kosala oyo ezali malamu.

21 Ee Yehova, kosundola ngai te.

Ee Nzambe, kozala mosika na ngai te.+

22 Yaká noki kosalisa ngai,

Ee Yehova, lobiko na ngai.+

Epai ya mokambi ya nzembo; ya Yedutune.*+ Mondule ya Davidi.

39 Nalobaki ete: “Nakozala ekɛngɛ na etamboli na ngai

Mpo nasala lisumu te na lolemo na ngai.+

Nakotya na monɔkɔ na ngai eloko ya kokanga monɔkɔ+

Ntango nyonso oyo moto mabe akozala pene na ngai.”

 2 Nakómaki moto oyo alobaka te mpe nafandaki nyɛɛ;+

Nafandaki kimya ata mpo na likambo oyo ezali malamu,

Kasi mpasi na ngai ezalaki makasi.

 3 Motema na ngai ezalaki kopela* na kati na ngai.

Wana nazalaki kokanisa mingi, mɔtɔ ezalaki kaka kopela.

Bongo lolemo na ngai elobaki ete:

 4 “Ee Yehova, salisá ngai nayeba ndenge nsuka na ngai ekozala,

Mpe motángo ya mikolo na ngai,+

Mpo nayeba ndenge oyo bomoi na ngai ezali mokuse.

 5 Opesi ngai kaka bomoi mokuse;*+

Mpe mikolo ya bomoi na ngai ezali eloko te liboso na yo.+

Ya solo moto nyonso ata soki amonani ete atɛlɛmi ngwi, azali kaka mwa mopɛpɛ.+ (Sela)

 6 Ya solo moto nyonso azali kotambola epai na epai lokola elili.

Azali kokima mbangu* kaka mpamba.

Azali konduka bozwi, kasi ayebi te nani akosalela yango.+

 7 Ee Yehova, natya elikya na nini?

Yo kaka nde elikya na ngai.

 8 Bikisá ngai na misala na ngai nyonso ya kobuka mibeko.+

Kotika te ete zoba akómisa ngai eloko ya kotyola.

 9 Nazalaki koloba te;

Nakokaki kofungola monɔkɔ na ngai te,+

Mpo yango eutaki epai na yo.+

10 Longolá etumbu oyo opesi ngai.

Nasili makasi mpo lobɔkɔ na yo ebɛti ngai.

11 Osemboli moto na nzela ya etumbu mpo na libunga na ye;+

Olye biloko na ye ya motuya ndenge kaka ndɔngɛ elyaka.

Ya solo moto nyonso azali kaka mwa mopɛpɛ.+ (Sela)

12 Ee Yehova, yoká libondeli na ngai,

Tyá litoi na kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+

Kosala te lokola nde omoni mai ya miso na ngai te.

Mpo nazali kaka moto oyo afandi mopaya epai na yo,+

Moto ya mobembo oyo azali koleka nzela,* kaka lokola bankɔkɔ na ngai nyonso.+

13 Kotala ngai na nkanda na yo te, mpo nazwa lisusu makasi

Liboso ete nakufa mpe nazala lisusu te.”

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi. Mondule.

40 Natyelaki Yehova elikya makasi,*

Mpe asembolelaki ngai litoi na ye* mpe ayoki kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+

 2 Abimisi ngai na libulu oyo mai na yango ezali kokita mbangumbangu mpenza,*

Na pɔtɔpɔtɔ ya nse.

Mpe atɛlɛmisaki makolo na ngai na libanga;

Apikaki matambe na ngai makasi.

 3 Lisusu, alakisaki ngai loyembo ya sika,+

Lisanzoli mpo na Nzambe na biso.

Mingi bakotala na kokamwa

Mpe bakotyela Yehova motema.

 4 Esengo na mobali oyo atyeli Yehova motema

Mpe oyo atali te batomboki to bakosi.

 5 Osali makambo mingi,

Ee Yehova Nzambe na ngai,

Misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso!+

Moko te akokani na yo;+

Soki nameki koyebisa to kolobela yango,

Ekozala ebele koleka mpo na kolobela yango!+

 6 Ozalaki te na mposa ya* mbeka mpe likabo;+

Kasi ofungolaki matoi na ngai mpo nayoka.+

Osɛngaki te makabo ya kotumba mpe makabo mpo na lisumu.+

 7 Bongo nalobaki ete: “Talá, nayei.

Ndenge ekomami na rulo* mpo na ngai.+

 8 Ee Nzambe na ngai, nasepeli* kosala mokano na yo,+

Mpe mobeko na yo ezali mpenza na kati na ngai.+

 9 Nayebisi nsango malamu ya boyengebene na lisangá monene.+

Talá! Nazali kokanga mbɛbu na ngai te,+

Ee Yehova, oyebi yango malamu.

10 Nabombi te bosembo na yo na motema na ngai.

Nasakoli bosembo mpe lobiko na yo.

Nabombeli te lisangá monene bolingo na yo ya sembo mpe solo na yo.”+

11 Ee Yehova, koboya te komonisela ngai motema mawa na yo.

Bolingo na yo ya sembo mpe solo na yo ebatela ngai ntango nyonso.+

12 Bampasi oyo ezingi ngai ezali mingi mpe ekoki kotángama te.+

Ebele ya mabunga na ngai efini ngai mpe nazali kokoka komona nzela na ngai te;+

Ezali ebele mpenza koleka nsuki ya motó na ngai,

Mpe nalɛmbi nzoto.

13 Ee Yehova, nabondeli yo, ndimá kobikisa ngai.+

Ee Yehova, yaká noki kosalisa ngai.+

14 Baoyo nyonso bazali koluka koboma ngai

Báyoka nsɔni mpe básambwa.

Baoyo bazali kosepela na mpasi na ngai

Bázonga nsima na nsɔni.

15 Baoyo bazali koloba na ngai ete: “Aha! Aha!”

Bátikala monɔkɔ polele mpo na nsɔni na bango.

16 Kasi baoyo bazali koluka yo+

Básepela mpe bázala na esengo mpo na yo.+

Baoyo balingaka misala na yo ya kobikisa báloba ntango nyonso ete:

“Yehova akumisama.”+

17 Kasi ngai nazali moto oyo azangi lisalisi mpe mobola;

Yehova atyela ngai likebi.

Yo ozali mosungi na ngai mpe mobikisi na ngai;+

Nzambe na ngai, koumela te.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

41 Esengo na moto oyo azali kotyela moto mpamba likebi;+

Yehova akobikisa ye na mokolo ya likama.

 2 Yehova akokɛngɛla ye mpe akobatela ye na bomoi.

Akotángama moto ya esengo na mabele;+

Okopesa ye ata moke te na mabɔkɔ* ya banguna na ye.+

 3 Yehova akosalisa ye na mbeto na ye ya maladi;+

Ntango nyonso oyo azali kobɛla okobongola mpenza mbeto na ye.

 4 Mpo nalobaki ete: “Ee Yehova, moniselá ngai boboto.+

Bikisá ngai,*+ mpo nasaleli yo lisumu.”+

 5 Kasi banguna na ngai bazali koloba mabe mpo na ngai ete:

“Ntango nini akokufa mpe nkombo na ye ekolimwa?”

 6 Soki moko na bango ayei kotala ngai, motema na ye elobaka lokuta.

Alukalukaka likambo ya mabe mpo aloba;

Na nsima, akobima mpe akoyebisa yango bato mosusu.

 7 Baoyo nyonso bayinaka ngai bazali kolobana na nse nse;

Bazali kokana kosala ngai eloko moko ya mabe, balobi ete:

 8 “Eloko moko ya nsɔmɔ ekangi ye;

Sikoyo, lokola akwei na nse, akotɛlɛma lisusu te.”+

 9 Ata moto oyo azali na kimya elongo na ngai, oyo natyelaki motema,+

Moto azalaki kolya limpa na ngai, abalukeli ngai.*+

10 Kasi yo, Ee Yehova, moniselá ngai boboto mpe tɛlɛmisá ngai,

Mpo nazongisela bango oyo basalaki ngai.

11 Na likambo oyo nakoyeba ete olingaka ngai:

Ntango monguna na ngai akokoka lisusu te koganga ete alongi ngai.+

12 Mpo na ngai, ozali kosalisa ngai mpo na ezaleli na ngai ya kozanga mbeba;+

Okobatela ngai pene na yo mpo na libela.+

13 Yehova Nzambe ya Yisraele asanzolama

Libela na libela.*+

Amen mpe Amen.

BUKU YA MIBALE

(Nzembo 42-72)

Epai ya mokambi ya Nzembo. Maskile* ya bana ya Kora.+

42 Kaka ndenge nyama ebengami bishe ezalaka na mposa makasi ya mai,

Ngai mpe nazali* na mposa na yo makasi, Ee Nzambe.

 2 Nazali mpenza na mposa ya Nzambe, ya Nzambe ya bomoi.+

Ntango nini nakoki koya mpe komonana liboso ya Nzambe?+

 3 Mai ya miso na ngai ekómi bilei na ngai butu moi;

Mokolo mobimba bazali kotyola ngai ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+

 4 Nakanisi makambo oyo, mpe nasopi molimo na ngai,*

Mpo namesanaki kotambola elongo na ebele ya bato;

Nazalaki kotambola malɛmbɛ liboso na bango mpo na kokende na ndako ya Nzambe,

Na koganga ya esengo mpe ya matɔndi,

Ya ebele ya bato oyo bazali kosala fɛti.+

 5 Mpo na nini nazangi elikya?+

Mpo na nini mobulungano oyo kati na ngai?

Nakozela Nzambe,+

Mpo nakosanzola ye lisusu, azali Mobikisi na ngai monene.+

 6 Nzambe na ngai, nazangi elikya.+

Yango wana nakanisi yo,+

Banda na mokili ya Yordani mpe na bansɔngɛ ya Heremone,

Banda na ngomba Mizare.*

 7 Mai mozindo ezali kobenga mai mozindo

Na lokito ya mai na yo oyo ezali komibwaka.

Mitungisi ezipi ngai lokola mbonge na yo ya makasi.+

 8 Na moi Yehova akomonisela ngai bolingo na ye ya sembo,

Mpe na butu loyembo na ye ekozala elongo na ngai—nakosala libondeli epai ya Nzambe ya bomoi na ngai.+

 9 Nakoloba na Nzambe, libanga na ngai ete:

“Mpo na nini obosani ngai?+

Mpo na nini esengeli natambola mawamawa mpo monguna azali konyokola ngai?”+

10 Na koyina nyonso* banguna na ngai bazali kotyola ngai;

Mokolo mobimba bazali kotyola ngai ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+

11 Mpo na nini nazangi elikya?

Mpo na nini mobulungano oyo kati na ngai?

Nakozela Nzambe,+

Mpo nakosanzola ye lisusu; azali Mobikisi na ngai monene mpe Nzambe na ngai.+

43 Ee Nzambe, sambisá ngai,+

Sambá likambo na ngai+ ná ekólo oyo ezali sembo te.

Bikisá ngai na mabɔkɔ ya moto ya bokosi mpe oyo azangi bosembo.

 2 Mpo ozali Nzambe na ngai, ndako na ngai ya makasi.+

Mpo na nini obwaki ngai?

Mpo na nini nasengeli kotambola mawamawa mpo monguna azali konyokola ngai?+

 3 Tindá pole na yo mpe solo na yo.+

Ekamba ngai;+

Emema ngai na ngomba na yo mosantu mpe na tabernakle na yo monene.+

 4 Bongo nakoya na etumbelo ya Nzambe,+

Epai ya Nzambe, oyo azali esengo na ngai mpenza.

Mpe nakosanzola yo na nzɛnzɛ,+ Ee Nzambe, Nzambe na ngai.

 5 Mpo na nini nazangi elikya?

Mpo na nini mobulungano oyo kati na ngai?

Nakozela Nzambe,+

Mpo nakosanzola ye lisusu; azali Mobikisi na ngai monene mpe Nzambe na ngai.+

Epai ya mokambi ya nzembo.+ Ya bana ya Kora. Maskile.*

44 Ee Nzambe, toyoki na matoi na biso moko,

Bankɔkɔ na biso bayebisi biso+

Makambo oyo osalaki na mikolo na bango,

Na mikolo ya kala.

 2 Na lobɔkɔ na yo obenganaki bikólo,+

Mpe otyaki bankɔkɔ na biso kuna.+

Otutatutaki bikólo mpe obenganaki yango.+

 3 Ezalaki te na mopanga na bango moko nde bazwaki mokili yango,+

Mpe lobɔkɔ na bango moko te nde elongisaki bango.+

Kasi, ezalaki lobɔkɔ na yo ya mobali,+ makasi na yo mpe pole ya elongi na yo,

Mpo osepelaki na bango.+

 4 Ee Nzambe, ozali Mokonzi na ngai;+

Pesá mitindo mpo na bolongi monene* ya Yakobo.

 5 Na nguya na yo tokotindika banguna na biso;+

Na nkombo na yo tokonyata baoyo bazali kotɛmɛla biso.+

 6 Mpo natyelaka te litimbo na ngai motema

Mpe mopanga na ngai ekoki te kobikisa ngai.+

 7 Yo nde obikisaki biso na mabɔkɔ ya banguna na biso,+

Yo nde oyokisaki baoyo bayinaka biso nsɔni.

 8 Tokopesa Nzambe masanzoli mokolo mobimba,

Mpe tokokumisa nkombo na yo mpo na libela. (Sela)

 9 Kasi sikoyo obwaki biso mpe osambwisi biso,

Mpe ozali kokamba mampinga na biso te.

10 Ozali kaka kozongisa biso nsima liboso ya monguna na biso;+

Baoyo bayinaka biso bazali kozwa nyonso oyo balingi.

11 Okabi biso mpo bálya biso lokola bampate;

Opalanganisi biso na kati ya bikólo.+

12 Otɛki bato na yo mpo na eloko ya mpamba;+

Mpe kotɛka yango* epesi yo litomba moko te.

13 Okómisi biso eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso,

Eloko ya kotyola mpe ya kosɛka na miso ya baoyo nyonso bazali zingazinga na biso.

14 Okómisi biso eloko ya kotyola* na kati ya bikólo,+

Eloko oyo bato ya bikólo bakoningisela yango motó.

15 Mokolo mobimba nazali komiyoka ete nasambwe

Mpe nsɔni ezipi ngai,

16 Mpo na makɛlɛlɛ ya kotyola mpe kofinga na bango,

Mpo na monguna na biso oyo azali kozongisa mabe.

17 Nyonso wana ekómeli biso, nzokande tobosani yo te,

Mpe tobebisi te kondimana na yo.+

18 Motema na biso etiki nzela na yo te,

Matambe na biso elongwaki na nzela na yo te.

19 Kasi otuti biso na esika oyo bambwa ya zamba* efandaka,

Ozipi biso na molili makasi.

20 Soki tobosani nkombo ya Nzambe na biso,

To soki totandaki mabɔkɔ na biso mpo na kobondela nzambe mopaya,

21 Nzambe akoyeba yango te?

Ayebi basekele ya motema.+

22 Lokola tosalelaka yo, bazali koboma biso mokolo mobimba;

Totalelami lokola bampate ya koboma.+

23 Lamuká. Ee Yehova, mpo na nini ozali kaka kolala?+

Lamuká! Kobwaka biso mpo na libela te.+

24 Mpo na nini ozali kobomba elongi na yo?

Mpo na nini ozali kobosana mpasi na biso mpe monyoko na biso?

25 Mpo babwaki biso* na putulu;

Nzoto na biso ekangami na mabele.+

26 Tɛlɛmá! Ozali mosungi na biso+

Bikisá* biso mpo na bolingo na yo ya sembo.+

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Bafololo lísi.” Ya bana ya Kora.+ Maskile.* Loyembo ya bolingo.

45 Motema na ngai ezali na esengo mingi mpenza mpo na likambo moko ya malamu.

Nalobi ete: “Loyembo* na ngai etali mokonzi moko.”+

Lolemo na ngai ezala ekomeli+ ya mosali-bakopi* oyo ayebi mosala malamu.+

 2 Yo nde oleki kitoko mingi na kati ya bana ya bato.

Mbɛbu na yo ezali kosopa maloba ya elɛngi.+

Yango wana Nzambe apamboli yo mpo na libela.+

 3 Ee moto ya nguya,+ kangá mopanga na yo+ na mopanzi na yo,

Na lokumu na yo mpe nkembo na yo.+

 4 Mpe na nkembo na yo kende kolonga;+

Matá na mpunda mpo na kobundela solo, komikitisa ná bosembo,+

Mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekosala* makambo ya nsɔmɔ.

 5 Makula na yo epeli makasi, ezali kokweisa bato ya bikólo liboso na yo;+

Ezali kotɔbɔla mitema ya banguna ya mokonzi.+

 6 Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi libela na libela;+

Lingenda ya bokonzi na yo ezali lingenda ya bosembo.+

 7 Olingaki bosembo+ mpe oyinaki makambo ya mabe.+

Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, atye yo+ mafuta ya esengo+ koleka baninga na yo.

 8 Bilamba na yo nyonso ezali na malasi ya mire, nzete ya aloe ná kasia;

Uta na ndako monene ya kitoko, ya mpɛmbɛ ya nzoku, bibɛtɛlo oyo ya bansinga ezali kosepelisa yo.

 9 Bana basi ya bakonzi bazali na kati ya basi na yo ya lokumu.

Mwasi ya mokonzi atɛlɛmi na lobɔkɔ na yo ya mobali, alati wolo ya Ofire.+

10 Mwana na ngai ya mwasi, yoká mpe tyá likebi na maloba na ngai.

Bosaná bato na yo mpe ndako ya tata na yo.

11 Mpe mokonzi akozala na mposa makasi ya kitoko na yo,

Mpo azali nkolo na yo,

Na yango, gumbamelá ye.

12 Mwana mwasi ya Tire akoya na likabo;

Bato ya bozwi bakoluka ondima bango.*

13 Mwana mwasi ya mokonzi azali na nkembo mingi na kati ya ndako;*

Bilamba na ye etyami biloko* ya wolo.

14 Bakoya na ye epai ya mokonzi na molato ya kitoko.*

Bangɔndɔ oyo bazali baninga na ye, oyo bazali kolanda ye, bakɔtisami liboso na ye.*

15 Bakoya na bango na nsai mpe na esengo;

Bakokɔta na ndako monene ya mokonzi.

16 Bana na yo bakozwa esika ya bankɔkɔ na yo.

Okotya bango bankumu na mabele mobimba.+

17 Nakosala ete bato bákanisa nkombo na yo mabota na mabota.+

Yango wana bato ya bikólo bakosanzola yo libela na libela.

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora,+ na kolanda ebɛtɛli ya Alamote.* Loyembo.

46 Nzambe azali ekimelo mpe makasi na biso,+

Lisalisi oyo ezwamaka noki na ntango ya mpasi.+

 2 Yango wana tokobanga te, ata soki mabele ezali kobongwana

Ata soki bangomba ezali kokwea tii na mozindo mpenza ya mbu,+

 3 Ata soki mai na yango ekómi yikiyiki mpe ezali kotomboka,+

Ata soki bangomba ezali kolɛnga mpo na yikiyiki na yango.* (Sela)

 4 Ezali na ebale moko oyo mikɛli na yango esepelisaka engumba ya Nzambe,+

Tabernakle monene mpe ya bosantu, ya Oyo-Aleki-Likoló.

 5 Nzambe azali na kati ya engumba;+ ekoki kokweisama te.

Nzambe akosalisa yango ntango ntɔngɔ ekotana.+

 6 Bikólo ekómaki yikiyiki, makonzi ekweisamaki;

Atombolaki mongongo na ye mpe mabele enyangwaki.+

 7 Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+

Nzambe ya Yakobo azali esika makasi na biso ya kobombana.* (Sela)

 8 Bóya mpe bótala misala ya Yehova,

Ndenge asali makambo ya kokamwisa na mabele.

 9 Azali kosilisa bitumba na mabele mobimba.+

Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga;

Azali kotumba makalo ya etumba* na mɔtɔ.

10 “Bómitika mpe bóyeba ete ngai nazali Nzambe.

Nakokumisama na kati ya bikólo;+

Nakokumisama na mabele.”+

11 Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+

Nzambe ya Yakobo azali esika makasi na biso ya kobombana.+ (Sela)

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Mondule.

47 Bino nyonso bato ya bikólo, bóbɛta mabɔkɔ.

Bóganga mpo na Nzambe na koganga ya bolongi mpe ya esengo.

 2 Mpo Yehova, Oyo-Aleki-Likoló, azali nsɔmɔ;+

Azali Mokonzi monene na mabele mobimba.+

 3 Atye bato ya bikólo na nse na biso;

Atye bikólo na nse ya makolo na biso.+

 4 Aponeli biso libula,+

Lolendo ya Yakobo, moto oyo ye alingi.+ (Sela)

 5 Nzambe amati na koganga ya esengo;

Yehova amati na lokito ya liseke.*

 6 Bóyemba mpo na kosanzola* Nzambe, bóyemba mpo na kosanzola.

Bóyemba mpo na kosanzola Mokonzi na biso, bóyemba mpo na kosanzola.

 7 Mpo Nzambe azali Mokonzi ya mabele mobimba;+

Bóyemba mpo na kosanzola mpe bómonisa bososoli.

 8 Nzambe akómi Mokonzi ya bikólo.+

Nzambe afandi na kiti mosantu ya bokonzi na ye.

 9 Bakambi ya bato ya bikólo bayangani

Ná bato ya Nzambe ya Abrahama.

Mpo bakambi* ya mabele bazali ya Nzambe.

Atombwami likoló mingi mpenza.+

Loyembo. Mondule ya bana ya Kora.+

48 Yehova azali monene mpe abongi kosanzolama

Na engumba ya Nzambe na biso, na ngomba na ye mosantu.

 2 Ngomba Siona ezali mosika mpenza kuna na nɔrdi,

Ezali kitoko mpe etombwaná, mpe ezali esengo ya mabele mobimba,+

Engumba ya Mokonzi Monene.+

 3 Na bandako milai na yango ya makasi,

Nzambe amonisi ete azali esika makasi ya kobombana.*+

 4 Mpo talá! bakonzi bayangani;*

Bazali kokende liboso elongo.

 5 Ntango bamonaki engumba, bakamwaki.

Babulunganaki mpe bakimaki na nsɔmɔ.

 6 Kuna, kolɛnga ekangaki bango,

Mpasi lokola ya mwasi oyo azali kobota.

 7 Na mopɛpɛ ya ɛsti obebisaki bamasuwa ya Tarasisi.

 8 Makambo oyo toyokaki, yango nde biso moko tomoni

Na engumba ya Yehova ya mampinga, na engumba ya Nzambe na biso.

Nzambe akotɛlɛmisa yango makasi mpo na libela.+ (Sela)

 9 Ee Nzambe, tokanisaka na mozindo bolingo na yo ya sembo,+

Na kati ya tempelo na yo.

10 Ee Nzambe, lokola nkombo na yo, lisanzoli na yo

Ekómi tii na bansuka ya mabele.+

Lobɔkɔ na yo ya mobali etondi na bosembo.+

11 Ngomba Siona+ esepela,

Bingumba ya Yuda ezala* na esengo mpo na bikateli na yo ya lisambisi.+

12 Bótambola zingazinga ya Siona; bótambola zingazinga na yango;

Bótánga bandako na yango ya milai.+

13 Bótya mitema na bino na bifelo na yango ya makasi.+

Bótala malamumalamu bandako milai na yango ya makasi,

Mpo bóyebisa yango na mabota oyo ekoya nsima.

14 Mpo Nzambe oyo, azali Nzambe na biso+ libela na libela.

Akokamba biso mpo na libela.*+

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya bana ya Kora.+ Mondule.

49 Bino nyonso bato ya bikólo, bóyoka likambo oyo.

Bótya likebi, bino nyonso baoyo bofandi na mokili,*

 2 Bino nyonso: moto mpamba ná moto ya lokumu,*

Mozwi ná mobola.

 3 Monɔkɔ na ngai ekobimisa maloba ya bwanya,

Mpe komanyola ya motema na ngai+ ekomonisa mayele.

 4 Nakotya likebi na liloba ya lisese;

Nakolimbola sambole na ngai na nzɛnzɛ.

 5 Mpo na nini nabanga na ntango ya mpasi,+

Ntango nazingami na mabe* ya baoyo bazali koluka kokweisa ngai?

 6 Baoyo bazali kotya motema na bomɛngo na bango+

Mpe baoyo bazali komikumisa mpo na ebele ya bozwi na bango,+

 7 Moko na bango akoki ata moke te kosikola ndeko na ye,

To kopesa Nzambe lisiko mpo na ye,+

 8 (Ntalo ya lisiko ya bomoi na bango ezali motuya moko monene mpenza

Yango wana bakokoka ata moke te kofuta yango);

 9 Mpo azala na bomoi libela na libela mpe amona libulu* te.+

10 Moto nyonso amonaka ete ata bato ya bwanya bakufaka;

Zoba ná moto oyo azangi bososoli bango nyonso bakufaka,+

Mpe basengeli kotikela bato mosusu bomɛngo na bango.+

11 Mposa ya motema na bango ezali ete bandako na bango eumela mpo na libela,

Bahema na bango eumela libota na libota.

Bapesi mabele na bango bankombo na bango.

12 Kasi moto, ata azali na lokumu, akotikala na bomoi te;+

Aleki te banyama oyo ekufaka.+

13 Yango nde nzela ya bazoba,+

Mpe ya baoyo bazali kolanda bango, baoyo bazali kosepela na maloba na bango ya mpambampamba. (Sela)

14 Bakokufa lokola bampate oyo esengeli kobomama.

Liwa ekokamba bango;

Bato ya sembo bakozala na bokonzi likoló na bango+ na ntɔngɔ.

Bakosila mpenza kosila;+

Na esika ya ndako ya lokumu, Nkunda*+ nde ekozala ndako na bango.+

15 Kasi Nzambe akosikola ngai na nguya* oyo Nkunda*+ ezali na yango

Mpo akosimba ngai. (Sela)

16 Kobanga te mpo moto akómi na bozwi,

Mpo nkembo ya ndako na ye ezali komata,

17 Mpo ntango akokufa, akomema eloko ata moko te;+

Nkembo na ye ekokita elongo na ye te.+

18 Bomoi na ye mobimba azali komikumisa.+

(Bato bakokumisa yo ntango ozali na bozwi)+

19 Kasi, nsukansuka, akokende kaka na libota ya bankɔkɔ na ye.

Bakomona pole lisusu ata moke te.

20 Moto oyo azali kokanga ntina na yango te, ata azali na lokumu,+

Aleki te banyama oyo ekufaka.

Mondule ya Asafe.+

50 Nzambe ya banzambe, Yehova,*+ alobi;

Abengisi bafandi nyonso ya mabele

Banda epai moi ebimaka tii epai yango elalaka.*

 2 Uta na Siona, kitoko ya kokoka,+ Nzambe azali kongɛnga.

 3 Nzambe na biso akoya mpe akokoka kofanda nyɛɛ te.+

Mɔtɔ oyo ezikisaka ezali liboso na ye,+

Mpe mopɛpɛ moko makasi ezali kobɛta zingazinga na ye.+

 4 Azali kobengisa likoló mpe mabele,+

Mpo na kosambisa bato na ye:+

 5 “Bóyanganisa epai na ngai bato na ngai ya sembo,

Baoyo bazali kosala kondimana na ngai na nzela ya mbeka.”+

 6 Likoló ezali koyebisa bosembo na ye,

Mpo Nzambe ye moko azali Mosambisi.+ (Sela)

 7 “Yoká, Ee ekólo na ngai, mpe nakoloba;

Yisraele, nakolakisa mabe na yo.+

Nazali Nzambe, Nzambe na yo.+

 8 Nazali kopamela yo te mpo na bambeka na yo,

Ezali mpe te mpo na makabo na yo ya kotumba mobimba oyo ezali liboso na ngai ntango nyonso.+

 9 Nazali na mposa te ya kozwa ngɔmbɛ-mobali na ndako na yo,

To bantaba* na mapango na yo.+

10 Mpo nyama nyonso oyo ezali na zamba ezali ya ngai,+

Ata banyama likoló ya bangomba nkóto.

11 Nayebi ndɛkɛ nyonso ya bangomba;+

Ebele ya banyama ya esobe ezali ya ngai.

12 Soki nazalaki na nzala, nalingaki koyebisa yo yango te,

Mpo mabele oyo ebotaka mpe biloko na yango nyonso ezali ya ngai.+

13 Nakolya nde mosuni ya bangɔmbɛ-mibali

Mpe nakomɛla nde makila ya bantaba?+

14 Pesá Nzambe matɔndi, yango nde mbeka na yo,+

Mpe kokisá bilako na yo epai ya Oyo-Aleki-Likoló;+

15 Bengá ngai na ntango ya mpasi.+

Nakobikisa yo, mpe yo okopesa ngai nkembo.”+

16 Kasi Nzambe akoloba na moto mabe ete:

“Lotomo nini ozali na yango mpo otánga malako na ngai,+

To olobela kondimana na ngai?+

17 Mpo yo oyinaka disiplini,*

Mpe ozali kaka kopesa maloba na ngai mokɔngɔ.*+

18 Ntango omoni moyibi, ondimi ye,*+

Mpe ozali kaka kosala boninga na bato ya ekobo.

19 Ozali kosalela monɔkɔ na yo mpo na kopalanganisa mabe,

Mpe ozali kokangisa lolemo na yo na bokosi.+

20 Ozali kofanda mpe koloba mabe mpo na ndeko na yo;+

Ozali kobimisa mabunga ya* mwana mobali ya mama na yo.

21 Ntango osalaki makambo wana, nafandaki nyɛɛ.

Okanisaki ete nakozala lokola yo.

Kasi sikoyo nakopamela yo,

Mpe nakobimisa makambo oyo nazali na yango mpo na yo.+

22 Nabondeli bino, bókanisa likambo oyo, bino baoyo bobosani Nzambe,+

Noki te napasola bino bitenibiteni mpe moto oyo akobikisa bino azala te.

23 Moto oyo azali kopesa matɔndi mpo ezala mbeka na ye, azali kopesa ngai nkembo,+

Mpe moto oyo azali kokoba kosala oyo ezali malamu,

Nakomonisa ye lobiko ya Nzambe.”+

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi, ntango mosakoli Natane akɔtaki epai ya Davidi wana asilaki kosangisa nzoto na Bate-sheba.+

51 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto na kolanda bolingo na yo ya sembo.+

Longolá masumu na ngai na kolanda motema mawa monene na yo.+

 2 Sukolá ngai mobimba na libunga na ngai,+

Mpe pɛtolá ngai na lisumu na ngai.+

 3 Mpo nayebi malamu misala na ngai ya kobuka mibeko,

Mpe lisumu na ngai ezali ntango nyonso liboso na ngai.*+

 4 Libosoliboso, nasaleli yo nde lisumu;+

Nasali oyo ezali mabe na miso na yo.+

Mpo ozali sembo ntango ozali koloba,

Mpe osambisaka na bosembo.+

 5 Talá! Nabotamá na ngambo ya libunga,

Mpe nazali moto ya masumu banda ntango mama azwaki zemi na ngai.+

 6 Yo osepelaka na solo oyo ezali na kati ya motema;+

Teyá motema na ngai bwanya ya solosolo.

 7 Pɛtolá ngai na izope mpo nalongwa na lisumu, mpo nazala pɛto;+

Sukolá ngai mpo nakóma mpɛmbɛ koleka nɛjɛ.+

 8 Salá ete nayoka makɛlɛlɛ ya nsai mpe ya esengo,

Mpo nasepela atako obukibuki mikuwa na ngai.+

 9 Balusá* elongi na yo mpo etala masumu na ngai te,+

Mpe bomá mabunga na ngai nyonso.+

10 Ee Nzambe, pesá ngai motema ya pɛto,+

Mpe tyá kati na ngai elimo ya sika,+ oyo ezali ngwi.

11 Kobengana ngai te mosika ya elongi na yo;

Mpe kolongola ngai elimo santu na yo te.

12 Zongiselá ngai esengo oyo nayokaki ntango obikisaki ngai;+

Lamusá na kati na ngai mposa ya kotosa yo.*

13 Nakoteya bato oyo babukaka mibeko banzela na yo,+

Mpo basumuki bázonga epai na yo.

14 Ee Nzambe, bikisá ngai na ngambo ya makila,+ Nzambe ya lobiko na ngai,+

Mpo lolemo na ngai eyebisa bosembo na yo na esengo.+

15 Ee Yehova, fungolá mbɛbu na ngai,

Mpo monɔkɔ na ngai eyebisa lisanzoli na yo.+

16 Mpo yo olingaka mbeka te—soki olingaka mbeka mbɛlɛ napesi yango;+

Osepelaka te na likabo mobimba ya kotumba.+

17 Bambeka oyo esepelisaka Nzambe ezali elimo oyo ebukani;

Ee Nzambe, motema oyo ebukani mpe etutami, okoboya yango te.*+

18 Salá oyo ezali malamu mpo na Siona;

Tongá bifelo ya Yerusaleme.

19 Bongo okosepela na bambeka ya bosembo,*

Bambeka ya kotumba mpe makabo mobimba;

Bongo bangɔmbɛ-mibali ekopesama na etumbelo na yo.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Maskile.* Ya Davidi, ntango Doege Moedome ayaki koyebisa Saulo ete Davidi akendaki na ndako ya Ahimeleke.+

52 Mpo na nini ozali komikumisa mpo na misala na yo ya mabe, yo moto ya nguya?+

Bolingo ya sembo ya Nzambe ezali koumela mokolo mobimba.+

 2 Lolemo na yo, oyo epeli lokola razware,+

Ezali kokana kosala mabe mpe ezali kosala na bokosi.+

 3 Olingi mabe koleka malamu,

Lokuta koleka koloba oyo ezali sembo. (Sela)

 4 Olingi liloba nyonso oyo esalaka mabe,

Yo lolemo oyo elobaka makambo ya bokosi!

 5 Yango wana Nzambe akobebisa yo mbala moko mpo na libela;+

Akotombola yo nokinoki mpe akolongola yo na hema na yo,+

Akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.+ (Sela)

 6 Bato ya sembo bakomona yango mpe bakotonda na nsɔmɔ,+

Mpe bakosɛka ye:+

 7 “Talá mobali oyo azalaki te kotya Nzambe azala esika na ye ya kokima,*+

Kasi atyaki motema nde na ebele ya bomɛngo na ye+

Mpe atyaki motema* na makambo ya mabe oyo azalaki kokana kosala.”*

 8 Kasi nakozala lokola nzete ya olive oyo etondi na nkasa na kati ya ndako ya Nzambe;

Natye motema na bolingo ya sembo ya Nzambe+ libela na libela.

 9 Nakosanzola yo libela na libela mpo na oyo osali;+

Liboso ya bato na yo ya sembo,

Nakotya elikya na nkombo na yo,+ mpo yango ezali malamu.

Epai ya mokambi ya nzembo; na kolanda ebɛtɛli ya Mahalate.* Maskile.* Ya Davidi.

53 Bazoba balobi na mitema na bango ete:

“Yehova azali te.”+

Misala na bango ya kozanga bosembo* ezali mabe mpe eyinami;

Ata moko te azali kosala malamu.+

 2 Kasi uta na likoló, Nzambe azali kotala bana ya bato+

Mpo na komona soki ezali na moto oyo azali na mayele ya kososola, soki ezali na moto oyo azali koluka Yehova.+

 3 Bango nyonso batiki nzela ya malamu;

Bango nyonso mpe babebi.

Ata moto moko te azali kosala malamu,

Ata moto moko te.+

 4 Ata moto moko te oyo asalaka mabe azali kokanga ntina?

Bazali kolya bato na ngai ndenge balyaka limpa.

Babeleli Yehova te.+

 5 Kasi nsɔmɔ moko monene ekokanga bango,

Nsɔmɔ moko oyo bayoká naino te,*

Mpo Nzambe akopalanganisa mikuwa ya baoyo bazali kobunda na yo.*

Okoyokisa bango nsɔni, mpo Yehova abwaki bango.

 6 Ee lobiko ya Yisraele euta na Siona!+

Ntango Yehova akozongisa bato na ye oyo bazali bakangami,

Tiká Yakobo azala na esengo, tiká Yisraele asepela.

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Maskile.* Ya Davidi, ntango Bazife bakɔtaki mpe balobaki na Saulo ete: “Davidi amibombi epai na biso.”+

54 Ee Nzambe, bikisá ngai na nkombo na yo,+

Mpe na nguya na yo sambá likambo na ngai.+

 2 Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai;+

Tyá likebi na maloba ya monɔkɔ na ngai.

 3 Mpo bapaya bazali kotɛmɛla ngai,

Mpe banyokoli bazali koluka bomoi* na ngai.+

Bazali na limemya ata moke te mpo na Nzambe.*+ (Sela)

 4 Talá! Nzambe azali mosungi na ngai;+

Yehova azali elongo na baoyo basungaka ngai.

 5 Akozongisela banguna na ngai+ mabe na bango;

Na bosembo na yo, bomá bango.*+

 6 Nakopesa yo mbeka+ na motema moko.

Ee Yehova, nakosanzola nkombo na yo mpo yango ezali malamu.+

 7 Mpo abikisaka ngai na mpasi nyonso,+

Nakomona kokwea ya banguna na ngai.+

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Maskile.* Ya Davidi.

55 Ee Nzambe, yoká libondeli na ngai,+

Mpe kosala te lokola oyoki te ntango nazali kosɛnga yo oyokela ngai mawa.*+

 2 Tyelá ngai likebi mpe yanolá ngai.+

Motungisi na ngai ezali kosala ete nazanga kimya,+

Mpe nabulungani mpenza

 3 Mpo na maloba ya monguna

Mpe ndenge moto mabe azali konyokola ngai.

Mpo bazali kobimisela ngai mpasi mingi mpenza,

Bazali koyokela ngai nkanda makasi mpe bazali mpenza koyina ngai.+

 4 Motema na ngai ezali na mpasi makasi na kati na ngai,+

Mpe nsɔmɔ ya liwa ezingi ngai.+

 5 Kobanga mpe kolɛnga ekweli ngai,

Mpe kolɛngalɛnga ezwi ngai.

 6 Nazali kaka koloba: “Soki nazalaka ata na mapapu lokola ebenga!

Mbɛlɛ napumbwaki mosika mpe nafandi na kimya.

 7 Talá! mbɛlɛ nakimaki mosika.+

Mbɛlɛ nafandaki na esobe.+ (Sela)

 8 Mbɛlɛ nakendaki mbangu na esika na ngai ya libateli

Mosika na mopɛpɛ oyo ezali kopɛpa makasi, mosika na mopɛpɛ makasi.”

 9 Ee Yehova, bulunganisá bango mpe salá ete makambo oyo bakani kosala elonga te,*+

Mpo namoni mobulu mpe kowelana na kati ya engumba.

10 Ezali kobaluka zingazinga likoló ya bifelo na yango butu moi;

Makambo ya mabe mpe mpasi ezali na kati na yango.+

11 Libebi ezali na kati na yango;

Monyoko ná bokosi elongwe ata moke te na esika na yango monene ya bato nyonso.+

12 Mpo monguna te nde atumoli ngai;+

Soki bongo mbɛlɛ nakangelaki yango motema.

Ezali te monguna nde atɛmɛli ngai;

Soki bongo mbɛlɛ namibombaki liboso na ye.

13 Kasi ezali yo, moto lokola ngai,*+

Moninga na ngai oyo nayebi malamu.+

14 Tozalaki kosepela elongo mpo na boninga na biso ya makasi;

Na kati ya ndako ya Nzambe tozalaki kotambola elongo na ebele ya bato.

15 Libebi ekwela bango!+

Bákita na Nkunda* wana bazali naino na bomoi;

Mpo mabe ezali na bisika na bango ya kofanda mpe na mitema na bango.

16 Kasi ngai nakobelela Nzambe,

Mpe Yehova akobikisa ngai.+

17 Na mpokwa, na ntɔngɔ mpe na midi, nazali kaka komitungisa mpe komilelalela,*+

Mpe ayokaka mongongo na ngai.+

18 Akobikisa ngai mpenza* na baoyo bazali kobundisa ngai mpe akopesa ngai kimya,

Mpo bato ebele bayei kobundisa ngai.+

19 Nzambe akoyoka mpe akoyanola bango,+

Ye oyo azali kofanda na kiti na ye ya bokonzi kobanda ntango ya kala.+ (Sela)

Baoyo babangaka Nzambe te

Bakoboya kobongwana.+

20 Abundisi* baoyo bazali na kimya elongo na ye;+

Abebisi kondimana na ye.+

21 Maloba na ye ezali kitoko koleka manteka,+

Kasi kowelana ezali na motema na ye.

Maloba na ye ezali pɛtɛɛ koleka mafuta,

Kasi ezali mipanga oyo ebimisami na mabenga na yango.+

22 Bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo,+

Mpe akosunga yo.+

Akopesa nzela ata moke te ete moto ya sembo akwea.*+

23 Kasi yo, Ee Nzambe, okokitisa bango na libulu oyo eleki mpenza mozindo.+

Baoyo bazali na ngambo ya makila mpe bato ya bokosi bakokokisa ata katikati ya mikolo na bango te.+

Kasi ngai, nakotyela yo motema.

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Ebenga oyo ezali mosika mpe efandi nyɛɛ.” Ya Davidi. Mikitame.* Ntango Bafilistia bakangaki ye na Gate.+

56 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, mpo bato bazali kobundisa* ngai.

Mokolo mobimba bazali kaka kobundisa ngai mpe konyokola ngai.

 2 Banguna na ngai bazali koluka koswa ngai mokolo mobimba;

Mingi bazali kobundisa ngai na lofundo nyonso.

 3 Ntango nazali kobanga,+ natyelaka yo motema.+

 4 Natyeli Nzambe motema, nasanzolaka ye mpo na maloba na ye.

Natyeli Nzambe motema; nakobanga te.

Moto* akoki kosala ngai nini?+

 5 Mokolo mobimba bazali kobimisela ngai mpasi;

Bakanisaka kaka ndenge ya kosala ngai mabe.+

 6 Bazali kobunda mpe bazali komibomba;

Bazali kolandela likambo nyonso oyo nazali kosala,+

Bazali kokanisa koboma ngai.+

 7 Boyá bango mpo na misala na bango ya mabe.

Ee Nzambe, na nkanda na yo, pesá bikólo etumbu.+

 8 Oyebi malamu matambe na ngai nyonso ntango nazali koyengayenga.+

Tyá mai ya miso na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama.+

Yango ekomami te na kati ya buku na yo?+

 9 Banguna na ngai bakozonga nsima na mokolo oyo nakobenga mpo na koluka lisalisi.+

Nazali kondima likambo oyo: Nzambe azali na ngámbo na ngai.+

10 Natyelaka Nzambe motema, nasanzolaka ye mpo na maloba na ye.

Natyelaka Yehova motema, nasanzolaka ye mpo na maloba na ye.

11 Natyeli Nzambe motema; Nakobanga te.+

Moto akoki kosala ngai nini?+

12 Nzambe na ngai, nasengeli kokokisa makambo oyo napesaki yo elaka.+

Nakopesa yo makabo ya botɔndi.+

13 Mpo obikisi ngai na liwa+

Mpe osali ete makolo na ngai ebɛta libaku te,+

Mpo natambola liboso ya Nzambe na pole ya bato ya bomoi.+

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame.* Ntango akimaki Saulo, akɔti na mobenga.+

57 Ee Nzambe, moniselá ngai boboto, moniselá ngai boboto,

Mpo nakimi* epai na yo,+

Mpe nakimi na elili ya mapapu na yo tii mitungisi ekoleka.+

 2 Nazali kobelela Nzambe Oyo-Aleki-Likoló,

Nzambe ya solo, oyo azali kosilisa mitungisi na ngai.

 3 Akotinda lisalisi uta na likoló mpe akobikisa ngai.+

Akobulunganisa moto oyo azali koswa ngai. (Sela)

Nzambe akotinda boboto* na ye mpe bosembo na ye.+

 4 Bankɔsi bazingi ngai;+

Nasengeli kolala na kati ya bato oyo balingi kolya ngai,

Baoyo mino na bango ezali makɔnga mpe makula

Mpe baoyo lolemo na bango ezali mopanga oyo epeli.+

 5 Ee Nzambe, okumisama kuna na likoló;

Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.+

 6 Babongisi monyama mpo na kotyela makolo na ngai motambo;+

Nagumbami mpo na mitungisi.+

Batimoli libulu liboso na ngai,

Kasi bango moko nde bakwei na kati.+ (Sela)

 7 Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te,+

Motema na ngai ezali kotengatenga te.

Nakoyemba mpe nakobɛta miziki.

 8 Lamuká, nkembo na ngai.

Lamuká, Ee ebɛtɛlo ya nsinga; yo mpe, Ee nzɛnzɛ.

Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.+

 9 Ee Yehova, nakosanzola yo na kati ya bato ya bikólo;+

Nakoyemba mpo na kosanzola* yo na kati ya bikólo.+

10 Mpo bolingo na yo ya sembo ezali monene, ekei tii na likoló,+

Mpe bosembo na yo ekei tii na mapata.

11 Ee Nzambe, okumisama kuna na likoló;

Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.+

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame.*

58 Ndenge nini bokoki kofanda nyɛɛ ntango oyo esengeli bólobela boyengebene?+

Bokoki nde kosambisa na bosembo, bino bana ya bato?+

 2 Kutu, na motema na bino bozali nde kokanisa kosala makambo ya kozanga bosembo,+

Mpe bozali kosala mobulu na mokili!+

 3 Bato mabe babebá* banda na kobotama;*

Bazali batomboki mpe babuki lokuta banda ntango oyo babotamaki.

 4 Ngɛngɛ na bango ezali lokola ngɛngɛ ya nyoka;+

Bakufá matoi lokola kobra oyo ekangi litoi na yango.

 5 Ekoyokela mongongo ya balengoli te,

Ata soki bayebi kosalela bikelakela ya kolengola nyoka.

 6 Ee Nzambe, buká mino na bango!

Ee Yehova, buká mbanga ya bankɔsi yango!*

 7 Bálimwa lokola mai oyo ezali kotíyola.

Nzambe agumba litimbo mpe akweisa banguna na makula na ye.

 8 Bázala lokola mbɛmbɛ oyo ezali kokufa* wana ezali kotambola;

Lokola mwana oyo abotami ya kokufa oyo akomona moi ata mokolo moko te.

 9 Liboso ete banzungu na bino eyoka nsolo ya mɔtɔ ya mwa nzete ya nzubɛnzubɛ,

Akomema mwa nzete yango ya mobesu mpe oyo ezali kopela, ndenge mopɛpɛ makasi esalaka.+

10 Moto ya sembo akosepela mpo amoni ndenge bazongiseli bato mabe, mabe na bango;+

Makolo na ye ekotambola na kati ya makila ya moto mabe.+

11 Bongo bato bakoloba ete: “Ya solo mpenza mbano ezali mpo na moto ya sembo.+

Ya solo ezali na Nzambe oyo asambisaka na mabele.”+

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Kobebisa te.” Ya Davidi. Mikitame.* Ntango Saulo atindaki bato bákɛngɛla ndako ya Davidi* mpo báboma ye.+

59 Ee Nzambe na ngai, bikisá ngai na mabɔkɔ ya banguna na ngai;+

Batelá ngai na mabɔkɔ ya baoyo bazali kotɛmɛla ngai.+

 2 Bikisá ngai na mabɔkɔ ya baoyo basalaka makambo ya mabe,

Mpe bikisá ngai na mabɔkɔ ya bato ya mobulu.*

 3 Talá! Bazali kozela mpo na kosala ngai* mabe;+

Bato ya makasi bazali kobundisa ngai

Kasi ezali te mpo natomboki to nasali lisumu,+ Ee Yehova.

 4 Atako nasali likambo ya mabe te, bazali kopota mbangu mpe komibongisa mpo na kobundisa ngai.

Tɛlɛmá ntango nazali kobenga mpe talá.

 5 Mpo yo, Ee Yehova Nzambe ya mampinga, ozali Nzambe ya Yisraele.+

Lamuká mpo otyela bikólo nyonso likebi.

Baoyo nyonso batɛkaka baninga na bango mpe balukaka kosala bango mabe, koyokela bango mawa te.+ (Sela)

 6 Bazongaka mpokwa nyonso;+

Bagangaka lokola mbwa+ mpe babalukaka zingazinga ya engumba.+

 7 Talá makambo oyo ezali kobima* na monɔkɔ na bango;

Mbɛbu na bango ezali lokola mipanga,+

Mpo balobi: “Nani azali koyoka?”+

 8 Kasi yo, Ee Yehova, okosɛka bango;+

Okotyola bikólo nyonso.+

 9 Ee makasi na ngai, nakotala kaka epai na yo;+

Mpo Nzambe azali esika makasi na ngai ya kobombana.*+

10 Nzambe oyo amoniselaka ngai bolingo ya sembo akoya kosalisa ngai;+

Nzambe akosala ete namona kokwea ya banguna na ngai.+

11 Koboma bango te, mpo bato na ngai bábosana te.

Na nguya na yo salá ete báyengayenga;

Salá ete bákwea, Ee Yehova, nguba na biso.+

12 Mpo na lisumu ya monɔkɔ na bango, liloba ya mbɛbu na bango,

Bákangama na motambo na lolendo na bango,+

Mpo na elakeli mabe mpe bokosi oyo bazali koloba.

13 Silisá bango na nkanda na yo;+

Silisá bango, mpo bázala lisusu te;

Monisá bango ete Nzambe azali koyangela na Yakobo mpe tii na bansuka ya mabele.+ (Sela)

14 Tiká ete bázonga na mpokwa;

Tiká bango báganga lokola mbwa mpe bábaluka zingazinga ya engumba.+

15 Tiká bango báyengayenga mpo na koluka eloko ya kolya;+

Bátonda te mpe bázwa esika ya kolala te.

16 Kasi ngai nakoyembela makasi na yo,+

Na ntɔngɔ, nakoyebisa na esengo mpenza makambo etali bolingo na yo ya sembo.

Mpo ozali esika makasi na ngai ya kobombana+

Mpe esika oyo nakoki kokima na ntango ya mpasi na ngai.+

17 Ee makasi na ngai, nakoyemba mpo na kosanzola yo,*+

Mpo Nzambe azali esika makasi na ngai ya kobombana, Nzambe oyo amoniselaka ngai bolingo ya sembo.+

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Fololo lísi ya Bokundoli.” Mikitame.* Ya Davidi. Mpo na koteya. Ntango abundaki na Arame-naharaime ná Arame-Zoba, mpe Yoabe azongaki mpe abomaki bato 12 000 ya Edome na Lobwaku ya Mungwa.+

60 Ee Nzambe, obwakaki biso; opanzaki biso.+

Osilikelaki biso; kasi sikoyo ndimá biso lisusu!

 2 Oningisaki mabele; opasolaki yango.

Bongisá madusu na yango, mpo elingi kokwea.

 3 Osali ete bato na yo bámona mpasi makasi.

Omɛlisi biso vinyo oyo ezali kopesa biso kizunguzungu.+

 4 Pesá* baoyo bazali kobanga yo elembo

Mpo bákima mpe makula ezwa bango te. (Sela)

 5 Mpo bato oyo olingaka bábikisama,

Bikisá biso na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe yanolá biso.+

 6 Nzambe alobi na kati ya bosantu na ye* ete:

“Nakosepela makasi, nakopesa Shekeme ezala libula,+

Mpe nakomeka bonene ya Lobwaku* ya Sukote.+

 7 Gileade ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai,+

Mpe Efraime ezali ekɔti* mpo na motó na ngai;

Yuda ezali lingenda na ngai ya komanda.+

 8 Moabe ezali saani monene na ngai ya kosukola.+

Nakobwakela Edome sandale na ngai.+

Nakoganga ete nalongi Filistia.”+

 9 Nani akomema ngai na engumba oyo ezingami?*

Nani akokamba ngai tii na Edome?+

10 Ee Nzambe, ezali yo te nde moto obwaki biso?

Ezali yo te nde okendaka lisusu te elongo na mampinga na biso, Ee Nzambe na biso?+

11 Salisá biso na mpasi na biso,

Mpo lobiko oyo euti na bato ezali mpamba.+

12 Tokozwa nguya epai ya Nzambe,+

Mpe akonyata banguna na biso.+

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Ya Davidi.

61 Ee Nzambe, yoká kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.

Tyá likebi na libondeli na ngai.+

 2 Uta na bansuka ya mabele nakobelela epai na yo

Ntango nazangi elikya.*+

Kambá ngai tii na libanga oyo ezali molai koleka ngai.+

 3 Mpo ozali esika na ngai ya kokima,

Ndako molai ya makasi oyo ebatelaka ngai liboso ya monguna.+

 4 Nakoyambama na hema na yo mpo na libela;+

Nakozwa esika ya kokima na nse ya mapapu na yo.+ (Sela)

 5 Mpo yo, Ee Nzambe, oyoki bilako na ngai.

Opesi ngai libula oyo obombeli baoyo babangaka nkombo na yo.+

 6 Okokómisa bomoi ya mokonzi molai,*+

Mpe bambula na ye ekozala mpo na libota na libota.

 7 Akofanda na kiti ya bokonzi* mpo na libela liboso ya Nzambe;+

Bolingo* mpe bosembo na yo ebatela ye.+

 8 Bongo nakoyemba mpo na kosanzola* nkombo na yo mpo na libela+

Wana nazali kokokisa bilako na ngai mokolo na mokolo.+

Epai ya mokambi ya nzembo; ya Yedutune.* Mondule ya Davidi.

62 Ɛɛ, nazali* kozela Nzambe na kimya.

Lobiko na ngai ekouta epai na ye.+

 2 Ɛɛ, ye azali libanga na ngai mpe lobiko na ngai, esika makasi na ngai ya kobombana;*+

Nakokwea mpenza te.+

 3 Tii ntango nini bokokoba kobundisa moto mpo bóboma ye?+

Bino nyonso bozali kobangisa lokola efelo oyo etɛngami, efelo ya mabanga oyo elingi kokwea.*

 4 Bazali koyokana mpo na kolongola ye na esika na ye ya lokumu;

Basepelaka na lokuta.

Na monɔkɔ na bango bazali kopambola, kasi na motema na bango bazali kolakela mabe.+ (Sela)

 5 Ɛɛ, nazali kozela* na kimya nyonso Nzambe asala,+

Mpo elikya na ngai eutaka epai na ye.+

 6 Ɛɛ, ye azali libanga na ngai mpe lobiko na ngai, esika makasi na ngai ya kobombana;

Nakokwea ata moke te.+

 7 Lobiko na ngai mpe nkembo na ngai eutaka epai ya Nzambe.

Libanga na ngai ya makasi, esika na ngai ya kokima, ezali Nzambe.+

 8 Ee bino bato, bótyela ye motema ntango nyonso.

Bófungolela ye mitema na bino.*+

Nzambe azali esika na biso ya kokima.+ (Sela)

 9 Bana ya bato bazali lokola mwa mopɛpɛ,

Bana ya bato bazali lokola ndɔtɔ mpamba.+

Soki batye bango nyonso elongo na emekeli-kilo, bakoleka ata mopɛpɛ te na kilo.+

10 Bótya motema te na kobɔtɔla mpo na kokóma bazwi,

Mpe bótya te elikya ya lokuta na moyibi mpo na kokóma na bomɛngo.

Soki bomɛngo na bino ebakisami, bótyela yango motema te.+

11 Nzambe alobi mbala moko, mpe na mbala ya mibale nayoki likambo oyo:

Makasi ezali ya Nzambe.+

12 Lisusu, bolingo ya sembo ezali ya yo, Ee Yehova,+

Mpo ozongiselaka moto na moto na kolanda misala na ye.+

Mondule ya Davidi, ntango azalaki na mokili ekauká ya Yuda.+

63 Ee Nzambe, ozali Nzambe na ngai, nazali kaka koluka yo.+

Nazali* mpenza na mposa na yo.+

Nalɛmbi* mpo nazali na mposa na yo makasi

Na mokili oyo ekauká, oyo eloko ebotaka te mpe mai ezali te.+

 2 Yango wana natalaki yo na esika mosantu;

Namonaki makasi na yo mpe nkembo na yo.+

 3 Mpo bolingo na yo ya sembo ezali malamu koleka bomoi,+

Mbɛbu na ngai ekokumisa yo.+

 4 Na yango, nakosanzola yo bomoi na ngai mobimba;

Na nkombo na yo, nakotombola mabɔkɔ na ngai.

 5 Natondi* na eteni oyo eleki malamu mpe kitoko,*

Yango wana monɔkɔ na ngai ekosanzola yo na esengo oyo ezali na mbɛbu na ngai.+

 6 Nakanisaka yo ntango nazali na mbeto na ngai;

Namanyolaka na ntina na yo butu mobimba.+

 7 Mpo ozali mosungi na ngai,+

Mpe nazali koganga na esengo na elili ya mapapu na yo.+

 8 Nakangami* na yo makasi;

Lobɔkɔ na yo ya mobali esimbi ngai makasi.+

 9 Kasi baoyo bazali koluka kobebisa bomoi na ngai*

Bakokita na nse mpenza ya mabele.

10 Bakokaba bango na nguya ya mopanga;

Bakokóma bilei ya bagambala.

11 Kasi mokonzi akosepela na ntina na Nzambe.

Moto nyonso oyo azali kolapa ndai na nkombo ya Nzambe akosepela,*

Mpo monɔkɔ ya baoyo bazali koloba lokuta ekokangisama.

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

64 Ee Nzambe, yoká mongongo na ngai ntango nazali kobondela.+

Batelá bomoi na ngai ezala na nsɔmɔ ya monguna te.

 2 Bombá ngai mosika na masolo ya nkuku ya bato mabe,+

Mosika na ebele ya basali mabe.

 3 Bapelisi lolemo na bango lokola mopanga;

Bazali kobimisa maloba mabe lokola makula,

 4 Mpo bábwakela yango moto oyo azali na likambo te, uta na bisika ya kobombana;

Bazali kobwakela ye yango na mbalakaka, bazali kobanga te.

 5 Bazali kokangama makasi na makanisi na bango ya mabe;*

Bazali kolobela ndenge bakobomba mitambo na bango.

Bazali koloba ete: “Nani akomona yango?”+

 6 Bazali kolukaluka ndenge ya sika ya kosala mabe;

Na kobombana babongisi malamu mayele na bango;+

Ezali mpenza mpasi koyeba makanisi ya motema ya mokomoko na bango.

 7 Kasi Nzambe akobwakela bango likula;+

Bakozoka mpota na mbalakaka.

 8 Lolemo na bango moko ekokweisa bango;+

Baoyo nyonso bakotala bakoningisa motó.

 9 Bongo bato nyonso bakobanga;

Mpe bakoyebisa likambo oyo Nzambe asali,

Mpe bakososola misala na ye.+

10 Moto ya sembo* akosepela na Yehova mpe akokima epai na ye;+

Bato nyonso ya motema sembo bakosepela makasi.*

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi. Loyembo.

65 Ee Nzambe, okosanzolama na ngomba Siona;+

Tokokokisa bilako na biso epai na yo.+

 2 Ee Moyoki ya libondeli, bato ya lolenge nyonso* bakoya epai na yo.+

 3 Mabunga na ngai esilisi ngai makasi.+

Kasi ozipi misala na biso ya kobuka mibeko.+

 4 Esengo na moto oyo oponi mpe obendi

Mpo afanda na mapango na yo.+

Tokotonda na bolamu ya ndako na yo,+

Esika mosantu ya tempelo na yo.+

 5 Mpo na koyanola biso, okosala misala+ ya nsɔmɔ mpe ya bosembo,

Ee Nzambe ya lobiko na biso;

Ye oyo bato nyonso ya mabele

Mpe baoyo bazali mosika kuna na mbu bakotyela motema.+

 6 Yo* opiká makasi bangomba na nguya na yo;

Yo* olatá nguya.+

 7 Yo* okitisaka kotomboka ya mbu,+

Makɛlɛlɛ ya mbonge na yango mpe mobulu ya bato ya bikólo.+

 8 Bato oyo bafandi na bisika ya mosika bakokamwa mpo na bilembo na yo;+

Okosala ete bato oyo bafandi kobanda esika moi ebimaka tii esika yango elalaka báganga na esengo.

 9 Ozali kobatela mabele,

Osali ete ebota mingi* mpe etonda mpenza na biloko.+

Otondisi mikɛli na mai;

Opesi bato mbuma,+

Mpo ndenge wana nde obongisaki mabele.

10 Ozali kopɔlisa banzela ya mikala mpe kolalisa mabele na yango oyo babalusá;

Ozali kolɛmbisa yango na mbula monene; ozali kopambola milona na yango ya sika.+

11 Obakisi mapamboli kitoko na mobu oyo, lokola nde olatisi yango motole;

Banzela oyo ozali kotambola etondi na biloko ya kitoko.*+

12 Bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti na esobe ezali kaka kotonda,*+

Mpe bangomba mike elati esengo.+

13 Bisika ya koleisa bibwɛlɛ matiti etondi na bitonga,

Mpe mabwaku ezipami na mbuma.+

Ezali koganga mpo na bolongi, ɛɛ, ezali koyemba.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Loyembo. Mondule.

66 Bino bato nyonso ya mabele, bóganga mpo na Nzambe koganga ya bolongi.+

 2 Bóyemba mpo na kosanzola* nkembo ya nkombo na ye.

Bópesa lisanzoli na ye nkembo.+

 3 Bóloba na Nzambe ete: “Misala na yo ezali mpenza nsɔmɔ!+

Mpo na makasi mingi oyo ozali na yango,

Banguna na yo bakoya liboso na yo na kolɛnga.+

 4 Bato nyonso ya mabele bakogumbamela yo;+

Bakoyemba mpo na kosanzola yo;

Bakoyemba mpo na kosanzola nkombo na yo.”+ (Sela)

 5 Bóya komona misala ya Nzambe.

Misala oyo asalelaka bana ya bato ezali nsɔmɔ.+

 6 Abongolaki mbu mabele oyo ekauki;+

Bakatisaki ebale na makolo.+

Kuna tosepelaki na ye.+

 7 Ayangelaka na nguya na ye mpo na libela.+

Miso na ye ezali kotalatala bikólo.+

Baoyo bazali motó makasi, basengeli te komitombola.+ (Sela)

 8 Bósanzola Nzambe, bino bato ya bikólo,+

Mpe tiká mongongo ya lisanzoli na ye eyokana.

 9 Abatelaka bomoi* na biso;+

Apesaka nzela te ete makolo na biso ebɛta libaku.*+

10 Mpo otalitali biso, Ee Nzambe;+

Opɛtoli biso ndenge bapɛtolaka palata.

11 Okɔtisi biso na monyama ya bokila;

Omemisi biso mokumba ya mpasi mpenza.*

12 Otikaki moto, mowei mpamba, atambola likoló ya mitó na biso;

Tolekaki na kati ya mɔtɔ mpe na kati ya mai;

Bongo omemaki biso tii na esika ya kokitisa motema.

13 Nakokɔta na ndako na yo na makabo ya kotumba mobimba;+

Nakokokisa bilako na ngai epai na yo+

14 Oyo mbɛbu na ngai elakaki+

Mpe oyo monɔkɔ na ngai elobaki ntango nazalaki na mitungisi.

15 Nakopesa yo makabo ya kotumba ya banyama ya mafutamafuta

Ná milinga ya mbeka ya bampate-mibali.

Nakopesa bangɔmbɛ-mibali ná bantaba-mibali. (Sela)

16 Bino nyonso baoyo bobangaka Nzambe, bóya koyoka,

Mpe nakoyebisa bino likambo oyo asaleli ngai.+

17 Nabelelaki ye na monɔkɔ na ngai

Mpe nakumisaki ye na lolemo na ngai.

18 Soki na motema na ngai nabatelaki eloko oyo eyokisaka mpasi,

Yehova alingaki koyoka ngai te.+

19 Kasi Nzambe ayokaki;+

Atyelaki libondeli na ngai likebi.+

20 Nzambe asanzolama, ye oyo aboyaki libondeli na ngai te

To aboyeli ngai te bolingo na ye ya sembo.

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Mondule. Loyembo.

67 Nzambe akomonisela biso boboto mpe akopambola biso;

Akongɛngisela biso elongi na ye+ (Sela)

 2 Mpo nzela na yo eyebana na mabele mobimba,+

Misala na yo ya lobiko na kati ya bikólo nyonso.+

 3 Ee Nzambe, bato ya bikólo básanzola yo;

Bato nyonso ya bikólo básanzola yo.

 4 Bikólo esepela mpe eganga na esengo,+

Mpo okosambisa bato ya bikólo na bosembo.+

Okokamba bikólo nyonso ya mabele. (Sela)

 5 Ee Nzambe, bato ya bikólo básanzola yo;

Bato nyonso ya bikólo básanzola yo.

 6 Mabele ekobota mbuma na yango;+

Nzambe, Nzambe na biso, akopambola biso.+

 7 Nzambe akopambola biso,

Mpe nsuka nyonso ya mabele ekobanga* ye.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi. Mondule. Loyembo.

68 Tiká Nzambe atɛlɛma, banguna na ye bápalangana,

Mpe baoyo bayinaka ye bákima liboso na ye.+

 2 Obengana bango ndenge mopɛpɛ ebenganaka milinga;

Ndenge mafuta enyangwaka na mɔtɔ,

Bato mabe básila liboso ya Nzambe.+

 3 Kasi bato ya sembo básepela;+

Bázala na esengo makasi liboso ya Nzambe;

Bátonda mpenza na esengo.

 4 Bóyembela Nzambe; bóyemba mpo na kosanzola* nkombo na ye.+

Bóyembela Ye oyo azali koleka na mikili ya patatalu oyo ekauká.*

Yah* ezali nkombo na ye!+ Bósepela liboso na ye!

 5 Tata ya bana oyo batata bakufá mpe mobateli* ya basi oyo mibali bakufá+

Ezali Nzambe oyo afandi na esika na ye mosantu.+

 6 Nzambe azali kopesa bato oyo bazali kaka bango moko ndako mpo báfanda;+

Azali komema bato ya bolɔkɔ tii na esika ya bomɛngo.+

Kasi bato ya motó makasi* basengeli kofanda na mokili oyo ezangá mai.+

 7 Ee Nzambe, ntango otambwisaki* bato na yo,+

Ntango ozalaki kotambola na mokili ekauká, (Sela)

 8 Mabele elɛngaki;+

Osalaki ete likoló enɔkisa mbula;*

Sinai oyo elɛngaki mpo na Nzambe, Nzambe ya Yisraele.+

 9 Ee Nzambe, osalaka ete mbula enɔka makasi;

Opesaki bato na yo* makasi ntango balɛmbaki.

10 Bafandaki na kaa na yo ya bahema;+

Ee Nzambe, na bolamu na yo okokisaki mposa ya babola.

11 Yehova apesi mitindo;

Basi oyo bazali kosakola nsango malamu bazali limpinga moko monene.+

12 Bakonzi ya mampinga bazali kokima,+ bazali kokima!

Mwasi oyo atikali na ndako azwi ndambo ya eloko oyo bapunzi.+

13 Atako bozalaki kolala na mɔtɔ ya kaa,*

Bokozwa ebenga oyo mapapu na yango ezipami na palata,

Ná nsala ya wolo* oyo epɛtolami.

14 Ntango Mozwi-ya-Nguya-Nyonso apalanganisaki bakonzi na yango,+

Nɛjɛ ekweaki* na Zalamone.

15 Ngomba ya Bashane+ ezali ngomba ya Nzambe;*

Ngomba ya Bashane ezali na bisika mingi oyo etombwamá.

16 Mpo na nini bino, bangomba oyo ezali na bisika mingi oyo etombwamá, bozali kotala na likunya

Epai ngomba oyo Nzambe aponi* mpo afanda?+

Ɛɛ, Yehova akofanda kuna mpo na libela.+

17 Makalo ya bitumba ya Nzambe ezali bankóto zomi, bankóto na bankóto.+

Yehova auti na Sinai, ayei kokɔta na esika mosantu.+

18 Omati na likoló;+

Omemi bakangami;

Ozwi makabo oyo ezali bato,+

Ɛɛ, ata bato ya motó makasi,+ mpo na kofanda na kati na bango, Ee Yah Nzambe.

19 Yehova asanzolama, ye oyo mokolo na mokolo amemaka mokumba na biso,+

Nzambe ya solo ya lobiko na biso. (Sela)

20 Mpo na biso, Nzambe ya solo azali Nzambe oyo abikisaka;+

Mpe Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso abikisaka na liwa.+

21 Ya solo, Nzambe akopanza motó ya banguna na ye,

Motó ya moto nyonso oyo azali kotambola na ngambo na ye.+

22 Yehova alobi ete: “Nakozongisa bango uta na Bashane;+

Nakozongisa bango uta na bozindo ya mbu,

23 Mpo ozindisa makolo na yo na makila+

Mpe lolemo ya bambwa na yo elɛmbɔla makila ya banguna.”

24 Ee Nzambe, bamoni milɔngɔ ya bato na yo oyo bazali kotambola,

Milɔngɔ ya bato ya Nzambe na ngai, ya Mokonzi na ngai, bazali kotambola mpo na kokɔta na esika mosantu.+

25 Bayembi bazali kotambola liboso, mpe na nsima na bango babɛti-miziki bazali kobɛta bibɛtɛlo ya bansinga;+

Na katikati na bango bilenge basi bazali kobɛta bambonda ya mike.+

26 Na kati ya ebele ya bato oyo bayangani, bósanzola Nzambe;

Bósanzola Yehova, bino bato oyo bouti na Liziba ya Yisraele.+

27 Kuna Benyamina,+ mwana-nsuka, azali kotya bango na nse na ye,

Bankumu ya Yuda elongo na ebele ya bato oyo bazali koganga,

Bankumu ya Zebulone, bankumu ya Nafatali mpe batye bango na nse na bango.

28 Nzambe na yo apesi etinda ete okozala makasi.

Ee Nzambe, monisá makasi na yo, yo oyo osali makambo mpo na bolamu na biso.+

29 Mpo na tempelo na yo na Yerusaleme,+

Bakonzi bakoyela yo makabo.+

30 Pamelá nyama ya zamba oyo efandaka na matiti ya ebale,

Liyangani ya bangɔmbɛ-mibali+ mpe bana-ngɔmbɛ,

Tii bato ya bikólo bakogumbamela yo mpe bakoya na* biteni ya palata.

Kasi palanganisá bato ya bikólo oyo basepelaka na bitumba.

31 Biloko ya bronze ekouta* na Ezipito;+

Mokili ya Kushi ekopesa nokinoki makabo epai ya Nzambe.

32 Ee makonzi ya mabele, bóyembela Nzambe,+

Bóyemba mpo na kosanzola* Yehova, (Sela)

33 Mpo na ye oyo azali kotambola mosika kuna na likoló banda kalakala.+

Talá! Azali koganga na mongongo na ye ya makasi.

34 Bóndima makasi ya Nzambe.+

Lokumu na ye ezali likoló ya Yisraele,

Nzambe amonisaka makasi na ye uta na likoló.*

35 Nzambe azali nsɔmɔ uta na esika na ye* mosantu ya monene.+

Azali Nzambe ya Yisraele,

Oyo apesaka bato makasi mpe nguya.+

Nzambe asanzolama.

Epai ya mokambi ya nzembo; ya “Bafololo lísi.” Loyembo ya Davidi.

69 Ee Nzambe, bikisá ngai mpo mai elingi kozindisa ngai.*+

 2 Nazindi na pɔtɔpɔtɔ ya mozindo, epai mabele ya makasi ezali te.+

Nakómi na mai ya mozindo,

Mpe mokɛli oyo mai ezali kotíyola mbangu ememi ngai.+

 3 Nalɛmbi na koganga;+

Mongongo na ngai ekauki.

Miso na ngai elɛmbi na kozela Nzambe na ngai.+

 4 Baoyo bazali koyina ngai kaka mpamba+

Bazali mingi koleka nsuki ya motó na ngai.

Baoyo balingi kokómisa ngai na kimya ya liwa,

Banguna na ngai oyo basalaka makambo na bokosi,* bakómi mingi.

Basɛngaki ngai na makasi nazongisa eloko oyo nayibaki te.

 5 Ee Nzambe, oyebi bozoba na ngai,

Mpe ngambo na ngai ebombani liboso na yo te.

 6 Baoyo bazali kotyela yo elikya báyoka nsɔni te mpo na ngai,

Ee Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Yehova ya mampinga.

Baoyo bazali koluka yo básambwa te mpo na ngai,

Ee Nzambe ya Yisraele.

 7 Namemi nsɔni mpo na yo;+

Kosambwa ezipi elongi na ngai.+

 8 Nakómi lokola moto oyo ayebani te epai ya bandeko na ngai,

Mopaya epai ya bana ya mama na ngai.+

 9 Molende mpo na ndako na yo epeli kati na ngai,+

Mpe kosambwisa ya baoyo bazali kosambwisa yo ekweli ngai.+

10 Ntango namikitisaki mpo na kokila bilei,*

Nasambwaki mpo na yango.

11 Ntango nalataki ngɔtɔ,*

Nakómaki eloko ya kotyola* epai na bango.

12 Baoyo bafandi na porte ya engumba bazali koloba mpo na ngai,

Mpe balangwi-masanga bazali koyemba ngai na nzembo na bango.

13 Nakobondela yo,

Ee Yehova, na ntango oyo okomonisela ngai boboto.+

Na bolingo na yo ya sembo oyo etondi, Ee Nzambe.

Yanolá ngai mpe monisá ete ozali mobikisi na ngai oyo abongi kotyelama motema.+

14 Bikisá ngai na pɔtɔpɔtɔ;

Kotika te ete nazinda.

Bikisá ngai na mabɔkɔ ya baoyo bayinaka ngai

Mpe na mai mozindo.+

15 Kotika te mai makasi oyo ezali kotíyola mbangu emema ngai,+

To mozindo emɛla ngai,

To libulu ekanga monɔkɔ na yango likoló na ngai.+

16 Ee Yehova, yanolá ngai mpo bolingo na yo ya sembo ezali malamu.+

Balusá miso na yo epai na ngai na kolanda motema mawa oyo otondi na yango,+

17 Mpe kobombela mosaleli na yo elongi na yo te.+

Yanolá ngai nokinoki mpo nazali na mpasi.+

18 Pusaná pene na ngai mpe bikisá ngai;*

Sikolá ngai mpo na banguna na ngai.

19 Oyebi kosambwa na ngai, nsɔni na ngai mpe kotyolama na ngai.+

Ozali komona banguna na ngai nyonso.

20 Kosambwa ezokisi motema na ngai, mpe mpota yango esilaka te.*

Nakanisaki ete bakomitya na esika na ngai, kasi moto moko te asalaki yango,+

Nakanisaki ete babɔndisi bakozala, kasi namonaki ata moko te.+

21 Kasi bilei bapesaki ngai ezalaki nde nzete moko ya pwazɔ,*+

Mpe mpo na kosilisa mposa na ngai ya mai, bapesaki ngai vinɛgrɛ namɛla.+

22 Mesa na bango ekóma motambo mpo na bango,

Mpe bomɛngo na bango ekóma motambo.+

23 Miso na bango ekóma molili mpo bámona te,

Mpe salá ete loketo na bango elɛngaka ntango nyonso.

24 Sopelá bango nkanda na yo ya makasi,

Mpe nkanda na yo ya kongala ezwa bango.+

25 Kaa na bango oyo ezingami na efelo etikala mpamba;

Moto moko te afanda na bahema na bango.+

26 Mpo balandi moto oyo obɛti,

Mpe bazali kaka kolobela bampasi ya baoyo ozokisi.

27 Bakisá ngambo likoló ya ngambo na bango,

Kotalela bango te lokola bato ya sembo.

28 Bálongolama na buku ya bato ya bomoi,*+

Mpe bákomama esika moko te na bato ya sembo.+

29 Kasi ngai natungisami mpe nazali na mpasi.+

Ee Nzambe, nguya na yo oyo ebikisaka ebatela ngai.

30 Nakoyemba mpo na kosanzola nkombo ya Nzambe,

Mpe nakokumisa ye na matɔndi.

31 Yango ekosepelisa Yehova mingi koleka ngɔmbɛ-mobali,

Koleka mwana-ngɔmbɛ mobali oyo ezali na maseke mpe basabo.+

32 Bato ya komikitisa bakomona yango mpe bakosepela.

Bino baoyo bozali koluka Nzambe, mitema na bino ezala lisusu na bomoi.

33 Mpo Yehova azali koyoka babola,+

Mpe akotyola te bato na ye oyo bakangami.+

34 Likoló ná mabele esanzola ye,+

Mbu mpe eloko nyonso ya bomoi oyo ezali na kati na yango.

35 Mpo Nzambe akobikisa Siona+

Mpe akotonga lisusu bingumba ya Yuda,

Bakofanda kuna mpe bakozwa yango.*

36 Bana ya basaleli na ye bakozwa yango lokola libula,+

Mpe baoyo balingaka nkombo na ye+ bakofanda kuna.

Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi, mpo ezala likambo ya kokanisa.*

70 Ee Nzambe, bikisá ngai,

Ee Yehova, yaká noki kosalisa ngai.+

 2 Baoyo bazali koluka koboma ngai*

Báyoka nsɔni mpe básambwa.

Baoyo bazali kosepela na mpasi na ngai

Bázonga nsima na nsɔni.

 3 Baoyo bazali koloba: “Aha! Aha!”

Bázonga nsima na nsɔni.

 4 Kasi baoyo bazali koluka yo

Básepela mpe bázala na esengo mpo na yo.+

Baoyo balingaka misala na yo ya kobikisa báloba ntango nyonso ete:

“Nzambe akumisama!”

 5 Kasi ngai nazali moto oyo azangi lisalisi mpe mobola;+

Ee Nzambe, salá noki okɔta likambo na ngai.+

Yo ozali mosungi na ngai mpe mobikisi na ngai;+

Ee Yehova, koumela te.+

71 Ee Yehova, nakimi epai na yo.

Nayoka nsɔni ata moke te.+

 2 Na bosembo na yo, bikisá ngai mpe sikolá ngai.

Tyá litoi na yo epai na ngai* mpe bikisá ngai.+

 3 Kómá mpo na ngai libanga mpo ezala ndako na ngai ya makasi

Epai nakoki kokɔta ntango nyonso.

Pesá mitindo mpo na kobikisa ngai,

Mpo ozali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai ya libateli.+

 4 Ee Nzambe na ngai, bikisá ngai na lobɔkɔ ya moto mabe,+

Na lobɔkɔ ya monyokoli oyo azali sembo te.

 5 Mpo ozali elikya na ngai, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso;

Natyeli yo* motema banda bolenge na ngai.+

 6 Natalelaka yo banda kobotama na ngai;

Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai.+

Nasanzolaka yo ntango nyonso.

 7 Nakómi lokola likamwisi na miso ya bato mingi,

Kasi yo ozali esika na ngai ya makasi ya kobombana.

 8 Monɔkɔ na ngai etondi na lisanzoli na yo;+

Mokolo mobimba nazali koyebisa nkembo na yo.

 9 Kobwaka ngai te na ntango ya bobange na ngai;+

Kosundola ngai mpe te ntango makasi na ngai ezali kosila.+

10 Banguna na ngai balobi mabe mpo na ngai,

Mpe baoyo bazali koluka koboma ngai* bango nyonso bayokani,+

11 Balobi: “Nzambe asundoli ye.

Bólanda ye mpe bókanga ye, mpo moto ya kobikisa ye azali te.”+

12 Ee Nzambe, kozala mosika na ngai te.

Ee Nzambe na ngai, salá noki osalisa ngai.+

13 Baoyo bazali kotɛmɛla ngai

Báyoka nsɔni mpe bábebisama.+

Baoyo bazali kolukela ngai likama

Bámizipa na nsɔni mpe básambwa.+

14 Kasi ngai nakokoba kozela;

Nakosanzola yo lisusu koleka.

15 Monɔkɔ na ngai ekoyebisa bosembo na yo,+

Misala ya lobiko na yo mokolo mobimba,

Atako ezali ebele mpenza mpo nakanga ntina* na yango.+

16 Nakoya mpe nakolobela misala na yo ya nguya,

Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso;

Nakolobela bosembo na yo, kaka oyo ya yo moko.

17 Ee Nzambe, oteyi ngai banda bolenge na ngai,+

Mpe tii sikoyo nazali koyebisa misala na yo ya kokamwa.+

18 Ee Nzambe, kosundola ngai te ata na bobange mpe na nsuki mpɛmbɛ na ngai.+

Tiká nayebisa nguya* na yo na libota oyo ekoya

Mpe makasi na yo epai ya baoyo nyonso bakoya na nsima.+

19 Ee Nzambe, bosembo na yo ekei tii na bisika etombwaná;+

Osali makambo minene;

Ee Nzambe, nani azali lokola yo?+

20 Atako osali ete nakutana na bampasi mpe makama mingi,+

Zongisá ngai lisusu na bomoi;

Bimisá ngai na mozindo ya mabele.*+

21 Matisá lokumu na ngai,

Mpe zingá ngai mpe bɔndisá ngai.

22 Bongo nakosanzola yo na ebɛtɛlo ya nsinga

Mpo na bosembo na yo, Ee Nzambe na ngai.+

Nakoyemba na nzɛnzɛ mpo na kosanzola yo,*

Ee, Mosantu ya Yisraele.

23 Mbɛbu na ngai ekoganga na esengo ntango nakoyemba mpo na kosanzola yo,+

Mpo obikisi bomoi na ngai.*+

24 Lolemo na ngai ekolobela* bosembo na yo mokolo mobimba,+

Mpo baoyo bazali koluka libebi na ngai bakoyoka nsɔni mpe bakosambwa.+

Mpo na Salomo.

72 Ee Nzambe, pesá mokonzi bikateli na yo ya lisambisi,

Mpe pesá mwana ya mokonzi bosembo na yo.+

 2 Asamba likambo ya bato na yo na boyengebene,

Mpe ya bato mpamba na yo na bosembo.+

 3 Bangomba ememela bato kimya,

Mpe bangomba mike emema bosembo.

 4 Asamba mpo na bato mpamba na kati ya ekólo,

Abikisa bana ya mobola,

Mpe anyata moto oyo abubaka.+

 5 Bato bakobanga yo ntango nyonso oyo moi ekozala,

Mpe ntango nyonso oyo sanza ekozala,

Libota na libota.+

 6 Akozala lokola mbula oyo ezali kokwea likoló ya matiti oyo bakati,

Lokola mbula makasi oyo ezali kopɔlisa mabele.+

 7 Na mikolo na ye, bato ya sembo* bakokola lokola matiti ya sika,+

Mpe kimya ekokóma mingi+ tii sanza ekozala lisusu te.

 8 Akozala na bato oyo akokamba* banda na mbu tii na mbu

Mpe banda na Ebale* tii na bansuka ya mabele.+

 9 Bato oyo bafandi na mokili ekauká bakogumbama liboso na ye,

Mpe banguna na ye bakolɛmbɔla putulu.+

10 Bakonzi ya Tarasisi mpe ya bisanga bakofuta mpako.+

Bakonzi ya Sheba mpe ya Seba bakopesa makabo.+

11 Bakonzi nyonso bakofukama liboso na ye,

Mpe bikólo nyonso ekosalela ye.

12 Mpo akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi,

Ná moto mpamba mpe moto nyonso oyo azali na moto ya kosalisa ye te.

13 Akoyokela moto mpamba ná mobola mawa,

Mpe akobikisa bomoi* ya babola.

14 Akobikisa* bango na monyoko mpe na mobulu,

Mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.

15 Azala na bomoi mpe bápesa ye wolo ya Sheba.+

Bábondela mpo na ye ntango nyonso,

Mpe apambolama mokolo mobimba.

16 Bilei ekozala ebele mpenza na mabele;+

Na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.

Mbuma na ye ekozala ebele lokola na Liban,+

Mpe bato ya bingumba bakokóma ebele lokola milona ya mabele.+

17 Nkombo na ye ezala mpo na libela,+

Mpe eumela lokola moi.

Bato bázwa lipamboli na nzela na ye;+

Bikólo nyonso etánga ye moto ya esengo.

18 Yehova Nzambe, Nzambe ya Yisraele, asanzolama,+

Ye moko nde asalaka makambo ya kokamwa.+

19 Nkombo na ye ya nkembo esanzolama mpo na libela,+

Mpe nkembo na ye etondisa mabele mobimba.+

Amen mpe Amen.

20 Mabondeli ya Davidi, mwana ya Yese, esuki awa.+

BUKU YA MISATO

(Nzembo 73-89)

Mondule ya Asafe.+

73 Nzambe azali mpenza malamu epai ya Yisraele, epai ya baoyo bazali na motema pɛto.+

 2 Kasi etikalaki moke makolo na ngai elongwa na nzela ya sembo,

Matambe na ngai etikalaki moke esɛlimwa.+

 3 Mpo ntango namonaki kimya ya bato mabe

Nakómaki kolula bato ya lofundo.+

 4 Mpo bakufaka kozanga komona mpasi;

Bazali nzoto kolɔngɔnɔ.*+

 5 Batungisamaka te lokola basusu,+

Banyokwamaka te lokola bato mosusu.+

 6 Yango wana, lolendo ezali nsinga ya monzɛlɛ na nkingo na bango;+

Mobulu elataka bango lokola elamba.

 7 Bomɛngo* na bango ekómisi miso na bango minene;

Kozwa na bango eleki kutu ndenge bazalaki kokanisa.

 8 Bazali kosɛka basusu mpe koloba makambo ya mabe.+

Na lofundo na bango bazali koluka konyokola basusu.+

 9 Bazali koloba lokola nde batombwami mpenza likoló,

Mpe lolemo na bango ezali kotambola na mabele na lolendo mpenza.

10 Yango wana, bato ya Nzambe babaluki na ngámbo na bango,

Mpe bamɛli mai na bango oyo etondi mɛkɛ.

11 Balobi ete: “Ndenge nini Nzambe akoki koyeba likambo yango?+

Oyo-Aleki-Likoló ayebi mpenza likambo nyonso?”

12 Bato mabe bazalaka bongo, oyo bamitungisaka ata moke te.+

Bazali kokoba kobakisa bozwi na bango.+

13 Ya solo mpenza, napɛtoli motema na ngai kaka mpamba

Mpe nasukoli mabɔkɔ na ngai kaka mpamba mpo na komonisa ete nazali na ngambo te.+

14 Mpe natungisamaki mokolo mobimba;+

Ntɔngɔ nyonso Nzambe azalaki kosembola ngai.+

15 Kasi soki nalobaki makambo yango,

Nalingaki kotɛka bato na yo.*

16 Ntango nalukaki koyeba yango,

Natungisamaki

17 Tii ntango nakɔtaki na esika mosantu monene ya Nzambe,

Mpe nasosolaki ndenge bomoi ya bato mabe ekozala na mikolo oyo ezali koya.

18 Ya solo mpenza, otye bango nde na mabele ya mosɛlu.+

Mpo bákwea mpe bábebisama.+

19 Libebi na bango ezali ya mbalakaka!+

Nsuka na bango ezali nsɔmɔ mpe pwasa!

20 Bazali lokola ndɔtɔ oyo moto abosani nsima ya kolamuka,

Yango nde ekokómela bango ntango yo moko okolamuka, Ee Yehova, okobengana bango.*

21 Kasi motema na ngai ezokaki+

Mpe nayokaki mpasi makasi na kati na ngai mpenza.*

22 Nazangaki mayele mpe bososoli;

Nazalaki lokola nyama liboso na yo.

23 Kasi sikoyo nazali elongo na yo ntango nyonso;

Osimbi lobɔkɔ na ngai ya mobali.+

24 Okambaka ngai na toli na yo,+

Mpe na nsima okomema ngai tii na nkembo.+

25 Nani mosusu nazali na ye na likoló?

Mpe longola yo, nazali na mposa ya eloko mosusu te na mabele.+

26 Nzoto na ngai mpe motema na ngai ekoki kolɛmba,

Kasi, Nzambe azali libanga ya motema na ngai mpe eteni na ngai mpo na libela.+

27 Ya solo, bato oyo bazali mosika na yo bakokufa.

Okosilisa* baoyo bazali sembo te epai na yo.*+

28 Mpo na ngai, kopusana epai ya Nzambe ezali malamu.+

Nasali ete Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azala esika na ngai ya kokima,

Mpo nasakola misala na yo nyonso.+

Maskile.* Ya Asafe.+

74 Ee Nzambe, mpo na nini obwaki biso mpo na libela?+

Mpo na nini nkanda na yo engaleli* etonga oyo ezali na esika na yo ya koleisa bibwɛlɛ matiti?+

 2 Kanisá bato* na yo oyo ozwaki banda kala,+

Libota oyo osikolaki mpo ezala libula na yo.+

Kanisá Ngomba Siona, epai ofandaki.+

 3 Kende na esika oyo ebebisamaki mpo na libela.+

Monguna abebisi eloko nyonso na esika mosantu.+

 4 Banguna na yo bagangi na kati ya esika na yo ya kokutana.*+

Kuna, batɛlɛmisi babɛndɛlɛ na bango moko lokola bilembo.

 5 Bazalaki lokola bato oyo basalelaka epasola* na zamba ya monene.

 6 Na bipasola* mpe na bibende, babukaki mayemi nyonso ya esika mosantu.+

 7 Batye mɔtɔ na esika na yo mosantu.+

Bakómisi tabernakle oyo ememi nkombo na yo eloko mpamba, mpe babwaki yango na mabele.

 8 Bango ná bana na bango balobi na motema na bango ete:

“Bisika nyonso oyo bato bakutanaka mpo na kosambela Nzambe na mokili esengeli kotumbama.”

 9 Tomoni ata elembo moko te mpo na biso;

Mosakoli ata moko te azali lisusu,

Mpe moto ata moko te kati na biso ayebi soki ekoumela ntango boni.

10 Ee Nzambe, tii ntango nini monguna akokoba kotumola yo?+

Monguna akozanga nde limemya na nkombo na yo mpo na libela?+

11 Mpo na nini ozali kozongisa lobɔkɔ na yo ya mobali?+

Bimisá yango na ntolo na yo* mpe sukisá bango.

12 Kasi Nzambe azali Mokonzi na ngai banda kala,

Ye oyo asalaka misala ya lobiko na mabele.+

13 Yo oningisaki mbu na makasi na yo;+

Obukaki mitó ya banyama ya nsɔmɔ ya mbu na kati ya mai.

14 Yo obukibuki mitó ya Leviatana;*

Opesaki yango ezala bilei ya bato, ya baoyo bafandaka na bisika oyo ekauká.

15 Yo ofungolaki nzela mpo na maziba mpe mikɛli;+

Yo okaukisaki bibale oyo mai etíyolaka ntango nyonso.+

16 Moi ezali ya yo, mpe butu ezali ya yo.

Yo osalaki pole* ná moi.+

17 Yo otyaki bandelo nyonso ya mabele;+

Osalaki eleko ya molunge ná eleko ya malili makasi.+

18 Ee Yehova, kanisá matumoli ya monguna,

Ndenge oyo bazoba bazangi limemya na nkombo na yo.+

19 Kosundola te bomoi* ya epopo* na yo na nyama ya zamba.

Kobosana te mpo na libela bomoi ya bato na yo oyo bazali komona mpasi.

20 Kanisá kondimana osalá na biso,

Mpo bisika ya molili ya mabele ekómi bisika oyo mobulu etondi.

21 Moto oyo atutami alɛmba nzoto te ntango azali kozonga;+

Moto mpamba mpe mobola básanzola nkombo na yo.+

22 Ee Nzambe, tɛlɛmá, sambá mpo na likambo na yo.

Kanisá ndenge oyo bazoba bazali kotumola yo mokolo mobimba.+

23 Kobosana te makambo oyo banguna na yo bazali koloba.

Makɛlɛlɛ ya baoyo bazali kotɛmɛla yo ezali komata ntango nyonso.

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya “Kobebisa te.” Loyembo ya Asafe.+

75 Ee Nzambe, tozali kopesa yo matɔndi, tozali kopesa yo matɔndi;

Nkombo na yo ezali pene na biso,+

Mpe bato bazali kosakola misala na yo ya kokamwa.

 2 Olobi ete: “Soki natye ntango mpo na kosambisa,

Nasambisaka na bosembo.

 3 Ntango mabele mpe bato nyonso oyo bafandi wana banyangwaki,

Ngai nde napikaki makonzí na yango.” (Sela)

 4 Nalobaki na bato ya lolendo ete: “Bómikumisa te,”

Mpe na bato mabe ete: “Bótombola makasi* na bino te.

 5 Bótombola makasi na bino na likoló te

Mpe bóloba na lofundo te.

 6 Mpo ezali te na ɛsti to na wɛsti

To na sudi nde kotombwama eutaka.

 7 Mpo Nzambe azali Mosambisi.+

Akitisaka moto moko mpe atombolaka mosusu.+

 8 Mpo kɔpɔ ezali na lobɔkɔ ya Yehova;+

Vinyo ezali kobimisa fulufulu mpe etondi na biloko oyo esangisami.

Akosopa yango mpenza,

Mpe bato mabe nyonso ya mabele bakomɛla yango nyonso tii bakosilisa yango.”+

 9 Kasi mpo na ngai, nakoyebisa yango mpo na libela;

Nakoyemba mpo na kosanzola* Nzambe ya Yakobo.

10 Mpo alobi ete: “Nakosilisa makasi* ya bato mabe,

Kasi makasi ya bato ya sembo ekokumisama.”

Epai ya mokambi ya nzembo; eyembamaka elongo na bibɛtɛlo ya bansinga. Mondule ya Asafe.+ Loyembo.

76 Nzambe ayebani na Yuda;+

Na Yisraele nkombo na ye ezali monene.+

 2 Mpe esika na ye ya kobombana ezali na Saleme,+

Mpe esika na ye ya kofanda ezali na Siona.+

 3 Kuna abukaki mbanzi ya litimbo oyo ezali kopela,

Nguba ná mopanga mpe bibundeli ya etumba.+ (Sela)

 4 Yo ozali kongɛnga makasi mpenza;*

Ozali na nkembo mingi koleka bangomba oyo etondi na banyama ya kolya.

 5 Bato ya mpiko bapunzami.+

Balali na liwa;

Babundi-bitumba nyonso bazangaki makasi.+

 6 Ee Nzambe ya Yakobo, na mpamela na yo,

Motambwisi-likalo ná mpunda balali na liwa.+

 7 Yo moko ozali koyokisa nsɔmɔ.+

Nani akoki kotɛlɛma liboso ya nkanda na yo makasi?+

 8 Uta na likoló oyebisaka lisambisi na yo likoló ya banguna na yo;+

Mabele ebangaki mpe efandaki nyɛɛ+

 9 Ntango Nzambe atɛlɛmaki mpo na kopesa etumbu,

Mpo na kobikisa bato nyonso ya komikitisa ya mabele.+ (Sela)

10 Soki bato basiliki, ezali libaku mpo osanzolama.+

Soki bato bazali kaka na nkanda, ezali libaku mpo okumisama.

11 Bósala bilako epai ya Yehova Nzambe na bino mpe bókokisa yango,+

Tiká baoyo nyonso bazali zingazinga na ye bámema likabo na bango na kobanga.+

12 Akokitisa lolendo* ya batambwisi;

Azali koyokisa bakonzi ya mabele nsɔmɔ.

Epai ya mokambi ya nzembo; na Yedutune.* Mondule ya Asafe.+

77 Na mongongo na ngai, nakobelela Nzambe;

Nakobelela Nzambe, mpe akoyoka ngai.+

 2 Na mokolo ya mpasi na ngai nalukaka Yehova.+

Na butu kozanga kotika nasemboli mabɔkɔ na ngai epai na yo.*

Eloko moko te ekoki kobɔndisa ngai.*

 3 Ntango nakanisaka misala ya Nzambe, nakómaka na mposa na ye makasi;+

Natungisami mpe makasi na ngai esili.*+ (Sela)

 4 Opekisi ngai nakanga miso;*

Natungisami mpe nakoki koloba te.

 5 Nakanisaka ndenge makambo ezalaki kala,+

Bambula oyo eleká kala.

 6 Na butu nakanisaka loyembo na ngai;*+

Namanyolaka na motema na ngai;+

Nasalaka* bolukiluki ya mozindo mpo nakanga ntina.

 7 Yehova akobwaka nde biso mpo na libela?+

Akomonisa lisusu ata moke te boboto na ye?+

 8 Bolingo na ye ya sembo esili mpo na libela?

Elaka na ye ekokóma eloko mpamba libota na libota?

 9 Nzambe abosani nde komonisela biso boboto na ye,+

To nkanda na ye elongoli motema mawa na ye? (Sela)

10 Nasengeli nde koloba ntango nyonso ete: “Talá oyo ezali kotungisa ngai:*+

Oyo-Aleki-Likoló abongoli ndenge na ye ya kosalela biso makambo”?*

11 Nakokanisa misala ya Yah;

Nakokanisa misala na yo ya kokamwa ya ntango ya kala.

12 Nakomanyola likoló ya mosala na yo nyonso

Mpe nakokanisa na mozindo misala na yo.+

13 Ee Nzambe, banzela na yo ezali mosantu.

Nani azali nzambe monene lokola yo, Ee Nzambe?+

14 Yo ozali Nzambe ya solo, oyo asalaka makambo ya kokamwa.+

Omonisaki makasi na yo epai ya bato ya bikólo.+

15 Na nguya* na yo obikisaki* bato na yo,+

Bana ya Yakobo mpe ya Yozefe. (Sela)

16 Ee Nzambe, mai emonaki yo;

Mai emonaki yo mpe elɛngaki.+

Mpe mai mozindo ekómaki koningana.

17 Mapata esopaki mai.

Likoló oyo etondi na mapata ebimisaki nkake,

Mpe makula na yo ezalaki kokende epai na epai.+

18 Lokito ya nkake na yo+ ezalaki lokola bapine ya makalo;

Mikalikali engɛngisaki mabele oyo bato bafandi;*+

Mabele eninganaki mpe elɛngaki.+

19 Ofungolaki nzela na mbu,+

Mpe esika oleki ezali na mai mingi;

Kasi moto moko te amonaki matambe ya makolo na yo.

20 Okambaki bato na yo kaka lokola etonga,+

Na libateli* ya Moize ná Arona.+

Maskile.* Ya Asafe.+

78 Bato na ngai, bóyoka mobeko* na ngai;

Bótya likebi* na maloba ya monɔkɔ na ngai.

 2 Nakofungola monɔkɔ na ngai mpo na koloba lisese moko.

Nakoyebisa basambole ya kala.+

 3 Makambo oyo toyoki mpe toyebi,

Oyo batata na biso bayebisi biso,+

 4 Tokobombela yango bana na bango te;

Tokoyebisa yango na libota oyo ekoya+

Misala ya Yehova oyo ebongi kosanzolama mpe makasi na ye,+

Misala na ye ya kokamwa oyo asali.+

 5 Atyaki eloko ya kokanisa na Yakobo

Mpe atyaki mobeko na Yisraele;

Apesaki bankɔkɔ na biso mitindo

Mpo báyebisa makambo yango epai ya bana na bango,+

 6 Mpo ete libota oyo ekoya,

Bana oyo bakobotama, báyeba yango.+

Mpo bango mpe báyebisa yango na bana na bango.+

 7 Ekosala ete bátyela Nzambe motema.

Bakobosana te misala ya Nzambe+

Kasi bakotosa mitindo na ye.+

 8 Mpe bakokóma te lokola bankɔkɔ na bango,

Libota ya motó makasi mpe ya batomboki,+

Libota ya bato oyo babongisaki motema na bango te+

Mpe oyo elimo na bango ezalaki sembo te epai ya Nzambe.

 9 Bato ya Efraime bazalaki kobunda na litimbo,

Kasi bazongaki nsima na mokolo ya etumba.

10 Babatelaki te kondimana ya Nzambe+

Mpe baboyaki kotambola na mobeko na ye.+

11 Babosanaki mpe makambo oyo asalaki,+

Misala na ye ya kokamwa oyo alakisaki bango.+

12 Asalaki makambo ya kokamwa na miso ya bankɔkɔ na bango,+

Na mokili ya Ezipito, na etúká ya Zoane.+

13 Apasolaki mbu mpo bákatisa,

Mpe asalaki ete mai etɛlɛma lokola efelo.*+

14 Na moi, atambwisaki bango na lipata

Mpe na butu mobimba na pole ya mɔtɔ.+

15 Apasolaki mabanga na esobe,

Asilisaki mposa na bango ya mai lokola nde na mai mozindo.+

16 Abimisaki mikɛli na libanga

Mpe asalaki ete mai etíyola lokola bibale.+

17 Kasi bakobaki kosalela ye lisumu

Na ndenge batombokelaki Oyo-Aleki-Likoló na mokili ekauká;+

18 Bamekaki Nzambe na motema na bango+

Na ndenge basɛngaki bilei oyo bazalaki na mposa na yango makasi.*

19 Bongo balobaki mabe mpo na Nzambe,

Balobaki: “Nzambe akoki kopesa biso bilei* na esobe?”+

20 Talá! Ye abɛtaki libanga

Mpo mai etíyola mpe mikɛli esopana.+

“Akoki mpe kopesa biso limpa,

To akoki kopesa bato na ye mosuni?”+

21 Ntango Yehova ayokaki bango, asilikaki makasi;+

Mɔtɔ+ epelelaki Yakobo,

Mpe nkanda na ye emataki lisusu mpo na Yisraele+

22 Mpo bandimelaki Nzambe te;+

Batyaki motema te na likoki na ye ya kobikisa bango.

23 Bongo apesaki mitindo na likoló, likoló oyo etondi na mapata,

Mpe afungolaki baporte ya likoló.

24 Akobaki konɔkisela bango mana mpo bálya;

Apesaki bango bilei ya likoló.+

25 Bato balyaki mampa ya bato ya nguya;*+

Apesaki bango bilei ebele mpo bátonda.+

26 Abimisaki mopɛpɛ ya ɛsti na likoló

Mpe apɛpisaki mopɛpɛ ya sudi na makasi na ye.+

27 Anɔkiselaki bango mosuni lokola putulu,

Bandɛkɛ lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu.

28 Akweisaki yango na katikati ya kaa na ye,

Zingazinga ya bahema na ye.

29 Balyaki mpe batondaki mingi;

Apesaki bango eloko oyo bazalaki na yango mposa.+

30 Kasi liboso bákokisa mpenza mposa na bango,

Wana bilei ezalaki naino na monɔkɔ na bango,

31 Nkanda makasi ya Nzambe engalelaki bango.+

Abomaki bato na bango oyo balekaki makasi;+

Akweisaki bilenge mibali ya Yisraele.

32 Atako nyonso wana, basalaki masumu mingi koleka+

Mpe bandimaki te misala na ye ya kokamwa.+

33 Bongo asukisaki mikolo na bango lokola mopɛpɛ mpamba,+

Mpe bambula na bango na nsɔmɔ ya pwasa.

34 Kasi mbala nyonso oyo Nzambe abomaki ndambo na bango, bazalaki koluka ye;+

Bazalaki kozonga mpe koluka Nzambe,

35 Bazalaki komikundola ete Nzambe azalaki Libanga na bango+

Mpe ete Nzambe Oyo-Aleki-Likoló azalaki Mosikoli* na bango.+

36 Kasi balukaki kokosa ye na monɔkɔ na bango

Mpe bakosaki ye na lolemo na bango.

37 Bazalaki sembo te epai na ye;+

Mpe bakangamaki te na kondimana na ye.+

38 Kasi azalaki na motema mawa;+

Azalaki kolimbisa* libunga na bango mpe azalaki koboma bango te.+

Mbala mingi, azalaki kozongisa nkanda na ye nsima+

Na esika abimisela bango nkanda na ye nyonso.

39 Mpo amikundolaki ete bazali kaka bato ya mosuni,+

Mwa mopɛpɛ oyo elekaka mpe ezongaka te.*

40 Mbala boni batombokelaki ye na esobe+

Mpe bayokisaki ye motema mpasi na mokili ekauká!+

41 Mbala na mbala bamekaki Nzambe,+

Mpe bayokisaki Mosantu ya Yisraele mawa.*

42 Bakanisaki te nguya* na ye,

Mokolo oyo abikisaki* bango na lobɔkɔ ya monguna,+

43 Ndenge asalaki bilembo na Ezipito+

Mpe makamwisi na ye na etúká ya Zoane,

44 Mpe ndenge akómisaki banzela ya mai ya Nile makila,+

Bongo bakokaki te komɛla mai ya mikɛli na bango.

45 Atindaki mapokopoko* mpo elya baezipito+

Mpe magorodo* mpo ebebisa bango.+

46 Mpe akabaki mbuma na bango na mayoyo ya nzala,

Mbuma ya mosala na bango ya makasi na etuluku ya mayoyo.+

47 Na mbula ya mabanga, abebisaki nzete na bango ya vinyo+

Mpe na mbula ya mabanga ya glasi, banzete na bango ya sikomore.

48 Abomaki banyama na bango oyo ememaka mikumba na mbula ya mabanga+

Mpe bibwɛlɛ na bango na nkake.*

49 Akitiselaki bango nkanda na ye ya kongala,

Nkɛlɛ, nkanda makasi ná mpasi,

Atindaki baanzelu bámema likama.

50 Amonisaki nkanda na ye.

Apekisaki te ete liwa ezwa bango;*

Mpe akabaki bango* na maladi mabe.

51 Nsukansuka, abomaki bana nyonso ya liboso na Ezipito,+

Ebandeli ya nguya na bango ya kobota na kati ya bahema ya Kame.

52 Na nsima, abimisaki bato na ye lokola etonga+

Mpe atambwisaki bango lokola etonga na esobe.

53 Akambaki mpe abatelaki bango,

Mpe babangaki ata moke te;+

Mbu ezipaki banguna na bango.+

54 Mpe amemaki bango na teritware na ye mosantu,+

Etúká oyo ya ngombangomba oyo lobɔkɔ na ye ya mobali ezwaki.+

55 Abenganaki bikólo liboso na bango;+

Apesaki bango libula na nsinga ya komeka;+

Afandisaki mabota ya Yisraele na bandako na bango.+

56 Kasi bakobaki komeka Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mpe batombokelaki ye;+

Batyaki likebi te na makundoli na ye.+

57 Bango mpe bazongaki nsima mpe basalaki makambo na bokosi lokola bankɔkɔ na bango.+

Bakokaki kotyelama motema te lokola litimbo oyo nsinga na yango ebendami malamu te.+

58 Bazalaki kaka kosilikisa ye na bisika na bango oyo etombwaná,+

Mpe bazalaki koyokisa ye zuwa* na bikeko na bango.+

59 Nzambe ayokaki mpe asilikaki makasi,+

Bongo abwakaki mpenza Yisraele.

60 Nsukansuka, asundolaki tabernakle ya Shilo,+

Hema oyo na kati na yango afandaki elongo na bato.+

61 Atikaki elembo ya makasi na ye ekende na bokangami;

Nkembo na ye na lobɔkɔ ya monguna.+

62 Asundolaki bato na ye na mopanga,+

Mpe asilikelaki libula na ye makasi.

63 Mɔtɔ ezikisaki bilenge na ye ya mibali,

Mpe bayembaki ata nzembo moko te ya libala mpo na bangɔndɔ na ye.*

64 Banganga-nzambe na ye bakweaki na mopanga,+

Mpe basi na bango balelaki te.+

65 Bongo Yehova alamukaki lokola nde alalaki mpɔngi,+

Ndenge moto ya nguya+ oyo alamukaka soki molangwa ya vinyo esili.

66 Mpe azongisaki banguna na ye nsima;+

Asalaki ete báyoka nsɔni ya libela.

67 Aboyaki hema ya Yozefe;

Aponaki libota ya Efraime te.

68 Kasi aponaki libota ya Yuda,+

Ngomba Siona, oyo alingaka.+

69 Asalaki ete esika na ye mosantu eumela lokola likoló,*+

Lokola mabele oyo atyá mpo na libela.+

70 Aponaki Davidi+ mosaleli na ye

Mpe azwaki ye na etonga ya bampate,+

71 Esika oyo azalaki kobatela bampate oyo ezali komɛlisa;

Akómisaki ye mobateli ya Yakobo, bato na ye,+

Mpe ya Yisraele, libula na ye.+

72 Abatelaki bango na bosembo ya motema,+

Mpe na mayele ya mabɔkɔ na ye akambaki bango.+

Mondule ya Asafe.+

79 Ee Nzambe, bikólo bakɔti na libula na yo;+

Bakómisi tempelo na yo mosantu mbindo;+

Bakómisi Yerusaleme engumba oyo ebebá mpo na libela.+

 2 Bapesi bandɛkɛ ya likoló bibembe ya basaleli na yo mpo ezala bilei na yango

Mpe mosuni ya bato na yo ya sembo na banyama ya zamba ya mabele.+

 3 Basopi makila na bango lokola mai bipai nyonso na Yerusaleme,

Mpe moto moko te atikali mpo akunda bango.+

 4 Tokómi eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso;+

Bato oyo bafandi zingazinga na biso bazali kosɛka mpe kotyola biso.

 5 Ee Yehova, okosilika tii ntango nini? Mpo na libela?+

Tii ntango nini nkanda na yo ekopela lokola mɔtɔ?+

 6 Sopelá bikólo oyo eyebi yo te nkanda makasi na yo

Mpe makonzi oyo ebeleli nkombo na yo te.+

 7 Mpo balei Yakobo

Mpe batiki esika na ye ya kofanda mpamba.+

 8 Kotya te mabunga ya bankɔkɔ na biso na motó na biso.+

Moniselá biso motema mawa na yo kozanga koumela,+

Mpo tokitisami mpenza.

 9 Ee Nzambe ya lobiko na biso, salisá biso,+

Mpo na nkembo ya nkombo na yo;

Bikisá biso mpe limbisá* masumu na biso mpo na nkombo na yo.+

10 Mpo na nini bikólo báloba ete: “Nzambe na bango azali wapi?”+

Na miso na biso, eyebana na kati ya bikólo

Ete mabe ezongisami mpo na makila ya basaleli na yo oyo esopamaki.+

11 Oyoka kolela ya mongongo ya nse* ya moto ya bolɔkɔ.+

Salelá nguya na yo monene* mpo na kobatela* baoyo bakatelaki bango etumbu ya liwa.*+

12 Pesá bato oyo bafandi penepene na biso etumbu mbala nsambo+

Mpo na kotyola oyo batyoli yo, Ee Yehova.+

13 Biso bato na yo mpe etonga ya esika na yo ya koleisa bibwɛlɛ matiti,+

Tokopesa yo matɔndi mpo na libela;

Mpe tokosanzola yo libota na libota.+

Epai ya mokambi ya nzembo; na ebɛtɛlo ya “Bafololo lísi.” Bokundoli. Mondule ya Asafe.+

80 Yoká, Ee Mobateli ya Yisraele,

Yo oyo ozali kokamba Yozefe lokola etonga.+

Yo oyo ofandi likoló* ya bakeruba,+

Monisá kongɛnga na yo.

 2 Monisá nguya na yo liboso ya Efraime, Benyamina

ná Manase,+

Yaká mpe bikisá biso.+

 3 Ee Nzambe, zongisá biso;+

Tiká elongi na yo engɛnga likoló na biso, mpo tóbika.+

 4 Yehova Nzambe ya mampinga, tii ntango nini okosilikela bato na yo mpe okoboya koyoka mabondeli na bango?+

 5 Osali ete mai ya miso na bango ekóma lokola limpa mpo na bango,

Mpe ozali komɛlisa bango mai ya miso mingi mpenza.

 6 Otiki ete bato oyo bafandi penepene báwelana mpo na biso;

Banguna na biso bazali kaka kosɛka biso ndenge balingi.+

 7 Ee Nzambe ya mampinga, zongisá biso;

Tiká elongi na yo engɛnga likoló na biso, mpo tóbika.+

 8 Olongolaki nzete ya vinyo+ na Ezipito.

Obenganaki bikólo mpe olonaki yango.+

 9 Obongiselaki yango esika,

Ezwaki misisa mpe etondisaki mokili.+

10 Bangomba ezipamaki na elili na yango,

Mpe banzete ya sɛdrɛ ya Nzambe na bitape na yango.

11 Bitape na yango ekendaki mosika tii na mbu,

Mpe bitape na yango ya mikemike tii na Ebale.*+

12 Mpo na nini okweisi bifelo ya mabanga ya elanga ya vinyo,+

Mpo baoyo nyonso bazali koleka na balabala bábuka mbuma na yango?+

13 Bansombo* ya zamba ezali kobebisa yango,

Mpe banyama ya esobe ezali kolya yango.+

14 Ee Nzambe ya mampinga, nabondeli yo, zongá.

Uta na likoló talá mpe moná!

Batelá nzete oyo ya vinyo,+

15 Mobimbi ya nzete* oyo lobɔkɔ na yo ya mobali eloni,+

Mpe talá mwana oyo* okómisi makasi mpo na yo moko.+

16 Nzete ya vinyo eziki na mɔtɔ,+ ekatami.

Na mpamela na yo,* bazali kobeba.

17 Lobɔkɔ na yo esalisa moto oyo azali na lobɔkɔ na yo ya mobali,

Mwana ya moto oyo okómisi makasi mpo na yo moko.+

18 Bongo tokopesa yo mokɔngɔ te.

Batelá biso na bomoi, mpo tóbelela nkombo na yo.

19 Ee Yehova Nzambe ya mampinga, zongisá biso;

Tiká elongi na yo engɛnga likoló na biso, mpo tóbika.+

Epai ya mokambi ya nzembo; na Gitite.* Ya Asafe.+

81 Bóganga na esengo mpo na Nzambe, makasi na biso.+

Bóganga na koganga ya bolongi mpo na Nzambe ya Yakobo.

 2 Bóbɛta miziki mpe bózwa mbonda moke,

Nzɛnzɛ ya kosepelisa ná ebɛtɛlo ya nsinga.

 3 Bóyula liseke na sanza ya sika,+

Ntango sanza ezali mobimba, mpo na mokolo ya fɛti na biso.+

 4 Mpo ezali mobeko mpo na Yisraele,

Mobeko ya Nzambe ya Yakobo.+

 5 Atyaki yango lokola eloko ya kokanisa mpo na Yozefe+

Ntango abundisaki* mokili ya Ezipito.+

Nayokaki mongongo* oyo nayebaki te:

 6 “Nalongolaki kilo na lipeka na ye;+

Nalongolaki kitunga na mabɔkɔ na ye.

 7 Ntango ozalaki na mpasi obengaki, mpe nabikisaki yo;+

Nayanolaki yo uta na lipata ya nkake.*+

Namekaki yo na mai ya Meriba.*+ (Sela)

 8 Ekólo na ngai, yoká mpe nakoloba mpo na kokweisa yo.

Ee Yisraele, soki oyokaka ata ngai!+

 9 Epai na yo, nzambe mopaya alingaki kozala te,

Mpe olingaki te kogumbamela nzambe mopaya.+

10 Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo,

Ye oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito.+

Fungolá monɔkɔ na yo polele, mpe nakotondisa yango.+

11 Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te;

Yisraele eboyaki kotosa ngai.+

12 Bongo natikaki bango bálanda motema makasi na bango;

Basalaki oyo bakanisaki ete ezalaki malamu.*+

13 Soki bato na ngai báyokelaka ata ngai,+

Soki Yisraele etambolaka ata na banzela na ngai!+

14 Mbɛlɛ natyaki nokinoki banguna na bango na nse na bango;

Mbɛlɛ nabalolelaki banguna na bango lobɔkɔ na ngai.+

15 Baoyo bayinaka Yehova, bakoya kogumbama liboso na ye na kobanga,

Mpe nsuka* na bango ekozala mpo na libela.

16 Kasi nakoleisa yo* blé oyo eleki malamu*+

Mpe nakotondisa yo na mafuta ya nzoi oyo euti na libanga.”+

Mondule ya Asafe.+

82 Nzambe azwi esika na kati ya liyangani ya Nzambe;+

Azali kosambisa na katikati ya banzambe:*+

 2 “Tii ntango nini bokokoba kosambisa na bosembo te+

Mpe kolongisa bato mabe?+ (Sela)

 3 Bósamba likambo ya moto mpamba mpe ya mwana oyo tata akufá.+

Bókata na bosembo likambo ya moto oyo azangi libateli mpe ya mobola.+

 4 Bóbikisa moto mpamba mpe mobola;

Bóbikisa bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”

 5 Bayebi te, mpe bakangi ntina te;+

Bazali kotambolatambola na molili;

Miboko nyonso ya mabele ezali kolɛngalɛnga.+

 6 “Nalobi: ‘Bozali banzambe,*+

Bino nyonso bozali bana ya Oyo-Aleki-Likoló.

 7 Kasi bokokufa kaka ndenge bato bakufaka;+

Mpe bokokwea lokola bankumu nyonso!’”+

 8 Ee Nzambe, tɛlɛmá, mpe sambisá mabele,+

Mpo bikólo nyonso ezali ya yo.

Loyembo. Mondule ya Asafe.+

83 Ee Nzambe, kofanda nyɛɛ te;+

Kokanga monɔkɔ te* mpe kofanda kimya te, Ee Nzambe.

 2 Mpo talá! banguna na yo bazali na yikiyiki;+

Baoyo bazali koyina yo basali makambo na lofundo mpenza.*

 3 Na mayele mabe, bazali kosalela bato na yo likita na kobombana;

Bazali kosala likita mpo na bato oyo ozwaka na motuya.*

 4 Balobi ete: “Bóya, tóboma ekólo ya Yisraele,+

Mpo bato bábosana yango mpo na libela.”

 5 Mpo bango nyonso elongo bapesani toli na motema moko;

Bayokani mpo na kotɛmɛla yo:+

 6 Bahema ya Edome mpe Bayishimaele, Moabe+ ná Bahagri,+

 7 Gebale, Amone+ ná Amaleke,

Filistia+ ná baoyo bafandi na Tire.+

 8 Asiri+ mpe esangani na bango;

Bango nyonso bazali kosalisa* bana ya Lota.+ (Sela)

 9 Salá bango ndenge osalaki Midiane,+

Ndenge osalaki Sisera mpe Yabine na mokɛli* ya Kishone.+

10 Basilaki nyɛɛ na Ene-dore;+

Bakómaki nyɛi na mabele.

11 Kómisá bato na bango ya lokumu lokola Orebe mpe Zeebe,+

Mpe bankumu* na bango lokola Zeba mpe Zalamuna,+

12 Mpo balobi ete: “Tózwa mokili esika Nzambe afandaka ekóma ya biso.”

13 Ee Nzambe na ngai, kómisá bango lokola matiti ya nsende oyo mopɛpɛ ezali kobalusabalusa,+

Lokola matiti ya blé na mopɛpɛ.

14 Lokola mɔtɔ oyo ezali kozikisa zamba

Lokola lolemo ya mɔtɔ oyo ezali kozikisa bangomba,+

15 Landá bango na mopɛpɛ makasi na yo+

Mpe bangisá bango na mopɛpɛ makasi na yo.+

16 Zipá* bilongi na bango na nsɔni,

Mpo báluka nkombo na yo, Ee Yehova.

17 Báyoka nsɔni mpe bábanga mpo na libela;

Básambwa mpe bákufa;

18 Báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova,+

Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.+

Mpo na mokambi ya nzembo; na Gitite.* Mondule ya bana ya Kora.+

84 Tabernakle na yo monene ezali kitoko mpenza,*+

Ee Yehova ya mampinga!

 2 Mobimba* na ngai nyonso ezali na mposa makasi,

Ɛɛ, nazali na mposa makasi ya mapango ya ndako ya Yehova.+

Motema na ngai mpe mosuni na ngai

Ezali koganga na esengo mpo na Nzambe ya bomoi.

 3 Ata ndɛkɛ mpe ezwi ndako kuna

Mpe nyampeke emisaleli zumbu* na yango,

Epai ebatelaka bana na yango

Pembeni ya etumbelo na yo monene, Ee Yehova ya mampinga,

Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai!

 4 Esengo na baoyo bazali kofanda na ndako na yo!+

Basanzolaka yo ntango nyonso.+ (Sela)

 5 Esengo na bato oyo bazwaka makasi epai na yo,+

Baoyo mposa ya motema na bango ezali na banzela oyo ezali komema na ndako na yo.

 6 Ntango bazali koleka na Lobwaku ya mwa banzete ya Baka,

Bakómisi yango esika ya maziba;

Mpe mbula ya ebandeli elatisi yango* na mapamboli.

 7 Bakotambola kasi makasi na bango ekosila te+

Mokomoko azali kobima liboso ya Nzambe na Siona.

 8 Ee Yehova Nzambe ya mampinga, yoká libondeli na ngai;

Yoká, Ee Nzambe ya Yakobo. (Sela)

 9 Talá, nguba na biso+ mpe Nzambe na biso,*

Talá elongi ya moto na yo oyo atyami mafuta.+

10 Mpo mokolo moko na ndako na yo eleki mikolo nkóto epai mosusu!+

Naponi kotɛlɛma na ekɔtelo ya ndako ya Nzambe na ngai

Na esika nafanda na bahema ya bato mabe.

11 Mpo Yehova Nzambe azali moi+ mpe nguba;+

Apesaka boboto mpe nkembo.

Yehova akoboya te kopesa eloko moko ya malamu

Na baoyo bazali kotambola na bosembo.+

12 Ee Yehova ya mampinga,

Esengo na moto oyo azali kotyela yo motema.+

Mpo na mokambi ya nzembo. Mondule ya bana ya Kora.+

85 Ee Yehova, yo omoniseli mokili na yo boboto;+

Ozongisi bato ya Yakobo oyo bazalaki bakangami.+

 2 Olimbisi libunga ya bato na yo;

Olimbisi* lisumu na bango nyonso.+ (Sela)

 3 Opekisi nkanda na yo nyonso ya kongala;

Otiki nkanda na yo makasi.+

 4 Ee Nzambe ya lobiko na biso, zongisá biso,

Mpe tyá nkanda na yo pembeni.+

 5 Okosilikela biso mpo na libela?+

Okoumisa nkanda na yo libota na libota?

 6 Okopesa biso bomoi lisusu te

Mpo bato na yo básepela na yo?+

 7 Ee Yehova, moniselá biso bolingo na yo ya sembo,+

Mpe pesá biso lobiko na yo.

 8 Nakoyoka oyo Yehova Nzambe ya solo alobi,

Mpo akolobela kimya epai ya bato na ye,+ epai ya bato na ye ya sembo,

Kasi bázongela te komityela motema.+

 9 Ya solo, lobiko na ye ezali pene na baoyo babangaka ye,+

Mpo nkembo na ye efanda na mokili na biso.

10 Motema boboto* mpe bosembo ekokutana;

Boyengebene mpe kimya ekopesana lipwɛpwɛ.+

11 Bosembo ekobima na mabele,

Mpe uta na likoló, boyengebene ekotala na nse.+

12 Ya solo, Yehova akopesa oyo ezali malamu,*+

Mpe mokili na biso ekopesa mbuma na yango.+

13 Boyengebene ekotambola liboso na ye,+

Mpe ekosala nzela mpo na matambe na ye.

Libondeli ya Davidi.

86 Ee Yehova, tyá litoi na yo* mpe yanolá ngai,

Mpo nazali moto ya mpasi mpe mobola.+

 2 Batelá bomoi* na ngai, mpo nazali sembo.+

Bikisá mosaleli na yo oyo azali kotyela yo motema,

Mpo ozali Nzambe na ngai.+

 3 Ee Yehova, moniselá ngai boboto,+

Mpo nazali kobelela yo mokolo mobimba.+

 4 Sepelisá mosaleli na yo,*

Mpo nazali kotalela yo,* Ee Yehova.

 5 Mpo yo, Ee Yehova, ozali malamu+ mpe osepelaka kolimbisa;+

Otondi na bolingo ya sembo mpo na baoyo nyonso babelelaka yo.+

 6 Ee Yehova, yoká libondeli na ngai;

Mpe tyá likebi na malɔmbɔ na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+

 7 Na mokolo ya mpasi na ngai nabelelaka yo,+

Mpo okoyanola ngai.+

 8 Ee Yehova, moko te azali lokola yo na kati ya banzambe,+

Mosala moko te ezali lokola misala na yo.+

 9 Bikólo nyonso oyo osalá

Ekoya mpe ekogumbama liboso na yo, Ee Yehova,+

Mpe ekopesa nkombo na yo nkembo.+

10 Mpo ozali monene mpe osalaka makambo ya kokamwa;+

Ozali Nzambe, kaka yo moko.+

11 Ee Yehova, teyá ngai nzela na yo.+

Nakotambola na solo na yo.+

Salisá ngai nabanga nkombo na yo na motema moko.*+

12 Ee Yehova Nzambe na ngai, nazali kosanzola yo na motema na ngai mobimba,+

Mpe nakopesa nkombo na yo nkembo mpo na libela,

13 Mpo bolingo na yo ya sembo epai na ngai ezali monene,

Mpe obikisi bomoi na ngai uta na bisika mozindo ya Nkunda.*+

14 Ee Nzambe, bato ya lofundo batɛlɛmɛli ngai;+

Etuluku ya banyokoli eluki bomoi na ngai,

Mpe bazangi mpenza limemya epai na yo.*+

15 Kasi yo, Ee Yehova, ozali Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu,

Oyokaka nkanda noki te mpe otondi na bolingo ya sembo mpe na bosembo.*+

16 Baluká epai na ngai mpe moniselá ngai boboto.+

Pesá mosaleli na yo makasi na yo,+

Mpe bikisá mwana ya moombo na yo ya mwasi.

17 Lakisá ngai elembo* moko ya bolamu na yo,

Mpo baoyo bazali koyina ngai bámona yango mpe báyoka nsɔni.

Mpo yo, Ee Yehova, ozali mosungi na ngai mpe mobɔndisi na ngai.

Mondule ya bana ya Kora.+ Loyembo.

87 Nzambe atongi engumba na ye na bangomba mosantu.+

 2 Yehova alingaka baporte ya Siona+

Mingi koleka bahema nyonso ya Yakobo.

 3 Ee engumba ya Nzambe ya solo, makambo ya nkembo ezali kolobama mpo na yo.+ (Sela)

 4 Nakotánga Rahaba+ ná Babilone na kati ya baoyo bayebi ngai;

Filistia, Tire, ná Kushi mpe bazali na kati ya baoyo bayebi ngai.

Ekolobama ete: “Talá moto oyo abotamá kuna.”

 5 Mpe bakoloba mpo na Siona:

“Mokomoko na bango abotamá kuna.”

Mpe Oyo-Aleki-Likoló akopika Siona makasi.

 6 Ntango Yehova akokoma nkombo ya bato ya bikólo, akosakola ete:

“Talá moto oyo abotamá kuna.” (Sela)

 7 Bayembi+ mpe baoyo babinaka mabina ya kobaluka+ bakoloba ete:

“Maziba na ngai nyonso ezali epai na yo.”*+

Loyembo. Mondule ya bana ya Kora.+ Epai ya mokambi ya nzembo; na kolanda ebɛtɛli ya Mahalate,* oyo etuluku moko eyembaka nsima ya mosusu. Maskile* ya Hemane+ Moezera.

88 Ee Yehova, Nzambe ya lobiko na ngai,+

Na moi nagangi,

Mpe na butu nayei liboso na yo.+

 2 Libondeli na ngai ekóma epai na yo,+

Tyá litoi* na yo na koganga na ngai mpo na koluka lisalisi.+

 3 Mpo molimo* na ngai etondi na mpasi,+

Mpe bomoi na ngai ekómi pene na Nkunda.*+

 4 Nasilaki kotángama na kati ya baoyo bazali kokita na libulu;*+

Nakómi lokola moto oyo azangi lisalisi,*+

 5 Asundolami na kati ya bakufi

Lokola babomami oyo bazali kolala na lilita,

Baoyo ozali kokanisa lisusu te

Mpe baoyo balongolami na nse ya libateli na yo.*

 6 Otye ngai na kati ya libulu na bisika ya nse koleka,

Na bisika ya molili, na libulu monene ya mozindo.

 7 Osilikeli ngai makasi, nazali koyoka ete ofini ngai mpenza,+

Makambo oyo ozali kosala ezali lokola mbonge makasi oyo ezali kobɛta ngai. (Sela)

 8 Okimisi mosika na ngai baoyo bayebani na ngai;+

Okómisi ngai eloko ya koyina na miso na bango.

Nakangami na motambo mpe nakoki kokima te.

 9 Liso na ngai elɛmbi mpo na mpasi na ngai.+

Ee Yehova, nabeleli yo mokolo mobimba;+

Nasemboli mabɔkɔ na ngai epai na yo.

10 Okosala nde makambo ya kokamwa mpo na bakufi?

Baoyo bazangi makasi kati na liwa bakoki kotɛlɛma mpo na kosanzola yo?+ (Sela)

11 Bolingo na yo ya sembo ekosakolama nde na kati ya nkunda,

Bosembo na yo na esika ya libebi?*

12 Makambo na yo ya kokamwa ekoyebana nde na molili

To bosembo na yo na mokili ya bato oyo babosaná bango?+

13 Ee Yehova, nazali kaka kobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi,+

Ntɔngɔ nyonso libondeli na ngai ezali kokóma epai na yo.+

14 Ee Yehova, mpo na nini ozali kobwaka ngai?+

Mpo na nini ozali kobombela ngai elongi na yo?+

15 Banda bomwana na ngai,

Nazalaka na mpasi mpe pene na liwa;+

Nalɛmbi mpenza nzoto mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo otiki ekómela ngai.

16 Nkanda na yo makasi ezipi ngai;+

Nsɔmɔ na yo ezali kobebisa ngai.

17 Mokolo mobimba, ezingi ngai lokola mai;

Ezingi ngai ngámbo nyonso.*

18 Okimisi mosika na ngai baninga mpe bato oyo nazalaka elongo na bango;+

Molili ekómi moninga na ngai.

Maskile.* Ya Etane+ Moezera.

89 Nakoyemba mpo na libela makambo oyo ezali komonisa bolingo ya sembo ya Yehova.

Na monɔkɔ na ngai, nakoyebisa bosembo na yo libota na libota.

 2 Mpo nalobi ete: “Bolingo ya sembo ekoumela* mpo na libela,+

Opiki makasi bosembo na yo na likoló.”

 3 “Nasali kondimana na moto oyo ngai naponá;+

Nalapeli Davidi mosaleli na ngai ndai:+

 4 ‘Nakopika makasi libota*+ na yo mpo na libela,

Mpe nakosala ete bokonzi* na yo eumela libota na libota.’”+ (Sela)

 5 Ee Yehova, likoló ekumisaka misala na yo ya kokamwa,

Ɛɛ, bosembo na yo na lisangá ya basantu.

 6 Mpo nani akokani na Yehova na likoló oyo etondi na mapata?+

Nani kati na bana ya Nzambe azali lokola Yehova?+

 7 Etuluku* ya basantu ebangaka Nzambe mpe epesaka ye limemya;+

Azali monene mpe nsɔmɔ koleka baoyo nyonso bazali zingazinga na ye.+

 8 Ee Yehova Nzambe ya mampinga,

Ee Yah, nani azali na nguya lokola yo?+

Bosembo na yo ezingi yo.+

 9 Ozali na bokonzi likoló ya kotomboka ya mbu;+

Ntango mbonge na yango ezali kotombwama, ofandisaka yango nyɛɛ.+

10 Yo olongi mpenza Rahaba,+ obomi yango.+

Na nguya ya lobɔkɔ na yo, opanzi banguna na yo.+

11 Likoló ezali ya yo, mpe mabele ezali ya yo;+

Mabele oyo ebotaka mpe biloko nyonso oyo etondi wana,+ yo moto osalaki yango.

12 Nɔrdi ná sudi, yo moto ozalisaki yango;

Ngomba Tabore+ ná Ngomba Heremone+ ezali kosanzola nkombo na yo na esengo nyonso.

13 Lobɔkɔ na yo ezali na nguya;+

Lobɔkɔ na yo ezali makasi;+

Lobɔkɔ na yo ya mobali etombolami.+

14 Boyengebene mpe bosembo ezali moboko ya kiti na yo ya bokonzi;+

Bolingo ya sembo mpe bosembo ezali liboso na yo.+

15 Esengo na bato oyo bazali kosanzola yo na mongongo ya esengo.+

Ee Yehova, bazali kotambola na pole ya elongi na yo.

16 Mpo na nkombo na yo bazali na esengo mokolo mobimba,

Mpe na bosembo na yo batombwami.

17 Mpo yo ozali nkembo mpe makasi na bango,+

Lokola opamboli biso, makasi na biso ezali kobakisama.*+

18 Mpo nguba na biso euti epai ya Yehova,

Mpe mokonzi na biso auti epai ya Mosantu ya Yisraele.+

19 Na ntango yango olobelaki bato na yo ya sembo na emonaneli ete:

“Napesi makasi epai ya moto ya nguya;+

Natomboli moto oyo aponami na kati ya bato.+

20 Namoni Davidi mosaleli na ngai;+

Natye ye mafuta na ngai mosantu.+

21 Lobɔkɔ na ngai ekosalisa ye,+

Mpe lobɔkɔ na ngai ekopesa ye makasi.

22 Monguna ata moko te akosɛnga ye afuta mpako,

Mpe moto ata moko te ya kozanga bosembo akonyokola ye.+

23 Mpe nakobukabuka banguna na ye liboso na ye+

Mpe nakobɛtabɛta baoyo bayinaka ye.+

24 Bosembo mpe motema boboto* na ngai ezali elongo na ye,+

Mpe na nkombo na ngai makasi na ye ekobakisama.*

25 Nakotya lobɔkɔ* na ye likoló ya mbu

Mpe lobɔkɔ na ye ya mobali likoló ya bibale.+

26 Akobelela ngai ete: ‘Ozali Tata na ngai,

Nzambe na ngai mpe Libanga ya lobiko na ngai.’+

27 Nakotya ye lokola mwana ya liboso,+

Lokola moto oyo aleki bakonzi nyonso ya mabele.+

28 Nakobatela bolingo ya sembo mpo na libela,+

Mpe kondimana na ngai ná ye ekosila te.+

29 Nakopika mpo na libela libota* na ye

Mpe nakosala ete kiti na ye ya bokonzi eumela lokola likoló.+

30 Soki bana na ye batiki mobeko na ngai

Mpe batamboli te na kolanda bikateli na ngai ya lisambisi,

31 Soki babuki mibeko na ngai

Mpe batosi te mitindo na ngai,

32 Nakopesa bango etumbu na lingenda mpo na kozanga botosi* na bango+

Mpe nakobɛta bango fimbo mpo na libunga na bango.

33 Kasi nakotika te bolingo na ngai ya sembo epai na ye+

Mpe na kobuka lokuta te mpo na elaka na ngai.*

34 Nakobebisa te kondimana na ngai+

Mpe nakobongola te likambo oyo mbɛbu na ngai elobi.+

35 Na bosantu na ngai, nalapi ndai mpo na libela;

Nakokosa Davidi te.+

36 Libota* na ye ekoumela libela;+

Kiti na ye ya bokonzi ekoumela lokola moi liboso na ngai.+

37 Lokola sanza, yango ekopikama makasi mpo na libela

Lokola motatoli ya sembo na likoló oyo etondi na mapata.” (Sela)

38 Kasi yo moko oboyi mpe obwaki ye;+

Osilikeli moto na yo oyo atyami mafuta.

39 Otyoli kondimana oyo osalaki ná mosaleli na yo;

Okómisi motole na ye eloko mpamba ndenge obwaki yango na mabele.

40 Obuki bifelo na ye nyonso ya mabanga;*

Obebisi mapango na ye ya makasi.

41 Baoyo nyonso bazali koleka pene na ye bapunzi ye;

Azali eloko ya kosambwisa na miso ya bato oyo bafandi penepene na ye.+

42 Osali ete banguna na ye bálonga;*+

Osepelisi banguna na ye nyonso.

43 Lisusu, ozongisi mopanga na ye nsima,

Mpe osali ete alonga te na etumba.

44 Osukisi nkembo na ye

Mpe obwaki kiti na ye ya bokonzi na mabele.

45 Osali ete akóma mobange nokinoki;

Olatisi ye nsɔni. (Sela)

46 Ee Yehova, tii ntango nini okomibomba? Mpo na libela?+

Nkanda na yo ya makasi ekokoba nde kopela lokola mɔtɔ?

47 Kanisá ndenge bomoi na ngai ezali mokuse!+

Ozalisaki bato nyonso kaka mpamba?

48 Mobali nani oyo akoki kozala na bomoi mpe komona liwa te?+

Akoki nde kobikisa bomoi* na ye na nguya ya Nkunda?* (Sela)

49 Ee Yehova, wapi misala na yo ya kala ya bolingo ya sembo,

Oyo olapelaki Davidi ndai na bosembo na yo?+

50 Ee Yehova, kanisá ndenge basaleli na yo bazali kotyolama;

Kanisá ndenge nasengeli kokanga motema na* kotyola ya bato ya bikólo nyonso;

51 Ee Yehova, ndenge banguna na yo bazali kofinga;

Ndenge bazali kofinga moto na yo oyo atyami mafuta epai nyonso azali kokende.

52 Yehova asanzolama mpo na libela. Amen mpe Amen.+

BUKU YA MINEI

(Nzembo 90-106)

Libondeli ya Moize, moto ya Nzambe ya solo.+

90 Ee Yehova, ozali esika na biso ya kofanda*+ bileko na bileko.

 2 Liboso bangomba ebotama,

To obanda kobimisa* mokili mpe mabele oyo ebotaka,+

Kobanda libela na libela tii libela na libela, yo ozali Nzambe.+

 3 Osalaka ete moto, mowei mpamba azonga putulu;

Olobaka: “Bino bana ya bato, bózonga na putulu.”+

 4 Mpo na miso na yo, mbula nkóto ezali kaka lokola mokolo ya lobi oyo eleki,+

Lokola kaka ntango ya kokɛngɛla ya butu.

 5 Okɔmbɔli bango;+ balimwe lokola ndɔtɔ;

Na ntɔngɔ, bazali lokola matiti ya mobesu oyo ezali kobima.+

 6 Na ntɔngɔ, ebimisaka fololo mpe ekómaka ya sika,

Kasi na mpokwa, ebebaka mpe ekaukaka.+

 7 Mpo nkanda na yo ezikisi biso+

Mpe kosilika na yo ebangisi biso mpenza.

 8 Oyebi mabunga na biso,+

Na kongɛnga ya elongi na yo, makambo na biso ya kobombana ebimi polele.+

 9 Mikolo na biso* ekómi pene na nsuka na yango mpo na nkanda na yo;

Mpe bambula na biso ezali kolimwa lokola mwa mpema oyo ebimi na monɔkɔ.

10 Bomoi na biso eumelaka mbula 70,

To mbula 80+ soki moto azali mpenza makasi.

Kasi etondi na mawa mpe na mpasi;

Elekaka nokinoki, mpe tokozala lisusu te.+

11 Nani ayebi nguya ya nkanda na yo?

Kobanga oyo tosengeli kobanga yo, ezali lokola nkanda na yo makasi.+

12 Teyá biso ndenge ya kotánga mikolo na biso+

Mpo tókóma na motema ya bwanya.

13 Ee Yehova, zongá!+ Yango ekoumela tii ntango nini?+

Yokelá basaleli na yo mawa.+

14 Na ntɔngɔ, tondisá biso na bolingo na yo ya sembo,+

Mpo tóganga na esengo mpe tósepela+ mikolo nyonso ya bomoi na biso.

15 Salá ete mikolo oyo okosepelisa biso ekokana na mikolo oyo omonisaki biso mpasi,+

Ekokana na bambula oyo tomoni mpasi.+

16 Basaleli na yo bámona mosala na yo,

Mpe bana na bango bámona nkembo na yo.+

17 Boboto ya Yehova Nzambe na biso ezala likoló na biso;

Pambolá* mosala ya mabɔkɔ na biso.

Ɛɛ, pambolá mosala ya mabɔkɔ na biso.+

91 Moto nyonso oyo afandi na esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló+

Akofanda na elili ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.+

 2 Nakoloba na Yehova: “Ozali esika na ngai ya kokima mpe esika makasi na ngai ya libateli,+

Nzambe na ngai oyo natyelaka motema.”+

 3 Mpo akobikisa yo na motambo ya mokangi-ndɛkɛ,

Na maladi mabe oyo ebomaka.

 4 Na nsala ya mapapu na ye akozipa yo,*

Mpe okokima na nse ya mapapu na ye.+

Bosembo na ye+ ekozala nguba monene+ mpe efelo makasi ya libateli.

 5 Okobanga likama moko te na butu,+

To likula oyo ezali kopumbwa na moi,+

 6 To maladi mabe oyo etambolatambolaka na molili,

To eloko oyo ebomaka bato na midi.

 7 Bato nkóto bakokwea penepene na yo

Mpe bato nkóto zomi na lobɔkɔ na yo ya mobali,

Kasi nyonso wana ekopusana epai na yo te.+

 8 Okotala kaka

Mpe okomona ntango bato mabe bakozwa etumbu.*

 9 Mpo olobaki: “Yehova azali esika na ngai ya kokima,”

Okómisi Oyo-Aleki-Likoló esika na yo ya kofanda;*+

10 Likama moko te ekokwela yo,+

Mpe ata etumbu moko te ekopusana pene na hema na yo.

11 Mpo akopesa baanzelu na ye+ mitindo mpo na yo,

Mpo bábatela yo na banzela na yo nyonso.+

12 Bakomema yo na mabɔkɔ na bango,+

Mpo lokolo na yo etutana na libanga te.+

13 Okonyata mwana-nkɔsi mpe kobra;

Okonyatanyata nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki mpe nyoka monene.+

14 Nzambe alobi: “Lokola alingaka ngai mingi,* nakobikisa ye.+

Nakobatela ye mpo ayebi nkombo na ngai.+

15 Akobelela ngai, mpe nakoyanola ye.+

Nakozala elongo na ye na ntango ya mpasi.+

Nakobikisa ye mpe nakopesa ye lokumu.

16 Nakopesa ye bomoi molai,+

Mpe nakomonisa ye misala ya lobiko na ngai.”*+

Mondule. Loyembo mpo na mokolo ya Sabata.

92 Ezali malamu kopesa Yehova matɔndi+

Mpe koyemba mpo na kosanzola* nkombo na ye, Ee Oyo-Aleki-Likoló,

 2 Mpo na kolobela bolingo na yo ya sembo+ na ntɔngɔ

Mpe bosembo na yo na butu,

 3 Eyembamaka na ebɛtɛlo ya nsinga zomi mpe na ebɛtɛlo ya nsinga misato,

Na miziki kitoko ya nzɛnzɛ.+

 4 Mpo osepelisi ngai, Ee Yehova, na misala na yo;

Mpo na misala ya mabɔkɔ na yo, nazali koganga na esengo.

 5 Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza minene!+

Makanisi na yo ezali mozindo mingi!+

 6 Moto moko te oyo azangi mayele akoki koyeba yango;

Mpe zoba moko te akoki kokanga ntina na yango:+

 7 Ntango bato mabe bazali kobima lokola matiti mabe*

Mpe basali-mabe nyonso bazali kokola,

Ezali mpo básila libela.+

 8 Kasi yo, Ee Yehova, otombwami mpo na libela.

 9 Mpo talá kokwea ya banguna na yo, Ee Yehova,

Talá ndenge banguna na yo bakokufa;

Bato mabe nyonso bakopanzana.+

10 Kasi okobakisa makasi* na ngai lokola oyo ya ngɔmbɛ ya zamba;

Nakopakola loposo na ngai mafuta ya sika.+

11 Mpe nakomona kokwea ya banguna na ngai;+

Matoi na ngai ekoyoka nsango ya kokwea ya baoyo bazali kobundisa ngai.

12 Kasi moto ya sembo* akokola lokola nzete ya mbila;

Mpe akokola lokola nzete ya sɛdrɛ na Liban.+

13 Balonamá na ndako ya Yehova;

Bazali kokola na mapango ya Nzambe na biso.+

14 Ata na bobange* bakokoba kokola;+

Bakozala kaka makasi* mpe bakolɛmba te,+

15 Bakoloba ete Yehova azali sembo.

Ye azali Libanga na ngai,+ epai na ye kozanga bosembo ezali te.

93 Yehova akómi Mokonzi!+

Alati lokumu;

Yehova alati bokasi;

Alati yango lokola mokaba.

Mabele* epikami makasi;

Ekoki koningana te.*

 2 Kiti na yo ya bokonzi epikamá makasi banda kala;+

Ozali libela na libela.+

 3 Ee Yehova, bibale etomboki,

Bibale etomboki mpe ezali konguluma;

Bibale ezali kaka kotomboka mpe koyokisa lokito na yango.

 4 Ezala makɛlɛlɛ ya mai mingi,

To mbonge makasi ya mbu,+

Yehova aleki yango na lokumu monene na bisika oyo etombwaná.+

 5 Makundoli na yo ebongi mpenza kotyelama motema.+

Ee Yehova, bosantu ebongisi* ndako na yo+ mpo na libela.

94 Ee Yehova, Nzambe oyo azongiselaka bato mabe mabe na bango,+

Ee Nzambe oyo azongiselaka bato mabe mabe na bango, ngɛngá!

 2 Ee Mosambisi ya mabele, tɛlɛmá.+

Pesá bato ya lolendo etumbu oyo ebongi na bango.+

 3 Ee Yehova, tii ntango nini bato mabe,

Tii ntango nini bato mabe bakokoba kosepela mingi?+

 4 Bazali kosopa maloba mpe bazali koloba na lofundo mpenza;

Bato nyonso oyo basalaka makambo ya mabe bazali komikumisa.

 5 Ee Yehova, bazali konyatanyata bato na yo,+

Mpe konyokola libula na yo.

 6 Bazali koboma mwasi oyo mobali akufá mpe moto oyo afandi mopaya,

Mpe bazali koboma bana oyo batata bakufá.

 7 Bazali koloba: “Yah azali komona te;+

Nzambe ya Yakobo azali kotyela yango likebi te.”+

 8 Bóyeba likambo oyo, bino bato oyo bozangi mayele;

Bino bazoba, ntango nini bokomonisa mayele ya kososola?+

 9 Moto oyo asalá* litoi, akoki nde koyoka te?

Moto oyo asalá liso, akoki nde komona te?+

10 Moto oyo asembolaka bikólo, akoki nde kopamela te?+

Moto oyo apesaka bato boyebi!+

11 Yehova ayebi makanisi ya bato,

Ayebi ete ezali lokola mwa mopɛpɛ.+

12 Ee Yah, esengo na mobali oyo ozali kosembola,+

Moto oyo ozali koteya mobeko na yo,+

13 Mpo na kopesa ye kimya na mikolo ya mpasi,

Tii libulu ekotimolama mpo na moto mabe.+

14 Mpo Yehova akosundola bato na ye te,+

Akotika mpe libula na ye te.+

15 Mpo lisambisi ekokatama lisusu na bosembo,

Mpe bato nyonso ya motema sembo bakolanda yango.

16 Nani akokɔtela ngai mpo na kobunda na bato mabe?

Nani akokɔtela ngai mpo na kobunda na baoyo basalaka makambo ya mabe?

17 Soki Yehova asalisaka ngai te,

Na mwa ntango moke, nalingaki kozala lisusu te.*+

18 Ntango nalobaki: “Lokolo na ngai ezali kosɛlimwa,”

Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo ezalaki kaka kosalisa ngai.+

19 Ntango natungisamaki koleka ndelo,

Obɔndisaki ngai mpe okitisaki ngai motema.*+

20 Okosala ata moke te elongo na bakonzi* mabe

Mpo bazali na mokano ya kobimisa mikakatano na nzela ya mobeko.+

21 Bazali kobundisa moto ya sembo* na ndenge ya mabe mpenza+

Mpe bazali kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya liwa.*+

22 Kasi Yehova akokóma esika na ngai ya makasi ya kobombana,*

Nzambe na ngai azali libanga ya esika na ngai ya kokima.+

23 Akosala ete misala na bango ya mabe ezongela bango.+

Akosilisa bango* na misala na bango ya mabe.

Yehova Nzambe na biso akosilisa bango.*+

95 Bóya, tóganga na esengo mpo na Yehova!

Tóganga na koganga ya bolongi mpo na Libanga ya lobiko na biso.+

 2 Tókende liboso na ye* na matɔndi;+

Tóyemba mpe tóganga na bolongi mpo na ye.

 3 Mpo Yehova azali Nzambe monene,

Mokonzi moko monene likoló ya banzambe mosusu nyonso.+

 4 Bisika ya bozindo ya mabele ezali na lobɔkɔ na ye;

Bansɔngɛ ya bangomba ezali ya ye.+

 5 Mbu, oyo asalá, ezali ya ye,+

Mpe mabɔkɔ na ye esalaki mabele ya kokauka.+

 6 Bóya, tósambela mpe tógumbama;

Tófukama liboso ya Yehova Mokeli na biso.+

 7 Mpo ye azali Nzambe na biso,

Mpe biso tozali bato ya esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti,

Bampate oyo azali kobatela.*+

Lelo oyo, soki boyoki mongongo na ye,+

 8 Bókómisa motema na bino makasi te lokola na Meriba,*+

Lokola na mokolo ya Masa* na esobe,+

 9 Ntango bankɔkɔ na bino bamekaki ngai;+

Batumolaki ngai, atako bamonaki misala na ngai.+

10 Na boumeli ya mbula 40 nayokaki libota yango mabe mpenza,* mpe nalobaki ete:

“Balandaka ntango nyonso bamposa ya mitema na bango;

Bayebi banzela na ngai te.”

11 Bongo nalapaki ndai na nkanda na ngai ete:

“Bakokɔta te na kopema na ngai.”+

96 Bóyembela Yehova loyembo ya sika.+

Bóyembela Yehova, mabele mobimba!+

 2 Bóyembela Yehova; bósanzola nkombo na ye.

Mokolo na mokolo, bósakola nsango malamu ya lobiko na ye.+

 3 Bósakola nkembo na ye na kati ya bikólo,

Misala na ye ya kokamwa na kati ya bato ya bikólo nyonso.+

 4 Yehova azali monene mpe abongi kosanzolama mingi mpenza.

Azali nsɔmɔ koleka banzambe mosusu nyonso.

 5 Banzambe nyonso ya bato ya bikólo bazali banzambe ya mpambampamba,+

Kasi Yehova nde asalá likoló.+

 6 Bonene* mpe nkembo ezali liboso na ye;+

Bokasi mpe kitoko ezali na esika mosantu na ye.+

 7 Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, bino mabota ya bato ya bikólo,

Bópesa Yehova oyo ebongi na ye, mpo na nkembo mpe bokasi na ye.+

 8 Bópesa Yehova nkembo oyo ebongi na nkombo na ye;+

Bómema likabo mpe bókɔta na mapango na ye.

 9 Bógumbamela* Yehova, na bilamba ya monzɛlɛ ya bosantu;*

Bólɛnga liboso na ye, mabele mobimba!

10 Bósakola na kati ya bikólo ete: “Yehova akómi Mokonzi!+

Mabele* epikami makasi, ekoki koningana te.*

Akosambisa* bato na bosembo.”+

11 Likoló esepela, mpe mabele ezala na esengo;

Mbu eganga lokola nkake mpe biloko nyonso oyo etondisi yango;+

12 Esobe ná biloko nyonso oyo ezali kuna esepela.+

Kaka na ntango yango, nzete nyonso ya zamba eganga na esengo+

13 Liboso ya Yehova, mpo azali koya,*

Azali koya kosambisa mabele.

Akosambisa na boyengebene bato oyo bafandi na mabele*+

Mpe na bosembo na ye bato ya bikólo.+

97 Yehova akómi Mokonzi!+

Mabele ezala na esengo.+

Ebele ya bisanga esepela.+

 2 Mapata mpe molili makasi ezingi ye;+

Boyengebene mpe bosembo ezali moboko ya kiti ya bokonzi na ye.+

 3 Mɔtɔ ezali kokende liboso na ye,+

Mpe ezali kozikisa banguna na ye bipai nyonso.+

 4 Mikalikali na ye engɛngisi mokili;

Mabele emoni yango mpe elɛngi.+

 5 Bangomba ezali konyangwa lokola mafuta liboso ya Yehova,+

Liboso ya Nkolo ya mabele mobimba.

 6 Likoló esakoli bosembo na ye,

Mpe bato ya bikólo nyonso bamoni nkembo na ye.+

 7 Baoyo nyonso basambelaka ekeko bázala na nsɔni,+

Baoyo bazali komikumisa mpo na banzambe ya mpambampamba.+

Bógumbamela* ye, bino banzambe nyonso.+

 8 Siona eyoki mpe esepeli;+

Bingumba* ya Yuda ezali na esengo

Mpo na bikateli na yo, Ee Yehova.+

 9 Mpo yo, Ee Yehova, ozali Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba;

Omati likoló mingi mpenza koleka banzambe mosusu nyonso.+

10 Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe.+

Abatelaka bomoi* ya bato na ye ya sembo;+

Abikisaka bango na lobɔkɔ* ya bato mabe.+

11 Pole ebimi mpo na bato ya sembo+

Mpe esengo mpo na bato oyo bazali na motema sembo.

12 Bino bato ya sembo, bósepela mpo na Yehova,

Mpe bópesa matɔndi na nkombo* na ye mosantu.

Mondule.

98 Bóyembela Yehova loyembo ya sika,+

Mpo asali makambo ya kokamwa.+

Lobɔkɔ na ye ya mobali, ɛɛ lobɔkɔ na ye mosantu, ememi lobiko.*+

 2 Yehova asali ete lobiko na ye eyebana;+

Alakisi bosembo na ye liboso ya bikólo.+

 3 Akanisi motema boboto na ye,* bosembo na ye oyo amoniselaki ndako ya Yisraele.+

Bansuka nyonso ya mabele emoni ndenge Nzambe abikisi biso.*+

 4 Mabele mobimba, bóganga na koganga ya bolongi mpo na Yehova.

Bósepela mpe bóganga na esengo mpe bóyemba mpo na kosanzola.*+

 5 Bóyemba mpo na kosanzola* Yehova na nzɛnzɛ,

Na nzɛnzɛ mpe na loyembo kitoko.

 6 Na bakelelo mpe na lokito ya liseke,+

Bóganga na koganga ya bolongi liboso ya Mokonzi, Yehova.

 7 Mbu eganga lokola nkake mpe biloko nyonso oyo etondisi yango,

Mabele* mpe baoyo bazali kofanda kuna.

 8 Bibale ebɛta mabɔkɔ;

Bangomba eganga elongo na esengo+

 9 Liboso ya Yehova, mpo azali koya* kosambisa mabele.

Akosambisa na boyengebene bato oyo bafandi na mabele*+

Mpe na bosembo bato ya bikólo.+

99 Yehova akómi Mokonzi.+ Bato ya bikólo bálɛnga.

Afandi na kiti ya bokonzi likoló* ya bakeruba.+ Mabele eningana.

 2 Yehova azali monene na Siona,

Mpe azali likoló koleka bato ya bikólo nyonso.+

 3 Básanzola nkombo na yo monene,+

Mpo ezali nsɔmɔ mpe ezali mosantu.

 4 Azali mokonzi ya nguya oyo alingaka bosembo.+

Opiká makasi oyo ezali sembo.

Omemá bosembo mpe boyengebene+ na Yakobo.

 5 Bókumisa Yehova Nzambe na biso+ mpe bógumbama* liboso ya ebonga ya makolo na ye;+

Azali mosantu.+

 6 Moize ná Arona bazalaki na kati ya banganga-nzambe na ye,+

Mpe Samwele azalaki na kati ya baoyo bazalaki kobelela nkombo na ye.+

Bazalaki kobelela Yehova,

Mpe azalaki koyanola bango.+

 7 Azalaki koloba na bango na kati ya likonzí ya lipata.+

Babatelaki makundoli na ye mpe mobeko oyo apesaki bango.+

 8 Ee Yehova Nzambe na biso, oyanolaki bango.+

Ozalaki mpo na bango Nzambe moko oyo alimbisaka,+

Kasi opesaki bango etumbu* mpo na mabe na bango.+

 9 Bókumisa Yehova Nzambe na biso+

Mpe bógumbama* na ngomba na ye mosantu,+

Mpo Yehova Nzambe na biso azali mosantu.+

Mondule ya kopesa matɔndi.

100 Mabele mobimba bóganga na koganga ya bolongi mpo na Yehova.+

 2 Bósalela Yehova na esengo.+

Bókɔta liboso na ye na koganga ya esengo.

 3 Bóyeba ete Yehova azali Nzambe.+

Ye nde asalaki biso, mpe tozali bato na ye.*+

Tozali bato na ye mpe bampate na esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+

 4 Bókɔta na baporte na ye na matɔndi,+

Na mapango na ye na lisanzoli.+

Bópesa ye matɔndi; bósanzola nkombo na ye.+

 5 Mpo Yehova azali malamu;+

Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,

Mpe bosembo na ye eumelaka libota na libota.+

Mondule ya Davidi.

101 Nakoyemba mpo na bolingo ya sembo mpe bosembo.

Ee Yehova, nakoyemba mpo na kosanzola yo.*

 2 Nakosala na ekɛngɛ mpe na kozanga mbeba.*

Ntango nini okoya epai na ngai?

Ntango nazali na kati ya ndako na ngai nakosala likambo moko te ya mabe.+

 3 Nakotya eloko moko te ya mpambampamba liboso ya miso na ngai.

Nayiná misala ya bato oyo batiká nzela ya malamu;+

Nakokangama na bango ata moke te.*

 4 Motema ya bokosi ezali mosika na ngai;

Nakondima* eloko moko te ya mabe.

 5 Moto nyonso oyo azali kokosela mozalani na ye makambo na nkuku,+

Nakokangisa ye monɔkɔ.*

Moto nyonso oyo azali na miso ya lolendo mpe na motema ya lofundo,

Nakotikela ye nzela te.

 6 Nakotala epai ya bato ya sembo na mabele,

Mpo báfanda elongo na ngai.

Ye oyo azali kotambola na bosembo akosalela ngai.

 7 Moto oyo asalaka na bokosi akofanda na ndako na ngai te,

Mpe moto ya lokuta akotɛlɛma liboso na ngai te.*

 8 Ntɔngɔ nyonso, nakokangisa bato mabe nyonso ya mabele monɔkɔ,*

Mpo nalongola basali-mabe nyonso na engumba ya Yehova.+

Libondeli ya moto oyo anyokwami ntango azangi elikya* mpe azali koyebisa Yehova mitungisi na ye.+

102 Ee Yehova, yoká libondeli na ngai;+

Tiká kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi ekómela yo.+

 2 Kobombela ngai elongi na yo te na ntango oyo nazali na mpasi.+

Tyá litoi na yo epai na ngai;*

Yanolá ngai nokinoki ntango nazali kobelela yo.+

 3 Mpo mikolo na ngai ezali kolimwa lokola milinga,

Mpe mikuwa na ngai ekómi mɔtɔ lokola lituka.+

 4 Motema na ngai ebɛtami mpe ekauki lokola matiti,+

Mpo nabosani kolya bilei na ngai.

 5 Lokola mpasi na ngai ezali makasi mingi+

Mikuwa na ngai ekangami na mosuni na ngai.+

 6 Nakokani na ndɛkɛ oyo ebengami libɛki ya esobe.

Nazali lokola esulungutu moke ya bisika oyo etikalá mpamba.

 7 Nazali kozwa mpɔngi te;*

Nazali lokola ndɛkɛ oyo ezali yango moko na nsamba.+

 8 Banguna na ngai bazali kotumola ngai mokolo mobimba.+

Baoyo bazali kotyola ngai bazali kosalela nkombo na ngai lokola elakeli mabe.

 9 Mpo nazali kolya putulu ya mɔtɔ lokola limpa,+

Mpe oyo nazali komɛla esangisami na mai ya miso,+

10 Mpo na kosilika na yo mpe nkanda na yo,

Mpo otomboli ngai, mpo na nsima obwaka ngai.

11 Mikolo na ngai ezali lokola elili oyo ezali kolimwa ntango moi ezali kobima,+

Mpe nazali kokauka lokola matiti.+

12 Kasi, yo, Ee Yehova, okotikala libela na libela,+

Mpe lokumu* na yo ekoumela libota na libota.+

13 Na ntembe te, okotɛlɛma mpe okoyokela Siona mawa,+

Mpo oyo ezali ntango ya komonisela ye boboto;+

Ntango oyo etyamá ekoki.+

14 Mpo basaleli na yo basepeli na mabanga na ye,+

Mpe bazali kosepela ata na putulu na ye.+

15 Bikólo ekobanga nkombo ya Yehova,

Mpe bakonzi nyonso ya mabele bakobanga nkembo na yo.+

16 Mpo Yehova akotonga lisusu Siona;+

Akomonana na nkembo na ye.+

17 Akotya likebi na libondeli ya babola;+

Akotyola libondeli na bango mpe te.+

18 Yango ekomami mpo na libota oyo ekoya,+

Mpo bato oyo bakozala na bomoi* na mikolo ezali koya básanzola Yah.

19 Mpo uta na esika na ye mosantu oyo etombwamá atali na nse,+

Uta na likoló Yehova atalaka mabele,

20 Mpo na koyoka kolela na mongongo ya nse* ya moto ya bolɔkɔ,+

Mpo na kobimisa baoyo bakateli bango etumbu ya liwa,+

21 Mpo nkombo ya Yehova esakolama na Siona+

Mpe lisanzoli na ye na Yerusaleme,

22 Ntango bato ya bikólo mpe makonzi

Bakosangana elongo mpo na kosalela Yehova.+

23 Asilisaki nguya na ngai na nzela;

Akómisaki mikolo na ngai mokuse.

24 Nalobaki ete: “Ee Nzambe na ngai,

Kosala te ete nakufa na katikati ya bomoi na ngai,

Yo, oyo bambula na yo ezali koumela mabota nyonso.+

25 Kalakala otyaki miboko ya mabele,

Mpe likoló ezali mosala ya mabɔkɔ na yo.+

26 Yango ekobeba, kasi yo okozala kaka;

Yango nyonso ekonzuluka lokola elamba.

Lokola bilamba, okotya mosusu na esika na yango, mpe ekozala lisusu te.

27 Kasi yo ozali kaka ndenge ozalaka, mpe bambula na yo ekosuka ata moke te.+

28 Bana ya basaleli na yo bakofanda na kimya,

Mpe libota na bango ekopikama makasi liboso na yo.”+

Ya Davidi.

103 Tiká nasanzola* Yehova,

Nyonso oyo ezali kati na ngai esanzola nkombo na ye mosantu.

 2 Tiká nasanzola Yehova;

Nabosana ata moke te misala na ye nyonso,+

 3 Alimbisi mabunga na yo nyonso+

Mpe asilisi maladi na yo nyonso;+

 4 Asikoli bomoi na yo na libulu*+

Mpe alatisi yo motole ya bolingo ya sembo mpe ya motema mawa na ye.+

 5 Atondisi bomoi na yo mobimba na makambo ya malamu,+

Mpo bolenge na yo ekóma lisusu ya sika lokola oyo ya mpongo.+

 6 Yehova asalaka makambo na boyengebene+ mpe na bosembo

Mpo na baoyo nyonso banyokwami.+

 7 Ayebisaki Moize banzela na ye,+

Mpe misala na ye na bana ya Yisraele.+

 8 Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu,+

Ayokaka nkanda noki te mpe atondi na bolingo ya sembo.*+

 9 Alandelaka ntango nyonso mabunga na biso te,+

Akangaka mpe nkanda te mpo na libela.+

10 Asaleli biso te makambo na kolanda masumu na biso,+

Apesi biso etumbu te oyo tosengeli kozwa na kolanda mabunga na biso.+

11 Mpo kaka ndenge likoló etombwamá koleka mabele,

Ndenge moko mpe bolingo na ye ya sembo eleki monene epai ya baoyo babangaka ye.+

12 Kaka ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mpenza na epai elalaka,

Ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.+

13 Kaka ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa,

Yehova ayokelaka baoyo babangaka ye mawa.+

14 Mpo ayebi malamu ndenge oyo tosalemá,+

Azali kobosana te ete tozali putulu.+

15 Moto, mowei mpamba, mikolo na ye ezali lokola oyo ya matiti;+

Azali kokola lokola fololo ya esobe.+

16 Kasi ntango mopɛpɛ ebɛtaka, ezalaka lisusu te,

Lokola nde ezalaki wana te.*

17 Kasi bolingo ya sembo ya Yehova ezali mpo na seko*

Epai ya baoyo babangaka ye,+

Mpe bosembo na ye epai ya bana ya bana na bango,+

18 Epai ya baoyo bazali kobatela kondimana na ye+

Mpe epai ya baoyo basalaka makasi bátosa mitindo na ye.

19 Yehova apiki makasi kiti na ye ya bokonzi na likoló;+

Mpe bokonzi na ye eyangeli eloko nyonso.+

20 Bósanzola Yehova, bino nyonso baanzelu na ye,+ oyo bozali na nguya makasi mpenza,

Oyo bozali kokokisa liloba na ye+ mpe kotosa mongongo na ye.*

21 Bósanzola Yehova, mampinga na ye nyonso,+

Basaleli na ye, oyo bosalaka mokano na ye.+

22 Bósanzola Yehova bino misala na ye nyonso,

Na bisika nyonso oyo azali koyangela.*

Tiká nasanzola Yehova na motema na ngai mobimba.

104 Tiká nasanzola* Yehova.+

Ee Yehova Nzambe na ngai, ozali monene mingi.+

Olatá lokumu mpe nkembo.+

 2 Pole elíngi yo+ lokola elamba;

Otandi likoló lokola elamba ya hema.+

 3 Azali kotya mabaya minene ya bashambrɛ na ye ya likoló na kati ya mai ya likoló,*+

Azali kokómisa mapata likalo na ye,+

Azali kotambola likoló ya mapapu ya mopɛpɛ.+

 4 Azali kosala baanzelu na ye bilimo,

Basaleli na ye mɔtɔ ya kozikisa.+

 5 Atyá mabele na miboko na yango;+

Ekolongwa na esika na yango* te libela na libela.+

 6 Ozipaki yango na mai mozindo lokola elamba.+

Mai etɛlɛmaki likoló ya bangomba.

 7 Na mpamela na yo ekimaki;+

Na lokito ya nkake na yo, ekimaki na nsɔmɔ

 8 —Bangomba emataki+ mpe mabwaku ekitaki—

Tii na esika oyo otyá yango.

 9 Otyaki ndelo oyo yango esengeli koleka te,+

Mpo ezipa mabele lisusu ata moke te.

10 Atindaka maziba na kati ya mabwaku;*

Ezali koleka na katikati ya bangomba.

11 Ezali kopesa mai na banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe;

Bampunda ya zamba esilisaka mposa na yango ya mai.

12 Bandɛkɛ ya likoló efandaka likoló na yango;

Eyembaka na bitape oyo etondi na nkasa.

13 Azali kosopela bangomba mai uta na bashambrɛ na ye ya likoló.+

Mabele etondi na mbuma ya misala na yo.+

14 Azali kokolisa matiti mpo na bangɔmbɛ

Mpe milona mpo bato básalela yango,+

Mpo na kokolisa bilei na mabele

15 Mpe vinyo oyo esepelisaka motema ya moto,+

Mafuta oyo engɛngisaka elongi,

Mpe limpa oyo epesaka makasi na motema ya moto, mowei mpamba.+

16 Banzete ya Yehova etondi,

Basɛdrɛ ya Liban oyo ye aloná,

17 Esika bandɛkɛ etongaka bazumbu.

Ndako ya ndɛkɛ babengi nkɔngi,+ ezali na banzete ya jenevriye.

18 Bangomba ya milai ezali mpo na bantaba ya ngomba;+

Mabanga ezali esika ya komibomba ya basimbiliki ya mabanga.+

19 Asalá sanza mpo na kolakisaka elembo ya bantango oyo etyamá;

Moi eyebi malamu ntango elalaka.+

20 Omemaka molili, mpe butu ekómaka,+

Ntango banyama nyonso oyo ezalaka na zamba etambolaka.

21 Bana-nkɔsi* ezali koganga mpo na kokanga nyama ya kolya+

Mpe kosɛnga Nzambe bilei na yango.+

22 Soki moi ebimi,

Elongwe mpe elali na bisika na yango ya kobombama.

23 Moto akei na mosala na ye,

Mpe asali mosala makasi tii na mpokwa.

24 Ee Yehova, misala na yo ezali mpenza ebele!+

Osalá yango nyonso na bwanya.+

Mabele etondi na biloko oyo osalá.

25 Mbu ezali monene mpe efungwamá,

Etondi na bikelamu ya bomoi oyo motángo na yango eyebani te, ezala ya mike to ya minene.+

26 Kuna, bamasuwa etambolaka,

Mpe Leviatana,*+ oyo osalá mpo esakanaka kuna.

27 Bango nyonso bazelaka yo

Mpo opesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi.+

28 Oyo opesaka bango, balɔkɔtaka yango.+

Ntango ofungolaka lobɔkɔ na yo, batondaka na biloko ya malamu.+

29 Ntango obombi elongi na yo, babulungani.

Soki olongoli elimo na bango, bakufi mpe bazongi na putulu.+

30 Soki otindi elimo na yo, biloko nyonso ezalisamaka,+

Mpe osalaka ete biloko nyonso na mabele ekóma ya sika.

31 Nkembo ya Yehova ekoumela libela na libela.

Yehova akosepela na misala na ye.+

32 Atalaka mabele, mpe elɛngaka;

Asimbaka bangomba, mpe ebimisaka milinga.+

33 Nakoyembela Yehova+ bomoi na ngai mobimba;

Nakoyemba mpo na kosanzola* Nzambe na ngai ntango nyonso oyo nakozala na bomoi.+

34 Tiká makanisi na ngai esepelisa* ye.

Ngai nakosepela na Yehova.

35 Basumuki bakosila na mabele,

Mpe bato mabe bakozala lisusu te.+

Tiká nasanzola Yehova. Bósanzola Yah!*

105 Bópesa Yehova matɔndi,+ bóbelela nkombo na ye,

Bóyebisa bato ya bikólo misala na ye!+

 2 Bóyembela ye, bóyemba mpo na kosanzola ye,*

Bókanisa na mozindo* misala na ye nyonso ya kokamwa.+

 3 Bómikumisa mpo na nkombo na ye mosantu.+

Mitema ya baoyo bazali koluka Yehova esepela.+

 4 Bóluka Yehova+ mpe makasi na ye.

Bóluka elongi* na ye ntango nyonso.

 5 Bókanisa lisusu misala ya kokamwa oyo asalá,

Makamwisi na ye mpe bikateli ya lisambisi oyo alobá,+

 6 Bino libota* ya Abrahama mosaleli na ye,+

Bino bana ya Yakobo, baoyo ye aponá.+

 7 Ye azali Yehova Nzambe na biso.+

Bikateli na ye ya lisambisi etali mabele mobimba.+

 8 Akanisi lisusu kondimana na ye mpo na libela,+

Elaka oyo apesaki,* mpo na mabota nkóto,+

 9 Kondimana oyo asalaki na Abrahama,+

Mpe ndai oyo alapaki epai ya Yisaka,+

10 Oyo atyaki mpo ezala mobeko mpo na Yakobo,

Mpe ezala kondimana oyo ekoumela libela mpo na Yisraele,

11 Ntango alobaki: “Nakopesa yo mokili ya Kanana+

Mpo ezala libula oyo bapesi yo.”+

12 Yango ezalaki ntango bazalaki kaka bato moke,+

Ɛɛ, bato moke mpenza, mpe bazalaki bapaya na mokili yango.+

13 Bazalaki kotambolatambola longwa na ekólo oyo tii na ekólo mosusu,

Longwa na bokonzi oyo tii na bato ya ekólo mosusu.+

14 Apesaki moto moko te nzela anyokola bango,+

Kutu apamelaki bakonzi mpo na bango,+

15 Alobaki: “Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta,

Mpe bósala basakoli na ngai eloko moko te ya mabe.”+

16 Abengaki nzala ekɔta na mokili yango;+

Apimelaki bango limpa.*

17 Atindaki moto moko liboso na bango

Yozefe, oyo atɛkamaki moombo.+

18 Bakangaki makolo na ye* na bikangeli,+

Bakɔtisaki nkingo na ye na bibende;*

19 Tii ntango liloba ya Nzambe ekokisamaki,+

Liloba ya Yehova epɛtolaki ye.

20 Mokonzi apesaki mitindo bábimisa ye,+

Moyangeli ya bato ya bikólo atikaki ye akende.

21 Atyaki ye nkolo ya bato ya ndako na ye,

Mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,+

22 Mpo na kozala na bokonzi likoló ya* bankumu na ye ndenge alingi

Mpe mpo ateya mikóló na ye bwanya.+

23 Bongo Yisraele ayaki na Ezipito,+

Mpe Yakobo afandaki mopaya na mokili ya Kame.

24 Nzambe asalaki ete bato na ye bábota mingi;+

Akómisaki bango makasi koleka banguna na bango,+

25 Baoyo atikaki motema na bango ebongwana mpo báyina bato na ye,

Mpo básalela basaleli na ye likita ya mayele mabe.+

26 Atindaki Moize mosaleli na ye,+

Mpe Arona,+ moto oyo aponaki.

27 Balakisaki bango bilembo na ye,

Makamwisi na ye na mokili ya Kame.+

28 Atindaki molili mpe mokili ekómaki molili;+

Baboyaki* te kotosa maloba na ye.

29 Akómisaki mai na bango makila,

Mpe abomaki mbisi na bango.+

30 Mokili na bango etondaki na magorodo,*+

Ata na bashambrɛ ya bakonzi.

31 Apesaki mitindo mapokopoko* etondanela bango

Mpe ngungi na bateritware na bango nyonso.+

32 Akómisaki mbula na bango mbula ya mabanga,

Mpe atindaki mokalikali* na mokili na bango.+

33 Abebisaki banzete na bango ya vinyo mpe banzete na bango ya figi

Mpe abukaki banzete ya teritware na bango.

34 Alobaki ete mabanki etondanela bango,

Mabanki ya mike oyo ekokaki kotángama te.+

35 Elyaki milona nyonso na mokili yango,

Mpe elyaki biloko oyo mabele na bango ebimisaki.

36 Bongo abomaki mwana nyonso ya liboso na mokili na bango,+

Ebandeli ya nguya na bango ya kobota.

37 Abimisaki bato na ye mpe babimaki na palata ná wolo;+

Mpe moto moko te na kati ya mabota na ye abɛtaki libaku.

38 Ezipito esepelaki ntango balongwaki,

Mpo nsɔmɔ ya Yisraele* ekwelaki bango.+

39 Atindaki lipata mpo na kobatela bango+

Mpe mɔtɔ mpo epesaka pole na butu.+

40 Basɛngaki, mpe atindelaki bango bandɛkɛ na nkombo kayɛ;+

Akobaki kotondisa bango na limpa oyo eutaki na likoló.+

41 Afungolaki libanga, mpe mai etíyolaki;+

Yango etíyolaki na mokili ekauká lokola ebale.+

42 Mpo akanisaki elaka na ye mosantu oyo apesaki Abrahama mosaleli na ye.+

43 Bongo abimisaki bato na ye.

Bazalaki na nsai mpenza,+ bato oyo ye aponá bagangaki na esengo.

44 Apesaki bango mikili ya bikólo;+

Bazwaki mbuma ya mosala makasi oyo bato mosusu basalaki,+

45 Mpo bábatela malako na ye+

Mpe bátosa mibeko na ye.

Bósanzola Yah!*

106 Bósanzola Yah!*

Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+

Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+

 2 Nani akoki kolobela misala nyonso ya nguya ya Yehova,

To kosakola misala na ye nyonso oyo ebongi kosanzolama?+

 3 Esengo na baoyo bazali kosala makambo na bosembo,

Baoyo basalaka ntango nyonso makambo na boyengebene.+

 4 Ee Yehova, kanisá ngai, ntango ozali komonisela bato na yo boboto.*+

Batelá ngai na misala na yo ya kobikisa,

 5 Mpo nasepela na bolamu oyo omoniselaka bato oyo oponá,+

Mpo nasepela elongo na ekólo na yo,

Mpo nasanzola yo na komikumisa nyonso elongo na libula na yo.

 6 Tosali masumu kaka ndenge bankɔkɔ na biso basalaki;+

Tosali libunga; tosali mabe.+

 7 Bankɔkɔ na biso na Ezipito basepelaki te na* misala na yo ya kokamwa.

Bakangaki ntina te ya bonene ya bolingo na yo ya sembo,

Kasi batombokaki na mbu, pene na Mbu Motane.+

 8 Kasi Nzambe abikisaki bango mpo nkombo na ye ekumisama,+

Mpo na koyebisa nguya na ye.+

 9 Apamelaki Mbu Motane, mpe ekaukaki;

Atambwisaki bango na mai mozindo lokola na mokili ekauká;*+

10 Abikisaki bango na lobɔkɔ ya monguna+

Mpe asikolaki bango na lobɔkɔ ya monguna.+

11 Mai ezipaki banguna na bango;

Moko te kati na bango abikaki.*+

12 Bongo bandimelaki elaka na ye;+

Babandaki kosanzola ye na loyembo.+

13 Kasi babosanaki nokinoki misala na ye;+

Bazelaki litambwisi na ye te.

14 Bakómaki na bamposa ya lokoso na esobe;+

Bamekaki Nzambe na mokili ekauká.+

15 Apesaki bango oyo basɛngaki,

Kasi asalaki ete bábɛla maladi ya makasi oyo elɛmbisaki bango mpe ebomaki bango.+

16 Na kaa bayokelaki Moize zuwa

Ata Arona,+ mosantu ya Yehova.+

17 Mabele efungwamaki mpe emɛlaki Datane

Mpe ezipaki baoyo basanganaki na Abirame.+

18 Mɔtɔ epelaki na kati ya etuluku na bango;

Lolemo ya mɔtɔ ezikisaki bato mabe.+

19 Basalaki mwana-ngɔmbɛ na Horebe

Mpe bagumbamelaki ekeko ya ebende;*+

20 Babandaki kosambela elilingi ya ngɔmbɛ oyo elyaka matiti

Na esika ya kopesa ngai nkembo oyo ebongi na ngai.+

21 Babosanaki Nzambe,+ Mobikisi na bango,

Moto oyo asalaki makambo ya minene na Ezipito,+

22 Misala ya kokamwa na mokili ya Kame,+

Makambo ya nsɔmɔ na Mbu Motane.+

23 Etikalaki moke apesa etinda ya kosilisa bango nyɛɛ,

Kasi Moize, moto oyo ye aponá, abondelaki ye*

Mpo na kopekisa nkanda na ye mpe aboma bango te.+

24 Bongo batyolaki mokili ya kitoko;+

Bandimelaki elaka na ye te.+

25 Bazalaki kaka koimaima na bahema na bango;+

Bayokaki mongongo ya Yehova te.+

26 Bongo atombolaki lobɔkɔ na ye mpo na kolapela bango ndai

Ete akokweisa bango na esobe;+

27 Akosala ete bana na bango bákwea na kati ya bikólo,

Mpe akopalanganisa bango na mikili.+

28 Mpe babandaki kosambela* Baala ya Peore+

Mpe balyaki bambeka oyo bapesaki na bakufi.*

29 Batumolaki Ye na misala na bango,+

Mpe mpasi moko ebimaki na kati na bango.+

30 Kasi ntango Finehase atɛlɛmaki mpe akɔtaki likambo yango,

Mpasi yango esukaki.+

31 Mpe atángamaki moto ya sembo*

Libota na libota mpo na libela.+

32 Batumolaki Ye na mai ya Meriba,*

Bongo makambo ebebelaki Moize mpo na bango.+

33 Basilikisaki elimo na ye,

Mpe alobaki maloba oyo akanaki te na mbɛbu na ye.+

34 Basilisaki mpenza te bato ya bikólo,+

Ndenge Yehova apesaki bango mitindo.+

35 Kasi basanganaki na bato ya bikólo+

Mpe balandaki* banzela na bango.+

36 Bazalaki kaka kosalela bikeko na bango,+

Mpe yango ekómaki motambo mpo na bango.+

37 Bazalaki kokaba bana na bango ya mibali

Mpe ya basi mbeka epai ya bademo.+

38 Bazalaki kaka kosopa makila ya bato oyo bazali na likambo te,+

Makila ya bana na bango ya mibali mpe ya basi

Oyo bazalaki kopesa bikeko ya Kanana mbeka;+

Mpe mokili ekómaki mbindo mpo basopaki makila.

39 Bakómaki mbindo mpo na misala na bango;

Basalaki bondumba ya elimo na misala na bango.+

40 Bongo nkanda ya Yehova epelelaki bato na ye,

Mpe akómaki koyina libula na ye.

41 Mbala na mbala apesaki bango na lobɔkɔ ya bikólo,+

Mpo baoyo bayinaki bango báyangela bango.+

42 Banguna na bango banyokolaki bango,

Mpe batyamaki na nse ya nguya* na bango.

43 Mbala mingi azalaki kobikisa bango,+

Kasi bazalaki kotomboka mpe kozanga botosi,+

Mpe bazalaki kokitisama mpo na libunga na bango.+

44 Kasi azalaki komona mpasi na bango+

Mpe ayokaki koganga na bango mpo na kosɛnga lisalisi.+

45 Mpo na bango, azalaki kokanisa kondimana na ye,

Mpe bolingo ya sembo na ye monene ezalaki kotinda ye ayoka mawa.+

46 Asalaki ete baoyo bazalaki kozwa bango baombo,

Báyokela bango mawa.+

47 Bikisá biso, Ee Yehova Nzambe na biso,+

Mpe yanganisá biso uta na bikólo+

Mpo tókumisa nkombo na yo mosantu

Mpe tósanzola yo na esengo.*+

48 Yehova Nzambe ya Yisraele asanzolama

Libela na libela.*+

Mpe bato nyonso báloba: “Amen!”*

Bósanzola Yah!*

BUKU YA MITANO

(Nzembo 107-150)

107 Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+

Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+

 2 Baoyo Yehova asikoli báloba bongo,

Baoyo asikoli na lobɔkɔ* ya monguna,+

 3 Baoyo ayanganisi uta na mikili,+

Uta na ɛsti mpe na wɛsti,*

Uta na nɔrdi mpe na sudi.+

 4 Bayengayengaki na esobe, na mokili ekauká;

Bamonaki nzela moko te ya kokende na engumba epai bakoki kofanda.

 5 Bayokaki nzala mpe mposa ya mai;

Bakómaki pene ya kokwea mpo balɛmbaki makasi.

 6 Bazalaki kaka kobelela Yehova na mpasi na bango;+

Mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.+

 7 Atambwisaki bango na nzela ya malamu+

Mpo bákóma na engumba oyo bakoki kofanda.+

 8 Bápesa Yehova matɔndi+ mpo na bolingo na ye ya sembo

Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bana ya bato.+

 9 Asilisi mposa na bango* ya mai

Mpe apesi bilei ya malamu na baoyo* bazali na nzala.+

10 Basusu bazalaki kofanda na molili makasi,

Bato ya bolɔkɔ oyo bazalaki konyokwama na minyolɔlɔ.

11 Mpo batombokelaki liloba ya Nzambe;

Batosaki te toli ya Oyo-Aleki-Likoló.+

12 Na yango akitisaki bango na ndenge atikaki ete bányokwama makasi mpenza;+

Babɛtaki libaku, mpe moto ya kosalisa bango azalaki te.

13 Babelelaki Yehova mpo na kosɛnga lisalisi na mpasi na bango;

Abikisaki bango na mitungisi na bango.

14 Abimisaki bango na molili makasi,

Mpe akataki bansinga na bango.+

15 Bápesa Yehova matɔndi mpo na bolingo na ye ya sembo+

Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bana ya bato.

16 Mpo abuki baporte ya kwivre

Mpe akati bikangiseli ya ebende.+

17 Bazalaki bazoba mpe banyokwamaki makasi+

Mpo na kobuka mibeko mpe mabunga na bango.+

18 Mposa ya bilei ya ndenge nyonso esilaki bango;*

Bakómaki pene ya baporte ya liwa.

19 Bazalaki kobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi na mpasi na bango;

Azalaki kobikisa bango na mitungisi na bango.

20 Azalaki kotinda liloba na ye mpe kobikisa bango na maladi+

Mpe kobikisa bango mpo bákufa te.

21 Bápesa Yehova matɔndi mpo na bolingo na ye ya sembo

Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bana ya bato.

22 Bákaba bambeka ya kozongisa matɔndi+

Mpe básakola misala na ye na koganga ya esengo.

23 Baoyo basalaka mibembo na bamasuwa na mbu,

Baoyo basalaka mombongo na mai minene,+

24 Bamonaki misala ya Yehova

Mpe misala na ye ya kokamwa na bisika ya mozindo;+

25 Bamonaki ndenge apesaki etinda mpe mopɛpɛ makasi ebimaki,+

Etomboli bambonge ya mbu.

26 Bamataka na likoló,

Bakitaka na nse tii na mozindo.

Mpiko* na bango enyangwe mpo na mpasi makasi.

27 Bayokaka kizunguzungu mpe batengatengaka lokola moto oyo alangwe masanga,

Mpe mayele ya mosala na bango nyonso esalisi bango te.+

28 Bongo babelelaki Yehova na mpasi na bango,+

Mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.

29 Akómisaka mopɛpɛ makasi kimya;

Mbonge ya mbu efandaka nyɛɛ.+

30 Basepelaka ntango yango ekómi nyɛɛ,

Mpe akambaka bango na libongo oyo basepelaka na yango.

31 Bápesa Yehova matɔndi mpo na bolingo na ye ya sembo

Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa mpo na bana ya bato.+

32 Bákumisa ye na lisangá ya bato,+

Mpe bákumisa ye na etuluku* ya mikóló.

33 Akómisaka bibale mokili ekauká

Mpe maziba ya mai mabele ekauká,+

34 Akómisaka mabele oyo ebotaka mokili ya mungwa,+

Mpo na mabe ya baoyo bazali kofanda kuna.

35 Akómisaka mokili ekauká etima oyo etondi na matiti,

Mpe mabele oyo ekauká maziba ya mai.+

36 Afandisaka bato ya nzala kuna,+

Mpo bápika makasi engumba oyo bakoki kofanda.+

37 Balonaka bilanga mpe balonaka bilanga ya vinyo,+

Oyo ebimisaka ebele ya mbuma ya kobuka.+

38 Apambolaka bango mpe bakómaka ebele mpenza;

Atikaka te ete bibwɛlɛ na bango ekóma moke.+

39 Kasi lisusu bakómaka moke mpe basambwisamaka

Mpo na monyoko, mpasi, mpe mawa.

40 Atyolaka mpenza bato ya lokumu

Mpe asalaka ete báyengayenga na mikili oyo ezali mpamba, epai nzela ezali te.+

41 Kasi abatelaka* mobola na ntango ya mpasi+

Mpe akómisaka mabota na bango ebele lokola etonga.

42 Bato ya makambo alima bamonaka yango mpe basepelaka;+

Kasi bato nyonso oyo bazangi bosembo* bakangaka monɔkɔ.+

43 Moto oyo azali na bwanya akotyela makambo yango likebi+

Mpe akotya mpenza likebi na misala ya bolingo ya sembo ya Yehova.+

Loyembo. Mondule ya Davidi.

108 Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te.

Nakoyemba mpe nakobɛta miziki na motema na ngai mobimba.*+

 2 Ee ebɛtɛlo ya nsinga, lamuká; yo mpe, Ee nzɛnzɛ.+

Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.

 3 Ee Yehova, nakosanzola yo na kati ya bato ya bikólo,

Mpe nakoyemba mpo na kosanzola* yo na kati ya bikólo.

 4 Mpo bolingo na yo ya sembo ezali monene, ekei tii na likoló,+

Mpe bosembo na yo ekei tii na mapata.

 5 Ee Nzambe, okumisama kuna na likoló;

Nkembo na yo ezala likoló ya mabele mobimba.+

 6 Mpo bato oyo olingaka bábikisama,

Bikisá biso na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe yanolá ngai.+

 7 Nzambe alobi na kati ya bosantu na ye ete:*

“Nakosepela makasi, nakopesa Shekeme+ ezala libula,

Mpe nakomeka bonene ya Lobwaku* ya Sukote.+

 8 Gileade+ ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai,

Mpe Efraime ezali ekɔti mpo na motó* na ngai;+

Yuda ezali lingenda na ngai ya komanda.+

 9 Moabe ezali saani monene na ngai ya kosukola.+

Nakobwakela Edome sandale na ngai.+

Nakoganga ete nalongi Filistia.”+

10 Nani akomema ngai na engumba oyo ebatelami makasi?

Nani akokamba ngai tii na Edome?+

11 Ee Nzambe, ezali yo te nde moto obwaki biso?

Nzambe na biso, ozali kokende lisusu te elongo na mampinga na biso?+

12 Salisá biso na mpasi na biso,+

Mpo lobiko oyo euti na bato ezali mpamba.+

13 Tokozwa nguya epai ya Nzambe,+

Mpe akonyata banguna na biso.+

Epai ya mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

109 Ee Nzambe oyo nasanzolaka,+ kofanda nyɛɛ te.

 2 Mpo bato mabe ná bato ya bokosi bafungoleli ngai monɔkɔ.

Balobeli ngai na lolemo ya lokuta;+

 3 Bazingi ngai na maloba ya koyina,

Mpe bazali kobundisa ngai kaka mpamba.+

 4 Namoniseli bango bolingo, kasi bazali kaka kotɛmɛla ngai;+

Kasi nazali kokoba kobondela.

 5 Bazali kozongisela ngai mabe mpo na malamu+

Mpe koyina mpo na bolingo oyo nazali kolinga bango.+

 6 Tyá moto moko ya mabe ayangela monguna na ngai;*

Mpe motɛmɛli* atɛlɛma na lobɔkɔ na ye ya mobali.

 7 Ntango asambisami, atángama ete azali na ngambo;*

Mpe libondeli na ye etángama ete ezali lisumu.+

 8 Mikolo na ye ezala moke;+

Moto mosusu azwa mokumba na ye ya mokɛngɛli.+

 9 Bana na ye* bákóma bana oyo tata akufá,

Mpe mwasi na ye azala mwasi oyo mobali akufá.

10 Bana na ye* bákóma koyengayenga mpe kosɛngasɛnga biloko,

Mpe báluka bilei mosika na bisika na bango oyo ebebisamá.

11 Modefisi oyo asɛngaka benefisi na lokoso akanga* nyonso oyo azali na yango,

Mpe bapaya bápunza biloko na ye.

12 Moto moko te amonisela ye boboto,*

Mpe moto moko te amonisela bana na ye oyo tata akufá boboto.

13 Bana na ye bábomama;+

Nkombo na bango elongolama na libota oyo ekolanda.

14 Yehova abosana te libunga ya bankɔkɔ na ye,+

Mpe lisumu ya mama na ye elongolama te.

15 Yehova atya ntango nyonso likebi na oyo basali;

Mpe alongola na mabele makambo oyo ekosala ete bákanisa bango.+

16 Mpo abosanaki komonisa boboto,*+

Kasi akobaki konyokola moto ya mpasi,+ mobola mpe moto oyo motema ebukani

Mpo na koboma ye.+

17 Azalaki kolinga kolakela mabe, bongo elakeli mabe eyelaki ye;

Mpe azalaki kosepela te kopambola basusu, bongo lipamboli ezalaki mosika na ye.

18 Alataki bilakeli mabe lokola elamba.

Mpe ekɔtaki na nzoto na ye lokola mai,

Na kati ya mikuwa na ye lokola mafuta.

19 Bilakeli mabe na ye ezala lokola elamba oyo amilíngaka+

Mpe lokola mokaba oyo alataka ntango nyonso.

20 Yango nde lifuti oyo euti na Yehova mpo na moto oyo azali kotɛmɛla ngai+

Mpe mpo na baoyo bazali koloba makambo ya mabe mpo na ngai.*

21 Kasi yo, Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,

Salelá ngai bolamu mpo na nkombo na yo.+

Bikisá ngai, mpo bolingo na yo ya sembo ezali malamu.+

22 Mpo nazangi lisalisi mpe nazali mobola,+

Mpe motema na ngai etɔbɔlami.+

23 Nazali kokende lokola elili ntango ezali kolimwa;

Napupolami lokola liyoyo.

24 Mabɔlɔngɔ na ngai elɛngi mpo na kokila bilei;

Nzoto na ngai ekɔndi, ekɔndi makasi mpenza.*

25 Nakómi na miso na bango eloko moko ya kotyola.+

Soki bamoni ngai, baningisaka motó na bango.+

26 Ee Yehova Nzambe na ngai, salisá ngai;

Bikisá ngai na bolingo na yo ya sembo.

27 Báyeba ete oyo nde lobɔkɔ na yo;

Ete yo, Ee Yehova, osali yango.

28 Bango bálakela mabe, kasi yo, pambolá.

Ntango bazali kotɛlɛmɛla ngai, báyokisama nsɔni,

Kasi mosaleli na yo asepela.

29 Baoyo bazali kotɛmɛla ngai bálata nsɔni;

Nsɔni ezipa bango lokola elamba ya molai.*+

30 Monɔkɔ na ngai ekosanzola Yehova mingi;

Nakosanzola ye liboso ya bato ebele.+

31 Mpo akotɛlɛma na lobɔkɔ ya mobali ya mobola,

Mpo na kobikisa ye na mabɔkɔ ya baoyo bazali kokweisa ye.

Mondule ya Davidi.

110 Yehova alobaki na Nkolo na ngai ete:

“Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali+

Tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.”+

 2 Yehova akotya lingenda na ye ya makasi uta na Siona, na maloba oyo:

“Kende na katikati ya banguna na yo mpe konzá bango.”+

 3 Bato na yo bakomipesa na bolingo na bango moko na mokolo oyo okokamba limpinga ya basoda na yo na etumba.*

Na nkembo mingi ya bosantu,

Ozali na etuluku na yo ya bilenge lokola matangá ya mamwɛ* ya kotana ya ntɔngɔ.

 4 Yehova alapi ndai mpe akobongola makanisi na ye te:*

“Ozali nganga-nzambe libela na libela+

Lokola Melekisedeke!”+

 5 Yehova akozala na lobɔkɔ na yo ya mobali;+

Akobukabuka bakonzi na mokolo ya nkanda na ye.+

 6 Akopesa etumbu na kati ya bikólo;+

Akotondisa mokili na bibembe.+

Akobukabuka nkumu* ya mokili monene.*

 7 Akomɛla* mai ya mokɛli na nzela.

Yango wana akotombola motó na ye likoló.

111 Bósanzola Yah!*+

א [Alef]

Nakosanzola Yehova na motema na ngai mobimba+

ב [Bet]

Na liyangani ya bato ya sembo mpe na lisangá.

ג [Gimel]

 2 Misala ya Yehova ezali minene,+

ד [Dalet]

Baoyo nyonso basepelaka na yango bayekolaka yango.+

ה [He]

 3 Mosala na ye ezali ya nkembo mpe ya lokumu,

ו [Waw]

Mpe bosembo na ye ezali mpo na libela.+

ז [Zayin]

 4 Asalaka ete bákanisa misala na ye ya kokamwa.+

ח [Het]

Yehova azali na ngɔlu mpe na motema mawa.+

ט [Tet]

 5 Apesaka bilei na baoyo babangaka ye.+

י [Yod]

Akanisaka kondimana na ye mpo na libela.+

כ [Kaf]

 6 Amonisá bato na ye misala na ye ya nguya,

ל [Lamed]

Na ndenge apesá bango libula ya bikólo.+

מ [Mem]

 7 Misala ya mabɔkɔ na ye ezali solo mpe bosembo;+

נ [Nun]

Mitindo na ye nyonso ebongi kotyelama motema.+

ס [Samek]

 8 Ebongi kotyelama motema ntango nyonso,* sikoyo mpe mpo na libela;

ע [Ayin]

Esalemi na solo mpe na bosembo.+

פ [Pe]

 9 Apesi bato na ye lisiko.+

צ [Tsade]

Apesi mitindo mpo kondimana na ye eumela libela.

ק [Kof]

Nkombo na ye ezali mosantu mpe nsɔmɔ.+

ר [Resh]

10 Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.+

ש [Sin]

Baoyo nyonso bazali kotosa mitindo na ye* bazalaka na mayele ya kososola.+

ת [Taw]

Lisanzoli na ye ezali mpo na libela.

112 Bósanzola Yah!*+

א [Alef]

Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova,+

ב [Bet]

Oyo asepelaka mingi na mitindo na ye.+

ג [Gimel]

 2 Bana na ye bakozala na nguya na mabele,

ד [Dalet]

Mpe libota ya bato malamu ekopambolama.+

ה [He]

 3 Bomɛngo mpe bozwi ezali na ndako na ye,

ו [Waw]

Mpe bosembo na ye ezali mpo na libela.

ז [Zayin]

 4 Mpo na bato ya sembo angɛngaka lokola pole na molili.+

ח [Het]

Azali na ngɔlu, na motema mawa+ mpe azali sembo.

ט [Tet]

 5 Moto oyo adefisaka na motema mobimba,* makambo na ye etambolaka malamu.+

י [Yod]

Atambwisaka makambo na ye na bosembo.

כ [Kaf]

 6 Akoningana ata moke te.+

ל [Lamed]

Bakokanisa moto ya sembo mpo na libela.+

מ [Mem]

 7 Akobanga nsango ya mabe te.+

נ [Nun]

Motema na ye ezali kimya, azali kotyela Yehova motema.+

ס [Samek]

 8 Motema na ye ekoki koningana te;* azali kobanga te;+

ע [Ayin]

Na nsuka akomona kokwea ya banguna na ye.+

פ [Pe]

 9 Akabi biloko mingi;* apesi babola.+

צ [Tsade]

Bosembo na ye ezali mpo na libela.+

ק [Kof]

Makasi na ye moko* ekotombwama na nkembo.

ר [Resh]

10 Moto mabe akomona mpe akoyoka mpenza nkanda.

ש [Shin]

Akolya mino mpe akonyangwa.

ת [Taw]

Mposa ya bato mabe ekolonga te.+

113 Bósanzola Yah!*

Bópesa ye masanzoli, bino basaleli ya Yehova,

Bósanzola nkombo ya Yehova.

 2 Nkombo ya Yehova esanzolama

Banda sikoyo mpe mpo na libela.+

 3 Banda epai moi ebimaka tii epai elalaka,

Nkombo ya Yehova esanzolama.+

 4 Yehova azali likoló ya bikólo nyonso;+

Nkembo na ye ezali mosika koleka likoló.+

 5 Nani azali lokola Yehova Nzambe na biso,+

Ye oyo afandaka* na likoló?

 6 Akitaka mpo na kotala likoló mpe mabele,+

 7 Atombolaka moto mpamba longwa na putulu.

Abimisaka mobola na ebele ya putulu ya mɔtɔ*+

 8 Mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu,

Esika moko na bankumu ya bato na ye.

 9 Azali kopesa mwasi ekomba ndako,

Mama ya esengo oyo azali na bana.*+

Bósanzola Yah!*

114 Ntango Yisraele ebimaki na Ezipito,+

Ntango bana ya Yakobo bautaki epai ya bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ moko ya bapaya,

 2 Yuda ekómaki esika na ye mosantu,

Yisraele bokonzi na ye.+

 3 Mbu emonaki yango mpe ekimaki;+

Yordani ezongaki nsima.+

 4 Bangomba epumbwaki lokola bampate-mibali,+

Bangomba mike lokola bana-mpate.

 5 Ee mbu, nini esalaki ete okima?+

Ee Yordani, mpo na nini ozongaki nsima?+

 6 Ee bangomba, mpo na nini bopumbwaki lokola bampate-mibali,

Ee bangomba mike, lokola bana-mpate?

 7 Ee mabele, lɛngá mpo na Nkolo,

Mpo na Nzambe ya Yakobo,+

 8 Oyo azali kobongola libanga ekóma etima oyo etondi na matiti,

Libanga ya silekisi na maziba ya mai.+

115 Tobongi na eloko moko te, Ee Yehova, tobongi na eloko moko te,

Kasi pesá nde nkombo na yo nkembo+

Mpo na bolingo na yo ya sembo mpe boyengebene na yo.+

 2 Mpo na nini bikólo eloba:

“Nzambe na bango azali wapi?”+

 3 Nzambe na biso azali na likoló;

Asalaka nyonso oyo alingi.

 4 Bikeko na bango ezali palata mpe wolo,

Esalemi na mabɔkɔ ya moto.+

 5 Ezali na monɔkɔ, kasi elobaka te;+

Ezali na miso, kasi emonaka te;

 6 Ezali na matoi, kasi eyokaka te;

Ezali na zolo, kasi eyokaka nsolo te;

 7 Ezali na mabɔkɔ, kasi esimbaka eloko te;

Ezali na makolo, kasi etambolaka te;+

Ebimisaka ata liloba moko te na mongongo na yango.+

 8 Bato oyo basalaka yango bakokóma lokola yango,+

Ata mpe baoyo nyonso batyelaka yango motema.+

 9 Ee Yisraele, tyelá Yehova motema;+

—Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango.+

10 Ee ndako ya Arona,+ bótyela Yehova motema;

—Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango.

11 Bino baoyo bobangaka Yehova, bótyela Yehova motema+

—Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango.+

12 Yehova akanisi biso lisusu mpe akopambola;

Akopambola ndako ya Yisraele;+

Akopambola ndako ya Arona.

13 Akopambola baoyo babangaka Yehova,

Bato mike ná bato minene.

14 Yehova akokómisa bino ebele,

Bino mpe bana na bino.*+

15 Tiká Yehova apambola bino,+

Ye Mokeli ya likoló ná mabele.+

16 Likoló ezali ya Yehova,+

Kasi mabele, apesá yango bana ya bato.+

17 Bakufi basanzolaka Yah te;+

Ezala mpe moto nyonso oyo azali kokita na liwa.*+

18 Kasi biso, tokosanzola Yah

Banda sikoyo mpe mpo na libela.

Bósanzola Yah!*

116 Nalingaka Yehova

Mpo ayokaka* mongongo na ngai, libondeli* na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.+

 2 Mpo atyaka litoi* na ye epai na ngai,+

Mpe nakobelela ye bomoi na ngai mobimba.*

 3 Bansinga ya liwa ezingaki ngai;

Mpe Nkunda ekangaki ngai.*+

Nazalaki kaka komona mpasi ná mawa.+

 4 Kasi nabelelaki nkombo ya Yehova:+

“Ee Yehova, bikisá ngai!”*

 5 Yehova azali na ngɔlu mpe azali sembo;+

Nzambe na biso azali Nzambe ya motema mawa.+

 6 Yehova azali kobatela baoyo bazangi mayele.+

Makasi na ngai esilaki, mpe ye abikisaki ngai.

 7 Molimo* na ngai epema lisusu,

Mpo Yehova asaleli ngai makambo na boboto.

 8 Obikisi ngai na liwa,

Liso na ngai na mpisoli, lokolo na ngai na libaku.+

 9 Nakotambola liboso ya Yehova na mokili ya bato ya bomoi.

10 Nazalaki na kondima, yango wana nalobaki;+

Nayokaki mpenza mpasi.

11 Ntango nakómaki na nsɔmɔ, nalobaki boye:

“Moto nyonso azali mobuki lokuta.”+

12 Nakofuta Yehova eloko nini

Mpo na bolamu nyonso oyo asalelá ngai?

13 Nakozwa kɔpɔ ya lobiko,*

Mpe nakobelela nkombo ya Yehova.

14 Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova

Liboso ya bato na ye nyonso.+

15 Liwa ya bato ya sembo

Ezali na motuya mingi na miso ya Yehova.+

16 Nabondeli yo, Ee Yehova,

Mpo nazali mosaleli na yo.

Nazali mosaleli na yo, mwana ya moombo na yo ya mwasi.

Ofungoli bansinga na ngai.+

17 Nakopesa yo mbeka ya kozongisa matɔndi;+

Nakobelela nkombo ya Yehova.

18 Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova+

Liboso ya bato na ye nyonso,+

19 Na mapango ya ndako ya Yehova,+

Na kati na yo, Ee Yerusaleme.

Bósanzola Yah!*+

117 Bósanzola Yehova, bino bikólo nyonso;+

Bókumisa ye, bino bato nyonso ya bikólo.*+

 2 Mpo bolingo na ye ya sembo epai na biso ezali monene;+

Bosembo+ ya Yehova ezali mpo na libela.+

Bósanzola Yah!*+

118 Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+

Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

 2 Yisraele aloba sikoyo:

“Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.”

 3 Bato ya ndako ya Arona báloba sikoyo:

“Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.”

 4 Baoyo bazali kobanga Yehova báloba sikoyo:

“Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.”

 5 Ntango nazalaki na mpasi nabelelaki Yah;*

Yah ayanolaki ngai mpe amemaki ngai na esika moko ya libateli.*+

 6 Yehova azali pene na ngai; nakobanga te.+

Moto akoki kosala ngai nini?+

 7 Yehova azali pene na ngai, azali mosungi na ngai;*+

Nakomona kokwea ya baoyo bazali koyina ngai.+

 8 Kokima epai ya Yehova ezali malamu

Koleka kotyela bato motema.+

 9 Kokima epai ya Yehova ezali malamu

Koleka kotyela bankumu motema.+

10 Bikólo nyonso bazingaki ngai,

Kasi na nkombo ya Yehova,

Nabenganaki bango.+

11 Bazingaki ngai, ɛɛ, bazingaki ngai mpenza.

Kasi na nkombo ya Yehova,

Nabenganaki bango.

12 Bazingaki ngai lokola nzoi,

Bakufaki nokinoki lokola mɔtɔ ya banzete ya nzubɛ.

Na nkombo ya Yehova,

Nabenganaki bango.+

13 Batindikaki ngai makasi* mpo nakwea,

Kasi Yehova asalisaki ngai.

14 Yah azali esika na ngai ya komibatela mpe makasi na ngai,

Mpe akómi lobiko na ngai.+

15 Mongongo ya esengo mpe lobiko*

Ezali na bahema ya bato ya sembo.

Lobɔkɔ ya mobali ya Yehova ezali komonisa nguya na yango.+

16 Lobɔkɔ ya mobali ya Yehova etombwani;

Lobɔkɔ ya mobali ya Yehova ezali komonisa nguya na yango.+

17 Nakokufa te, te, nakotikala na bomoi,

Mpo nasakola misala ya Yah.+

18 Yah asembolaki ngai makasi,+

Kasi akabaki ngai na liwa te.+

19 Bófungolela ngai baporte ya bosembo;+

Nakokɔta kuna mpe nakosanzola Yah.

20 Porte ya Yehova yango oyo.

Bato ya sembo bakokɔta kuna.+

21 Nakosanzola yo, mpo oyanolaki ngai+

Mpe okómaki lobiko na ngai.

22 Libanga oyo batongi-ndako babwakaki

Ekómi libanga monene ya ntina mingi ya ndako.*+

23 Yango euti epai ya Yehova;+

Ezali likambo ya kokamwa na miso na biso.+

24 Oyo nde mokolo oyo Yehova asali;

Tokozala na esengo mingi mpe tokosepela na yango.

25 Yehova, bikisá biso, tobondeli yo!

Yehova, salá ete tólonga, tobondeli yo!

26 Ye oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama;+

Topamboli bino uta na ndako ya Yehova.

27 Yehova azali Nzambe;

Apesaka biso pole.+

Ná bitape na mabɔkɔ, bólanda molɔngɔ ya bato oyo bazali kokende na fɛti,+

Tii na maseke ya etumbelo.+

28 Yo ozali Nzambe na ngai, mpe nakosanzola yo;

Nzambe na ngai, nakotombola yo.+

29 Bópesa Yehova matɔndi,+ mpo azali malamu;

Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+

א [Alef]

119 Esengo na bato oyo bazali kotambola na ezaleli ya kozanga mbeba,*

Baoyo batambolaka na mobeko ya Yehova.+

 2 Esengo na baoyo bazali kotosa makundoli na ye,+

Oyo bazali kolukaluka ye na motema na bango mobimba.+

 3 Bazali kosala likambo moko te ya kozanga bosembo;

Batambolaka na banzela na ye.+

 4 Opesá etinda

Ete bátosa mpenza mitindo na yo.+

 5 Soki napikamaka makasi*+

Mpo na kotosa malako na yo!

 6 Boye nalingaki koyoka nsɔni te+

Ntango nataleli mitindo na yo nyonso.

 7 Nakosanzola yo na bosembo ya motema

Ntango nazali koyekola bikateli na yo ya lisambisi ya boyengebene.

 8 Nakobatela malako na yo.

Kosundola ngai ata moke te.

ב [Bet]

 9 Ndenge nini elenge mobali akoki kopɛtola nzela na ye?

Soki amibateli mpe asaleli liloba na yo.+

10 Naluki yo na motema na ngai mobimba.

Kotika te nabunga nzela ya mitindo na yo.+

11 Nabombi liloba na yo malamu mpenza na motema na ngai+

Mpo nasalela yo lisumu te.+

12 Ee Yehova, osanzolama;

Teyá ngai malako na yo.

13 Na mbɛbu na ngai, nasakoli

Bikateli nyonso ya lisambisi oyo olobi.

14 Nasepeli mingi na makundoli na yo+

Koleka biloko mosusu nyonso ya motuya.+

15 Nakokanisa na mozindo* mitindo na yo,+

Mpe nakotala banzela na yo.+

16 Nalingaka mitinda na yo mingi.

Nakobosana liloba na yo te.+

ג [Gimel]

17 Salelá mosaleli na yo makambo na boboto,

Mpo nazala na bomoi mpe nabatela liloba na yo.+

18 Fungolá miso na ngai mpo namona polele

Makambo ya kokamwa oyo euti na mobeko na yo.

19 Nazali kaka moto oyo afandi mopaya na mokili.+

Kobombela ngai mitindo na yo te.

20 Ntango nyonso, natondaka* na mposa makasi

Ya bikateli na yo ya lisambisi.

21 Opameli bato ya lofundo,

Bato oyo balakelami mabe, baoyo batiki mitindo na yo.+

22 Longolá kosɛka mpe lityo liboso na ngai,*

Mpo natosi makundoli na yo.

23 Ata ntango bankumu bafandi elongo mpe balobi mpo na kotɛmɛla ngai,

Mosaleli na yo azali kokanisa na mozindo* malako na yo.

24 Nalingaka makundoli na yo mingi;+

Ezali bapesi-toli na ngai.+

ד [Dalet]

25 Namilalisi na putulu.+

Batelá ngai na bomoi ndenge olobaki.+

26 Nayebisaki yo banzela na ngai, mpe oyanolaki ngai;

Teyá ngai malako na yo.+

27 Salisá ngai nakanga ntina* ya mitindo na yo,

Mpo nakanisa na mozindo* misala na yo ya kokamwa.+

28 Nazangi mpɔngi mpo na mawa.

Pesá ngai makasi ndenge olobaki.

29 Longolá nzela ya lokuta mosika na ngai,+

Mpe moniselá ngai boboto na mobeko na yo.

30 Naponi nzela ya bosembo.+

Nandimi ete bikateli na yo ya lisambisi ebongi mpenza.

31 Nakangami na makundoli na yo.+

Ee Yehova, koyokisa ngai nsɔni te.+

32 Nakolanda mpenza* nzela ya mitindo na yo

Mpo ofungoli motema na ngai mpo na yango.*

ה [He]

33 Ee Yehova, teyá ngai+ nzela ya malako na yo,

Mpe nakotosa yango tii na nsuka.+

34 Pesá ngai mayele,

Mpo natosa mobeko na yo

Mpe nabatela yango na motema na ngai mobimba.

35 Tambwisá ngai na nzela ya mitindo na yo,+

Mpo yango nde esepelisaka ngai.

36 Salá ete motema na ngai elinga makundoli na yo,

Kasi na matomba ya moimi te.+

37 Salisá ngai natala te eloko oyo ezangi ntina;+

Batelá ngai na bomoi na nzela na yo.

38 Kokiselá mosaleli na yo elaka* na yo

Mpo bábanga yo.*

39 Longolá nsɔni oyo nazali kobanga,

Mpo bikateli na yo ya lisambisi ezali malamu.+

40 Talá ndenge nazali na mposa makasi ya mitindo na yo.

Na bosembo na yo, batelá ngai na bomoi.

ו [Waw]

41 Ee Yehova, moniselá ngai bolingo na yo ya sembo,+

Lobiko na yo, na kolanda elaka* na yo;+

42 Boye nakoyanola moto oyo azali kotumola ngai,

Mpo natyeli liloba na yo motema.

43 Kolongola te liloba ya solo na monɔkɔ na ngai,

Mpo natye elikya na* ekateli na yo ya lisambisi.

44 Nakobatela mobeko na yo ntango nyonso,

Libela na libela.+

45 Mpe nakotambolatambola na esika ya libateli,*+

Mpo naluka mitindo na yo.

46 Nakolobela makundoli na yo liboso ya bakonzi,

Mpe nakoyoka nsɔni te.+

47 Nalingaka mitindo na yo mingi,

Ɛɛ, nalingaka yango.+

48 Nakotombola mabɔkɔ na ngai mpo na mitindo na yo oyo nalingá,+

Mpe nakokanisa na mozindo* malako na yo.+

ז [Zayin]

49 Kanisá lisusu liloba olobaki* na mosaleli na yo,

Oyo na nzela na yango opesi ngai elikya.*

50 Yango nde libɔndisi na mpasi na ngai,+

Mpo liloba na yo ebateli ngai na bomoi.

51 Bato ya lofundo basɛki ngai mingi mpenza,

Kasi natiki mobeko na yo te.+

52 Ee Yehova, nakanisi lisusu bikateli na yo ya lisambisi ya kala,+

Mpe yango ebɔndisaka ngai.+

53 Nazali na nkanda makasi mpo na bato mabe,

Oyo basundoli mobeko na yo.+

54 Malako na yo ezali nzembo na ngai

Esika nyonso oyo nafandi.*

55 Ee Yehova, na butu, nakanisaka lisusu nkombo na yo,+

Mpo nabatela mobeko na yo.

56 Namesani kosala bongo

Mpo natosi mitindo na yo.

ח [Het]

57 Yehova azali likabo na ngai;+

Nalaki ete nakobatela maloba na yo.+

58 Nabondeli yo na motema* na ngai mobimba;+

Moniselá ngai boboto na kolanda elaka* na yo.+

59 Natali malamumalamu banzela na ngai,

Mpo nazongisa makolo na ngai na makundoli na yo.+

60 Nasalaki nokinoki, mpe naumelaki te

Mpo na kobatela mitindo na yo.+

61 Bansinga ya bato mabe ezingaki ngai,

Kasi nabosanaka mobeko na yo te.+

62 Na katikati ya butu nalamukaka mpo na kopesa yo matɔndi+

Mpo na bosembo ya bikateli na yo ya lisambisi.

63 Nazali moninga ya baoyo nyonso babangaka yo

Mpe ya baoyo bazali kobatela mitindo na yo.+

64 Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo etondisi mabele;+

Teyá ngai malako na yo.

ט [Tet]

65 Osaleli mosaleli na yo malamu,

Ee Yehova, na kolanda liloba na yo.

66 Teyá ngai bososoli mpe boyebi,+

Mpo natyeli mitindo na yo motema.

67 Liboso namona mpasi, nazalaki kobunga nzela,*

Kasi sikoyo nabateli liloba na yo.+

68 Ozali malamu+ mpe misala na yo ezali malamu.

Teyá ngai malako na yo.+

69 Bato ya lofundo bazali koloba makambo ya lokuta mingi mpo na ngai.

Kasi nakotosa mitindo na yo na motema na ngai mobimba.

70 Motema na bango ezali makasi,*+

Kasi ngai, nalingaka mobeko na yo mingi.+

71 Ezali malamu ndenge namoni mpasi,+

Mpo nayekola malako na yo.

72 Mobeko oyo opesi ezali malamu mpo na ngai,+

Koleka ebele mpenza ya wolo mpe ya palata.+

י [Yod]

73 Mabɔkɔ na yo esalaki ngai, mpe ebongisaki ngai.

Pesá ngai mayele,

Mpo nayekola mitindo na yo.+

74 Baoyo bazali kobanga yo basepelaka ntango bazali komona ngai,

Mpo liloba na yo nde elikya na ngai.*+

75 Ee Yehova, nayebi ete bikateli na yo ya lisambisi ezali sembo+

Mpe lokola ozali sembo, opesi ngai disiplini.+

76 Nabondeli yo, tiká bolingo na yo ya sembo+ ebɔndisa ngai,

Na kolanda elaka* oyo opesaki mosaleli na yo.

77 Moniselá ngai motema mawa, mpo natikala na bomoi,+

Mpamba te nalingaka mobeko na yo mingi.+

78 Bato ya lofundo báyoka nsɔni,

Mpo basali ngai mabe kaka mpamba.*

Kasi nakokanisa na mozindo* mitindo na yo.+

79 Baoyo babangaka yo bázongela ngai,

Baoyo bayebi makundoli na yo.

80 Motema na ngai ezala na mbeba te wana nazali kobatela malako na yo,+

Mpo nayoka nsɔni te.+

כ [Kaf]

81 Nazali* na mposa makasi ya lobiko na yo,+

Mpo liloba na yo nde elikya na ngai.*

82 Miso na ngai ezali na mposa makasi ya liloba na yo+

Wana nazali koloba: “Okobɔndisa ngai ntango nini?”+

83 Mpo nazali lokola molangi ya mposo ya nyama oyo ekauki na milinga,

Kasi nabosani malako na yo te.+

84 Mosaleli na yo asengeli kozela mikolo boni?

Ntango nini okopesa etumbu na baoyo bazali konyokola ngai?+

85 Bato ya lofundo batimoli mabulu mpo na ngai,

Baoyo batosaka mobeko na yo te.

86 Mitindo na yo nyonso ebongi kotyelama motema.

Bato banyokoli ngai kaka mpamba; salisá ngai!+

87 Etikalaki moke mpenza bálongola ngai na mabele,

Kasi nasundolaki mitindo na yo te.

88 Batelá ngai na bomoi mpo na bolingo na yo ya sembo,

Mpo nakoba kobatela makundoli oyo olobaki.

ל [Lamed]

89 Ee Yehova, mpo na libela,

Liloba na yo ekozala na likoló.+

90 Bosembo na yo ezali libota na libota.+

Otɛlɛmisi mabele makasi, mpo ekoba kaka kozala.+

91 Mpo na bikateli na yo ya lisambisi, yango* etikali tii na mokolo ya lelo,

Mpo nyonso esalelaka yo.

92 Soki nalingaka mobeko na yo mingi te,

Mbɛlɛ nakufaki na mpasi na ngai.+

93 Nakobosana ata moke te mitindo na yo,

Mpo na nzela na yango nde obateli ngai na bomoi.+

94 Nazali moto na yo; bikisá ngai,+

Mpo naluki mitindo na yo.+

95 Bato mabe bazali kozela ngai, mpo báboma ngai,

Kasi nazali kotya likebi mingi na makundoli na yo.

96 Namoni ete eloko nyonso ya kokoka ezali na ndelo,

Kasi mitindo na yo ezali na ndelo te.*

מ [Mem]

97 Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza!+

Nakanisaka yango na mozindo* mokolo mobimba.+

98 Mitindo na yo ekómisaka ngai moto ya bwanya koleka banguna na ngai,+

Mpo ezali elongo na ngai mpo na libela.

99 Nakómi na mayele ya kososola mingi koleka bateyi na ngai nyonso,+

Mpo nakanisaka na mozindo* makundoli na yo.

100 Nazali kosala na mayele mingi koleka mikóló,

Mpo natosi mitindo na yo.

101 Naboyi etamboli nyonso ya mabe,+

Mpo nabatela liloba na yo.

102 Natiki te bikateli na yo ya lisambisi,

Mpo yo nde oteyaka ngai.

103 Maloba na yo ezali elɛngi mpenza na lolemo na ngai,

Koleka mafuta ya nzoi na monɔkɔ na ngai!+

104 Mpo na mitindo na yo, nazali kosala makambo na mayele.+

Yango wana nayini nzela nyonso ya lokuta.+

נ [Nun]

105 Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai,

Mpe pole mpo na nzela na ngai.+

106 Nalapi ndai, mpe nakokokisa yango,

Mpo na kobatela bikateli na yo ya lisambisi ya bosembo.

107 Namoni mpasi mpenza.+

Ee Yehova, batelá ngai na bomoi na kolanda liloba na yo.+

108 Nabondeli yo, Ee Yehova, sepelá na makabo ya bolingo ya masanzoli* na ngai,+

Mpe teyá ngai bikateli na yo ya lisambisi.+

109 Bomoi na ngai ezali ntango nyonso na likama;*

Kasi nabosani mobeko na yo te.+

110 Bato mabe batyeli ngai motambo,

Kasi nalongwe te na mitindo na yo.+

111 Nakómisi makundoli na yo eloko na ngai mpo na libela,*

Mpo ezali esengo ya motema na ngai.+

112 Nazwaki ekateli ya kotosa* malako na yo

Ntango nyonso, tii na nsuka.

ס [Samek]

113 Nayini bato ya mitema mibale,*+

Kasi nalingi mobeko na yo.+

114 Ozali esika na ngai ya kobombana mpe nguba na ngai,+

Mpo liloba na yo nde elikya na ngai.*+

115 Bólongwa mosika na ngai, bino bato mabe,+

Mpo natosa mitindo ya Nzambe na ngai.

116 Sungá ngai ndenge olakaki,*+

Mpo natikala na bomoi;

Kotika te ete elikya na ngai ekóma likambo ya kolɛmbisa nzoto.*+

117 Sungá ngai mpo nabika;+

Bongo nakotya likebi ntango nyonso na malako na yo.+

118 Oboyi baoyo nyonso basundoli malako na yo,+

Mpo bazali bakosi mpe bato ya lokuta.

119 Olongoli bato mabe nyonso ya mabele lokola bosɔtɔ.+

Yango wana nalingaka makundoli na yo.

120 Nzoto* na ngai elɛngi na nsɔmɔ na yo;

Nabangi bikateli na yo ya lisambisi.

ע [Ayin]

121 Nasali makambo oyo ezali sembo mpe boyengebene.

Kosundola ngai te epai ya banyokoli na ngai!

122 Pesá mosaleli na yo elaka ete okosalisa ye;

Bato ya lofundo bányokola ngai te.

123 Miso na ngai elɛmbi mpo na kozela lobiko na yo+

Mpe elaka* na yo ya bosembo.+

124 Moniselá mosaleli na yo bolingo na yo ya sembo,+

Mpe teyá ngai malako na yo.+

125 Nazali mosaleli na yo; pesá ngai mayele,+

Mpo nayeba makundoli na yo.

126 Ntango ekoki mpo osala, Ee Yehova,+

Mpo babuki mobeko na yo.

127 Yango wana nalingaka mitindo na yo

Koleka wolo, koleka ata wolo oyo epɛtolami.*+

128 Yango wana, namonaka ete mitinda na yo nyonso ebongi;+

Nayinaka nzela nyonso ya lokuta.+

פ [Pe]

129 Makundoli na yo ezali ya kokamwa.

Yango wana natosaka* yango.

130 Ntango balimboli maloba na yo, epesaka pole,+

Epesaka mayele epai ya bato oyo bazangi yango.+

131 Nafungoli monɔkɔ na ngai polele mpe napemi makasi,*

Mpo nazali na mposa makasi ya mitindo na yo.+

132 Baluká epai na ngai mpe moniselá ngai boboto,+

Na kolanda ekateli na yo ya lisambisi epai ya baoyo balingaka nkombo na yo.+

133 Tambwisá matambe na ngai na kimya* na nzela ya liloba na yo;

Eloko moko te ya mabe ekonza ngai.+

134 Bikisá ngai na banyokoli,

Mpe nakobatela mitindo na yo.

135 Ngɛngiselá mosaleli na yo elongi na yo,+

Mpe teyá ngai malako na yo.

136 Mai ya miso esopani na miso na ngai lokola mikɛli

Mpo bato babateli mobeko na yo te.+

צ [Tsade]

137 Ee Yehova, ozali sembo,+

Mpe bikateli na yo ya lisambisi ezali sembo.+

138 Makundoli oyo opesi ezali sembo

Mpe ebongi mpenza kotyelama motema.

139 Molende na ngai mpo na yo ezali kopela kati na ngai,+

Mpo banguna na ngai babosani maloba na yo.

140 Liloba na yo epɛtolami malamu mpenza,+

Mpe mosaleli na yo alingaka yango.+

141 Nazangi ntina mpe nayinami;+

Kasi, nabosani mitindo na yo te.

142 Bosembo na yo ezali bosembo mpo na libela,+

Mpe mobeko na yo ezali solo.+

143 Atako mpasi mpe mokakatano ezali kosopanela ngai,

Nalingaka mitindo na yo mingi.

144 Bosembo ya makundoli na yo ezali mpo na libela.

Pesá ngai mayele,+ mpo natikala na bomoi.

ק [Kof]

145 Nabeleli na motema na ngai mobimba. Ee Yehova, yanolá ngai.

Nakotosa malako na yo.

146 Nabeleli yo; bikisá ngai!

Nakobatela makundoli na yo.

147 Nalamuki liboso ntɔngɔ etana* mpo nabelela mpe nasɛnga lisalisi.+

Mpo maloba na yo nde elikya na ngai.*

148 Nafungolaka miso na katikati ya butu,*

Mpo nakanisa* liloba na yo na mozindo.+

149 Yoká mongongo na ngai mpo na bolingo na yo ya sembo.+

Ee Yehova, batelá ngai na bomoi na kolanda bosembo na yo.

150 Baoyo bazali na etamboli ya nsɔni* bakómi pene;

Bazali mosika na mobeko na yo.

151 Ee Yehova, ozali pene,+

Mpe mitindo na yo nyonso ezali solo.+

152 Banda kala nayebi ete,

Otyá makundoli na yo mpo eumela libela.+

ר [Resh]

153 Talá mpasi na ngai mpe bikisá ngai,+

Mpo nabosani mobeko na yo te.

154 Sambá likambo na ngai mpe bikisá ngai;+

Batelá ngai na bomoi na kolanda elaka* na yo.

155 Lobiko ezali mosika na bato mabe,

Mpo baluki malako na yo te.+

156 Ee Yehova, motema mawa na yo ezali monene.+

Batelá ngai na bomoi na kolanda bosembo na yo.

157 Banyokoli na ngai mpe banguna na ngai bazali ebele;+

Kasi, natiki makundoli na yo te.

158 Ntango natalaka baoyo basalaka na bokosi, nayokaka bango mpii,

Mpo babatelaka liloba na yo te.+

159 Moná ndenge nalingaka mitindo na yo!

Ee Yehova, batelá ngai na bomoi na kolanda bolingo na yo ya sembo.+

160 Liloba na yo mobimba ezali solo,+

Mpe bikateli na yo nyonso ya lisambisi ya sembo eumelaka mpo na libela.

ש [Sin] to [Shin]

161 Bankumu banyokolaka ngai+ kaka mpamba,

Kasi motema na ngai eyokaka maloba na yo nsɔmɔ.+

162 Nasepelaka mingi na liloba na yo+

Ndenge moto asepelaka ntango amoni biloko mingi oyo bapunzi.

163 Nayinaka lokuta, nayinaka yango mpenza.+

Nalingaka mobeko na yo.+

164 Nasanzolaka yo mbala nsambo na mokolo

Mpo na bikateli na yo ya lisambisi ya sembo.

165 Baoyo balingaka mobeko na yo bazali na kimya mingi;+

Eloko moko te ekoki kobɛtisa bango libaku.*

166 Ee Yehova, natye elikya na misala na yo ya lobiko,

Mpe natosaka mitindo na yo.

167 Nabatelaka* makundoli na yo,

Mpe nalingaka yango mingi mpenza.+

168 Natosaka mitindo na yo mpe makundoli na yo,

Mpo nyonso oyo nasalaka oyebi yango malamu.+

ת [Taw]

169 Ee Yehova, kolela na ngai mpo na kosɛnga lisalisi ekómela yo.+

Pesá ngai mayele oyo euti na liloba na yo.+

170 Kosɛnga na ngai mpo na kondimama ekóma liboso na yo.

Bikisá ngai ndenge olakaki.*

171 Mbɛbu na ngai esopa masanzoli,+

Mpo oteyaka ngai malako na yo.

172 Liloba na yo ekóma loyembo na lolemo na ngai,+

Mpo mitindo na yo nyonso ezali sembo.

173 Lobɔkɔ na yo ezala pene ya kosalisa ngai,+

Mpo naponi kotosa mitindo na yo.+

174 Ee Yehova, nayoki mposa makasi ya lobiko na yo,

Mpe nalingaka mobeko na yo mingi.+

175 Tiká nazala na bomoi mpo nakoka kosanzola yo;+

Bikateli na yo ya lisambisi ezala lisalisi na ngai.

176 Nayengiyengi lokola mpate oyo ebungi.+ Luká mosaleli na yo,

Mpo nabosani mitindo na yo te.+

Loyembo ya ntango ya komata.*

120 Na mpasi na ngai nabelelaki Yehova,+

Mpe ayanolaki ngai.+

 2 Ee Yehova, bikisá ngai* na mbɛbu ya lokuta,

Mpe na lolemo ya bokosi.

 3 Eloko nini Nzambe akosala yo, mpe ndenge nini akopesa yo etumbu,*

Yo lolemo ya bokosi?+

 4 Ná makula oyo epelisami+ ya mobundi-etumba,

Ná makala ya banzete ya retama oyo ezali kopela.+

 5 Mawa na ngai, mpo nafandi mopaya na Mesheke!+

Nazali kofanda na katikati ya bahema ya Kedare.+

 6 Nafandi ntango molai mingi

Ná bato oyo bayinaka kimya.+

 7 Nalingi kimya, kasi soki nalobi,

Bango balingi etumba.

Loyembo ya ntango ya komata.

121 Natomboli miso na ngai na bangomba.+

Lisalisi na ngai ekouta wapi?

 2 Lisalisi na ngai eutaka epai ya Yehova,+

Mokeli ya likoló ná mabele.

 3 Akotika ata moke te ete lokolo na yo esɛlimwa.*+

Ye oyo azali kobatela yo akoyoka mpɔngi ata moke te.

 4 Talá! Akoyoka mpɔngi ata moke te mpe akolala te,

Ye oyo azali kobatela Yisraele.+

 5 Yehova azali kobatela yo.

Yehova azali elili+ na lobɔkɔ na yo ya mobali.+

 6 Na moi, moi ekobɛta yo te,+

Na butu, sanza mpe ekosala yo mabe te.+

 7 Yehova akobatela yo na likambo nyonso ya mabe.+

Akobatela bomoi* na yo.+

 8 Yehova akobatela yo na nyonso oyo ozali kosala*

Banda sikoyo mpe mpo na libela.

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.

122 Nasepelaki ntango balobaki na ngai ete:

“Tókende na ndako ya Yehova.”+

 2 Mpe sikoyo makolo na biso etɛlɛmi

Na baporte na yo, Ee Yerusaleme.+

 3 Yerusaleme etongami lokola engumba

Oyo bandako na yango ekangisami esika moko.+

 4 Mabota emati na engumba yango,

Mabota ya Yah,*

Na kolanda makundoli oyo Nzambe apesaki Yisraele,

Mpo na kopesa matɔndi na nkombo ya Yehova.+

 5 Mpo bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa etyami kuna,+

Bakiti ya bokonzi ya ndako ya Davidi.+

 6 Bósɛnga kimya mpo na Yerusaleme.+

Ee engumba, baoyo bazali kolinga yo bakobatelama.

 7 Kimya ekoba kozala na kati ya bifelo na yo ya makasi,

Kobanga ezala te na bandako milai na yo ya makasi.

 8 Mpo na bandeko na ngai mpe baninga na ngai nakoloba ete:

“Kimya ezala na yo.”

 9 Mpo na ndako ya Yehova Nzambe na biso,+

Nakoluka bolamu na yo.

Loyembo ya ntango ya komata.

123 Natombolaka miso na ngai epai na yo,+

Yo oyo ofandi na kiti ya bokonzi na likoló.

 2 Ndenge miso ya basali etalaka lobɔkɔ ya nkolo na bango,

Mpe ndenge miso ya mosali ya mwasi etalaka lobɔkɔ ya nkolo na ye ya mwasi,

Miso na biso etalaka Yehova Nzambe na biso+

Tii akomonisela biso boboto.+

 3 Ee Yehova, moniselá biso boboto, moniselá biso boboto,

Mpo bato batyoli biso mingi.+

 4 Tosambwisami mpenza epai ya bato oyo bamityelaka motema

Mpe bato ya lofundo batyoli mpenza biso kotyola.

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.

124 “Soki Yehova azalaki na ngámbo na biso te,”+

Yisraele aloba yango sikoyo,

 2 “Soki Yehova azalaki na ngámbo na biso te+

Ntango bato babundisaki biso,+

 3 Mbɛlɛ babomaki biso mpenza,+

Ntango nkanda na bango ezalaki kopelela biso.+

 4 Mbɛlɛ mai ememaki biso,

Mokɛli ezindisaki biso.*+

 5 Mbɛlɛ mai oyo etomboki ezindisaki biso.*

 6 Yehova asanzolama, mpo atikaki te ete

Tózala nyama ya kolya na mino na bango.

 7 Tozali* lokola ndɛkɛ oyo ebiki

Na motambo ya moto oyo atyaka mitambo.+

Motambo ebukani,

Mpe tobiki.+

 8 Lisalisi na biso ezali na nkombo ya Yehova,+

Mokeli ya likoló ná mabele.”

Loyembo ya ntango ya komata.

125 Baoyo batyelaka Yehova motema+

Bazali lokola Ngomba Siona, oyo ekoki koningana te,

Kasi eumelaka mpo na libela.+

 2 Kaka ndenge bangomba ezingi Yerusaleme,+

Yehova mpe azingi bato na ye+

Banda sikoyo mpe mpo na libela.

 3 Bato mabe bakokoba te koyangela bato ya sembo,+

Mpo bato ya sembo bákóma te* kosala mabe+

 4 Ee Yehova, salelá bato malamu makambo ya malamu,+

Bato ya mitema sembo.+

 5 Mpo na baoyo bazali kotika nzela ya Nzambe, mpe kokende na banzela oyo etɛngamá,

Yehova akolongola bango elongo na bato mabe.+

Kimya ezala na Yisraele.

Loyembo ya ntango ya komata.

126 Ntango Yehova azongisaki bato ya Siona oyo bakangamaki,+

Tokanisaki lokola nde tozali kolɔta.

 2 Na ntango yango tosɛkaki makasi,

Mpe lolemo na biso egangaki na esengo.+

Na ntango yango bato ya bikólo balobanaki bango na bango ete:

“Yehova asali makambo ya minene mpo na bango.”+

 3 Yehova asali makambo ya minene mpo na biso.+

Mpe tozali na esengo mingi mpenza.

 4 Ee Yehova, zongisá bato na biso oyo bakangamaki,

Lokola mikɛli ya mai na Negebe.*

 5 Baoyo bazali kolona mboto na mai ya miso

Bakobuka na koganga ya esengo.

 6 Ye oyo abimi, ata na kolela,

Amemi saki oyo etondi na mboto,

Akozonga mpenza na koganga ya esengo,+

Amemi maboke ya matiti ya mbuma ya blé.*+

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Salomo.

127 Soki Yehova atongi ndako te,

Mosala makasi oyo bato basali mpo na kotonga yango ezali kaka mpamba.+

Soki Yehova abateli engumba te,+

Mokɛngɛli akɛngɛli kaka mpamba.

 2 Ezali kaka mpamba ata bolamuki ntɔngɔntɔngɔ,

Ata soki botikali wana tii butu,

Ata soki bozali kosala makasi mpo na kozwa bilei.

Mpo akokisaka mposa ya bato oyo alingaka mpe apesaka bango mpɔngi.+

 3 Talá! Bana bazali libula oyo euti na Yehova;+

Mbuma ya libumu ezali mbano.+

 4 Lokola makula na lobɔkɔ ya mobali ya nguya,

Bana ya bolenge bazali mpe ndenge wana.+

 5 Esengo na mobali oyo atondisi libenga na ye na bango.+

Bakoyokisama nsɔni te,

Mpo bakoloba na banguna na bango na porte ya engumba.

Loyembo ya ntango ya komata.

128 Esengo na moto nyonso oyo abangaka Yehova,+

Oyo atambolaka na banzela na ye.+

 2 Okolya biloko oyo ekouta na mosala makasi ya mabɔkɔ na yo.

Okozala na esengo mpe makambo na yo ekotambola malamu.+

 3 Mwasi na yo akozala lokola nzete ya vinyo oyo ebotaka mingi na kati ya ndako na yo;+

Bana na yo bakozala lokola mwa bitape ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.

 4 Talá! Ndenge wana nde mobali oyo abangaka Yehova akopambwama.+

 5 Yehova akopambola yo uta na Siona.

Mpe moná bolamu ya Yerusaleme mikolo nyonso ya bomoi na yo,+

 6 Mpe moná bana ya bana na yo.

Kimya ezala na Yisraele.

Loyembo ya ntango ya komata.

129 “Babundisaka ngai, banda bolenge na ngai”+

Sikoyo Yisraele aloba:

 2 “Banda bolenge na ngai, batikaka kobundisa ngai te;+

Kasi balongá ngai te.+

 3 Baoyo batimolaka mabele batimoli na mokɔngɔ na ngai;+

Bakómisi banzela ya mikala na bango milai.”

 4 Kasi Yehova azali sembo.+

Akati bansinga ya bato mabe.+

 5 Bakoyoka nsɔni mpe bakozonga nsima mpo na kosambwa,

Baoyo nyonso bazali koyina Siona.+

 6 Bakokóma lokola matiti oyo ebimaka na bansamba,

Oyo ekaukaka liboso elongolama,

 7 Oyo ekoki te kotondisa lobɔkɔ ya mobuki mbuma,

Ata mpe mabɔkɔ ya moto oyo akangisaka matiti mabokemaboke.

 8 Baleki-nzela bakoloba te ete:

“Lipamboli ya Yehova ezala likoló na bino,

Topamboli bino na nkombo ya Yehova.”

Loyembo ya ntango ya komata.

130 Ee Yehova, nabeleli yo uta na bisika ya mozindo.+

 2 Ee Yehova, yoká mongongo na ngai.

Litoi na yo etya likebi na libondeli* na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.

 3 Soki otalaka* kaka mabunga, Ee Yah,*

Ee Yehova, nani akotɛlɛma?+

 4 Kasi olimbisaka mpenza,+

Mpo bázala na nsɔmɔ na* yo.+

 5 Natyelaka Yehova elikya, natyaka elikya na ngai mobimba* epai na ye,

Nazeli liloba na ye.

 6 Nazeli* Yehova na mposa makasi+

Koleka ndenge basinzili bazelaka ntɔngɔ,+

Ɛɛ koleka ndenge basinzili bazelaka ntɔngɔ.

 7 Yisraele akoba kozela Yehova.

Mpo Yehova azali sembo na bolingo na ye,+

Mpe azali na nguya mingi ya kosikola.

 8 Akosikola Yisraele na mabunga na ye nyonso.

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.

131 Ee Yehova, motema na ngai ezali na lolendo te,

Miso na ngai emitomboli mpe te;+

Nazali koluka mpe makambo mineneminene te,+

Mpe nazali koluka te makambo oyo eleki ngai.

 2 Kutu nabɔndisi molimo na ngai* mpe nafandisi yango kimya+

Lokola mwana oyo mama na ye atiki komɛlisa ye mabɛlɛ.

Nazali* na eloko ya kosala te lokola mwana oyo batiki komɛlisa mabɛlɛ.

 3 Yisraele azela Yehova+

Banda sikoyo mpe mpo na libela.

Loyembo ya ntango ya komata.

132 Ee Yehova, kanisá Davidi,

Mpe mpasi na ye nyonso;+

 2 Ndenge alapelaki Yehova ndai,

Ndenge asalaki elako epai ya Moto ya Nguya ya Yakobo:+

 3 “Nakokɔta te na hema na ngai, ndako na ngai.+

Nakolala te na kiti na ngai ya mpɔngi, mbeto na ngai,

 4 Nakotika te ete miso na ngai ekangama,

Mpe nakolala te,

 5 Tii nakozwela Yehova esika,

Esika ya kofanda ya kitoko* mpo na Moto ya Nguya ya Yakobo.”+

 6 Talá! Toyoki yango na Efrata;+

Tomoni yango na zamba.+

 7 Tókɔta na esika na ye ya kofanda;*+

Tógumbama na ebonga ya makolo na ye.+

 8 Tɛlɛmá, Ee Yehova, oya na esika na yo ya kopema,+

Yo ná Sanduku ya bokasi na yo.+

 9 Banganga-nzambe na yo bálata bosembo,*

Mpe bato na yo ya sembo báganga na esengo.

10 Mpo na Davidi mosaleli na yo,

Koboya te* moto na yo oyo atyami mafuta.+

11 Yehova alapeli Davidi ndai,

Ya solo akobongola liloba na ye te:

“Nakotya moko ya bato ya libota na yo*

Na kiti na yo ya bokonzi.+

12 Soki bana na yo babateli kondimana na ngai

Mpe makundoli na ngai oyo nazali koteya bango,+

Bana na bango mpe bakofanda

Na kiti na yo ya bokonzi mpo na libela.”+

13 Yehova aponá Siona;+

Asepelá na yango mpo ezala esika na ye ya kofanda:+

14 “Oyo nde esika na ngai ya kopema mpo na libela;

Nakofanda awa,+ mpo nasepeli na yango.

15 Nakopambola mpenza biloko na yango ya kolya.

Nakopesa mpenza babola na yango mampa.+

16 Nakolatisa banganga-nzambe na yango lobiko;+

Mpe bato na yango ya sembo bakoganga mpenza na esengo.+

17 Kuna nakobakisa makasi* ya Davidi.

Nabongisi mwinda mpo na moto na ngai oyo atyami mafuta.+

18 Nakolatisa banguna na ye nsɔni;

Kasi motole oyo ezali na motó na ye, ekongɛnga.”+

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.

133 Talá! Ezali mpenza malamu mpe esengo

Ete bandeko báfanda na bomoko!+

 2 Ezali lokola mafuta ya kitoko oyo basopi na motó,+

Oyo ezali kokita na mandefu,

Mandefu ya Arona,+

Oyo ezali kokita tii na nkingo ya bilamba na ye.

 3 Ezali lokola mamwɛ* ya Heremone+

Oyo ezali kokita likoló ya bangomba ya Siona.+

Esika oyo Yehova apesaki mitindo ete lipamboli ezala,

Bomoi ya seko.

Loyembo ya ntango ya komata.

134 Bósanzola Yehova,

Bino nyonso, basaleli ya Yehova,+

Bino baoyo botɛlɛmaka na ndako ya Yehova na butu.+

 2 Bózala basantu ntango bozali kotombola mabɔkɔ na bino+

Mpe bósanzola Yehova.

 3 Yehova, mokeli ya likoló ná mabele,

Apambola bino uta na Siona.

135 Bósanzola Yah!*

Bósanzola nkombo ya Yehova,

Bópesa masanzoli, bino basaleli ya Yehova,+

 2 Bino baoyo botɛlɛmaka na ndako ya Yehova,

Na mapango ya ndako ya Nzambe na biso.+

 3 Bósanzola Yah, mpo Yehova azali malamu.+

Bóyemba mpo na kosanzola* nkombo na ye, mpo esepelisaka.

 4 Mpamba te Yah aponá Yakobo mpo na ye moko,

Yisraele mpo azala eloko na ye ya motuya.+

 5 Mpo nayebi malamu ete Yehova azali monene,

Nkolo na biso aleki mosika mpenza banzambe mosusu nyonso.+

 6 Yehova asalaka nyonso oyo asepeli kosala+

Na likoló mpe na mabele, na mbu mpe na bisika nyonso ya mozindo.

 7 Asalaka ete mapata* emata uta na nsuka nyonso ya mabele;

Atindaka mokalikali nzela moko na mbula;*

Abimisaka mopɛpɛ na bandako na ye ya kobomba biloko,+

 8 Abomaki bana ya liboso ya Ezipito,

Moto ná nyama.+

 9 Asalaki bilembo ná makamwisi epai na yo, Ee Ezipito,+

Asalaki yango liboso ya Farao mpe ya basaleli na ye nyonso;+

10 Abɛtaki bikólo ebele+

Mpe abomaki bakonzi ya nguya,+

11 Sihone mokonzi ya Baamore,+

Oge mokonzi ya Bashane,+

Mpe makonzi nyonso ya Kanana.

12 Apesaki mokili na bango lokola libula,

Libula epai ya Yisraele bato na ye.+

13 Ee Yehova, nkombo na yo eumelaka mpo na libela.

Ee Yehova, lokumu* na yo eumelaka libota na libota.+

14 Mpo Yehova akosamba likambo ya bato na ye,+

Mpe akoyokela basaleli na ye mawa.+

15 Bikeko ya bikólo ezali palata mpe wolo,

Esalemi na mabɔkɔ ya moto.+

16 Ezali na monɔkɔ, kasi elobaka te;+

Ezali na miso, kasi emonaka te;

17 Ezali na matoi, kasi eyokaka te.

Mpe zolo na yango ezali na mpema te.+

18 Bato oyo basalaka yango bakokóma lokola yango,+

Ata mpe baoyo nyonso batyelaka yango motema.+

19 Ee ndako ya Yisraele, bósanzola Yehova.

Ee ndako ya Arona, bósanzola Yehova.

20 Ee ndako ya Levi, bósanzola Yehova.+

Bino baoyo bobangaka Yehova, bósanzola Yehova.

21 Yehova asanzolama uta na Siona,+

Ye oyo afandi na Yerusaleme.+

Bósanzola Yah!+

136 Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+

Bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+

 2 Bópesa Nzambe ya banzambe matɔndi,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

 3 Bópesa Nkolo ya bankolo matɔndi,

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

 4 Ye moko nde asalaka makambo minene ya kokamwa,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+

 5 Ye asalaki likoló na mayele mpenza,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

 6 Atandaki mabele likoló ya mai,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

 7 Asalaki bingɛngiseli minene,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,

 8 Moi mpo eyangela na moi,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,

 9 Sanza mpe minzoto mpo engɛnga na butu,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

10 Abɛtaki bana ya liboso ya Ezipito,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

11 Abimisaki Yisraele kati na bango,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,

12 Na nguya ya lobɔkɔ na ye+ mpe lobɔkɔ oyo esembolami,

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

13 Akabolaki Mbu Motane na biteni mibale,*+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

14 Alekisaki Yisraele na katikati na yango,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

15 Abwakaki Farao mpe limpinga ya basoda na ye na Mbu Motane,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

16 Atambwisaki bato na ye na esobe,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

17 Abomaki bakonzi minene,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

18 Abomaki bakonzi ya nguya,

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,

19 Sihone+ mokonzi ya Baamore,

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,

20 Mpe Oge+ mokonzi ya Bashane,

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

21 Apesaki mokili na bango lokola libula,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko,

22 Libula epai ya Yisraele mosaleli na ye,

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

23 Akanisaki biso lisusu ntango tonyokwamaki na makanisi,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.+

24 Akobaki kobikisa biso na mabɔkɔ ya banguna na biso,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

25 Apesaka ekelamu nyonso ya bomoi* bilei,+

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

26 Bópesa Nzambe ya likoló matɔndi,

Mpo bolingo na ye ya sembo ezali seko na seko.

137 Tofandaki pene ya bibale ya Babilone.+

Tolelaki ntango tokanisaki Siona.+

 2 Na banzete ya arava oyo ezalaki na katikati na yango,*

Tokakisaki banzɛnzɛ na biso.+

 3 Mpo kuna, baoyo bakangaki biso basɛngaki tóyembela bango,+

Baoyo bazalaki kosɛka biso bazalaki na mposa ya kosepela:

“Bóyembela biso loyembo moko ya Siona.”

 4 Ndenge nini tokoki koyemba loyembo ya Yehova

Na mabele ya bapaya?

 5 Ee Yerusaleme, soki nabosani yo,

Lobɔkɔ na ngai ya mobali ebosana mosala na yango.*+

 6 Soki nakanisi yo te,

Soki namoni te ete Yerusaleme ezali na ntina mingi koleka

Biloko mosusu oyo esepelisaka ngai,

Tiká lolemo na ngai ekangama na monɔkɔ na ngai.+

 7 Ee Yehova, kanisá oyo Baedome balobaki,

Mokolo oyo Yerusaleme ekweaki:

“Bóbuka yango! Bóbuka yango tii na moboko na yango!”+

 8 Ee mwana mwasi ya Babilone, oyo mosika te akobebisama,+

Esengo na ye oyo akofuta yo

Mpo na ndenge oyo osalaki biso.+

 9 Esengo na ye oyo akokanga bana na yo

Mpe akobukabuka bango na mabanga.+

Ya Davidi.

138 Nakosanzola yo na motema na ngai mobimba.+

Liboso ya banzambe mosusu,

Nakoyemba mpo na kosanzola yo.*

 2 Nakogumbama, natali na ngámbo ya tempelo* na yo mosantu,+

Mpe nakosanzola nkombo na yo+

Mpo na bolingo na yo ya sembo mpe bosembo na yo.

Mpo okumisi liloba na yo mpe nkombo na yo koleka eloko mosusu nyonso.*

 3 Na mokolo oyo nabengaki yo,+ oyanolaki ngai;

Opesaki ngai mpiko* mpe makasi.+

 4 Bakonzi nyonso ya mabele bakosanzola yo, Ee Yehova,+

Mpo bakoyoka bilaka nyonso oyo opesaki.

 5 Bakoyemba mpo na banzela ya Yehova,

Mpo nkembo ya Yehova ezali monene.+

 6 Atako Yehova atombwami, atyelaka moto ya komikitisa likebi,+

Kasi moto ya lolendo, ayebaka ye kaka na mosika.+

 7 Ata soki natamboli na kati ya likama, okobatela ngai na bomoi.+

Mpo na nkanda ya banguna na ngai, okosembola lobɔkɔ na yo;

Lobɔkɔ na yo ya mobali ekobikisa ngai.

 8 Yehova akosala makambo nyonso mpo na bolamu na ngai.

Ee Yehova, bolingo na yo ya sembo ezali seko na seko;+

Kosundola misala ya mabɔkɔ na yo te.+

Mpo na mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

139 Ee Yehova, otalitali ngai, mpe oyebi ngai.+

 2 Oyebi ntango nafandi mpe ntango natɛlɛmi.+

Uta na mosika oyebi malamu makanisi na ngai.+

 3 Otali ngai* ntango nazali kosala mobembo mpe ntango nazali kolala;

Oyebi malamu banzela na ngai nyonso.+

 4 Ee Yehova, osili koyeba makambo oyo nakoloba

Liboso kutu naloba.+

 5 Ozingi ngai na nsima mpe na liboso;

Mpe otye lobɔkɔ na yo likoló na ngai.

 6 Nakoki ata moke te kososola boyebi ya boye.*

Eleki likoló mingi, nakoki kokóma kuna te.+

 7 Epai wapi nakoki kokima elimo na yo,

Mpe epai wapi nakoki kokima elongi na yo?+

 8 Soki namati na likoló, ozali kuna,

Mpe soki natye mbeto na ngai na Nkunda,* talá! ozali kuna.+

 9 Soki napumbwe na mapapu wana ntɔngɔ ezali kotana

Mpo nafanda na mbu ya mosika koleka,

10 Ata kuna, lobɔkɔ na yo ekokamba ngai

Mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekosimba ngai.+

11 Soki nalobi: “Ya solo mpenza molili ekozipa ngai!”

Na ntango yango butu ekokóma pole zingazinga na ngai.

12 Ata molili ekozala makasi mpenza te mpo na yo,

Kasi butu ekongɛnga lokola moi;+

Mpo na yo molili ná pole ezali ndenge moko.+

13 Mpo osalaki bangɛi na ngai;

Ozipaki* ngai na libumu ya mama na ngai.+

14 Nazali kosanzola yo mpo nasalemi na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ.+

Misala na yo ezali ya kokamwa,+

Nayebi yango malamu mpenza.

15 Mikuwa na ngai ebombanaki na miso na yo te

Ntango nasalemaki na nkuku,

Ntango nalitamaki lokola elamba na mozindo mpenza ya mabele.+

16 Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki;

Biteni na yango nyonso ekomamaki na buku na yo

Na kolanda mikolo oyo yango esalemaki,

Liboso ata eteni na yango moko ezala.

17 Mpo na ngai, makanisi na yo ezali na motuya mingi mpenza!+

Ee Nzambe, motángo na yango nyonso ezali monene mpenza!+

18 Soki nameki kotánga yango, ekoleka kutu bambuma ya zɛlo.+

Ntango nalamuki, nazali kaka elongo na yo.*+

19 Ee Nzambe, soki obomaka ata bato mabe!+

Mbɛlɛ bato ya mobulu* batiki ngai,

20 Baoyo balobelaka yo makambo na likanisi mabe;

Bazali banguna na yo, oyo bazwaka nkombo na yo na lisɛki.+

21 Ee Yehova, nayinaka nde te baoyo bazali koyina yo,+

Mpe nayokaka mabe mpenza* te mpo na baoyo bazali kotombokela yo?+

22 Nayinaka bango mpenza;+

Bakómá mpenza banguna na ngai.

23 Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai.+

Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai.+

24 Moná soki kati na ngai ezali na nzela moko oyo eyokisaka mpasi,+

Mpe tambwisá ngai+ na nzela ya seko.

Mpo na mokambi ya nzembo. Mondule ya Davidi.

140 Ee Yehova, bikisá ngai na bato mabe;

Batelá ngai na bato ya misala ya mobulu,+

 2 Baoyo bakani kosala makambo mabe na mitema na bango+

Mpe babimisaka matata mokolo mobimba.

 3 Bapelisi lolemo na bango lokola ya nyoka;+

Ngɛngɛ ya etupa ezali na nse ya mbɛbu na bango.+ (Sela)

 4 Ee Yehova, batelá ngai na mabɔkɔ ya moto mabe;+

Bikisá ngai na mabɔkɔ ya bato ya mobulu,

Baoyo bakani kotyela ngai motambo.

 5 Bato ya lolendo batyeli ngai motambo;

Basaleli bansinga mpo na kotanda monyama na nzela.+

Batyeli ngai mitambo.+ (Sela)

 6 Nayebisi Yehova ete: “Ozali Nzambe na ngai.

Ee Yehova, yoká libondeli* na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.”+

 7 Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, Mobikisi na ngai ya makasi,

Obateli motó na ngai na mokolo ya etumba.+

 8 Ee Yehova, kotika te ete bamposa ya moto mabe ekokisama.

Kotika te ete likita na bango elonga, mpo bámitombola te.+ (Sela)

 9 Mitó ya baoyo bazali kozinga ngai

Ezipama na makambo mabe oyo ebimi na mbɛbu na bango.+

10 Makala ya mɔtɔ esopanela bango lokola mbula.+

Bábwaka bango na mɔtɔ,

Na mabulu mozindo,*+ mpo bákoka kotɛlɛma lisusu te.

11 Moto oyo akoselaka bato makambo azala na esika te na mabele.*+

Mabe elandalanda bato ya mobulu mpe ebɛta bango.

12 Nayebi ete Yehova akosamba likambo ya moto mpamba

Mpe akokata na bosembo likambo ya mobola.+

13 Ya solo, bato ya sembo bakopesa nkombo na yo matɔndi;

Bato ya makambo alima bakofanda liboso ya elongi na yo.*+

Mondule ya Davidi.

141 Ee Yehova, nabeleli yo.+

Yaká noki kosalisa ngai.+

Tyá likebi ntango nazali kobelela yo.+

 2 Libondeli na ngai ebongisama lokola mpaka ya malasi+ liboso na yo,+

Mabɔkɔ na ngai etombwami lokola likabo ya mbuma* ya mpokwa.+

 3 Ee Yehova, tyelá monɔkɔ na ngai mokɛngɛli,

Tyá sinzili na porte ya mbɛbu na ngai.+

 4 Kotika te ete nazala na mposa ya kosala mabe,+

Mpo napesa mabɔkɔ te na makambo ya mabe elongo na bato mabe;

Nalingi ata moke te kolya biloko na bango ya kitoko.

 5 Soki moto ya sembo abɛti ngai, ekozala elembo ya bolingo ya sembo;+

Soki apameli ngai, ekozala lokola mafuta na motó na ngai,+

Oyo motó na ngai ekoboya te.+

Ata na ntango ya bampasi na ye nakokoba kobondela mpo na ye.

 6 Atako basambisi na bango babwakami uta na ngomba ya libanga tii na nse,

Bato bakotya likebi na maloba na ngai mpo esepelisaka.

 7 Kaka ndenge babalolaka mabele mpe bapanzaka yango,

Mikuwa na biso mpe epanzani na monɔkɔ ya Nkunda.*

 8 Kasi, miso na ngai ezali kotala epai na yo, Ee Yehova, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+

Nakimi epai na yo.

Koboma ngai te.*

 9 Batelá ngai na motambo oyo batyeli ngai,

Na mitambo ya bato oyo basalaka mabe.

10 Bato mabe bakokwea bango nyonso na minyama na bango moko+

Kasi ngai nakoleka kozanga likama.

Maskile.* Libondeli ya Davidi, ntango azalaki na mobenga.+

142 Na mongongo na ngai, nabelelaka Yehova mpo na kosɛnga lisalisi;+

Na mongongo na ngai, nabondelaka Yehova mpo amonisela ngai boboto.

 2 Nasopaka motungisi na ngai liboso na ye;

Nayebisaka ye mpasi na ngai+

 3 Ntango elimo* na ngai elɛmbaki na kati na ngai.

Bongo otalaki nzela na ngai.+

Na nzela oyo nazali kotambola,

Babombeli ngai motambo.

 4 Talá na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe moná

Ete moto moko te azali kotyela ngai likebi.*+

Nazali na esika ya kokima te;+

Moto moko te azali komitungisa mpo na ngai.*

 5 Ee Yehova, nazali kobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi.

Nalobi ete: “Ozali esika na ngai ya kokima,+

Nyonso nazali na yango na mokili ya bato ya bomoi.”

 6 Tyá likebi na koganga na ngai mpo na kosɛnga lisalisi,

Mpo natungisami makasi mpenza.

Bikisá ngai na banyokoli na ngai,+

Mpo bazali makasi mingi koleka ngai.

 7 Bimisá ngai na kasho

Mpo nasanzola nkombo na yo.

Bato ya sembo báyangana zingazinga na ngai

Mpo osaleli ngai makambo na boboto.

Mondule ya Davidi.

143 Ee Yehova, yoká libondeli na ngai;+

Yoká lilɔmbɔ na ngai mpo na kosɛnga lisalisi.

Na bosembo na yo mpe na boyengebene na yo, yanolá ngai.

 2 Mpe kosamba na mosaleli na yo te,

Mpo moto moko te ya bomoi akoki kozala sembo liboso na yo.+

 3 Mpo monguna alandi ngai;

Anyatinyati bomoi na ngai na mabele.

Asali ete nafanda na esika ya molili lokola baoyo bakufá kala.

 4 Makasi* na ngai ezali kosila;+

Motema na ngai etungisami.+

 5 Nakanisi mikolo ya kalakala;

Namanyoli mosala na yo nyonso;+

Nakanisi na mozindo mpenza* mosala ya mabɔkɔ na yo.

 6 Natandi mabɔkɔ na ngai epai na yo;

Nazali lokola mokili ekauká oyo ezali kozela yo opesa yango mai.+ (Sela)

 7 Ee Yehova, yanolá ngai nokinoki;+

Makasi* na ngai ekómi na nsuka.+

Kobombela ngai elongi na yo te,+

Soki te nakokóma lokola baoyo bazali kokita na libulu.*+

 8 Na ntɔngɔ, lakisá ngai bolingo na yo ya sembo,

Mpo natyeli yo motema.

Salá ete nayeba nzela oyo nazali kotambola,+

Mpo nabaluki epai na yo.*

 9 Ee Yehova, bikisá ngai na banguna na ngai.

Nazali koluka libateli epai na yo.+

10 Teyá ngai ndenge ya kosala mokano na yo,+

Mpo ozali Nzambe na ngai.

Elimo na yo ezali malamu;

Ekamba ngai na mokili ya bosembo.

11 Mpo na nkombo na yo, Ee Yehova, batelá ngai na bomoi.

Na bosembo na yo, bikisá ngai na mpasi.+

12 Mpo na bolingo na yo ya sembo, sukisá banguna na ngai;*+

Bebisá baoyo nyonso bazali kotungisa ngai,+

Mpo nazali mosaleli na yo.+

Ya Davidi.

144 Yehova Libanga na ngai+ asanzolama,

Ye oyo ateyaka ngai mpo na kobunda,

Mpe abongisaka ngai mpo na etumba.+

 2 Azali bolingo ya sembo na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai,

Esika na ngai ya kokima mpe Mobikisi na ngai,

Nguba na ngai mpe Moto oyo nakimi epai na ye,+

Ye oyo azali kotya bato ya bikólo na nse na ngai.+

 3 Ee Yehova, moto azali nani mpo okanisa ye,

Mwana ya moto, mowei mpamba mpo otyela ye likebi?+

 4 Moto azali lokola mwa mopɛpɛ;+

Mikolo na ye ezali lokola elili oyo ezali koleka.+

 5 Ee Yehova, kitisá likoló na yo mpe kitá;+

Simbá bangomba mpe salá ete ebimisa milinga.+

 6 Tindá mikalikali mpe panzá banguna;+

Bɛtá makula na yo mpe tyá bango na mobulu.+

 7 Sembolá mabɔkɔ na yo uta na likoló;

Bikisá ngai mpe batelá ngai na mai oyo ezali kotomboka,

Na lobɔkɔ ya bapaya,+

 8 Baoyo monɔkɔ na bango elobaka lokuta

Mpe baoyo batombolaka lobɔkɔ na bango ya mobali mpo na kolapa ndai na likambo oyo ezali lokuta.*

 9 Ee Nzambe, nakoyembela yo loyembo ya sika.+

Nakoyemba mpo na kosanzola* yo na ebɛtɛlo ya nsinga zomi,

10 Mpo na Ye oyo alongisaka bakonzi,*+

Ye oyo abikisaka mosaleli na ye Davidi na mopanga oyo ebomaka mpenza.+

11 Bikisá ngai mpe batelá ngai na mabɔkɔ ya bapaya,

Baoyo monɔkɔ na bango elobaka lokuta

Mpe baoyo batombolaka lobɔkɔ na bango ya mobali mpo na kolapa ndai na likambo oyo ezali lokuta.

12 Bongo bana na biso ya mibali bakozala lokola milona oyo ekolaka mbangu,

Bana na biso ya basi lokola makonzí oyo basalá na matumu ya ndako ya mokonzi.

13 Bibombelo na biso ekotonda na biloko ndenge na ndenge;

Bitonga na bilanga na biso ekobakisama; ekokóma bankóto, bankóto zomi.

14 Bangɔmbɛ na biso oyo ezali na zemi ekozwa likama te mpe zemi na yango ekosopana te;

Koganga ya mpasi ekozala te na bisika na biso ya minene ya bato nyonso.

15 Esengo na bato oyo ezali bongo mpo na bango!

Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!+

Lisanzoli ya Davidi.

א [Alef]

145 Ee Nzambe na ngai Mokonzi, nakokumisa yo,+

Nakosanzola nkombo na yo libela na libela.+

ב [Bet]

 2 Nakosanzola yo mokolo mobimba;+

Nakosanzola nkombo na yo libela na libela.+

ג [Gimel]

 3 Yehova azali monene mpe abongi mpenza kosanzolama;+

Bonene na ye ekoki kososolama te.*+

ד [Dalet]

 4 Libota nsima ya libota ekosanzola misala na yo;

Bakolobela misala na yo ya nguya.+

ה [He]

 5 Nakomanyola nkembo mpe lokumu na yo+

Mpe makambo etali misala na yo ya kokamwa.

ו [Waw]

 6 Bakolobela misala* na yo ya nsɔmɔ,

Mpe nakosakola bonene na yo.

ז [Zayin]

 7 Bakotonda na maloba ya masanzoli ntango bakokanisa bolamu oyo otondi na yango,+

Mpe bakoganga na esengo mpo na bosembo na yo.+

ח [Het]

 8 Yehova azali na ngɔlu mpe na motema mawa,+

Ayokaka nkanda noki te mpe atondi na bolingo ya sembo.+

ט [Tet]

 9 Yehova azali malamu epai ya bikelamu na ye nyonso,+

Mpe motema mawa na ye emonanaka polele na misala na ye nyonso.

י [Yod]

10 Ee Yehova, misala na yo nyonso ekokumisa yo,+

Mpe bato na yo ya sembo bakosanzola yo.+

כ [Kaf]

11 Bakosakola nkembo ya bokonzi na yo+

Mpe bakolobela nguya na yo,+

ל [Lamed]

12 Mpo na koyebisa bato misala na yo ya nguya+

Mpe bonene ya nkembo ya bokonzi na yo.+

מ [Mem]

13 Bokonzi na yo ezali bokonzi ya seko,

Mpe boyangeli na yo eumelaka mabota na mabota.+

ס [Samek]

14 Yehova asalisaka baoyo nyonso bazali kokwea+

Mpe atombolaka baoyo nyonso bagumbami.+

ע [Ayin]

15 Miso ya bikelamu nyonso etalaka na elikya epai na yo;

Opesaka bango bilei na ntango ebongi.+

פ [Pe]

16 Ofungolaka lobɔkɔ na yo

Mpe okokisaka mposa ya ekelamu nyonso ya bomoi.+

צ [Tsade]

17 Yehova azali moyengebene na banzela na ye nyonso+

Mpe sembo na likambo nyonso oyo asalaka.+

ק [Kof]

18 Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye,+

Na baoyo nyonso babelelaka ye na bosolo.+

ר [Resh]

19 Akokisaka mposa ya baoyo bazali kobanga ye;+

Ayokaka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi, mpe abikisaka bango.+

ש [Shin]

20 Yehova abatelaka baoyo nyonso balingaka ye,+

Kasi akosilisa bato mabe nyonso nyɛɛ.+

ת [Taw]

21 Nakosanzola Yehova;*+

Ekelamu nyonso ya bomoi* esanzola nkombo na ye mosantu libela na libela.+

146 Bósanzola Yah!*+

Tiká nasanzola* Yehova.+

 2 Nakosanzola Yehova bomoi na ngai mobimba.

Nakoyemba mpo na kosanzola* Nzambe na ngai ntango nyonso oyo nakozala na bomoi.

 3 Bótyela bankumu motema te

To mwana ya moto, mpo akoki kobikisa te.+

 4 Elimo* na ye ekobima, akozonga na mabele;+

Kaka na mokolo yango makanisi na ye ekufi.+

 5 Esengo na moto oyo Nzambe ya Yakobo azali mosungi na ye,+

Oyo elikya na ye ezali epai ya Yehova Nzambe na ye,+

 6 Mokeli ya likoló ná mabele,

Ya mbu, mpe ya nyonso oyo ezali na kati na yango,+

Ye oyo azalaka ntango nyonso sembo,+

 7 Ye oyo akataka na bosembo likambo ya bato oyo babubi bango,

Ye oyo apesaka limpa na bato oyo bazali na nzala.+

Yehova azali kobimisa bakangami.*+

 8 Yehova afungolaka miso ya bato oyo bakufá miso;+

Yehova atombolaka bato oyo bagumbami;+

Yehova alingaka bato ya sembo.

 9 Yehova abatelaka bato oyo bafandi bapaya;

Asalisaka mwana oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá,+

Kasi abebisaka mikano ya bato mabe.*+

10 Yehova akozala Mokonzi mpo na seko,+

Nzambe na yo, Ee Siona, mpo na libota na libota.

Bósanzola Yah!*

147 Bósanzola Yah!*

Ezali malamu koyemba mpo na kosanzola* Nzambe na biso;

Ezali esengo mpe ebongi kosanzola ye!+

 2 Yehova azali kotonga Yerusaleme;+

Azali kosangisa bato ya Yisraele oyo bapalanganá.+

 3 Abikisaka baoyo bazoki na motema;

Akangaka bampota na bango.

 4 Atángaka motángo ya minzoto;

Abengaka yango nyonso na nkombo na yango.+

 5 Nkolo na biso azali monene mpe na nguya mingi;+

Mayele na ye ezali na nsuka te.+

 6 Yehova atombolaka bato ya komikitisa,+

Kasi abwakaka bato mabe na mabele.

 7 Bóyembela Yehova nzembo ya matɔndi;

Bóyemba mpo na kosanzola Nzambe na biso na nzɛnzɛ,

 8 Ye oyo azipaka likoló na mapata,

Ye oyo anɔkisaka mbula na mabele,+

Ye oyo asalaka ete matiti ebima+ na bangomba.

 9 Apesaka banyama bilei,+

Bana ya yanganga* oyo ezali kobelela mpo na yango.+

10 Esengo na ye eutaka na nguya ya mpunda te;+

Makasi ya makolo ya moto ekamwisaka ye te.+

11 Yehova asepelaka na baoyo babangaka ye,+

Na baoyo bazelaka bolingo na ye ya sembo.+

12 Ee Yerusaleme, kumisá Yehova.

Ee Siona, sanzolá Nzambe na yo.

13 Akómisaka bikangiseli ya baporte na yo makasi;

Apambolaka bana na yo.

14 Atyaka kimya na teritware na yo;+

Atondisaka yo na mbuma ya blé oyo eleki malamu.*+

15 Apesaka mabele mitindo;

Liloba na ye epotaka mbangu mpenza.

16 Atindaka nɛjɛ lokola lɛnɛ;+

Apalanganisaka glasi ya pɛtɛpɛtɛ lokola putulu ya mɔtɔ.+

17 Abwakaka mbula ya mabanga lokola biteni ya mampa.+

Nani akoki kotɛlɛma liboso ya malili na ye?+

18 Atindaka liloba na ye mpe enyangwaka.

Asalaka ete mopɛpɛ na ye epɛpa,+ mpe mai etíyolaka.

19 Ayebisaka Yakobo liloba na ye,

Malako na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi epai ya Yisraele.+

20 Asalelá ekólo mosusu bongo te;+

Bayebi eloko moko te na oyo etali bikateli na ye ya lisambisi.

Bósanzola Yah!*+

148 Bósanzola Yah!*

Bósanzola Yehova uta na likoló;+

Bósanzola ye na bisika oyo etombwamá.

 2 Bósanzola ye, baanzelu na ye nyonso.+

Bósanzola ye, limpinga na ye mobimba.+

 3 Bósanzola ye, moi ná sanza.

Bósanzola ye, minzoto nyonso oyo engɛngaka.+

 4 Bósanzola ye, Ee esika eleki mpenza likoló

Mpe mai oyo ezali na likoló.

 5 Tiká básanzola nkombo ya Yehova,

Mpo apesaki mitindo, mpe yango ezalisamaki.+

 6 Atɛlɛmisaka yango na bisika na yango libela na libela;+

Atyá mobeko oyo ekoleka te.+

 7 Bósanzola Yehova uta na mabele,

Bino banyama minene ya mbu mpe mai nyonso ya mozindo,

 8 Bino mokalikali mpe mbula ya mabanga, nɛjɛ mpe mapata minene,

Yo mopɛpɛ ya makasi, oyo ozali kokokisa liloba na ye,+

 9 Bino bangomba mpe bangomba mike nyonso,+

Bino banzete ya mbuma mpe bino banzete nyonso ya sɛdrɛ,+

10 Bino banyama ya zamba+ mpe bino banyama nyonso ya mboka,

Bino banyama oyo ebendanaka na libumu mpe bandɛkɛ oyo ezali na mapapu,

11 Bino bakonzi ya mabele mpe bino nyonso bikólo,

Bino bankumu mpe bino nyonso basambisi ya mabele,+

12 Bino bilenge mibali mpe bilenge basi,*

Mibange ná bana.

13 Básanzola nkombo ya Yehova,

Mpo nkombo na ye yango moko ezali likoló mpenza koleka nyonso.+

Lokumu na ye eleki mabele mpe likoló.+

14 Akotombola makasi* ya bato na ye,

Mpo na lisanzoli ya bato na ye nyonso ya sembo,

Ya bana ya Yisraele, bato oyo bazali pene na ye.

Bósanzola Yah!*

149 Bósanzola Yah!*

Bóyembela Yehova loyembo ya sika;+

Bósanzola ye na kati ya lisangá ya bato ya sembo.+

 2 Yisraele asepela na Mokeli na ye Monene;+

Bana ya Siona bázala na esengo mpo na Mokonzi na bango.

 3 Bósanzola nkombo na ye na mabina+

Mpe bóyemba mpo na kosanzola* ye na mbonda moke mpe na nzɛnzɛ.+

 4 Mpo Yehova azali kosepela na bato na ye.+

Akómisaka bato ya komikitisa kitoko mpo na lobiko.+

 5 Bato ya sembo básepela mpenza mpo Nzambe apesi bango lokumu;

Báganga na esengo na bambeto na bango.+

 6 Nzembo ya kosanzola Nzambe ezala na monɔkɔ na bango,

Mpe mopanga ya mino mibale ezala na lobɔkɔ na bango,

 7 Mpo na kozongisela bikólo mabe

Mpe kopesa bato ya bikólo etumbu,

 8 Mpo na kokanga bakonzi na bango na minyɔlɔlɔ

Mpe bato na bango ya lokumu na bikangeli ya ebende,

 9 Mpo na kokweisela bango ekateli oyo ekomamá.+

Lokumu ya boye ezali mpo na bato na ye nyonso ya sembo.

Bósanzola Yah!*

150 Bósanzola Yah!*+

Bósanzola Nzambe na esika na ye mosantu.+

Bósanzola ye na etando oyo emonisaka* makasi na ye.+

 2 Bósanzola ye mpo na misala na ye ya nguya.+

Bósanzola ye mpo lokumu na ye eleki monene.+

 3 Bósanzola ye na makɛlɛlɛ ya liseke.+

Bósanzola ye na ebɛtɛlo ya nsinga mpe na nzɛnzɛ.+

 4 Bósanzola ye na mbonda ya moke+ mpe na mabina ya kobaluka.*

Bósanzola ye na bibɛtɛlo ya bansinga+ mpe na piololo.+

 5 Bósanzola ye na basɛmbalɛ ya mondule kitoko.

Bósanzola ye na makɛlɛlɛ ya basɛmbalɛ.+

 6 Eloko nyonso oyo ezali na mpema esanzola Yah!

Bósanzola Yah!*+

To, “amanyolaka mobeko na Ye.”

To, “bazali komanyola.”

To, “bayokani.”

To, “Kristo na ye.”

To, “bákebisa.”

Lil., “Bópwɛpwa mwana.”

Lil., “Ye.”

To, “bólongwa na nzela ya bosembo mpe bókufa.”

To, “molimo na ngai.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “Bongiselá ngai esika monene.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “moto oyo asopaka makila mpe oyo akosaka.”

To, “bolingo ya sembo na yo monene.”

To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “motema mawa.”

To, “molimo na ngai ebulungani.”

To, “molimo na ngai.”

To, “bakanisaka.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “kokimela.”

To, “Enuni.”

To, “Loyembo ya kolela.”

To mbala mosusu, “nabikisaki kozanga ntina moto oyo azalaki kotɛmɛla ngai.”

To, “molimo na ngai.”

Lil., “bomoi na ngai.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “amekaka mitema mpe bangɛi.”

To, “abimisaka makaneli.”

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, “Yo oyo nkembo na yo elobelamaka koleka likoló.”

To, “baoyo bazali lokola Nzambe.”

To, “ekɔti ya bokonzi.”

Lil., “Banyama ya esobe.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

To, “na mabele oyo ebotaka.”

To, “esika ya kobombana oyo etombwaná.”

Lil., “Yo ozali kolongola ngai na baporte ya liwa.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “mposa ya molimo na ye.”

To mbala mosusu, “moto ya lokoso azali komipambola.”

To, “Atyolaka.”

To, “Nakotengatenga ata moke te.”

To, “molimo na ngai.”

To, “ya kongɛnga.”

To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Molimo na ye eyinaka.”

To mbala mosusu, “makala ya mɔtɔ.”

To, “bakomona boboto na ye.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “monɔkɔ sukali.”

Lil., “na motema mpe na motema.”

To, “kokimela.”

To, “na ndenge ya kotyola.”

To mbala mosusu, “litumbu ya konyangwisa oyo etyami na mabele.”

To, “molimo na ngai ekotungisama.”

Lil., “Akoselaka bato makambo te na lolemo na ye.”

To, “Ayokisaka baninga na ye nsɔni te.”

Lil., “asali elako.”

To, “akotengatenga ata moke te.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “mayoki na ngai ya kati.” Lil., “bangɛi na ngai.”

Lil., “Natye Yehova liboso na ngai ntango nyonso.”

To, “nakotengatenga ata moke te.”

Lil., “nkembo na ngai ezali na esengo.”

To, “nzoto na ngai ekofanda.”

To, “okosundola molimo na ngai.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, “amona kopɔla.”

Lil., “Liboso ya elongi na yo.”

To, “Bolamu.”

To, “Kitá mpe yoká ngai.”

To, “Bamizingi na mafuta na bango.”

To, “mpo na kobwaka biso na mabele.”

To, “molimo na ngai.”

To, “ntango oyo.”

To, “mpo na komona lolenge na yo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “mobikisi na ngai ya nguya.”

To, “esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “mapapu ya elimo moko.”

To, “Banzela ya mai.”

To, “esika moko monene.”

Lil., “ezali pɛto.”

To, “bato ya mpasi.”

Lil., “miso ya lolendo.”

To, “Makɛsi.”

To, “Okopesa ngai mokɔngɔ ya banguna na ngai.”

To, “Bapaya bakokauka.”

To, “nakobɛta miziki mpo na nkombo na yo.”

To, “Azali kolonga na makambo minene.”

Lil., “momboto.”

To, “Bisika ya likoló oyo ezali mpenza monene.”

Lil., “butu na butu.”

To mbala mosusu, “nsinga na yango ya komeka.”

To, “na mabele oyo ebotaka.”

To, “oyo epɛtolami.”

To, “Tángá ngai ete nazali na ngambo te.”

To, “makambo ya kobuka mibeko.”

To, “kokanisa na mozindo.”

Lil., “Atalela likabo na yo ya kotumba lokola nde mafuta.”

To, “toli na yo nyonso.”

To, “Akolonga na makambo minene.”

To, “oyo epɛtolami.”

Lil., “bolai ya mikolo.”

Lil., “ya elongi.”

To, “akotengatenga ata moke te.”

Lil., “mbuma.”

Lil., “bansinga ya litimbo.”

Lil., “na bilongi na bango.”

Lil., “Tokobɛta miziki mpo na nguya na yo.”

Mbala mosusu lolenge moko ya kobɛta miziki.

To, “na kiti na yo ya bokonzi.”

Lil., “Babwakaki ngai epai.”

Lil., “bomoi na ngai kaka moko,” azali kolobela molimo na ye, to bomoi.

Lil., “lobɔkɔ.”

Lil., “momboto.”

Lil., “momboto.”

Lil., “Mitema na bino ezala.”

Lil., “mafutamafuta.”

Lil., “Momboto.”

Lil., “Mobateli ya mpate.”

To mbala mosusu, “mai oyo efandi kimya.”

To, “Apesaka molimo na ngai.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “ebɔndisaka ngai.”

To, “Obɔndisi motó na ngai na mafuta.”

To, “molimo,” ezali kolobela bomoi ya Yehova, oyo moto alapi ndai na nzela na yango.

To, “Bótɛlɛma.”

To, “natomboli molimo na ngai.”

To, “Oyo ezali uta kala.”

Lil., “na lisambisi.”

Lil., “momboto na ye ekozwa.”

To, “molimo.”

Lil., “sikolá.”

To, “mayoki na ngai ya mozindo.” Lil., “bangɛi.”

Lil., “Nafandi esika moko te.”

To, “Nazalaka te esika moko na baoyo babombaka ndenge bazali.”

Lil., “nafandaka esika moko te.”

To, “molimo na ngai.”

To, “ngambo ya makila.”

Lil., “Sikolá.”

To, “kitoko.”

To, “esika mosantu.”

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

To, “molimo ya banguna na ngai.”

To mbala mosusu, “Ya solo mpenza nazali na kondima ete nakomona bolamu ya Yehova na mokili ya bato ya bomoi.”

To, “nkunda.”

To, “malɔmbɔ.”

To, “lilɔmbɔ.”

To, “Bósambela.”

To mbala mosusu, “mpo na nkembo ya bosantu na ye.”

Ekoki mpenza kozala, molɔngɔ ya bangomba ya Liban.

To, “mai mozindo ya likoló.”

To, “obendi ngai.”

To, “molimo na ngai.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “nkunda.”

To, “Bóbɛta miziki mpo na.”

Lil., “ekaniseli.”

To, “Nakotengatenga ata moke te.”

Lil., “Makila.”

To, “nkunda.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “nkembo na ngai eyemba loyembo.”

To, “Kitá mpe yoká ngai.”

To, “Nzambe ya sembo.”

To, “bampasi ya molimo.”

To, “esika monene.”

To, “molimo ná libumu na ngai.”

To, “kokimela.”

To, “makanisi.”

Lil., “Bantango.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “Mosika na koswana ya lolemo.”

To, “lilɔmbɔ.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “lobɔkɔ.”

To, “Mai ya bomoi.”

Ezali mwana ya mpunda moke ya mobali ná mpunda ya mwasi.

To, “Bóbɛta miziki.”

Lil., “limpinga na yango nyonso.”

To, “elimo.”

To, “toli.”

To, “myango.”

To, “toli.”

To, “molimo na bango.”

To, “Molimo na biso ezali.”

To, “Molimo na ngai ekomikumisa.”

To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

To, “elimo etutami.”

To, “molimo.”

Nguba ya moke, yango ezalaki kosalelama mbala mingi na babwaki mbanzi.

To, “sóka na yo ya mitó mibale.”

To, “na molimo.”

To, “koluka molimo na.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “kozonga na ntolo na ngai.”

To mbala mosusu, “kosɛka mpo na gato.”

Lil., “bomoi na ngai kaka moko,” azalaki kolobela molimo na ye, to bomoi.

To, “bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.”

To, “Ah! molimo na biso.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “ekomanyola na.”

Lil., “lokola bangomba ya Nzambe.”

To, “obikisaka.”

To, “mokili.”

To, “Zwá esengo mingi mpenza.”

Lil., “Tikelá Yehova nzela na yo.”

To, “na motema molai.”

To mbala mosusu, “Kosilika te mpo yango ekoki komema kaka na mabe.”

To, “baoyo nzela na bango ezali alima.”

To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “mikolo ya bato oyo bazangi mbeba.”

To, “asalisaka.”

To, “Atɛlɛmisaka ngwi.”

To, “bilei.”

To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “ebimisaka bwanya na mongongo ya nse.”

To, “moto ya sembo.”

To, “mpo ezongisa na makanisi.”

Lil., “Eteni ata moko te ya malamu ezali na nzoto na ngai.”

To, “mayina.”

Lil., “Bangɛi na ngai ezali kozika mpenza.”

To, “nakimela.”

To, “na koganga makasi.”

To, “kokimela.”

Lil., “bomoi.”

To mbala mosusu, “Kasi banguna na ngai bazali ebele kozanga ntina.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “ekómaki mɔtɔ.”

Lil., “mwa batandu.”

Lil., “kosala makɛlɛlɛ.”

To, “Moto oyo auti mboka mosusu.”

To, “Nazelaki mpenza Yehova.”

To, “akitaki na nse mpo na koyoka ngai.”

To, “libulu oyo mai na yango ezali konguluma.”

To, “Osepelaki te na.”

Lil., “rulo ya buku.”

To, “nazali na mposa ya.”

Lil., “mposa; molimo.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “molimo na ngai.”

Lil., “atomboleli ngai litindi na ye.”

To, “Seko na seko.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Molimo na ngai ezali.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “ngomba moke.”

To mbala mosusu, “Lokola bazali.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “lobiko monene.”

To, “ntalo oyo otɛkaki bango.”

Lil., “liloba ya lisese.”

To, “bambulú.”

To, “milimo na biso ebwakami.”

Lil., “Sikolá.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “Misala.”

To, “mokomeli.”

Lil., “ekoteya yo.”

To, “kokitisa elongi na yo motema.”

Lil., “na kati.”

Lil., “esalemi na bansinga.”

To mbala mosusu, “zambala oyo esalemi na bansinga.”

Lil., “yo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, yikiyiki ya mbu.

To, “esika na biso ya kobombana oyo etombwaná.”

To mbala mosusu, “banguba.”

To, “liseke ya mpate mobali; kelelo.”

To, “Bóbɛta miziki mpo na.”

Lil., “banguba.”

To, “esika ya kobombana oyo etombwaná.”

To, “bakutani ndenge bayokanaki.”

Lil., “Bana basi ya Yuda bázala.”

To mbala mosusu, “tii tokokufa.”

To, “bato ya makambo ya ntango oyo.”

Lil., “Bino bana ya bato ná bino bana ya moto.”

Lil., “libunga.”

To, “nkunda.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “lobɔkɔ.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Nzambe, Nzambe, Yehova.”

To, “Banda na ɛsti tii wɛsti.”

Lil., “bantaba-mibali.”

To, “mateya.”

Lil., “kobwaka maloba na ngai nsima na yo.”

To mbala mosusu, “okei na ngámbo na ye.”

To, “kotyola.”

To, “na makanisi na ngai.”

To, “Bombá.”

Lil., “Sungá ngai na elimo oyo elingaka kotosa.”

To, “okotyola yango te.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “ndako na ye ya makasi.”

To, “alukaki libateli.”

Lil., “na kati ya minyoko oyo ye abimisi.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “kozanga boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, “Kobanga esika oyo likambo ya kobanga ezali te.”

Lil., “akotɛlɛmisa kaa mpo na baoyo bazali kotɛmɛla yo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “koluka molimo.”

To, “Batye Nzambe liboso na bango te.”

Lil., “kangisá bango monɔkɔ.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “komibomba te ntango nazali kobondela mpo na kosɛnga lisalisi.”

Lil., “kabolá lolemo na bango.”

To, “moto, moto oyo akokani na ngai.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “kokimela; nazali na kimya te.”

Lil., “Akosikola ngai mpenza.”

Elingi koloba, moninga ya kala oyo alobelami na vɛrsɛ 13 mpe 14.

To, “atengatenga.”

Tála Ndimbola ya maloba.

To, “koswa.”

Lil., “Mosuni.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “molimo na ngai ekimi.”

To, “bolingo ya sembo.”

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “babungá nzela.”

Lil., “banda na libumu.”

To, “oyo nkingo etondi na nsuki.”

Lil., “konyangwa.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “ndako.”

To, “bato oyo bazali na mposa makasi ya makila.”

To, “molimo na ngai.”

To, “kosopana.”

To, “esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.”

To, “nakobɛtela yo miziki.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, “Opesi.”

To mbala mosusu, “na esika na ye mosantu.”

To, “Lobwaku patatalu.”

Lil., “ndako ya makasi.”

To mbala mosusu, “ebatelami makasi.”

To, “Ntango nazali kolɛmba.”

Lil., “Okobakisa mikolo na mikolo ya mokonzi.”

To, “Akofanda.”

To, “Bolingo ya sembo.”

To, “nakobɛta miziki mpo na.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “molimo na ngai ezali.”

To, “esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.”

To mbala mosusu, “Bino nyonso bozali kosala bongo, lokola nde azali efelo oyo etɛngami, efelo ya mabanga oyo elingi kokwea.”

To, “Ee molimo na ngai, zelá.”

To, “Bósopela ye mitema na bino.”

To, “Molimo na ngai ezali.”

Lil., “Molimo na ngai elɛmbi.”

To, “Molimo na ngai etondi.”

Lil., “mafuta mpe mafutamafuta.”

To, “Molimo na ngai ekangami.”

To, “kobebisa molimo na ngai; koboma ngai.”

To, “akomikumisa.”

To, “Bazali kopesana mabɔkɔ mpo na kosala mabe.”

To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bakomikumisa.”

Lil., “mosuni nyonso.”

Lil., “Ye.”

Lil., “Ye.”

Lil., “Ye.”

Lil., “Osali ete ebota koleka ndelo.”

Lil., “Banzela na yo ezali kotangisa mafuta.”

Lil., “kotanga.”

To, “Bóbɛta miziki mpo na.”

To, “molimo.”

To, “etengatenga.”

Lil., “Otye kilo na loketo na biso.”

To, “ekokumisa.”

To, “bóbɛta miziki mpo na.”

To mbala mosusu, “mapata.”

“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

Lil., “mosambisi.”

To, “batomboki.”

Lil., “obimaki liboso ya.”

Lil., “etangisa matangá.”

Lil., “libula na yo.”

To mbala mosusu, “mapango ya bampate.”

To, “ya langi ya mai ya mpɔndu ya mwa mosaka.”

To, “Ezalaki lokola nde nɛjɛ ezalaki kokwea.”

To, “ngomba moko ya monene.”

To, “asepeli.”

To mbala mosusu, “konyata.”

To mbala mosusu, “Baambasadɛrɛ bakouta.”

To, “Bóbɛta miziki mpo na.”

Lil., “mapata.”

Lil., “yo.”

To, “ekómi tii na molimo na ngai.”

To, “Banguna na ngai kaka mpamba.”

To mbala mosusu, “Ntango nalelaki mpe nakilaki bilei.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “liloba ya lisese.”

To, “Pusaná pene na molimo na ngai mpe sɛngá yango.”

To, “nakómi pene ya kolɛmba nzoto.”

To, “lititi ya ngɛngɛ.”

To, “buku ya bomoi.”

Elingi koloba, mokili.

To, “mpo ezongisa na makanisi.”

To, “koluka molimo na ngai.”

To, “Kitá mpe yoká ngai.”

To, “Ozali moto oyo natyelaka.”

To, “koluka koboma molimo na ngai.”

To, “mitángo.”

Lil., “lobɔkɔ.”

To, “mai mozindo.”

To, “Nakobɛta miziki mpo na yo.”

To, “osikoli molimo na ngai.”

To, “ekomanyola na.”

To, “bayengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “akoyangela.”

Elingi koloba, Efrate.

To, “milimo.”

To, “Akosikola.”

To, “Libumu na bango ezali mafutamafuta.”

Lil., “Mafuta.”

Lil., “libota ya bana na yo.”

Lil., “okotyola elilingi na bango.”

Lil., “na bangɛi na ngai.”

Lil., “Okokanga monɔkɔ ya.”

To, “baoyo bazali kosala lokola moto ya pite.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “epeleli.”

Lil., “liyangani.”

To, “esika na yo ya liyangani.”

To, “sóka.”

To, “basóka.”

To, “na masusa ya elamba na yo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “engɛngiseli.”

To, “molimo.”

Lolenge moko ya ebenga ya zamba oyo ezalaka moke.

Lil., “liseke.”

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

Lil., “Nakokata maseke.”

To, “ozingami na pole.”

Lil., “elimo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “Na butu mabɔkɔ na ngai esembolami mpe esili makasi te.”

To, “molimo na ngai.”

Lil., “elimo na ngai elɛmbi.”

Lil., “Osimbi ntɔkɔ ya miso na ngai.”

To, “miziki ya ebɛtɛlo na ngai ya bansinga.”

Lil., “Elimo na ngai esalaka.”

To, “kotɔbɔla ngai.”

Lil., “lobɔkɔ na ye ya mobali.”

Lil., “lobɔkɔ.”

Lil., “osikolaki.”

To, “mabele oyo ebotaka.”

Lil., “Na lobɔkɔ.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “mateya.”

Lil., “Bósembola litoi.”

To, “nduka.”

To, “bilei mpo na molimo na bango.”

Lil., “kobongisela biso mesa.”

To, “baanzelu.”

To, “Moto oyo azongisaka mabe mpo.”

Lil., “kozipa.”

To mbala mosusu, “Elimo ebimaka mpe ezongaka te.”

To, “motema mpasi.”

Lil., “lobɔkɔ.”

Lil., “asikolaki.”

To, “mafokofoko.” Lolenge moko ya nzinzi oyo eswaka makasi.

To, “mbemba.”

To mbala mosusu, “fiɛvrɛ makasi.”

To, “molimo na bango.”

Lil., “bomoi na bango.”

To, “nkanda.”

Lil., “Mpe bangɔndɔ na ye basanzolamaki te.”

Lil., “Atongaki esika na ye mosantu lokola bisika oyo etombwaná.”

Lil., “zipá.”

To, “kokimela.”

Lil., “lobɔkɔ.”

To mbala mosusu, “kotika.”

Lil., “bana ya liwa.”

To mbala mosusu, “na katikati.”

Elingi koloba, Efrate.

To, “Bangulu ya zamba.”

To, “nzete ya vinyo.”

To, “etape oyo.”

Lil., “mpamela ya elongi na yo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Elingi koloba, Nzambe.

To, “monɔkɔ.”

Lil., “na esika ya kobombana ya nkake.”

Elimboli, “koswanisa.”

Lil., “Batambolaki na batoli na bango moko.”

Lil., “ntango.”

Lil., “ye,” elingi koloba, bato ya Nzambe.

Lil., “mafuta ya blé.”

To, “bikelamu oyo bazali na lolenge ya banzambe.”

To, “bikelamu oyo bazali na lolenge ya banzambe.”

To, “Kozanga liloba ya koloba te.”

To, “bazali kotombola mitó na bango.”

Lil., “yo obombi.”

Lil., “bakómi lobɔkɔ mpo na.”

To, “wadi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “bakonzi.”

Lil., “Tondisá.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “elingami mpenza.”

To, “Molimo.”

To, “zála.”

To mbala mosusu, “mosakoli azali komizinga.”

To mbala mosusu, “Moná nguba na biso, Ee Nzambe.”

Lil., “Ozipi.”

To, “Bolingo ya sembo.”

To, “bozwi.”

To, “kitá mpe yoká ngai.”

To, “molimo.”

To, “molimo ya mosaleli na yo.”

To, “nazali kotombola molimo na ngai.”

To, “Pesá ngai motema oyo ekabwani te.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “batye yo liboso na bango te.”

To, “solo.”

To, “elembeteli.”

To, “Mpo na ngai, ozali liziba ya makambo nyonso.”

Talá Ndimbola ya maloba.

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Kitá mpe yoká ngai.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “nkunda.”

To, “mobali oyo azangi makasi.”

Lil., “lobɔkɔ na yo oyo esalisaka.”

To, “na Abadona.”

To mbala mosusu, “nyonso na mbala moko.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “ekopikama makasi.”

Lil., “momboto.”

Lil., “kiti ya bokonzi.”

To, “Liyangani.”

Lil., “liseke na biso ezali kotombwama.”

To, “bolingo ya sembo.”

Lil., “liseke na ye ekotombwama.”

To, “bokonzi.”

Lil., “momboto.”

To, “botomboki.”

Lil., “nakobuka lokuta te mpo na bosembo na ngai.”

Lil., “Momboto.”

To, “bisika na ye ya libateli ya mabanga.”

Lil., “Otomboli lobɔkɔ ya mobali ya banguna na ye.”

To, “molimo.”

Lil., “na lobɔkɔ ya Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “komema na ntolo na ngai.”

To mbala mosusu, “esika na biso ya kokima.”

To, “lokola na mpasi ya kobota.”

To, “Bomoi na biso.”

To, “Longisá.”

To, “Akokanga nzela ya kopusana pene na yo.”

Lil., “lifuti.”

To mbala mosusu, “ndako makasi; esika ya kokima.”

Lil., “Lokola ye moko apusani epai na ngai.”

To, “akomona lobiko epai na ngai.”

To, “kobɛta miziki mpo na.”

To, “matiti.”

Lil., “liseke.”

To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “na ntango ya nsuki mpɛmbɛ.”

Lil., “mafutamafuta.”

To, “Mabele oyo ebotaka.”

To, “kotengatenga te.”

To, “ebongi na.”

Lil., “aloná.”

Lil., “nalingaki kofanda na esika ya nyɛɛ.”

To, “Mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa molimo na ngai.”

To, “basambisi.” Lil., “kiti ya bokonzi.”

To, “molimo ya moto ya sembo.”

Lil., “bazali kotánga makila ya moto oyo azali na likambo te ete azali na ngambo (moto mabe).”

To, “esika na ngai ya kobombana oyo etombwaná.”

Lil., “Akokangisa bango monɔkɔ.”

Lil., “akokangisa bango monɔkɔ.”

Lil., “liboso ya elongi na ye.”

Lil., “oyo ezali na lobɔkɔ na ye.”

Elimboli, “koswanisa.”

Elimboli, “komeka; komekama.”

To, “mpii.”

To, “Lokumu.”

To, “Bósambela.”

To mbala mosusu, “mpo na nkembo ya bosantu na ye.”

To, “Mabele oyo ebotaka.”

To, “kotengatenga te.”

To, “Akosamba likambo ya bato na bosembo.”

To, “mpo ayei.”

To, “mabele oyo ebotaka.”

To, “Bósambela.”

Lil., “Bana basi.”

To, “milimo.”

To, “nguya.”

Lil., “ekaniseli.”

To, “epesi ye lobiko.”

To, “bolingo na ye ya sembo.”

To, “bolongi ya Nzambe na biso.”

To, “bóbɛta miziki.”

To, “Bóbɛta miziki mpo na.”

To, “Mabele oyo ebotaka.”

To, “ayei.”

To, “mabele oyo ebotaka.”

To mbala mosusu, “na katikati.”

To, “bósambela.”

Lil., “ozongisaki mabe.”

To, “bósambela.”

To mbala mosusu, “kasi biso moko te.”

To, “nakobɛta miziki mpo na yo.”

To, “na bosembo.”

To, “Misala na bango ekangami na ngai te.”

Lil., “Nayebi.”

To, “Nakosilisa ye.”

Lil., “liboso ya miso na ngai te.”

To, “nakosilisa bato mabe nyonso ya mabele.”

To, “alɛmbi.”

To, “Kitá mpe yoká ngai.”

To mbala mosusu, “Nakɔndi makasi.”

To, “nkombo.” Lil., “ekaniseli.”

Lil., “oyo bakozalisama.”

To, “kokimela.”

To, “molimo na ngai esanzola.”

To, “nkunda.”

To, “motema boboto.”

Lil., “Mpe esika na yango eyebaka yango lisusu te.”

To, “seko na seko.”

Lil., “koyoka mongongo ya liloba na ye.”

To, “bisika ya bokonzi na ye.”

To, “molimo na ngai esanzola.”

Lil., “na kati ya mai.”

To, “Ekotengatenga.”

To, “mabwaku ya mokɛli.”

To, “Bana-nkɔsi oyo nkingo na yango etondi na nsuki.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

To mbala mosusu, “Ndenge nazali komanyola makambo na ye esepelisa.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “bóbɛta miziki mpo na ye.”

To mbala mosusu, “Bólobela.”

To, “kozala; kondimama.”

Lil., “momboto.”

Lil., “Liloba oyo apesaki mitindo.”

Lil., “Abukaki lingenda nyonso ya limpa.” Mbala mosusu ezali mangenda oyo bazalaki kosalela mpo na kokɔtisa mampa oyo ezalaki lokola lopɛtɛ mpo na kobomba yango.

Lil., “Bamonisaki makolo na ye mpasi.”

To, “Molimo na ye ekɔtaki na ebende.”

Lil., “Mpo akanga.”

Mbala mosusu, “bazali kolobela Moize ná Arona.”

To, “mbemba.”

To, “mafokofoko.” Lolenge moko ya nzinzi oyo eswaka makasi.

To, “mɔtɔ oyo ezali kopela.”

Lil., “na bango.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “ndenge osepelaka na bato na yo.”

To, “bakangaki te ntina ya.”

To, “esobe.”

To, “atikalaki.”

To, “oyo enyangwisami.”

Lil., “atɛlɛmaki na libulu liboso na ye.”

To, “kokangama na.”

Elingi koloba, bambeka oyo bapesaki ezala epai ya bato oyo bakufá to epai ya banzambe oyo bazangi bomoi.

To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Elimboli, “koswanisa.”

To, “bayekolaki.”

Lil., “lobɔkɔ.”

To, “tósepela na masanzoli na yo.”

To, “Seko na seko.”

To, “Ezala bongo!”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “nguya.”

To, “epai moi ebimaka mpe epai moi elalaka.”

To, “molimo oyo ekauki.”

To, “molimo oyo ezali na nzala.”

To, “Milimo na bango eyinaki bilei ya ndenge nyonso.”

To, “Molimo.”

Lil., “esika ya kofanda.”

To, “atombolaka,” elingi koloba, esika oyo moto akoki kokóma te.

To, “bazangi boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “na nkembo na ngai.”

To, “nakobɛta miziki mpo na.”

To mbala mosusu, “na esika na ye mosantu.”

To, “Lobwaku patatalu.”

Lil., “ndako ya makasi.”

Lil., “ayangela ye.”

To, “mofundi.”

To, “moto mabe.”

Lil., “Bana na ye ya mibali.”

Lil., “Bana na ye ya mibali.”

To, “atya motambo mpo na.”

To, “bolingo ya sembo.”

To, “bolingo ya sembo.”

To, “molimo na ngai.”

Lil., “Mosuni na ngai ekɔndi, nazali na mafuta te.”

To, “kazaka ezangá mabɔkɔ.”

To, “na mokolo oyo okoyanganisa limpinga ya basoda na yo.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To, “akoyoka mawa te.”

Lil., “motó.”

To, “ya mabele mobimba.”

Ezali komonisa “Nkolo na ngai” oyo ezali na v. 1.

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “Esimbami malamu.”

Lil., “kotosa yango.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “na motema mawa.”

To, “epikami makasi.”

To, “na motema mobimba.”

Lil., “Liseke na ye.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “afandaka na kiti ya bokonzi.”

To mbala mosusu, “ekunde to fulu ya bosɔtɔ.”

Lil., “bana mibali.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

Lil., “bana na bino ya mibali.”

Lil., “na esika ya kimya.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To mbala mosusu, “Nalingaka mpo Yehova ayokaka.”

To, “lilɔmbɔ.”

To, “akitaka mpe ayokaka ngai.”

Lil., “na mikolo na ngai.”

Lil., “mitungisi ya Nkunda ezwaki ngai.”

To, “molimo na ngai.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “lobiko monene.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “mabota.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “esika moko monene.”

To mbala mosusu, “esika moko na baoyo bazali kosalisa ngai.”

To mbala mosusu, “Otindikaki ngai makasi.”

To, “bolongi.”

To, “libanga monene ya litumu.”

To, “bazali kobatela boyengebene.”

Lil., “Ee tiká banzela na ngai epikama makasi.”

To, “Nakoyekola.”

To, “molimo na ngai etondaka.”

Lil., “Longolá kosɛka mpe lityo likoló na ngai.”

To, “koyekola.”

Lil., “nzela.”

To, “nayekola.”

Lil., “Nakopota mbangu na.”

To mbala mosusu, “osali ete motema na ngai ebanga te.”

To, “liloba.”

To mbala mosusu, “Oyo esalemi epai ya baoyo babangaka yo.”

To, “liloba.”

To, “nazeli.”

To, “esika monene.”

To, “nakoyekola.”

To, “elaka opesaki.”

To, “Oyo ozelisi ngai mpo na yango.”

To, “Na ndako oyo nafandi mopaya.”

To, “Nakitisaka elongi na yo motema.”

To, “liloba.”

To, “nazalaki kosala masumu na nko te.”

Lil., “Motema na bango ezali koyoka eloko te lokola mafuta.”

To, “nazeli liloba na yo.”

To, “liloba.”

To mbala mosusu, “na lokuta.”

To, “nakoyekola.”

To, “Molimo na ngai elɛmbi.”

To, “nazeli liloba na yo.”

Elingi koloba, misala na ye nyonso ya bozalisi.

Lil., “ezali monene mingi.”

To, “Nayekolaka yango.”

To, “nayekolaka.”

Lil., “sepelá na makabo ya bolingo ya monɔkɔ na ngai.”

To, “Molimo na ngai ezali na lobɔkɔ na ngai ntango nyonso.”

To, “libula na ngai ya seko.”

Lil., “Na motema na ngai nakani kotosa.”

To, “bato oyo motema na bango ekabwani.”

To, “nazeli liloba na yo.”

To, “na kolanda liloba na yo.”

To, “ekóma likambo ya nsɔni.”

Lil., “Mosuni.”

To, “liloba.”

To, “ebongisami.”

To, “molimo na ngai etosaka.”

To, “nakimeli.”

To, “Piká matambe na ngai makasi.”

To, “Nalamuki ntango ntɔngɔ ebandi kotana.”

To, “nazelaka maloba na yo.”

To, “liboso ya bileko ya kokɛngɛla na butu.”

To, “nayekola.”

To, “etamboli ya mbindo.”

To, “liloba.”

To, “Mpo na bango likambo ya kobɛtisa libaku ezali te.”

To, “Molimo na ngai ebatelaka.”

To, “na kolanda liloba na yo.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “molimo na ngai.”

Lil., “mpe akobakisela yo nini?”

To, “etengatenga.”

To, “molimo.”

Lil., “kobima na yo mpe kokɔta na yo.”

“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “milimo na biso.”

To, “milimo na biso.”

To, “milimo na biso ezali.”

To, “básembola te mabɔkɔ na bango mpo na.”

To, “lobwaku ya mokɛli na sudi.”

To, “ɔrje.”

To, “lilɔmbɔ.”

To, “otángaka.”

“Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “bábanga.”

To, “molimo na ngai.”

To, “Molimo na ngai ezeli.”

To, “namibɔndisi.” Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Molimo na ngai ezali.”

To, “Tabernakle monene.”

To, “tabernakle na ye monene.”

To, “boyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.

Lil., “Koboya te elongi ya.”

Lil., “oyo akouta na mbuma ya libumu na yo.”

Lil., “ liseke.”

Matangá ya mai oyo ezalaka na milona na ntɔngɔntɔngɔ.

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “Bóbɛta miziki mpo na.”

To, “mbɔngi ya mai.”

To mbala mosusu, “Asalelá kutu mbula baporte.”

To, “nkombo.” Lil., “ekaniseli.”

Lil., “na biteni.”

Lil., “mosuni nyonso.”

Ezali komonisa Babilone.

To mbala mosusu, “ekɔnda.”

To mbala mosusu, “Mpo na kotɛmɛla banzambe mosusu, nakobɛta miziki mpo na yo.”

To, “esika mosantu.”

To mbala mosusu, “Mpo okumisi liloba na yo mingi koleka nkombo na yo mpenza.”

To, “molimo na ngai mpiko.”

Lil., “Otali ngai malamumalamu.”

To, “Boyebi ya boye ezali kokamwisa ngai mpenza.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To mbala mosusu, “Oyemaki.”

To mbala mosusu, “nakokoba kotánga yango.”

To, “bato ya ngambo.”

To, “nayokaka nkɛlɛ.”

To, “lilɔmbɔ.”

To, “Na mabulu ya mai.”

To, “na mokili.”

To, “liboso na yo.”

To, “mbuma ya kosala farini.”

To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.

To, “Kosopa molimo na ngai te.”

Talá Ndimbola ya maloba.

To, “makasi.”

Lil., “koyeba ngai lisusu.”

Lil., “likabo na ngai.”

Lil., “Elimo.”

To, “Nayekoli.”

Lil., “Elimo.”

To, “nkunda.”

To, “Mpo natomboli molimo na ngai epai na yo.”

Lil., “kangisá banguna na ngai monɔkɔ.”

Lil., “Baoyo lobɔkɔ na bango ya mobali ezali lobɔkɔ ya lokuta.”

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

To, “apesaka bakonzi lobiko.”

To, “Moto akoki te kokanga ntina ya bonene na ye.”

To, “nguya.”

Lil., “Monɔkɔ na ngai ekosakola lisanzoli ya Yehova.”

Lil., “Mosuni nyonso.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “molimo na ngai esanzola.”

To, “Nakobɛta miziki mpo na.”

To, “Mpema.”

Lil., “baoyo bakangi bango bansinga.”

To, “atɛngisaka nzela ya bato mabe.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “kobɛta miziki mpo na.”

To, “korbo.”

Lil., “na mafuta ya mbuma ya blé.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

Lil., “bangɔndɔ.”

Lil., “liseke.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “bóbɛta miziki mpo na.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

To, “na likoló oyo etatolaka.”

To, “ya kozunguluka.”

To, “Aleluya!” “Yah” ezali ebengeli ya mokuse ya nkombo Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto